Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
1-7/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 1-3
“Bokonzi ya likoló ekómi pene”
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 3:1, 2
kosakola: Liloba ya Grɛki oyo elimboli libosoliboso “kosakola lokola momemi-nsango epai ya bato.” Ebɛti nsɛtɛ na lolenge ya kosakola nsango yango: mingimingi koloba polele liboso ya bato na esika ya kosalela mwa etuluku ya bato lisolo.
Bokonzi: Mpo na mbala ya liboso esaleli liloba ya Grɛki ba·si·leiʹa, oyo emonisi guvɛrnema oyo mokonzi azali koyangela, ata mpe teritware ná bato oyo mokonzi azali koyangela. Na bisika 162 oyo liloba yango ya Grɛki ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo, kaka na mokanda ya Matai mpamba okokuta yango mbala 55 mobimba mpe mingi na yango ezali kolobela boyangeli ya Nzambe na likoló. Matai asaleli liloba yango mingi na boye ete Evanzile na ye ekoki kobengama Evanzile ya Bokonzi.
Bokonzi ya likoló: Maloba yango ezali soki mbala 30 mpe kaka na Evanzile ya Matai. Na Evanzile ya Marko ná Luka, maloba oyo ekokani na yango “Bokonzi ya Nzambe” esalelami mpo na komonisa ete “Bokonzi ya Nzambe” ezali na likoló mpe ezali koyangela uta na likoló.—Mt 21:43; Mr 1:15; Lk 4:43; Da 2:44; 2Ti 4:18.
ekómi pene: awa elingi koloba ete mokonzi oyo akoyangela na Bokonzi ya likoló alingaki komonana.
nwtsty-E bililingi mpe bavideo
Molato ya Yoane mobatisi mpe ndenge azalaki komonana na miso ya bato
Yoane alataki bilamba oyo esalemi na nsuki ya kamela mpe alataki mokaba ya mposo ya nyama na loketo oyo ekokaki kosalelama mpo na komema biloko ya mike. Mosakoli Eliya alataki mpe bilamba ya ndenge wana. (2Ba 1:8) Bilamba oyo esalemi na nsuki ya kamela ezalaki makasimakasi mpe babola nde bazalaki kolata yango. Kasi, bilamba ya pɛtɛpɛtɛ, oyo esalemi na biloko ya ntalo to lini, bazwi nde bazalaki kolata yango. (Mt 11:7-9) Lokola Yoane azalaki Monaziri ya kobotama, bazalaki kokata ye nsuki te. Ezala bilamba na ye to ndenge azalaki komonana na miso ya bato emonisaki ete azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te, amipesaki mobimba na kosala mokano ya Nzambe.
Mayoyo
Ndenge esalelami na Biblia, liloba “mayoyo” ekoki komonisa lolenge nyonso ya makɔnkɔ oyo bansinga na yango ezali mikuse, mingimingi oyo esalaka mibembo liboke. Boyekoli moko oyo basali na Yerusaleme emonisi ete mayoyo ya esobe ezalaka na proteini mingi (75%). Soki moto alingi kolya yango lelo oyo, balongolaka motó, makolo, mapapu mpe libumu na yango, oyo etikali balyaka yango ya mobesu to ya kolamba. Balobaka ete ezalaka elɛngi lokola kosakosa to lingato (crabe) mpe ezali na proteini mingi.
Mafuta ya nzoi ya zamba
Oyo balakisi awa ezali ndako ya nzoi oyo etongami na mafuta ya nzoi (1) mpe ndako ya nzoi oyo etondi na mafuta ya nzoi (2). Ekoki kozala ete lolenge ya nzoi ya zamba oyo babengi Apis mellifera syriaca, oyo efandaka na esika yango, nde ezalaki kobimisa mafuta ya nzoi oyo Yoane azalaki kolya. Lolenge ya nzoi yango oyo eswaka mabe, emesená kofanda na klima ya esobe ya Yudea epai molunge ezalaka makasi, mpe mbula ebɛtaka mpenza te; kasi bato bakoki kobɔkɔla yango te. Nzokande, na ebandeli mpenza ya siɛklɛ ya libwa liboso ya ntango na biso, bato oyo bazalaki kofanda na Yisraele bazalaki kobomba mafuta ya nzoi na bambɛki oyo esalemi na mabele. Bamonaki ebele ya biloko oyo bazalaki kobomba mafuta ya nzoi na katikati ya esika oyo ezalaki engumba (oyo eyebani na nkombo Tel Rehov), oyo ezwami na lobwaku ya Yordani. Emonani ete banzoi oyo ezalaki kobimisa mafuta yango bazalaki kouta na yango na mboka oyo eyebani lelo na nkombo Turquie.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 1:3
Tamara: Mwasi ya liboso na basi mitano oyo batángi bango na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya. Minei oyo batikali ezali Rahaba ná Ruta, oyo bazalaki Bayisraele te (vs. 5); Bata-sheba, “mwasi ya Uriya” (vs. 6); mpe Maria (vs. 16). Ekoki kozala ete batángi basi yango na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu elongo na mibali nyonso ya molɔngɔ yango mpo ezali na makambo ya ntina etali ndenge mokomoko na bango akɔtaki na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 3:11
kobatisa bino: To “kozindisa bino na mai.” Liloba ya Grɛki baptizô elimboli “kozindisa.” Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete batisimo esɛngi kozindisa moto mobimba na mai. Mokolo moko, Yoane azalaki kobatisa bato na lobwaku ya Yordani pene ya Salime “mpo mai ezalaki mingi kuna.” (Yn 3:23) Ntango Filipi abatisaki mokube moto ya Etiopi, bango nyonso mibale “bakitaki na mai.” (Mis 8:38) Kaka liloba wana ya Grɛki esalelami na libongoli ya Septante na 2Ba 5:14 ntango elobaki ete Naamane “amizindisaki na Yordani mbala nsambo.”
8-14/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 4-5
“Mateya oyo tozwi na lisolo ya Yesu likoló ya ngomba”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 5:3
Esengo: Ezali kaka te esengo oyo moto ayokaka ntango azali kozwa mwa mopɛpɛ. Kutu, soki basaleli yango mpo na kolobela bato, emonisaka ndenge moto oyo Nzambe apamboli mpe andimi azalaka. Liloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela Nzambe mpe Yesu na nkembo na ye na likoló.—1Ti 1:11; 6:15.
baoyo bayebi bobola na bango ya elimo: Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “baoyo bayebi,” soki babongoli yango liloba na liloba na “baoyo bazali babola (na bosɛnga; bapunzi bango; bato oyo basɛngasɛngaka),” na vɛrsɛ oyo, esalelami mpo na kolobela baoyo bazali kokelela mpe bayebi ete bazali kokelela. Kaka maloba yango esalelami mpo na kolobela “mosɛngi-biloko” moko na nkombo Lazare na Luka 16:20, 22. Maloba ya Grɛki oyo Babiblia mosusu ebongoli yango na baoyo bazali “babola na elimo” elingaka komonisa baoyo bayokaka mpasi na motema mpo bayebi bobola na bango ya elimo mpe bazali na mposa ya litambwisi ya Nzambe.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 5:7
bato ya motema mawa: Maloba ya Biblia oyo ebongolami na “bato ya motema mawa” mpe “motema mawa” esuki kaka te na kolimbisa to koyokela moto mawa na lisambisi. Mbala mingi emonisaka mawa oyo moto ayokaka, oyo etindaka ye asala likambo moko mpo na kosalisa baoyo bazali kokelela.
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 5:9
bato oyo batyaka kimya: Baoyo babatelaka kimya mpe bamemaka kimya esika oyo kimya ezangi.
Teyá mwana na yo alukaka kimya
Bakristo balingaka mpenza koteya bana na bango ‘báluka kimya mpe bálanda yango.’ (1 Petro 3:11) Lokola kozala na kimya na basusu ememelaka moto esengo, esengeli mpenza kosala nyonso mpo na koboya makanisi mabe, nkanda mpe kowelana.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 4:9
kosala likambo moko ya losambo: Vɛrbɛ ya Grɛki oyo ekoki kobongolama na “kosambela” esalelami awa mpo na kolobela likambo moko oyo ezali kaka mpo na mwa ntango. Kobongola yango na “osaleli ngai likambo moko ya losambo” emonisi ete Zabolo asɛngaki Yesu te ete asambelaka ye; ezalaki kaka mwa “likambo moko ya losambo.”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 4:23
koteya . . . kosakola: Koteya ekeseni na kosakola mpo mosakoli asukaka kaka te na kosakola; apesaka mpe malako, alimbolaka, alobaka makambo oyo ekondimisa moto mpe apesaka bilembeteli.
15-21/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 6-7
“Bókoba koluka liboso bokonzi”
Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
12 Makambo nini tosengeli kosɛnga libosoliboso na mabondeli na biso? Makambo oyo etali Yehova mpe mokano na ye. Tosengeli kopesa Yehova matɔndi na motema moko mpo na nyonso oyo asalelá biso. (1 Ntango 29:10-13) Toyebi yango mpo ntango Yesu azalaki awa na mabele, ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela. (Tángá Matai 6:9-13.) Alobaki ete basengeli libosoliboso kobondela ete nkombo ya Nzambe esantisama, elingi koloba etalelama ete ezali mosantu. Na nsima, Yesu amonisaki ete tosengeli kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano ya Yehova esalema na mabele mobimba. Kaka nsima ya kobondela mpo na makambo wana ya ntina mingi nde Yesu alobaki ete tosengeli kobondela mpo na makambo oyo tosengeli na yango. Ntango tozali kotya makambo ya Yehova mpe mokano na ye na esika ya liboso na mabondeli na biso, tozali komonisa ete yango nde eleki ntina mpo na biso.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 6:24
moombo: Liloba yango ya Grɛki elimboli kosala lokola moombo, elingi koloba moto oyo azali na nkolo kaka moko. Awa Yesu alingaki koloba ete mokristo akoki te kokangama kaka na Nzambe mpe na mbala moko komipesa na konduka biloko mokili.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 6:33
bókoba koluka: Vɛrbɛ yango ya Grɛki ezali komonisa likambo moko oyo ezali kokoba mpe ekoki kobongolama na “Koluka ntango nyonso.” Bayekoli ya solosolo ya Yesu bakoluka te bokonzi mpo na mwa ntango mpe na nsima bákende koluka makambo mosusu. Kutu, basengeli ntango nyonso kotya yango na esika ya liboso na bomoi na bango.
bokonzi: Bamaniskri mosusu ya kala na monɔkɔ ya Grɛki ekomi “Bokonzi ya Nzambe.”
na ye: Elobeli Nzambe, “Tata ya likoló” oyo Mt 6:32 elobeli.
boyengebene: Baoyo balukaka boyengebene ya Nzambe basepelaka kosala mokano na ye mpe batosaka mibeko na ye oyo etali malamu ná mabe. Mateya oyo eyokani ata moke te na oyo ya Bafarisai, oyo bazalaki koluka kotya boyengebene na bango moko.—Mt 5:20.
Luká Bokonzi, kasi biloko te
18 Tángá Matai 6:33. Soki totye Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso, na nsima Yehova akopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango. Yesu alimbolaki ntina oyo tokoki kotyela elaka yango motema. Alobaki boye: “Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.” Yehova ayebi oyo osengeli na yango, liboso kutu yo moko oyeba ete ozali na mposa na yango. (Bafilipi 4:19) Ayebi bilamba nini okozala na mposa na yango lobi to lobi kuna. Ayebi bilei nini osengeli na yango. Ayebi mpe ete yo ná libota na yo bosengeli na esika ya kofanda. Yehova akosala ete ozwa biloko nyonso oyo osengeli mpenza na yango.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola
14 Kanisá ete mokolo mosusu moto moko abengi yo na telefone, kasi ozali koyeba te mongongo ya moto yango. Oyebi ye te, kasi azali kotuna yo motuna na likambo etali biloko oyo osepelaka kolya. Ozali komituna soki moto yango azali nani mpe soki alingi nini. Mpo na komonisa limemya, ntango mosusu tokoki kosolola na ye mwa moke, kasi na nsima tokomonisa ye ete tósuka awa. Epai mosusu, kanisá ete moto yango amonisi ete asalaka na makambo etali bilei mpe na boboto nyonso ayebisi biso ete azali na makambo ya kitoko ya koyebisa biso. Ntango mosusu tokoki koyoka ye mpenza. Na ntembe te, tosepelaka mingi ntango bato oyo bakutani na biso, bayebisi biso makambo polele, kasi na ndenge ya kozokisa te. Ndenge nini tokoki mpe komonisa ezaleli ya ndenge wana na mosala ya kosakola?
15 Na bateritware mingi, esɛngaka tómonisa moto polele ntina oyo toyei epai na ye. Atako tozali na makambo ya kitoko oyo moto wana azali na yango te, kasi kanisá ete toyebisi te moto yango soki tozali banani mpe tobandi mbala moko lisolo na kotuna moto yango motuna lokola: “Soki ozali na likoki ya kosilisa mokakatano moko na mokili, okobanda na nini?” Biso toyebi ete totuni motuna wana mpo na koyeba makanisi ya moto yango mpe na nsima kobenda likebi na ye na Biblia. Kasi, moto yango akoki mbala mosusu komituna boye: ‘Moto oyo nayebi ye kutu te, mpo na nini atuni ngai motuna ya boye? Alingi mpenza koloba nini?’ Tosengeli mpenza kosala makasi ete moto oyo tolingi kosolola na ye abanga te. (Flp. 2:3, 4) Ndenge nini tokoki kosala yango?
16 Mokɛngɛli-motamboli moko amonaki ete likanisi oyo elandi esimbaka mpenza. Nsima ya kopesa moto mbote, alakisaka ye trakte oyo ezali na motó ya likambo ete Okosepela koyeba solo? mpe alobaka boye: “Tozali lelo kopesa moto mokomoko ya kartye trakte oyo. Elimboli mituna motoba oyo bato mingi batunaka. Oyo ya yo, yango oyo.” Ndeko yango alobi ete motema ya bato mingi ekitaka ntango kaka bayebi ntina oyo oyei epai na bango. Na ntango wana, ezalaka pɛtɛɛ mpo na kokoba lisolo. Na nsima, mokɛngɛli yango atunaka molobani na ye boye: “Omituná naino te mituna oyo?” Soki moto yango aponi motuna moko, ndeko yango afungolaka trakte mpe amonisaka oyo Biblia elobi na ntina na motuna yango. To mpe, aponaka motuna moko mpe akobaka lisolo kozanga ete atunaka moto yango mituna ya makasimakasi. Na ntembe te, balolenge ya kobanda lisolo ezali ebele. Na mikili mosusu, esɛngaka kosala makambo mingi liboso tóyebisa moto ntina oyo toyei epai na ye. Ntina ezali ya kolanda makambo mosusu oyo bato ya teritware na biso balingaka bapaya básala liboso ya kosolola na bango.
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 7:28, 29
bakamwaki: Vɛrbɛ ya Grɛki oyo basaleli awa ekoki kolimbola “kotonda na kokamwa tii na ndenge oyo makanisi ya moto ebulungani.” Soki basaleli vɛrbɛ yango mpo na kolobela likambo oyo ezali kokoba, yango ekomonisa ete maloba ya Yesu esalisaki mpenza ebele wana ya bato na bomoi na bango mobimba.
ndenge na ye ya koteya: Maloba yango emonisi lolenge na ye ya koteya, mayele oyo azalaki kosalela mpo na koteya, oyo esangisi mpe makambo Yesu ateyaki; malako nyonso oyo ezwami na lisolo na ye likoló ya ngomba.
kasi lokola bakomeli na bango te: Na esika atánga nkombo ya barabi oyo bazalaki komemya bango mingi na mateya na ye, ndenge bakomeli bamesanaki kosala, Yesu alobaki nde lokola momonisi ya Yehova, lokola moto oyo azali na bokonzi, mateya na ye ezalaki kouta na Liloba ya Nzambe.—Yn 7:16.
22-28/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 8-9
“Yesu alingaki bato”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 8:3
asimbaki ye: Mibeko ya Moize esɛngaki kotya bato ya maba libándá ya kaa mpo na kobatela basusu bázwa maladi yango te. (Le 13:45, 46; Mit 5:1-4) Kasi, bakonzi ya lingomba ya Bayuda babakisaki mibeko mosusu. Na ndakisa, moto moko te asengelaki kopusana pene ya moto ya maba na ntaka ya mɛtrɛ pene na mibale (1.8 m), kasi na mokolo oyo mopɛpɛ ezali makasi, na ntaka ya mɛtrɛ soki 45. Mibeko ya ndenge wana esalaki ete bato bákóma kosalela bato ya maba makambo na boboto te. Masolo ya bonkɔkɔ na bango elobeli rabi moko na ndenge ya malamu mpo abombanaki bato ya maba mpe rabi mosusu abwakelaki bango mabanga mpo bázala mosika na ye. Na kokesana na barabi, Yesu azalaki koyokela bato ya maba mawa yango wana asalaki likambo oyo Bayuda mosusu bakokaki kosala te; asimbaki moto yango. Asalaki bongo atako akokaki kobikisa moto yango ya maba kaka na liloba mpamba.—Mt 8:5-12.
Nalingi: Yesu asukaki kaka te na kondima likambo moto yango asɛngaki, kasi amonisaki mpe mposa makasi oyo azalaki na yango ya kosalisa ye; amonisaki ete asalaki yango kaka te mpo na kokokisa mokumba moko boye.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 9:10
kolya: To “ntango afandaki na mesa.” Kofanda na mesa elongo na moto ezalaki komonisa boyokani makasi elongo na moto yango. Na yango, na mikolo ya Yesu, Bayuda bakokaki te kofanda na mesa to kolya elongo na moto oyo azali Moyuda te.
bakɔngɔli-mpako: Bayuda mingi bazalaki kokɔngɔlela bakonzi ya Roma mpako. Bato bazalaki koyina Bayuda yango mpo bazalaki kosala elongo na boyangeli ya bapaya oyo bango bazalaki kolinga te mpe mpo bazalaki kosɛnga mpako mingi koleka oyo eyebanaki na Leta. Bato bazalaki kolinga bakɔngɔli-mpako te mpe bazalaki kotya bango molɔngɔ moko na basumuki mpe basi ya ndumba.—Mt 11:19; 21:32.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 9:36
ayokelaki bango mawa: Vɛrbɛ ya Grɛki splag·khniʹzo·mai oyo esalelami mpo na maloba oyo ekokani na liloba oyo basaleli mpo na “misɔpɔ” (splagʹkhna), ezali komonisa ndenge moto azali komiyoka na nse mpenza ya motema, mayoki ya makasi. Ezali moko ya maloba makasi na Grɛki oyo esalelami mpo na kolobela mawa oyo moto ayoki na motema.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
“Napesi bino ndakisa”
16 Lisusu, ntango mokonzi moko ya basoda, oyo ekoki mpenza kozala ete azalaki Moroma, kasi Moyuda te, akutanaki na Yesu mpe asɛngaki ye ete abikisela ye moombo na ye oyo azalaki na maladi, Yesu ayebaki malamu ete soda yango azalaki mpe na mabe na ye. Na ntango wana, mokonzi ya basoda azalaki moto oyo, na ntembe te, asalaki makambo ya mabe mingi na bomoi na ye, asopaki makila, mpe azalaki kosambela banzambe ya lokuta. Kasi, Yesu atyaki likebi na ye na likambo moko ya malamu: kondima makasi ya moto yango. (Matai 8:5-13) Na nsima, ntango Yesu asololaki na moto ya misala mabe oyo babakaki ye na nzete pene na ye, Yesu apamelaki moto yango te mpo na misala mabe oyo asalaki na bomoi na ye, kasi alendisaki ye na ndenge apesaki ye elikya mpo na mikolo ezali koya. (Luka 23:43) Yesu ayebaki malamu ete kotala kaka mabe ya basusu to kosambisa bango, elɛmbisaka bango nzoto. Na ntembe te, lokola azalaki kotya likebi na bizaleli ya malamu ya bato, elendisaki bato mingi na kosala malamu koleka.
