Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr21 Septembre nk. 1-12
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • 06-12/09
  • 13-19/09
  • 20-26/09
  • 27/09–03/10
  • 04-10/10
  • 11-17/10
  • 18-24/10
  • 25-31/10
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2021
mwbr21 Septembre nk. 1-12

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

06-12/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | KOLIMBOLA MIBEKO 33-34

“Omibomba na nse ya ‘mabɔkɔ ya Yehova oyo ezali koumela seko’”

it-2-F lok. 1200

Yeshurune

Titre ya lokumu mpo na Yisraele. Na libongoli ya Grɛki ya Septante, liloba “Yeshurune” ekómi liloba ya bolingo, oyo ebongolami na “molingami.” Kobengama na nkombo “Yeshurune” esengelaki kokundwela Bayisraele ete bazali bato oyo basalaki kondimana ná Yehova, yango wana basengelaki kotikala sembo. (Mib 33:5, 26; Yis 44:2) Na Kolimbola Mibeko 32:15, nkombo Yeshurune esalelami na ndenge ya lityo. Na esika bázala na bomoi oyo eyokani na nkombo na bango Yeshurune, Bayisraele bakómaki bato ya mitó makasi, basundolaki Mokeli na bango mpe batyolaki Mobikisi na bango.

rr-F lok. 120, etanda

Nzambe akoki kosalisa yo mpe kotɛlɛmisa yo

Basiɛklɛ mingi liboso ya eleko ya Ezekiele, mosakoli Moize alobaki ete Yehova azali na nguya mpe azali na mposa ya kosalela nguya yango mpo na bolamu ya basaleli na ye. Moize akomaki boye: “Nzambe ya ntango ya kala azali esika ya komibomba, mpe mabɔkɔ oyo ezali koumela seko ezali na nse na yo.” (Mib. 33:27) Na ntembe te, tokoki kotya motema ete soki tokimi epai ya Yehova Nzambe na biso na ntango ya mpasi, akosembolela biso mabɔkɔ na ye mpo na kotɛlɛmisa biso na boboto mpenza.​—Ezk. 37:10.

w11 15/9 lok. 19 par. 16

Tópota mbangu na mpiko

Ndenge moko na Abrahama, Moize akufaki liboso bilaka ya Nzambe ekokisama. Ntango Bayisraele bakómaki pene na kokɔta na Mokili ya Ndaka, Nzambe ayebisaki Moize boye: “Okomona mokili yango na mosika, kasi okokɔta kuna te, na mokili oyo nazali kopesa bana ya Yisraele.” Esalemaki bongo mpo mwa moke liboso, lokola botomboki ya Bayisraele epesaki bango nkanda, Moize ná Arona ‘bazangaki kokokisa mokumba na bango epai na Nzambe na katikati ya bana ya Yisraele na mai ya Meriba.’ (Mib. 32:51, 52) Moize alɛmbaki nde nzoto to akómaki nkandankanda? Te. Toyebi yango mpo asɛngaki Yehova apambola ekólo ya Yisraele. Maloba na ye ya nsuka epai na bango ezalaki boye: “Esengo na yo, Ee Yisraele! Nani azali lokola yo, ekólo moko oyo ezali kozwa lobiko na Yehova, nguba ya lisalisi na yo, mpe Ye oyo azali mopanga na yo oyo eleki monene?”​—Mib. 33:29.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 312 par. 4

Moize

Moize azalaki na mbula 120 ntango akufaki. Biblia epesi litatoli mpo na makasi na ye ya bomoi na maloba oyo: “Liso na ye elɛmbaki te, mpe makasi na ye ya bomoi esilaki te.” Yehova akundaki ye na esika oyo ata moto moko te ayebi tii na mokolo ya lelo. (Mib 34:5-7) Na ntembe te, alingaki te ete Bayisraele bákwea na motambo ya losambo ya lokuta mpo na kokómisa lilita ya Moize esika moko mosantu. Emonani lokola Zabolo azalaki na mposa ya kosalela nzoto ya Moize na mokano wana, yango wana moyekoli Yuda, ndeko ya Yesu Kristo, akomi boye: “Ntango Mikaele, anzelu-mokonzi, azalaki na matata ná Zabolo mpe azalaki kowelana mpo na nzoto ya Moize, amekaki kutu te kokweisa ye na likambo na maloba ya kofinga, kasi alobaki nde: ‘Yehova apamela yo.’” (Yd 9) Liboso ya kokɔta na Kanana na litambwisi ya Yosua, Bayisraele balelaki Moize mikolo 30.​—Mib 34:8.

13-19/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 1-2

“Oyo osengeli kosala mpo olongisa nzela na yo”

w13 15/1 lok. 8 par. 7

Zalá na mpiko​—Yehova azali na yo!

Mpo tózwa mpiko oyo tosengeli na yango mpo na kosala mokano ya Nzambe, tosengeli koyekola Liloba na ye mpe kosalela yango. Yango nde likambo oyo Nzambe ayebisaki Yosua asala ntango akómaki mokitani ya Moize; alobaki ete: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ezali na mobeko oyo Moize, mosaleli na ngai, apesaki yo mitindo. . . . Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi, mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango; mpo, na ndenge yango nde okolongisa nzela na yo mpe na ndenge yango nde okosala makambo na bwanya.” (Yos. 1:7, 8) Lokola Yosua alandaki toli wana, ‘alongisaki nzela na ye.’ Soki biso mpe tosali bongo, tokokóma na mpiko mingi mpe tokolonga na mosala ya Nzambe.

w13 15/1 lok. 11 par. 20

Zalá na mpiko​—Yehova azali na yo!

Ezali pɛtɛɛ te kokoba kosala mokano ya Nzambe na kati ya komekama oyo tozali kokutana na yango na mokili oyo mabe, oyo etondi na yikiyiki. Kasi, tozali biso moko te. Nzambe azali na biso. Mwana na ye, oyo azali Mokonzi ya lisangá, azali mpe na biso. Tozali mpe na bandeko na biso Batatoli ya Yehova koleka milio nsambo na mokili mobimba. Elongo na bango, tókoba komonisa kondima mpe kosakola nsango malamu, wana tozali kobatela na makanisi mokapo na biso ya mobu 2013 oyo elobi ete: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. . . . Yehova Nzambe na yo azali na yo.”​—Yos. 1:9.

Biloko ya motuya ya elimo

w04 1/12 nk. 8-9 par. 6

Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua

2:4, 5​—Mpo na nini Rahaba akosaki mibali oyo mokonzi atindaki mpo na koluka banɔngi? Rahaba atyaki bomoi na ye na likama na ndenge abatelaki banɔngi mpamba te azalaki na kondima epai ya Yehova. Yango wana, aboyaki kolakisa esika oyo basaleli ya Nzambe bazalaki epai ya bato oyo bazalaki koluka kosala bango mabe. (Matai 7:6; 21:23-27; Yoane 7:3-10) Kutu, Rahaba “atángamaki moyengebene mpo na misala na ye,” oyo moko na yango ezali kokosa oyo akosaki bato oyo mokonzi atindaki.​—Yakobo 2:24-26.

20-26/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 3-5

“Yehova apambolaka bato oyo bamonisaka kondima”

it-2-F lok. 63 par. 6

Yordani

Uta na Mbu ya Galile tii na Ebale Yordani, Ebale yango ezalaka ntango nyonso na bozindo ndenge moko te bipai nyonso, ebandi na mɛtrɛ 1 tii 3 mpe ezalaka na bonene ya mɛtrɛ kobanda 27 tii 30. Kasi, na eleko ya prɛnta, Yordani etondisaka bangámbo na yango nyonso, yango nde esalaka ete ekóma lisusu mozindo mpe monene. (Yos 3:15) Soki ezalaká na ntango oyo Yordani etondi, elingaki kozala likama mpo na ekólo Yisraele, oyo ezalaki na mibali, basi, mpe bana mpo na kokatisa yango, mingimingi pene na Yeriko. Mai etíyolaka mbangu, kutu eutaki komema bato oyo bazalaki kosukola na kati. Kasi, Yehova atɛlɛmisaki mai ya Yordani esika moko, yango epesaki Bayisraele likoki ya kokatisa yango na mabele oyo ekauki. (Yos 3:14-17) Basiɛklɛ mingi na nsima, Eliya mpe asalaki likamwisi ya ndenge wana mbala moko ntango azalaki elongo na Elisha, mpe Elisha asalaki bongo na ngala na ye.​—2Ba 2:7, 8, 13, 14.

w13 15/9 lok. 16 par. 17

Kómisá makundoli ya Yehova esengo ya motema na yo

Ndenge nini misala oyo emonisaka kondima esalisaka biso tótyela Nzambe motema mobimba? Tótalela likambo oyo esalemaki liboso ete Yisraele ekɔta na Mokili ya Ndaka. Yehova apesaki banganga-nzambe oyo bamemaki sanduku ya kondimana malako ete bátambola tii bakokɔta na Ebale Yordani. Kasi, ntango Bayisraele bapusanaki pembeni, bamonaki ete ebale yango etondi na mai mpo na bambula oyo ezalaki kobɛta na eleko yango. Basalaki nini? Batyaki bahema na bango na libongo, bafandaki wana, mpo na kozela bapɔsɔ to basanza tii mai ekokita? Te, batyelaki nde Yehova motema mobimba mpe balandaki malako na ye. Nini esalemaki? Lisolo yango elobi: “Mpe ntango . . . makolo ya banganga-nzambe oyo bamemaki Sanduku yango ekɔtaki na ebandeli ya mai . . . mai oyo ezalaki kouta na likoló ebandaki kotɛlɛma esika moko. . . . Bato bakatisaki liboso ya Yeriko. Na ntango yango, banganga-nzambe oyo bamemaki sanduku ya kondimana ya Yehova batɛlɛmaki kaka, kozanga koningana, na mabele oyo ekauki na katikati ya Yordani, wana Yisraele mobimba ezalaki kokatisa na mabele oyo ekauki.” (Yos. 3:12-17) Kanisá esengo oyo Bayisraele bayokaki ntango bamonaki ebele ya mai wana etɛlɛmi! Ya solo, kondima na bango epai ya Yehova ekómaki lisusu makasi mpo balandaki malako na ye.

w13 15/9 lok. 16 par. 18

Kómisá makundoli ya Yehova esengo ya motema na yo

Ya solo, Yehova asalaka lisusu makamwisi ya ndenge wana te mpo na basaleli na ye lelo oyo, kasi apambolaka biso soki tomonisi kondima mpe tolandi malako na ye. Elimo santu ya Nzambe ezali kopesa biso nguya ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba. Mpe Yesu Kristo, Motatoli ya Yehova ya libosoliboso, ayebisaki bayekoli na ye ete akosunga bango na mosala yango ya ntina mingi; alobaki ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso . . . nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:19, 20) Batatoli mingi oyo liboso bazalaki nsɔninsɔni to bazalaki kobanga kosolola na bato bakoki koyebisa ndenge oyo elimo santu ya Nzambe epesaki bango mpiko ya kopesa litatoli ata epai ya bato oyo bayebi te.​—Tángá Nzembo 119:46; 2 Bakorinti 4:7.

Biloko ya motuya ya elimo

w04 1/12 lok. 9 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua

5:14, 15​—Nani azali “mokonzi ya limpinga ya Yehova”? Emonani ete mokonzi ya limpinga oyo ayaki kolendisa Yosua ntango babandaki kokamata Mokili ya Ndaka ezalaki kaka “Liloba,” elingi koloba Yesu Kristo liboso abotama lokola moto. (Yoane 1:1; Danyele 10:13) Tozali mpenza kolendisama na koyeba ete Yesu Kristo oyo azwi nkembo, azali elongo na basaleli ya Nzambe lelo oyo na etumba ya elimo oyo bazali kobunda!

27/09–03/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 6-7

“Longolá biloko oyo ezangi ntina”

w10 15/4 nk. 20-21 par. 5

Longolá miso na yo na biloko oyo ezangi ntina!

Bikeke mingi na nsima, miso ya Moyisraele moko na nkombo Akana ekosaki ye mpe etindaki ye ayiba biloko oyo eutaki na Yeriko, engumba oyo balongaki. Nzambe apesaki mitindo ete biloko nyonso ya engumba yango ebebisama, longola kaka biloko mosusu oyo basengelaki komema na esika ya kobomba biloko ya motuya ya Yehova. Bakebisaki Bayisraele boye: “Bósimba eloko moko te oyo esengeli kobebisama, noki bókóma na mposa na yango” mpe bózwa eloko moko oyo euti na engumba yango. Ntango Akana abukaki mibeko, engumba ya Ai elongaki Bayisraele mpe mingi kati na bango bakufaki. Akana andimaki te ete ye nde moyibi tii ntango babimisaki ye polele. Akana alobaki boye: “Ntango namonaki” biloko yango, “bongo nalulaki yango mpe nazwaki yango.” Mposa ya miso na ye ememaki ye ná “nyonso oyo azalaki na yango” na libebi. (Yos. 6:18, 19; 7:1-26) Akana alulaki na motema na ye biloko oyo bapekisaki ye.

w97 15/8 lok. 28 par. 2

Mpo na nini koyebisa lisumu oyo moto asali?

Moko ya bantina oyo esengeli koyebisa lisumu ya moto ezali mpo na kobatela bopɛto ya lisangá. Yehova azali Nzambe ya pɛto, Nzambe mosantu. Azali kosɛnga na baoyo nyonso bazali kosambela ye ete bázala pɛto na elimo mpe na bizaleli. Liloba na ye epesi toli oyo: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala ntango bozalaki na boyebi te, kasi, na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na etamboli na bino mobimba, mpo ekomamá ete: ‘Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.’” (1 Petro 1:14-16) Baoyo bazali na misala ya mbindo to etamboli mabe bakoki kobebisa lisangá mobimba mpe kozangisa yango ngɔlu ya Yehova soki eloko moko esalemi te mpo na kosembola to kolongola yango.​—Kokanisá na Yosua, mokapo 7.

w10 15/4 lok. 21 par. 8

Longolá miso na yo na biloko oyo ezangi ntina!

Mposa ya miso mpe ya nzoto ekoki kokweisa ata bakristo ya solo. Na yango, Liloba ya Nzambe elendisi biso tókeba na makambo oyo totalaka mpe oyo tozali na mposa na yango makasi. (1 Ko. 9:25, 27; tángá 1 Yoane 2:15-17.) Yobo, moto ya sembo, andimaki ete komona ná koyoka mposa ezali na boyokani makasi. Alobaki boye: “Nasalá kondimana na miso na ngai. Bongo ekobanda boni natya likebi epai ya ngɔndɔ?” (Yobo 31:1) Yobo aboyaki kaka te kosimba mwasi na ndenge ya nsɔni, kasi akokaki mpe te kotika ata bɔɔngɔ na ye ekanisakanisa likambo ya ndenge wana. Yesu amonisaki ntina ya kolongola makanisi ya mbindo na bɔɔngo ntango alobaki ete: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.”​—Mat. 5:28.

Biloko ya motuya ya elimo

w15 15/11 lok. 15 par. 2-3

Mituna ya batángi

Na ntango ya kala, bazalaki koloba ete engumba ezingami soki basoda bakómi kofanda zingazinga ya bifelo na yango mpe bazali kozela mpo na kobunda. Soki bazingi engumba mpo na ntango molai, bato oyo bazali na kati ya engumba yango bazalaki kolya biloko mingi oyo babombaki. Nsukansuka, soki basoda yango bazwi engumba, bazalaki kozwa eloko nyonso oyo balingi, ata mpe bilei oyo etikalaki. Yango wana, bato ya arkeoloji bamonaki biloko ya kolya kaka moke to eloko te na bisika oyo bingumba ya kala ya Palestine ezalaki. Kasi na esika oyo Yeriko ezalaki, bamonaki ete makambo ezalaki ndenge mosusu. Buku moko (Biblical Archaeology Review) elobi ete: “Longola bambɛki, biloko oyo bamonaki mingi na esika engumba yango ezalaki, ezalaki bambuma.” Ebakisi boye: “Komona bambuma mingi ndenge wana ezali mpenza kokamwisa.”

Biblia elobi ete Bayisraele bazwaki ata eloko moko te ya kolya na Yeriko mpo Yehova apekisaki bango kosala bongo. (Yosua 6:17, 18) Elobi mpe ete Bayisraele babundisaki Yeriko na eleko ya prɛnta, nsima ya eleko ya kobuka mbuma, ntango bambuma ezalaki naino mingi na engumba yango. (Yosua 3:15-17; 5:10) Ndenge bambuma ezalaki naino mingi na Yeriko nsima ya kozingama na yango endimisi biso ete bazingaki yango mpo na ntango mokuse, kaka ndenge Biblia elobi.

04-10/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 8-9

“Zwá mateya na lisolo ya Bagibeone”

it-1-F lok. 1046 par. 4

Gibeone

Esalaki kondimana ná Yosua. Na ntango ya Yosua, Bahivi oyo bazalaki kati ya bikólo nsambo ya Bakanana oyo esengelaki kobebisama, nde bazalaki kofanda na mboka Gibeone. (Mib 7:1, 2; Yos 9:3-7) Bazalaki mpe kobenga Bagibeone “Baamore,” kutu emonani ete bazalaki kobenga Bakanana nyonso na nkombo yango. (2 Sa 21:2; kokanisá mpe na Eb 10:15-18; 15:16.) Kasi na kokesana na Bakanana mosusu, Bagibeone basosolaki ete atako limpinga ya basoda na bango ezalaki na nguya mpe engumba na bango ezalaki monene, makambo nyonso oyo bakokaki kosala mpo na kobatela engumba yango ekokaki kosimba te, mpo Yehova nde azalaki kobundela Yisraele. Na yango, nsima ya kobebisama ya Yeriko mpe ya Ai, bato ya Gibeone, oyo emonani ete bazalaki bamonisi ya Kefira, Beerote mpe Kiriate-yearime, oyo ezalaki bingumba mosusu misato ya Bahivi (Yos 9:17), batindaki bato bákende epai ya Yosua na Gilgale mpo na koluka kimya. Bamonisi ya Bagibeone balataki bilamba ebebábebá mpe basandale oyo ebebábebá mpe oyo babambábambá, bamemaki milangi ya vinyo ya mposo ya nyama oyo elɛmbálɛmbá mpe epasuká mpe bakangákangá. Lisusu, bakamataki basaki oyo ebebábebá, mpe mampa oyo ekaukakauká mpe epanzanápanzaná, mpo na komonisa ete bauti na mokili moko ya mosika mpenza, oyo ezalaki te na kati ya bingumba oyo Bayisraele basengelaki kobɔtɔla. Bandimaki nguya ya Yehova na likambo oyo ekómelaki Ezipito mpe bakonzi ya Baamore Sihone ná Oge. Kasi na bwanya nyonso balobelaki te makambo oyo ekómelaki Yeriko mpe Ai, mpo emonana lokola nde nsango yango ekokaki te kokóma na ‘mokili na bango ya mosika mpenza’ liboso ya mobembo na bango. Bamonisi ya Yisraele batalelaki likambo yango, bandimaki maloba na bango, mpe basalaki kondimana ná bango mpo na kotika bango na bomoi.​—Yos 9:3-15.

w11 15/11 lok. 8 par. 14

“Kondimela mayele na yo moko te”

Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso, ata mpe bankulutu oyo baumeli mingi, tosengeli te kobosanaka kosɛnga litambwisi ya Yehova ntango tolingi kozwa bikateli. Tótala likambo oyo Yosua ná mikóló ya Yisraele basalaki ntango bato ya Gibeone oyo basalaki na mayele, balataki bilamba epasuká mpe bakosaki ete bauti na mokili moko mosika. Kozanga bátuna Yehova, Yosua ná mikóló ya Yisraele bayokanaki na bato ya Gibeone mpe basalaki na bango kondimana. Atako nsukansuka Yehova andimaki boyokani oyo basalaki, akomisaki lisolo yango na Biblia mpo tóyeba ete Yosua ná mikóló wana balukaki litambwisi na ye te.​—Yos. 9:3-6, 14, 15.

w04 15/10 lok. 18 par. 14

“Tambolá na mokili”

Batindami wana balobaki boye: “Basaleli na yo bauti na mokili moko mosika mpenza mpo na nkombo ya Yehova Nzambe na yo.” (Yosua 9:3-9) Bilamba na bango mpe biloko ya kolya ezalaki komonana lokola nde bautaki mpenza mosika, nzokande kilomɛtrɛ soki 30 mpamba nde ekabolaki Gibeone na Gilgale. Yosua ná bankumu ya Yisalaele bandimaki maloba na bango mpe bayokanaki na bato ya Gibeone ná bingumba mosusu ya pembeni oyo esanganaki na Gibeone. Tokanisi ete bato ya Gibeone basalelaki mayele wana kaka mpo bábomama te? Te, emonani ete bazalaki na mposa Nzambe ya Yisraele andima bango. Yehova andimaki bato ya Gibeone bákóma “balɔkɔti ya nkoni mpe batoki ya mai mpo na liyangani mpe mpo na etumbelo ya Yehova.” (Yosua 9:11-27) Bato ya Gibeone bakobaki kosala na esengo mosala ezangi lokumu mpo na losambo ya Yehova. Ekoki kozala ete bamosusu kati na bango bazalaki na kati ya Banetinime oyo bautaki na Babilone ntango babimaki na boombo mpe bazalaki kosala na tempelo ya sika oyo batongaki. (Ezera 2:1, 2, 43-54; 8:20) Tokoki kolanda elimo na bango soki tozali kobatela boyokani na biso ná Nzambe mpe soki tozali kondima kosala ata misala ezangi lokumu mpo na losambo na ye.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 523

Kokakisa na nzete

Na nse ya Mibeko oyo Yehova apesaki Yisraele, bato mosusu ya mabe basengelaki kobomama mpe na nsima kokakisama na nzete, lokola nde ‘Nzambe alakeli bango mabe,’ ndenge bazalaki koboma bango na miso ya bato nyonso ezalaki ndakisa mpo na kokebisa basusu. Kasi, esengelaki kokitisa ebembe ya moto oyo akakisamaki na nzete liboso butu ekɔta mpe kokunda yango; kotika ebembe ya moto yango likoló ya nzete butu mobimba ezalaki kokómisa mbindo mabele oyo Nzambe apesaki Bayisraele. (Mib 21:22, 23) Yisraele ezalaki kosalela mobeko yango ata soki moto oyo abomamaki azalaki Moyisraele te.​—Yos 8:29; 10:26, 27.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: motó ya likambo: “Mateya nini tokoki kozwa na kondimana oyo Yosua asalaki na Bagibeone”?

it-1-F lok. 76

Kondimana

Boyokani oyo bato mibale to koleka basalaka mpo na kosala to koboya kosala likambo moko; ekoki kozala elako to ndai. Liloba ya Ebre berith, esika liloba yango eutá eyebani mpenza te. Liloba yango emonani mbala koleka 280 na Makomami ya Ebre; kaka na mikanda mitano ya Moize, liloba yango esalelami mbala koleka 80. Liloba yango elimboli mpenzampenza “kondimana,” mpe ezali na boyokani na liloba oyo bato ya mibeko basalelaka lelo oyo “mokanda ya boyokani,” oyo emonanaki na bitanda ya cunéiforme oyo ezwamaki na 1927 na Qatna, engumba moko ya kala oyo ezalaki ya Yisraele te na Sudi-Ɛsti ya Hamath. “Makambo oyo bakomi na bitanda yango mibale [kati ya bitanda 15 oyo ezwamaki] ezali na yango mindɔndɔ te. Etanda A ezali na liste ya bankombo . . . Etanda B ezali na liste ya biloko . . . Na yango, liste A ezali boyokani oyo bato basali . . . mpo na kondima kokɔta na mosala ya moto moko boye to kokokisa mokumba moko boye. Kaka moto oyo akomaki liste A nde azalaki kokoma liste B, oyo ezali komonisa lolenge ya boyokani oyo basali; bato yango basengelaki kozwa bilei lokola lifuti ya mosala na bango. . . . Bato ya teoloji Yahviste bazalaki kolobela mingi ndenge Yisraele ezalaki kotalela berith to ‘kondimana.’ Awa tozali kolobela lisolo ya liboso oyo euti na Biblia te oyo elobelaki liloba yango na ntango ya kala​—kasi te nsima ya bambula 30 ya ebandeli ya siɛklɛ 14 L.T.B.”​—Bulletin of the American Schools of Oriental Research, 02/1951, lok. 22.

