Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 6 lok. 9
  • Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge malamu ya kosukisa lisolo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 6 lok. 9

LITEYA 6

Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ

Vɛrsɛ

Yoane 10:33-36

NA MOKUSE: Kosuka kaka te na kotánga vɛrsɛ, bongo na nsima oleki na likanisi mosusu. Salá makasi bato bámona polele ndenge vɛrsɛ oyo otángi eyokani na likambo oyo ozali koteya.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Bimisá maloba ya ntina. Nsima ya kotánga vɛrsɛ moko, bimisá maloba oyo eyokani na likambo oyo ozali kolobela. Mpo na kosala yango, okoki kozongela maloba yango to kotuna bato motuna oyo ekosalisa bango moko bámona maloba yango.

    Toli

    Soki osaleli maloba mosusu mpo na kobimisa likanisi ya vɛrsɛ, omituna soki ekotya mobulu te na mitó ya bato, soki ekozala mpasi te bámona ndenge maloba yango eyokani na likanisi oyo ozali kolobela.

  • Bimisá likanisi ya ntina. Soki liboso ya kotánga vɛrsɛ moko omonisaki malamu ntina oyo olingi kotánga yango, limbolá ndenge oyo maloba na yango eyokani na ntina wana.

    Toli

    Ntango ozali kolimbola vɛrsɛ oyo outi kotánga, tiká Biblia polele. Yango ekosalisa bato bámona ete maloba na yo eyokani na vɛrsɛ oyo outi kotánga.

  • Koluka mindɔndɔ te mpo na kobimisa liteya. Kolobela te makambo mosusu ya vɛrsɛ oyo eyokani te na likambo oyo ozali kolobela. Nsima ya kotalela makambo bato oyo bazali koyoka yo bayebi mpo na motó ya likambo wana, poná makanisi nini ya vɛrsɛ okolobela mpo liteya ebima polele mpe bato bákanga ntina na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto