Mituna ya batángi
Nini ememaki Yuda na kosangisa nzoto na mwasi oyo akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, ndenge Genese 38:15, 16 elobi yango?
Yuda asangisaki nzoto na mwasi oyo ye akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, nzokande, azalaki mwasi ya ndumba te. Na kolanda Genese 38, makambo elekaki boye:
Mwana ya liboso ya Yuda akufaki liboso abota na mwasi na ye Tamala, mpo “azalaki mabe na miso ya [Yehova].” (Genese 38:7) Na ntango wana, bato bazalaki na momeseno ya kobala mwasi ya ndeko. Yango ezalaki kosɛnga ete soki moto akufi kasi atiki mwana te, ndeko na ye asengelaki kozwa mwasi na ye mpo abota na ye mwana oyo akotikala na biloko ya mowei. Kasi Onani, mwana ya mibale ya Yuda, aboyaki kobota na mwasi ya ndeko na ye oyo akufaki. Yango wana Nzambe apesaki ye mpe etumbu ya liwa. Na nsima, Yuda azongisaki bokilo na ye Tamala na ndako ya tata na ye mpo azela tii ntango Sela, mwana ya misato ya Yuda, akokola mpe abala ye. Kasi, ntango Sela akolaki, Yuda abalisaki ye na Tamala te. Yango wana, ntango mwasi na ye moko Yuda akufaki, Tamala akanisaki mayele oyo akoki kosalela mpo abota na bokilo na ye mwana na esika ya mobali na ye oyo akufá. Yango wana alataki bilamba ya mwasi ya ndumba mpe akendaki kofanda na nzela oyo ayebaki ete Yuda akoleka wana.
Lokola Yuda ayebaki te ete ezali Tamala, asangisaki na ye nzoto. Mpo Tamala andima kosangisa nzoto na Yuda, asɛngaki ye asimbisa ye biloko, mpe na nzela na yango, amonisaki epai ya bato ete ye nde atyaki ye zemi. Ntango likambo eyebanaki, Yuda apesaki Tamala foti te, kasi andimaki na komikitisa ete: “Ye aleki ngai na sembo mpo ete ngai napesi ye mwana na ngai Sela te.” Mpe “alalaki na ye lisusu te.”—Genese 38:26.
Yuda asalaki mabe lokola akokisaki elaka na ye te ya kobalisa Tamala epai ya mwana na ye Sela. Lisusu, asangisaki nzoto na mwasi oyo akanisaki ete azali mwasi ya ndumba. Yango eyokanaki te na mobeko ya Nzambe, oyo esɛngi ete moto asangisa nzoto kaka na molongani na ye. (Genese 2:24) Kasi, likambo ya solo ezali ete Yuda asangisaki nzoto na mwasi ya ndumba te. Kasi, kozanga ete ayeba yango, azwaki esika ya mwana na ye Sela na libala ya ndeko mpe abotaki mwana oyo asengelaki kozwa libula ya mwana ya liboso oyo akufá.
Tamala asalaki ekobo te. Bana mapasa oyo abotaki babengamaki bana ya ekobo te. Ntango Boaza, moto ya Beteleme, abalaki Luta na libala ya ndeko, bankumu ya mboka Beteleme balobaki maloba malamu mpo na Pelese, mwana ya Tamala, ete: “Tiká mpe ndako na yo ezala lokola ndako ya Pelese, oyo Tamala abotelaki Yuda, na ntina na bana oyo [Yehova] akopesa yo mpo na mwasi oyo.” (Luta 4:12) Lisusu, nkombo ya Pelese etángami na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Klisto.—Matai 1:1-3; Luka 3:23-33.