Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Janvier lok. 2
  • “Mokano ya Yehova esalema”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mokano ya Yehova esalema”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Talelá bomoi ndenge Yehova atalelaka yango
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Bafundi ye ete azali likama monene mpe azali kobimisa botomboki
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • “Kosikolama na bino ekómi pene”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Paulo asɛngi akende kosamba epai ya Kaisala mpe na nsima apesi Mokonzi Erode Agripa litatoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Janvier lok. 2

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 21-22

“Mokano ya Yehova esalema”

21:8-14

Paulo amonaki ete elimo santu ezalaki kokamba ye na Yerusaleme, epai likama ezalaki kozela ye. (Mis 20:22, 23) Yango wana, ntango bandeko na ye bakristo babondelaki ye na makanisi malamu ete akende te; alobaki na bango boye: “Bozali kosala nini na kolela mpe na kolɛmbisa ngai motema?” (Mis 21:13) Tosengeli soki moke te kolɛmbisa bandeko mosusu oyo balingi komipesa mobimba na mosala ya Yehova.

Ndenge nini tokoki kolendisa, kasi te kolɛmbisa ekateli ya ndeko moko ya lisangá na makambo oyo elandi?

  • Ndeko mobali oyo azali kosukola bafenetre

    Alingi kosala mosala oyo ezangi lokumu mpo amipesa mingi na mosala ya kosakola na esika aluka kosala mosala ya mbongo mingi

  • Ndeko mobali oyo ná mwasi na ye bazali kopesa litatoli na bisika ya bato ebele na mboka mopaya

    Azali na mposa ya kokende na lisangá mosusu esika mposa ezali mingi mpo na kopesa mabɔkɔ

  • Ndeko mobali oyo akufá miso ná mwasi na ye na mosala ya kosakola

    Azali kosala milende mpenza mpo na kosakola, atako abɛlaka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto