Loyembo 143
Pole na mokili ya molili
Ya Papye
Mokili oyo molili,
Pole mpe ekoya.
Tózela yango lokola
Kotana ya ntɔngɔ.
(MONDIMO)
Nsango ya Bokonzi,
Tomemi na mokili.
Epesi elikya—
Lokola nde moi,
Elongoli molili—
Pol’engɛngi.
Basusu balali mpɔngi
Tólamwisa bango.
Tópesa bango makasi.
Bakozwa elikya.
(MONDIMO)
Nsango ya Bokonzi,
Tomemi na mokili.
Epesi elikya—
Lokola nde moi,
Elongoli molili—
Pol’engɛngi.
(Talá mpe Yoa. 3:19; 8:12; Rom. 13:11, 12; 1 Pe. 2:9.)