Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?—Eteni 1
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2014 | 1 Octobre
    • Cameron ná Jon bazali kosolola makambo etali Bokonzi ya Nzambe

      LISOLO NA MONINGA MOKO YA KARTYE

      Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?​—Eteni 1

      Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Cameron akei kotala mobali moko na nkombo Jon.

      “KOBÁ KOLUKALUKA” MAYELE

      Cameron: Jon, nasepelaka mpenza na masolo ya Biblia oyo tosololaka na yo.a Na mbala oyo eleki, otunaki motuna etali Bokonzi ya Nzambe. Olingaki koyeba mpo na nini Batatoli ya Yehova bandimaka ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914.

      Jon: Mokanda na bino moko oyo natángaki elobaki ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914. Yango ekamwisaki ngai mpo bolobaka ete mateya na bino nyonso eutaka na Biblia.

      Cameron: Ezali mpenza bongo.

      Jon: Natángá Biblia mobimba kasi natikala komona ata vɛrsɛ moko te oyo elobeli dati ya 1914. Yango wana nakɔtaki na Internet mpo na koluka dati yango na Biblia kasi mpo na koloba solo, namonaki yango ata na vɛrsɛ moko te.

      Cameron: Jon, napesi yo longonya mpo na makambo mibale. Ya liboso, mpo otángá Biblia na mobimba na yango. Yango emonisi ete olingaka mpenza Liloba ya Nzambe.

      Jon: Nalingaka yango mpenza. Buku moko te ekokani na yango.

      Cameron: Ezali bongo. Ya mibale, napesi yo longonya mpo osalelaki Biblia mpo na koluka eyano na motuna na yo. Osalaki mpenza oyo Biblia esɛngaka biso tósala: “Kobá kolukaluka” mayele.b Ezali mpenza malamu ndenge ozali kosala milende ya ndenge wana.

      Jon: Mersi. Nalingaka kokoba koyekola. Kutu, nasalaki bolukiluki mosusu mpe namonaki makambo mosusu etali dati ya 1914 na buku oyo toyekolaka na yo. Elobeli ndɔtɔ oyo mokonzi moko alɔtaki; amonaki nzete moko ya monene oyo bakataki yango mpe na nsima ekolaki lisusu to eloko moko ya bongo.

      Cameron: Ah, ya solo. Ezali esakweli oyo ezali na Danyele mokapo 4. Elobeli ndɔtɔ oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone alɔtaki.

      Jon: Ɛɛ, ezali yango. Natángá esakweli yango mbala na mbala. Kasi mpo na koloba solo, nazali komona te soki yango etali Bokonzi ya Nzambe to dati ya 1914 na nini.

      Cameron: Jon, ata mpe mosakoli Danyele ayebaki te ndimbola mobimba ya makambo oyo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe!

      Jon: Ya solo?

      Cameron: Ɛɛ. Alobi boye na Danyele 12:8: “Nzokande, ngai nayokaki, kasi nakokaki kokanga ntina te.”

      Jon: Boye, nazali moto ya liboso te. Yango ekitisi ngai motema.

      Cameron: Mpo na koloba solo, Danyele ayebaki yango te mpo ntango ekokaki naino te mpo Nzambe apesa bato bososoli mpo bákanga mpenza ntina ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele. Kasi lelo, na ntango na biso, tokoki mpenza kokanga ntina na yango.

      Jon: Mpo na nini olobi bongo?

      Cameron: Tótánga vɛrsɛ oyo elandi. Danyele 12:9 elobi boye: “Maloba yango ebombami sekele mpe ekangami na elembo tii na ntango ya nsuka.” Na yango, bato basengelaki kokanga ntina ya bisakweli yango nsima ya bambula mingi, elingi koloba na “ntango ya nsuka.” Ndenge tokomona yango kala mingi te na boyekoli na biso, makambo mingi ezali komonisa ete tozali na ntango yango.c

      Jon: Okoki kolimbolela ngai esakweli ya Danyele?

      Cameron: Nameka naino.

      NDƆTƆ YA NEBUKADENEZARE

      Cameron: Liboso, nayebisa yo naino na mokuse makambo oyo mokonzi amonaki na ndɔtɔ. Na nsima, tokotalela ndimbola na yango.

      Jon: Likambo te.

      Mokonzi Nebukadenezare azali komona nzete moko ya monene na ndɔtɔ

      Cameron: Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ nzete moko ya monene mpe molai na yango ekómaki tii na likoló. Na nsima, ayokaki ndenge anzelu moko ya Nzambe apesaki mitindo ete bákata nzete yango. Kasi, Nzambe alobaki bátika ekumu ná misisa na yango na mabele. Nsima ya “ntango nsambo,” nzete yango esengelaki kokola lisusu.d Liboso, esakweli yango etalelaki mokonzi Nebukadenezare ye moko. Atako azalaki mokonzi ya lokumu, elingi koloba lokola nzete oyo molai na yango ekómaki tii na likoló, azalaki lisusu mokonzi te mpo na “ntango nsambo.” Oyebi makambo oyo elekaki?

      Jon: Te, nayebi te.

      Cameron: Malamu. Biblia emonisi ete Nebukadenezare akómaki moto ya ligboma na boumeli ya mbula nsambo. Na boumeli ya ntango wana, azalaki lisusu na likoki te ya koyangela. Nsima ya mbula nsambo, Nebukadenezare abikaki mpe azongelaki koyangela.e

      Jon: Ɛɛ, nazali kokanga ntina ya makambo nyonso oyo ozali koloba. Kasi, nyonso wana etali Bokonzi ya Nzambe mpe dati ya 1914 na nini?

      Cameron: Na mokuse, esakweli yango esengelaki kokokisama mbala mibale. Kokokisama ya liboso esalemaki ntango Nebukadenezare atikaki naino koyangela. Ya mibale ekokisamaki ntango Bokonzi ya Nzambe ezalaki lisusu te na mabele. Boye, ezali kokokisama ya mibale ya esakweli yango nde etaleli Bokonzi ya Nzambe.

      Jon: Ndenge nini boyebi yango?

      Cameron: Ya liboso, esakweli yango moko emonisi yango. Na kotalela Danyele 4:17, esakweli yango epesamaki “mpo bato oyo bazali na bomoi báyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato mpe apesaka yango moto oyo ye alingi kopesa.” Omoni oyo elobami mpo na “bokonzi ya bato”?

      Jon: Ɛɛ, elobi ete “Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato.”

      Cameron: Ya solo. Okanisi ete “Oyo-Aleki-Likoló” ezali nani?

      Jon: Nakanisi ete ezali Nzambe.

      Cameron: Malamu. Yango emonisi biso ete esakweli yango etaleli kaka Nebukadenezare te. Etaleli mpe “bokonzi ya bato,” elingi koloba Bokonzi oyo Nzambe azalaka na yango likoló ya bato. Soki totali makambo mosusu oyo ezali na esakweli yango, tokomona ete ezali mpenza bongo.

      Jon: Olingi mpenza koloba nini?

      MOTÓ YA LIKAMBO OYO ELOBELAMI MINGI NA MOKANDA YA DANIELE

      Cameron: Mokanda ya Danyele elobeli motó ya likambo moko mbala na mbala. Elobeli kotyama ya Bokonzi ya Nzambe oyo Mwana na ye Yesu akozala mokonzi na yango. Na ndakisa, tózonga naino na mwa mikapo oyo ezali liboso. Okoki kotánga Danyele 2:44?

      Jon: OK. Elobi boye: “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”

      Cameron: Mersi. Okanisi ete vɛrsɛ oyo elobeli Bokonzi ya Nzambe?

      Jon: Bon, nayebi mpenza te.

      Cameron: Simbá ete elobi ete Bokonzi yango “ekotikala seko.” Yango etali mpenza Bokonzi ya Nzambe, kasi tokoki koloba bongo te mpo na baguvɛrnema ya bato, boye te?

      Jon: Nakanisi ezali bongo.

      Cameron: Talá esakweli mosusu oyo ezali na mokanda ya Danyele, oyo elobeli mpe Bokonzi ya Nzambe. Ezali na Danyele 7:13, 14. Esakweli yango elobi boye mpo na mokonzi oyo akoyangela: “Bapesaki ye boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye. Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.” Ezali na likambo moko na esakweli yango oyo eyokani na makambo oyo tozali kolobela?

      Jon: Elobeli bokonzi moko.

      Cameron: Ezali bongo. Mpe ezali te lokola bokonzi nyonso. Simbá ete elobi ete Bokonzi yango ekoyangela “bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso.” Na maloba mosusu, Bokonzi yango ekoyangela mokili mobimba.

      Jon: Nakanisá naino bongo te, kasi olobi solo. Elobi mpenza bongo.

      Cameron: Talá mpe oyo esakweli yango elobi lisusu: “Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.” Esali lokola ekokana na esakweli oyo touti kotánga na Danyele 2:44, boye te?

      Jon: Ɛɛ, ezali bongo.

      Cameron: Tózongela na mokuse makambo oyo touti kosolola. Esakweli oyo ezali na mokapo 4 ya Danyele epesamaki mpo bato báyeba ete “Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato.” Maloba wana emonisi polele ete esakweli yango ekokisamaki kaka epai ya Nebukadenezare te, kasi esengelaki mpe kokokisama na ndenge ya monene mpenza. Mpe mokanda mobimba ya Danyele ezali na bisakweli oyo elobeli kotyama ya Bokonzi ya Nzambe oyo Mwana na ye akoyangela. Okanisi ete ebongi mpenza tóloba ete esakweli yango ya Danyele mokapo 4 etaleli mpe Bokonzi ya Nzambe?

      Jon: Namoni ete ezali bongo. Kasi nazali komona kaka te soki yango etali dati ya 1914 na nini.

      “TIKÁ NTANGO NSAMBO ELEKA”

      Cameron: Tózongela naino mokonzi Nebukadenezare. Kobosana te ete nzete ya esakweli yango emonisaki mokonzi Nebukadenezare. Boyangeli na ye esukaki ntango nzete yango ekatamaki mpo na ntango nsambo, elingi koloba ntango oyo akómaki moto ya ligboma mpo na mwa ntango. Ntango nsambo yango esilaki ntango Nebukadenezare abikaki mpe azongelaki bokonzi na ye. Na kokokisama ya mibale ya esakweli yango, boyangeli ya Nzambe ekatanaki mpo na mwa ntango kasi ezali te mpo ete Nzambe akokaki makambo te.

      Jon: Olingi mpenza koloba nini?

      Cameron: Biblia elobaka ete na ntango ya kala, bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki koyangela na Yerusaleme, bazalaki kofanda na “kiti ya bokonzi ya Yehova.”f Bazalaki komonisa Nzambe na ndenge bazalaki koyangela libota na ye. Na yango, boyangeli ya bakonzi wana ezalaki mpenza komonisa boyangeli ya Nzambe. Kasi, na nsima, mingi kati na bakonzi yango bazangaki botosi epai ya Nzambe mpe bato mingi oyo bazalaki koyangela, balandaki mpe ndakisa na bango ya mabe. Mpo na kozanga botosi ya Bayisraele, Nzambe apesaki nzela ete bato ya Babilone bamema bango na boombo na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Kobanda ntango wana, mokonzi moko te azalaki komonisa Yehova na Yerusaleme. Na ndenge yango, boyangeli ya Nzambe ekatanaki. Ozali kokanga ntina ya makambo oyo nazali koloba?

      Jon: Ɛɛ.

      Cameron: Mobu 607 ezalaki ebandeli ya ntango nsambo, eleko oyo boyangeli ya Nzambe ekatanaki. Na nsuka ya ntango nsambo, Nzambe asengelaki kotya mokonzi ya sika oyo akomonisa ye, kasi na mbala oyo, moto moko ya likoló. Ezali na ntango wana nde bisakweli mosusu oyo totángaki na mokanda ya Danyele esengelaki kokokisama. Sikoyo, motuna ya ntina yango oyo: Ntango nsambo yango esukaki ntango nini? Soki toyanoli na motuna yango, tokoyeba ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela.

      Jon: Namoni sikoyo. Nakanisa naino​—ntango nsambo esukaki na 1914?

      Cameron: Ezali mpenza bongo!

      Jon: Kasi ndenge nini toyebi yango?

      Cameron: Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete ntango nsambo ekómaki naino na nsuka te.g Yango wana, esengelaki kozala eleko moko ya molai mpenza. Ntango nsambo ebandaki bambula mingi liboso ete Yesu aya awa na mabele mpe ekobaki tii nsima ya kozonga na ye na likoló. Kobosana te ete bato basengelaki kokanga ntina ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele tii na “ntango ya nsuka.”h Likambo ya esengo, na bambula 1800, bayekoli ya Biblia batyelaki bisakweli yango mpenza likebi mpe bayekolaki yango malamumalamu. Bamonaki ete ntango nsambo esengelaki kosuka na 1914. Mpe makambo minene oyo ezali kosalema na mokili kobanda 1914, emonisi ete ezali na dati yango nde Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló. Ezali na mbula yango nde mokili ekɔtaki na mikolo ya nsuka to ntango ya nsuka. Nayebi ete ezali likambo ya sika mpo na yo mpe ezali pɛtɛɛ te okanga ntina na yango.

      Jon: Ɛɛ. Nakotánga lisusu makambo yango mpo nakanga mpenza ntina na yango.

      Cameron: Kobanga te. Ezwaki ngai mpe mwa ntango mpo nakanga ntina ya bisakweli yango mpe ndenge oyo ekokisamaki. Kasi, na mokuse, nakanisi ete lisolo na biso esalisi yo omona ete makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka mpo na Bokonzi eutaka na Biblia.

      Jon: Mpo na koloba solo, ndenge oyo bosalelaka Biblia mpo na komonisa makambo oyo bondimaka, ekamwisaka ngai mpenza.

      Cameron: Namoni ete yo mpe ozali na mposa ya kosala bongo. Yango wana, nalobaki ete ezali pɛtɛɛ te mpo okanga ntina ya makambo yango nyonso mbala moko. Ekoki kozala ete ozali na mituna mosusu. Na ndakisa, tomoni ete ntango nsambo etalelaki Bokonzi ya Nzambe mpe ebandaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Kasi, ndenge nini toyebi mpenza ete ntango nsambo yango esukaki na 1914?i

      Jon: Ɛɛ, yango mpe nazali komituna.

      Cameron: Biblia yango moko esalisi biso tóyeba soki ntango nsambo yango ezali mbula boni. Okosepela tólobela yango mbala ya nsima?j

      Jon: Likambo te.

      Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna Motatoli ya Yehova moko. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

      a Mbala mingi, Batatoli ya Yehova basololaka na baninga na bango ya kartye masolo ya Biblia ofele.

      b Masese 2:3-5.

      c Talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

      d Danyele 4:13-17.

      e Danyele 4:20-36.

      f 1 Ntango 29:23.

      g Na esakweli na ye oyo etali mikolo ya nsuka, Yesu alobaki boye: “Yerusaleme [oyo ezalaki komonisa boyangeli ya Nzambe] ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá ya bikólo ekokoka.” (Luka 21:24) Na yango, ata ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato bazalaki komonisa te boyangeli ya Nzambe awa na mabele mpe yango esengelaki kokoba tii na mikolo ya nsuka.

      h Danyele 12:9.

      i Talá apɛndisi “1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia” na buku Biblia eteyaka mpenza nini?

      j Lisolo ya mbala ya nsima ekotalela bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi soki ntango nsambo ezali mbula boni.

  • Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?—Eteni 2
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2014 | 1 Novembre
    • Jon ayambi Cameron na ndako na ye

      LISOLO NA MONINGA MOKO YA KARTYE

      Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?​—Eteni 2

      Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Cameron azongi kotala mobali moko na nkombo Jon.

      NDƆTƆ YA NEBUKADENEZARE​—BOZONGELI YA MOKUSE

      Cameron: Jon, nasepeli kokutana na yo lisusu. Nasepelaka na programɛ na biso ya boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ.a Boni sante?

      Jon: Nazali malamu.

      Cameron: Nasepeli lokola ozali malamu. Mbala oyo eleki, tolobelaki ntina oyo Batatoli ya Yehova balobaka ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914.b Ndenge tomonaki yango, likambo moko oyo etindi biso tóndima yango ezali esakweli oyo ezali na Danyele mokapo 4. Ozali lisusu koyeba oyo mokapo yango elobaki?

      Jon: Elobelaki nzete moko ya monene oyo mokonzi Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ.

      Cameron: Ɛɛ, ezali mpenza bongo. Na ndɔtɔ na ye, Nebukadenezare amonaki nzete moko ya monene oyo molai na yango ekómaki tii na likoló. Ayokaki anzelu moko ya Nzambe azali kopesa mitindo ete bákata nzete yango, kasi ekumu ná misisa na yango esengelaki kotikala na mabele. Nsima ya “ntango nsambo,” nzete yango esengelaki kokola lisusu.c Tomonaki mpe mpo na nini esakweli yango esengelaki kokokisama mbala mibale. Ozali koyeba lisusu kokokisama na yango ya liboso?

      Jon: Ezali likambo moko oyo ekómelaki Nebukadenezare ye moko, boye te? Akómaki moto ya ligboma na boumeli ya mbula nsambo.

      Cameron: Ezali bongo. Nebukadenezare akómaki moto ya ligboma mpo na mwa ntango, yango wana boyangeli na ye esukaki. Kasi, na kokokisama ya monene ya esakweli yango, boyangeli ya Nzambe esengelaki kokatana na boumeli ya ntango nsambo. Ndenge tomonaki yango, ntango nsambo ebandaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso, ntango Yerusaleme ebebisamaki. Kobanda ntango wana, ezalaki lisusu na mokonzi moko te awa na mabele oyo azalaki komonisa boyangeli ya Yehova Nzambe. Nzokande, na nsuka ya ntango nsambo, Nzambe asengelaki kopona Mokonzi moko ya sika mpo ayangela bato na ye, kasi moto ya mabele te. Na maloba mosusu, nsuka ya ntango nsambo esengelaki komonisa ete Bokonzi ya Nzambe na likoló ebandi koyangela. Touti komona ntango nini ntango nsambo yango ebandaki. Na yango, soki toyebi ntango oyo yango eumelaki, boye tokoyeba ntango nini Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela. Ozali kolanda ngai malamu?

      Jon: Ɛɛ, bozongeli oyo esalisi ngai nazongisa lisusu makambo yango na makanisi.

      Cameron: Malamu. Sikoyo tóbanda lisolo na biso mpe tótala soki ntango nsambo yango eumelaki mbula boni. Nautaki kotánga lisolo yango mpo nazongisa lisusu na makanisi makambo ya ntina ya esakweli yango. Nameka naino kolimbolela yo yango.

      Jon: OK.

      NTANGO NSAMBO ESUKI​—MIKOLO YA NSUKA EBANDI

      Cameron: Na kokokisama ya liboso oyo etalaki Nebukadenezare, ntango nsambo ezalaki mpenza mbula nsambo. Kasi, na kokokisama na yango ya monene oyo etaleli Bokonzi ya Nzambe, ntango nsambo esengeli koumela ntango molai koleka mbula nsambo.

      Jon: Mpo na nini olobi bongo?

      Cameron: Ya liboso, kobosana te ete ntango nsambo ebandaki ntango Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Soki tobandi kotánga mbula nsambo kobanda mobu wana, tokokóma na mobu 600 liboso ya ntango na biso. Kasi, ata likambo moko te ya ntina oyo etali Bokonzi ya Nzambe esalemaki na mobu yango. Longola yango, ndenge tolobelaki yango liboso, bambula mingi na nsima, ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete ntango nsambo yango ekómaki naino na nsuka te.

      Jon: Ɛɛ, namoni lisusu.

      Cameron: Na yango, na esika ezala mpenza mbula nsambo, ntango nsambo esengeli nde kozala eleko moko molai.

      Jon: Tii ntango nini?

      Cameron: Mokanda ya Emoniseli oyo ezali na boyokani na mokanda ya Danyele, esalisi biso tóyeba soki ntango nsambo eumelaki mpenza mbula boni. Elobeli eleko moko ya ntango misato ná ndambo oyo ezali na mikolo 1260.d Boye, ntango nsambo, elingi koloba ntango misato ná ndambo mbala mibale, epesi mikolo 2 520. Ozali kolanda ngai?

      Cameron ná Jon bazali kosolola makambo ya Biblia

      Jon: Ɛɛ, nazali kolanda yo. Kasi, nazali komona te ndenge nini yango emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914.

      Cameron: Malamu, tótala soki tokoki koyokanisa yango. Na bantango mosusu, na bisakweli ya Biblia, mokolo moko emonisaka mbula moko.e Soki totángi mokolo moko lokola mbula moko, ntango nsambo ekozala bambula 2 520. Soki totángi bambula 2 520 kobanda mobu 607 liboso ya ntango na biso, tokokóma na 1914.f Yango nde ndenge toyebá ete ntango nsambo esukaki na 1914 mpe Yesu abandaki koyangela lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Yango ezali solo mpamba te kobanda 1914, makambo ya minene oyo Biblia esakolaki mpo na mikolo ya nsuka ezali kokokisama na mokili.

      Jon: Makambo ya ndenge nini?

      Cameron: Tótalela makambo oyo Yesu alobaki na Matai 24:7. Mpo na ntango oyo akobanda koyangela na likoló, Yesu alobaki boye: “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.” Simbá ete Yesu asakolaki ete nzala mpe koningana ya mabele ekosalema na boumeli ya ntango yango. Makambo ya ndenge wana emonani mingi na siɛklɛ oyo eleki, boye te?

      Jon: Ya solo.

      Cameron: Na vɛrsɛ yango, Yesu asakolaki mpe ete bitumba ekozala na boumeli ya kozala na ye lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Mokanda ya Emoniseli esakolaki te bitumba oyo esalemaka na mwa bamboka, kasi nde bitumba oyo ekosalema na mabele mobimba na boumeli ya ntango ya nsuka.g Ozali koyeba lisusu ntango nini Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki?

      Jon: Ezalaki na 1914, mbula wana kaka oyo olobaki ete Yesu abandaki koyangela! Nakanisá naino bongo liboso te.

      Cameron: Soki tosangisi makambo wana nyonso esika moko, elingi koloba esakweli oyo elobeli ntango nsambo ná bisakweli mosusu oyo elobeli ntango ya nsuka, tokomona mpenza ete likambo yango ezali solo. Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete Yesu abandaki koyangela lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na 1914, mpe ete mikolo ya nsuka ebandaki kaka na mbula yango.h

      Jon: Nazali naino komeka kokanga ntina ya makambo wana nyonso.

      Cameron: Nazali mpenza komitya na esika na yo. Ndenge nalobaki yango liboso, ezwaki ngai mpe ntango mpo nakanga ntina na yango malamumalamu. Kasi, na ntembe te, nakanisi ete lisolo na biso esalisi yo omona ete ata soki dati 1914 ezali na Biblia te, makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka mpo na dati yango eutaka mpenza na Biblia.

      Jon: Ɛɛ, bokamwisaka ngai mpenza, bolobaka likambo moko te kozanga komonisa yango na Biblia. Ezalaka makanisi na bino moko te. Kasi, nazali komituna mpo na nini ezali mpasi ndenge wana. Mpo na nini Nzambe ayebisi biso kaka mbala moko te na Biblia ete Yesu akobanda koyangela na likoló na 1914?

      Cameron: Jon, otuni motuna moko malamu mpenza. Kutu, ezali na makambo ebele na Biblia oyo elimbolami polele te. Na yango, mpo na nini Nzambe akomisaki Biblia na lolenge oyo ezali kosɛnga bato básala milende mpo na kokanga ntina na yango? Ntango mosusu, tokolobela yango na mbala oyo nakoya.

      Jon: Nakosepela mingi.

      Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna Motatoli ya Yehova moko. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

      Karti ya badati mpe makambo etali ndɔtɔ ya Nebukadenezare

      a Mbala mingi, Batatoli ya Yehova basololaka masolo ya Biblia na nzela ya programɛ ya koyekola na bato Biblia ofele.

      b Talá lisolo “Lisolo na moninga moko ya kartye​—Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?​—Eteni 1” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2014.

      c Talá Danyele 4:23-25.

      d Talá Emoniseli 12:6, 14.

      e Talá Mitángo 14:34; Ezekiele 4:6.

      f Talá etanda “Nzete oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ.”

      g Talá Emoniseli 6:4.

      h Talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto