Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 2 lok. 5
  • Koloba lokola ozali kosolola na bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koloba lokola ozali kosolola na bato
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Koloba na esengo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Koloba ndenge omeseni koloba
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Koloba na mɔtɔ mpe komitya na esika ya basusu
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 2 lok. 5

LITEYA 2

Koloba lokola ozali kosolola na bato

Vɛrsɛ

2 Bakorinti 2:17

NA MOKUSE: Lobá ndenge olobaka mpe maloba na yo emonisa ndenge oyo ozali koyoka mpo na likambo ozali kolobela mpe mpo na bato oyo bazali koyoka yo.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Bondelá mpe mibongisá malamu. Bondelá Nzambe asalisa yo otya makanisi na makambo oyo okoteya, kasi epai na yo moko te. Fandisá malamu na motó na yo makanisi ya ntina oyo olingi koteya. Bimisá makanisi na maloba na yo moko, na esika ozongela kaka maloba oyo ezali na plan.

    Toli

    Soki okotánga vɛrsɛ ya Biblia to makambo oyo ezali na mokanda mosusu, zongelá yango mbala na mbala mpo obɛta mabaku te ntango okotánga yango. Soki okotánga maloba ya moto, bimisá esengo, mawa, to mayoki mosusu oyo azalaki na yango, kasi kolekisa ndelo te.

  • Maloba na yo euta na motema. Omituna mpo na nini bato bazali na mposa ya koyoka makambo oyo okoloba. Kanisá nde bango. Soki osali bongo, ndenge na yo ya kotɛlɛma, bajɛstɛ na yo, mpe elongi na yo ekomonisa ete ozali koloba makambo oyo euti mpenza na motema.

    Toli

    Koloba ndenge oyo olobaka elakisi te koloba likolólikoló. Mpo bato bázwa maloba na yo na kilo, poná elobeli ya polele mpe tosá mibeko ya gramɛrɛ.

  • Taláká bato oyo bazali koyoka yo. Soki ezali mabe te na mboka na bino, taláká bato na bilongi. Ntango ozali kosala diskur, taláká mwa moke moto mokomoko na elongi, na esika olekisaka kaka miso likoló ya mitó ya bato.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto