Loyembo 125
Tótosaka ebongiseli ya Yehova
Ya Papye
1. Bato ya Yehova bateyi solo
Bokonzi ya Nzambe bisika nyonso,
Ebongiseli’a Yah batosak’ango
Baza’ na bomoko, baza’ mpe sembo.
(MONDIMO)
Ebongi tótosa mpe tóndima
Litambwisi’a Nzambe.
Alingaka mpe abatelaka,
Zalá sembo’epai na ye.
2. Moombo mp’elimo Nzamb’apesi
Na bomoi na biso’eza’ litambwisi.
Tiká tózala ngwi, tóndima Nzambe;
Na sembo tóteya mibeko na ye!
(MONDIMO)
Ebongi tótosa mpe tóndima
Litambwisi’a Nzambe.
Alingaka mpe abatelaka,
Zalá sembo’epai na ye.
(Talá mpe Luka 12:42; Ebr. 13:7, 17.)