Mpo na nini bayekoli ya Yesu bakilaka bilei te?
Yesu azali kosalisa bayekoli ya Yoane Mobatisi báyeba ete moto moko te asengeli kotinda bayekoli na ye bálanda mimeseno ya kala ya Bayuda, na ndakisa kokila bilei. Yesu ayaki te mpo na kosangisa losambo ya sika ná losambo ya kala, to koumisa losambo ya kala oyo etikalaki moke eboyama. Yesu alendisaki bato te ete bálanda losambo ya Bayuda ya mikolo na ye oyo ezalaki kolanda mimeseno ya bato. Alukaki te kokangisa eteni ya elamba ya sika ná elamba ya kala to kotya vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama.
29/01–4/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 10-11
“Yesu alakaki kopemisa bato”
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 10:29, 30
bakɛngɛli-mboka: Liloba ya Grɛki strou·thiʹon elobelaka eloko ya moke mpo na kolimbola ndɛkɛ nyonso ya moke, kasi mingimingi bakɛngɛli-mboka, oyo bazalaki kotɛka yango na ntalo moke koleka bandɛkɛ nyonso oyo ezalaki kotɛkama mpo na kolya.
na mbongo ya bibende moko ya motuya moke: Lil., “na mbongo moko ya ebende,” oyo ezalaki lifuti ya moto oyo asali mosala na boumeli ya miniti 45. (Talá Ap. B14.) Na libaku oyo, ntango akendaki na Galile mpo na mbala ya misato, Yesu alobaki ete bakɛngɛli-mboka mibale ezalaki na ntalo ya mbongo mibale ya ebende. Na libaku mosusu, ekoki kozala mbula mibale na nsima, ntango azalaki kosakola na Yudea, Yesu alobaki ete moto akoki kosomba bakɛngɛli-mboka mitano na mbongo minei ya ebende. (Lk 12:6) Soki tokokanisi masolo yango, tokomona ete bakɛngɛli-mboka bazalaki na motuya moke mpenza na boye ete komelesa akokaki kobakisela mosombi mokɛngɛli-mboka ya mitano matabisi.
nsuki nyonso ya motó na bino etángami: Balobaka ete motángo ya nsuki na motó ya moto ezalaka soki 100 000. Ndenge Yehova ayebi ata makambo mikemike ndenge wana, ezali komonisa ete atyelaka mpenza moyekoli mokomoko ya Kristo likebi.
nwtsty-E bililingi ná bavideo
Bakɛngɛli-mboka
Ezalaki ndɛkɛ ya ntalo moke koleka bandɛkɛ nyonso ya kolya oyo bazalaki kotɛka. Moto akokaki kosomba ndɛkɛ yango mibale na lifuti oyo asali mosala na boumeli ya miniti 45. Liloba yango ya Grɛki ekoki kosalelama mpo na bandɛkɛ ndenge na ndenge ya mike, ata mpe mokɛngɛli-mboka oyo babengaka (Passer domesticus biblicus) mpe oyo ya Espagne (Passer hispaniolensis), oyo tii lelo ezalaka ebele na Israël.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 11:28
kokumba mikumba: Baoyo Yesu azalaki koyebisa bango báya epai na ye bazalaki “kokumba mikumba” mpo na mitungisi mpe mpasi. Losambo na bango epai ya Yehova ekómaki kilo mpo na makambo ya bonkɔkɔ oyo babakisaki na Mibeko ya Moize. (Mit 23:4) Ata mpe Sabata, oyo ebongisamaki mpo na kopemisa bato, ekómaki nde kilo.—Kob 23:12; Mr 2:23-28; Lk 6:1-11.
nakopemisa bino: Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kopemisa” ekoki mpe kolimbola kopema (Mt 26:45; Mr 6:31) mpe kokitisama motema na mpasi mpo moto azongela lisusu makasi (2Ko 7:13; Flm 7). Bavɛrsɛ oyo elandi emonisi ete kokamata “ekanganeli” ya Yesu (Mt 11:29) ekosɛnga nde mosala kasi kopema te. Vɛrbɛ yango ya Grɛki oyo elobeli Yesu ezali kopesa likanisi ya kolendisa mpe kopesa lisusu makasi epai ya baoyo balɛmbi mpo báyoka mposa ya kokamata ekanganeli ya Yesu oyo ezali pɛpɛlɛ mpe pɛtɛpɛtɛ.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 11:29
Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino: Yesu asalelaki liloba “ekanganeli” na ndenge ya elilingi mpo na komonisa likambo etali kotosa bokonzi mpe litambwisi. Soki Yesu azalaki na likanisi ya ekanganeli mibale, oyo moko na yango Nzambe atyaki likoló na ye, boye, azalaki kosɛnga bayekoli na ye bázala na nse ya ekanganeli yango elongo na ye mpe akosalisa bango. Soki bongo, fraze yango ekoki kobongolama na: “Bókɔta na ekanganeli elongo na ngai.” Kasi soki ekanganeli yango ezali oyo Yesu atye likoló ya basusu, boye vɛrsɛ yango esɛngi bayekoli na ye bátosa bokonzi mpe litambwisi na ye.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Yoane alingi koyeba makanisi ya Yesu
Motuna yango ekoki kokamwisa mpenza. Yoane azali moto oyo amipesá, oyo ntango azalaki kobatisa Yesu eleki sikoyo mbula pene na mibale, amonaki ndenge elimo ya Nzambe ekitelaki Yesu mpe ayokaki ndenge Nzambe alobaki ete andimi Yesu. Ntina ya kokanisa ete kondima ya Yoane elɛmbi ezali te. Soki bongo, mbɛlɛ Yesu akumisi Yoane te ndenge asali yango na libaku oyo. Kasi soki Yoane azali kaka na kondima, mpo na nini alobi bátuna Yesu motuna yango?
Mbala mosusu Yoane alingi ete Yesu ye moko ayebisa ye polele ete azali Masiya. Yango ekokómisa kondima na ye makasi mpo azali konyokwama na bɔlɔkɔ. Mpe emonani ete motuna ya Yoane ezali mpe mpo na ntina mosusu. Ayebaki malamu bisakweli ya Biblia oyo etali moto oyo Nzambe atye mafuta na elimo mpo azala mokonzi mpe mosikoli. Kasi, basanza mingi nsima ya batisimo ya Yesu, Yoane azali na bɔlɔkɔ. Na yango, Yoane azali koluka koyeba soki ezali na moto mosusu oyo akoya nsima ya Yesu, oyo akokokisa bisakweli nyonso oyo esakolamaki mpo na Masiya.
Mawa na libota oyo eboyi kobongola motema
Yesu azali kozwa Yoane na valɛrɛ mingi, kasi bato mosusu bazali kotalela ye ndenge nini? Yesu alobi boye: “Libota oyo . . . ezali lokola bana mike oyo bafandi na bazando, oyo bazali kobelela baninga na bango ya lisano, balobi: ‘Tobɛtɛlaki bino piololo, kasi bobinaki te; togangaki na kolela, kasi bomibɛtaki na mawa te.’”—Matai 11:16, 17.
Yesu alingi koloba nini? Alimboli makanisi na ye; alobi boye: “Yoane ayei alei te mpe amɛli te, kasi balobi: ‘Azali na demo’; Mwana ya moto ayei azali kolya mpe komɛla, kasi balobi: ‘Talá! Moto oyo amipesá na kolunda mpe na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki.’” (Matai 11:18, 19) Yoane azalaki na bomoi ezangi mindɔndɔ lokola oyo ya Monaziri, kutu aboyaki komɛla vinyo, ata bongo, bato wana balobi ete azali na demo. (Mitángo 6:2, 3; Luka 1:15) Kasi, Yesu azali na bomoi lokola oyo ya bato nyonso. Azali kolya mpe komɛla kozanga kolekisa ndelo, kasi balobi na ye ete alekisi ndelo. Emonani ete ezali mpasi kosepelisa bato.