Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
3-9/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 9-11
“Monyokoli monene akómi mosakoli ya molende”
Lisangá “Ekɔtaki na eleko moko ya kimya”
ETULUKU moko ya bato bakómi pene na Damasi; bazali na mokano moko ya mabe oyo bazali kokende kokokisa kuna. Bazali kokana kobimisa na makasi bayekoli ya Yesu na bandako na bango, kokanga bango, kosambwisa bango, mpe komema bango na Yerusaleme mpo bákende kosamba liboso ya Sanedrina.
2 Kutu, mwa mikolo liboso, Saulo moto oyo azali kokamba etuluku yango, andimaki kobomama ya moyekoli moko ya Yesu. Azalaki wana ntango baninga na ye babomaki Stefano na mabanga mpe ye asepelaki na likambo yango. (Mis. 7:57–8:1) Atako banyokolaki bayekoli ya Yesu oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme, motema ya Saulo ekitaki kaka te; alingaki mpe konyokola bayekoli oyo bazalaki na bamboka mosusu. Azalaki na mposa ya kolimwisa mpenza mwa lingomba oyo bazalaki kobenga “Nzela.”—Mis. 9:1, 2; talá etanda “Mokumba oyo Saulo asengelaki kokokisa na Damasi,” na lokasa 61.
Sepelá ndenge Yehova azali Moyemi-mbɛki na biso
4 Yehova atalelaka bato te ndenge biso totalelaka bango. Ye atalaka nde motema, mpe amonaka bomoto ya kati ya mokomoko na biso. (Tángá 1 Samwele 16:7b.) Yehova amonisaki yango ntango abandisaki lisangá ya bokristo. Ye ná Mwana na ye babendaki bato mingi oyo basusu bakokaki komona ete babongi te. (Yoane 6:44) Na bato yango, tokoki kotánga Saulo, Mofarisai moko oyo azalaki ‘kofinga mpe konyokola [bakristo] mpe azalaki moto ya lofundo.’ (1 Timote 1:13) Kasi, ntango Yehova atalaki motema ya Saulo, amonaki te ete azalaki mabele ya lima oyo ezangi ntina. (Masese 17:3) Kutu, Yehova amonaki ete Saulo akokaki kobongisama mpo na kokóma ‘mbɛki oyo aponi’ mpo na kosakola “epai ya bikólo mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisraele.” (Misala 9:15) Yehova aponaki mpe bato mosusu oyo bakokaki kobongisama “mpo na mosala ya lokumu,” oyo liboso bazalaki balangwi-masanga, bato ya pite, mpe miyibi. (Baroma 9:21; 1 Bakorinti 6:9-11) Ntango bayekolaki Makomami, bakómisaki makasi kondima na bango epai na Yehova mpe batikaki ye abongisa bango.
Lisangá “Ekɔtaki na eleko moko ya kimya”
15 Okoki kokanisa ndenge bato bazalaki kokamwa, bazalaki na nsɔmɔ, mpe bazalaki koyoka nkanda ntango Saulo akómaki kosakola nkombo ya Yesu na basinagoga? Bazalaki kotuna ete: “Oyo ezali te mobali oyo azalaki kopanza bato oyo babelelaka nkombo wana na Yerusaleme?” (Mis. 9:21) Ntango Saulo azalaki kolimbwela bato ntina oyo akómaki kondimela Yesu, “azalaki komonisa makambo na molɔngɔ mpenza ete moto wana azali Kristo.” (Mis. 9:22) Kasi, bato mosusu bandimaka te ata soki bamonisi bango makambo na molɔngɔ. Moto oyo akangamá na makambo ya bonkɔkɔ to moto oyo azali na lolendo akoki mpe koboya kondima ata soki bamonisi ye makambo na molɔngɔ. Atako bato mosusu bandimaki te, Saulo azongaki nsima te.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Lisangá “Ekɔtaki na eleko moko ya kimya”
5 Ntango Yesu abimelaki Saulo na nzela ya Damasi, atunaki ye te ete: “Mpo na nini ozali konyokola bayekoli na ngai?” Ndenge touti komona yango, atunaki ete: “Mpo na nini ozali konyokola ngai?” (Mis. 9:4) Ya solo, ntango bazali konyokola bayekoli na ye, Yesu amonaka lokola ete bazali nde konyokola ye.—Mat. 25:34-40, 45.
6 Soki ozali konyokwama mpo na kondima na yo, yebá ete Yehova ná Yesu bazali koyeba mpasi na yo. (Mat. 10:22, 28-31) Ntango mosusu Yehova akolongola monyoko yango sikoyo te. Kobosana te ete Yesu azalaki komona ndenge Saulo apesaki mabɔkɔ na bato oyo babomaki Stefano, mpe azalaki komona ntango Saulo azalaki kokɔtela bayekoli na ye ya sembo na bandako mpo na kokanga bango. (Mis. 8:3) Kasi, Yesu apekisaki te makambo yango esalema na ntango wana. Atako bongo, Yehova, na nzela ya Kristo, apesaki Stefano mpe bayekoli mosusu makasi oyo esengelaki mpo bátikala sembo.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 10:6
Simo moko boye, mobongisi-mposo ya nyama: Mobongisi-mposo ya nyama azalaki kobongisa mposo ya nyama, kotya yango nkisi moko oyo elongolaka nsuki, misuni mpe mafuta nyonso oyo etikalaka na mposo. Na nsima, azalaki kosukola mposo yango na mai moko oyo ezalaki lokola masanga ya makasi mpo asala na yango biloko mosusu. Kobongisa mposo ya nyama ezalaki kobimisa nsolo mabe mpe esɛngaki mai mingi, ekoki kozala mpo na yango nde Simo azalaki kofanda pene ya Mbu, ekoki kozala na nsuka ya engumba Yope. Na kolanda Mibeko ya Moize, moto oyo azali kosala mosala na bibembe ya banyama azalaki mbindo. (Le 5:2; 11:39) Yango wana, Bayuda mingi bazalaki kozwa babongisi-mposo ya nyama na valɛrɛ te mpe ezalaki mpasi bándima kofanda na moto ya ndenge wana. Kutu na nsima, Talmud etyaki babongisi-mposo ya nyama na nse ya bato oyo bazalaki kolɔkɔta nyɛi ya banyama. Atako bongo, Petro atikaki te ete likambo ya kokanisela basusu mabe epekisa ye kofanda epai ya Simo. Ezaleli ya Petro emonisaki mpenza ndenge akosala na mokumba oyo ezalaki kozela ye—kokende kotala moto oyo azalaki Moyisraele te na ndako na ye. Bato mosusu ya mayele bazwaka liloba ya Grɛki (byr·seusʹ) oyo ebongolami na “mobongisi-mposo ya nyama” lokola nkombo mosusu oyo bapesaki Simo.
10-16/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 12-14
“Barnabasi ná Paulo bakómisi bato bayekoli na bamboka ya mosika”
‘Batondaki na esengo mpe na elimo santu’
4 Mpo na nini elimo santu eponaki kaka Barnabasi ná Saulo ete bátyama pembeni “mpo na mosala”? (Mis. 13:2) Biblia elobeli yango te. Toyebi ete bato yango baponamaki na litambwisi ya elimo santu. Biblia elobi te ete basakoli mpe bateyi oyo bazalaki na Antiokia baboyaki ekateli wana. Bango nyonso bandimaki koponama ya Barnabasi ná Saulo. Kanisá ndenge Barnabasi ná Saulo basepelaki ntango bandeko, na kozanga zuwa, “bakilaki bilei mpe babondelaki mpe batyelaki bango mabɔkɔ mpe batikaki bango bákende.” (Mis. 13:3) Biso mpe tosengeli kosepela elongo na bandeko oyo bazwi mikumba na kati ya lisangá, ata mpe baoyo baponami lokola bakɛngɛli. Na esika ya koyokela bandeko oyo bazwi mikumba zuwa, tosengeli ‘kopesa bango lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo mpo na mosala na bango.’—1 Tes. 5:13.
“Bazali koloba na mpiko na bokonzi euti na Yehova”
5 Paulo ná Barnabasi batɛlɛmaki naino na Ikoniumu, engumba moko oyo bato na yango bazalaki na mimeseno ya Bagrɛki mpe oyo ezalaki moko ya bingumba minene ya etúká ya Galatia. Na engumba yango, Bayuda mingi bazalaki bato minene mpe baprozelite bazalaki mingi. Ndenge kaka bazalaki kosala, Paulo ná Barnabasi bakɔtaki na sinagoga mpe babandaki koteya. (Mis. 13:5, 14) “Balobaki mpenza malamu, bongo ebele ya Bayuda mpe ya Bagrɛki bakómaki bandimi.”—Mis. 14:1.
Salelá Yehova na bosembo ata na “Malɔzi mingi”
4 Nsima ya kokende na Derbe, ntoma Paulo ná Barnabasi “bazongaki na Listra mpe na Ikoniumu mpe na Antiokia. Bazalaki kopesa milimo ya bayekoli makasi, bazalaki kolendisa bango ete bátikala na kati ya kondima, na maloba oyo: ‘Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.’” (Mis. 14:21, 22) Na ebandeli, maloba yango ekokaki kokamwisa. Mpo koyeba ete okokutana na “malɔzi mingi” ekoki kopesa moto mpasi, kasi te kolendisa ye. Kasi, ndenge nini ntoma Paulo ná Barnabasi ‘bapesaki milimo ya bayekoli makasi’ na nsango oyo ezali kolobela malɔzi mingi?
5 Tokoki kozwa eyano soki totaleli maloba ya ntoma Paulo na likebi mpenza. Asukaki kaka te na koloba ete: “Tosengeli koyikela malɔzi mingi mpiko.” Kasi, alobaki mpe ete: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” Na yango ntoma Paulo alendisaki bayekoli na ndenge alobelaki mbano oyo bakozwa soki batikali sembo. Mbano yango ezalaki te ndɔtɔ mpamba. Kutu, Yesu alobaki ete: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”—Mat. 10:22.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Misala
12:21-23; 14:14-18. Erode akakatanaki te kondima lokumu oyo ebongaki kaka na Nzambe. Akesanaki mpenza na Paulo ná Barnabasi oyo baboyaki básanzola bango mpe bákumisa bango! Tosengeli te kolukaka bákumisaka biso mpo na oyo tosali na mosala ya Yehova.
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mis 13:9
Saulo, oyo azali mpe Paulo: Kobanda na vɛrsɛ oyo, Saulo akómi kobengama Paulo. Ntoma yango abotamaki Moebre kasi akómaki Moroma nde kokóma. (Mis 22:27, 28; Flp 3:5) Na yango, ekoki kozala ete bandá bomwana, azalaki na nkombo Saulo ya Ebre mpe Paulo nkombo ya Roma. Ezalaki likambo ya sika te mpo na Bayuda ya ntango wana, mingimingi baoyo bazalaki kofanda na Yisraele te bázala na bankombo mibale. (Mis 12:12; 13:1) Ndenge moko mpe, bandeko mosusu ya Paulo bazalaki na nkombo ya Baroma mpe ya Bagrɛki. (Ro 16:7, 21) Lokola azalaki “ntoma ya bikólo,” Paulo azwaki mokumba ya kosakwela bato oyo bazalaki Bayuda te. (Ro 11:13) Emonani lokola azwaki ekateli ya kosalela nkombo na ye ya Moroma; mbala mosusu amonaki ete yango nde ekozala malamu koleka. (Mis 9:15; Ga 2:7, 8) Bato mosusu balobaka ete azwaki nkombo wana ya Baroma mpo na kosepelisa Sergiusi Paulusi, kasi yango ekoki kozala bongo te mpo Paulo akobaki kobengama bongo ata ntango alongwaki na Shipre. Bamosusu balobi ete Paulo aboyaki kosalela nkombo na ye ya Ebre mpo ebengeli ya nkombo yango na Grɛki ekokanaki mwa moke na liloba ya Grɛki oyo ezalaki kolobela moto (to nyama) oyo azali kotambola na lofundo nyonso.—Talá nɔti mpo na koyekola na Mis 7:58.
Paulo: Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, nkombo Pauʹlos, na Latin Paulus, oyo elimboli “mwa; moke,” esalelami mbala 157 mpo na kolobela ntoma Paulo mpe mbala moko mpo na kolobela Prokonsule ya Shipre na nkombo Sergiusi Paulusi.—Mis 13:7.
17-23/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 15-16
“Ekateli oyo bango nyonso bandimaki na kolanda Liloba ya Nzambe”
“Ntembe moko makasi ebimaki”
8 Luka abakisaki boye: “Ntango bokabwani mpe ntembe moko makasi ebimaki na kati na bango [“bato moko boye”] mpe Paulo ná Barnabasi, [bankulutu] basalaki ebongiseli ete Paulo ná Barnabasi mpe bamosusu na kati na bango bámata epai ya bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme mpo na ntembe oyo.” (Mis. 15:2) “Bokabwani mpe ntembe” ezalaki komonisa ete bato na bato bazalaki kotingama na makanisi na bango mpe bazalaki koluka kondimisa basusu, mpe likambo yango ekokaki kokatama na lisangá ya Antiokia te. Mpo na kobatela kimya mpe bomoko, bandeko ya lisangá yango bamonisaki bwanya mpe bayokanaki ete bámema likambo yango epai ya “bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme,” oyo bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi. Bankulutu ya Antiokia bapesi biso liteya nini?
Bakristo ya solo bamemyaka Liloba ya Nzambe
6 Mokapo oyo esalisaki na kosilisa mokakatano wana ezalaki Amose 9:11, 12. Misala 15:16, 17 ezongeli yango boye: “Nakozonga mpe nakotonga lisusu mwa ndako ya matiti ya Davidi oyo ekweá; mpe nakotonga lisusu bitika na yango mpe nakotɛlɛmisa yango lisusu, mpo baoyo batikali na kati ya bato báluka Yehova makasi, elongo na bato ya bikólo nyonso, bato oyo babengami na nkombo na ngai, Yehova alobi bongo.”
7 Kasi, moto mosusu akoki koloba boye: ‘Mokapo yango elobi te ete ezalaki na ntina te bato ya bikólo mosusu oyo bakómi bakristo bákatama ngenga.’ Ezali solo; kasi Bayuda oyo bakómaki bakristo bayebaki ete ezali nde bongo. Na miso na bango, bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga bazalaki lisusu “bato ya bikólo” te, bazalaki nde bandeko. (Kob. 12:48, 49) Na ndakisa, libongoli ya Bagster ya Biblia Septante ebongoli Estere 8:17 boye: “Bato mingi ya bikólo bakatamaki ngenga, mpe bakómaki Bayuda.” Baoyo batikali na kati ya bato ya Yisraele ezalaki Bayuda ná Baprozelite oyo bakatamá ngenga. Makomami esakolaki ete bakokóma bato ya ekólo moko mpo na nkombo ya Nzambe elongo na “bato ya bikólo nyonso,” elingi koloba bato ya bikólo mosusu oyo bakatamaki ngenga te. Na yango, eyano ya Makomami ezalaki polele. Esɛngamaki te ete bato ya bikólo mosusu oyo balingi kokóma bakristo bákatama liboso ngenga.
“Azalaki kolendisa lisangá”
18 Paulo asalaki elongo na Timote na boumeli ya bambula mingi. Na mosala na bango ya bakɛngɛli-batamboli, bakokisaki mikumba mingi oyo lisangani ya mikóló-bakambi epesaki bango. Biblia elobi boye: “Wana bazalaki koleka na bingumba, bazalaki kopesa baoyo bazalaki kuna mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme bakamataki mpo bátosa yango.” (Mis. 16:4) Emonani mpenza ete masangá etosaki malako ya bantoma mpe bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme. Mpo na yango, “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.”—Mis. 16:5.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Tósɛnzɛla lokola bantoma ya Yesu
8 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Tósimba ete ezali se nsima ya kobanda mobembo mpo na kokende na Azia nde elimo ya Nzambe elakisaki Paulo nzela. Lisusu, ezali se nsima ya kokóma pene na Bitinia nde Yesu alakisaki Paulo nzela. Mpe ezali se nsima ya kokóma na Troase nde Yesu alakisaki ye ete asengeli kokende na Masedonia. Yesu, Mokonzi ya lisangá, akoki mpe kosala bongo epai na biso. (Kol. 1:18) Na ndakisa, ekoki kozala ete ozali na mposa ya kokóma mobongisi-nzela to kokende epai oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Nzokande, ekoki kozala kaka nsima ya kobanda kosala oyo esengeli mpo na kokokisa mokano yango nde, na nzela ya elimo ya Nzambe, Yesu akolakisa yo nzela. Tózwa ndakisa: Sofɛlɛ akoki kobalola motuka na lobɔkɔ ya mwasi to ya mobali kaka soki motuka ezali kotambola. Ndenge moko mpe, mbala mosusu Yesu akolakisa biso nzela mpo tómipesa mingi na mosala ya kosakola kaka soki tozali kotambola, elingi koloba tozali mpenza kosala milende mpo na kokokisa mokano na biso.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 16:37
biso Baroma: Elingi koloba bana-mboka Roma. Ekoki kozala ete Paulo ná Silasi mpe bazalaki bana-mboka Roma. Mibeko ya Roma elobaki ete mwana-mboka Roma asengelaki kosambisama na bosembo mpe basengelaki te kopesa ye etumbu na miso ya bato nyonso soki tribinale ekateli ye naino etumbu te. Kozala Moroma ezalaki kopesa moto mwa lotomo ya kosala makambo mosusu mpe kozwa matomba mosusu na esika nyonso oyo akokende na ampire yango. Moroma azalaki na nse ya mibeko ya Baroma, kasi ya bingumba mosusu te. Soki bafundi ye, akokaki kondima básambisa ye na kolanda mibeko ya mboka yango, ata bongo, azalaki kaka na lotomo ya kokende kosamba na tribinale ya Roma. Soki bakateli ye etumbu ya liwa, azalaki na lotomo ya kosɛnga akende kosamba liboso ya amperɛrɛ. Ntoma Paulo asakolaki mingi na ampire mobimba ya Roma. Biblia elobeli mabaku misato oyo asalelaki lotomo na ye ya mwana-mboka ya Roma. Mbala ya liboso ezalaki na mboka Filipi ntango ayebisaki bazuzi ya Filipi ete batosaki lotomo na ye te ndenge babɛtaki ye fimbo.—Mpo na mabaku mibale oyo etikali, talá banɔti mpo na koyekola na Mis 22:25; 25:11.
24-30/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 17-18
“Mekolá ntoma Paulo na likambo ya kosakola mpe ya koteya”
nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mis 17:2, 3
mpo na kosolola: Paulo asukaki kaka te na koyebisa bango nsango malamu. Alimbolaki yango mpe apesaki bilembeteli na Makomami, elingi koloba, na Makomami ya Ebre. Asukaki kaka te na kotánga Makomami; asalelaki yango mpo na kosolola na bango mpe ayokanisaki mateya na ye na mposa ya bayoki na ye. Vɛrbɛ ya Grɛki di·a·leʹgo·mai elimboli “kokɔta na lisolo; kosolola; kolobela.” Emonisaka kosolola na bato. Liloba yango ya Grɛki esalelami mpe na Mis 17:17; 18:4, 19; 19:8, 9; 20:7, 9.
kopesa bilembeteli na makomi: Liloba yango ya Grɛki elimboli mpenza “kotya pembeni ya (esika pembeni ya).” Yango ekoki komonisa ete Paulo akokanisaki malamumalamu bisakweli ya Makomami ya Ebre oyo etali Masiya ná makambo oyo elekaki na bomoi ya Yesu, mpo na komonisa ndenge Yesu akokisaki bisakweli yango.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 17:17
zando: Zando ya Atene (na Grɛki, a·go·raʹ), oyo ezalaki na nɔrdi-wɛsti ya Acropole, ezalaki na bonene ya ektare soki 5. Zando yango ezalaki kaka te esika ya kotɛka mpe kosomba biloko; ezalaki mpe esika monene ya makambo ya nkita, ya politiki, mpe ya makambo mosusu ya bomoi. Bato ya Atene bazalaki kosepela kokutana kuna mpo na kosolola mpe komonisa mayele na bango.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 17:22, 23
Epai ya Nzambe oyo ayebani te: Maloba ya Grɛki Agnôstoï Théôï ezalaki na kati ya makomi oyo ekomamaki likoló ya etumbelo moko na Atene. Bato ya Atene batongaki batempelo mpe bitumbelo ebele mpo na komonisa ete babangaka Nzambe; basalelaki kutu banzambe ya bongobongo bitumbelo, na ndakisa nzambe Lokumu, Bopolo, Nguya, Kondimisa mpe Mawa. Ekoki kozala ete basalaki etumbelo moko “mpo na Nzambe oyo ayebani te” mpo bazalaki kobanga ete bábosana nzambe moko mpe nzambe yango asepela na bango te. Na nzela ya etumbelo yango, bato yango bandimaki ete Nzambe moko oyo bango bayebi eloko moko te mpo na ye azalaka. Na mayele nyonso, Paulo asalelaki etumbelo yango lokola ndakisa na mateya na ye mpo na kolakisa bayoki na ye Nzambe—Nzambe ya solo oyo tii na ntango wana bango bayebaki ye te.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Misala
18:18—Paulo alapaki ndai nini? Bato mosusu ya mayele balobaka ete Paulo alapaki ndai ya Monasili. (Mit. 6:1-21) Kasi, Biblia elobi te soki alapaki ndai ya ndenge nini. Lisusu, Makomami eyebisi te soki alapaki ndai yango liboso to nsima ya kobongwana na ye to soki azalaki na ebandeli to na nsuka ya ndai yango. Ezala ndenge nini, kolapa ndai ya ndenge wana ezalaki lisumu te.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 18:21
soki Yehova alingi: Maloba oyo emonisi ntina ya kotalela mokano ya Nzambe ntango tozali kosala to kokana kosala likambo nyonso. Ntoma Paulo abatelaki mpenza likanisi yango. (1Ko 4:19; 16:7; Ebr 6:3) Moyekoli Yakobo mpe alendisaki baoyo bakotánga mokanda na ye bálobaka: “Soki Yehova alingi, tokozala na bomoi mpe lisusu tokosala boye to boye.” (Yk 4:15) Maloba yango esengeli te kozala maloba ya mpamba; moto nyonso oyo alobi na motema mobimba “soki Yehova alingi” asengeli kosala makambo na boyokani na mokano ya Yehova. Esɛngaka ntango nyonso te koloba maloba yango, kasi mbala mingi elobamaka kaka na nse ya motema.—Talá banɔti mpo na koyekola na Mis 21:14; 1Ko 4:19; Yk 4:15 mpe Ap. C na Biblia ya boyekoli na Anglais.
31/12–6/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 19-20
“Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba”
“Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino”
5 Ntoma Petro akomaki ete bankulutu basengeli ‘kobatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bango.’ Ezalaki na ntina mingi báyeba ete etonga ezali ya Yehova mpe ya Yesu Kristo. Bankulutu basengelaki kozongisa monɔkɔ mpo na ndenge oyo bazalaki kobatela bampate ya Nzambe. Kanisá ete moninga na yo moko ya motema asɛngi yo obatela bana na ye ntango ye moko azali te. Okobatela bana yango malamu mpe okoleisa bango malamu, boye te? Soki mwana moko abɛli, okozwa bibongiseli te mpo azwa nkisi oyo esengeli? Ndenge moko mpe, bankulutu basengeli “kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Mis. 20:28) Babosanaka te ete mpate mokomoko asombamaki na makila ya motuya ya Kristo Yesu. Lokola bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe, bankulutu baleisaka mpe babatelaka etonga.
Bankulutu: ‘Baninga ya mosala mpo na esengo na biso’
15 Kozala nkulutu ezali mokumba monene. Ntango mosusu, bankulutu balekisaka babutu kozanga mpɔngi mpo bazali komibanzabanza mpe kobondela mpo na etonga ya Nzambe to mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo na elimo. (2 Ko. 11:27, 28) Atako bongo, bankulutu bakokisaka mikumba na bango malamumalamu mpe basalaka yango na esengo, kaka ndenge Paulo azalaki kosala. Akomelaki Bakorinti ete: “Na esengo koleka, nakopesa biloko na ngai nyonso mpe nakopesama mobimba mpo na milimo na bino.” (2 Ko. 12:15) Ya solo, bolingo ya Paulo mpo na bandeko na ye bakristo nde etindaki ye ‘amipesa’ mobimba mpo na kolendisa bango. (Tángá 2 Bakorinti 2:4; Flp. 2:17; 1 Tes. 2:8) Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge bandeko bazalaki kolinga ye mingi!—Mis. 20:31-38.
“Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”
20 Ndenge oyo Paulo amitambwisaki ekeseni mpenza na bizaleli ya bato oyo na nsima bakómaki kolyela bampate na lisangá. Azalaki kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na ye, mpo azala mokumba te mpo na lisangá. Azalaki kosalisa bandeko na ye mpo na koluka litomba na ye te. Paulo alendisaki bankulutu ya Efese ete bámonisa ezaleli ya komipimela. Alobaki boye: “Bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu, mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: ‘Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.’”—Mis. 20:35.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Atako botɛmɛli, liloba ekobaki “kokola mpe kolonga”
11 Ekoki kozala ete Paulo azalaki kosala masukulu na ndako yango ya eteyelo mokolo na mokolo banda na ngonga ya 11 tii pene na ngonga ya 4 nsima ya midi. (Mis. 19:9) Ekoki mpenza kozala ete bangonga yango ezalaki bangonga oyo ezalaki kimya mingi, kasi mpe oyo molunge ezalaki makasi; bato mingi bazalaki kokata misala na bango mpo na kolya mpe kopema. Soki Paulo alandaki programɛ ya mpasi ndenge wana na boumeli ya mbula mibale mobimba, boye asalaki ngonga koleka 3 000, elingi koloba ngonga 125 na sanza, na koteya. Yango mpe ezali ntina mosusu oyo liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga. Paulo azalaki mosali ya molende mpe ayebaki komesana na makambo ya sika. Azalaki kobongisa programɛ na ye mpo asakolaka na ntango oyo ebongi mpo na bato ya teritware wana. Yango ebotaki mbuma nini? “Baoyo nyonso bazalaki kofanda na etúká ya Azia bayokaki liloba ya Nkolo, Bayuda ná Bagrɛki.” (Mis. 19:10) Apesaki mpenza litatoli malamumalamu!
Atako botɛmɛli, liloba ekobaki “kokola mpe kolonga”
15 Bato mingi babangaki Nzambe ntango bamonaki ndenge oyo elimo mabe esambwisaki bana ya Sekeva, mpe mingi bakómaki bakristo mpe batikaki misala ya bilimo mabe. Bato mingi ya Efese bamipesaki na misala ya maji. Bato mingi bazalaki kobelela bilimo mabe mpe bazalaki kolata bikelakela; bazalaki mpe na mikanda oyo ezalaki na maloba ya kobelela bilimo mabe. Nsima ya komona makambo wana, bato mingi ya Efese babimisaki babuku na bango ya maji mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso, atako ezalaki babuku oyo ekoki kotɛkama na bankóto ya badolare lelo oyo. Luka alobi boye: “Na yango, na ndenge moko ya nguya, liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga.” (Mis. 19:17-20) Mateya ya solo elongaki mpenza mateya ya lokuta mpe misala ya bademo! Bato yango ya sembo bapesaki ndakisa malamu mpo na biso. Biso mpe tozali na mokili oyo bato mingi bamipesi na misala ya bilimo mabe. Soki tomoni ete tozali na eloko moko oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe, tosengeli kosala lokola bato ya Efese, elingi koloba ete tosengeli kobwaka to kotumba yango nokinoki! Tósala nyonso mpo na kokima misala wana ya mabe.