Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
2-8/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 26
“Elekeli mpe Ekaniseli—Makambo oyo ekokanisi mpe ekesenisi yango”
nwtsty-E bililingi ná bavideo
Bilei ya Elekeli
Biloko ya ntina na bilei ya Elekeli ezalaki: mwana-mpate ya kotumba (oyo esengelaki te kobuka mokuwa na yango ata moko) (1); mampa oyo ezangi levire (2); ndunda ya bololo (3). (Kob 12:5, 8; Mit 9:11) Na kotalela Mishnah, ndunda yango ya bololo ekoki kozala ndunda lokola salade to bilolo, mbala mosusu yango ezalaki kokundwela Bayisraele ndenge banyokwamaki na boombo na Ezipito. Yesu asalelaki mampa oyo ezangá levire lokola elembo oyo emonisi nzoto na ye ya kokoka. (Mt 26:26) Mpe ntoma Paulo abengaki Yesu ‘mwana-mpate na biso ya elekeli.’ (1Ko 5:7) Kobanda na siɛklɛ ya liboso, bakómaki mpe kosalela vinyo (4) na ntango bazali kolya bilei ya Elekeli. Yesu asalelaki vinyo lokola elembo ya makila na ye, oyo ekosopama lokola mbeka.—Mt 26:27, 28.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 26:26
elakisi: Liloba ya Grɛki e·stinʹ (elimboli mpenza “ezali”) awa ezali na ndimbola ya “elimboli; elakisi; emonisi.” Bantoma bayebaki ndimbola yango, mpo na ntango yango nzoto ya kokoka ya Yesu ezalaki wana liboso na bango se ndenge moko limpa ezangá levire oyo balingaki kolya ezalaki liboso na bango. Na yango, limpa yango ekokaki te kozala nzoto na ye mpenza. Emonani ete kaka liloba wana ya Grɛki esalelami na Mt 12:7, mpe mabongoli mingi ya Biblia ebongoli yango na “elakisi.”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 26:28
makila ya kondimana: Mbeka ya Yesu nde epesaki nzela ete kondimana ya sika oyo Yehova asalaki ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo ebanda mosala na yango. (Ebr 8:10) Awa, Yesu asaleli kaka maloba oyo Moize asalelaki ntango azalaki moyokanisi mpe abandisaki kondimana ya Mibeko oyo Yehova asalaki ná ekólo Yisraele na Ngomba Sinai. (Kob 24:8; Ebr 9:19-21) Se ndenge makila ya bangɔmbɛ ná bantaba esimbaki kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki na ekólo yango, makila ya Yesu esimbaki kondimana ya sika oyo Yehova asalaki na Yisalaele ya elimo. Kondimana yango ebandaki mosala na yango na Pantekote ya mobu 33 T.B.—Ebr 9:14, 15.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 26:17
Na mokolo ya liboso ya bagato oyo ezangi levire: Fɛti ya bagato ezangá levire ebandaki na mokolo ya 15 Nisana, mokolo moko nsima ya Elekeli (14 Nisana), mpe ezalaki koumela mikolo nsambo. (Talá eteni 19 ya Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe.) Kasi, na ntango ya Yesu, Elekeli ekómaki mpenza na boyokani na fɛti yango na boye ete mikolo nyonso mwambe, ata mpe mokolo ya 14 Nisana, na bantango mosusu ekómaki kobengama “fɛti ya bagato ezangá levire.” (Lk 22:1) Na kotalela makambo oyo nyonso, fraze “Na mokolo ya liboso ya” ekoki kobongolama na “Mokolo moko liboso.” (Talá mpe Yn 1:15, 30, epai liloba ya Grɛki mpo na “ya liboso” [proʹtos] ebongolami na “liboso” na fraze oyo, elingi koloba “azalaki na bomoi liboso [proʹtos] ngai.”) Boye liloba ya Grɛki oyo basalelaki na ebandeli ná mpe mimeseno ya Bayuda, etindi bayekoli bátuna Yesu motuna na mokolo ya 13 Nisana. Kaka na mokolo yango ya 13 Nisana, bayekoli babongisaki Elekeli, oyo bayaki kosala yango “nsima wana mpokwa ekómaki” na ebandeli ya 14 Nisana.—Mr 14:16, 17.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 26:39
kɔpɔ oyo eleka mosika na ngai: Na Biblia, “kɔpɔ” esalelamaka mingi na ndenge ya elilingi mpo na kolobela mokano ya Nzambe, to “mokumba oyo apesi” moto. (Talá nɔti mpo na koyekola na Mt 20:22.) Na ntembe te, Yesu azalaki komitungisa mingi mpo na nsɔni oyo liwa na ye elingaki koyokisa Nzambe mpo bafundaki ye ete afingaki mpe atombokeli Nzambe, yango wana abondelaki ete “kɔpɔ” oyo eleka mosika na ye.
9-15/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 27-28
“Bókende, bókómisa bato bayekoli—Mpo na nini, epai wapi, mpe ndenge nini?”
‘Bókende mpe bókómisa bato bayekoli’
4 Yesu azali na bokonzi likoló ya lisangá na ye, mpe banda mobu 1914 akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe oyo eutaki kotyama sika. (Bakolose 1:13; Emoniseli 11:15) Azali mokonzi ya baanzelu mpe, lokola azali mokonzi na bango, azali kotambwisa limpinga ya bankama ya bamilio ya baanzelu na likoló. (1 Batesaloniki 4:16; 1 Petre 3:22; Emoniseli 19:14-16) Tata na ye apesaki ye nguya ya kokómisa mpamba “guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya” oyo ezali kotɛmɛla mitinda ya boyengebene. (1 Bakorinti 15:24-26; Baefese 1:20-23) Bokonzi oyo Yesu azali na yango esuki kaka na bato ya bomoi te. Azali lisusu “mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi” mpe Nzambe apesá ye nguya ya kosekwisa baoyo bakufá. (Misala 10:42; Yoane 5:26-28) Ya solo, tosengeli te kozwa na lisɛki etinda oyo euti epai ya Moto oyo bapesi ye bokonzi oyo eleki monene ndenge wana. Na yango, tozali kotosa mpe komemya na motema moko etinda ya Klisto oyo ya ‘kokende mpe kokómisa bato bayekoli.’
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 28:19
bókómisa bato bayekoli: Vɛrbɛ ya Grɛki ma·the·teuʹo ekoki kobongolama na “koteya” na likanisi ya kokómisa bato bana-kelasi to bayekoli. (Talá mpe Mt 13:52, epai ebongolami na “bateyi ye.”) Vɛrbɛ “kobatisa” mpe “koteya” emonisi makambo oyo etinda ya “kokómisa bato bayekoli” esɛngi.
na bikólo nyonso: Libongoli moko ya liloba na liloba elobi “bikólo nyonso,” kasi vɛrsɛ yango ná oyo elandi emonisi ete ebengeli yango etaleli nde bato oyo bauti na bikólo nyonso, mpo liloba ya Grɛki “bango” na maloba bóbatisa bango ezali na bobali (masculin) mpe elobeli nde bato, kasi te “bikólo” mpo liloba yango na Grɛki ezangi bobali (masculin) mpe bomwasi (féminin). Etinda oyo ya kokende koluka bato na “bikólo nyonso” ezalaki sika. Liboso Yesu aya awa na mabele, Makomami emonisi ete Bayisraele bazalaki koyamba bato ya bikólo soki bayei kosalela Yehova. (1Ba 8:41-43) Kasi, na etinda oyo, Yesu atindi bayekoli na ye básakwela kaka Bayuda te kasi mpe bato mosusu, amonisi ndenge mosala ya kokómisa bato bayekoli esengeli kosalema na mokili mobimba.—Mt 10:1, 5-7; Em 7:9; talá nɔti mpo na koyekola na Mt 24:14.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 28:20
bóteya bango: Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koteya” esɛngi kopesa malako, kolimbola, kopesa bandakisa mpo na komonisa ete makambo yango ezali solo mpe kopesa bilembeteli. (Talá banɔti mpo na koyekola na Mt 3:1; 4:23.) Koteya bango bátosa makambo nyonso oyo Yesu apesaki bino mitindo ezali likambo ya mokolo moko te mpo esɛngi koteya makambo oyo ateyaki, kosalela mateya na ye, mpe kolanda ndakisa na ye.—Yn 13:17; Ef 4:21; 1Pe 2:21.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 27:51
rido: Elamba yango ya kitoko ezalaki kokabola Esika oyo Eleki Bosantu na Esika Mosantu ya tempelo. Bonkɔkɔ ya Bayuda emonisi ete molai ya rido yango ezalaki mɛtrɛ soki 18, monene na yango mɛtrɛ 8 mpe na volimi ya santimɛtrɛ 7,4. Ntango rido yango epasuki na ndambo mibale, Yehova amonisi kaka te nkanda na ye mpo na bato oyo babomi Mwana na ye kasi amonisi mpe ete sikoyo nzela ya kokende na likoló efungwami.—Ebr 10:19, 20; talá diksionɛrɛ oyo ezali na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Anglais.
esika mosantu: Liloba ya Grɛki na·osʹ awa emonisi ndako ya losambo oyo ezali na Esika Mosantu mpe Esika oyo Eleki Bosantu.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 28:7
bóyebisa bayekoli na ye ete alamuki: Basi yango bazalaki kaka te bayekoli ya liboso oyo bayebisaki bango ete Yesu asekwi, kasi batindaki mpe bango báyebisa bayekoli mosusu nsango yango. (Mt 28:2, 5, 7) Bayuda bazalaki kondima te litatoli oyo mwasi apesi na tribinale. Kasi, anzelu ya Yehova apesi basi yango lokumu na ndenge apesi bango mokumba oyo epesi bango esengo.
16-22/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MARKO 1-2
“Masumu na yo elimbisami”
“Masumu na yo elimbisami”
Ntango Yesu azali koteya na kati ya ndako oyo etondi na bato, mibali minei bayei na mokatatali moko na litɔkɔ. Balingi Yesu abikisa moninga na bango. Kasi, lokola bato batondi, bakoki te “kokómisa ye epai ya Yesu.” (Marko 2:4) Bato yango bakokaki kolɛmba nzoto. Kasi, bamati likoló ya ndako mpe bafungoli lidusu na plafɔ. Na nsima, bakitisi litɔkɔ oyo mokatatali alaleli na kati ya ndako.
Yesu asiliki ndenge bakati ye ntango azali koteya? Te! Akamwe nde makasi mpo na kondima na bango mpe alobi na mokatatali ete: “Masumu na yo elimbisami.” (Matai 9:2) Kasi, Yesu akoki mpenza kolimbisa masumu? Bakomeli mpe Bafarisai bazwi likambo yango, mpe bakanisi: “Mpo na nini moto oyo azali koloba ndenge wana? Azali kofinga. Longola Nzambe ye moko, nani mosusu akoki kolimbisa masumu?”—Marko 2:7.
Lokola Yesu ayebi makanisi na bango, alobi na bango: “Mpo na nini bozali kokanisakanisa makambo wana na mitema na bino? Nini eleki pɛtɛɛ, koloba na mokatatali: ‘Masumu na yo elimbisami,’ to koloba: ‘Tɛlɛmá, lɔkɔtá litɔkɔ na yo mpe tambolá’?” (Marko 2:8, 9) Ya solo, na lisalisi ya mbeka oyo Yesu akopesa na nsima, akoki kolimbisa masumu ya moto wana.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 2:9
Nini eleki pɛtɛɛ: Ezali mpasi te moto aloba ete akoki kolimbisa masumu, mpo ekosɛnga te alakisa elembeteli moko boye mpo na kondimisa makambo oyo alobi. Kasi koloba, Tɛlɛmá, . . . mpe tambolá esɛngaki likamwisi moko oyo ekosalisa moto nyonso amona ete Yesu azalaki na bokonzi ya kolimbisa masumu. Lisolo oyo mpe Yis 33:24 emonisi ete bato babɛlaka mpo na masumu oyo tosangolá.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mr 1:11
mongongo moko eutaki na likoló: Esika ya liboso na bisika misato oyo Baevanzile elobeli ndenge Yehova azali koloba na bato mbala moko.—Talá banɔti mpo na koyekola na Mr 9:7; Yn 12:28.
Yo ozali Mwana na ngai: Lokola azalaki ekelamu ya elimo, Yesu azalaki Mwana ya Nzambe. (Yn 3:16) Bandá abotamaki na ye lokola moto, Yesu azalaki “Mwana ya Nzambe” kaka ndenge Adama azalaki moto ya kokoka. (Lk 1:35; 3:38) Kasi, emonani ete awa maloba ya Nzambe esuki kaka te na kolobela soki Yesu mpenza nani. Lokola Nzambe alobaki maloba wana mpe asopelaki Yesu elimo santu na ye, Nzambe amonisaki polele ete Yesu azalaki Mwana na ye ya liboso ya elimo, oyo ‘abotamaki lisusu’ na elikya ya kozonga na bomoi na likoló mpe atyamaki mafuta na elimo mpo na kozala Mokonzi oyo Nzambe atye mpe nganga-nzambe monene.—Yn 3:3-6; 6:51; talá mpe Lk 1:31-33; Ebr 2:17; 5:1, 4-10; 7:1-3.
nandimi yo: To “Nasepeli mpenza na yo; osepelisaka ngai mpenza.” Maloba yango esalelami mpe na Mt 12:18, ezongeli maloba ya Yis 42:1 oyo elobeli Masiya oyo alakamaki, to Kristo. Kosopama ya elimo mpe maloba oyo Nzambe alobaki mpo na Mwana na ye emonisaki polele ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki.—Talá banɔti mpo na koyekola na Mt 3:17; 12:18.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 2:28
Nkolo . . . ya sabata: Yesu asaleli maloba yango mpo na ye moko (Mt 12:8; Lk 6:5), amonisaki ete azalaki na lotomo ya kosalela sabata mpo na kosala mosala oyo Tata na ye ya likoló apesaki ye. (Talá mpe Yn 5:19; 10:37, 38.) Yesu asalaki makamwisi na ye mosusu ya minene na mokolo ya sabata, abikisaki mpe bato ya maladi. (Lk 13:10-13; Yn 5:5-9; 9:1-14) Yango emonisaki polele makambo oyo akosala mpo na kobɔndisa bato ntango akoyangela na Bokonzi na ye, oyo ekozala lokola kopema ya sabata.—Ebr 10:1.
23-29/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MARKO 3-4
“Abikisi moto ya maladi na mokolo ya Sabata”
Makambo nini epekisami te na Sabata?
Mokolo moko ya Sabata, Yesu akei na sinagoga, ekoki kozala na Galile. Kuna, akuti moto moko oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ekauká. (Luka 6:6) Bakomeli ná Bafarisai bazali kolandela Yesu na likebi mpenza. Mpo na nini? Bamonisi mpenza makanisi na bango ntango batuni ye: “Bakoki kobikisa moto na sabata?”—Matai 12:10.
Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bandimaka ete esengeli kobikisa moto mokolo ya Sabata kaka soki bomoi na ye ezali na likama. Na ndakisa, ezali mabe mokolo ya Sabata kozongisa mokuwa to kokanga eteni ya elamba na esika oyo moto avimbi, mpo yango ezali kotya bomoi ya moto na likama te. Emonani polele ete bakomeli ná Bafarisai batuni Yesu motuna wana te mpo bazali komitya na esika ya moto wana ya mpasi. Bazali nde koluka likambo ya kokweisa na yango Yesu.
Makambo nini epekisami te na Sabata?
Kasi, Yesu ayebi makanisi na bango ya mabe. Amoni ete bazali na makanisi ya mabe mpenza mpe oyo eyokani te na Makomami na likambo etali kobuka mobeko oyo epekisi kosala mosala mokolo ya Sabata. (Kobima 20:8-10) Akutaná na bantembe ya ndenge wana oyo ezangá motó ná makolo mpo na misala na ye ya malamu. Sikoyo Yesu alobi likambo oyo ekotinda bango bátɛmɛla ye lisusu makasi. Alobi na mobali oyo lobɔkɔ ekauká: “Tɛlɛmá mpe yaká na katikati.”—Marko 3:3.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 3:5
na nkanda, mpo ayokaki mpenza mawa: Kaka Marko nde alobeli ndenge Yesu asalaki ntango amonaki motema makasi ya bakonzi ya mangomba na libaku oyo. (Mt 12:13; Lk 6:10) Mbala mosusu Petro moto ya motema mɔtɔmɔtɔ nde akokaki kolobela ndenge Yesu amiyokaki.—Talá “Maloba ya Ebandeli na Marko.”
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mr 3:29
kofinga elimo santu: Kofinga elimboli kotuka, koloba maloba ya mabe to kotyola Nzambe to biloko mosantu. Lokola elimo santu eutaka na Nzambe, kotɛmɛla na nko nyonso to kowangana mosala na yango ekokani na kofinga Nzambe. Ndenge emonisami na Mt 12:24, 28 mpe Mr 3:22, bakonzi ya mangomba ya Bayuda bamonaki nguya ya elimo ya Nzambe na makamwisi oyo Yesu asalaki; ata bongo, balobaki ete ezalaki nguya ya Satana Zabolo.
ngambo ya lisumu ya seko: Emonani lokola ete ezali lisumu ya nko oyo ezali na makama ya seko; mbeka ya kozipa lisumu ya ndenge wana ezali te.—Talá nɔti mpo na koyekola na kofinga elimo santu na vɛrsɛ oyo mpe nɔti mpo na koyekola na Mt 12:31.
‘Okangi ntina’?
6 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa yango? Ya liboso, tosengeli kondima ete toyebaka te makambo nyonso oyo esalaka ete moyekoli ya Biblia akola. Komikitisa ekosalisa biso mpo tókwea te na motambo ya kotindika moyekoli ya Biblia na makasi mpo azwa batisimo. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa moto yango, kasi na komikitisa nyonso tosengeli kondima ete na nsuka ekateli ya komipesa na Yehova ezali na mabɔkɔ ya moto yango. Komipesa esengeli kozala likambo oyo euti mpenza na motema ya moto ye moko mpo alingi Nzambe. Soki bongo te, akondimama te epai na Yehova.—Nz. 51:12; 54:6; 110:3.
7 Ya mibale, kokanga ntina ya ndakisa oyo ekosalisa biso tólɛmba nzoto te soki tomoni na ebandeli ete mosala na biso ezali kobota mbuma te. Tosengeli kozala motema molai. (Yak. 5:7, 8) Ata mboto eboti mbuma te, kasi soki tosali nyonso mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia, tokomona ete soki moyekoli yango akoli te, ezali te mpo biso tosali mosala malamu te. Yehova apesaka nzela ete mboto ya solo ekola kaka na motema oyo ezali na komikitisa mpe oyo elingi kosala mbongwana. (Mat. 13:23) Na yango, tokoki te koloba ete mosala na biso ezali kobota mbuma to te mpo bato bazali kondima to te. Na miso ya Yehova, kobota mbuma malamu na mosala ya kosakola etalelaka te lolenge bato oyo tozali koteya bazali kondima to koboya. Lisusu, azwaka na motuya bosembo mpe milende oyo tomonisaka ata soki tozwi matomba ya malamu to te.—Tángá Luka 10:17-20; 1 Bakorinti 3:8.
8 Ya misato, mbala mingi tomonaka te bambongwana oyo moto azali kosala. Na ndakisa, misionɛrɛ moko azalaki koyekola na mobali moko ná mwasi na ye. Mobali yango ná mwasi na ye bakutanaki na ndeko yango mpe bayebisaki ete balingi kokóma basakoli. Ndeko yango ayebisaki bango ete soki balingi kokóma basakoli, basengeli kotika komɛla makaya. Akamwaki makasi ntango bayebisaki ye ete batiká komɛla makaya esili koleka ebele ya bambula. Mpo na nini batikaki komɛla makaya? Basimbaki ete Yehova akoki komona bango bazali komɛla makaya mpe ete ayinaka ezaleli ya bokosi. Na yango, motema na bango etindaki bango bázwa ekateli ya kopona komɛla makaya ezala liboso ya misionɛrɛ wana to kotika yango libela. Lokola bakómaki na bolingo makasi mpo na Yehova, yango esalisaki bango bázwa ekateli ya malamu. Bakolaki na elimo atako misionɛrɛ wana ayebaki te mbongwana oyo basalaki.
BOMOI YA BAKRISTO
“Oyo azali na matoi ya koyoka ayoka”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 4:9
Oyo azali na matoi ya koyoka ayoka: Liboso Yesu alobela ndakisa ya moloni, alobaki boye: “Bóyoka.” (Mr 4:3) Asukisaki ndakisa yango na maloba “oyo azali na matoi ya koyoka ayoka” mpo na komonisa polele ete ezali na ntina mingi koyoka malamumalamu toli na ye. Tokoki komona maloba mosusu ya ndenge wana na Mt 11:15; 13:9, 43; Mr 4:23; Lk 8:8; 14:35; Em 2:7, 11, 17, 29; 3:6, 13, 22; 13:9.
30/04–6/05
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MARKO 5-6
“Yesu azali na nguya ya kosekwisa bandeko to baninga na biso oyo bakufá”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 5:39
akufi te, kasi alali nde mpɔngi: Mbala mingi Biblia ekokanisaka liwa na mpɔngi. (Nz 13:3; Yn 11:11-14; Mis 7:60; 1Ko 7:39; 15:51; 1Te 4:13) Yesu alingaki kosekwisa elenge mwasi yango, boye ekoki kozala ete alobaki bongo mpo alingaki komonisa ete kaka ndenge bato bakoki kolamuka na mpɔngi ya makasi, bakoki mpe kolamuka na liwa. Nguya ya Yesu ya kosekwisa elenge mwasi yango eutaki epai ya Tata na ye, “oyo azongisaka bakufi na bomoi mpe abengaka biloko oyo ezali te lokola nde ezali.”—Ro 4:17.
Elenge mwasi moko azongi lisusu na bomoi!
Na makamwisi oyo Yesu asalaki liboso, apekisaki baoyo abikisaki bápanza nsango yango; asali mpe bongo na baboti oyo. Ata bongo, esengo etindi baboti yango mpe bato mosusu bápanza nsango yango “na etúká wana mobimba.” (Matai 9:26) Soki omoni ndeko to moninga na yo oyo akufaki asekwisami, okolobela likambo yango na esengo mpenza! Oyo ezali mbala ya mibale Yesu asekwisa moto.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 5:19
yebisá bango: Atako Yesu amesanaki kopekisa bato báyebisa basusu makamwisi oyo asali (Mr 1:44; 3:12; 7:36), ayebisaki mobali oyo ete ayebisa bato ya libota na ye likambo oyo ekómeli ye. Mbala mosusu ezali mpo basɛngaki Yesu alongwa na etúká yango mpe alingaki kozwa te libaku ya kopesa bango litatoli; elingaki mpe kokweisa nsango nyonso ya lokuta oyo bato balingaki kopesa mpo na bangulu oyo ebungaki.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 6:11
bópupola mabele oyo ezali na nse ya makolo na bino: Elembo yango emonisaki ete bayekoli bakomema ngambo te mpo na bitumbu oyo Nzambe alingaki kopesa bato yango. Maloba ya ndenge wana ezali mpe Mt 10:14; Lk 9:5. Marko ná Luka babakisi maloba ezala litatoli epai na bango. Paulo mpe Barnabasi basalelaki malako yango na Pisidia ya Antiokia (Mis 13:51), mpe ntango Paulo asalaki mpe bongo na Korinti ntango apupolaki bilamba na ye, alobaki mpe boye: “Makila na bino ezala na mitó na bino moko. Ngai nazali pɛto.” (Mis 18:6) Kosala bongo ezalaki likambo ya sika te mpo na bayekoli ya Yesu; Bayuda oyo bazalaki kosala mibembo na bikólo mosusu bazalaki kopupola putulu na basandale na bango liboso ya kokɔta lisusu na teritware na bango mpo bazalaki komona putulu yango mbindo. Kasi, Yesu azalaki na makanisi mosusu na motó ntango apesaki bayekoli na ye malako wana.