LOYEMBO 77
Pole na mokili ya molili
Ya Papye
1. Na ntango ya molili’oyo,
Pole moko’engɛngi.
Eza’ koyebisa bato
Ntɔngɔ ebɛlɛmi.
(MONDIMO)
Nsango ya Bokonzi
Engɛngi neti mwinda.
Epesi elikya—
Eza’ komonisa
Butu’ekómi na nsuka—
Ntɔngɔ’ez’oya.
2. Balali, nsoso eleli;
Bálongwa na mpɔngi.
Toza’ kolendisa bango.
Nzambe, sungá bango.
(MONDIMO)
Nsango ya Bokonzi
Engɛngi neti mwinda.
Epesi elikya—
Eza’ komonisa
Butu’ekómi na nsuka—
Ntɔngɔ’ez’oya.
(Talá mpe Yoa. 3:19; 8:12; Rom. 13:11, 12; 1 Pe. 2:9.)