Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 309-lok. 312
  • Lisumu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisumu
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Lisumu ya ebandeli ezalaki nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Yesu azali mobikisi​—Na ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ntango lisumu ekozala lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 309-lok. 312

Lisumu

Ndimbola: Na makomi ya Ebre mpe ya Grɛki ya Biblia, lisumu elimboli kozanga kokokisa mokano moko boye. Nzambe ye moko atyá “mokano” oyo bikelamu na ye ya mayele basengeli kokokisa. Kozanga kokokisa mokano yango ezali lisumu, oyo elimboli mpe kozanga boyengebene, kobuka mibeko. (Rom. 3:23; 1 Yoa. 5:17; 3:4) Lisumu ezali likambo oyo eyokani te na bomoto ya Nzambe, mibeko na ye, banzela na ye, mokano na ye, eyokani te na makambo nyonso oyo ezali mosantu. Lisumu ekoki mpe kozala etamboli ya mabe, kozanga kosala likambo oyo esengelaki kosala, maloba mabe, makanisi ya mbindo, bamposa oyo moto azalaka yango ya kolukaka matomba na ye moko. Biblia ekesenisi lisumu oyo moto abotamaka na yango na lisumu oyo moto asali na nko, ekesenisi mpe lisumu oyo moto asali mpe abongoli motema na momeseno ya kosala lisumu.

Soki Adama azalaki moto ya kokoka, ebandaki boni asala lisumu?

Mpo na koyeba ete Adama azalaki moto ya kokoka, tángá Ebandeli 1:27, 31 mpe Kolimbola Mibeko 32:4. Ntango Yehova Nzambe alobaki ete biloko oyo asalaki awa na mabele, ezala mpe mwasi ná mobali, ezali “malamu mingi,” alingaki koloba nini? Soki moto oyo asalaka misala ya kokoka alobi ete biloko oyo asali ezali “malamu mingi,” yango emonisi ete misala yango ekokisi masɛngami na ye ya kokoka.

Lokola Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka, yango elingi koloba ete bakokaki te kosala mabe? Masini oyo babengi robo esalaka makambo kaka ndenge moto oyo asalaki yango alingi. Kasi robo ekeseni mpenza na moto. Makoki ya moto ekeseni mpenza na oyo ya robo. Adama ná Eva bazalaki bato, kasi barobo te. Nzambe apesaki moto likoki ya kopona oyo ezali malamu mpe mabe, ya kotosa to ya koboya kotosa, mpe ya kozwa bikateli oyo etali etamboli. Lokola moto asalemá na makoki wana, kozanga kosalela makoki wana ndenge esengeli nde ekokaki komonisa ete azali moto ya kozanga kokoka, kasi te kozwa ekateli ya mabe.​—Talá Kolimbola Mibeko 30:19, 20; Yosua 24:15.

Lokola Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka, basengelaki kaka kozwa bikateli ya malamu? Soki bongo, yango elingaki komonisa ete bazali na likoki ya kopona te. Kasi Nzambe asalaki bango te ete bátosaka ye lokola barobo. Nzambe apesaki bango likoki ya kopona; na yango bakokaki kotosaka ye mpo balingi ye. Kasi, soki batiki mitema na bango eluka matomba na bango moko, bakozanga botosi. Okosepela moto asala likambo mpo otindi ye na makasi to asala yango na motema na ye moko?​—Talá Kolimbola Mibeko 11:1; 1 Yoane 5:3.

Ndenge nini bato yango ya kokoka bakómaki koluka matomba na bango moko, mpe nsukansuka basalaki lisumu? Atako basalemaki bato ya kokoka, basengelaki kolya bilei oyo ebongi mpo nzoto na bango ekoba kozala malamu. Ndenge moko mpe, kotika makanisi ya mabe ekɔtela bango elingaki kobebisa bizaleli na bango mpe kokómisa bango mbindo. Yakobo 1:14, 15 elobi ete: “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu.” Bamposa mabe ebandaki kokola na motema ya Eva ntango ayokaki na likebi Satana, oyo asalelaki nyoka mpo na koloba na ye. Adama alandaki makanisi ya mwasi na ye mpe alyaki mbuma oyo epekisamaki. Na esika bálongola makanisi wana ya mabe, balonaki mposa ya koluka matomba na bango moko. Yango wana nsukansuka basalaki lisumu.​—Eba. 3:1-6.

Lisumu ya Adama ezalaki ‘mokano ya Nzambe’?

Talá lokasa 27, na motó ya likambo “Adama ná Eva,” mpe nkasa 337, 338, na motó ya likambo “Makambo nyonso etángamá.”

“Lisumu” ezali mpe na mikolo na biso?

Ndakisa: Soki moto oyo azali kobɛla abuki tɛrmomɛtrɛ, yango nde emonisi ete azali lisusu na fiɛvrɛ te? Soki moyibi aboyi kondima makambo oyo ezali na buku ya mibeko, yango nde emonisi ete ayibi te? Ndenge moko mpe, ata soki bato mingi bandimaka te ete kotosa mibeko ya Biblia ezali na ntina, yango emonisi te ete lisumu ezali lisusu te.​—Talá 1 Yoane 1:8.

Bato mosusu baponaka kosala makambo oyo Liloba ya Nzambe epekisi. Kasi yango emonisi te ete Biblia ezali mabe. Bagalatia 6:7, 8 ekebisi biso ete: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka; mpo moto oyo azali kolona mpo na nzoto na ye akobuka libebi oyo euti na nzoto na ye.” Lokola bato mingi bazali kozwa maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto, mabala ezali kokufa, mpe bongo na bongo, yango emonisi ete Biblia elobi solo. Nzambe nde asalaki moto; ayebi malamu makambo oyo ekoki kopesa biso bolamu ya libela mpe ayebisi biso makambo yango na Biblia. Omoni te ete tosengeli koyokela ye? (Mpo na koyeba makambo oyo endimisi ete Nzambe azali, talá motó ya likambo “Nzambe.”)

Makambo mingi oyo balobaka ete ezali lisumu ezali kaka makambo oyo bato nyonso basalaka, boye te?

Kosangisa nzoto ezali lisumu? Lisumu ya Adama ná Eva ezalaki nde kosangisa nzoto? Biblia elobi bongo te. Ebandeli 1:28 elobi ete Nzambe ye moko ayebisaki Adama ná Eva ‘bábota mpe bákóma mingi mpe bátondisa mabele.’ Yango emonisi ete basengelaki kosangisa nzoto, boye te? Mpe Nzembo 127:3 elobi ete “bana bazali libula oyo euti na Yehova,” ete bazali “mbano.” Simbá ete Eva nde alyaki liboso mbuma oyo epekisami mpe na ntango yango azalaki kaka ye moko; bongo na nsima nde apesaki Adama. (Eba. 3:6) Emonani polele ete nzete oyo ezalaki na mbuma oyo epekisamaki ezalaki mpenza nzete ya solo. Biblia epekisi te ete mwasi ná mobali oyo babalaná básangisa nzoto, kasi epekisi nde pite, ekobo, kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, mpe kosangisa nzoto moto ná nyama. Mikakatano oyo eutaka na misala mabe wana emonisi ete Nzambe azali bolingo na ndenge apekisi biso misala yango, mpe yango emonisi ete ayebi malamu mpenza ndenge moto asalemaki.

Eba. 1:27: “Nzambe abandaki kozalisa moto [Adama] na elilingi na ye, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye.” (Na yango, likambo ya malamu oyo Adama asengelaki kosala ezali ya komonisa na bomoi na ye bizaleli ya bosantu ya Nzambe, mpe kondima litambwisi ya Nzambe. Lokola asalaki yango te, akokisaki mokano ya Nzambe te; na yango asalaki lisumu. Talá Baroma 3:23, lisusu 1 Petro 1:14-16.)

Ef. 2:1-3: “Ezali bino [bakristo] nde bato Nzambe azongisi na bomoi atako bokufaki na mabunga na bino mpe na masumu na bino, oyo kala bozalaki kotambola na yango na kolanda makambo ya mokili oyo, na kolanda mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi. Ɛɛ, na kati na bango biso nyonso tozalaki komitambwisa kala na kolanda bamposa ya nzoto na biso, tozalaki kosala makambo oyo nzoto mpe makanisi ezalaki kolinga, mpe tozalaki mpenza bana ya nkanda lokola bato mosusu.” (Lokola tozali bana ya Adama, moto oyo asalaki lisumu, tobotamá mpe na lisumu. Bandá tobotamá, mposa ya motema na biso etindaka biso na makambo mabe. Soki topekisi bamposa mabe wana te, nsukansuka tokokóma na momeseno ya kosala mabe. Mbala mosusu tokoki komona ete makambo yango “ezali mabe te” mpo bato mosusu mpe basalaka yango. Kasi Biblia emonisi polele oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe na miso ya Nzambe, na kolanda ndenge oyo asalaki moto mpe mokano na ye mpo na bato. Soki tozali koyokela Mozalisi na biso mpe kotosa ye mpo tolingaka ye, bomoi na biso ekokóma na ntina mingi koleka, mpe tokozwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Mozalisi na biso azali kobenga biso na bolingo mpenza ete tómeka mpe tómona ete yango ezali malamu mingi.​—Nz. 34:8.)

Ndenge nini lisumu ebebisaka boyokani ya moto na Nzambe?

1 Yoa. 3:4, 8: “Moto nyonso oyo asalaka lisumu azali mpe kobuka mibeko, mpe na yango lisumu nde kobuka mibeko. Moto oyo asalaka lisumu auti na Zabolo.” (Maloba yango ezali kotinda biso tókanisa! Baoyo baponi kosala masumu na nko, mpe bakómi na momeseno ya kosala yango bazali bato mabe mpenza na miso ya Nzambe. Nzela oyo baponi, moto ya liboso oyo alandaki yango, ezali Satana.)

Rom. 5:8, 10: “Ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso. . . . Ntango tozalaki banguna, tozongisaki boyokani na Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye.” (Simbá ete vɛrsɛ yango elobi ete basumuki bazali banguna ya Nzambe. Na yango, tokomonisa ete tozali na bwanya soki tondimi ebongiseli oyo Nzambe azwaki mpo tózongisa boyokani na ye!)

1 Tim. 1:13: “[Ntoma Paulo alobaki ete] bayokelaki ngai mawa, mpo nazalaki na boyebi te mpe nazalaki kosala na kondima te.” (Kasi ntango Nkolo alakisaki ye nzela ya malamu, aboyaki yango te.)

2 Ko. 6:1, 2: “Lokola tozali kosala elongo na ye, biso mpe tozali kobondela bino ete bóndima boboto monene ya Nzambe te mpe na nsima bóbosana ntina na yango. Mpo azali koloba ete: ‘Na ntango moko oyo endimami nayokaki yo, mpe na mokolo moko ya lobiko nasalisaki yo.’ Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami. Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.” (Sikoyo Nzambe apesi moto nyonso libaku ya kobika. Kasi boboto monene ya Nzambe mpo na bato ya masumu ekosuka. Yango wana, tosengeli kokeba ete tóbosana ntina ya boboto monene yango te.)

Ndenge nini tokoki kosikolama na boombo ya lisumu?

Talá motó ya likambo “Lisiko.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto