Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
1-7/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOANE 9-10
“Yesu abatelaka bampate na ye”
nwtsty-E bililingi mpe bavideo
Lopango ya bampate
Bazalaki kotya bampate na kati ya lopango mpo na kobatela yango na miyibi mpe na banyama ya zamba. Babateli ya mpate bazalaki kotya bampate na bango na lopango yango na butu mpo ebatelama. Na ntango ya kala, lopango ya bampate ezalaki na nsamba te, ezalaki mpe ndenge moko te, mosusu ezalaki minene, mosusu ezalaki mike, mpe mbala mingi bazalaki kosala bifelo na yango na mabanga mpe ezalaki na porte kaka moko. (Mit 32:16; 1Sa 24:3; Sef 2:6) Yoane alobeli kokɔta na lopango ya bampate “na porte,” oyo ezalaki kobatelama na “mokɛngɛli ya porte.” (Yn 10:1, 3) Na lopango ya bampate ya bato ebele, bitonga mingi ya bampate ezalaki kolala kuna na butu mpe mokɛngɛli ya porte azalaki kokɛngɛla na porte mpo na kobatela bampate. Na ntɔngɔ, mokɛngɛli ya porte azalaki kofungolela babateli ya mpate porte. Mobateli mokomoko ya mpate azalaki kobenga bampate na ye mpo na koyanganisa yango mpe bampate ezalaki koyeba mongongo ya mobateli na yango mpe ezalaki kolanda ye. (Yn 10:3-5) Yesu asalelaki ndakisa yango mpo na komonisa ndenge azalaki kobatela bayekoli na ye.—Yn 10:7-14.
Mabota ya bakristo—“Bózala ekɛngɛ”
5 Boyokani oyo ezalaka kati na mobateli ya mpate ná bampate na ye eutaka na koyebana mpe kotyelana motema. Mobateli ya mpate ayebaka nyonso oyo etali bampate na ye, mpe bampate eyebaka mpe etyelaka mobateli na bango motema. Bayebi mongongo na ye mpe batosaka yango. Yesu alobaki ete: “Nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai eyebi ngai.” Yesu ayebi lisangá na ye kaka likolólikoló te. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘koyeba’ epesaka likanisi ya “koyeba malamu mpenza.” Ya solo, Mobateli ya mpate oyo aleki malamu ayebi mpate na ye mokomoko. Ayebi bamposa ya mpate mokomoko, bolɛmbu na yango, mpe makasi na yango. Ndakisa na biso Yesu amonaka eloko nyonso oyo etali bampate na ye. Mpe bampate bayebi ye malamumalamu mpe batyaka motema na litambwisi na ye.
“Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
17 Na kotalela makambo oyo ye moko amonaki, George A. Smith akomaki na buku na ye (The Historical Geography of the Holy Land), ete: “Ntango mosusu, tozalaki kolekisa bopemi na biso ya midi pembeni ya mabulu ya mai na Yudea epai babateli misato to minei ya mpate bayaki ná bitonga na bango. Bampate nyonso esanganaki esika moko, mpe tozalaki komituna ndenge nini mobateli mokomoko akoyeba lisusu bampate na ye. Kasi, ntango bampate esilisaki komɛla mai mpe kosakana, babateli bakendaki moto na moto na ngámbo na ye na lobwaku mpe babandaki kobenga bampate, moto na moto na ebengeli na ye; mpe bampate ya moto na moto ezalaki kotika bampate mosusu mpe kolanda mobateli na yango, mpe ezalaki kokabwana mpenza kaka ndenge eyaki.” Yango ezalaki ndakisa malamu mpenza oyo Yesu asalelaki mpo na komonisa polele likambo oyo alingaki kolobela: soki tondimi mpe totosi mateya na ye, mpe soki tolandi litambwisi na ye, tokobatelama na “mobateli ya bampate oyo aleki malamu.”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 10:16
komema yango: To “kokamba.” Vɛrbɛ ya Grɛki aʹgo oyo basaleli awa ekoki kolimbola “komema (na)” to “kokamba,” na kolanda lisolo oyo bazali kolobela. Maniskri moko ya Grɛki ya mobu soki 200 T.B. esaleli mpe liloba moko ya Grɛki (sy·naʹgo) oyo ekokani na yango mpe oyo mbala mingi babongolaka yango na “koyanganisa.” Lokola Yesu azali mobateli ya mpate oyo aleki malamu, ayanganisaka, akambaka, abatelaka mpe aleisaka bampate oyo bazali na lopango oyo (elobelami mpe lokola “etonga moke” na Lk 12:32) mpe bampate mosusu. Yango ekómi etonga kaka moko na litambwisi ya mobateli kaka moko. Maloba yango ya elilingi emonisi mpenza bomoko oyo bayekoli ya Yesu bakozala na yango.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 9:38
agumbamelaki ye: To “afukamelaki ye; apesaki ye lokumu.” Soki vɛrbɛ ya Grɛki proskyneo esalelami mpo na kolobela kopesa losambo epai ya nzambe moko boye, ebongolamaka na “kosambela.” (Mt 4:10; Lk 4:8) Kasi, na vɛrsɛ oyo, moto yango oyo abotamá miso ekufá, oyo Yesu abikisaki, andimaki ete Yesu azali momonisi ya Nzambe mpe agumbamelaki ye. Atalelaki Yesu te lokola Nzambe, kasi nde lokola “Mwana ya moto,” Masiya oyo alakamaki, oyo Nzambe apesaki ye nguya. (Yn 9:35) Ntango agumbamelaki Yesu, emonani ete asalaki kaka ndenge bato oyo Makomami ya Ebre elobeli bamesanaki kosala. Bato yango bazalaki kogumbamela basakoli, bakonzi to mpe bamonisi mosusu ya Nzambe. (1Sa 25:23, 24; 2Sa 14:4-7; 1Ba 1:16; 2Ba 4:36, 37) Na mabaku mingi, bato bazalaki kogumbamela Yesu mpo na komonisa botɔndi mpo na emonaneli oyo Nzambe alakisaki bango to mpo bamonaki ete Nzambe andimaki ye.—Talá banɔti mpo na koyekola na Mt 2:2; 8:2; 14:33; 15:25.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 10:22
fɛti ya bofungoli: Na Ebre, fɛti yango ebengamaka Hanoukkah (cḥanoukkah), elimboli “bofungoli.” Ezalaki koumela mikolo mwambe kobanda na mokolo ya 25 ya sanza ya Kisleve, mpe ezalaki pene na solstice d’hiver, (talá nɔti mpo na koyekola na eleko ya mpiɔ makasi na vɛrsɛ oyo mpe sgd eteni 19) mpo na kokanisa ndenge tempelo ya Yerusaleme efungwamaki lisusu na mobu 165 L.T.B. Antiochus IV Épiphane, mokonzi ya Siri amonisaki ete ayinaki mpenza Yehova, Nzambe ya Bayuda ndenge akómisaki tempelo na ye mbindo. Na ndakisa, atongaki etumbelo moko likoló ya etumbelo monene, esika Bayuda bazalaki kopesa likabo ya kotumba ya mokolo na mokolo. Mpo na kokómisa mpenza tempelo yango mbindo, na mokolo ya 25 ya sanza ya Kisleve, na mobu 168 L.T.B., Antiochus apesaki mbeka ya ngulu na etumbelo yango mpe amwangisaki supu ya mosuni na yango na tempelo mobimba. Atumbaki baporte ya tempelo, abukaki bashambre ya banganga-nzambe, amemaki etumbelo ya wolo, mesa ya mampa ya kolakisa mpe etɛlɛmiselo ya miinda ya wolo. Na nsima, asalaki lisusu molulu ya bofungoli tempelo ya Yehova mpo na kopesa yango Zeusi nzambe ya bapakano ya Olympe. Mbula mibale na nsima, Yuda Makabe abɔtɔlaki lisusu tempelo ná engumba yango. Nsima ya kopɛtola tempelo yango, bafungolaki yango lisusu na mokolo ya 25 na sanza ya Kisleve, na mobu 165 L.T.B., nsima ya mbula misato kobanda Antiochus apesaki Zeusi mbeka ya bosɔtɔ na etumbelo yango. Na nsima Bayuda bazongelaki kopesa bambeka ya kotumba ya mokolo na mokolo. Esika moko te Biblia elobi ete Yehova apesaki Yuda Makabe bolongi mpe atindaki ye azongisa lisusu tempelo. Kasi, Yehova asalelaki mibali ya bikólo ya bapaya, na ndakisa Sirise ya Perse, mpo na kokokisa mikano mosusu oyo etali losambo na ye. (Yis 45:1) Na yango, ebongi tóloba mpe ete mbala mosusu Yehova asalelaki mobali oyo azalaki na kati ya libota oyo emipesaki na ye mpo na kokokisa mokano na ye. Makomami emonisi ete tempelo esengelaki kozala kaka mpe misala na yango esengelaki kokoba mpo bisakweli etali Masiya, mosala na ye mpe mbeka na ye ekokisama. Lisusu, Balevi basengelaki kokoba kopesa bambeka tii ntango Masiya akopesa mbeka monene ya bomoi na ye mpo na kosikola bato. (Da 9:27; Yn 2:17; Ebr 9:11-14) Esɛngaki te ete bayekoli ya Kristo básalaka fɛti ya bofungoli. (Kol 2:16, 17) Kasi, Biblia elobi esika moko te ete Yesu to bayekoli na ye bapekisaki bato kosala fɛti yango.
8-14/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOANE 11-12
“Mekolá motema mawa ya Yesu”
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Yn 11:24, 25
Nayebi ete akosekwa: Marta akanisaki ete Yesu azalaki kolobela lisekwa oyo ekosalema na mikolo ekoya, na mokolo ya nsuka. (Talá nɔti mpo na koyekola na Yn 6:39.) Azalaki mpenza kondima liteya yango. Bakonzi mosusu ya mangomba ya eleko na ye, oyo bazalaki kobengama Basadukai, bazalaki kondima te ete lisekwa ekozala, atako liteya yango ezalaki polele na Makomami mosantu. (Da 12:13; Mr 12:18) Na ngambo mosusu, Bafarisai bazalaki kondima ete molimo ekufaka te. Kasi, Marta ayebaki ete Yesu ateyaki elikya ya lisekwa mpe asekwisaki kutu bato, atako moko te kati na bato yango aumelaki na liwa lokola Lazare.
Ngai nazali lisekwa mpe bomoi: Liwa mpe lisekwa ya Yesu ye moko efungolaki nzela mpo bakufi bázonga na bomoi. Nsima ya lisekwa ya Yesu, Yehova apesaki ye nguya ya kosekwisa bakufi mpe ya kopesa bato bomoi ya seko. (Talá nɔti mpo na koyekola na Yn 5:26.) Na Em 1:18, Yesu amibengi “moto ya bomoi,” oyo azali na “bafungola ya liwa mpe ya nkunda.” Na yango, Yesu azali elikya mpo na bato ya bomoi mpe baoyo bakufá. Apesi elaka ete akofungola malita mpe akopesa bakufi bomoi, ezala mpo na baoyo bakoyangela elongo na ye na likoló to mpo na baoyo bakofanda awa na mabele ntango guvɛrnema yango ekoyangela.—Yn 5:28, 29; 2Pe 3:13.
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Yn 11:33-35
kolela: Liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na “kolela” mbala mingi emonisaka kolela na mongongo makasi. Kaka vɛrbɛ yango esalelami mpe mpo na Yesu ntango asakolaki kobebisama ya Yerusaleme.—Lk 19:41.
atungisamaki makasi . . . mpe abulunganaki: Ndenge basangisi maloba oyo mibale esika moko emonisi ete na libaku yango, Yesu ayokaki motema mpasi mpenza. Vɛrbɛ ya Grɛki oyo ebongolami na “atungisamaki makasi” (émbrimaomaï) mbala mingi emonisaka ndenge moto azali komiyoka mpenza na motema, kasi na vɛrsɛ oyo emonisi ete Yesu ayokaki mawa makasi mpenza yango wana atungisamaki makasi. Liloba ya Grɛki (tarassô) oyo ebongolami na “abulunganaki,” emonisaka yikiyiki. Moto moko ya mayele alobi ete, na vɛrsɛ oyo elimboli “kotya yikiyiki na motema; koyoka mpasi makasi to mawa.” Vɛrbɛ yango esalelami mpe na Yn 13:21 mpo na komonisa ndenge Yesu amiyokaki ntango akanisaki ndenge Yudasi atɛki ye.—Talá nɔti mpo na koyekola na Yn 11:35.
na elimo: Emonani ete liloba ya Grɛki pneuma oyo basaleli awa elakisi nguya oyo euti na motema ya elilingi mpe oyo etindaka moto aloba to asala makambo na lolenge moko boye.—Talá ndimbola ya liloba, “elimo.”
alelaki, abimisi mpisoli: Liloba oyo basaleli awa ezali (dakruô) ezali lolenge moko ya vɛrbɛ ya Grɛki oyo esalelamaka mpo na liloba “mpisoli,” basaleli yango mpe na Lk 7:38; Mis 20:19, 31; Ebr 5:7; Em 7:17; 21:4. Emonani ete likebi ekei mingi koleka na mpisoli oyo ebimi kasi te na kolela na mongongo makasi. Na Makomami ya Grɛki, vɛrbɛ yango ya Grɛki esalelami kaka awa, mpe ekeseni na oyo esalelami na Yn 11:33 (talá nɔti mpo na koyekola) mpo na kolobela kolela ya Maria ná Bayuda. Atako Yesu ayebaki ete akosekwisa Lazare, kasi epesaki ye mawa makasi komona ndenge baninga na ye ya motema bazalaki na mpasi makasi ndenge wana. Bolingo mpe mawa makasi oyo azalaki na yango mpo na baninga na ye etindaki ye abimisa polele mpisoli na ye. Lisolo oyo esalisi biso tómona polele ete Yesu amityaka mpenza na esika ya baoyo bandeko to baninga na bango bazali kokufa mpo na lisumu oyo Adama asalaki.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 11:49
nganga-nzambe monene: Ntango Yisraele ezalaki na bonsomi, nganga-nzambe monene azalaki kosala mosala na ye bomoi mobimba. (Mit 35:25) Kasi, ntango Baroma bakómaki kokonza Yisraele, bakonzi oyo Baroma bazalaki kotya nde bazalaki na bokonzi ya kotya mpe kolongola nganga-nzambe monene na mosala. (Talá ndimbola ya maloba, “Nganga-nzambe monene.”) Kaifa, oyo Baroma batyaki, aumelaki na ebonga yango koleka baoyo bazalaki liboso na ye mpo ayebaki ndenge ya koyokana malamu na Baroma. Akómaki nganga-nzambe monene na mobu soki 18 T.B. mpe atikalaki na ebonga yango tii na mobu soki 36 T.B. Lokola Yoane alobi ete Kaifa azalaki nganga-nzambe monene na mobu wana, elingi koloba na mobu 33 T.B., emonani ete Yoane alingaki koloba ete Kaifa azalaki mpe nganga-nzambe monene na mobu wana ya ntina mingi, mobu oyo babomaki Yesu.—Talá sgd eteni 16 mpo na koyeba esika oyo ndako ya Kaifa ekokaki kozala.
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Yn 12:42
bankumu: Awa, liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na “bankumu” ekoki komonisa bato ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda. Liloba yango esalelami na Yn 3:1 mpo na Nikodeme, moko ya bato ya tribinale yango.—Talá nɔti mpo na koyekola na Yn 3:1.
bábengana bango na sinagoga: To “kolongolama; kopekisa koya na sinagoga.” Liloba ya Grɛki a·po·sy·naʹgo·gos esalelami kaka awa na Yn 12:42 mpe 16:2. Moto oyo babengani ye ndenge wana, basusu bazalaki koboya mpe kokima ye. Kokata boyokani ndenge wana na Bayuda mosusu ezalaki kosala ete moto akóma na mikakatano makasi ya kokokisa bamposa ya libota na ye. Basinagoga ezalaki kosalelama libosoliboso mpo na mateya, kasi bakómaki kosalela yango mpe lokola mwa batribinale mpe ezalaki na lotomo ya kokatela moto etumbu ya fimbo mpe ya kolongola ye na sinagoga.—Talá nɔti mpo na koyekola na Mt 10:17.
