Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 3 lok. 6
  • Kotuna mituna

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotuna mituna
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Kosalela malamu mituna
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 3 lok. 6

LITEYA 3

Kotuna mituna

Vɛrsɛ

Matai 16:13-16

NA MOKUSE: Tuná mituna oyo ebongi mpo na kopesa bato mposa ya koyoka yo mpe ya kolanda yo tii na nsuka, mpo na kosalisa bato bákanisa, to mpo na konyata makanisi ya ntina.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Pesá bato mposa ya koyoka mpe ya kolanda tii na nsuka. Tuná mituna oyo ekotinda moto apesa eyano na motema na ye to akóma na mposa ya koyeba eyano.

  • Salisá bato bátya makanisi na likambo oyo ozali kolobela. Tuná mwa mituna oyo ekotinda bato báluka biyano oyo ebongi, na nsima limbolá makambo na ndenge oyo ekosalisa bango bázwa biyano wana.

  • Bimisá makanisi ya ntina. Tuná motuna moko oyo ekolamwisa makanisi ya bato ntango olingi kolobela likanisi moko ya ntina. Tuná mituna ya bozongeli nsima ya kolobela likanisi moko ya ntina to mpo na kosukisa lisolo na yo.

    Toli

    Nsima ya kotánga vɛrsɛ, tuná mituna mpo na kobimisa likanisi ya ntina na vɛrsɛ yango.

NA MOSALA YA KOSAKOLA

Tuná moto oyo ozali kosolola na ye likanisi na ye na likambo moko boye. Yoká malamumalamu eyano na ye. Yebá kopona ntango nini okoki kotuna mituna oyo ebongi mpe ndenge ya kotuna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto