Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 1 nk. 10-11
  • Ndenge ya kozwa baninga ya solosolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kozwa baninga ya solosolo
  • Lamuká!—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • OYO OSENGELI KOYEBA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela boninga na yo ná bato mosusu
    Lamuká!—2021
  • Ndenge ya kobatela boninga na mokili oyo ezangá bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia elobi nini na likambo etali boninga?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Banani bazali baninga na ngai ya solo?
    Lamuká!—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 1 nk. 10-11
Bilenge mibali mibale bazali kosolola

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Ndenge ya kozwa baninga ya solosolo

MOKAKATANO

Bilenge mibali mibale batɛlɛmi ngámbo na ngámbo ya gbagba (pont)

Baaparɛyi ya mikolo oyo ezali kosalisa bato básolola na bato mingi mpe na ndenge ya malamu koleka ndenge ezalaki kala. Ata bongo, boninga oyo okoki kosala ekoki kozala kaka ya likolólikoló. Elenge mobali moko alobeli yango boye: “Namonaka lokola boninga nasalaka ekoki kosuka kaka na nzela. Kasi tata na ngai azali na baninga oyo aumeli na bango ebele ya bambula!”

Mpo na nini ezali mpasi lelo kosala boninga ya solosolo mpe oyo ekoumela?

OYO OSENGELI KOYEBA

Ekoki kozala mpe foti ya baaparɛyi ya mikolo oyo. Kotindelana bamesaje, kosolola na Internet na nzela ya basite oyo bato mingi basalelaka esali ete bato mingi bázala kaka baninga ata soki bakutanaka te. Na esika bato básololaka na ndenge esengeli, ekómi nde likambo ya kotindelana bamesaje. Buku moko (Artificial Maturity) elobi ete “bato bafandaka lisusu mpenza te esika moko mpo na kosolola. Bayekoli balekisaka ntango mingi nde liboso ya televizyo mpe bazalaka na ntango mingi te ya kolekisa bango na bango.”

Na bantango mosusu, baaparɛyi ya mikolo oyo ekoki komonisa lokola nde bato bazali baninga ya solosolo. Brian,a elenge moko ya mbula 22 alobi boye: “Mikolo oyo euti koleka namonaki ete kaka ngai nde nazwaki mosala ya kotindela baninga na ngai bamesaje. Na nsima, natikaki mpo natala soki banani bakozwa likanisi ya kotindela ngai. Mpo na koloba solo, bazalaki moke mpenza. Emonani ete baninga mosusu bazalaki baninga ya solosolo te ndenge nazalaki kokanisa.”

Kasi, kotindelana bamesaje mpe kosalela basite oyo bato mingi basalelaka ekoki te kosalisa yo ozwaka bansango na bango mpo boninga na bino ekóma makasi? Ɛɛ, mingimingi soki longola kosolola na baaparɛyi okutanaka mpe na bango. Kasi, mbala mingi, basite yango esalaka kaka ete oyebana na bato kozanga ete bokóma mpenza baninga.

OYO OKOKI KOSALA

Luká koyeba soki boninga ya solosolo elakisi nini. Biblia elobi ete moninga azali moto oyo “akangamaka makasi koleka ndeko.” (Masese 18:24) Olingi kozala na moninga ya ndenge wana? Yo ozali moninga ya ndenge wana? Mpo na kosalisa yo oyanola na mituna yango, komá bizaleli misato oyo okolinga moninga na yo azala na yango. Na nsima komá bizaleli misato oyo yo moko okomonisa na boninga yango. Omituna boye: ‘Na baninga oyo nasololaka na bango na Internet, oyo wapi amonisaka bizaleli oyo nalingaka ete moninga azala na yango? Bizaleli nini baninga yango bakoloba ete ngai namonisaka?’​—Toli ya Biblia: Bafilipi 2:4.

Yebá makambo ya kotya na esika ya liboso. Mbala mingi, boninga na Internet esimbamaka nde na makambo oyo mokomoko asepelaka kosala mpo na kolekisa ntango. Kasi, bizaleli ya malamu oyo esangisi bino ezali na ntina koleka makambo oyo mokomoko asepelaka na yango. Leanne oyo azali na mbula 21 alobi boye: “Nazalaka na baninga mingi te, kasi baoyo nazali na bango basalaka ete nasepela kozala moto malamu.”​—Toli ya Biblia: Masese 13:20.

Bimáká mpo na kokutana na basusu. Kozala esika moko na moto oyo bozali kosolola na ye, koyoka mongongo na ye mpe bajɛstɛ oyo azali kosala ntango azali koloba, eleki lolenge mosusu nyonso ya kosolola.​—Toli ya Biblia: 1 Batesaloniki 2:17.

Komá mokanda. Atako ekoki komonana ete esilá ngala, kokoma mokanda mpe kotindela yango moto emonisaka ete osepelaka na ye mpe otyelaka ye mpenza likebi. Likebi ya bongo ezalaka mpenza te na mokili ya lelo, oyo makambo ya kosala ezalaka mingi. Na ndakisa, na buku na ye Alone Together, Sherry Turkle alobeli elenge mobali oyo alobaka ete moto moko te atindelá ye mokanda banda abotamá. Ntango akanisaka ndenge bato bazalaki kotindelana mikanda, alobaka boye: “Esalaka ngai mpasi ndenge nabotamaki naino te na ntango yango.” Mpo na nini te kosalela ‘mayele wana ya kala’ mpo na kosala boninga?

Na mokuse: Boninga ya solosolo esuki kaka te na kotindelana bamesaje. Yango esɛngi ete yo ná moninga na yo bómoniselanaka bolingo, bómityaka na esika ya mosusu, bózala motema molai, mpe bólimbisanaka. Na ntembe te, bizaleli wana ekosala ete boninga na bino elonga. Kasi, ezali mpasi komonisa yango soki bosololaka kaka na Internet.

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:4.

  • “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

  • “Tosalaki makasi mingi mpenza mpo na komona bilongi na bino.”​—1 Batesaloniki 2:17.

Alisabel

ALISABEL

“Biso nyonso tolingaka kozala na moto ya kosolola na ye ntango tolɛmbi nzoto. Baninga bazali bato oyo bamityaka na esika na biso mpe bayebaka ndenge ya kosala mpo tómiyoka malamu. Bazalaka kaka wana te mpo tósepela elongo, kasi bakoki mpe kosalisa biso ntango tokutani na mikakatano.”

Jordan

JORDAN

“Ntango nazalaki elenge, nazalaki nsɔninsɔni mpe nazalaki kosala milende te mpo na koluka baninga. Ezalaki ntango ya mawa mingi ya bomoi na ngai. Nsukansuka natikaki ezaleli yango. Ezali na ntina kozala na baninga oyo bakoki kosalisa yo na ntango ya mpasi mpe kolekisa bantango ya esengo elongo na yo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto