Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr21 Janvier nk. 1-16
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • 04-10/01
  • Mpo na bilenge
  • 11-17/01
  • 18-24/01
  • 25-31/01
  • 01-07/02
  • Makabo oyo esɛngamaki mpe oyo moto ye moko akokaki kopesa na ntango ya kala
  • Biblia ekatelá bakristo motángo moko oyo basengeli kopesaka?
  • 08-14/02
  • 15-21/02
  • 22-28/02
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2021
mwbr21 Janvier nk. 1-16

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

04-10/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 18-19

“Kobá kozala na bizaleli ya pɛto”

w19.06 lok. 28 par. 1

Ndenge ya komibatela na moko ya mitambo ya Satana

Yehova atángaki makambo ya mbindo oyo bato ya bikólo yango bazalaki kosala mpe ayebisaki Bayisraele ete: “Bosengeli te kosala ndenge mokili ya Kanana, epai nazali komema bino, esalaka. . . . Mokili ezali mbindo, mpe nakoyeisela yango etumbu mpo na libunga na yango.” Mpo na Nzambe mosantu ya Yisraele, lokola bizaleli ya bato ya Kanana ezalaki mbindo, mokili na bango mpe ekómaki mbindo mpe eloko ya bosɔtɔ.​—Lev. 18:3, 25.

w17.02 nk. 20-21 par. 13

Yehova akambaka basaleli na ye

13 Bakambi ya bikólo mosusu bazalaki kotambwisama na bwanya ya bato oyo ezali na ndelo. Na ndakisa, bakambi ya Bakanana mpe bato ya ekólo yango bazalaki kosala makambo ya mbindo, na ndakisa kosangisa nzoto na kati ya bato ya libota moko, kosangisa nzoto mibali na mibali, basi na basi, to na banyama, kopesa bana na bango mbeka, mpe kosambela bikeko. (Balevi 18:6, 21-25) Longola yango, bakambi ya Babilone mpe ya Ezipito bazalaki te na malako mpo na bopɛto ndenge ekólo ya Nzambe ezalaki na yango. (Mitángo 19:13) Nzokande, bato ya ekólo ya Nzambe bakokaki komona ndenge oyo bakambi na bango ya sembo bazalaki kolendisa bango bábatela losambo na bango pɛto, bázala pɛto na nzoto, mpe báboya komikómisa mbindo na makambo ya kosangisa nzoto. Tomoni polele ete Yehova azalaki kokamba bango.

w14 1/7 lok. 7 par. 2

Oyo Nzambe akosala mpo na makambo mabe

Bongo baoyo bazali koboya na nko nyonso kobongola bomoi na bango mpe bazali kokoba kosala mabe? Tótalela elikya oyo ya polele: “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.” (Masese 2:21, 22) Bato mabe bakozala lisusu te mpo na kobimisa mobulu. Lokola kimya ekozala ndenge wana, mokemoke bato ya botosi bakozonga bato ya kokoka.​—Baroma 6:17, 18; 8:21.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 15/6 lok. 22 par. 11

“Nalingaka mibeko na yo mingi”

11 Mobeko mosusu ya Moize oyo ezali komonisa ete Nzambe alingaki mpenza ete basaleli na ye bázala malamu ezali mobeko oyo epesaki babola lotomo ya kolɔkɔta mbuma na elanga. Yehova alobaki ete ntango Moyisraele azali kobuka mbuma na elanga na ye, asengeli kotika ete babola bálɔkɔta mbuma oyo bato ya mosala bazali kotika. Basali-bilanga basengelaki te kobuka milona nyonso pembenipembeni ya elanga; basengelaki mpe te kobuka lisusu mwa bambuma oyo etikali na nzete ya vinyo to na nzete ya olive. Soki mosali-elanga abosani liboke ya milona, asengeli te kozonga na elanga mpo na kokamata yango. Yehova apesaki mobeko yango mpo na kosalisa babola, bapaya, bitike, ná basi oyo bakufelá mibali. Kolɔkɔta biloko na elanga ezalaki mosala makasi; kasi, ebongiseli yango ezalaki kopekisa bango básɛngasɛngaka.​—Balevi 19:9, 10; Kolimbola Mibeko 24:19-22; Nzembo 37:25.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Motó ya likambo: Na ndenge nini Mobeko ya Moize oyo epekisaki libala kati na bandeko ya libota moko etaleli mpe bakristo lelo oyo?

w02 1/2 lok. 29

Mituna ya batángi

Na ndenge nini Mobeko ya Moize oyo epekisaki libala kati na bandeko ya libota moko etaleli mpe bakristo lelo oyo?

Mibeko oyo Yehova apesaki ekólo ya Yisraele elobi makambo mingi te na ntina etali milulu mpe makambo mosusu oyo esalemaka mokolo ya libala. Kasi, yango epekisaki mabala mosusu. Na ndakisa, na Balevi 18:6-20, tokokuta molɔngɔ molai ya makambo oyo epekisamaki, kati na ‘bandeko ya libota moko.’ Mokapo yango emonisi polele ete bandeko ya makila bakoki kosangisa nzoto te. Ya solo, bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te, batambwisami mpe na yango te. (Baefese 2:15; Bakolose 2:14) Atako bongo, yango elingi koloba te ete bakristo basengeli kotyela likambo yango likebi te ntango bazali kopona moto oyo balingi kobala. Libala na kati ya bandeko ya libota moko epekisami mpo na bantina mingi.

Ya liboso, ezali na mibeko ya Leta oyo epekisi bandeko ya libota moko kobalana, mpe bakristo basengeli mpenza kotosa mibeko ya ekólo oyo bazali kofanda. (Matai 22:21; Baroma 13:1) Kasi, mibeko yango ekeseni na kotalela mboka na mboka. Na mikolo na biso, mpo na kotya mibeko ya ndenge wana, batalelaki mingimingi mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto oyo baboti bakoki kolekisa epai ya bana na bango. Eyebani malamu mpenza ete libala kati na bandeko ya libota moko ekoki kolekisa mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto to mpe maladi na nzoto ya bana oyo bakobotama. Ezali mpo na ntina yango, mpe mpo na ‘kotosa bakonzi oyo bazali liboso’ nde bakristo batosaka mibeko ya libala oyo epesami na mboka oyo bango bazali.

susu, mboka na mboka ezalaka na makambo oyo bato bandimaka mpe makambo oyo baboyaka. Bato na bikólo penepene na nyonso bazali na mibeko mpe mimeseno na bango oyo epekisi bandeko ya libota moko kobalana. Libala ya lolenge wana ezali ekila. Atako esika na esika ezali na mibeko na yango oyo ezali komonisa polele ete kosangisa nzoto kati na bato ya libota moko epekisami, buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete, “emonanaka mbala mingi ete soki bato bazali bandeko ya makila, libala kati na bango ezalaka mpenza ekila makasi, oyo epekisaka kosangisa nzoto kati na bandeko ya libota moko.” Nzokande, ata na bamboka oyo libala kati na bandeko epekisami, bakristo basengeli kotya likebi na mimeseno ya mboka mpe kotosa mibeko ya esika oyo bango bafandi mpo na kobwaka nsɔni te na lisangá mpe na nkombo ya Nzambe.​—2 Bakorinti 6:3.

Tóbosana mpe te lisosoli oyo Nzambe apesi biso. Moto nyonso abotamaka na mayele ya kokesenisa malamu na mabe. (Baroma 2:15) Soki lisosoli na ye ebebisami te na misala mabe, ekoyebisa ye makambo oyo ezali mabe, makambo oyo elongobani te, mpe makambo oyo ezali komonisa etamboli ya nsɔni. Yehova atalelaki likambo yango ntango apekisaki Bayisraele ete bábalana te na bandeko na bango. Totángi boye: “Bosengeli te kosala ndenge mokili ya Ezipito, epai bofandaki, esalaka; mpe bosengeli te kosala ndenge mokili ya Kanana, epai nazali komema bino, esalaka; mpe bosengeli kotambola na mibeko na bango te.” (Balevi 18:3) Bakristo batalelaka lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia ete ezali na ntina mingi mpe batikaka te ete yango ebebisama na ezaleli mabe ya bikólo ya mokili.​—Baefese 4:17-19.

Sikoyo, tokoki koloba nini mpo na yango? Atako bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te, kasi lisosoli na bango ezali koyebisa bango polele ete libala ya bandeko​—na ndakisa tata na mwana na ye ya mwasi, mama na mwana na ye ya mobali, ndeko mwasi na ndeko mobali​—eboyami mpenza na libota ya bokristo. Lokola bondeko esuki kaka kati na libota moko te, bakristo bayebi ete ezali na mibeko mpe na malako oyo etambwisaka libala oyo endimami na mibeko ya Leta mpe ezali na mitinda oyo endimami na bato esika bafandi. Tosengeli kotalela mitinda yango malamumalamu mpo na kotosa toli ya Makomami oyo elobi ete: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.”​—Baebre 13:4.

BOMOI YA BAKRISTO

“Baboti, bóteya bana na bino makambo oyo basengeli koyeba”

w19.05 lok. 12, etanda

Bolingo mpe bosembo etinda biso tóbatela bana

Omiteya mpe teyá bana na yo

Mpo na baboti mpe bana na bango

▸ “Votre enfant est en danger!,” Comment protéger nos enfants? mpe “La prévention au foyer,” Lamuká! ya 08/10/1993, na Français

▸ “Likama oyo ezali kobangisa baboti nyonso,” “Ndenge ya kobatela bana na yo,” mpe “Kómisá libota na yo esika ya libateli,” Lamuká! ya Yanuali-Marsi 2008

▸ “Tata ya malamu asalaka nini?”, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2008

▸ “Sololáká na bana na yo makambo etali kosangisa nzoto,” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2010

▸ Nous protégeons nos enfants, video ya TV JW®

▸ “Les Témoins de Jéhovah sensibilisent parents et enfants aux dangers des prédateurs sexuels,” ezali na site jw.org® (Fungolá esika bakomi OLINGI KOYEBA BISO? > MISALA.)

▸ “Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango makambo ya kosangisa nzoto?” ezali na site jw.org (Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA.)

▸ Yekolá epai ya Moteyi monene, mokapo 10 mpe 32

▸ Kómá moninga ya Yehova: Batelá bana na yo, video ya site jw.org (Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BANA.)

Mpo na bilenge

▸ Ce qu’ils en pensent: Le harcèlement sexuel, video ya site jw.org (Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE.)

▸ “Ndenge ya komibatela mpo básangisa na ngai nzoto na makasi te,” Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1, mokapo 32

▸ “Mituna oyo bilenge batunaka: Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi​—Eteni 1: Ndenge ya komibatela,” ezali na site jw.org (Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE.)

▸ “Bongo soki basangisá na ngai nzoto na makasi?” Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka, Motuna 8

Libɔndisi mpo na baoyo babebisamá

▸ “De l’aide pour les victimes de l’inceste,” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/1984, na Français

▸ “Les enfants: victimes innocentes des abus sexuels,” mpe “Les blessures cachées de l’abus sexuel,” Lamuká! ya 08/10/1991, na Français

▸ “Mituna oyo bilenge batunaka: Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi​—Eteni 2: Soki basalá yo yango,” ezali na site jw.org (Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE.)

▸ “Kobɔndisa baoyo basalá bango makambo ya nsɔni na bomwana” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2019, lisolo ya boyekoli 20.

11-17/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 20-21

“Yehova asantisaka basaleli na ye”

w04 15/10 lok. 11 par. 12

Makambo nini endimisaka yo elikya ya Paradiso?

12 Kasi, ezali na likambo moko oyo tosengeli kobosana te. Nzambe alobaki na Bayisraele boye: “Bosengeli kobatela mitindo nyonso oyo nazali kopesa yo lelo, mpo bókóma makasi mpe bókɔta mpenza mpe bózwa mokili epai bozali kokatisa mpo na kozwa yango.” (Kolimbola Mibeko 11:8) Balevi 20:22, 24 elobeli mpe mokili yango: “Bosengeli kobatela mibeko na ngai mpe bikateli na ngai nyonso ya lisambisi mpe kosalela yango, mpo mokili epai nazali komema bino mpo bófanda, esanza bino te. Na yango, nalobaki na bino ete: ‘Bino, ɛɛ bino, bokozwa mokili na bango, mpe ngai, ɛɛ ngai, nakopesa bino yango mpo bózwa yango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.’” Tomoni ete mpo Bayisraele bázwa Mokili ya Ndaka, basengelaki kozala na boyokani malamu na Yehova Nzambe. Soki Nzambe atikaki bato ya Babilone bálonga Bayisraele mpe bálongola bango na mokili na bango, ezali mpo batosaki mibeko na ye te.

it-1-F lok. 1106

Libula

Eloko nyonso oyo moto oyo akufi atikeli moto oyo azali mozwi-ya-libula to baoyo bazali bakitani mpe bazali na ntomo ya kozwa eloko yango nsima ya liwa na ye; eloko nyonso oyo bankɔkɔ batikeli bana na bango na kotalela ndenge mabota elandani. Verbe ya Ebre oyo basaleli ezali nachal (liloba ezali, nachalah). Elimboli kozwa to kopesa moto libula to libula ya libota, mbala mingi eloko yango ekitanaka kobanda na bankɔkɔ tii na bana oyo balandi. (Mit 26:55; Ezk 46:18) Na bantango mosusu basalelaka verbe yarash mpo na kolobela moto oyo ‘azali mokitani, mozwi-ya-libula’ kasi mbala mingi basalelaka yango mpe mpo na moto oyo ‘azwi libula’ atako azali mokitani te. (Eb 15:3; Le 20:24) Elimboli mpe ‘kobɔtɔla mabele; kobengana,’ epesi likanisi ya makambo oyo basoda basalaka. (Mib 2:12; 31:3) Liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na kolobela libula ezali na boyokani na liloba klêros, oyo elakisi libosoliboso “mbɛsɛ,” kasi na nsima ezwaki ndimbola ya “eteni” mpe nsukansuka ekómaki kolimbola “libula.”​—Mt 27:35; Mis 1:17; 26:18.

it-2-F lok. 438 par. 5

Bandɛkɛ

Nsima ya mpela, Noa apesaki mbeka ya ‘bikelamu ya pɛto oyo epumbwaka’ mpe banyama mosusu. (Eb 8:18-20) Kobanda na ntango wana, Nzambe apesaki nzela ete bato bákóma kolya mpe bandɛkɛ, kasi basengelaki te kolya makila na yango. (Eb 9:1-4; talá mpe Le 7:26; 17:13.) Soki bandɛkɛ mosusu ebengamaki ‘pɛto’ na ntango wana, kozanga ntembe ezalaki mpo Nzambe nde amonisaki ete bandɛkɛ yango endimamaki mpo epesama lokola mbeka; na oyo etali kolya, mokanda moko te ya Biblia emonisi ete bandɛkɛ yango ezalaki “mbindo” liboso Mibeko ya Moize epesama. (Le 11:13-19, 46, 47; 20:25; Mib 14:11-20) Biblia elobi te nini ezalaki kosala ete bandɛkɛ mosusu etángama “mbindo” na oyo etali makambo ya losambo. Atako mingi ya bandɛkɛ yango ezalaki oyo ekangaka banyama to oyo elyaka bibembe, kasi yango nyonso te ezalaki bongo. (Talá ndɛkɛ babengi HUPU.) Mobeko yango elongolamaki nsima ya kotyama ya kondimana ya sika, ndenge Nzambe amonisaki yango Petro na emonaneli.​—Mis 10:9-15.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 1180 par. 2

Komikatakata na nzoto

Mobeko ya Nzambe epekisaki komikatakata na nzoto, mingimingi mpo na moto oyo akufi. (Le 19:28; 21:5; Mib 14:1) Ezalaki bongo mpo Yisraele ezalaki ekólo mosantu na miso ya Yehova, eloko na ye moko. (Mib 14:2) Lisusu, Yisraele esengelaki komibatela na makambo nyonso ya losambo ya bikeko. Mpe komonisa mawa koleka ndelo na komikatakata na nzoto to komizokisa ndenge wana, ezalaki malamu te mpo na ekólo oyo eyebaki ndenge moto akómaka soki akufi, mpe oyo ezalaki na elikya ya lisekwa. (Da 12:13; Ebr 11:19) Ndenge mibeko ya Nzambe epekisaki Bayisraele bámikatakata na nzoto ezalaki kotinda bango bázwa na limemya nzoto ya moto oyo Nzambe asalaki.

18-24/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 22-23

“Bafɛti ya bileko elimboli nini mpo na biso”

it-1-F nk. 884-885 par. 5-6

Fɛti ya bagato ezangá levire

Mokolo ya liboso ya fɛti ya bagato ezangá levire ezalaki liyangani moko monene, ezalaki mpe sabata. Na mokolo oyo elandi, 16 Nisana, Bayisraele bazalaki komemela nganga-nzambe liboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini na mbuma ya liboso na eleko ya kobuka ɔrje, mbuma oyo etelaka liboso na Palestine. Liboso ya fɛti yango, moto moko te asengelaki kolya mbuma ya sika oyo babuki na elanga, ezala ya mobesu, ya kotumba, to basali yango limpa. Na ndenge ya elilingi, nganga-nzambe azalaki kopesa bambuma yango ya liboso epai ya Yehova, na ndenge azalaki koningisa liboke yango ya bambuma ya ɔrje epai na epai, wana bazalaki kopesa mpate mobali oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso lokola mbeka ya kotumba elongo na likabo ya mbuma oyo emwangisami mafuta mpe likabo ya masanga. (Le 23:6-14) Epekisamaki kotumba bambuma yango to farini na yango likoló ya etumbelo, ndenge banganga-nzambe bakómaki kosala yango nsima. Ezalaki kaka te na likabo ya bambuma ya liboso mpo na bato nyonso to mpo na ekólo mobimba, kasi bibongiseli ezwamaki mpo libota mokomoko mpe moto nyonso oyo azali na mabele na Yisraele apesaka mbeka wana ya matɔndi na eleko wana ya fɛti.​—Kob 23:19; Mib 26:1, 2; talá BAMBUMA YA LIBOSO.

Ndimbola na yango. Ndenge bazalaki kolya bagato ezangá levire na eleko wana, eyokanaki na malako oyo Yehova apesaki Moize, oyo ezali na Kobima 12:14-20, oyo ezali mpe na mobeko ya kokakola te, oyo ezali na vɛrsɛ 19: “Na boumeli ya mikolo nsambo, pɔtɔpɔtɔ ya farini ya ngayi ekozala te na bandako na bino.” Na Kolimbola Mibeko 16:3, bagato ezangá levire ebengami “mampa ya mpasi,” mpe mbula na mbula ezalaki kokundwela Bayuda ndenge babimaki mbangumbangu na mokili ya Ezipito (na ntango oyo bazwaki ntango te ya kotya levire na pɔtɔpɔtɔ ya farini na bango [Kob 12:34]). Yango ezalaki kokundwela Bayisraele mpasi oyo bakutanaki na yango mpe ndenge basikwamaki, ndenge Yehova ye moko alobaki: “Mpo okanisa mokolo ya kobima na yo na mokili ya Ezipito, mikolo nyonso ya bomoi na yo.” Lokola Bayisraele bayebaki ete ekólo na bango esikolamaki mpe bazalaki na botɔndi epai ya Yehova, Mosikoli na bango, bazalaki kosala na botɔndi mpenza fɛti ya liboso na bafɛti misato ya minene oyo ezalaki kosalema mbula na mbula.​—Mib 16:16.

it-2-F lok. 527 par. 1

Pantekote

Bambuma ya liboso na eleko ya kobuka blé esengelaki te kopesama ndenge moko na bambuma ya liboso ya mbuma ya ɔrje. Bazalaki kosala na mibale ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu ya blé (4,4L) mampa mibale mpe bazalaki kotya yango levire. Basengelaki ‘komema yango uta na bisika na bango ya kofanda,’ yango emonisaki ete esengelaki kozala lokola mampa oyo basalaka mokolo na mokolo mpo na kolya na ndako, kasi te mampa oyo bakosalela mpo na mosala mosantu. (Le 23:17) Bazalaki kopesa bambeka ya kotumba, likabo mpo na lisumu, mpe bana-mpate mibale ya mibali nzela moko na mampa yango. Nganga-nzambe azalaki koningisa mampa yango ná bana-mpate yango liboso ya Yehova, na ndenge azalaki kotya mabɔkɔ na ye na nse ya mampa ná biteni ya mosuni ya bana-mpate mpe azalaki koningisa yango epai na epai, mpo na komonisa ete epesamaki liboso ya Yehova. Nsima ya kopesa mampa yango ná bana-mpate yango lokola mbeka, ezalaki kokóma ya nganga-nzambe mpe azalaki kolya yango lokola likabo ya boyokani.​—Le 23:18-20.

w14 15/5 nk. 28-29 par. 11

Ozali kokende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova?

11 Ebongiseli ya Yehova ezali mpenza kosala mpo na bolamu na biso ndenge elendisaka biso tólanda toli oyo ya ntoma Paulo ete: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Ebr. 10:24, 25) Bafɛti oyo Bayisraele bazalaki kosala mbula na mbula mpe mayangani mosusu mpo na losambo, ezalaki kolendisa bango na elimo. Na ndakisa, milulu yango lokola fɛti ya mwa ndako ya matiti oyo esalemaki na mikolo ya Nehemia ezalaki mpenza bantango ya esengo. (Kob. 23:15, 16; Neh. 8:9-18) Tozwaka mpe matomba ya ndenge wana na makita mpe mayangani na biso ya minene. Tosengeli mpenza kozalaka na makita mpe mayangani yango mpo tókola na elimo mpe tózala na esengo.​—Tito 2:2.

Biloko ya motuya ya elimo

w19.02 lok. 3 par. 3

Batelá bosembo na yo!

3 Mpo na biso basaleli ya Nzambe, bosembo elimboli kolinga Yehova na motema mobimba mpe kokangama makasi na ye; yango ekosala ete tózwaka ntango nyonso bikateli oyo ekosepelisa ye. Tótala ndenge Biblia esalelaka liloba bosembo. Na Biblia, liloba “bosembo” elimboli libosoliboso mobimba, oyo ezangi mbeba to oyo ezali ndambo te. Na ndakisa, Bayisraele bazalaki kopesa Yehova mbeka ya nyama, mpe Mibeko elobaki ete nyama yango esengelaki kozala na mbeba ata moko te. (Lev. 22:21, 22) Basaleli ya Nzambe basengelaki te kopesa nyama oyo ezangi lokolo moko, litoi moko, to liso moko; basengelaki mpe te kopesa nyama oyo ezali na maladi. Mpo na Yehova, ezalaki na ntina ete nyama ezala ya mobimba, ezanga mbeba, mpe ezala ya ndambo te. (Mal. 1:6-9) Tokoki komona ntina oyo Yehova alingaka eloko oyo ezangi mbeba to oyo ezali mobimba. Soki tozali kosomba eloko moko, ezala mbuma, buku, to esaleli moko boye, tozwaka te oyo ezali na mbeba to oyo ezali ndambo. Tolingaka oyo ezali ya mobimba, ezangi mbeba, to ezali ya ndambo te. Yehova mpe amiyokaka bongo mpo na bolingo oyo tolingaka ye mpe bosembo na biso. Esengeli kozala ya mobimba, ezanga mbeba, mpe ezala ya ndambo te.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Motó ya likambo: Nani azalaki kobuka bambuma ya liboso ya ɔrje oyo bazalaki komema na tempelo?

w07 15/7 lok. 26

Mituna ya batángi

Lokola mosala ya kobuka mbuma ezalaki kobanda wana mibali nyonso ya Yisraele bazali na Fɛti ya Mampa ezangá levire, nani azalaki kobuka bambuma ya liboso ya ɔrje oyo bazalaki komema na tempelo?

Mibeko ya Moize elobaki na Bayisraele boye: “Mbala misato na mbula, mobali nyonso epai na yo akomonana liboso ya Yehova Nzambe na yo na esika oyo ye akopona: na fɛti ya bagato ezangá levire mpe na fɛti ya bapɔsɔ mpe na fɛti ya mwa bandako ya matiti, moto moko te akomonana liboso ya Yehova mabɔkɔ mpamba.” (Kolimbola Mibeko 16:16) Banda na ntango ya Mokonzi Salomo, esika oyo Nzambe aponaki ezalaki tempelo ya Yerusaleme.

Fɛti ya liboso kati na bafɛti yango misato ezalaki kosalema na ebandeli ya prɛnta. Bazalaki kobenga yango Fɛti ya Mampa ezangá levire mpe ezalaki koumela mikolo nsambo, banda mokolo oyo elandi Elekeli, elingi koloba na mokolo ya 15 Nisana tii mokolo ya 21 Nisana. Mokolo ya mibale ya fɛti yango, elingi koloba 16 Nisana, ezalaki ebandeli ya eleko ya liboso ya kobuka mbuma na kolanda manaka ya Bayuda. Mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki kozwa “liboke ya mbuma ya liboso” ya ɔrje mpe azalaki ‘koningisa yango liboso ya Yehova’ na tempelo. (Balevi 23:5-12) Lokola mibali nyonso basengelaki kozala na Fɛti ya Mampa ezangá levire, nani azalaki kobuka liboke ya mbuma yango?

Mobeko ya kopesa mbuma ya liboso epai ya Yehova na Fɛti ya Mampa ezangá levire epesamaki na ekólo mobimba. Esengelaki te ete moto na moto abuka liboke na ye ya mbuma ya liboso mpe amema yango na tempelo. Bazalaki kopona bato oyo bazalaki kosala yango mpo na ekólo mobimba. Na nsima, bazalaki kotinda bango bábuka liboke ya mbuma ya liboso na elanga moko ya ɔrje na zingazinga ya Yerusaleme, mpe báya na yango mpo na Fɛti ya Mampa ezangá levire. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi boye: “Soki bamoni ɔrje oyo eteli na elanga moko zingazinga ya Yerusaleme, bazalaki kozwa yango; soki te, bazalaki kozwa yango ata na esika nini na Yisraele. Mibali misato bazalaki kobuka yango, mokomoko azalaki na likwangola mpe kitunga na ye.” Na nsima, bazalaki komema liboke moko ya ɔrje epai ya nganga-nzambe monene, mpe ye azalaki kopesa yango epai ya Yehova.

Mobeko ya kopesa Yehova mbuma ya liboso ezalaki kopesa Bayisraele libaku ya komonisa ete bazali na botɔndi na ndenge Nzambe apambolaki mabele mpe milona na bango. (Kolimbola Mibeko 8:6-10) Kasi, likambo eleki ntina ezali ete molulu yango ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Baebre 10:1) Kutu, Yesu Kristo asekwisamaki na mokolo ya 16 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso, na mokolo oyo Bayisraele bazalaki kopesa mbuma ya liboso epai ya Yehova. Ntoma Paulo akomaki boye: “Kristo alamuki uta na bakufi, mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa. . . . Kasi moto na moto na ngala na ye: Kristo mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato ya Kristo na ntango ya kozala na ye.” (1 Bakorinti 15:20-23) Liboke ya mbuma ya liboso oyo nganga-nzambe monene azalaki koningisa liboso ya Yehova ezalaki elilingi ya Yesu Kristo​—moto ya liboso oyo asekwisamaki mpe akoki kokufa lisusu te. Na ndenge yango, Yesu apesaki bato nzela ya kosikolama na masumu mpe liwa.

25-31/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 24-25

“Mbula ya Yubile mpe bonsomi na mikolo ezali koya”

it-2-F nk. 137-138 par. 7

Bonsomi

Nzambe ya bonsomi. Yehova azali Nzambe ya bonsomi. Alongolaki ekólo ya Yisraele na boombo na Ezipito. Ayebisaki bango ete ntango nyonso bakotosa mibeko na ye bakozala na bonsomi oyo ekosala ete bákokisa bamposa na bango. (Mib 15:4, 5) Davidi alobaki ete ‘ekozala na mitungisi te’ na bandako ya milai ya kofanda ya Yerusaleme. (Nz 122:6, 7) Kasi, mobeko elobaki ete soki moto akómi mobola akoki komitɛka lokola moombo mpo akokisa bamposa na ye mpe ya libota na ye. Kasi mobeko ebongisaki ete Moebre oyo azalaki moombo akokaki kozwa bonsomi na mbula ya nsambo kozanga ete afuta eloko. (Kob 21:2) Na Yubile (oyo ezalaki kosalema na mbula nyonso ya 50), bonsomi ezalaki kosakolama mpo na bato nyonso na Yisraele mobimba. Moebre nyonso oyo azalaki moombo azalaki kozwa bonsomi, mpe azalaki kozonga na mabele na ye ya libula.​—Le 25:10-19.

it-1-F nk. 1107-1108 par. 7

Libula

Lokola mabele ezalaki libula ya libota kaka moko mpo na libota na libota, esengelaki te kotɛkama mpo na libela. Na yango, bazalaki kotɛka mabele yango kaka mpo na mwa ntango, mpe ezalaki na valɛrɛ ya mbuma oyo mabele yango ekobota. Bazalaki kokata motuya ya mabele yango na kotalela motángo ya bambula oyo etikalaki tii na Yubile oyo ekoya, ntango oyo mabele nyonso ezalaki kozonga epai ya nkolo na yango soki nkolo na yango afutaki mbongo te mpo na kozwa yango lisusu to mpe asikolaki yango te liboso ya Yubile. (Le 25:13, 15, 23, 24) Mobeko yango ezalaki kotalela bandako oyo ezalaki na bingumba oyo ezangá bifelo, oyo bazalaki kotalela yango lokola bamboka ya zamba. Na bingumba oyo ezalaki na bifelo, lotomo ya kosomba lisusu mabele ezalaki koumela mbula moko kobanda na ntango oyo batɛkaki yango, na ntango wana ezalaki kokóma mbala moko eloko ya moto oyo asombaki yango. Na oyo etali bandako oyo ezalaki na bingumba ya Balevi, lotomo ya kosomba lisusu mabele ezalaki kokoba mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpo Balevi bazalaki na libula ya mabele te.​—Le 25:29-34.

it-2-F lok. 70 par. 2

Yubile

Ntango Bayisraele bazalaki kotosa mobeko ya Yubile, yango ezalaki kosala ete bázala te na bomoi ya mpasi ndenge tozali komona yango lelo na mikili mingi, epai bato ya mbongo bazali kokóma se na mbongo mingi mpe babola bazali kokóma se babola. Matomba oyo moto nyonso azalaki kozwa ezalaki kokómisa ekólo makasi, mpamba te moto moko te azalaki kokelela to azalaki kosala eloko te mpo azalaki na mikakatano ya mbongo, kasi moto nyonso azalaki kosalela makoki na ye mpe mayele na ye mpo na bolamu ya ekólo mobimba. Ntango Bayisraele bazalaki kotosa Yehova mpe kosalela mateya oyo azalaki kopesa bango, Yehova azalaki kopambola mabele na bango, bazalaki kosepela na bokonzi ya malamu mpe bomɛngo oyo kaka Teokrasi ya solosolo nde ekoki kopesa.​—Yis 33:22.

Biloko ya motuya ya elimo

w09 1/9 lok. 22 par. 4

Ntango moto asali yo mabe

Soki Moyisraele abundisi Moyisraele mosusu mpe atɔbɔli ye liso, Mibeko ezalaki kopesa etumbu oyo esengeli. Kasi, ezalaki te moto oyo basali mabe nde asengelaki kopesa etumbu na moto oyo asali ye mabe to na moto moko ya libota na ye. Mibeko esɛngaki ete amema likambo yango epai ya basambisi oyo batyamaki, mpo bákata likambo yango malamu. Koyeba ete kosala moninga likambo ya mabe na nko ekokaki kosala ete ozwa etumbu oyo ekokani na mabe oyo osalaki, ezalaki mpenza kopekisa bato bázongisaka mabe na mabe. Kasi, esuki kaka wana te.

01-07/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 26-27

“Oyo osengeli kosala mpo na kozwa lipamboli ya Yehova”

w08 15/4 lok. 4 par. 8

Boyá “makambo ya mpamba”

8 Ndenge nini “Bomɛngo” ekoki kokóma nzambe? Tózwa ndakisa ya libanga na elanga moko na Yisraele ya kala. Libanga yango ekokaki kozala na ntina mpo na kotonga ndako to efelo. Nzokande, ntango batɛlɛmisi yango mpe bakómisi yango “likonzí” mosantu, ezalaki kokóma motambo mpo na libota ya Nzambe. (Lev. 26:1) Ndenge moko mpe, mbongo ezali na ntina. Tosengeli na yango mpo na kobikela mpe tokoki kosalela yango mpo na kosimba mosala ya Yehova. (Mos. 7:12; Luka 16:9) Kasi, soki tozongisi mosala ya Nzambe nsima mpe koluka mbongo ekómi na esika ya liboso, mbongo ekokóma nzambe na biso. (Tángá 1 Timote 6:9, 10.) Na mokili oyo bato bazali kopesa motuya mingi na koluka bomɛngo, tosengeli kozala na bokatikati na makambo etali mbongo.​—1 Tim. 6:17-19.

it-2-F lok. 753 par. 2

Nsɔmɔ

Ndenge Yehova asalelaki Moize mpe asalelaki ye makambo, Moize akómaki na nguya mpe asalaki makambo minene ya nsɔmɔ (Ebr., moh·raʼʹ) na miso ya bato ya Nzambe. (Mib 34:10, 12; Kob 19:9) Baoyo bazalaki na kondima bazalaki kobanga Moize mpo na bokonzi oyo azalaki na yango. Bayaki koyeba ete Nzambe azalaki kosolola bango na nzela ya Moize. Bayisraele basengelaki mpe kozala na nsɔmɔ mpo na esika mosantu. (Le 19:30; 26:2) Yango elingi koloba ete basengelaki komonisa botosi mpo na esika mosantu, kosambela na ndenge oyo Yehova azalaki kotambwisa makambo mpe basengelaki komitambwisa na boyokani na mibeko na ye nyonso.

w91-F 1/3 lok. 17 par. 10

Tiká “kimya ya Nzambe” ebatela mitema na bino

10 Yehova alobaki na ekólo yango boye: “Soki bokobi kotambola na mibeko na ngai mpe kotosa mitindo na ngai mpe kosalela yango, nakopesa mpenza bino mbula oyo ezali kosopana na ntango na yango, mpe mokili ekopesa mpenza mbuma na yango, mpe nzete ya elanga ekopesa mbuma na yango. Mpe nakotya kimya na mokili, mpe bokolala mpenza, kozanga ete moto moko alɛngisa bino, mpe nakosilisa banyama mabe ya zamba na mokili, mpe mopanga ekoleka na mokili na bino te. Mpe nakotambola mpenza na kati na bino mpe nakomonisa ete nazali Nzambe na bino, mpe bino, ɛɛ bino, bokomonisa ete bozali bato na ngai.” (Balevi 26:3, 4, 6, 12) Bayisraele bakokaki kozala na kimya, mpo banguna na bango bakokaki te kosala bango mabe, bazalaki na ebele ya biloko ya kobikela, mpe boyokani ya malamu ná Yehova. Kasi yango ekokaki kozala bongo, soki batosi Mibeko ya Yehova.​—Nzembo 119:165.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 564 par. 4

Maladi mabe

Mbuma mabe ya koboya kotosa mibeko ya Nzambe. Nzambe ayebisaki Bayisraele ete soki baboyi kotosa kondimana oyo asalaki elongo na bango ‘akotindela bango maladi mabe.’ (Le 26:14-16, 23-25; Mib 28:15, 21, 22) Na Biblia, soki balobeli bokolɔngɔnɔ, ezala ya nzoto to ya elimo, ezalaka na boyokani na mapamboli ya Nzambe (Mib 7:12, 15; Nz 103:1-3; Mas 3:1, 2, 7, 8; 4:21, 22; Em 21:1-4), kasi soki balobeli maladi, ezalaka na boyokani na lisumu mpe kozanga kokoka. (Kob 15:26; De 28:58-61; Yis 53:4, 5; Mt 9:2-6, 12; Yn 5:14) Na yango, ezali solo ete na bantango mosusu Yehova Nzambe azalaki kobɛta bato mbala moko na maladi ya maba, na ndakisa, Miriame, Uziya mpe Gehazi (Mit 12:10; 2Nt 26:16-21; 2Ba 5:25-27), emonani ete na bantango mosusu, maladi mpe maladi mosusu mabe oyo ezalaki kouta na makama oyo ebimaka yango moko mpe mosusu ezalaki kouta na mbuma mabe ya masumu oyo bikólo mobimba to mpe bato bazalaki kosala. Bazalaki kaka kobuka mbuma ya makambo oyo bazalaki kolona; makambo mabe oyo bazalaki kosala ezalaki komemela bango mpasi na nzoto. (Ga 6:7, 8) Mpo na baoyo bamipesaki na kosala pite to makambo ya mbindo, ntoma Paulo alobi ete Nzambe “atiki bango básala makambo ya mbindo, mpo nzoto na bango moko eyoka nsɔni . . . bazali kozwa mbano mobimba, oyo ebongi mpenza na libunga na bango.”​—Ro 1:24-27.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Motó ya likambo: Mbongo boni nasengeli kopesa?

w09 1/8 lok. 30

Mituna ya batángi

Mbongo boni nasengeli kopesa?

“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakorinti 9:7) Bato mingi na mokili bayebi maloba yango. Kasi, bandimi mosusu bamonaka ete basengeli kopesa ata oyo eleki makoki na bango. Kutu, mangomba mosusu ekatelaka bandimi na yango mbongo oyo basengeli kopesaka. Yango nde babengaka dime, elingi koloba kopesa ndambo ya 10 ya bozwi na yo na lingomba.

Biblia ekatá mpenza motángo ya mbongo oyo bato basengeli kopesaka na lingomba? Omituna boye: Mbongo boni nasengeli kopesa?

Makabo oyo esɛngamaki mpe oyo moto ye moko akokaki kopesa na ntango ya kala

Biblia ezali na malako ya polele mpo na makabo oyo Nzambe asɛngaki Bayisraele bápesaka. (Balevi 27:30-32; Mitángo 18:21, 24; Kolimbola Mibeko 12:4-7, 11, 17, 18; 14:22-27) Masɛngami yango elekaki ndelo te. Yehova alakaki ete soki batosi mibeko na ye, ekólo na bango ekotonda mpenza na bozwi.​—Kolimbola Mibeko 28:1, 2, 11, 12.

Na mabaku mosusu, Bayisraele bakokaki kopesa makabo oyo bango moko basepeli kopesa, ezala moke to mingi. Na ndakisa, ntango Mokonzi Davidi akanaki kotongela Yehova tempelo, Bayisraele bapesaki “wolo na talanta nkóto mitano.” (1 Ntango 29:7) Tókokanisa motángo yango na oyo Yesu amonaki ntango azalaki awa na mabele. Amonaki “mwasi moko mobola oyo mobali akufá azali kotya . . . mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza,” na bibombelo ya mosolo na tempelo. Mbongo oyo atyaki ezalaki na valɛrɛ nini? Ezalaki moke mpenza mpe ekokaki ata te lifuti ya mokolo moko ya mosala. Kasi, Yesu alobaki ete Nzambe andimaki mbongo yango.​—Luka 21:1-4.

Biblia ekatelá bakristo motángo moko oyo basengeli kopesaka?

Lelo oyo, bakristo bazali te na nse ya Mibeko ya kondimana oyo bapesaki Bayisraele. Na yango, bakatelá bango te motángo moko boye ya mbongo oyo basengeli kopesaka Nzambe. Kasi, na lisangá ya solo ya bakristo, kopesa ememelaka moto esengo mpenza. Yesu Kristo ye moko alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

Batatoli ya Yehova basimbaka mosala ya kosakola na mokili mobimba na makabo oyo bapesaka na bolingo na bango moko. Makabo yango esalelamaka mpo na kobimisa mikanda, lokola zulunalo oyo ozali kotánga mpe mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe kobatela yango. Basalelaka makabo yango te mpo na kofuta bato. Batatoli oyo bamipesaka mpo na kolekisa ngonga mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli bazwaka lisungi oyo esalisaka bango mpo na kofuta transport mpe kokokisa bamposa na bango mosusu. Kasi, moto moko te asɛngaka lisungi yango na makasi. Kutu, Batatoli ya Yehova mingi bafutamaka te mpo na mosala ya kosakola oyo basalaka. Mingi basalaka nde misala mosusu mpo na kokokisa bamposa na bango, ndenge Paulo azalaki kosala ntango azalaki kotonga bahema.​—2  Bakorinti 11:9; 1 Batesaloniki 2:9.

Soki moto alingi kopesa likabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova, asengeli kopesa mbongo boni? Ntoma Paulo akomaki boye: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakorinti 8:12; 9:7.

08-14/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 1-2

“Yehova abongisaka basaleli na ye”

w94 1/12 lok. 9 par. 4

Esika ebongi na losambo ya Yehova kati na bomoi na biso

4 Soki okokaki kozala na likoló mpe kotala kaa ya Bayisraele na nse, na esobe, olingaki komona nini? Etuluku monene ya hema oyo etandami na molɔngɔ, epai bato soki milio misato to koleka bazalaki kofanda, baoyo batyamaki na bituluku ya mabota misato misato epai ya nɔrdi, ya sudi, ya ɛsti mpe ya wɛsti. Na kotaláká na likebi mpenza, olingaki mpe komona etuluku mosusu penepene na katikati ya kaa. Bituluku mike minei wana ya hema ezalaki bongo bandako mpo na bato ya libota ya Levi. Na katikati mpenza ya kaa, na esika oyo ekabolami na efelo ya elamba, ezalaki na ndako moko ekesanaki na nyonso mosusu. Yango ezalaki “hema ya kokutana,” to tabernakle, oyo Bayisraele ya “motema ya bwanya” batongaki na kolanda malako oyo Yehova apesaki.​—Mitángo 1:52, 53; 2:3, 10, 17, 18, 25; Kobima 35:10.

it-1-F lok. 385 par. 6

Kaa

Kaa ya Yisraele ezalaki mpenza monene. Motángo nyonso ya bato oyo bakomaki bankombo na bango oyo tolobelaki likoló, ezalaki mibali 603 550 oyo bazalaki kokende na bitumba, bakisa mpe basi, bana, mibange mpe bibɔsɔnɔ, Balevi 22 000, mpe ‘etuluku monene ya bapaya ndenge na ndenge;’ elingi koloba, motángo na bango nyonso mbala mosusu ezalaki bato 3 000 000 to koleka. (Kob 12:38, 44; Mit 3:21-34, 39) Bonene ya kaa ya ndenge wana eyebanaki mpenza te, kutu bato na bato bapesaka makanisi na bango na oyo etali bonene na yango. Ntango batyaki kaa na bango etalana na engumba Yeriko na mokili patatalu ya Moabe, ndenge lisolo yango emonisi yango, ebandaki “na Bete-yeshimote tii na Abele-shitime.”​—Mit 33:49.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 767

Kokoma nkombo

Kokoma nkombo ya bato, mbala mingi bazalaki kokoma nkombo mpe molɔngɔ ya bankɔkɔ na kotalela libota mpe bato ya ndako. Ezalaki kaka te kozwa motángo to kotánga bato. Na Biblia, bazalaki kozwa motángo ya ekólo mobimba mpo na bantina ndenge na ndenge, na ndakisa, mpo na kofuta mpako, kokɔta na mosala ya soda, to (mpo na Balevi ya ntango wana) ezalaki mpo báponama mpo na kosala misala na esika mosantu.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Motó ya likambo: Mpo na nini mbala mingi Biblia elobelaka mabota 12 ya Yisraele nzokande ezalaki mabota 13?

w08 1/7 lok. 21

Oyebaki yango?

Mpo na nini mbala mingi Biblia elobelaka mabota 12 ya Yisraele, nzokande ezalaki mabota 13?

Mabota ya Yisraele eutaki na bana ya Yakobo, oyo na nsima akómaki kobengama Yisraele. Yakobo azalaki na bana 12: Rubene, Simeone, Levi, Yuda, Dani, Nafatali, Gade, Ashere, Isakare, Zebulone, Yozefe, mpe Benyamina. (Ebandeli 29:32–30:24; 35:16-18) Mabota zomi na moko ezalaki kobengama na bankombo ya bana zomi na moko ya Yakobo; kasi, libota moko te ezwaki nkombo ya Yozefe. Nzokande, mabota mibale ezwaki bankombo ya bana ya Yozefe, Efraime ná Manase, oyo bakómaki kotalelama lokola batata ya mabota yango. Na yango, mabota nyonso ya Yisraele ezalaki 13. Kasi, mpo na nini mbala mingi Biblia elobelaka mabota 12?

Na kati ya Bayisraele, mibali oyo bazalaki na libota ya Levi baponamaki mpo na kosala na tabernakle ya Yehova mpe na nsima na tempelo. Mpo na yango, bazalaki kokende etumba te. Yehova ayebisaki Moize boye: “Kaka libota ya Levi nde osengeli kokoma nkombo na bango te, mpe osengeli te kozwa motángo na bango mobimba na kati ya bana ya Yisraele. Mpe yo moko tyá Balevi bátalelaka tabernakle ya Litatoli mpe bátalelaka bisaleli na yango nyonso mpe bátalelaka eloko na yango nyonso.”​—Mitángo 1:49, 50.

Balevi bazwaki mpe te libula ya mabele na Mokili ya Ndaka. Kasi, bapesaki bango bingumba 48, na bisika ndenge na ndenge na Yisraele.​—Mitángo 18:20-24; Yosua 21:41.

Mpo na bantina yango mibale, mbala mingi libota ya Levi ezalaki kotángama te na mabota ya Yisraele. Yango wana, mbala mingi Biblia elobelaka kaka mabota 12 ya Yisraele.​—Mitángo 1:1-15.

15-21/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 3-4

“Mosala ya Balevi”

it-2-F lok. 655 par. 1

Nganga-nzambe

Na mibeko ya kondimana. Ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito, Yehova asantisaki mpo na ye mwana mobali nyonso ya liboso ya Yisraele ntango abomaki mwana mobali nyonso ya liboso ya Ezipito na bolɔzi ya zomi. (Kob 12:29; Mit 3:13) Na yango, bana mibali nyonso ya liboso bazalaki ya Yehova, mpe basengelaki kosalela bango kaka na mosala ya sipesiale mpo na ye. Nzambe akokaki kopona bana mibali nyonso ya liboso ya Yisraele mpo bázala banganga-nzambe mpe bábatela esika mosantu. Kasi, amonaki malamu ete apona bana mibali ya libota ya Levi mpo básala mosala yango. Yango wana, Yehova asalaki ete bana mibali ya libota ya Levi bázwa esika ya bana mibali nyonso ya liboso ya mabota mosusu 12 (bana ya Efraime mpe ya Manase oyo bazalaki bankɔkɔ ya Yozefe, oyo basalaki mabota mibale). Ntango bazalaki kozwa motángo ya bato, bayaki komona ete bana mibali ya liboso oyo bazalaki na libota ya Levi te, kobanda na sanza moko tii na mbula moko balekaki bana mibali ya libota ya Levi na bato 273. Na yango, Nzambe asɛngaki na mokomoko ya bana mibali yango 273 afuta shekele 5 (dolare 11) mpo na lisiko, mpe bapesaki Arona mpe bana na ye ya mibali mbongo yango. (Mit 3:11-16, 40-51) Liboso kutu báfuta mbongo yango, Yehova asilaki kopona bana mibali ya Arona na kati ya libota ya Levi mpo básala mosala ya bonganga-nzambe na Yisraele.​—Mit 1:1; 3:6-10.

it-2-F lok. 133 par. 1

Balevi

Mikumba na bango. Balevi bautá na mabota misato ya bana mibali ya Levi, Gereshone (Gereshome), Kohate, mpe Merari. (Eb 46:11; 1Nt 6:1, 16) Na esobe, bapesaki libota mokomoko ya mabota yango esika pene ya tabernakle. Bana ya Kohate ya libota ya Arona batyaki kaa na bango pene na tabernakle na ɛsti. Mabota mosusu ya bana ya Kohate batyaki kaa na bango na mopanzi ya sudi, oyo ya bana ya Gereshone na wɛsti, mpe oyo ya bana ya Merari na nɔrdi. (Mit 3:23, 29, 35, 38) Balevi bazalaki na mokumba ya kotya tabernakle, kolongola yango mpe komema yango. Ntango ezalaki kosɛnga ete bálongola kaa, Arona ná bana na ye ya mibali bazalaki kolongola rido oyo ezalaki kokabola Esika mosantu ná Esika oyo Eleki Bosantu mpe bazalaki kozipa sanduku ya litatoli, bitumbelo, mpe biloko mosusu mosantu mpe bisaleli na yango. Mpe na nsima, Bakohate nde bazalaki komema biloko yango. Bagereshone bazalaki komema bilamba ya hema, bizipeli, bilamba ya kozipa, barido ya lopango, mpe bansinga ya hema (ekoki kozala bansinga ya tabernakle yango moko), mpe Bamerari bazalaki komema bakadrɛ ya tabernakle, makonzí, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezalaki na mabulu, bapike na yango ná bansinga na yango (bansinga ya lopango oyo ezalaki kozinga tabernakle).​—Mit 1:50, 51; 3:25, 26, 30, 31, 36, 37; 4:4-33; 7:5-9.

it-2-F lok. 133 par. 3

Balevi

Na mikolo ya Moize, Molevi moko asengelaki kokokisa mbula 30 mpo akokisa mikumba na ye nyonso, na ndakisa, komema tabernakle ná biloko na yango ntango ezalaki kosɛnga bálongola kaa. (Mit 4:46-49) Bazalaki mpe kokokisa mikumba mosusu ntango bakokisi mbula 25, kasi emonani lokola ezalaki te mokumba ya kilo, na ndakisa komema tabernakle. (Mit 8:24) Na mikolo ya Mokonzi Davidi, mbula yango ekitaki tii na 20. Davidi azwaki ekateli yango mpo basengelaki lisusu te komema tabernakle mpo tempelo nde esengelaki kozwa esika ya tabernakle. Molevi azalaki kotika mokumba yango soki akokisi mbula 50. (Mit 8:25, 26; 1Nt 23:24-26; talá MBULA YA KOBOTAMA.) Balevi basengelaki koyeba mibeko malamumalamu, mpo mbala mingi esɛngaki ete bátángaka yango liboso ya bato nyonso mpe báteyaka bato.​—1Nt 15:27; 2Nt 5:12; 17:7-9; Ne 8:7-9.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 1/8 nk. 23-24 par. 13

Zalá na bwanya mpe bangá Nzambe!

13 Lokola Yehova azalaki kosalisa Davidi na ntango ya mpasi, Davidi akómaki kobanga Nzambe makasi mpe kotyela ye mpenza motema. (Nzembo 31:22-24) Kasi, mbala misato mobimba, Davidi azangaki kobanga Nzambe, mpe yango esukelaki ye mabe mpenza. Mbala ya liboso ezali ntango abongisaki ete bámema sanduku ya kondimana ya Yehova na Yerusaleme likoló ya likalo, na esika Balevi bámema yango na mapeka, ndenge Mobeko ya Nzambe esɛngaki. Ntango sanduku yango elingaki kokwea mpe Uza, moto oyo azalaki kotambwisa likalo, asimbaki sanduku mpo ekwea te, akufaki mbala moko “mpo na libunga na ye.” Toboyi te, Uza asalaki mbeba moko monene, kasi likambo wana ya mawa esalemaki mpo Davidi atosaki Mobeko ya Nzambe te. Kobanga Nzambe elimboli kosala makambo ndenge ye azali kosɛnga.​—2 Samwele 6:2-9; Mitángo 4:15; 7:9.

22-28/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 5-6

“Ndenge nini okoki komekola Banaziri?”

it-2-F nk. 381-382

Monaziri

Baoyo bazalaki kosala elako mpo na kozala Monaziri basengelaki kotosa bipekiseli oyo misato ya ntina: (1) Basengelaki te komɛla masanga oyo elangwisaka; kolya te eloko moko oyo basali na nzete ya vinyo, ezala ya mobesu to oyo eteli, to oyo ekauká, komɛla te mai oyo esalemi na mbuma ya vinyo, oyo bakamoli sika to babombi yango mwa mikolo, to mpe vinɛgrɛ na yango. (2) Basengelaki te kokata nsuki ya mitó na bango. (3) Basengelaki kosimba ebembe te, ezala ya bato ya libota na bango, na ndakisa, tata, mama, ndeko mobali to ndeko mwasi.​—Mit 6:1-7.

Elako moko monene. Moto oyo azalaki kosala elako moko monene “mpo na kozala Monaziri [elingi koloba, amipesaki, atyamaki pembeni] mpo na Yehova” asengelaki komonisa yango na bomoi na ye, mpe asengelaki te kosala yango mpo bato bápesa ye lokumu lokola amipimelaki makambo mosusu. Mobeko elobaki kutu “mikolo nyonso ya Bonaziri na ye, azali mosantu mpo na Yehova.”​—Mit 6:2, 8; talá mpe Eb 49:26.

Makambo oyo bazalaki kosɛnga Banaziri, ezalaki na ntina mingi mpe na ndimbola moko monene mpo na losambo ya Yehova. Monaziri azalaki mpe lokola nganga-nzambe monene oyo lokola azalaki kosala mosala mosantu, asengelaki te kosimba ebembe ata soki ezalaki ya bato ya libota na ye. Lokola nganga-nzambe monene mpe banganga-nzambe mosusu bazalaki kosala mikumba ya ntina mingi, bazalaki na ndingisa te ya komɛla vinyo to masanga oyo elangwisaka ntango bazalaki kosala mosala na bango mosantu liboso ya Yehova.​—Le 10:8-11; 21:10, 11.

Lisusu, Monaziri (Ebr., nazir) asengelaki “kozala mosantu na kotikáká nsuki ya motó na ye oyo elíngamalíngamá ekola,” yango ezalaki elembo oyo ezalaki komonisa mbala moko ete Bonaziri na ye ezalaki mosantu. (Mit 6:5) Kaka liloba yango ya Ebre nazir ezalaki kosalelama mpo na kolobela vinyo “oyo ekatami bitape te” na ntango ya Sabata mosantu mpe na bambula ya Yubile. (Le 25:5, 11) Ezali mpe na ntina koyeba ete linzanza ya wolo oyo ezalaki na likoló ya tirba ya nganga-nzambe monene, ezalaki na maloba oyo likomi na yango ekomamaki ndenge ezalaka na kashɛ boye: “Bosantu ezali ya Yehova,” ebengamaki “elembo mosantu ya komipesa [Ebr., nézèr, euti na liloba kaka moko nazir].” (Kob 39:30, 31) Ndenge moko mpe, ekoti ya bokonzi oyo bakonzi oyo batyamaki mafuta na Yisraele bazalaki kolata ezalaki mpe kobengama nézèr. (2Sa 1:10; 2Ba 11:12; talá MOTOLE; KOMIPESA.) Na lisangá ya bokristo, ntoma Paulo alobaki ete bapesá mwasi nsuki milai mpo ezala eloko ya kozipaka motó. Yango ekundwelaka mwasi ete mobali azali na bokonzi likoló na ye; asengeli kozala na komitikisa na ebongiseli ya bokonzi oyo Nzambe atyá. Na yango, masɛngami ya ndenge wana, koboya kokata nsuki (likambo oyo ebongi te na mibali), koboya komɛla vinyo mpe mposa makasi ya koboya makambo ya mbindo mpe komibebisa, ezalaki kokundwela Monaziri ntina ya komiboya mpe ya komitikisa mobimba na mokano ya Yehova.​—1Ko 11:2-16; talá NSUKI; KOZIPA MOTÓ; NDENGE NZAMBE ASALÁ.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 15/1 lok. 30 par. 2

Mituna ya batángi

Nzokande Samsone azalaki Monaziri ya lolenge mosusu. Liboso abotama, anzelu ya Yehova ayebisaki mama na ye ete: “Mpo, talá! okozwa zemi, mpe okobota mpenza mwana mobali, mpe razware esengeli koleka na motó na ye te, mpo mwana yango akozala Monaziri ya Nzambe, banda na ntango oyo akobima na libumu; mpe ye nde akobanda kobikisa Yisraele na lobɔkɔ ya Bafilistia.” (Basambisi 13:5) Na yango, Samsone alapaki ndai ya Monaziri te. Nzambe nde aponaki ye azala Monaziri, mpe yango ezalaki mpo na bomoi na ye mobimba. Yango wana, mobeko ya kosimba ebembe te ekokaki kotalela ye te. Lokola Samsone azalaki Monaziri banda kobotama na ye, akokaki te kokata mpe kobandela lisusu ndai na ye, ata soki asimbi ebembe kozanga ete akana yango. Yango emonisi polele ete masɛngami ya kozala Monaziri uta kobotama ekeseni na masɛngami ya moto oyo alapi ndai ya Monaziri.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Motó ya likambo: Eloko moko ya kokamwa ya arkeoloji emonisi ete masolo ya Biblia ezali solo

w06 15/1 lok. 32

“Makomi eleki koumela oyo ezali na maloba euti na Biblia”

Eleki sikoyo mbula 25, bato ya arkeoloji ya Israël bakundolaki eloko moko ya kokamwa. Na esika moko oyo ezalaki malita, na Lobwaku ya Hinome na Jérusalem, bamonaki mwa barulo mibale ya palata oyo ezalaki na maloba ya Biblia. Barulo yango ekomamaki liboso bato ya Babilone bábebisa Yerusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na makomi yango batángi ndambo ya maloba ya mapamboli oyo ezali na Mitángo 6:24-26. Nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali na bisika mingi na barulo yango. Balobaki ete makomi yango ezali “eloko eleki koumela oyo bato ya ntango ya kala basalá oyo ezali na maloba ya Biblia ya Ebre.”

Nzokande, dati oyo balobi ete barulo yango ekomamaki, bato mosusu ya mayele babɛtelaki yango ntembe; balobaki ete ekomamaki na ekeke ya mibale L.T.B. Moko na bantina oyo etindaki bango báboya kondima dati oyo bakomaki barulo yango ezali ete bafɔtɔ ya liboso oyo bakangaki yango esalisaki te mpo na kotalela makambo mosusu malamumalamu. Mpo na kosilisa ntembe yango, ekipi moko ya bato ya mayele etalelaki lisusu barulo yango. Basalelaki bamasini ya fɔtɔ ya mikolo oyo mpe ordinatɛrɛ oyo ekoki koyeisa bililingi monene mpo makambo nyonso emonana polele. Bauti koyebisa makambo oyo bamonaki na bolukiluki yango. Bato yango bamoni nini?

Ya liboso, bato ya mayele balobi ete makambo ya arkeoloji emonisi ete barulo yango ekomamaki liboso Bayuda bákende na boombo na Babilone. Boyekoli ya balɛtrɛ oyo esalelamaki, lolenge na yango, ndenge babongisaki yango, ndenge balandisaki yango, mpe ndenge balalisaki yango, emonisi mpe ete barulo yango ekomamaki na dati wana, elingi koloba na nsuka ya ekeke ya nsambo L.T.B. Na nsuka, ntango bayekolaki ekomeli, bato yango ya mayele balobaki boye: “Ekomeli oyo ezali na bitanda [barulo] yango emonisi ete ekomamaki kaka na dati wana na kotalela makambo ya arkeoloji mpe boyekoli ya balɛtrɛ oyo toyebi mpo na ntango wana.”

Zulunalo moko (Bulletin of the American Schools of Oriental Research) elobeli likambo ya barulo yango ya palata, oyo babengaka mpe “Rouleaux de Ketef Hinnom,” na maloba oyo: “Yango wana, tokoki kozongela makanisi oyo bato mingi ya mayele balobaki liboso ete, bitanda wana ezali na makomi eleki koumela oyo ezali na maloba euti na Biblia.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto