Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
06-12/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 1-2
“Yehova akeli bomoi na mabele”
Bozalisi
Ntango Nzambe alobaki na mokolo ya liboso: “Pole ezala,” na ntembe te, pole ekatisaki mapata atako awa na mabele, likoki ya komona biloko oyo ezalaki kobimisa pole yango ezalaki naino te. Emonani ete pole yango ezalaki kokatisa mokemoke, ndenge mobongoli moko na nkombo J. Watts amonisi yango ntango alobi boye: “Mpe mokemoke pole esalemaki.” (Eb 1:3, A Distinctive Translation of Genesis) Nzambe asalaki ete pole ekabwana ná molili, abengaki pole moi kasi molili abengaki yango butu. Yango emonisi ete mabele ezalaki kobaluka yango moko mpe kobaluka zingazinga ya moi, na boye ete ngámbo moko ya mabele na ɛsti mpe ngámbo mosusu na wɛsti ezalaki na bileko ya pole mpe bileko ya molili.—Eb 1:3, 4.
Na mokolo ya mibale, Nzambe asalaki etando ntango ‘akabolaki mai na mai.’ Mai mosusu etikalaki na mabele, kasi ebele ya mai mosusu emataki likoló mpe etando esalemaki na katikati. Nzambe abengaki etando likoló, na kotalela esika mabele ezali, mpo esika moko te balobi ete mai oyo emataki likoló ezingaki minzoto to baplanɛti mosusu.—Eb 1:6-8; talá ETANDO.
Na mokolo ya misato, na lisalisi ya nguya ya Nzambe oyo ezalaki kosala makamwisi, mai oyo ezalaki na mabele esanganaki esika moko mpe mabele ya kokauka ebimaki, Nzambe abengaki yango mokili. Kaka na mokolo yango Nzambe asalaki ete bomoi ekɔta na kati ya baatɔmɛ oyo esalaki ete matiti, milona mpe nzete oyo ebotaka mbuma ebima, kasi yango esalemaki na mbalakaka te to na nzela ya evolisyo. Mokomoko ya biloko yango misato ekokaki kobimisa biloko mosusu na kolanda “mitindo” na yango.—Eb 1:9-13.
Bozalisi
Tóbosana mpe te ete na Ebandeli 1:16 basaleli te vɛrbɛ ya Ebre ba·raʼʹ oyo elimboli “kokela.” Kasi basaleli nde vɛrbɛ ya Ebre ʽa·sahʹ, oyo elimboli “kosala.” Lokola moi, sanza mpe minzoto ezali mpe na “likoló” oyo Ebandeli 1:1 elobeli, ekelamaki liboso ya mokolo ya minei. Na mokolo ya minei, Nzambe abandaki “kosala” ete biloko yango ekóma na boyokani ya sika ná mabele mpe ná etando oyo ezali likoló ya mabele. Ntango Biblia elobi ete “Nzambe atyaki yango kati na etando ya likoló mpo na kongɛngisa mabele,” yango emonisi ete ekokaki sikoyo komonana uta na mabele, lokola nde etyamaki kuna na etando. Lisusu, bingɛngiseli yango esengelaki “kozala bilembo mpo na bileko, mpo na mikolo mpe mpo na bambula,” oyo na nsima, elingaki kopesa moto litambwisi na lolenge ekeseni.—Eb 1:14.
Na mokolo ya mitano, Nzambe akelaki milimo ya liboso awa na mabele, kasi ezalaki bato te. Nguya ya Nzambe ebimisaki te ekelamu moko oyo mokemoke esengelaki kobimisa bikelamu mosusu, kasi ebimisaki nde ebele mpenza ya milimo ya bomoi. Biblia elobi: “Nzambe abandaki kozalisa banyama ya nsɔmɔ ya mineneminene ya mbu mpe molimo nyonso ya bomoi oyo etambolaka, oyo mai etondanaki na yango na mitindo na yango, mpe ekelamu nyonso oyo epumbwaka oyo ezali na mapapu na motindo na yango.” Lokola mosala yango esepelisaki ye, Nzambe apambolaki yango mpe alobaki na yango boye: ‘Bókóma mingi,’ yango elingaki kosalema mpo Nzambe apesaki bikelamu yango ya mitindo ndenge na ndenge likoki ya kobota na kolanda “mitindo na yango.”—Eb 1:20-23.
Na mokolo ya motoba, “Nzambe abandaki kosala nyama ya zamba oyo ezali na mabele na motindo na yango mpe nyama ya mboka na motindo na yango mpe nyama mikemike nyonso ya nse na motindo na yango;” mosala yango ezalaki malamu ndenge moko na misala mosusu nyonso oyo asalaki liboso.—Eb 1:24, 25.
Na nsuka ya mokolo ya motoba ya mosala na ye ya kokela, Nzambe asalaki ekelamu moko ya motindo mosusu mpenza oyo aleki banyama atako azali na nse ya baanzelu. Ekelamu yango ezalaki moto, akelamaki na elilingi ya Nzambe. Atako Ebandeli 1:27 elobi na mokuse mpo na moto ete “[Nzambe] azalisaki bango mobali ná mwasi,” Ebandeli 2:7-9 emonisi ete Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele, apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi mpe ete moto akómaki molimo ya bomoi mpe Nzambe atyaki ye afanda na paradiso, apesaki ye mpe bilei. Awa, Yehova asalelaki biloko ya mabele na mosala na ye ya kokela, mpe nsima ya kokela Adama, akelaki mwasi na mokuwa moko oyo alongolaki na mopanzi ya Adama. (Eb 2:18-25) Kokelama ya mwasi nde esalaki ete moto azala na nyonso na kolanda “motindo” na ye.—Eb 5:1, 2.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Ndenge oyo siansi ememelaka yo matomba
Mbula oyo mabele mpe molɔ́ngɔ́ esali
Bato ya siansi balobi ete ekoki kozala mabele eumeli mbula soki 4 miliare mpe molɔ́ngɔ́ eumeli mbula soki 13 to 14 miliare. Biblia elobeli dati moko te mpo na kozalisama ya molɔ́ngɔ́. Ata esika moko te elobi ete mabele esali kaka mwa bankóto ya bambula. Vɛrsɛ ya liboso mpenza ya Biblia elobi boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Ebandeli 1:1) Maloba yango epesaka bato ya siansi nzela ya koluka koyeba mbula oyo likoló ná mabele esali na kolanda mibeko ya siansi.
Yesu Kristo
Azali Mozalisi te. Atako Mwana apesaki mabɔkɔ na mosala ya kokela, yango ekómisi ye te mozalisi lokola Tata na ye. Nguya ya kokela ezalaki kouta epai ya Nzambe na nzela ya elimo santu na ye, to nguya na ye oyo asalaka na yango mosala. (Eb 1:2; Nz 33:6) Mpe lokola bomoi nyonso eutá na Yehova, bomoi ya ekelamu nyonso ya bomoi, oyo emonanaka to oyo emonanaka te, eutá epai na ye. (Nz 36:9) Mwana azalaki mozalisi te, kasi nde mosali to esaleli oyo Yehova, Mozalisi asalelaki na mosala ya kozalisa. Yesu ye moko amonisaki ete Yehova nde azali Mozalisi, ndenge mpe Makomami nyonso emonisi yango.—Mt 19:4-6; talá BOZALISI.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur: “Koyeba ete tokelamaki nde epesaka kimya ya motema”
Toutá wapi?
Ndenge oyo biyano ya Biblia epesaka kimya ya solosolo
Koyeba ete “libota nyonso . . . na mabele ezwi nkombo na yango” epai ya Nzambe esalisaka bato bákóma kotalela basusu na ndenge ebongi. (Baefese 3:15) Boyebi wana esalisaka biso mpe tómitalelaka biso moko mpe mikakatano oyo tozali kokutana na yango na ndenge ebongi. Ndenge oyo makanisi na biso ekozala:
Ntango tosengeli kozwa bikateli ya minene, tokobanda komitungisa koleka ndelo te mpo na makanisi ndenge na ndenge oyo bato bapesá. Tokolanda nde toli ya Biblia. Mpo na nini? Mpo “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”—2 Timote 3:16, 17.
Ya solo, kolanda toli ya Biblia esɛngaka milende mpe komipimela makambo mosusu. Mbala mosusu, makambo oyo Biblia esɛngaka biso tósala ekoki koyokana te na makanisi ya motema na biso. (Ebandeli 8:21) Nzokande, soki tondimi ete tokelamá na Tata moko ya bolingo oyo azali na likoló, tokondima mpe ete ye nde ayebi nzela eleki malamu oyo tosengeli kolanda. (Yisaya 55:9) Na yango, Liloba na ye elobi na biso boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Soki tolandi toli wana, tokobanda lisusu komitungisa mingi te ntango tokutani na mikakatano to tosengeli kozwa bikateli.
Ntango basusu bazali komona biso mpamba mpo tokeseni na bango, tokomona te ete tozali na nse na bango to tozali na ntina te liboso na bango mpo na mposo to ekólo na bango. Na esika ya kokanisaka bongo, tokomipesa nde lokumu. Mpo na nini? Mpo Tata na biso, Yehova Nzambe, “aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”—Misala 10:34, 35.
Koyeba bongo ekosalisa biso mpe tómonaka basusu mpamba te. Tokomona ete ezali na ntina te tókanisaka ete toleki bato ya mposo mosusu, mpamba te Nzambe “asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabele.”—Misala 17:26.
Na ntembe te, soki toyebi ete bakelaki biso mpe Mozalisi na biso akipaka biso malamu, tokozala na kimya ya solosolo. Kasi, ezali na makambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo tókoba kozala na kimya ya solosolo.
13-19/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 3-5
“Mbuma mabe mpenza oyo lokuta ya liboso ebimisá”
Mokano ya Yehova ekokokisama!
9 Satana Zabolo asalelaki nyoka mpo na kotinda Eva aboya kotosa Yehova, Tata na ye. (Tángá Ebandeli 3:1-5; Emoniseli 12:9) Satana abimisaki likanisi ete Nzambe apekisaki bato kolya “mbuma ya nzete nyonso ya elanga.” Ezali lokola nde alobaki: ‘Bolobi ete bokoki te kosala likambo oyo bolingi?’ Na nsima, ayebisaki Eva: “Bokokufa soki moke te.” Nzokande, maloba wana ezalaki lokuta. Na yango, alukaki kondimisa Eva ete asengelaki te koyoka Nzambe. Satana alobaki: “Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza.” Satana azalaki koloba ete Yehova apekisaki bango kolya mbuma yango mpo yango elingaki kopesa bango boyebi ya ndenge mosusu. Nsukansuka, apesaki bango elaka oyo ya lokuta: “Bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.”
Liteya nini tokoki kozwa na bomoi ya mwasi na mobali ya liboso?
Eva akokaki kokima lisumu wana te? Akokaki kokima yango! Omitya naino na esika na ye. Maloba ya nyoka ekesanaki mpenza na oyo Nzambe na Adama balobaki. Okosala nini soki mopaya moko alobi ete moto oyo olingaka mpe otyelaka motema azali moto malamu te? Esengelaki mpenza Eva atalela likambo yango ndenge mosusu, asengelaki komonisa ete likanisi wana ezali mpenza mabe, asengelaki kosilika, ata kutu koboya koyoka ye. Kanisá naino, nyoka azalaki nani mpo atɛmɛla bosembo ya Nzambe mpe maloba ya Adama? Mpo na kotosa bokonzi ya mobali na ye, Eva asengelaki kotuna ye toli liboso ya kozwa ekateli. Biso mpe tosengeli koluka toli soki tokutani na makambo oyo eyokani na malako ya Nzambe te. Nzokande, Eva andimaki maloba ya Momeki, alukaki kopona ye moko oyo ezalaki malamu mpe oyo ezalaki mabe. Lokola azalaki kokanisakanisa likambo yango, asepelaki na yango mingi. Asalaki mpenza libunga na ndenge akangamaki na mposa ya mabe, na esika alongola yango na makanisi na ye to ayebisa mokonzi na ye likambo yango!—1 Bakorinti 11:3; Yakobo 1:14, 15.
Adama ayokeli mwasi na ye
Mbala moko, Eva abendaki Adama na lisumu na ye. Mpo na nini Adama andimaki makanisi na ye na bolɛmbu boye? (Ebandeli 3:6, 17) Adama akómaki na mokakatano ya kopona: asengeli kozala sembo epai ya nani. Atosa Mozalisi oyo apesaki ye biloko nyonso? to atosa nde Eva, mwasi na ye ya bolingo? Aluka nde toli ya Nzambe mpo na koyeba nini asengeli kosala? To alanda nde mwasi na ye? Adama ayebaki malamu ete mwasi akokaki te kozwa eloko oyo alikyaki ntango alyaki mbuma oyo epekisamaki. Elimo santu etindaki ntoma Paulo akoma ete: ‘Adama mpe azimbisamaki te kasi mwasi azimbisamaki mpe akweaki na lisumu.’ (1 Timote 2:14) Na bongo, Adama atombokelaki Yehova na nko. Emonani ete Adama abangaki mingi mpo na kokabwana na mwasi na ye mpe azalaki na kondima moke ete Nzambe akoki kobongisa likambo yango.
Nzambe azwaka mpenza basi na valɛrɛ?
Nzambe alakelá nde basi mabe?
Te. Nzambe ‘alakelaki mabe’ nde “nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo.” (Emoniseli 12:9; Ebandeli 3:14) Ntango Nzambe alobaki ete Adama “akozala na bokonzi likoló” ya mwasi na ye, amonisaki te ete ezali malamu mobali akonza mwasi. (Ebandeli 3:16) Azalaki komonisa kaka mpasi oyo lisumu ekobimisela mwasi ná mobali ya liboso.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese—I
3:17—Na ndimbola nini mabele elakelamaki mabe, mpe mpo na ntango boni? Mabe oyo Nzambe alakelaki mabele elimbolaki ete mosala ya kolona bilanga na mabele yango esengelaki kokóma mpasi mingi. Bana ya Adama bamonaki ndenge oyo mabele ekómaki kobota nzete mpe nkamba ya nzubɛ lokola balakelaki yango mabe; yango wana, Lameke, tata ya Noa alobelaki “mpasi ya mabɔkɔ na biso oyo euti na mabele oyo Yehova alakeli mabe.” (Ebandeli 5:29) Nsima ya Mpela, Yehova apambolaki Noa ná bana na ye, ayebisaki bango ete bátondisa mabele. (Ebandeli 9:1) Na ntembe te mabe oyo Nzambe alakelaki mabele elongwaki.—Ebandeli 13:10.
Mpasi ya kobota
Ezali mpasi oyo mwasi ayokaka na ntango ya kobota. Ntango Eva, mwasi ya liboso asalaki lisumu, Nzambe ayebisaki ye mbuma mabe oyo lisumu yango ekobimisela ye na ntango ya kobota. Soki akobaka komonisa botosi, Yehova alingaki kokoba kopambola ye mpe kobota elingaki kozala esengo mpenza mpo “lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.” (Mas 10:22) Kasi sikoyo, lokola nzoto ekómi ya kozanga kokoka, ekobanda kosala lisusu malamu te mpe yango ekosala ete moto ayoka mpasi. Yango wana, Nzambe alobaki (makambo oyo ye atikelaka nzela, mbala mingi balobaka lokola ye nde asalaka yango): “Nakobakisa mpenza mpasi ya zemi na yo; okobota bana na mpasi.”—Eb 3:16.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Lameke
Poɛmi oyo Lameke asalelaki basi na ye (Eb 4:23, 24) emonisi elimo ya mobulu oyo bato bazalaki na yango na ntango wana. Poɛmi yango elobi: “Bóyoka mongongo na ngai, bino basi ya Lameke; bótya litoi na maloba na ngai: Nabomaki moto mpo azokisaki ngai, ɛɛ, elenge mobali mpo abɛtaki ngai. Soki mpo na Kaina mabe esengeli kozongisama mbala nsambo, boye mpo na Lameke mbala ntuku nsambo na nsambo (77).” Emonani ete Lameke azalaki kolobela likambo ya komibatela, amonisaki ete likambo asalaki ezalaki te ya koboma moto na nko, ndenge Kaina asalaki. Lameke amonisaki ete mpo na komibatela, abomaki moto moko oyo abɛtaki ye mpe azokisaki ye. Na poɛmi na ye, asɛngaki ete abatelama mpo básala ye mabe te na moto nyonso oyo akoluka koboma ye mpo ye abomaki moto oyo alukaki kosala ye mabe.
