Baklisto basengeli kozala na zuwa?
ZUWA ezali ezaleli oyo baklisto basengeli kozala na yango? Biblia ezali kolendisa biso baklisto na ‘kolanda bolingo,’ mpe elobi ete “bolingo ezali na zuwa te.” (1 Bakolinti 13:4; 14:1) Nzokande, kaka Biblia yango elobi lisusu ete “Yehova . . . azali Nzambe ya zuwa” mpe tozwi etinda ete ‘tókóma bamekoli ya Nzambe.’ (Exode 34:14; Baefese 5:1) Mpo na nini makambo yango ezali lokola bongolabongola boye?
Ezali bongo mpamba te maloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolami na “zuwa” na kati ya Biblia ezali na bandimbola ebele. Ekoki kozala na ndimbola ya malamu to ya mabe, na kolanda ndenge oyo esalelami. Na ndakisa, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “zuwa” ekoki kozala na ndimbola ya “kosɛngisa moto amipesa mobimba; kondima bombanda te; molende; zuwa [ya malamu to ya mabe]; kolula.” Liloba ya Grɛki oyo ekokani na yango ezali mpe na ndimbola ndenge moko. Maloba yango ekoki mpe kolimbola makanisi ya mabe, oyo ezangi ntina oyo moto akoki kozala na yango mpo na moto mosusu oyo azali kokanisa ete azali mbanda na ye to mpo na moto oyo akanisi ete azali na esika ya malamu koleka ye. (Masese 14:30) Maloba yango ekoki mpe kolobela ezaleli ya malamu oyo Nzambe apesi—koluka kobatela moto oyo olingaka mpo mabe ezwa ye te.—2 Bakolinti 11:2.
Ndakisa oyo eleki bandakisa nyonso
Yehova apesi ndakisa oyo eleki bandakisa nyonso na oyo etali zuwa ya malamu. Makanisi na ye ezali malamu mpe pɛto, euti na mposa ya kobatela elimo mpe bizaleli ya basaleli na ye. Mpo na basaleli na ye ya kala, oyo babengamaki Siona na ndenge ya elilingi, alobaki boye: “Nayoki zuwa mpo na Siona, ɛɛ zuwa monene; nazali na zuwa mpo na ye, ɛɛ zuwa na nkanda monene mpenza.” (Zekalia 8:2) Tata ya bolingo alukaka ntango nyonso kobatela bana na ye na mabe; ndenge moko mpe, Yehova alukaka ntango nyonso kobatela basaleli na ye mpo bázwa makama te, ezala na nzoto to na elimo.
Mpo na kobatela bato na ye, Yehova apesaki Liloba na ye, Biblia. Ezali na ebele ya maloba ya kolendisa mpo na kosalisa bango bátambola na bwanya, mpe etondi na bandakisa ya bato oyo basalaki bongo. Na Yisaya 48:17, totángaka boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” Koyeba ete zuwa na ye etindaka ye abatela mpe akɛngɛla biso ezali kobɔndisa! Lokola toyebi makambo mingi te, soki azalaki na zuwa ndenge wana te, mbɛlɛ tomonaka mpasi ya ndenge na ndenge. Zuwa ya Yehova elukaka matomba na ye moko te.
Na kotalela nyonso oyo tolobi, bokeseni nini mpenza ezali kati na zuwa ya malamu na zuwa ya mabe? Mpo na koyeba yango, tótalela ndakisa ya Milyami na ndakisa ya Finease. Talá malamu nini etindaki mokomoko na bango asala makambo oyo asalaki.
Milyami na Finease
Milyami azalaki yaya ya Moize na Alona, bato oyo bazalaki kokamba Bayisalaele ntango bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka. Ntango Bayisalaele bazalaki na esobe, Milyami akómaki koyokela ndeko na ye Moize zuwa. Biblia elobi boye: “Milyami mpe Alona balobaki mabe na ntina na [Moize] mpo na mwasi Mokusi oyo ebalaki ye . . . Bango balobaki ete, [Yehova] alobaki bobele na monɔkɔ ya [Moize] solo? Ye alobaki na monɔkɔ na biso lokola te?” Emonani mpenza ete Milyami nde abandisaki likambo yango ya kotɛmɛla Moize, mpamba te Yehova apesaki Milyami etumbu: abɛlaki maladi ya maba oyo eumelaki pɔsɔ moko, mpo na ezaleli na ye ya kozanga limemya; kasi apesaki Alona etumbu te.—Mituya 12:1-15.
Nini etindaki Milyami na kotombokela Moize? Azalaki nde komitungisa mpo na losambo ya solo mpe azalaki na mposa ya kobatela baninga na ye Bayisalaele na mabe? Emonani polele ete ezalaki yango te. Ezali komonana ete Milyami atikaki ete mposa mabe ya kokóma na lokumu mingi mpe ya kozwa bokonzi ezwa esika na motema na ye. Lokola azalaki mosakoli na Yisalaele, bato nyonso, mingimingi basi, bazalaki kopesa ye limemya mingi. Akambaki bango na miziki mpe na nzembo na nsima ya kobikisama ya Yisalaele na ndenge ya kokamwa na Mai Motane. Kasi, nsima ya mikolo, emonanaki lokola Milyami akómaki komitungisa mingi ete ndambo ya lokumu na ye ekokende epai ya mwasi ya Moize, mpo azalaki komona ye lokola mbanda. Zuwa wana etindaki ye akóma kowelana na Moize, moto oyo Yehova aponaki.—Exode 15:1, 20, 21.
Nzokande, Finease asalaki makambo na makanisi ya ndenge mosusu. Mwa moke liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, ntango Bayisalaele batongaki kaa na bango na mokili ya Moaba, basi ya Moaba mpe ya Midyani batindaki ebele ya mibali ya Yisalaele básala pite mpe básambela bikeko. Mpo na kopɛtola kaa mpe kosilisa nkanda ya Yehova, bayebisaki basambisi ya Yisalaele ete báboma moto nyonso oyo asalaki mabe wana. Zimili, oyo azalaki nkumu moko ya libota ya Simeona, akɔtaki na Kozibi, mwasi moko Momidyani na kaa, “na miso ya libota mobimba ya bato ya Yisalaele” mpo na kosala na ye pite. Finease amonisaki mpiko mpenza. Zuwa, to mpe molende mpo na losambo ya Yehova, bakisa mpe mposa ya kobatela bizaleli ya pɛto na kati ya kaa, etindaki ye aboma bato yango oyo bakɔtaki na hema mpo na kosala pite. Bapesaki ye longonya mpo na “nkanda oyo emonisaki zuwa oyo azalaki na yango,” “alingisaki bombanda ata moke te” na Yehova. Lokola Finease asalaki nokinoki, fimbo ya etumbu, oyo esilaki kosukisa bomoi ya bato 24 000, esukaki, mpe Yehova apesaki ye lifuti na kosaláká na ye kondimana mpo ete bonganga etikala na libota na ye libela na libela.—Mituya 25:4-13, The New English Bible.
Wapi bokeseni oyo ezalaki na kati ya lolenge mibale wana ya zuwa? Milyami atɛmɛlaki ndeko na ye mpo na likunya, nzokande, zuwa ya malamu nde etindaki Finease aboma bato wana. Ezalaka na bantango mosusu oyo biso mpe, lokola Finease, tosengeli kozala na mposa ya koloba to kosala makambo mosusu mpo na kolongisa nkombo ya Yehova, losambo na ye mpe bato na ye.
Zuwa ya mabe
Kasi, ekoki mpe kosalema ete omonisa ntango mosusu zuwa ya mabe to oyo elongobani te? Ɛɛ, ekoki kosalema. Yango ekómaki momeseno ya Bayuda na ekeke ya liboso. Bazalaki kobatela Mibeko ya Nzambe mpe bonkɔkɔ na bango na zuwa makasi. Mpo na kobatela Mibeko, batondisaki ebele ya mibeko mpe bikila mikemike, oyo ekómaki kilo mpo na bato. (Matai 23:4) Lokola bayebaki te to baboyaki kondima ete Nzambe atyaki makambo ya solo oyo Mibeko ya Moize ezalaki kaka elilingi na yango, zuwa na bango ya mabe etindaki bango báyokela bayekoli ya Yesu Klisto nkanda makasi. Ntoma Paulo, oyo azalaki liboso na molende ya mabe ya kobatela Mibeko, alobaki ete bato oyo bazalaki kokɔtela mibeko bazalaki “na molende [na zuwa mpenza] mpo na Nzambe; kasi engebene boyebi ya solosolo te.”—Baloma 10:2; Bagalatia 1:14.
Bayuda mingi oyo bakómaki baklisto bazalaki mpe na mokakatano mpo na kotika molende wana oyo elekaki ndelo mpo na Mibeko. Nsima ya mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, Paulo ayebisaki lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso ndenge bato ya bikólo mosusu bakómaki bandimi. Na ntango yango, bankóto ya Bayuda oyo bazalaki baklisto bazalaki “na molende mpo na Mibeko.” (Misala 21:20) Yango ezalaki bambula ebele nsima wana lisangani ya mikóló-bakambi ekataki likambo ete bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki baklisto basengelaki kokatama ngenga te. Likambo ya kotosa Mibeko ebendaki mindɔndɔ na lisangá. (Misala 15:1, 2, 28, 29; Bagalatia 4:9, 10; 5:7-12) Lokola bazalaki na boyebi mingi te ya lolenge oyo Yehova akómaki sikoyo kosala makambo na bato na ye, Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bazalaki kokangama na makanisi na bango moko, bazalaki kotɔnga basusu.—Bakolose 2:17; Baebele 10:1.
Na yango, tosengeli kokima motambo ya kozala na zuwa mpo na koluka kobatela makanisi oyo biso moko tolingaka mingi to banzela oyo Liloba ya Nzambe ezali koteya te. Tokosala malamu soki tozali kondima bingɛngiseli ya sika ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kopesama na nzela ya ebongiseli oyo Yehova azali kosalela lelo.
Zalá na zuwa mpo na Yehova
Nzokande, zuwa ya malamu ezali na esika na yango na kati ya losambo ya solo. Soki tokómi komitungisa mingi mpo na lokumu to mpo na lotomo na biso moko, zuwa ya malamu ebendaka likebi na biso epai ya Yehova. Etindaka biso na koluka banzela ndenge na ndenge ya koteya solo na ntina na ye mpe kokɔtela banzela na ye mpe basaleli na ye.
Mama moko oyo ayebaki mobeko ya Nzambe mpo na makila te, alingaki ata moke te koyamba Akiko, Motatoli ya Yehova oyo azali mosaleli ya ntango nyonso, na ndako na ye mpo na kosolola na ye. Akiko asalelaki Liloba ya Nzambe na mayele mpenza, alobelaki ata mindɔndɔ mpe mikakatano oyo ekoki koya na nzoto ya moto oyo bazongisi ye makila. Mposa na ye makasi ya kolobela Yehova etindaki ye abalola lisolo mpo na kolobela makambo oyo ye asosolaki ete ezalaki kotinda mwasi yango aboya koyoka ye: azalaki kondima te ete Mozalisi azali. Akiko akanisaki elongo na mwasi yango ndenge biloko oyo bizalisami ezali komonisa ntina oyo tosengeli kondima ete Mozalisi azali. Molende oyo amonisaki mpo na kolongisa Liloba ya Nzambe esalisaki na kolongola makanisi mabe ya mwasi yango, mpe esalaki ete andima koyekola Biblia. Mwasi yango oyo azalaki liboso nkandankanda azali lelo mosambeli ya Yehova.
Zuwa ya malamu, to molende, mpo na losambo ya solo, etindaka biso tólukaka to tólekisaka te mabaku ya kolobela mpe kolongisa kondima na biso na mosala, na eteyelo, na magazini, mpe ntango tozali kosala mobembo. Na ndakisa, Midori azwá ekateli ya koyebisa baninga na ye ya mosala bindimeli na ye. Mwasi moko ya mbula 40 oyo azalaki kosala na ye esika moko alobaki ete alingaka kosolola na Batatoli ya Yehova te. Nsima ya mikolo, ntango bazwaki libaku mosusu ya kosolola, mwasi yango azalaki komilelalela mpo mwana na ye abandaki kokóma na bizaleli mabe. Midori alakisaki ye mokanda Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi,a mpe asɛngaki ye nzela ya kobanda koyekola mokanda yango na mwana na ye. Bakómaki koyekola, kasi mama azalaki kolinga kolanda masolo na bango te. Midori azwaki likanisi ya kolakisa mwasi yango kasɛti-video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation.* Yango elongolaki ye makanisi ya mabe oyo azalaki na yango. Makambo oyo ye amonaki etindaki ye aloba ete: “Nalingi kozala lokola Batatoli ya Yehova.” Mbala moko abandaki mpe koyekola Biblia esika moko na mwana na ye.
Zuwa ya malamu ezali na esika na yango na kati ya lisangá ya boklisto. Ekolisaka bolingo mpe elimo ya komibanzabanza mpo na basusu mpe esalisaka biso na komibatela na makambo ya mabe oyo ekoki koyokisa bandeko na biso ya elimo mpasi, lokola matɔngi mpe makanisi ya bapɛngwi. Zuwa ya malamu etindaka biso tóndima bikateli oyo bankulutu bazwaka ntango mosusu, ntango bamonaka ete ebongi mpenza kobimisa bato mabe na lisangá. (1 Bakolinti 5:11-13; 1 Timote 5:20) Ntoma Paulo alobelaki zuwa oyo azalaki na yango mpo na bandeko na ye na lisangá ya Kolinti ntango akomaki boye: “Nazali koyoka zuwa na ntina na bino, zuwa lokola oyo ya Nzambe, mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino epai ya mobali kaka moko mpo nakoka kobimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto na bizaleli epai ya Klisto.” (2 Bakolinti 11:2) Ndenge moko mpe mpo na biso, zuwa na biso etindaka biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela bopɛto ya mateya, ya elimo mpe ya bizaleli ya lisangá mobimba.
Ɛɛ, zuwa ya malamu—oyo euti na Nzambe—ememelaka basusu bolamu. Esalaka ete Yehova andima biso mpe ezali moko ya bizaleli oyo baklisto basengeli komonisa lelo oyo.—Yoane 2:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 29]
Makambo oyo Finease asalaki eutaki na zuwa ya malamu
[Bililingi na lokasa 30]
Kimá motambo ya zuwa ya mabe
[Bililingi na lokasa 31]
Zuwa ya malamu etindaka biso tóyebisa basusu kondima na biso mpe tólinga bandeko na biso