Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr18 Juin nk. 1-7
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • 4-10/06
  • 11-17/06
  • 18-24/06
  • 25/06–1/07
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2018
mwbr18 Juin nk. 1-7

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

4-10/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MARKO 15-16

“Yesu akokisaki bisakweli”

nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mr 15:24, 29

kokabola bilamba na ye ya likoló: Lisolo oyo ezali Yn 19:23, 24 elobeli makambo mosusu ya mikemike oyo Matai, Marko mpe Luka balobeli yango te: Emonani ete basoda ya Roma babɛtɛlaki bilamba nyonso mibale mbɛsɛ; elamba ya likoló mpe elamba ya kati, kasi basoda yango bakabolaki elamba ya likoló “na ndambo minei, ndambo moko mpo na soda mokomoko”; baboyaki kokabola elamba ya kati, yango wana babɛtɛlaki yango mbɛsɛ mpe yango ekokisaki esakweli oyo ezali na Nz 22:18. Emonani ete baoyo bazalaki koboma bato bazalaki na momeseno ya kozwa naino bilamba ya bato oyo bango balingi koboma, yango wana bazalaki kolongola bato mabe bilamba mpe biloko nyonso liboso báboma bango mpo na kosambwisa bango mpenza.

koningisa mitó na bango: Mbala mingi bazalaki kosala jɛstɛ yango nzela moko na maloba, yango ezalaki komonisa kotyola to kosɛka moto. Na kozanga koyeba, baleki-nzela bakokisaki esakweli oyo ezali na Nz 22:7.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 15:43

Yozefe: Makambo mikemike ekeseni oyo bakomi ya Baevanzile balobi mpo na Yozefe emonisi ete moto na moto akomaki na esika na ye. Matai, mokɔngɔli-mpako alobi ete Yozefe azalaki “mozwi”; Marko, lokola akomaki mokanda na ye libosoliboso mpo na Baroma, alobi ete Yozefe azalaki “moko ya basambisi ya lokumu mingi” oyo azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe; Luka, oyo azalaki monganga, alobi ete Yozefe “azalaki moto malamu mpe moyengebene” oyo andimaki te kopona mwango oyo basambisi mosusu bazwaki ya koboma Yesu; kaka Yoane nde alobi ete Yozefe azalaki “moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda.”​—Mt 27:57-60; Mr 15:43-46; Lk 23:50-53; Yn 19:38-42.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 15:25

ngonga ya misato: Ezali ngonga soki ya 9 ya ntɔngɔ. Bato mosusu balobaka ete lisolo oyo ekeseni na oyo ezali na Yn 19:14-16, oyo elobi “ezalaki soki ngonga ya motoba” ntango Pilate akabaki Yesu mpo báboma ye. Atako Makomami elimboli mpenza te bokeseni yango, tótalela mwa makambo oyo: Masolo ya Baevanzile ezali na boyokani na ndenge makambo elandanaki na mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Baevanzile nyonso minei emonisi ete banganga-nzambe mpe mikóló ya bato bakutanaki ntango ntɔngɔ etanaki mpe na nsima bamemaki Yesu epai ya Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma. (Mt 27:1, 2; Mr 15:1; Lk 22:66–23:1; Yn 18:28) Matai, Marko mpe Luka balobaki ete Yesu azalaki likoló ya nzete ntango molili ekɔtaki na mokili wana mobimba kobanda “ngonga ya motoba . . . tii ngonga ya libwa.” (Mt 27:45, 46; Mr 15:33, 34; Lk 23:44) Likambo moko oyo mbala mosusu esali ete ngonga yango ekesana, yango oyo: bamosusu bazalaki kosangisa kobɛtama fimbo na kati ya makambo oyo bazalaki kosala mpo na koboma. Na bantango mosusu moto azalaki kokufa mpo kobɛta elekaki ndelo. Na ntembe te, babɛtaki mpe Yesu mabe mpenza mpo esɛngaki moto mosusu amema nzete ya mpasi na esika na ye. (Lk 23:26; Yn 19:17) Soki bazalaki kotalela kobɛtama fimbo lokola ebandeli ya koboma moto, boye mwa ntango elekaki liboso bábaka Yesu na nzete. Na kolanda likanisi yango, Mt 27:26 ná Mr 15:15 etángi kobɛtama fimbo ná kobakama na nzete nzela moko. Na yango, moto na moto akokaki kopesa ngonga ya kobomama ya Yesu na kotalela ntango oyo likambo yango ebandaki. Yango ekoki kozala ntina oyo Pilate akamwaki ntango bayebisaki ye ete Yesu akufaki noki nsima ya kobakama na nzete. (Mr 15:44) Longola yango, bakomi ya Biblia balandaki momeseno ya kokabola mokolo na biteni minei ya ngonga misatomisato, ndenge ezalaki mpe kosalema mpo na butu. Kokabola mokolo ndenge wana emonisi ntina oyo balobeli mbala mingi ngonga ya misato, ya motoba mpe ngonga ya libwa; kotánga yango kobanda na ngonga soki ya motoba ya kotana ya ntɔngɔ. (Mt 20:1-5; Yn 4:6; Mis 2:15; 3:1; 10:3, 9, 30) Lisusu, bato bazalaki te na ngonga ya sikisiki, yango wana, bato bazalaki kosalela mingi liloba “soki,” mpo na kolobela ngonga, ndenge ezali na Yoane 19:14. (Mt 27:46; Lk 23:44; Yn 4:6; Mis 10:3, 9) Na mokuse: Ekoki kozala ete Marko asangisaki kobɛtama fimbo ná kobakama na nzete, kasi Yoane alobelaki kaka kobakama na nzete. Ekoki kozala ete bakomi yango nyonso mibale balobelaki ngonga ya mokolo na kolanda ngonga ya misato oyo ezalaki mwa pene mpe Yoane asalelaki liloba “soki” mpo na kolobela ngonga oyo atángi. Makambo nyonso oyo ekoki kozala ntina oyo ngonga oyo balobeli na masolo yango ekeseni. Mpo na kosukisa, lokola mokanda ya Yoane ekomamaki bambula mingi na nsima mpe elobeli ngonga oyo ekeseni na oyo Marko apesaki, yango emonisi ete Yoane asalaki te kopi ya mokanda ya Marko.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mr 16:8

mpo bazalaki na kobanga: Na kotalela bamaniskri ya kala mpenza ya eteni ya nsuka ya mokanda ya Marko, evanzile yango esuki na maloba oyo ezali na vɛrsɛ 8. Bato mosusu balobi ete maloba yango ekoki te kosukisa mokanda yango mpo ekatani na mbalakaka. Kasi, na kotalela lolenge oyo Marko akomi mokanda na ye, koloba bongo ebongi mpenza te. Longola yango, Jérôme ná Eusèbe, bato ya mayele na siɛklɛ ya minei bamonisi ete na makomi ya ebandeli mpenza ya mokanda ya Marko, maloba “mpo bazalaki kobanga” esukisaki mpenza lisolo yango.

Ezali na mwa bamaniskri ya Grɛki mpe mabongoli mosusu oyo ebakisi bosukisi ya molai to ya mokuse nsima ya vɛrsɛ 8. Bosukisi ya molai (oyo babakisi bavɛrsɛ mosusu 12) ezali na Codex Alexandrinus, Codex Epraemi rescriptus mpe na Codex Bezae Cantabrigiensis, nyonso ya siɛklɛ ya mitano ya ntango na biso. Maloba yango ezali mpe na libongoli ya Vulgate, ya syriaque Cureton mpe na Syriaque Peshitta. Kasi, ezali te na bamaniskri ya Grɛki ya siɛklɛ ya minei, ezali te na Codex sinaïtique mpe Vaticanus, to na Codex syriaque sinaïtique ya siɛklɛ ya minei to ya mitano, to na maniskri Copte sahidique ya mokanda ya Marko ya siɛklɛ ya mitano. Ndenge moko mpe, maniskri oyo eumeli mingi koleka ya mokanda ya Marko na monɔkɔ ya Arménien mpe ya Géorgien esuki na vɛrsɛ 8.

Mwa ndambo ya bamaniskri ya Grɛki mpe ya mabongoli mosusu ezali na bosukisi ya mokuse (ezali kaka na mwa ndambo ya maloba). Codex rugius ya siɛklɛ ya mwambe ya ntango na biso ezali na bosukisi ya molai mpe ya mokuse, kasi ebandi naino na bosukisi ya mokuse. Etye mwa nɔti na bosukisi mokomoko oyo elobi ete maloba yango endimami na bisika mosusu, kasi emonani ete ebongi te kotyelama motema.

BOSUKISI YA MOKUSE

Bosukisi ya mokuse oyo ebandi nsima ya Mr 16:8 ezali te na kati ya Makomami oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Yango oyo:

Kasi makambo nyonso oyo etindamaki bayebisaki yango na mokuse epai ya baoyo bazalaki zingazinga na Petro. Lisusu, nsima ya makambo wana, na nzela na bango, Yesu ye moko atindaki banda na ɛsti tii na wɛsti kosakolama mosantu mpe oyo ekoki kobeba te ya lobiko ya seko.

BOSUKISI YA MOLAI

Bosukisi ya molai oyo ebandi nsima ya Mr 16:8 ezali te na kati ya Makomami oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Yango oyo:

9 Nsima ya kosekwa na ntɔngɔntɔngɔ na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, abimelaki liboso Maria Magadalena, oyo ye abimisaki bademo nsambo na kati na ye. 10 Akendaki mpe apesaki nsango epai na baoyo bazalaki elongo na ye, mpo bazalaki na mawa mpe kolela. 11 Kasi bango, ntango bayokaki nsango ete azongi na bomoi mpe mwasi wana amonaki ye, bandimaki te. 12 Lisusu, nsima ya makambo wana abimaki na ndenge mosusu epai ya mibale na bango oyo bazalaki kotambola elongo, ntango bazalaki kokende na mboka; 13 mpe bazongaki mpe bapesaki bamosusu nsango. Bandimaki mpe bango te. 14 Kasi na nsima, abimelaki bazomi na moko bango mpenza ntango bafandaki na mesa, mpe apamelaki bango na ndenge bazangaki kondima mpe mpo na motó makasi na bango, mpo bandimaki te baoyo bamonaki ye ete alamuki na bakufi. 15 Mpe alobaki na bango ete: “Bókende na mokili mobimba mpe bósakola nsango malamu epai ya bozalisi nyonso. 16 Moto oyo azali kondima mpe azwi batisimo akobika, kasi moto oyo azali kondima te akokweisama likambo. 17 Lisusu, bilembo oyo ekozala na baoyo bakondima: Ntango bakosalela nkombo na ngai bakobimisa bademo, bakoloba na minɔkɔ mosusu, 18 mpe na mabɔkɔ na bango bakolɔkɔta banyoka, mpe soki bamɛli eloko moko oyo ebomaka ekosala bango mabe soki moke te. Bakotya mabɔkɔ na bango likoló ya bato ya maladi, mpe bato yango bakobika.”

19 Bongo Nkolo Yesu, nsima ya koloba na bango, akamatamaki na likoló mpe afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe. 20 Na yango, babimaki mpe basakolaki bipai nyonso, wana Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe kosimba nsango yango na bilembo oyo ezalaki kokende nzela moko na yango.

11-17/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | LUKA 1

“Mekolá komikitisa ya Maria”

ia lok. 149 par. 12

“Talá! Nazali moombo ya Yehova!”

12 Tii lelo oyo, bato nyonso ya kondima bayebi maloba na ye ya komikitisa mpe ya botosi. Alobaki na Gabriele ete: “Talá! Nazali moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.” (Luka 1:38) Mwana mwasi oyo azalaki moombo, azalaki na nse ya basali nyonso; bomoi na ye mobimba ezalaki na mabɔkɔ ya nkolo na ye. Maria azalaki komimona ndenge wana liboso ya Nkolo na ye, Yehova. Ayebaki ete abatelami malamu na mabɔkɔ ya Yehova, ete Yehova azalaka sembo epai ya baoyo bazali sembo epai na ye, mpe ete akopambola ye soki asali nyonso oyo akoki mpo na kokokisa mokumba monene oyo azwaki.​—Nz. 18:25.

ia nk. 150-151 par. 15-16

“Talá! Nazali moombo ya Yehova!”

15 Na nsima, Maria mpe alobaki. Maloba na ye ekomami malamu na Liloba ya Nzambe. (Tángá Luka 1:46-55.) Na bisika oyo Biblia elobeli Maria, oyo ezali esika oyo alobi mingi koleka bisika mosusu; mpe maloba yango esalisi biso tóyeba ye malamu. Emonisi ete azalaki na botɔndi mpo asanzolaki Yehova mpo na libaku malamu oyo apesaki ye ya kozala mama ya Masiya. Emonisi ete azalaki na kondima makasi mpo alobaki ete Yehova akitisaka bato ya lolendo mpe ya nguya, kasi asalisaka bato ya komikitisa mpe babola oyo balingi kosalela ye. Emonisi lisusu ete azalaki na boyebi mingi. Buku moko elobaki ete Maria azongelaki makanisi ya bavɛrsɛ koleka 20 ya Makomami ya Ebre!

16 Ezali polele ete Maria azalaki mpenza kokanisa mozindo na Liloba ya Nzambe. Atako bongo, azalaki na komikitisa na ndenge asepelaki kozongela makambo oyo ezalaki na Makomami na esika aloba oyo euti epai na ye moko. Na nsima, mwana oyo azalaki na libumu ayaki mpe komonisa ezaleli wana; mokolo moko alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoa. 7:16) Ebongi tómituna boye: ‘Ngai mpe namemyaka Liloba ya Nzambe ndenge wana? To nasepelaka nde kobimisa makanisi to mateya na ngai moko?’ Ekateli ya Maria ezalaki polele.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Lk 1:69

liseke ya lobiko: To “mobikisi ya nguya.” Na Biblia, mbala mingi maseke ya nyama emonisaka makasi, kobɔtɔla mpe elonga. (1Sa 2:1; Nz 75:4, 5, 10; 148:14) Longola yango, bakonzi mpe biyangeli, ezala ya mabe to ya malamu, bamonisamaka na maseke mpe bolongi na bango bakokanisaka yango na kotindika na maseke. (Mib 33:17; Da 7:24; 8:2-10, 20-24) Maloba “liseke ya lobiko” esalelami awa mpo na kolobela Masiya lokola moto oyo azali na nguya ya kobikisa, mobikisi ya makasi.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Lk 1:76

okotambola liboso ya Yehova: Yoane Mobatisi ‘asengelaki kotambola liboso ya Yehova’ na ndenge asengelaki kobongisela Yesu nzela, mpo Yesu asengelaki kozala momonisi ya Tata na ye mpe koya na nkombo ya Tata na ye.​—Yn 5:43; 8:29; talá nɔti mpo na koyekola oyo elobeli Yehova na vɛrsɛ oyo.

Yehova: Maloba ya esakweli ya Zekaria na eteni ya mibale ya vɛrsɛ yango ezongeli maloba ya Yis 40:3 mpe Mal 3:1, epai nkombo ya Nzambe, oyo emonisami na balɛtrɛ minei ya Ebre (ebongolami YHWH), ezali komonana na makomi ya Ebre ya kala. Na kotalela ndenge maloba esalelamaka na Makomami ya Ebre, nkombo ya Nzambe ezali na bisika mingi na makomi ya Ebre, atako bamaniskri ya Grɛki esalelaka Kyʼri·os (Nkolo). Longola yango, tóyeba ete na vɛrsɛ oyo mpe na bisika mosusu mingi oyo basaleli liloba Kyʼri·os na Luka mokapo 1, batye artikle defini te liboso ya liloba Kyʼri·os ndenge gramɛrɛ esɛngi; yango elingi koloba ete Kyʼri·os ezali nkombo ya moto. Longola yango, mabongoli mingi ya Biblia ebongolaka yango Yehova, Yave, Yawe, יהוה (YHWH, to tetragrame), NKOLO, mpe ADONAI na bisika mingi ya Makomami, ata mpe na maloba ya nse ya lokasa mpe na mitindami mpo na komonisa ete elobeli Yehova Nzambe. Babuku mosusu mpe endimi likambo yango.

18-24/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | LUKA 2-3

“Bilenge​—Bozali kokómisa boyokani na bino na Yehova makasi?”

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Lk 2:41

baboti na ye bazalaki na momeseno: Mibeko esɛngaki ete basi te báyanganaka na fɛti ya Elekeli. Ata bongo, Maria azalaki na momeseno ya kokende mobembo ya mbula na mbula elongo na Yozefe na fɛti na Yerusaleme. (Kob 23:17; 34:23) Mbula nyonso, bazalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ pene na 300 elongo na libota na bango oyo ezalaki kokóma monene.

nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Lk 2:46, 47

kotuna bango mituna: Ndenge bayoki ya Yesu basali ntango bayoki mituna atuni bango, yango emonisi ete ezalaki te mituna ya mwa mwana moko ya moke oyo azali kotuna mituna kaka mpamba boye. (Lk 2:47) Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kotuna mituna” ekoki mpe kosalelama mpo na mituna oyo bazuzi batunaka ntango bazali kolandela likambo mpe yango ekoki kosɛnga kotuna mituna likoló ya mituna. (Mt 27:11; Mr 14:60, 61; 15:2, 4; Mis 5:27) Bato ya mayele na masolo ya kala balobi ete bakambi mosusu ya mangomba oyo bayebanaki mingi bamesanaki kotikala na tempelo nsima ya bafɛti mpe koteya na moko ya baveranda minene oyo ezalaki wana. Bato bazalaki kofanda na makolo na bango mpo na koyoka mpe kotuna bango mituna.

bazalaki se kokamwa: Vɛrbɛ ya Grɛki oyo esalelami awa mpo na “kokamwa” ekoki komonisa kokamwa kozanga kotika to kokamwa mbala na mbala.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Lk 2:51, 52

azalaki kaka komikitisa: To “akobaki komikitisa; akobaki kotosa.” Vɛrbɛ yango ya Grɛki emonisi ete nsima ya kokamwisa bateyi na tempelo na boyebi na ye ya Liloba ya Nzambe, Yesu azongaki ndako elongo na baboti na ye mpe na komikitisa nyonso akobaki kotosa bango. Botosi na ye ezalaki na ntina mingi koleka ya bana mosusu nyonso mpo ekokisaki mpenza Mibeko ya Moize.​—Kob 20:12; Ga 4:4.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Lk 2:14

mpe kimya na mabele na bato oyo ye andimi: Bamaniskri mosusu ezali na maloba oyo ekoki kobongolama na “mpe kimya na mabele, boboto epai ya bato;” mabongoli mosusu ya Biblia esaleli mpe elobeli yango. Kasi bamaniskri endimi mpenza elobeli oyo Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli. Nsango wana oyo anzelu apesaki elobelaki te motema boboto ya Nzambe epai ya bato nyonso ata soki bizaleli to misala na bango ezali ndenge nini. Kasi, elobeli nde baoyo Nzambe akomonisela boboto mpo bazali na kondima ya solosolo epai na ye mpe bakómi bayekoli ya Mwana na ye.​—Talá nɔti mpo na koyekola bato oyo ye andimi na vɛrsɛ oyo.

bato oyo ye andimi: Emonani ete maloba “andimi” oyo anzelu alobi awa etaleli nde Nzambe kasi bato te. Liloba ya Grɛki eudokia ekoki mpe kobongolama na “boboto; kosepela; kondimama.” Eudokéô vɛrbɛ oyo ekokani na yango, esalelami na Mt 3:17; Mr 1:11; mpe Lk 3:22 (talá banɔti mpo na koyekola na Mt 3:17; Mr 1:11), epai Nzambe alobi na Mwana na ye ntango azwaki batisimo. Epesaka likanisi ya “kondima moto; kosepela mpenza na.” Na boyokani na yango, maloba “bato oyo ye andimi” (anthrôpoïs eudokias) ekoki mpe kobongolama na “bato oyo ye asepeli na bango.” Na yango, maloba wana ya anzelu elobelaki nde bato oyo bakosepelisa Nzambe mpo bakomonisa kondima ya solosolo epai na ye mpe bakokóma bayekoli ya Mwana na ye. Atako liloba ya Grɛki eudokia ekoki mpe kosalelama na bisika mosusu mpo na kolobela boboto ya bato (Ro 10:1; Flp 1:15), kasi esalelami mingi nde mpo na kolobela boboto ya Nzambe, to likambo asepeli na yango, to na ndenge oyo amoni malamu kosala. (Mt 11:26; Lk 10:21; Ef 1:5, 9; Flp 2:13; 2Te 1:11) Na libongoli ya la Septante na Nz 51:18 [50:20, LXX], basaleli liloba “bosepeli” ya Nzambe.

wp16.3 lok. 9 par. 1-3

Oyebaki yango?

Nani azalaki tata ya Yozefe?

Yozefe, mosali-mabaya na Nazarete, azalaki tata-mobɔkɔli ya Yesu. Kasi, nani azalaki tata ya Yozefe? Evanzile ya Matai oyo elobeli molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu etángi moto moko na nkombo Yakobo, kasi ya Luka elobi ete Yozefe azalaki “mwana ya Heli.” Mpo na nini ekeseni bongo?​—Luka 3:23; Matai 1:16.

Lisolo ya Matai elobi boye: “Yakobo abotaki Yozefe,” liloba ya Grɛki oyo asaleli emonisi polele ete Yakobo azalaki mpenza tata ya Yozefe. Na yango, Matai alobelaki molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yozefe, libota ya bakonzi oyo bautaki na Davidi, oyo na nzela na yango lotomo ya bokonzi ekendaki epai ya Yesu, mwana oyo Yozefe abɔkɔlaki.

Kasi lisolo ya Luka elobi: “Yozefe mwana ya Heli.” Maloba “mwana ya,” ekoki komonisa “bokilo ya.” Ekokani na lisolo oyo ezali na Luka 3:27, epai Shealatiele, oyo azalaki nde mwana ya Yekonia, kasi atángami lokola “mwana ya Neri.” (1 Ntango 3:17; Matai 1:12) Emonani ete Shealatiele abalaki mwana ya Neri, oyo nkombo na ye eyebani te, na ndenge yango akómaki bokilo ya Neri. Ndenge moko mpe Yozefe azalaki “mwana” ya Heli mpo abalaki Maria, mwana ya Heli. Na yango evanzile ya Luka elobeli molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu na ndenge “abotamaki moto,” na nzela ya mama na ye Maria. (Baroma 1:3) Biblia emonisi biso milɔngɔ mibale ya bankɔkɔ ya Yesu.

25/06–1/07

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | LUKA 4-5

“Tɛmɛlá komekama ndenge Yesu asalaki”

w13 15/8 lok. 25 par. 8

Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala

8 Satana asalelaki mpe motambo wana mpo na komeka Yesu na esobe. Nsima ya kokila bilei mikolo 40 mpe butu 40, Satana alukaki kosalela mposa ya kolya mpo na komeka Yesu. Satana alobaki ete: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá libanga oyo ekóma limpa.” (Luka 4:1-3) Yesu asengelaki kopona: Koboya kosalela nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na kokokisa mposa ya kolya, to kondima kosalela yango. Yesu ayebaki ete asengeli te kosalela nguya wana mpo na koluka matomba na ye moko. Atako azalaki na nzala, alukaki libosoliboso kobatela boyokani na ye na Yehova na esika aluka kosilisa nzala na ye. Yesu azongisaki: “Ekomamá ete: ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’”​—Mat. 4:4; Luka 4:4.

w13 15/8 lok. 25 par. 10

Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala

10 Ndenge nini Satana asalelaki yango epai ya Yesu? Satana “alakisaki [Yesu] na mwa ntango moke makonzi nyonso ya mabele esika bato bafandi; mpe Zabolo alobaki na ye ete: ‘Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango.’” (Luka 4:5, 6) Yesu akokaki te komona makonzi nyonso ya mabele na miso boye na ntango moke, kasi amonaki nde nkembo na yango na emonaneli; na ntembe te Satana akanisaki ete nkembo ya makonzi wana ekokaki kobenda Yesu. Satana ayokaki ata nsɔni te koloba na Yesu ete: “Soki osaleli ngai likambo moko ya losambo, yango nyonso ekozala ya yo.” (Luka 4:7) Yesu alingaki ata moke te kozala lolenge ya moto oyo Satana alingaki ete azala. Apesaki eyano mbala moko. Alobaki boye: “Ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”​—Luka 4:8.

nwtsty bililingi mpe bavideo

Nsɔngɛ ya efelo ya tempelo

Ekoki kozala ete Satana atɛlɛmisaki mpenza Yesu “na nsɔngɛ [to “esika eleki likoló mpenza”] ya tempelo” mpe alobaki na ye amibwaka na nse, kasi esika mpenza oyo Yesu atɛlɛmaki eyebani te. Lokola liloba oyo basaleli awa mpo na “tempelo” ekoki komonisa lopango mobimba ya tempelo, ekoki kozala ete Yesu atɛlɛmaki na litumu ya sudi-ɛsti (1) ya tempelo. To atɛlɛmaki na litumu mosusu ya tempelo yango. Na ntembe te komibwaka na bisika yango ekokaki koboma ye soki Yehova asalaka eloko te mpo na kobikisa ye.

w13 15/8 lok. 26 par. 12

Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala

12 Na bokeseni na Eva, Yesu apesaki ndakisa malamu mpenza ya komikitisa! Satana alukaki komeka ye na lolenge mosusu, kasi Yesu aboyaki ata likanisi ya kosala likambo oyo ekokamwisa bato mpe ekomeka Nzambe. Soki Yesu asalaki bongo, alingaki komonisa ete azali na lolendo! Kasi, apesaki Satana eyano ya polele ete: “Elobamá: ‘Osengeli komeka Yehova Nzambe na yo te.’”​—Tángá Luka 4:9-12.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Lk 4:17

rulo ya mosakoli Yisaya: Rulo ya Mbu Ekufá ya Yisaya ezali na biteni 17 ya mposo ya nyama oyo bakangisákangisá mpe ezali na molai ya mɛtrɛ koleka nsambo (7.3 m) mpe ezali na milɔngɔ 54. Ekoki kozala ete rulo oyo bazalaki kosalela na sinagoga ya Nazarete ezalaki molai bongo. Lokola ekabolamaki te na mikapo mpe bavɛrsɛ na siɛklɛ ya liboso, esɛngaki Yesu aluka esika oyo alingaki kotánga. Lokola amonaki esika maloba ya esakweli ekomamaki na rulo yango, yango emonisi ete ayebaki mpenza Liloba ya Nzambe.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Lk 4:25

mbula misato na sanza motoba: Na kotalela 1 Ba 18:1, Eliya asakolaki kosila ya elanga “na mbula ya misato.” Yango wana bato mosusu balobaka ete Yesu alobaki makambo oyo eyokani te na lisolo oyo ezali na 1 Bakonzi. Kasi, lisolo yango oyo ezali na Makomami ya Ebre emonisi te ete elanga yango eumelaki na nse ya mbula misato. Emonani ete maloba “na mbula ya misato” etaleli eleko oyo ebandaki ntango Eliya ayebisaki Ahaba likambo yango. (1Ba 17:1) Ekoki kozala ete Eliya ayebisaki Ahaba likambo yango na eleko ya elanga oyo esí ebandaki atako eumelaka nsanza soki motoba, kasi eumelaki mingi koleka ndenge ezalaka. Lisusu, elanga yango esilaki mbala moko te ntango Eliya ayaki lisusu epai ya Ahaba, “na mbula ya misato,” kasi esilaki kaka nsima ya momekano ya mɔtɔ na Ngomba Karamele. (1Ba 18:18-45) Boye, maloba ya Yesu oyo ekomami awa ná mpe maloba ya leki ya Yesu oyo ekokani na yango, oyo ezali na Yakobo 5:17 ezali na boyokani mpenza na badati oyo 1Ba 18:1 elobeli.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto