Loyembo 96
Bóluka banani babongi
Ya Papye
1. Nkolo ndakisa mpo na kosakola,
Ye moko’ayebisi biso:
‘Epai nyonso bokokende, bóluka
Bato ya bobola n’elimo.
Bópesa bat’oyo bokuti mbote,
Mpe kimya bótombela bango.
Soki bamosusu batyoli bino,
Bópupwela bango makolo.’
2. Soki bayambi bino, bayambi ye.
Nzambe akosunga bango.
Mposa na bango ya bomoi ya seko
Ekotinda báyoka nsango.
Bómitungisa te mpo na maloba,
Yehov’akopesa lisungi.
Mpe maloba na bino ya elɛngi
Ekobenda bato babongi.
(Talá mpe Mis. 13:48; 16:14; Kol. 4:6.)