‘Bókende mpe bókómisa bato bayekoli mpe bóbatisa bango’
“Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango . . . , koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”—MATAI 28:19, 20.
1. Ekateli nini ekólo ya Yisalaele ezwaki na Ngomba Sinai?
ELEKI mbula soki 3500, ekólo mobimba ya Yisalaele elapaki ndai liboso ya Nzambe. Na Ngomba Sinai, Bayisalaele balobaki polele boye: “Tokosala yango nyonso elobi [ Yehova].” Banda ntango wana, Bayisalaele bakómaki libota ya Nzambe, “bato na ye mpenza.” (Exode 19:5, 8; 24:3) Bazalaki na elikya ete akobatela bango mpe bakofanda na “mokili eleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi” libela na libela.—Levitike 20:24.
2. Bato bakoki kozala na boyokani ya ndenge nini na Nzambe lelo oyo?
2 Kasi, ndenge Asafa, mokomi moko ya nzembo amonisi yango, Bayisalaele “babatelaki kondimana na Nzambe te; baboyi kotambola [na boyokani, NW] na Mobeko na ye.” (Nzembo 78:10) Batosaki te ndai oyo bankɔkɔ na bango balapaki liboso ya Yehova. Nsukansuka, ekólo yango ebungisaki boyokani ya ntina mingi na Nzambe. (Mosakoli 5:4; Matai 23:37, 38) Yango wana, “Nzambe abalolaki likebi na ye . . . epai ya bikólo mosusu mpo na kobimisa uta na bango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Mpe na mikolo oyo ya nsuka, azali koyanganisa “ebele ya bato, oyo ata moto moko te [akoki] kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso,” oyo bazali koloba ete, “Lobiko na biso ezali ya Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe ya Mwana-Mpate.”—Emoniseli 7:9, 10.
3. Makambo nini moto asengeli kosala mpo na kokóma na boyokani na Nzambe?
3 Mpo na kozala na kati ya baoyo bazali na boyokani kitoko wana na Nzambe, esengeli komipesa epai na Yehova mpe komonisa yango polele na batisimo ya mai. Yango ezali na boyokani na etinda oyo Yesu apesaki bayekoli na ye: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Bayisalaele bayokaki “mokanda ya kondimana” oyo Moize atángelaki bango. (Exode 24:3, 7, 8) Na yango, bayebaki mokumba na bango liboso ya Yehova. Ndenge moko lelo, moto oyo alingi kozwa batisimo, asengeli kozala na boyebi ya solosolo ya mokano ya Nzambe, ndenge ezwami na Liloba na ye, Biblia.
4. Esengeli kosala nini mpo na kozwa batisimo? (Lobelá mpe etanda oyo ezali na likoló.)
4 Emonani polele ete Yesu alingaki ete bayekoli na ye bázala na kondima oyo euti na boyebi ya solosolo liboso ya kozwa batisimo. Asɛngaki bayekoli na ye kaka te bákende kokómisa bato bayekoli, kasi mpe báteya bango ‘bátosa makambo nyonso oyo apesaki bango etinda.’ (Matai 7:24, 25; Baefese 3:17-19) Na yango, baoyo bakokisaka masɛngami mpo na kozwa batisimo, bayekolaka liboso Biblia na boumeli ya basanza to mpe mbula moko to mibale, mpo ekateli na bango ya kozwa batisimo ezala ya likolólikoló te. Bato oyo bazwaka batisimo bayanolaka “ɛɛ” na mituna mibale ya ntina mingi. Lokola Yesu amonisaki ete ‘Ɛɛ na biso esengeli kozala Ɛɛ, Te na biso, Te,’ ekozala malamu mokomoko na biso atalela malamumalamu ndimbola ya mituna mibale wana ya batisimo.—Matai 5:37.
Kobongola motema mpe komipesa
5. Wapi makambo mibale ya ntina mingi oyo motuna ya liboso ya batisimo ezali komonisa?
5 Motuna ya liboso ya batisimo esɛngaka na moto oyo alingi kobatisama aloba soki atiki etamboli na ye ya kala mpe amipesi mobimba na Yehova mpo na kosala mokano na ye. Motuna yango ezali komonisa makambo mibale ya ntina mingi oyo moto asengeli kosala liboso abatisama: kobongola motema mpe komipesa.
6, 7. (a) Mpo na nini kobongola motema ezali na ntina mpo na bato nyonso oyo balingi kozwa batisimo? (b) Bambongwana nini moto asengeli kosala nsima ya kobongola motema?
6 Mpo na nini moto asengeli kobongola motema liboso azwa batisimo? Ntoma Paulo alimboli boye: “Biso nyonso tozalaki komitambwisa kala na kolanda bamposa ya mosuni na biso.” (Baefese 2:3) Liboso tókóma na boyebi ya solosolo ya mokano ya Nzambe, tozalaki kolanda mokili mpe makambo na yango. Satana, nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo nde azalaki kotambwisa bomoi na biso. (2 Bakolinti 4:4) Kasi, nsima ya koyeba mokano ya Nzambe, tozwaki ekateli ya komitambwisa “na bamposa ya bato lisusu te, kasi na mokano ya Nzambe.”—1 Petelo 4:2.
7 Etamboli wana ya sika ezali na matomba beboo. Libosoliboso, ezali kofungwela bato nzela ya kokóma na boyokani na Yehova, oyo Davidi akokanisaki na libyangi ya kokɔta na “hema” mpe “ngomba ya bulɛɛ” ya Nzambe—libaku moko ya malamu mpenza! (Nzembo 15:1) Ya solo, Yehova akobenga bato bibengela te, kasi akobenga kaka moto nyonso oyo “akotambolaka sembo mpe [alandaka] boyengebene, mpe akolobaka solo kati na motema na ye.” (Nzembo 15:2) Na kotalela etamboli oyo mokomoko na biso azalaki na yango liboso ayeba solo, ekoki kosɛnga tósala bambongwana na etamboli mpe na bomoto na biso mpo na kokokisa makambo oyo balobi na vɛrsɛ oyo. (1 Bakolinti 6:9-11; Bakolose 3:5-10) Kobongola motema nde esalaki ete tósala mbongwana wana, elingi koloba toyokaki mawa mpo na etamboli na biso ya liboso mpe tozwaki ekateli makasi ya kosepelisa Yehova. Yango etindaki biso tóbongwana mobimba mpenza, tótika ezaleli ya moimi, etamboli ya mokili mpe tólanda nzela oyo ezali kosepelisa Nzambe.—Misala 3:19.
8. Ndenge nini tomipesaka epai ya Nzambe, mpe yango ezali na boyokani nini na batisimo?
8 Eteni ya mibale ya motuna ya liboso ya batisimo etunaka na bato oyo balingi kobatisama soki bamipesi na Yehova mpo na kosala mokano na ye. Komipesa ezali likambo ya ntina mingi oyo moto asengeli kosala liboso abatisama. Moto amipesaka na Yehova na nzela ya libondeli, oyo asalaka mpo na koyebisa mposa na ye ya kopesa bomoi na ye epai ya Yehova na nzela ya Klisto. (Baloma 14:7, 8; 2 Bakolinti 5:15) Na ndenge yango, Yehova akómaka Nkolo na ye mpe lokola Yesu, asepelaka kosala mokano ya Nzambe. (Nzembo 40:8; Baefese 6:6) Moto asalaka elaka wana epai ya Yehova kaka mbala moko. Atako moto amipesaka epai ya Nzambe kaka ye moko, kosala eyambweli ya polele mokolo ya batisimo esalisaka moto nyonso ayeba ete moto yango amipesi mpenza epai na Tata na ye ya likoló.—Baloma 10:10.
9, 10. (a) Kosala mokano ya Nzambe esɛngaka nini? (b) Ndenge nini ata bakonzi ya Nazi bandimaki ete biso tomipesá mpenza epai na Nzambe?
9 Kolanda ndakisa ya Yesu mpo na kosala mokano ya Nzambe esɛngaka nini? Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Awa, Yesu amonisi makambo misato oyo tosengeli kosala. Ya liboso, ‘tómiboya.’ Na maloba mosusu, tosengeli kobwaka nzoto mpe makanisi na biso ya kozanga kokoka, mpe kondima toli ya Nzambe mpe litambwisi na ye. Ya mibale, ‘tómema nzete na biso ya mpasi.’ Na mikolo ya Yesu, nzete ya mpasi ezalaki elembo ya nsɔni mpe ya minyoko. Lokola tozali baklisto, tondimaka konyokwama mpo na nsango malamu. (2 Timote 1:8) Atako mokili ekoki kosɛka to kotyola biso, na ndakisa ya Klisto ‘totyolaka nsɔni’ mpe tozali na esengo mpo toyebi ete tozali kosepelisa Nzambe. (Baebele 12:2) Ya nsuka, tólandaka Yesu “ntango nyonso.”—Nzembo 73:26; 119:44; 145:2.
10 Likambo ya kokamwa, ata batɛmɛli mosusu bandimaka ete Batatoli ya Yehova bamipesá mobimba mpo na kosalela kaka Nzambe. Na ndakisa, na kaa ya bakangami ya mboka Buchenwald, na Allemagne, basɛngaki na Batatoli oyo baboyaki kowangana kondima na bango ete batya mabɔkɔ na maloba oyo: “Ngai nakotikala kaka Moyekoli ya Biblia mpe nakobebisa soki moke te ndai oyo nasali epai na Yehova.” Yango emonisaka polele ezaleli ya basaleli nyonso ya sembo ya Nzambe oyo bamipesá epai na ye.—Misala 5:32.
Koyebana lokola Motatoli ya Yehova
11. Moto oyo azwi batisimo azwaka libaku nini ya malamu?
11 Motuna ya mibale ya batisimo etunaka na moto oyo alingi kozwa yango soki ayebi ete kozwa batisimo ekomonisa na miso ya bato nyonso ete akómi Motatoli ya Yehova. Nsima ya kobima na mai, moto akómaka ministre oyo andimami mpo na komema nkombo ya Yehova. Yango ezali libaku ya lokumu mpenza mpe mokumba monene. Moto oyo azwi batisimo akómaka mpe na elikya ya kozwa lobiko ya libela soki atikali sembo epai ya Yehova.—Matai 24:13.
12. Lokumu ya komema nkombo ya Yehova ememaka mokumba nini?
12 Ya solo, ezali mpenza lokumu monene komema nkombo ya Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Mosakoli Mika alobaki ete: “Mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo ya nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” (Mika 4:5) Atako bongo, lokumu yango ememaka mpe mokumba. Tosengeli kosala nyonso mpo na kozala na etamboli oyo ezali kokumisa nkombo oyo tozali komema. Ndenge Paulo ayebisaki baklisto ya Loma, soki moto azali kosala te makambo oyo ye moko azali koteya, nkombo ya Nzambe ‘ekotukama,’ to ekosila lokumu.—Baloma 2:21-24.
13. Mpo na nini basaleli ya Yehova oyo bamipesi na ye bazali na mokumba ya kotatola na ntina na ye?
13 Ntango moto akómi Motatoli ya Yehova, azwaka mpe mokumba ya kotatola na ntina na Nzambe na ye. Yehova asɛngaki na libota ya Yisalaele oyo emipesaki na ye ete bázala Batatoli na ye mpo na kosakola Bonzambe na ye ya seko. (Yisaya 43:10-12, 21) Kasi, libota ya Yisalaele ekokisaki te mokumba yango, mpe nsukansuka Yehova abwakaki yango. Lelo oyo, baklisto ya solo bazali kosepela na libaku malamu oyo bazali na yango ya kotatola na ntina na Yehova. Tosalaka bongo mpo tolingaka ye mpe tozali na mposa ete nkombo na ye esantisama. Ndenge nini tokoki kokanga monɔkɔ ntango toyebi solo na ntina na Nzambe mpe mokano na ye? Toyokaka lokola ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Ezali nde mokumba oyo batye likoló na ngai. Ya solo, mawa na ngai soki nasakoli te nsango malamu!”—1 Bakolinti 9:16.
14, 15. (a) Ndenge nini ebongiseli ya Yehova esalisaka biso tókola na elimo? (b) Bibongiseli nini tozali na yango oyo ezali kosalisa biso tókola na elimo?
14 Motuna ya mibale ekundwelaka mpe moto oyo azali kobatisama mokumba na ye ya kosala na bomoko na ebongiseli ya Yehova oyo ezali kotambwisama na elimo santu. Tokoki kosalela Nzambe biso moko te, yango wana tosengeli na lisalisi mpe bilendiseli ya “lisangá mobimba ya bandeko.” (1 Petelo 2:17; 1 Bakolinti 12:12, 13) Ebongiseli ya Nzambe ezali kosalisa biso mingi mpo tókola na elimo. Ezali kopesa biso mikanda oyo elimbolaka Biblia beboo, oyo ezali kosalisa biso tózwa boyebi ya solosolo, tózala na bwanya ntango tokutani na mikakatano, mpe tókóma mpenza baninga ya Nzambe. Ndenge kaka mama abomaka nzoto mpo mwana na ye alya malamu mpe abatelama malamu, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso bilei ya elimo beboo na ntango ebongi mpo tókola na elimo.—Matai 24:45-47; 1 Batesaloniki 2:7, 8.
15 Na makita oyo basalaka pɔsɔ na pɔsɔ, basaleli ya Yehova bazwaka formasyo mpe bilendiseli oyo basengeli na yango mpo na kozala Batatoli na ye ya sembo. (Baebele 10:24, 25) Eteyelo ya mosala ya Teokrasi eteyaka biso ndenge ya koloba liboso ya bato, mpe Likita ya Mosala elakisaka biso ndenge ya kosakola nsango malamu na ndenge ebongi. Ezala na makita mpe na boyekoli na biso moko ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, tokomona ndenge elimo ya Yehova ezali kotambwisa ebongiseli na ye. Na nzela ya bibongiseli wana oyo azali kozwa ntango nyonso, Nzambe azali kokebisa biso na makama, kopesa biso formasyo mpo tózala baministre oyo babongi, mpe azali kosalisa biso tólala mpɔngi te na elimo.—Nzembo 19:7, 8, 11; 1 Batesaloniki 5:6, 11; 1 Timote 4:13.
Ntina oyo moto azwaka batisimo
16. Nini etindaka biso tómipesa epai na Yehova?
16 Mituna mibale ya batisimo ekundwelaka moto oyo azali kobatisama ntina ya batisimo ya mai mpe mikumba oyo yango ememaka. Kasi, nini esengeli kotinda moto azwa ekateli ya kozwa batisimo? Tokómaka bayekoli te mpo moto moko atindaka biso na makasi, kasi mpo Yehova ‘abendaka’ biso. (Yoane 6:44) Lokola “Nzambe azali bolingo,” atambwisaka molɔ́ngɔ́ na bolingo, kasi na makasi te. (1 Yoane 4:8) Bizaleli malamu ya Yehova mpe makambo malamu oyo asalelaka biso nde ebendaka biso epai na ye. Yehova apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko mpo na biso, mpe apesi biso elikya oyo eleki kitoko. (Yoane 3:16) Mpo na yango, biso tomonaka ete tosengeli kopesa ye bomoi na biso.—Masese 3:9; 2 Bakolinti 5:14, 15.
17. Biso tomipesi na makambo nini te?
17 Tomipesaka mpenza epai na Yehova ye moko, kasi te na makanisi ya bato to na likambo moko boye. Mosala oyo Nzambe apesi basaleli na ye ekobongwana, kasi komipesa na bango epai na ye ekobongwana te. Na ndakisa, makambo oyo asɛngaki Abalayama asala ekeseni na oyo asɛngaki na Yilimia. (Genese 13:17, 18; Yilimia 1:6, 7) Kasi, bango nyonso mibale bakokisaki malamumalamu mosala oyo Nzambe apesaki bango mpo bazalaki kolinga Yehova mpe bazalaki na mposa ya kosala mokano na ye na bosembo nyonso. Na mikolo oyo ya nsuka, bayekoli ya Klisto nyonso bazali kosala makasi mpo na kokokisa etinda oyo apesá bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Kosala mosala yango na motema mobimba ezali lolenge eleki malamu ya komonisa ete tolingaka Tata na biso ya likoló mpe ete tomipesi mpenza epai na ye.—1 Yoane 5:3.
18, 19. (a) Ntango tozwaka batisimo, likambo nini tomonisaka na miso ya bato nyonso? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Na ntembe te, batisimo efungolaka nzela na mapamboli ebele, kasi tosengeli kozwa yango na lisɛki te. (Luka 14:26-33) Ezali ekateli oyo tosengeli kozwa na ntina mingi koleka makambo mosusu nyonso. (Luka 9:62) Ntango tozwaka batisimo, tolobaka na miso ya bato nyonso boye: “Nzambe oyo azali Nzambe na biso libela na libela. Ye moko akotambwisa biso kino liwa.”—Nzembo 48:14, NW.
19 Lisolo oyo elandi ekolobela mituna mosusu oyo ekoki kobima na ntina na batisimo ya mai. Ezali na bantina oyo moto akoki kokakatana mpo na kozwa batisimo? Mbula ya kobotama nde ekoki kopekisa moto azwa ekateli yango? Ndenge nini bato nyonso bakoki komonisa ete batisimo ezali na motuya mingi?
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini moklisto mokomoko asengeli kobongola motema liboso ya kobatisama?
• Komipesa epai ya Nzambe esɛngaka nini?
• Lokumu ya komema nkombo ya Yehova ememaka mikumba nini?
• Nini esengeli kotinda biso tózwa ekateli ya kozwa batisimo?
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
Mituna mibale ya batisimo
Na lisalisi ya mbeka ya Yesu Klisto, obongoli motema na masumu na yo mpe omipesi na Yehova mpo na kosala mokano na ye?
Okangi ntina ete komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo ekómisi yo Motatoli ya Yehova kati na ebongiseli oyo etambwisami na elimo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 23]
Komipesa ezali elaka oyo moto asalaka liboso ya Yehova na nzela ya libondeli
[Elilingi na lokasa 25]
Mosala na biso ya kosakola emonisaka ete tomipesi na Nzambe