Kofinga
“Kobelela nkombo ya Yehova” oyo ebandaki na mikolo ya Enoshe, liboso ya Mpela monene esengelaki kozala na ndenge ya malamu te to na ndenge ebongi te mpo bambula mingi liboso, Abele azalaki kosalela nkombo ya Nzambe ntango azalaki kosolola na Nzambe. (Eb 4:26; Ebr 11:4) Ndenge bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia bamonisi yango, soki moto abeleli nkombo ya Nzambe ndenge wana ezali malamu te mpe kosalela nkombo ya Yehova na ndenge oyo ebongi te epai ya bato to na bikeko ya losambo, boye kosala bongo ekokani na kofinga.—Talá ENOSHE.
20-26/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 6-8
“Asalaki kaka bongo”
Mekolá kondima mpe botosi ya Noa, Danyele mpe Yobo
4 Mikakatano nini Noa akutanaki na yango? Na mikolo ya Enoka, nkɔkɔ ya Noa, bato bakómaki kosala makambo ya mabe mpenza. Bazalaki koloba ‘makambo ya kozokisa’ mpo na kotɛmɛla Yehova. (Yuda 14, 15) Mobulu ezalaki se kokóma mingi. Kutu, na mikolo ya Noa, “mabele etondaki na mobulu.” Baanzelu oyo batombokaki bakitaki na mabele, balataki nzoto ya mosuni, mpe babalaki basi. Bana oyo babotaki bazalaki bilombe mpe mobulu mpenza. (Ebandeli 6:2-4, 11, 12) Kasi Noa akesanaki na bato ya ntango na ye. Biblia elobi ete “andimamaki na miso ya Yehova . . . Azalaki na mbeba te kati na bato ya ntango na ye. Noa atambolaki elongo na Nzambe ya solo.”—Ebandeli 6:8, 9.
“Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
Mosala yango ezwaki bambula mingi, mbala mosusu mbula 40 to 50. Basengelaki kokata banzete, komema nkoni, kokata mabaya minene, kobongisa mpe kokangisa yango. Masuwa yango esengelaki kozala na baetajɛ misato, na bashambre mpe porte na mopanzi. Ezalaki mpe na bafenetre oyo elandaná zingazinga ya nsamba; mbala mosusu nsamba yango esalaki mwa nsɔngɛ na katikati mpe ekitá mwa moke mpo na kolekisa mai.—Ebandeli 6:14-16.
Tópota mbangu na mpiko
13 Nini esalisaki basaleli yango ya Yehova báyika mpiko mpe bálonga na momekano na bango ya mbangu? Talá oyo Paulo akomaki mpo na Noa. (Tángá Baebre 11:7.) Mpela oyo esengelaki koboma bato mpe banyama nyonso ezalaki likambo “oyo emonanaki naino te.” (Eba. 6:17) Naino Noa amonaki mpela te. Kasi Noa alobaki te ete ekoki kosalema te to ete ezali mpasi likambo ya ndenge wana esalema. Mpo na nini? Mpo azalaki na kondima ete Yehova akokisaka likambo nyonso oyo alaki. Noa amonaki te ete Yehova asɛngi ye likambo oyo eleki makasi. Kutu, “asalaki kaka bongo.” (Eba. 6:22) Kanisá makambo nyonso oyo Noa asengelaki kosala: kotonga masuwa, koyanganisa banyama, kobomba bilei na masuwa mpo na bato mpe banyama, kokebisa bato mpo na mpela mpe kosalisa libota na ye ezala na kondima makasi epai ya Yehova. Ezalaki mosala moke te, kasi “asalaki kaka bongo.” Ya solo, lokola Noa amonisaki kondima mpe ayikaki mpiko, Yehova abikisaki ye ná libota na ye mpe apambolaki bango mingi.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese—I
7:2—Ndenge nini bazalaki kokesenisa banyama mpo bábenga mosusu nyama ya mbindo mpe mosusu nyama ya pɛto? Emonani ete banyama ya pɛto ezali oyo bakokaki kopesa lokola mbeka mpe banyama ya mbindo ezali oyo bakokaki kopesa yango lokola mbeka te, kasi ezali te oyo bakokaki kolya mpe oyo bakokaki kolya te. Liboso ya Mpela bato bazalaki kolya nyama te. Maloba bilei “ya pɛto” mpe “ya mbindo” ebandaki nde na Mibeko ya Moize, mpe esukaki ntango Mibeko elongolamaki. (Misala 10:9-16; Baefese 2:15) Emonani ete Noa ayebaki nyama nini ebongi kopesa yango lokola mbeka epai ya Yehova. Ntango kaka abimaki na masuwa, “abandaki kotongela Yehova etumbelo mpe azwaki ndambo ya banyama nyonso ya pɛto mpe ya bikelamu nyonso oyo epumbwaka, oyo ezali pɛto mpe apesaki yango makabo ya kotumba na etumbelo.”—Ebandeli 8:20.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese—I
7:11—Mai ya Mpela oyo ezindisaki mokili mobimba eutaki wapi? Na “mokolo” ya mibale ya bozalisi, ntango “etando monene” esalemaki, mai ezalaki “na nse ya etando” mpe mai ezalaki “likoló ya etando.” (Ebandeli 1:6, 7) Mai oyo ezalaki “na nse” ezalaki awa na mabele. Mai oyo ezalaki “likoló” ezalaki ebele ya mai ya mbula oyo ezalaki na likoló, oyo esalaki “maziba nyonso ya mai mozindo ya monene.” Mai yango ekitaki na mabele na ntango ya Noa.
27/01–02/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 9-11
“Mabele mobimba ezalaki na monɔkɔ kaka moko”
Babilone Monene
Makambo etali Babilone ya kala. Engumba Babilone ebandaki ntango bato balukaki kotonga ndako molai ya Babele na lobwaku moko ya patatalu na mokili ya Shinare. (Eb 11:2-9) Mokano ya kotonga ndako molai mpe engumba yango ezalaki te ya kokumisa nkombo ya Nzambe, kasi nde ya kopesa bato oyo bazalaki kotonga yango nzela ya ‘komisalela nkombo ya lokumu.’ Bandako milai oyo babengi ziggourat, oyo bamonaki na mabondo ya mabanga esika engumba Babilone ezaláká mpe na bisika mosusu na Mezopotamia, ezali kondimisa ete ndako molai ya Babele ezalaki mpo na losambo, ata soki batongaki yango ndenge nini. Ekateli oyo Yehova azwaki ya kosukisa mosala ya kotonga tempelo yango emonisi polele ete akweisaki yango mpo etongamaki mpo na kobandisa losambo ya lokuta. Atako nkombo ya Ebre Babele, oyo bapesaki engumba yango elimboli “mobulungano,” nkombo na yango na monɔkɔ ya Sumérien (Ka-dingir-ra) mpe na monɔkɔ ya Akkadien (Bab-ilu) nyonso mibale elimboli “Porte ya Nzambe.” Atako bato oyo batikalaki na engumba yango babongolaki mwa moke ebengeli ya nkombo yango mpo epesa te likanisi ya etumbu oyo Nzambe apesaki yango na ebandeli, kasi nkombo yango ya sika to ebengeli na yango mosusu ezalaki kaka komonisa ete engumba yango ezalaki mpo na losambo.
Monɔkɔ
Lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli emonisi ete nsima ya Mpela monene, etuluku moko ya bato basanganaki mpo na kosala likambo moko oyo eyokanaki te na mokano ya Nzambe ndenge amonisaki yango Noa ná bana na ye. (Eb 9:1) Na esika bápalangana mpo na ‘kotondisa mabele,’ bazwaki ekateli ete bato nyonso bázala esika moko, básangana bango nyonso na esika moko oyo ekómaki kobengama mokili patatalu ya Shinare na Mezopotamia. Emonani ete elingaki mpe kokóma esika ya losambo oyo ekozala mpe na ndako moko molai ya losambo.—Eb 11:2-4.
Monɔkɔ
Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akweisaki mokano ya lofundo ya bato wana ndenge apanzaki bomoko na bango, abulunganisaki monɔkɔ oyo bazalaki koloba. Yango wana, ekómaki mpasi básala mosala yango na bomoko mpo na kokokisa mokano na bango; mpe yango esalaki ete bápalangana na bisika nyonso na mabele. Kobulunganisa monɔkɔ yango ezalaki mpe mpo na kopekisa to kolɛmbisa mikano mosusu oyo balingaki kozwa na nsima mpo na kolanda nzela ya mabe, elingi koloba kotɛmɛla Nzambe, mpo elingaki kotya kaka te ndelo na likoki oyo bato bazalaka na yango ya kosangisa mayele mpe makoki na bango mpo na mikano ya kosala makambo ya minene, kasi elingaki mpe kosala ete ezala mpasi bituluku oyo esalemi na bato ya minɔkɔ ekeseni básalela ebele ya boyebi oyo bazwi na eksperiansi mpe bolukiluki ya bato; kasi na boyebi ya Nzambe te. (Talá mpe Mos 7:29; Mib 32:5.) Na yango, ata soki kobulunganisa monɔkɔ ekɔtisaki bokabwani mpenza kati na bato, kasi mpo na koloba solo ezalaki mpo na litomba na bango mpo esalaki ete mikano oyo ezalaki likama mpe mabe mpo na bango esuka. (Eb 11:5-9; talá mpe Yis 8:9, 10.) Soki totali kaka biloko mosusu oyo bato basali na mikolo na biso mpo na ebele ya boyebi oyo bazwi mpe ndenge basaleli boyebi yango na ndenge ya mabe, tokomona oyo Nzambe amonaki na mosika ndenge makambo elingaki kozala soki atikaká misala ya kotonga Babele ekoba.
Bikólo
Mpo na ndelo oyo minɔkɔ etyelá bato, bato na bato bakolisá mimeseno, ntɔki, bizaleli mpe mangomba na bango moko; bato na bato basalaka makambo na ndenge na bango. (Le 18:3) Lokola bakómaki mosika na Nzambe, bituluku ndenge na ndenge ya bato yango basalaki ebele ya bikeko ya losambo oyo ezalaki komonisa banzambe na bango ya masapo.—Mib 12:30; 2Ba 17:29, 33.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Kame
Ekoki kozala ete Kana ye moko amikɔtisaki mpe na likambo yango mpe Kame, tata na ye asembolaki ye te. To na litambwisi ya Nzambe, Noa asakolaki mpe amonaki na mosika ete bakitani ya Kame bakozwa bizaleli mabe na ye, mbala mosusu oyo ekómaki komonana epai ya Kana, mwana na ye. Ndambo ya elakeli mabe yango ekokisamaki ntango Bayisraele, bankɔkɔ ya Seme, bakonzaki Bakanana. Baoyo Bayisraele babomaki bango te (na ndakisa, Bagibeone [Yos 9]) bakómaki baombo ya Bayisraele. Basiɛklɛ mingi na nsima, elakeli mabe yango ekokisamaki lisusu ntango bokonzi ya Bamede ná Baperse, ya Grɛsi mpe ya Roma, oyo bazalaki bakitani ya Yafete, bakonzaki bakitani ya Kana, mwana ya Kame.
Nimerode
Bokonzi ya Nimerode ebandaki na engumba Babele, Ereke, Akade ná Kalne; bingumba yango nyonso ezalaki na mokili ya Shinare. (Eb 10:10) Na yango, ekoki kozala ete na litambwisi na ye nde bato babandaki kotonga Babele mpe ndako molai na yango. Likanisi oyo eyokani mpe na likanisi ya bonkɔkɔ ya Bayuda. Josèphe akomaki boye: “Mokemoke [Nimerode] abongolaki makambo mpe ekómaki nde monyoko. Mpo na ye, lolenge kaka moko ya kolongola bato bobangi ya Nzambe, ezalaki ya kosala ete bázala ntango nyonso na nse ya bokonzi na ye moko. Alakaki ete akobundela bango soki Nzambe alingi lisusu koyeisa Mpela na mokili mpo na koboma bato; mpo akotonga ndako ya molai mpenza oyo mai ekozindisa yango te mpe kutu akozongisa mabe mpo na liwa ya bankɔkɔ na bango. Bato bandimaki kolanda makanisi ya [Nimerode], oyo azalaki komonisa ete kotosa Nzambe ezali boombo; yango wana bamipesaki na kotonga ndako molai . . . mpe ekendaki nokinoki molai koleka nyonso oyo bakokaki kokanisa.”—Antiquités judaïques, I, 114, 115 (iv, 2, 3).