15-21/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOANE 13-14
“Napesi bino ndakisa”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 13:5
kosukola makolo ya bayekoli: Na ntango ya kala, na Yisraele, bato bazalaki kolata mingi nde basandale. Ezalaki mwa lipapa oyo ezali na nsinga oyo bazalaki kokanga na makolo, yango wana makolo ya bato ya mibembo ezalaki kokóma salite mpo banzela mpe bilanga ezalaki zɛlozɛlo mpe pɔtɔpɔtɔ. Yango wana bato bamesanaki kolongola basandale liboso ya kokɔta na ndako mpe moto oyo ayambi mopaya azalaki kosala nyonso mpo mopaya na ye asukola makolo. Biblia ezali na masolo mingi oyo elobeli momeseno yango. (Eb 18:4, 5; 24:32; 1Sa 25:41; Lk 7:37, 38, 44) Ntango Yesu asukolaki makolo ya bayekoli na ye, asalelaki momeseno yango lokola ndakisa mpo na kopesa bango liteya na likambo etali komikitisa mpe kosalelana.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 13:12-14
bosengeli: To “bozali na mokumba ya.” Vɛrbɛ ya Grɛki oyo basaleli awa mbala mingi basalelaka yango na makambo ya mbongo, oyo libosoliboso elimboli “kozala na nyongo ya moto; to eloko oyo osengeli kopesa moto.” (Mt 18:28, 30, 34; Lk 16:5, 7) Awa mpe na bisika mosusu, liloba yango esalelami mpo na kolobela likambo oyo moto asengeli kosala to azali na mokumba ya kosala yango.—1Yn 3:16; 4:11; 3Yn 8.
Moto oyo alekaki bato nyonso asali mosala oyo esɛngaka komikitisa
Yesu apesaki liteya monene ya komikitisa ntango asukolaki bayekoli na ye makolo. Ɛɛ, bakristo basengeli kokanisa te ete bazali na ntina mingi koleka basusu na boye ete bato mosusu basengeli ntango nyonso kosalelaka bango, basengeli kolukaka lokumu te, mpe balukaka mpifo te. Nzokande, basengeli kolanda ndakisa ya Yesu, oyo ‘ayaki mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.’ (Matai 20:28) Ɛɛ, bayekoli ya Yesu basengeli kozala na bolingo malamu ya kosala misala oyo esɛngaka komikitisa mingi bamoko mpo na bamosusu.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 14:6
Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi: Yesu azali nzela mpo kaka na nzela na ye nde moto akoki kopusana pene ya Nzambe na libondeli. Azali mpe “nzela” oyo ezali kozongisa bato na boyokani na Nzambe. (Yn 16:23; Ro 5:8) Yesu azali solo mpo alobaki mpe asalelaki solo na bomoi na ye. Akokisaki mpe bisakweli mingi oyo emonisaki mokumba na ye na kokokisama ya mokano ya Nzambe. (Yn 1:14; Em 19:10) Bisakweli yango ekómaki “‘ɛɛ’ [to ekokisamaki] na nzela na ye.” (2Ko 1:20) Yesu azali bomoi mpo na nzela ya lisiko, apesi bato libaku ya kozwa “bomoi ya solosolo,” elingi koloba, “bomoi ya seko.” (1Ti 6:12, 19; Ef 1:7; 1Yn 1:7) Akozala mpe “bomoi” mpo na bamilio ya bato oyo bakosekwa na elikya ya kofanda na paradiso libela na libela.—Yn 5:28, 29.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 14:12
akosala misala ya minene koleka oyo: Yesu alingaki koloba te ete makamwisi oyo bayekoli na ye bakosala ekoleka oyo ya ye. Kasi, na komikitisa nyonso andimaki ete bayekoli na ye bakosakola na bateritware mingi, bakosolola na bato mingi koleka mpe bakosala mosala yango na boumeli ya ntango molai koleka ye. Maloba ya Yesu emonisi polele ete alingaki bayekoli na ye bákoba mosala oyo ye abandisaki.
22-28/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOANE 15-17
“Bozali bato ya mokili te”
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 15:19
mokili: Na vɛrsɛ oyo, liloba ya Grɛki kosmos etaleli bato nyonso ya mokili longola kaka basaleli ya Nzambe; bato nyonso oyo bazangi bosembo mpe bazali mosika na Nzambe. Kaka Yoane nde mokomi ya Evanzile oyo alobi maloba ya Yesu ete bayekoli na ye bazali bato ya mokili te to bazali bapaya na mokili. Likanisi yango emonani mbala mibale mobimba na libondeli ya nsuka ya Yesu elongo na bantoma na ye ya sembo.—Yn 17:14, 16.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 15:21
mpo na nkombo na ngai: Na Biblia, na bantango mosusu, liloba “nkombo” elakisaka moto oyo abengami na nkombo yango, lokumu na ye mpe nyonso oyo moto yango azali. (Talá nɔti mpo na koyekola na Mt 6:9.) Na oyo etali nkombo ya Yesu, etaleli mpe bokonzi mpe esika ya lokumu oyo Tata na ye apesi ye. (Mt 28:18; Flp 2:9, 10; Ebr 1:3, 4) Awa Yesu alimboli ntina bato ya mokili bakosala bayekoli na ye makambo nyonso wana: mpo bayebi te moto oyo atindaki ye. Koyeba Nzambe ekosalisa bango báyeba mpe bándima oyo nkombo ya Yesu elimboli. (Mis 4:12) Ekosɛnga báyeba ete Nzambe atye ye moyangeli, mokonzi ya bakonzi, oyo bato nyonso basengeli kogumbama liboso na ye mpe kotosa ye mpo na kozwa bomoi.—Yn 17:3; Em 19:11-16; talá mpe Nz 2:7-12.
it-1-F lok. 555
Mpiko
Mokristo asengeli kozala na mpiko mpo na komibatela pɛto na bizaleli mpe misala ya mokili oyo etɛmɛlaka Yehova Nzambe mpe atikala sembo epai na ye atako mokili oyo ezali koyina ye. Yesu Kristo alobaki na bayekoli na ye boye: “Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.” (Yn 16:33) Mwana ya Nzambe atikaki te ete mokili etambwisa ye; kasi, alongaki nde mokili mpo amikɔtisaki ata moke te na makambo ya mokili. Ndakisa malamu oyo Yesu Kristo apesaki ndenge alongaki mokili, mpe matomba oyo etamboli na ye oyo ezangi mbeba ebimisi, ekoki kosalisa mokristo akóma na mpiko oyo esengeli mpo na komekola ye mpe kokabwana na mokili mpe kotikala pɛto.—Yn 17:16.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Yn 17:21-23
moko: To “na bomoko.” Yesu asɛngaki na libondeli ete bayekoli na ye ya solo bázala “moko,” básala elongo mpo na mokano moko, kaka ndenge ye ná Tata na ye bazali “moko,” bámonisa ete bazali kosala na boyokani mpe bazali na likanisi moko. (Yn 17:22) Na 1Ko 3:6-9, Paulo alobeli bomoko yango oyo basaleli ya Nzambe bazalaka na yango ntango basalaka mosala elongo mpe basalaka elongo na Nzambe.—Talá 1Ko 3:8 mpe banɔti mpo na koyekola na Yn 10:30; 17:11.
bázala mpenza na bomoko ya solosolo: To “bázala na bomoko mpenza.” Na vɛrsɛ oyo, Yesu amonisi ete bomoko ya solosolo ezali na boyokani ná kolingama na Tata. Yango eyokani na Kol 3:14, oyo elobi: “Bolingo . . . ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” Bomoko yango ezali na makambo nyonso te. Elingi koloba te ete makambo nyonso oyo ekesenisaka bato, na ndakisa makoki ya moto na moto, mimeseno mpe lisosoli ya moto ezalaka lisusu na ntina te. Elingi nde koloba ete bayekoli ya Yesu bazali na bomoko na misala, na kondima mpe na mateya.—Ro 15:5, 6; 1Ko 1:10; Ef 4:3; Flp 1:27.
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Yn 17:24
ebandeli ya mokili: Liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na “ebandeli” ebongolami na “kokumba zemi” na Ebr 11:11, epai basaleli yango elongo na “momboto.” Lokola basaleli yango esika moko na maloba “ebandeli ya mokili,” emonani ete elobeli nde kobotama ya bana ya Adama ná Eva. Yesu alobeli “ebandeli ya mokili” elongo na Abele, moto ya liboso oyo Nzambe amonaki ete abongaki kosikolama mpe moto ya liboso oyo nkombo na ye “ekomamá na rulo ya bomoi banda na ebandeli ya mokili.” (Lk 11:50, 51; Em 17:8) Maloba ya libondeli oyo ya Yesu epai ya Tata na ye endimisi mpe ete kala, liboso Adama ná Eva bábota bana, Nzambe alingaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.
29/10–4/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOANE 18-19
“Yesu apesaki litatoli mpo na solo”
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Yn 18:37
napesa litatoli na: Ndenge esalelami na Makomaki ya Grɛki ya bokristo, maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kopesa litatoli” (marturéô) mpe “motatoli” (marturia; martus) ezali na bandimbola mingi. Ndimbola ya libosoliboso ya maloba yango nyonso mibale ezali ya kotatola likambo oyo moto ye moko akutani na yango to ayebi yango, kasi ekoki mpe kopesa likanisi ya “kosakola; komonisa; koloba malamu ya.” Yesu asukaki kaka te na kotatola mpe kolobela solo oyo andimaki na motema moko, kasi atambwisaki bomoi na ye na ndenge oyo akɔtelaki solo ya maloba ya esakweli mpe ya bilaka ya Tata na ye. (2Ko 1:20) Mokano ya Nzambe na likambo etali Bokonzi mpe boyangeli ya Masiya esakolamaki na bosikisiki. Bomoi mobimba ya Yesu awa na mabele tii liwa na ye lokola mbeka, ekokisaki bisakweli nyonso etali ye, ata mpe elili to ebongiseli ya makambo oyo ezalaki na kondimana ya mibeko. (Kol 2:16, 17; Ebr 10:1) Yango wana na maloba mpe misala, tokoki koloba ete Yesu ‘apesaki litatoli na ntina na solo.’
solo: Yesu azalaki kolobela solo nyonso te, kasi nde solo oyo etali mikano ya Nzambe. Likambo ya ntina etali mokano ya Nzambe ezali ete Yesu, “mwana ya Davidi,” azali kosala lokola nganga-nzambe monene mpe Moyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. (Mt 1:1) Yesu amonisaki ete ntina ya libosoliboso oyo ayaki na mokili, bomoi na ye mpe mosala na ye awa na mabele ezalaki mpo na kolobela solo etali Bokonzi yango. Baanzelu basakolaki mpe nsango wana liboso mpe nsima ya kobotama ya Yesu na Beteleme ya Yudea, engumba oyo Davidi abotamaki.—Lk 1:32, 33; 2:10-14.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 18:38a
Solo ezali nini?: Ekoki kozala ete motuna ya Pilate etalelaki solo nyonso, kasi te “solo” oyo Yesu alobelaki. (Yn 18:37) Soki ezalaki motuna ya solosolo, na ntembe te Yesu alingaki koyanola yango. Kasi ekoki kozala ete Pilate atunaki motuna yango na ntembe to na ndenge ya lityo; lokola nde alingaki koloba: “Solo? Solo nde nini? Solo ezalaka te!” Kutu, Pilate azelaki kutu eyano te, alongwaki wana mpe abimaki libándá esika Bayuda bazalaki.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 19:30
akataki mpema: To “azongisaki elimo; akataki motema.” Liloba “elimo” (na Grɛki, pneuʹma) ekoki kolimbola “mpema” to “nguya ya bomoi.” Yango eyokani na vɛrbɛ ya Grɛki ek·pneʹo (lil., “kobimisa mpema”). Esika lisolo yango elobelami mpe na Mr 15:37 mpe Lk 23:46 (epai ebongolami na “akataki motema” to ndenge ezali na libongoli mosusu ya banɔti mpo na koyekola na bavɛrsɛ yango, “abendaki mpema ya nsuka”). Bato mosusu balobi ete maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “azongisaki” elimboli ete Yesu andimaki ye moko kotika kozala na bomoi, lokola makambo nyonso ekokisamaki. Andimaki ‘kosopa molimo na ye kino na liwa.’—Yis 53:12; Yn 10:11.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Yn 19:31
mokolo yango ya Sabata ezalaki ya monene: Mokolo ya 15 Nisana, mokolo oyo elandaki mokolo ya Elekeli, ezalaki ntango nyonso sabata, ata soki ekwei mokolo nini na pɔsɔ. (Le 23:5-7) Soki sabata yango sipesiale ekwei mokolo ya sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ, (mokolo ya nsambo epai ya Bayuda, oyo ezalaki kobanda na mokolo ya mitano na mpokwa tii mokolo ya pɔsɔ na mpokwa), bazalaki kobenga yango Sabata “monene.” Sabata ya bongo nde ezalaki nsima ya mokolo oyo Yesu akufaki; na mokolo ya mitano. Kobanda mobu 31 tii mobu 33 ya ntango na biso, mobu kaka moko oyo 14 Nisana ekweaki mokolo ya mitano, ezalaki mobu 33 ya ntango na biso. Yango endimisi ete Yesu akufaki na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso.