Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 5 lok. 8
  • Kotánga malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotánga malamu
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Kotánga malamu
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Biyano na Mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 5 lok. 8

LITEYA 5

Kotánga malamu

Vɛrsɛ

1 Timote 4:13

NA MOKUSE: Tángá na mongongo makasi kaka maloba oyo ekomami.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Mibongisá malamu. Luká koyeba mpo na nini bakomi maloba yango. Yekolá kotánga maloba mingi mbala moko, na esika ya kotánga liloba mokomoko. Salá makasi obakisa te, opumbwa te, to obongola te maloba mosusu. Tyá miso na bilembo nyonso oyo elakisaka esika ya kopema, ya kobongola mongongo, mpe bongo na bongo.

    Toli

    Sɛngá moninga moko alanda yo ntango ozali kotánga mpe ayebisa yo maloba nyonso oyo otángi malamu te.

  • Tángá liloba mokomoko na ndenge ebongi. Soki oyebi te ndenge batángaka liloba moko boye, talá na diksionɛrɛ, yoká ndenge bazali kotánga yango, to tuná moto moko oyo atángaka malamu.

  • Bimisá maloba polele. Lobá malamu, tombolá motó mpe fungolá monɔkɔ malamu. Salá makasi omɛlaka maloba te.

    Toli

    Kolekisa ndelo te na konyata maloba, mpo ekomonana ete ezali te ndenge olobaka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto