Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/11 lok. 15
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Mboka na kobombama​—⁠Ebongiseli ya motema mawa ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Okimaka epai ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tikalá kati na “Mboka na kobombama” mpo ete obikisa bomoi na yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • ‘Bókima epai ya nkombo ya Yehova’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/11 lok. 15

Oyebaki yango?

Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete amemaki na nzoto na ye “bilembo ya moombo ya Yesu”?​—Bagalatia 6:17.

▪ Maloba ya Paulo ekokaki kozala na bandimbola mingi epai ya bato ya ekeke ya liboso oyo bayokaki ye. Na ndakisa, na ntango ya kala, bazalaki kosalela ebende ya mɔtɔ mpo na kotya elembo epai ya bato oyo bakangi na bitumba, miyibi ya tempelo mpe baombo oyo bakimi bankolo na bango. Ntango batye bato elembo ya ndenge wana, ezalaki likambo ya nsɔni.

Kasi, bilembo ezalaki ntango nyonso te likambo ya mabe. Bato mingi ya kala bazalaki kosalela yango mpo na komonisa bato ya libota to lingomba moko. Na ndakisa, buku moko (Theological Dictionary of the New Testament), elobi ete, “bato ya Siri bazalaki komipesa na banzambe Hadad mpe Atargatis na bilembo oyo bazalaki kotya bango na lobɔkɔ to na nkingo. . . . Bazalaki kotya basambeli ya Dionysus elembo na lokasa ya fololo moko (lierre).”

Bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia lelo oyo, balobaka ete Paulo azalaki kolobela bilembo oyo ezalaki kotikala na nzoto na ye ntango nyonso oyo babɛtaki ye na boumeli ya mosala na ye ya misionɛrɛ. (2 Bakorinti 11:23-27) Kasi, ekoki kozala ete Paulo alingaki nde koloba ete lolenge ya bomoi na ye nde emonisaki ete azali mokristo, kasi te bilembo oyo ezalaki komonana na miso.

Na Yisraele ya kala bingumba ya ekimelo ekómaki ebombamelo ya bato mabe?

▪ Na ntango ya kala, na bamboka ya bapakano, batempelo mingi ezalaki bisika mosantu mpo na bato oyo bakimá mboka to bato mabe. Na Moyen-âge, na mangomba ya bokristo, bamonastɛrɛ mpe bandako-nzambe ezalaki mpe bisika ya ndenge wana. Nzokande, mibeko oyo epesamaki mpo na kotambwisa makambo na bingumba ya ekimelo na Yisraele, esɛnzɛlaki ete bisika yango ekóma te bisika oyo bato mabe basengelaki kokende kobombama.

Mibeko ya Moize emonisaki ete bingumba yango ya ekimelo ezalaki kaka mpo na kobatela moto oyo abomi moto kozanga kokana. (Kolimbola Mibeko 19:4, 5) Akokaki kokima na engumba ya ekimelo oyo ezalaki pene, mpo ndeko mobali ya moto oyo ye abomi, oyo akokaki kozongisa mabe mpo na makila oyo esopamaki, azwa ye te. Nsima ya koyebisa likambo na ye epai ya mikóló ya engumba, moto yango asengelaki kosamba na engumba oyo ezalaki kotalela makambo na esika oyo likama esalemaki. Kuna, azalaki na likoki ya komonisa ete asali likambo yango na nko te. Mikóló basengelaki kotala boyokani oyo moto yango azalaki na yango na moto oyo akufi, koluka koyeba soki bazalaki koyinana liboso likambo yango esalema.​—Mitángo 35:20-24; Kolimbola Mibeko 19:6, 7; Yosua 20:4, 5.

Soki bamoni ete moto yango asalaki likambo yango kozanga kokana, bazalaki kozongisa ye na engumba ya ekimelo mpe asengelaki kotikala kaka na ndelo oyo etyamaki. Bingumba yango ezalaki babolɔkɔ te. Moto yango azalaki kosala mosala mpe azalaki na ntina lokola moto nyonso ya mboka. Soki kaka nganga-nzambe monene akufi, bato nyonso oyo bakimaki na bingumba yango basengelaki kolongwa na bingumba yango na kimya nyonso.​—Mitángo 35:6, 25-28.

[Karte na lokasa 15]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

BINGUMBA YA EKIMELO

1 KEDESHE

2 GOLANE

3 RAMOTE-GILEADE

4 SHEKEME

5 BEZERE

6 HEBRONE

Ebale Yordani

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto