Loyembo 146
Bosalelaki ngai
Bampate mosusu bazali kosunga
bato baponami, mwasi ya Kristo.
Nyonso basali mpo
bálendisa bango
Yesu alobaki akozongisa.
(MONDIMO)
“Kobɔndisa bango, kobɔndisa nga’.
Na nzela na bango, bosalelá nga’.
Kosunga bango nde kosunga mpe nga’.
Nyonso bosalá, bosalelá nga’.
Kosalela bango, kosalela nga’.”
“Bosalisaki nga’ na bilei mpe na mai;
na ntango ya mpasi, boyaki wana.”
Bampate bakotuna:
‘Wana nde wapi?’
Mokonzi akopesa eyan’oyo:
(MONDIMO)
“Kobɔndisa bango, kobɔndisa nga’.
Na nzela na bango, bosalelá nga’.
Kosunga bango nde kosunga mpe nga’.
Nyonso bosalá, bosalelá nga’.
Kosalela bango, kosalela nga’.”
“Botikali sembo, bosalisi mpenza
na kosakola ná bandeko na nga’.”
Kristo akoloba
na bampate na ye:
“Bózwa mabele mpe bomo’ ya seko.”
(MONDIMO)
“Kobɔndisa bango, kobɔndisa nga’.
Na nzela na bango, bosalelá nga’.
Kosunga bango nde kosunga mpe nga’.
Nyonso bosalá, bosalelá nga’.
Kosalela bango, kosalela nga’.”
(Talá mpe Mas. 19:17; Mat. 10:40-42; 2 Tim. 1:16, 17.)