Loyembo 40
Tókoba koluka liboso Bokonzi
Ya Papye
1. Eloko’a ntina mpo na Yah,
Oy’asepeli n’ango,
Eza’ Bokonzi ya Kristo,
Ekosembola nyonso.
(MONDIMO)
Kobá koluka liboso
Bokonzi ya Yehova.
Sanzolá ye na mabota,
Salelá ye libela.
2. Oza’ nde komitungisa
Mpo na bilei ya lobi?
Nzambe akopesa nyonso
Soki’oluki Bokonzi.
(MONDIMO)
Kobá koluka liboso
Bokonzi ya Yehova.
Sanzolá ye na mabota,
Salelá ye libela.
3. Tósakola Bokonzi’a Yah
Na bat’oyo babongi.
Báty’elikya na Yehova
Mpe bándima Bokonzi.
(MONDIMO)
Kobá koluka liboso
Bokonzi ya Yehova.
Sanzolá ye na mabota,
Salelá ye libela.
(Talá mpe Nz. 27:14; Mat. 6:34; 10:11, 13; 1 Pe. 1:21.)