MOTUNA 2
Ndenge nini okoki koyekola makambo etali Nzambe?
“Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi, mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango; mpo, na ndenge yango nde okolongisa nzela na yo mpe na ndenge yango nde okosala makambo na bwanya.”
“Bakobaki kotánga na mongongo makasi buku, mobeko ya Nzambe ya solo; bamonisaki yango polelepolele, mpe balimbolaki yango; mpe basalisaki bato bákanga ntina ya makambo oyo bazalaki kotánga.”
“Esengo na moto oyo atamboli na toli ya bato mabe te . . . , kasi asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi. . . . Mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.”
“Filipe akendaki mbangu pembeni na yango mpe ayokaki ye azali kotánga na mongongo makasi mosakoli Yisaya, mpe alobaki ete: ‘Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?’ Ye alobaki ete: ‘Kutu, ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?’”
“Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, yango wana bazali kutu na likambo ya koloba te.”
“Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”
“Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te.”
“Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te; mpe akopesa ye yango.”