MOTUNA 9
Mpo na nini bato banyokwamaka?
“Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka na momekano ya kopota mbangu, to bato ya nguya nde balongaka na etumba, ezali mpe te bato ya bwanya nde bazwaka bilei, ezali mpe te bato ya mayele nde bazwaka bomɛngo, mpe ezali kutu te bato oyo bazali na boyebi nde bandimamaka; mpamba te ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.”
“Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu—.”
“Ezali mpo na ntina oyo nde Mwana ya Nzambe amonisamaki polele, elingi koloba, mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.”
“Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”