it-1-F lok. 81 par. 2

Kondimana

Kondimana mosusu. (a) Yosua ná bankumu ya Yisraele basalaki kondimana ná bato ya engumba Gibeone mpo na kotika bango na bomoi. Na ntembe te, bakosaki Bayisraele mpo bándima kondimana yango, atako Bagibeone bazalaki Bakanana oyo balakelamaki mabe, baoyo Bayisraele basengelaki kosilisa bango nyɛɛ. (Yos 9:3-15) Ata bongo Bayisraele batikaki Bagibeone na bomoi mpo bazalaki kozwa kondimana na lisɛki te, kasi bakómisaki bango balɔkɔti ya nkoni mpe batoki ya mai mpo na liyangani mobimba. (Yos 9:16, 19-21, 23, 27) Batosaki kondimana yango, tii na ntango moko boye na nsima, Bayisraele bandimaki kokɔtela Bagibeone mpo na kobunda na banguna na bango. (Yos 10:6, 7) (b) Yosua asalaki kondimana ná Yisraele mpo na kosalela Yehova. (Yos 24:25, 26) (c) Na Mizipa, mikóló ya Gileade basalaki kondimana ná Yefeta mpo na kokómisa ye mokonzi ya bato nyonso oyo bazalaki kofanda na Gileade, soki Yehova asalisi ye alonga Baamone. (Bas 11:8-11) (d) Yonatane ná Davidi basalaki kondimana (1Sa 18:3; 20:11-17; 23:18) oyo Saulo asepelaki na yango te mpo amonaki yango lokola basaleli ye likita mpo na koboma ye. (1Sa 22:8) (e) Hirame mokonzi ya Tire, asalaki boninga ná Davidi ntango Davidi akómaki mokonzi na esika ya mokonzi Saulo; mpo Hirame ‘azalaki kolinga Davidi.’ (2Sa 5:11 ; 1Ba 5:1) Boninga na bango ekobaki tii ntango Salomo akómaki mokonzi, Salomo asalaki kondimana ná Hirame oyo andimaki kotindela ye bisaleli ya kotonga tempelo. (1Ba 5:2-18) Na kotalela makambo oyo bakomaki na boyokani na bango, bankóto ya Bayisraele bazwaki ndingisa ya kokɔta na Libá mpe na bazamba na yango. Hirame akómaki kutu kobenga Salomo “ndeko na ngai.” (1Ba 9:13) Tire ezalaki mpe kotinda bamatelo mpo na bamasuwa ya Salomo oyo ezalaki kotɛlɛma na Ezione-gebere. (1Ba 9:26, 27) Na nsima, ntango bokonzi ya Tire etombokelaki Yisraele mpe epesaki na lobɔkɔ ya Edome Bayisraele oyo bamemamaki na mboka mopaya, balobi ete Tire etosaki te “kondimana ya bandeko.” (Am 1:9) (f) Nganga-nzambe Yehoyada asalaki kondimana ná bakonzi ya bato nkama kati na Bakari oyo bazalaki kokɛngɛla mokonzi, mpe kati na bapoti-mbangu. (2Ba 11:4; 2Nt 23:1-3) (g) Bayisraele basalaki kondimana ná Yehova mpo na kobengana basi bapaya nyonso oyo babalaki. (Ezr 10:3) (h) Yehova alaki kopesa mosaleli na ye (lokola) kondimana (mpo na) bato. (Yis 42:6; 49:8) (i) Davidi asalaki kondimana ná mikóló nyonso ya Yisraele na Hebrone. (1Nt 11:3) (j) Na boyangeli ya Asa, bato bakɔtaki na kondimana moko mpo na koluka Yehova na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba. (2Nt 15:12) (k) Yosiya asalaki kondimana ná Yehova mpo na kotosa mitindo na ye, na kotalela Mibeko. (2Nt 34:31) (l) ‘Bato ya komikumisa’ oyo bazalaki koyangela Yerusaleme bazalaki kokanisa mabe mpe koloba ete babatelami na “kondimana ná Liwa.”​—Yis 28:14, 15, 18.

11-17/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 10-11

“Yehova abundeli Yisraele”

it-1-F lok. 48

Adoni-zedeke

Mokonzi ya Yerusaleme na eleko oyo Bayisraele bazalaki kobunda mpo na kozwa Mokili ya Ndaka. Adoni-zedeke amikɔtisaki na ngámbo ya makonzi mikemike oyo ezalaki na ngámbo ya Wɛsti ya Yordani na likanisi ya kopekisa limpinga ya Yosua ekoba kobɔtɔla bingumba. (Yos 9:1-3) Nzokande, Bahivi oyo bazalaki kofanda na Gibeone basalaki kimya elongo na Yosua. Mpo azongisela Gibeone mabe, mpe apekisa bato ya bikólo mosusu bákóma banguna, Adoni-zedeke azwaki ekateli ya kosangana na bakonzi minei ya Baamore mpe batyaki kaa liboso ya Gibeone mpe babundisaki yango. Yosua abikisaki Bagibeone na ndenge ya kokamwa ntango akɔtelaki bango mpo na kobunda na banguna na bango, alongaki mampinga wana nyonso oyo esanganaki mpo na kobundisa Bagibeone; bakonzi wana mitano bakimaki na Makeda, epai bazwamaki na motambo na kati ya mobenga moko. Yosua ye moko abomaki Adoni-zedeke mpe bakonzi wana mosusu minei na miso ya basoda ya limpinga na ye, mpe akakisaki bango na banzete. Bibembe na bango ebwakamaki na mobenga yango, oyo ekómaki lilita na bango.​—Yos 10:1-27.

it-1-F lok. 1028 par. 3

Mbula ya mabanga

Yehova asalelaki yango. Na bantango mosusu, Yehova azalaki kosalela mbula ya mabanga lokola ebundeli mpo na kokokisa liloba na ye mpe mpo na komonisa ete aleki na nguya. (Nz 148:1, 8; Yis 30:30) Mbala ya liboso oyo balobeli yango, ezalaki na bolɔzi ya nsambo oyo ekwelaki Ezipito ya kala: mbula ya mabanga enɔkaki makasi, ebebisaki milona, ebukaki banzete mpe ebomaki bato ná banyama oyo bazalaki na elanga, kasi kaka na Goshene, epai bana ya Yisraele bazalaki, nde mbula ya mabanga enɔkaki te. (Kob 9:18-26; Nz 78:47, 48; 105:32, 33) Na nsima, na Mokili ya Ndaka, na litambwisi ya Yosua, ntango Bayisraele bayaki kosalisa Bagibeone, baoyo babundisamaki na mampinga ya bakonzi mitano ya Baamore, Yehova anɔkisaki mbula ya mabanga mpo na kobunda na Baamore. Na mbala oyo, bato oyo bakufaki na mbula ya mabanga bazalaki mingi koleka baoyo bana ya Yisraele babomaki na mopanga.​—Yos 10:3-7, 11.

w04 12/1 lok. 11 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua

10:13​—Ndenge nini likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema? “Mpo na Yehova, [Mozalisi ya likoló mpe ya mabele], ezali nde na likambo moko ya mpasi koleka?” (Ebandeli 18:14) Soki Yehova alingi, akoki kobongola ndenge oyo mabele ebalukaka mpe moto oyo azali awa na mabele akomona lokola nde moi ná sanza etɛlɛmi esika moko. To akoki kotika kaka mabele ná sanza ebalukaka, kasi asali ete kongɛnga ya moi mpe ya sanza emonana lokola nde ezali kaka kongɛngisa mabele. Ata soki ezalaki ndenge nini, “mokolo moko te oyo ekokani na oyo wana, ezala liboso na yango to nsima na yango” banda mokili ebandá.​—Yosua 10:14.

Biloko ya motuya ya elimo

w09 15/3 lok. 32 par. 5

Mituna ya batángi

Atako Biblia etángi mikanda mosusu mpe bakomi ya Biblia basalelaki yango mpo na kozwa makanisi, yango esengeli te kotinda biso tóloba ete mikanda yango ekomamaki na lisalisi ya elimo santu. Kasi, Yehova Nzambe abatelaki makomi nyonso oyo ezali na “liloba ya Nzambe na biso,” mpe yango “ekoumela seko.” (Yis. 40:8) Ya solo, makambo oyo Yehova aponaki mpo ekomama na mikanda 66 ya Biblia ezali oyo tosengeli na yango mpenza mpo ‘tózala bato oyo bakoki mpenza, oyo bazali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’​—2 Tim. 3:16, 17.

18-24/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 12-14

“Landá Yehova na makambo nyonso”

w04 1/12 lok. 12 par. 2

Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua

14:10-13. Atako akómaki na mbula 85, Kalebe asɛngaki mokumba monene ya kobengana bato oyo bazalaki kofanda na etúká ya Hebrone. Baanaki, oyo bazalaki bingambe ya mibali nde bazalaki kofanda na mokili yango. Na lisalisi ya Yehova, mobali yango ya etumba alongaki mpe Hebrone ekómaki engumba ya ekimelo. (Yosua 15:13-19; 21:11-13) Ndakisa ya Kalebe ezali kolendisa biso tókima te mikumba ya makasi na lisangá.

w06 1/10 nk. 18-19 par. 11

Kondima mpe kobanga Nzambe epesaki bango mpiko

Kondima ya ndenge wana etɛlɛmaka esika moko te. Ekolaka soki tozali kosalela solo na bomoi na biso, ‘komeka’ matomba na yango, ‘kososola’ biyano na mabondeli na biso mpe, na makambo mosusu, komona ete Yehova azali kotambwisa biso. (Nzembo 34:8; 1 Yoane 5:14, 15) Ntembe ezali te ete kondima ya Yosua ná Kalebe ekómaki makasi mpo bamonaki bolamu ya Nzambe. (Yosua 23:14) Na ndakisa, babikaki na mobembo ya mpasi oyo basalaki na boumeli ya mbula 40 na mokili ekauká, ndenge Nzambe alakaki bango. (Mitángo 14:27-30; 32:11, 12) Bapesaki mabɔkɔ na bitumba oyo Bayisraele babundaki na boumeli ya mbula motoba mpo na kobɔtɔla mokili ya Kanana. Nsukansuka, Yehova apesaki bango bomoi ya esengo mpe nzoto kolɔngɔnɔ, mpe mokomoko na bango azwaki libula. Ya solo mpenza, Yehova apesaka bato oyo basalelaka ye na bosembo mpe na mpiko mbano!​—Yosua 14:6, 9-14; 19:49, 50; 24:29.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 1032 par. 3

Gebale

Yehova atángaki mpe “mokili ya bato ya Gebale” na kati ya bitúká oyo Bayisraele basengelaki kozwa na mikolo ya Yosua. (Yos 13:1-5) Bato oyo bandimaka makambo wana te balobaka ete ezali na boyokani te mpo Gebale ezalaki mosika na Nɔrdi ya Yisraele (soki kilomɛtrɛ 100 na Nɔrdi ya Dani) mpe emonani lokola Yisraele eyangelaki Gebale ata mokolo moko te. Bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete ekoki kozala ete makomi ya Ebre ebebisamaki na vɛrsɛ yango mpe ete lisolo yango ezali kotángama boye: “mokili pene na Libá,” to ‘tii na ndelo ya bana ya Gebale.’ Kasi, esengeli mpe koyeba likambo oyo: Mpo bilaka ya Yehova oyo ezali na Yosua 13:2-7 ekokisama, esengelaki Bayisraele básala makambo oyo asɛngaki bango. Na yango, ekoki kozala mpo na kozanga botosi ya Yisraele nde esalaki ete ezwa Gebale soki moke te.​—Kokanisá mpe na Yos 23:12, 13.

25-31/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 15-17

“Batelá libula na yo ya motuya”

it-1-F lok. 1101 par. 2

Hebrone

Wana Bayisraele bazalaki kokoba na ngámbo ya Sudi ya Kanana, babomaki bato ya Hebrone mpe mokonzi na bango (na ntembe te mokitani ya Hohame). (Yos 10:36, 37) Atako Bayisraele oyo Yosua azalaki kokamba basilisaki nguya ya Bakanana, emonani ete batyaki basoda mbala moko te mpo na kobatela bateritware oyo bazwaki. Na yango, emonani ete Baanakime bakendaki kofanda na Hebrone, ekoki kozala ntango Bayisraele bazalaki kobunda na bisika mosusu. Yango wana, Kalebe (to bana ya Yuda oyo Kalebe azalaki kokamba) basengelaki kobɔtɔla engumba yango na nsima. (Yos 11:21-23; 14:12-15; 15:13, 14; Bas 1:10) Na ebandeli, bapesaki Hebrone na Kalebe ya libota ya Yuda, na nsima Hebrone esantisamaki mpo ekómaki engumba ya ekimelo. Esalelamaki mpe lokola moko ya bingumba ya banganga-nzambe. Kasi, “esobe ya engumba [Hebrone]” ná bamboka na yango, bapesaki yango na Kalebe mpo ezala libula na ye.​—Yos 14:13, 14; 20:7; 21:9-13.

it-2-F lok. 1097

Mosala ya makasi

Na ntango ya kala, emonani ete bazalaki kosalisa bato “mosala ya makasi” (Ebre, mas), mingimingi bato oyo bazalaki kokanga na bitumba lokola baombo. (Mib 20:11; Yos 16:10; 17:13; Est 10:1; Yis 31:8; Bil 1:1) Atako batyelaki bango bakapita ya kosalisa bango misala ya makasi mpo na konyokola bango, Bayisraele babandaki kotonga bingumba mpo ezala bisika ya kobomba biloko na Pitome mpe na Raamesese. (Kob 1:11-14) Lisusu, ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, Bayisraele batosaki te mitindo ya Yehova ya kobengana Bakanana nyonso mpe ya kobebisa bango nyɛɛ. Basalisaki Bakanana misala ya makasi lokola baombo. Yango esalaki ete Bayisraele bákóma kosala mabe mpe kosambela banzambe ya lokuta ya Bakanana. (Yos 16:10; Bas 1:28; 2:3, 11, 12) Mokonzi Salomo azalaki kobengisa baombo oyo bazalaki bakitani ya Bakanana mpo na kosalisa bango misala ya makasi, elingi koloba, Baamore, Bahiti, Baperizi, Bahivi ná Bayebusi.​—1Ba 9:20, 21.

it-1-F lok. 390 par. 4

Kanana

Atako Bakanana mingi babomamaki te na eleko oyo Bayisraele bazalaki kobunda mpo na kobɔtɔla bateritware ya Mokili ya Ndaka mpe baboyaki básalisa bango misala ya makasi, tokoki koloba ete “Yehova apesaki Yisraele mokili mobimba oyo alapaki ndai ete akopesa bankɔkɔ na bango,” oyo apesaki bango “bopemi bipai nyonso,” mpe “na elaka nyonso ya malamu oyo Yehova apesaki ndako ya Yisraele, ata moko te ezangaki kokokisama; yango nyonso ekokisamaki.” (Yos 21:43-45) Banguna oyo bazalaki zingazinga ya Bayisraele, bazalaki kobanga mpe bakokaki kosala Bayisraele mabe te; yango wana Bayisraele bazalaki na kimya. Nzambe alobaki ete akobengana Bakanana “mokemoke” mpo mokili etikala mpamba te mpe banyama ya zamba ekóma mpenza ebele te. (Kob 23:29, 30; Mib 7:22) Ata soki Bakanana bazalaká na bibundeli ya makasi ya ndenge nini, bazalaká mpe na makalo ya bitumba oyo ezali na makwangola, balongaki te kopekisa Yehova akokisa elaka na ye ata soki Bayisraele balongaki te kozwa bateritware mosusu. (Yos 17:16-18; Bas 4:13) Kutu, lisolo ya Biblia emonisi ete Bayisraele balongaki bitumba mosusu te mpo na kozanga bosembo na bango.​—Mit 14:44, 45; Yos 7:1-12.

Biloko ya motuya ya elimo

w15-F 15/7 lok. 32

Oyebaki yango?

Mokili ya Yisraele ya Kala ezalaki na banzete ebele ndenge Biblia emonisi yango?

BIBLIA elobi ete bisika mosusu na Mokili ya Ndaka ezalaki zamba mpe banzete ezalaki “ebele.” (1 Bak. 10:27; Yos. 17:15, 18) Kasi, komona ndenge bisika monene ya mokili yango ekómá lelo oyo, bato mosusu bakoki kondima likambo yango te.

Buku moko (Life in Biblical Israel) elobi boye: “Na Yisraele ya kala, zamba ezwaki esika monene koleka ndenge ezali lelo oyo.” Mokili yango ezipamaki mingimingi na banzete babengi pins d’Alep (Pinus halepensis), banzete monene babengi chênes de Palestine (Quercus calliprinos), mpe banzete monene babengi térébinthes (Pistacia palaestina). Na Shefela, etúká ya ngombangomba oyo ezali na kati ya bangomba ya Yuda mpe bokula ya Mbu ya Mediterane, epai banzete ya sikomore (Ficus sycomorus) ezalaki mpe ebele.

Buku moko (Plants of the Bible) elobi ete bitúká mosusu na Yisraele ezali ata na nzete moko te. Mpo na nini? Buku yango elobi ete makambo yango ebandaki mokemoke. Elobi boye: “Moto azali kokoba kobebisa milona oyo Nzambe asalá, mingimingi mpo na koyeisa monene mabele ya kosala bilanga mpe bisika ya koleisa banyama, kasi mpe mpo na kozwa biloko ya kotonga mpe biloko ya kopelisa mɔtɔ.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto