MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 18-19
Kebá ete omibɛtisa to obɛtisa basusu libaku te
Yesu asalelaki bandakisa mpo na komonisa ete kobɛta to kobɛtisa basusu libaku ezali likambo ya kozwa na lisɛki te.
‘Eloko oyo ezali kobɛtisa libaku’ ezali likambo to eloko moko oyo etindi moto alanda nzela ya mabe, abɛta libaku, abebisa bizaleli to akwea na lisumu
Moto oyo abɛtisaka basusu libaku ebongi bákangisa ye na nkingo libanga oyo banikaka na yango mbuma, mpe bábwaka ye na katikati ya mbu
Libanga oyo banikaka na yango mbuma
Yesu ayebisaki bayekoli na ye bálongola eloko nyonso ata soki ezali na valɛrɛ, na ndakisa lobɔkɔ to liso, soki ezali kobɛtisa bango libaku
Ekozala malamu kosundola biloko yango ya valɛrɛ mpo okɔta na Bokonzi ya Nzambe na esika okangama na yango mpe osuka na Gehena, oyo elimboli libebi ya seko
Na bomoi na ngai, nini ekoki kokóma eloko oyo ebɛtisaka libaku, mpe ndenge nini nakoki komibatela mpo namibɛtisa to nabɛtisa basusu libaku te?