Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr18 Février nk. 1-7
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • 5-11/02
  • 12-18/02
  • 19-25/02
  • 26/02–4/03
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2018
mwbr18 Février nk. 1-7

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

5-11/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 12-13

“Ndakisa ya blé ná matiti mabe”

w13 15/7 lok. 9 par. 2-3

“Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso”

2 Makambo oyo esalemaki na elanga ya mosali-bilanga wana emonisi ndenge nini mpe ntango nini Yesu asengelaki koyanganisa blé, elingi koloba bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi na ye. Yesu abandaki kolona blé na Pantekote 33 T.B. Koyanganisa blé ekosila ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala na bomoi na nsuka ya ebongiseli oyo, bakozwa elembo ya nsuka mpe na nsima bakokende likoló. (Mat. 24:31; Em. 7:1-4) Kaka ndenge moto oyo atɛlɛmi na ngomba amonaka na mosika makambo oyo ezali zingazinga na ye, ndakisa wana esalisi biso tózwa mwa likanisi ya makambo oyo esengelaki kosalema na boumeli ya mbula soki 2 000. Na esika oyo tozali, makambo nini oyo etali Bokonzi tosili kososola? Ndakisa wana elobeli ntango ya kolona mboto, kokola na yango, mpe eleko ya kobuka mbuma. Lisolo oyo ekolobela mingimingi eleko ya kobuka mbuma.

YESU ABATELI BLÉ

3 Na ebandeli ya siɛklɛ ya mibale T.B., ‘matiti mabe ebimaki’ ntango bakristo ya lokuta bakómaki komonana na mokili. (Mat. 13:26) Na siɛklɛ ya minei, bakristo oyo bazalaki lokola matiti mabe bakómaki mingi mpenza koleka bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Tóbosana te ete na ndakisa yango, baombo basɛngaki nkolo na bango nzela ya kopikola matiti mabe. (Mat. 13:28) Nkolo ayanolaki nini?

w13 15/7 lok. 10 par. 4

“Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso”

4 Mpo na blé ná matiti mabe, Yesu alobaki boye: “Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma.” Maloba yango emonisi ete kobanda na siɛklɛ ya liboso tii lelo oyo, ezalaki ntango nyonso na bato oyo bazalaki lokola blé awa na mabele, elingi koloba, bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Toyebi yango mpo Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Na yango, Yesu alakaki ete akobatela bakristo oyo batyami mafuta na elimo mikolo nyonso tii na ntango ya nsuka. Kasi, lokola bakristo oyo bazalaki lokola matiti mabe bazipaki bango, toyebi mpenza na bosikisiki te banani bazalaki na kati ya blé na eleko wana nyonso. Kasi, mwa bambula mingi liboso eleko ya kobuka mbuma ebanda, ekómaki koyebana soki banani bazali na kati ya blé. Eyebanaki ndenge nini?

w13 15/7 lok. 12 par. 10-12

“Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso”

10 Ya liboso, kopikola matiti mabe. Yesu alobaki boye: “Na eleko ya kobuka mbuma nakoyebisa babuki-mbuma ete, liboso bópikola matiti mabe mpe bókangisa yango mabokemaboke.” Nsima ya 1914, baanzelu babandaki ‘kopikola’ bakristo oyo bazalaki lokola matiti mabe na ndenge bakabolaki bango na “bana ya bokonzi” oyo batyami mafuta na elimo.​—Mat. 13:30, 38, 41.

11 Wana mosala ya kopikola ezalaki kokoba, bokeseni kati na blé ná matiti mabe ekómaki komonana polele mpenza. (Em. 18:1, 4) Na 1919, emonanaki polele ete Babilone Monene ekwei. Nini mpenza ekesenisaki bakristo ya solo ná bakristo ya lokuta? Mosala ya kosakola. Bandeko oyo bazalaki kokamba Bayekoli ya Biblia bakómaki kolobela mingi ntina oyo ndeko nyonso asengeli komipesa na mosala ya kosakola Bokonzi. Na ndakisa, mwa buku moko (To Whom the Work Is Entrusted) oyo ebimisamaki na 1919 elendisaki bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo básakolaka ndako na ndako. Elobaki boye: “Mosala yango ekoki kobangisa; kasi ezali mosala ya Nkolo mpe ezali na makasi na ye nde tokosala yango. Bozali na libaku malamu ya kosangana na mosala yango.” Nini esalemaki? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1922 elobaki ete kobanda na ntango wana, Bayekoli ya Biblia bamipesaki lisusu mingi na mosala ya kosakola. Eumelaki te, kosakola ndako na ndako ekómaki elembo mpo na koyeba bakristo wana ya sembo, mpe ezali bongo tii lelo.

12 Ya mibale, koyanganisa blé. Yesu apesaki baanzelu mitindo oyo: “Bóbanda koyanganisa blé na kati ya ndako na ngai ya kobomba biloko.” (Mat. 13:30) Kobanda 1919, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali koyanganisama na lisangá ya bokristo oyo epɛtolami. Mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala na bomoi na nsuka ya ebongiseli oyo, koyanganisama ya nsuka ekosalema ntango bakozwa mbano na bango ya kokende na likoló.​—Dan. 7:18, 22, 27.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 12:20

nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke: Mwinda oyo bazalaki kosalela mingi ezalaki mwa mbɛki moko ya mabele oyo bazalaki kotondisa yango mafuta ya olive. Nsinga ya lini ezalaki komɛla mafuta yango mpo mwinda ekufa te. Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke” ekoki komonisa nsinga ya mwinda oyo ezali kobimisa milinga mpo mɔtɔ ezali naino kasi lolemo ya mɔtɔ ekiti to elingi kokufa. Esakweli ya Yisaya 42:3 elobelaki motema mawa ya Yesu; akoboma te elikya ya nsuka oyo bato oyo bazangá mpe oyo bazalaki konyokwama batikalaki na yango.

w16.10 lok. 32

Oyebaki yango?

Na ntango ya kala, ekokaki kosalema ete moto moko alona matiti mabe na elanga ya moto mosusu?

NA MATAI 13:24-26, Yesu alobaki: “Bokonzi ya likoló ezali lokola moto moko oyo alonaki mboto ya malamu na elanga na ye. Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe na katikati ya blé, mpe akendaki. Ntango milona yango ebimaki mpe ebotaki mbuma, matiti mabe mpe ebimaki.” Bakomi mosusu bandimaka mpenza te ete ndakisa yango ezalaki likambo ya solo, kasi na kotalela makomi ya kala ya mibeko ya Baroma, likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema.

Diksionɛrɛ moko oyo elimbolaka Biblia elobi ete na mibeko ya Baroma, kolona matiti mabe na elanga ya moto mosusu mpo na kozongisa mabe na mabe, ezalaki mpenza likambo moko ya mabe. Lokola mibeko elobelaki likambo yango, yango elimboli ete ezalaki kosalema mpenza. Moto moko ya mayele na mibeko na nkombo Alastair Kerr, amonisi ete na mobu 533 nsima ya Kristo, amperɛrɛ Moroma Justinien abimisaki mokanda moko. Ezalaki na mibeko ya Baroma na mokuse mpe na maloba mosusu ya bato ya mayele na mibeko kobanda mobu soki 100 tii 250 nsima ya Kristo. Na mokanda yango, moko ya bato yango ya mayele na nkombo Ulpian alobelaki likambo moko oyo esalemaki na siɛklɛ ya mibale. Balonaki matiti mabe na elanga ya moto mosusu, mpe yango esalaki ete milona ebeba. Mokanda yango elobelaki ntomo oyo mibeko epesaki mosali-bilanga; moto oyo alonaki matiti mabe asengelaki kofuta ye mbongo mpo na milona oyo ebebaki.

Makambo wana oyo esalemaki na Ampire ya Roma ya kala, emonisi ete likambo oyo Yesu alobeli na ndakisa na ye ekokaki mpenza kozala likambo ya solo.

12-18/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 14-15

“Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke”

w13 15/7 lok. 15 par. 2

Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke

2 Ntango Yesu amonaki ebele yango ya bato, ayokelaki bango mawa, yango wana abikisaki baoyo bazalaki kobɛla mpe ateyaki bango makambo mingi oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Ntango mpokwa ekómaki, bayekoli basɛngaki Yesu ayebisa bato bázonga mpo bákende na bamboka ya pembeni kosomba mwa biloko na bango ya kolya. Kasi Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bino bópesa bango eloko ya kolya.” Na ntembe te maloba yango ebulunganisaki bayekoli, mpamba te biloko oyo bazalaki na yango ezalaki moke mpenza: mampa mitano ná mbisi mibale ya mike.

w13 15/7 lok. 15 par. 3

Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke

3 Yesu ayokaki mawa mpe asalaki likamwisi moko. Na makamwisi nyonso ya Yesu, yango nde likamwisi oyo Baevanzile nyonso minei elobeli. (Marko 6:35-44; Luka 9:10-17; Yoane 6:1-13) Yesu alobaki na bayekoli na ye báyebisa ebele yango ya bato báfanda na matiti na bituluku ya bato 50 mpe bato 100. Nsima ya kobondela, abandaki kobuka mampa mpe kokabola mbisi. Na nsima, na esika apesa bato bilei yango mbala moko, Yesu akabolelaki yango “bayekoli, bayekoli mpe bakabolelaki ebele ya bato yango.” Na likamwisi wana, moto nyonso alyaki, atondaki, mpe bilei mosusu etikalaki! Kanisá naino: Yesu aleisaki bankóto ya bato na nzela ya bato moke​—bayekoli na ye.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 14:21

longola basi ná bana mike: Kaka Matai nde atángi basi ná bana ntango alobeli likamwisi oyo. Ekoki kozala ete motángo mobimba ya baoyo balyaki bilei yango ya likamwisi elekaki 15 000.

w13 15/7 lok. 15 par. 1

Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke

KANISÁ lisolo oyo ezali na mokapo oyo. (Tángá Matai 14:14-21.) Ezalaki mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 32 T.B. Yesu ná bayekoli na ye bazalaki elongo na bato ebele, mibali soki 5 000, longola basi ná bana mike, na esobe moko pembeni ya Betesaida, mboka moko oyo ezalaki na bokula ya Mbu ya Galile, na ngámbo ya nɔrdi.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 15:7

bakosi: Liloba ya Grɛki hy·po·kri·tesʹ na ebandeli ezalaki komonisa bato ya teyatre ya Bagrɛki (mpe na nsima Baroma) oyo bazalaki kolata maskɛ oyo ebongisamaki mpo na kobakisa volimi ya mongongo. Bakómaki kosalela liloba yango na ndenge ya elilingi mpo na kolobela moto nyonso oyo azali kobomba mikano ya motema to bomoto na ye to alingi te báyeba ye. Awa Yesu abengi bakonzi ya lingomba ya Bayuda “bakosi.”​—Mt 6:5, 16.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 15:26

bana . . . bana ya mbwa: Lokola Mibeko ya Moize elobaki ete mbwa ezali mbindo, mbala mingi Makomami esalelaka ebengeli yango na ndenge ya mabe. (Le 11:27; Mt 7:6; Flp 3:2; Em 22:15) Kasi, ezala na mokanda ya Marko (7:27) to ya Matai, ndenge Yesu asaleli ebengeli “mwana ya mbwa” to “mbwa ya ndako” ekitisi nguya ya maloba yango. Mbala mosusu yango emonisi ete Yesu asalelaki ebengeli oyo baoyo bazalaki Bayuda te bazalaki kosalela mpo na kobenga bibwele na bango ya kobɔkɔla, oyo bazalaki kolinga mingi. Ndenge Yesu akokanisaki Bayisraele na “bana” mpe bato ya bikólo mosusu na “bana ya mbwa,” alingaki komonisa polele banani bazali na esika ya liboso. Na ndako oyo bana ná bambwa bazalaka, baboti batyaka nde bana na esika ya liboso.

19-25/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 16-17

“Ozali kokanisa makanisi ya nani?”

w07 15/2 lok. 16 par. 17

Mibali​—Bómekola bokonzi ya Kristo

17 Mokolo mosusu, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete asengeli kokende na Yerusaleme, epai akonyokwama na makambo mingi na “mikóló mpe na banganga-nzambe bakonzi mpe na bakomeli, mpe kobomama, mpe na mokolo ya misato kolamuka.” Ntango Petro ayokaki maloba yango, abendaki Yesu pembeni mpe abandaki kopamela ye ete: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Tomoni polele ete na libaku yango, Petro akosamaki na mposa ya motema na ye. Ebongaki Yesu asembola ye. Yango wana, alobaki na ye ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo ozali kokanisa makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”​—Matai 16:21-23.

w15 15/5 nk. 7-8 par. 16-17

Kebá​—Satana alingi kolya yo!

16 Satana akoki kokosa ata basaleli ya Yehova ya molende. Na ndakisa, kanisá na oyo esalemaki ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete etikali moke akobomama. Ntoma Petro, oyo azalaki kolinga Yesu, alobaki boye: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Yesu alobaki na Petro ete: “Leká nsima na ngai, Satana!” (Matai 16:22, 23) Mpo na nini Yesu abengaki Petro “Satana”? Mpo Yesu ayebaki likambo oyo elingaki kosalema. Mosika te, Yesu asengelaki kokufa lokola mbeka ya lisiko mpe komonisa ete Zabolo azali mokosi. Ezalaki mpenza ntango moko ya mpasi mpo na bato mpe ezalaki te ntango oyo Yesu asengelaki “komitungisa te.” Satana alingaki kosepela soki Yesu atikaka kozala ekɛngɛ.

17 Nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene, na yango biso mpe tozali na ntango moko ya mpasi. Satana alingi ete ‘tómitungisa te’ mpe tótya likebi na biso na koluka kokóma bato minene na mokili oyo. Alingi ete tóbosana ete tozali na mikolo ya nsuka mpe tótika kozala ekɛngɛ. Kotika te ete likambo ya boye ekómela yo! Kutu, tosengeli nde ‘kosɛnzɛlaka.’ (Matai 24:42) Kondima soki moke te lokuta ya Satana oyo ete nsuka ezali naino mosika to ekoya na yango kutu te.

w06 1/4 lok. 23 par. 9

‘Bókende mpe bókómisa bato bayekoli mpe bóbatisa bango’

9 Kolanda ndakisa ya Yesu mpo na kosala mokano ya Nzambe esɛngaka nini? Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Awa, Yesu amonisi makambo misato oyo tosengeli kosala. Ya liboso, ‘tómiboya.’ Na maloba mosusu, tosengeli kobwaka nzoto mpe makanisi na biso ya kozanga kokoka, mpe kondima toli ya Nzambe mpe litambwisi na ye. Ya mibale, ‘tómema nzete na biso ya mpasi.’ Na mikolo ya Yesu, nzete ya mpasi ezalaki elembo ya nsɔni mpe ya minyoko. Lokola tozali bakristo, tondimaka konyokwama mpo na nsango malamu. (2 Timote 1:8) Atako mokili ekoki kosɛka to kotyola biso, na ndakisa ya Kristo ‘totyolaka nsɔni’ mpe tozali na esengo mpo toyebi ete tozali kosepelisa Nzambe. (Baebre 12:2) Ya nsuka, tólandaka Yesu “ntango nyonso.”​—Nzembo 73:26; 119:44; 145:2.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 16:18

Yo ozali Petro, mpe na libanga oyo: Liloba ya Grɛki peʹtros (nkombo ya mibali) elimboli “eteni ya libanga.” Basaleli yango awa lokola nkombo mpenza ya moto (Petro), nkombo oyo Yesu apesaki Simo, na monɔkɔ ya Grɛki. (Yn 1:42) Liloba ya Grɛki peʹtra (nkombo ya basi) ebongolamaka na “libanga,” ekoki komonisa moboko ya libanga to libanga ya monene. Liloba yango Grɛki ezali mpe na Mt 7:24, 25; 27:60; Lk 6:48; 8:6; Ro 9:33; 1Ko 10:4; 1Pe 2:8. Emonani ete Petro azalaki komitalela te lokola libanga oyo Yesu akotonga lisangá na ye, mpo akomaki na 1 Petro 2:4-8 ete esakolamá ete Yesu azalaki “libanga ya litumu ya moboko ya ndako,” oyo Nzambe ye moko aponaki. Ndenge moko mpe, ntoma Paulo alobelaki Yesu lokola “moboko” mpe “libanga ya elimo.” (1Ko 3:11; 10:4) Emonani ete Yesu asalelaki kaka elobeli; alingaki kaka koloba ete: ‘Yo, oyo nabengi na nkombo Petro ososoli mpenza nani azali Kristo, “libanga oyo,” oyo akozala moboko ya lisangá ya bokristo.’

lisangá: Ezali esika ya liboso basaleli ek·kle·siʹa, oyo ezali na monɔkɔ ya Grɛki. Euti na maloba mibale ya Grɛki, ék, oyo elimboli “libándá ya,” mpe kaléô, oyo elimboli “kobenga.” Etaleli etuluku ya bato oyo babengisami to basangani mpo na mokano to mosala moko boye. (Talá Ndimbola ya maloba.) Na vɛrsɛ yango, Yesu asakolaki kosalema ya lisangá ya bokristo, oyo esangisi bakristo oyo batyami mafuta na elimo, baoyo lokola “libanga ya bomoi,” bazali “kotongama ndako ya elimo.” (1Pe 2:4, 5) Libongoli ya Septante esaleli mingi liloba ya Ebre “lisangá” na esika ya liloba wana ya Grɛki, oyo mbala mingi esalelamaka mpo na kolobela ekólo ya bato ya Nzambe. (Mib 23:3; 31:30) Na Misala 7:38, babengi Bayisraele oyo babimaki na Ezipito ete “lisangá.” Ndenge moko mpe, bakristo oyo ‘babengaki bango bálongwa na molili’ mpe ‘baponaki bango na mokili’ basali “lisangá ya Nzambe.”​—1Pe 2:9; Yn 15:19; 1Ko 1:2.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 16:19

bafungola ya bokonzi ya likoló: Na Biblia, baoyo bapesaki bango mwa bafungola, ezala ya elilingi to te, bapesaki bango mwa bokonzi. (1Nt 9:26, 27; Yis 22:20-22) Na yango, liloba “fungola” ekómaki kosalelama mpo na komonisa bokonzi mpe mokumba. Petro asalelaki “bafungola” oyo bapesaki ye mpo na kofungwela Bayuda (Mis 2:22-41), Basamaria (Mis 8:14-17), mpe bato ya bikólo (Mis 10:34-38) nzela ya kozwa elimo santu ya Nzambe mpo bázala na elikya ya kokɔta na bokonzi ya likoló.

26/02–4/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 18-19

“Kebá ete omibɛtisa to obɛtisa basusu libaku te”

nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 18:6, 7

libanga oyo banikaka na yango mbuma, lokola oyo mpunda ebalolaka: To “libanga ya monene mpenza.” Lit., “libanga ya kilo ya mpunda.” Libanga ya ndenge wana ekokaki kozala monene ya mɛtrɛ moko na ndambo (1,2-1,5 m) mpe ezalaki kilo mpenza na boye ete kaka mpunda nde akokaki kobalusa yango.

kobɛtisa kondima ya bato mabaku to biloko oyo ebɛtisaka mabaku: Ndimbola mpenza ya skandalon, liloba moko ya Grɛki oyo ebongolami na “kobɛtisa kondima ya bato mabaku” ekoki kolimbola motambo; bamosusu balobi ete ekokaki kozala mwa nzete oyo basali motambo mpe batye yango mpambo. Bakómaki mpe kosalela liloba yango mpo na kolobela likambo nyonso oyo ekokaki kobɛtisa basusu libaku to kokweisa bango. Na maloba mosusu, etaleli likambo moko oyo etindi moto alanda nzela mabe, abɛta libaku to abuka mibeko ya Nzambe to asala lisumu. Na Mt 18:8, 9, skan·da·liʹzo, vɛrbɛ oyo ekokani na yango, oyo ebongolamaka na “kosala ete moto abɛta libaku,” ekoki mpe kobongolama na “kokóma motambo; kosalisa moto lisumu.”

nwtsty-E bililingi mpe bavideo

Libanga oyo banikaka na yango mbuma

Bazalaki kosalela libanga yango mpo na konika mbuma to kofina mbuma ya olive mpo na kozwa mafuta. Mosusu ezalaki mpenza monene te mpe moto akokaki kobalusa yango na mabɔkɔ, kasi mosusu ezalaki kilo mpenza yango wana kaka nyama nde azalaki kobalusa yango. Ekoki kozala libanga moko ya monene mpenza lokola oyo Samsone abaluselaki Bafilistia. (Bas 16:21) Kaka na Yisraele te nde bazalaki kosalela enikelo oyo nyama ezalaki kobalusa kasi mpe na ampire mobimba ya Roma.

Mabanga oyo banikaka na yango mbuma ya likoló ná ya nse

Libanga ya monene mpenza ya konika mbuma lokola oyo balakisi awa, nyama ya mboka nde ezalaki kobalusa yango, na ndakisa mpunda mpe bazalaki kosalela yango mpo na konika mbuma to kotuta olive. Libanga ya likoló ekokaki kozala monene ya mɛtrɛ moko na ndambo mpe bakokaki kobalusa yango likoló ya libanga mosusu ya nse, ya monene koleka.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 18:9

Gehena: Ebengeli yango euti na maloba ya Ebre geh hin·nomʹ, elimboli “lobwaku ya Hinome,” oyo ezalaki na wɛsti mpe na sudi ya Yerusaleme. (Talá Apɛndisi B12, karte “Yerusaleme mpe bamboka ya zingazinga.”) Na ntango ya Yesu, lobwaku yango ekómaki esika ya kotumba bosɔtɔ, yango wana “Gehena” ezalaki liloba ya elilingi oyo ebongaki mpo na komonisa kobebisama nyɛɛ.

nwtstg-E Ndimbola ya maloba

Gehena

Nkombo ya lobwaku ya Hinome na Grɛki, na sudi-wɛsti ya Yerusaleme. (Yir 7:31) Esakweli elobelaki yango lokoka esika oyo ekotonda na bibembe. (Yir 7:32; 19:6) Ezali ata na likambo moko te oyo emonisi ete bazalaki kobwaka banyama to bato ya bomoi na Gehena mpo na kozikisa to konyokola bango. Yango wana esika yango ekoki te komonisa esika moko oyo emonanaka te epai milimo ya bato enyokwamaka na mɔtɔ libela na libela. Kutu, Yesu ná bayekoli na ye basalelaki liloba Gehena mpo na kolobela etumbu ya seko ya “liwa ya mibale,” elingi koloba kobebisama nyɛɛ, ya seko.​—Em 20:14; Mt 5:22; 10:28.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 18:10

kotala elongi ya Tata na ngai: To “kozala na likoki ya kotɛlɛma liboso ya Tata na ngai.” Lokola bazali na likoki ya kotɛlɛma liboso ya Nzambe, kaka bikelamu ya elimo nde bakoki komona elongi ya Nzambe.​—Kob 33:20.

w10 1/11 lok. 16

Baanzelu basalaka biso nini?

Yesu amonisaki ete baanzelu bazali na mokumba ya kosalisa basaleli ya Nzambe bábatela boyokani makasi na Nzambe. Yango wana, ntango Yesu akebisaki bayekoli na ye na likambo ya kobɛtisa basusu libaku, alobaki boye: “Bókeba, bótyola moko ya bana mike oyo te; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 18:10) Na maloba wana, Yesu alingaki koloba te ete moyekoli na ye mokomoko azali na anzelu mobateli oyo Nzambe atyá mpo na ye. Kasi, Yesu amonisaki ete baanzelu oyo basalaka na bomoko na Nzambe batyaka likebi na basangani ya lisangá na bokristo.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 18:22

mbala 77: Lit., “ntuku nsambo mbala nsambo.” Maloba yango ya Grɛki ekoki kolimbola “70 mpe 7” (mbala 77) to “70 mbala 7” (mbala 490). Maloba yango oyo ezali na libongoli ya Septante na Ebandeli 4:24 ebongoli yango na Ebre na “mbala 77,” yango eyokani na ndenge babongoli yango na “mbala 77.” Ata soki bato bakangi ntina na yango ndenge nini, ndenge bazongeli motángo nsambo mbala mibale elingaki koloba “libela” to “kozanga ndelo.” Ndenge Yesu ayebisaki Petro mbala 7 te kasi mbala 77, alingaki koloba na bayekoli na ye ete kolimbisa ezali na ndelo te. Nzokande, Talmud ya Babilone (Yoma 86b) elobi: “Soki moto moko asali mbeba, mbala ya liboso, ya mibale mpe ya misato, akolimbisama, kasi mbala ya minei akolimbisama te.”

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 19:7

mokanda ya kobengana mwasi: To “mokanda ya koboma libala.” Lokola Mibeko esɛngaki mobali oyo alingi koboma libala abongisa mokanda moko oyo eyokani na mibeko mpe mbala mosusu asolola na bankulutu, yango emonisi ete batikelaki ye ntango ya kotalela lisusu ekateli wana ya lisɛki te. Ntina ya mobeko yango ezalaki mpo moto awela koboma libala te mpe basi bábatelama na nzela ya mibeko. (Mib 24:1) Kasi na mikolo ya Yesu, bakonzi ya mangomba basalaki ete koboma libala ezala mpasi te. Josèphe, moto moko ya istware na siɛklɛ ya liboso, oyo azalaki Mofarisai mpe abomaki libala na ye, alobaki ete libala ekokaki kokufa “mpo na likambo nyonso (mpe mingi ya makambo yango mibali nde bazalaka na yango).”

nwtsty-E bililingi mpe bavideo

Mokanda ya koboma libala

Mokanda oyo ya koboma libala ezali ya mobu 71 to 72 ya ntango na biso, bakomaki yango na monɔkɔ ya Aramɛyɛ. Bamonaki yango na nɔrdi ya Wadi Murabbaat, oyo ezalaká ebale na esobe ya Yudea. Elobi ete mbula motoba nsima ya botomboki ya Bayuda, Josèph, mwana ya Naqsan, abomaki libala na Miriam, mwana ya Jonathan oyo azalaki kofanda na engumba Masada.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto