Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese—II
MAKAMBO oyo mokanda ya Genese elobeli, banda ntango Nzambe akelaki Adama, moto ya liboso tii liwa ya Yozefe, mwana ya Yakobo, esalemaki na boumeli ya mbula 2 369. Na nimero oyo eleki tolobelaki makambo ezali na mokapo 1 tii mokapo 11 vɛrsɛ 9, oyo elobeli ndenge oyo Nzambe akelaki mokili tii ntango bato batongaki ndako molai ya Babele.a Lisolo oyo ekolobela makanisi ya ntina ya mikapo oyo etikali; yango elobeli boyokani ya Nzambe ná Abalayama, Yisaka, Yakobo, mpe Yozefe.
ABALAYAMA AKÓMI MONINGA YA NZAMBE
Moto moko oyo asepelisaki motema ya Nzambe abotamaki mbula soki 350 nsima ya Mpela; azalaki nkɔkɔ ya Seme, mwana ya Noa. Nkombo na ye ezalaki Abalama, oyo na nsima ekómaki Abalayama. Nzambe asɛngaki ye alongwa na Ulu, engumba moko ya Bakaladi, mpe akómaki kofanda na bandako ya kapɔ na mokili oyo Yehova alakaki kopesa ye ná bana na ye. Lokola Abalayama azalaki na kondima mpe azalaki kotosa Nzambe, abengamaki “moninga ya Yehova.”—Yakobo 2:23.
Yehova apesaki bato ya Sodomo mpe bingumba mosusu ya pembeni etumbu, kasi abikisaki bomoi ya Lota ná bana na ye ya basi. Nzambe akokisaki maloba na ye ntango Yisaka, mwana ya Abalayama abotamaki. Bambula mingi na nsima, kondima ya Abalayama emekamaki ntango Yehova alobaki na ye apesa ye mwana na ye mbeka. Abalayama azalaki pene ya kopesa ye kasi anzelu moko apekisaki ye. Abalayama azalaki mpenza na kondima, mpe Nzambe alobaki na ye ete na nzela ya mombóto na ye, bikólo nyonso ekopambolama. Liwa ya Sala, mwasi na ye ya bolingo, epesaki ye mawa mingi.
Biyano na mituna ya Biblia:
12:1-3—Kondimana ya Abalayama ebandaki ntango nini, mpe eumelaki tii ntango nini? Emonani ete kondimana oyo Yehova asalaki ná Abalama ete “mpo na [Abalama] mabota nyonso ya nse bakopambolama” ebandaki ntango Abalama akatisaki Ebale Pelata mpo na kokende na Kanana. Na ntembe te likambo yango elekaki mokolo ya 14 Nisana 1943 liboso ya ntango na biso (L.T.B.)—mbula 430 liboso Bayisalaele bálongwa na boombo na Ezipito. (Exode 12:2, 6, 7, 40, 41) Kondimana ya Abalayama ezali “kondimana ya seko.” Kondimana yango ekokoba tii ntango mabota nyonso ya nse ekopambolama mpe banguna nyonso ya Nzambe bakobomama.—Genese 17:7; 1 Bakolinti 15:23-26.
15:13—Mbula 400 ya bolɔzi oyo esakolamaki mpo na bana ya Abalama esukaki ntango nini? Bolɔzi yango ebandaki na mobu 1913 L.T.B. ntango Yisaka, mwana ya Abalayama akómaki na mbula soki 5 mpe atikaki komɛla mabɛlɛ, mpe Yisamaele, ndeko na ye ya tata moko oyo azalaki na mbula 19, azalaki “kosɛka” ye. (Genese 21:8-14; Bagalatia 4:29) Bambula yango esukaki ntango Bayisalaele balongwaki na boombo na Ezipito na mobu 1513 L.T.B.
16:2—Ezalaki mabe te ndenge Salai apesaki nzela ete mosaleli na ye ya mwasi Agala asangisa nzoto na Abalama? Likambo oyo Salai asalaki ezalaki momeseno ya ntango wana; mwasi oyo azali ekomba asengelaki kopesa mobali na ye makango mpo abotela ye mwana oyo akotikala na biloko na ye. Likambo ya kobala basi mingi ebandaki na bana ya Kaina. Na nsima, ekómaki momeseno mpe basambeli mosusu ya Yehova balandaki yango. (Genese 4:17-19; 16:1-3; 29:21-28) Kasi, Yehova atikaki te likanisi oyo amonisaki na ebandeli ete mobali moko asengeli kobala mwasi moko. (Genese 2:21, 22) Noa ná bana na ye, bato oyo Nzambe apesaki bango lisusu etinda ya ‘kobota mpe kozala mingi mpe kotondisa mokili,’ bazalaki kaka na mwasi mokomoko. (Genese 7:7; 9:1; 2 Petelo 2:5) Mpe Yesu ateyaki likanisi ya kobala mwasi moko.—Matai 19:4-8; 1 Timote 3:2, 12.
19:8—Lota asalaki mabe te ndenge apesaki bana na ye ya basi epai ya bato ya Sodomo? Na bonkɔkɔ ya bato ya Azia, moto oyo ayambi mopaya na ndako na ye azalaki na mokumba ya kobatela ye, asengelaki kobikisa ye na likama ata soki ye moko akoki kokufa. Lota andimaki kosala yango. Na mpiko mpenza, abimaki libándá epai ebele ya bato bazalaki, akangaki porte, mpe atɛlɛmaki liboso na bango ye moko. Ntango apesaki bana na ye ya basi, na ntembe te amonaki ete Nzambe nde atindaki bapaya yango, mpe ekoki kozala ete akanisaki ete Nzambe akobatela bana na ye ndenge abatelaki bokilo na ye Sala na Ezipito. (Genese 12:17-20) Nsuka ya likambo ezali ete Lota ná bana na ye ya basi babikaki.
19:30-38—Yehova amonaki mabe te ndenge Lota alangwaki masanga mpe abotisaki bana na ye ya basi? Yehova andimaka te ete bato ya libota moko básangisa nzoto, andimaka mpe molangwa te. (Levitike 18:6, 7, 29; 1 Bakolinti 6:9, 10) Kutu, Lota ayokaki mawa mpo na ‘misala ya botyoli-mibeko’ ya bato ya Sodomo. (2 Petelo 2:6-8) Lokola bana ya Lota balangwisaki ye ezali komonisa ete bayebaki ete alingaki kondima te kosangisa na bango nzoto soki azalaki na kwiti te. Kasi, lokola bana ya Lota bamonaki ete bazalaki bapaya na mboka wana, yango ezalaki lolenge kaka moko bakokaki kosala mpo libota na ye esila te nsima ya liwa na bango. Lisolo yango ezali na Biblia mpo na komonisa ete Bamoaba (bana ya Moaba) mpe Baamola (bana ya Benami) bazalaki bandeko ná Bayisalaele, bana ya Abalayama.
Mateya mpo na biso:
13:8, 9. Abalayama apesaki ndakisa malamu mpenza na ndenge ya kosilisa matata! Tosengeli te kobebisa boyokani mpo na mbongo, makambo oyo biso tolingaka mingi, to lolendo.
15:5, 6. Ntango Abalayama akómaki mobange mpe azalaki naino na mwana te, ayebisaki Nzambe likambo yango. Na nsima, Yehova akitisaki ye motema. Esukaki ndenge nini? Abalama “andimaki [Yehova].” Soki tozali kobondela Yehova mpo na koyebisa ye bamposa na biso, tozali kondima bilaka oyo apesi biso na Biblia, mpe tozali kotosa ye, kondima na biso ekokóma makasi.
15:16. Yehova azelaki tii na nkola (génération) ya minei ya Baamola (to, Bakanana) liboso apesa bango etumbu. Mpo na nini? Mpamba te azali Nzambe ya motema molai. Azelaki tii ntango emonanaki ete elikya ezali lisusu te ete bakobongwana. Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa ya motema molai ya Yehova.
18:23-33. Yehova abomaka bato bibomelá te. Abatelaka bayengebene.
19:16. Lota “aumelaki,” mpe baanzelu babimisaki ye ná libota na ye libándá ya Sodomo. Ezali malamu tóbosana te ete tozali na ntango ya kolekisa mpambampamba te wana tozali kozela nsuka ya mokili mabe oyo.
19:26. Ezali libunga monene soki tokobendama to tokokanisa makambo oyo totiki na mokili!
YAKOBO AZALAKI NA BANA MIBALI 12
Abalayama abalelaki Yisaka Lebeka, mwasi oyo azalaki kondima Yehova. Lebeka abotaki mapasa: Esau ná Yakobo. Esau amonaki mpamba lotomo na ye ya mwana ya liboso mpe atɛkaki yango epai ya Yakobo, oyo na nsima azwaki lipamboli ya tata na ye. Yakobo akimaki na Padana-Alama, epai abalaki Lea ná Laele mpe abatelaki bibwele ya tata na bango na boumeli ya mbula 20 liboso alongwa kuna na libota na ye. Yakobo abotaki na Lea mpe Laele mpe na basaleli na bango ya basi bana mibali 12 ná bana mosusu ya basi. Yakobo abundaki na anzelu mpe apambolamaki, mpe nkombo na ye ekómaki Yisalaele.
Biyano na mituna ya Biblia:
28:12, 13—“Ebutelo” oyo Yakobo amonaki na ndɔtɔ ezali na ndimbola nini? “Ebutelo” yango, oyo na ntembe te ezalaki lokola sikalié ya mabanga, emonisaki ete bato awa na mabelé bakoki kozala na boyokani na bikelamu oyo ezali na likoló. Lokola baanzelu ya Nzambe bazalaki kobuta mpe kokita na sikalié, yango emonisi ete Nzambe atindaka baanzelu mpo na kosalisa bato oyo alingaka.—Yoane 1:51.
30:14, 15—Mpo na nini Laele atikelaki mbanda na ye alala na mobali na ye mpo na mwa mandaliki? Na ntango ya kala, bazalaki kosalela mbuma ya mandaliki lokola nkisi mpo na kosilisa mpasi mpe epekisaka libumu eswa to esilisaka mpasi ya libumu. Bazalaki mpe koloba ete mbuma yango ezalaki kobakisa mposa ya kosangisa nzoto mpe kobakisa makasi ya kobota mpe kosalisa mwasi azwa zemi. (Loyembo ya Salomo 7:13) Atako Biblia eyebisi te ntina oyo Laele alingaki mandaliki mpe andimaki kotika libaku ya kosangisa nzoto na mobali na ye, ekoki kozala akanisaki ete mandaliki ekosalisa ye azwa zemi mpe na bongo nsɔni na ye ya kozala ekomba ekosila. Kasi, ezali nsima ya bambula ebele nde Yehova “afungolaki libumu na ye.”—Genese 30:22-24.
Mateya mpo na biso:
25:23. Yehova akoki koyeba ndenge oyo moto akozala ata na ntango oyo abotami naino te mpe akoki kosalela makoki na ye ya koyeba makambo liboso mpe kopona moto oyo alingi mpo na kokokisa mokano na ye. Kasi, akanaka liboso te ndenge oyo bomoi ya moto na moto ekozala.—Hosea 12:3; Baloma 9:10-12.
25:32, 33; 32:24-29. Mposa ya Yakobo ya kozwa lotomo ya mwana ya liboso mpe kobunda oyo abundaki butu mobimba na anzelu mpo na kozwa lipamboli emonisi ete azalaki mpenza kopesa motuya na makambo ya elimo. Yehova apesi biso makambo mingi ya bosantu, na ndakisa, boyokani na biso na ye mpe ebongiseli na ye, lisiko, Biblia, mpe elikya ya Bokonzi. Tózala lokola Yakobo mpe tómonisa ete makambo yango ezali na motuya na miso na biso.
34:1, 30. Mokakatano oyo ‘epesaki’ Yakobo ‘mpasi’ ebandaki mpamba te Dina akómaki moninga ya bato oyo bazalaki kolinga Yehova te. Tosengeli kopona baninga na biso malamu.
YEHOVA APAMBOLI YOZEFE NA EZIPITO
Bana ya Yakobo batɛkaki ndeko na bango Yozefe na boombo mpo bayokelaki ye zuwa. Na Ezipito, Yozefe akɔtaki bolɔkɔ mpo aboyaki na mpiko nyonso kobuka mitinda ya Nzambe. Na nsima, babimisaki ye na bolɔkɔ mpo na kolimbola bandɔtɔ ya Falo, oyo esakolaki mbula nsambo oyo biloko ya kolya ekozala beboo mpe mbula nsambo ya nzala. Batyaki Yozefe mokɛngɛli ya biloko ya kolya na Ezipito. Bandeko na ye bakendaki na Ezipito mpo na koluka biloko ya kolya mpo nzala ekɔtaki na mboka na bango. Yakobo ná bana na ye bakómaki lisusu kofanda esika moko na mokili malamu ya Gosene. Likoló ya mbeto na ye liboso akufa, Yakobo apambolaki bana na ye mpe asakolaki likambo moko oyo ezali kopesa elikya ya mapamboli minene oyo esengelaki kokokisama bankama ya bambula na nsima. Bakendaki kokunda Yakobo na Kanana. Yozefe akufaki ntango akómaki na mbula 110, batyaki nzoto na ye nkisi mpo epɔla te, mpe na nsima bamemaki yango na Mokili ya Ndaka.—Exode 13:19.
Biyano na mituna ya Biblia:
43:32—Mpo na nini Baezipito bazalaki koboya kolya esika moko na Baebele? Ekoki kozala mpo na bindimeli na bango to mpo na lolendo. Baezipito bazalaki mpe kolinga te bato oyo babɔkɔlaka bampate. (Genese 46:34) Mpo na nini? Ekoki kozala ete babateli ya mpate bazalaki bato mpamba mpenza na ndenge oyo bazalaki kotalela bato na mboka na bango. Ekoki mpe kozala ete lokola mabelé ezalaki mingi te mpo na kosala bilanga, Baezipito bazalaki kosepela te na bato oyo bazalaki koleisa bibwele na bitando ya zamba.
44:5—Yozefe azalaki mpenza kosalela kɔpɔ mpo na koyeba makambo oyo ekoya? Kɔpɔ ya ebende mpe likambo oyo balobaki ete Yozefe azalaki kosala na yango ezalaki kaka mayele oyo basalelaki mpo na kokóma na likambo moko oyo bazalaki koluka. Yozefe azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova. Azalaki kosalela kɔpɔ te mpo na koyeba makambo ekoya; Benyamina mpe ayibaki kɔpɔ yango te.
49:10—“Nzete ya bokonzi” mpe “lingenda ya mokonzi” ezalaki kolimbola nini? Nzete ya bokonzi ezali lingenda oyo mokonzi azalaki kosimba na lobɔkɔ, ezalaki elembo ya bokonzi. Lingenda ya mokonzi ezali nzete molai oyo emonisaka nguya ya kopesa mitindo. Yakobo alobelaki yango mpo na komonisa ete libota ya Yuda ekozala na bokonzi mpe nguya mingi tii ntango Silo akoya. Nkɔkɔ yango ya Yuda ezali Yesu Klisto, ye oyo Yehova apesi bokonzi ya likoló. Klisto azali na bokonzi mpe na nguya ya kopesa mitindo.—Nzembo 2:8, 9; Yisaya 55:4; Danyele 7:13, 14.
Mateya mpo na biso:
38:26. Yuda asalaki bokilo na ye Tamala mabe. Kasi, ntango bamonisaki ye ete Tamala azali na zemi na ye, Yuda amikitisaki mpe andimaki mabe na ye. Biso mpe tosengeli kokakatanaka te mpo na kondima mabunga na biso.
39:9. Eyano oyo Yozefe apesaki mwasi ya Potifala emonisi ete azalaki na likanisi ya Nzambe na likambo etali etamboli malamu mpe ete azalaki kolanda mitinda ya Nzambe. Biso mpe tosengeli kosala makasi mpo na kosala bongo ntango tozali kokola na boyebi ya solo.
41:14-16, 39, 40. Yehova akoki kobongola makambo mpo na bolamu ya bato oyo babangaka ye. Ntango tokutani na mikakatano, ebongi tótyela Yehova motema mpe tótikala sembo epai na ye.
Bazalaki na kondima makasi
Abalayama, Yisaka, Yakobo, ná Yozefe bazalaki mpenza bato ya kondima oyo bazalaki kobanga Nzambe. Masolo ya bomoi na bango, oyo ezali na mokanda ya Genese, ezali mpenza kolendisa kondima mpe ezali kopesa biso mateya ya ntina mingi.
Okoki kosalela lisolo oyo mpo na kobongisa makanisi ya ntina ya botángi ya Biblia na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi. Soki otaleli makanisi oyo tomonisi na lisolo oyo ekosalisa yo osala lisolo ya malamu mpenza.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese—I” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2004.
[Elilingi na lokasa 26]
Yehova apamboli Yozefe
[Elilingi na lokasa 26]
Abalayama azalaki moto ya kondima
[Elilingi na lokasa 26]
Moyengebene Lota ná bana na ye ya basi babikisamaki
[Elilingi na lokasa 29]
Yakobo apesaki motuya na biloko ya bosantu. Yo mpe osalaka bongo?