MOTUNA 20
Ndenge nini okoki kozwa matomba na botángi na yo ya Biblia?
YANOLÁ NA MITUNA OYO NTANGO OZALI KOTÁNGA BIBLIA:
Emonisi ngai nini na ntina na Yehova Nzambe?
Ndenge nini eteni oyo ya Biblia etali mpe nsango ya Biblia?
Ndenge nini nakoki kosalela yango na bomoi na ngai?
Ndenge nini nakoki kosalela bavɛrsɛ yango mpo na kosalisa basusu?
“Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai, mpe pole na nzela na ngai.”