MOTUNA 7
Biblia elobi nini mpo na mikolo na biso?
“Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi . . . Makambo nyonso wana ezali ebandeli ya bampasi.”
“Ebele ya basakoli ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato mingi; mpe lokola makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.”
“Ntango bokoyoka lokito ya bitumba mpe nsango ya bitumba, bózala na nsɔmɔ te; makambo wana esengeli kosalema, kasi nsuka eyei naino te.”
“Mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge, mpe bamaladi mabe mpe nzala ekozala bisika ndenge na ndenge; makambo ya nsɔmɔ ekomonana mpe bilembo minene ekouta na likoló.”
“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.”