Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 2 lok. 12-lok. 13 par. 10
  • Yesu akumisami liboso ya kobotama na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu akumisami liboso ya kobotama na ye
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Akumisami liboso ya kobotama na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Anzelu akei epai ya Maria
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 2 lok. 12-lok. 13 par. 10
Maria azali likoló ya mpunda; Elizabeti ayoki lokola mwana oyo azali na libumu na ye apumbwe na nsai mingi ntango Maria akɔti na ndako na ye; Maria azali kosalisa Elizabeti na misala ya ndako

MOKAPO 2

Yesu akumisami liboso ya kobotama na ye

LUKA 1:34-56

  • MARIA AYEI KOTALA NDEKO NA YE ELIZABETI

Ntango anzelu Gabriele ayebisi elenge Maria ete akozwa zemi mpe akobota mwana mobali oyo akobengama Yesu mpe mwana yango akozala mokonzi seko na seko, Maria atuni ye boye: “Ndenge nini yango ekosalema, mpo nasangisá naino nzoto na mobali te?”​—Luka 1:34.

Anzelu Gabriele ayanoli ete: “Elimo santu ekoyela yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.”​—Luka 1:35.

Ntango mosusu mpo anzelu Gabriele asalisa Maria andima nsango na ye, abakisi ete: “Talá! Elizabeti moto ya libota na yo azwi mpe zemi ya mwana mobali, na bobange na ye, mpe oyo ezali sanza ya motoba ya zemi na ye, moto oyo babengaki ekomba; mpo epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki kosalema te.”​—Luka 1:36, 37.

Ndenge eyano ya Maria emonisi yango, andimi makambo oyo anzelu Gabriele ayebisi ye. Alobi na ye ete: “Talá! Nazali moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.”​—Luka 1:38.

Ntango anzelu yango akei, Maria amibongisi mpo na kokende kotala Elizabeti. Elizabeti azali kofanda na mobali na ye Zekaria mosika te na Yerusaleme, na ngomba ya Yudea. Kolongwa epai ya Maria na Nazarete ezali mobembo ya mikolo misato to minei.

Nsukansuka Maria akómi na ndako ya Zekaria. Ntango akɔti, apesi ndeko na ye Elizabeti mbote. Na ntango yango, Elizabeti atondi na elimo santu mpe alobi na Maria ete: “Opambwami na kati ya basi, mpe mbuma ya libumu na yo epambwami! Bongo ndenge nini nazwi libaku malamu oyo: bátindela ngai mama ya Nkolo na ngai? Mpo talá! ntango mongongo ya mbote na yo eyokanaki na matoi na ngai, mwana na kati ya libumu na ngai apumbwaki na nsai mingi.”​—Luka 1:42-44.

Na botɔndi nyonso Maria alobi boye: “Molimo na ngai ezali kokumisa Yehova, mpe elimo na ngai ekoki te komipekisa kosepela mingi mpo na Nzambe Mobikisi na ngai; mpo amoni ete moombo na ye ya mwasi azali moto mpamba. Mpo talá! banda sikoyo mabota nyonso bakotánga ngai moto ya esengo; mpo Moto ya nguya asaleli ngai misala minene.” Tomoni ete atako Maria azwi lokumu, apesi lokumu nyonso epai ya Nzambe. Alobi boye: “Nkombo na ye ezali mosantu; mpe motema mawa na ye ezali likoló ya bato oyo babangaka ye mabota na mabota.”​—Luka 1:46-50.

Na maloba ya esakweli, Maria asanzoli Nzambe boye: “Asali na nguya na lobɔkɔ na ye, apalanganisi baoyo bazali na lolendo na makanisi ya mitema na bango. Akitisi bato ya nguya na bakiti ya bokonzi mpe atomboli bato mpamba; atondisi bato ya nzala na biloko ya malamu mpe azongisi bato ya bomɛngo mabɔkɔ mpamba. Ayei kosalisa Yisraele mosaleli na ye, mpo akanisa lisusu motema mawa na ye, ndenge ayebisaki yango bankɔkɔ na biso, Abrahama ná momboto na ye, libela na libela.”​—Luka 1:51-55.

Maria azali kosalisa Elizabeti na misala ya ndako

Maria aumeli sanza soki misato epai ya Elizabeti, na ntembe te azali kosalisa ye na boumeli ya bapɔsɔ ya nsuka liboso ete Elizabeti abota. Basi yango mibale ya sembo, Elizabeti ná Maria, oyo bazwaki zemi na lisalisi ya Nzambe bazali mpenza na esengo ya kozala elongo na boumeli ya ntango wana ya bomoi na bango!

Omoni mpe lokumu oyo Yesu azwaki liboso kutu abotama? Elizabeti abengaki ye “Nkolo na ngai,” mpe mwana oyo azalaki na libumu na ye “apumbwaki na nsai mingi” ntango Maria akómaki epai ya Elizabeti. Kasi yango ekeseni mpenza na ndenge oyo bato basalelaki Maria makambo mpe mwana na ye oyo abotami naino te, ndenge tokomona yango.

  • Anzelu Gabriele alobi nini mpo na kosalisa Maria ayeba ndenge oyo akozwa zemi?

  • Ndenge nini Yesu akumisami liboso ete abotama?

  • Maria aumeli ntango boni epai ya Elizabeti, mpe mpo na nini asali bongo?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto