Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 4 lok. 7
  • Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kobimisa makanisi ya vɛrsɛ liboso ya kotánga yango
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Ndenge malamu ya kobanda lisolo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 4 lok. 7

LITEYA 4

Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ

Vɛrsɛ

Matai 22:41-45

NA MOKUSE: Bongisá makanisi ya bato liboso ya kotánga vɛrsɛ.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Kanisá mpo na nini okotánga vɛrsɛ yango. Liboso ya kotánga vɛrsɛ, lobá mwa maloba oyo ekosalisa bato bámona likanisi ya ntina oyo olingi kobimisa na vɛrsɛ yango.

    Toli

    Talelá bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima. Soki okoyebisa nani akomaki maloba to mokanda oyo olingi kotánga, ezala mpenza moto wana, kasi moto mosusu te.

  • Monisá ete Biblia eleki mikanda nyonso. Ntango ozali koloba na bato oyo bandimaka Nzambe, lakisá ete Biblia ezali “Liloba ya Nzambe,” mpo na komonisa ete bwanya oyo ezali na Biblia eleki bwanya mosusu nyonso.

  • Pesá bato mposa ya koyoka maloba ya vɛrsɛ. Tuná motuna moko oyo bokozwa eyano na vɛrsɛ yango, to lobelá mokakatano moko oyo vɛrsɛ yango ekosilisa, to lobelá etinda moko oyo vɛrsɛ wana ekosalisa bato bákanga ntina na yango.

    Toli

    Kanisá mpe makambo nini bato oyo bazali koyoka yo bayebi mpo na likambo yango to mpo na vɛrsɛ yango. Ata soki ezali vɛrsɛ oyo eyebani, lobá makambo oyo ekopesa bato mposa ya kotánga yango lisusu, mpe salisá bango báyekola likambo ya sika na vɛrsɛ yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto