Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr21 Novembre nk. 1-12
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • 01-07/11
  • 08-14/11
  • 15-21/11
  • 22-28/11
  • 29/11–05/12
  • 06-12/12
  • 13-19/12
  • 20-26/12
  • 27/12–02/01
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2021
mwbr21 Novembre nk. 1-12

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

01-07/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 18-19

“Ndenge mokili ekabolamaki emonisi bwanya ya Yehova”

it-1-F lok. 933 par. 5

Ndelo

Na yango, emonani ete ntango bazalaki kokabola mabele mpo na mabota bazalaki kotalela makambo oyo mibale: kobwaka mbɛsɛ mpe bonene ya libota. Mbala mosusu, mbɛsɛ ezalaki kaka komonisa esika to teritware oyo libota mokomoko esengelaki kozwa lokola libula, ezalaki komonisa libula na esika moko boye to na esika mosusu ya mokili yango, na ndakisa, na Nɔrdi to na Sudi, na Ɛsti to na Wɛsti, na mokili patatalu ya bokula, to na etúká ya ngombangomba. Ekateli oyo mbɛsɛ ezalaki kobimisa ezalaki nde kouta epai ya Yehova, yango esalaki ete zuwa ná koswana ezala te kati na mabota. (Mas 16:33) Na ndenge yango, Nzambe azalaki mpe kotambwisa makambo mpo makambo ya libota mokomoko eyokana na esakweli oyo Yakobo asakolaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe liboso akufa. Esakweli yango ezali na Ebandeli 49:1-33.

it-1-F lok. 1107 par. 6

Libula

Libula ya mabele. Yehova nde apesaki bana ya Yisraele libula, mpe apesaki Moize bandelo ya mokili yango. (Mit 34:1-12; Yos 1:4) Bana ya Gade, bana ya Rubene mpe ndambo ya libota ya bana ya Manase bazwaki eteni na bango ya mabele oyo Moize apesaki bango. (Mit 32:33; Yos 14:3) Mabota mosusu oyo etikalaki ezwaki libula na bango ntango babwakaki mbɛsɛ na litambwisi ya Yosua mpe ya Eleazare. (Yos 14:1, 2) Na boyokani na esakweli ya Yakobo oyo ezali na Ebandeli 49:5, 7, Simeone ná Levi bazwaki libula na bango kati na libula ya mabota mosusu. Teritware ya Simeone ezalaki mokili (elongo na bingumba oyo etyamá na kati ya libula ya bato mosusu) oyo ezalaki na kati ya teritware ya mabele ya Yuda (Yos 19:1-9), wana bapesaki Levi bingumba 48 oyo ezalaki na teritware mobimba ya Yisraele. Lokola Balevi bazwaki mokumba ya kosala mosala ya sipesiale na esika mosantu, Yehova akómaki libula na bango. Bazalaki kozwa moko ya bandambo zomi ya biloko lokola biloko na bango to libula na bango mpo na mosala oyo bazalaki kosala. (Mit 18:20, 21; 35:6, 7) Bato ya mabota bazalaki kozwa libula ya mabele na kati ya teritware ya mabele ya mabota na bango. Wana mabota ezalaki kokóma monene mpe bana bazalaki kozwa libula, mabele ezalaki kokóma moke mpe mokemoke mabele yango ekómaki kokabolama lokola mapango ya mikemike mpenza.

it-1-F lok. 933 par. 6

Ndelo

Soki babwaki mbɛsɛ mpe mbɛsɛ yango elakisi teritware epai libota moko ekozala, bazalaki sikoyo kotalela likambo ya mibale: bonene ya libota. “Mpe bino bosengeli kokabola mokili yango ezala ya bino na kobwakáká mbɛsɛ, engebene mabota na bino. Moto oyo azali na bato mingi, bokobakisa libula na ye, mpe moto oyo azali na bato moke, bokokitisa libula na ye.” (Mit 33:54) Esika oyo mbɛsɛ ezalaki kolakisa, yango nde bazalaki kondima. Kasi bakokaki kokitisa bonene ya libula yango na kotalela bonene ya libota. Na ndakisa, ntango bamonaki ete eteni ya mabele ya bana ya Yuda elekaki monene, bakataki ndambo na yango mpe bapesaki yango libota ya bana ya Simeone.​—Yos 19:9.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 934 par. 1

Ndelo

Lisolo ya kokabola mabele ya teritware ya Wɛsti ya Yordani emonisi ete mbɛsɛ ebwakamaki liboso mpo na Yuda (Yos 15:1-63), Yozefe (Efraime) (Yos 16:1-10), mpe ndambo ya libota ya Manase mpo na kofanda na Wɛsti ya Yordani (Yos 17:1-13), mpo bandelo na bango mpe bingumba na bango etyamaki. Nsima na yango, emonani lokola batikaki kokabola mabele, mpo kaa ya Yisraele elongwaki na Gilgale mpo na kokende na Shilo. (Yos 14:6; 18:1) Soki yango ezwaki ntango boni eyebani te, kasi nsukansuka Yosua asembolaki mabota nsambo oyo etikalaki mpo bazalaki na gɔigɔi ya kokende kozwa ndambo ya mokili oyo etikalaki. (Yos 18:2, 3) Bato bapesaka ntina ndenge na ndenge oyo esalaki ete mabota wana nsambo ekende kozwa noki te mokili epai bakofanda. Bato mosusu balobaka ete mbala mosusu biloko ebele oyo bapunzaki na ntango ya etumba mpe kimya ya ntango mokuse oyo bazalaki na yango mpo Bakanana babundisaki bango te nde esalaki ete mabota wana nsambo bálɛmbisa mabɔkɔ mpo na kokende kozwa libula na bango na eteni ya teritware oyo etikalaki. Mabota yango emonaki te ntina ya kokende kobunda na bisanga ya mikemike oyo ekokaki kotɛmɛla bango, mbala mosusu yango nde esalaki ete bákende noki te kozwa mokili yango. (Yos 13:1-7) Longola oyo wana, mbala mosusu bayebaki mpenza malamu te eteni wana ya Mokili ya Ndaka epai basilaki kokabola.

08-14/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 20-22

“Zwá mateya na likambo ya kokanisela basusu mabe”

w06 15/4 lok. 5 par. 3

Ndenge nini kosolola malamu na molongani na yo?

Soki bato bazali kosolola malamu, esalaka ete báyebana malamu mpe moko te akanisela moninga mabe. Ntango Bayisraele bakómaki na Mokili ya Ndaka, mabota oyo efandaki na ɛsti ya Ebale Yordani, elingi koloba libota ya Rubene, ya Gade, mpe ndambo ya libota ya Manase, batongaki “etumbelo moko monene, oyo ezalaki komonana polele.” Mabota mosusu bayebaki te ntina oyo batongaki etumbelo yango. Lokola bakanisaki ete bato ya mabota yango bapɛngwi, bazwaki ekateli ya kokende kobundisa bango. Kasi, liboso bákende na etumba, batindaki bato mpo na kosolola na mabota oyo batongaki etumbelo. Likambo oyo basalaki ezalaki malamu mpenza! Bato ya bikólo yango bayebisaki bango ete etumbelo yango ezalaki te mpo na kopesa banzambe mosusu mbeka. Balingaki te ete mokolo mosusu bandeko na bango ya mabota mosusu báloba na bango ete: “Bozali na eloko moko te oyo esangisi bino ná Yehova.” Etumbelo wana ezalaki lokola litatoli ete bango mpe bazali basambeli ya Yehova. (Yosua 22:10-29) Babengaki etumbelo yango Litatoli, na ntembe te mpo ezalaki kotatola ete mpo na bango mpe, Yehova azali Nzambe ya solo.​—Yosua 22:34.

w08 15/11 lok. 18 par. 5

“Tólanda makambo oyo epesaka kimya”

Ekoki kozala ete Bayisraele mosusu bakanisaki ete etumbelo yango etongamaki kaka mpo na losambo ya bikeko, mpe ete soki bakɔteli bango na mbalakaka, bato ya ngámbo na bango bakokufa mingi te. Na esika ya kowelela kaka kokende kobunda na bango, mabota oyo ezalaki na wɛsti ya Yordani etindaki naino bato bákende kosolola na bandeko na bango. Batunaki bango boye: “Likambo nini ya kozanga bosembo boye bosaleli Nzambe ya Yisraele, na ndenge bopesi Yehova mokɔngɔ lelo?” Nzokande, mabota wana oyo etongaki etumbelo epesaki Nzambe mokɔngɔ te. Kasi, basalaki nini liboso ya efundeli wana? Babandaki nde koswanisa bandeko na bango oyo bafundaki bango to baboyaki kosolola na bango? Mabota wana ya Yisraele bayanolaki na motema mpiɔ, bamonisaki polele ete batongaki etumbelo wana mpo na losambo ya Yehova. Eyano na bango esalisaki bango bábungisa te boyokani na bango ná Nzambe mpe makila etanga te. Kosolola na motema mpiɔ esalisaki bango báyokana mpe kimya ezongaki.​—Yos. 22:13-34.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 390 par. 4

Kanana

Atako Bakanana mingi babomamaki te na eleko oyo Bayisraele bazalaki kobunda mpo na kobɔtɔla bateritware ya Mokili ya Ndaka mpe baboyaki básalisa bango misala ya makasi, tokoki koloba ete “Yehova apesaki Yisraele mokili mobimba oyo alapaki ndai ete akopesa bankɔkɔ na bango,” oyo apesaki bango “bopemi bipai nyonso,” mpe “na elaka nyonso ya malamu oyo Yehova apesaki ndako ya Yisraele, ata moko te ezangaki kokokisama; yango nyonso ekokisamaki.” (Yos 21:43-45) Banguna oyo bazalaki zingazinga ya Bayisraele, bazalaki kobanga mpe bakokaki kosala Bayisraele mabe te; yango wana Bayisraele bazalaki na kimya. Nzambe alobaki ete akobengana Bakanana “mokemoke” mpo mokili etikala mpamba te mpe banyama ya zamba ekóma mpenza ebele te. (Kob 23:29, 30; Mib 7:22) Ata soki Bakanana bazalaká na bibundeli ya makasi ya ndenge nini, bazalaká mpe na makalo ya bitumba oyo ezali na makwangola, bakokaki kolonga te kopekisa Yehova akokisa elaka na ye ata soki Bayisraele balongaki te kozwa bateritware mosusu. (Yos 17:16-18; Bas 4:13) Kutu, lisolo ya Biblia emonisi ete Bayisraele balongaki bitumba mosusu te mpo na kozanga bosembo na bango.​—Mit 14:44, 45; Yos 7:1-12.

15-21/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOSUA 23-24

“Yosua akebisi ekólo mobimba mpo na mbala ya nsuka”

it-1-F lok. 82 par. 2

Kondimana

Likambo ezalaki ndenge mosusu ntango ekólo ya Yisraele ekɔtaki na Kanana, Mokili ya Ndaka. Na boyokani na elaka oyo apesaki bankɔkɔ na bango, Nzambe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso apesaki bana ya Yisraele lotomo ya kozwa mokili yango. Yango wana, bakɔtaki kuna te mpo na kofanda lokola bapaya, mpe Yehova apekisaki bango básala kondimana ya libala elongo na bikólo ya bapakano na mokili yango. (Kob 23:31-33; 34:11-16) Basengelaki kaka kotosa Mibeko ya Nzambe mpe mitindo na ye, kasi te mibeko ya bikólo oyo basengelaki kobengana yango. (Le 18:3, 4; 20:22-24) Yehova akebisaki bango mingimingi mpo na kosala kondimana ya libala elongo na bikólo yango. Kondimana ya ndenge wana ekosala ete bákangama kaka te na basi bapakano, kasi mpe na bandeko na bango ya mabota mpe mimeseno na bango ya mangomba ya lokuta mpe mimeseno na bango mosusu ya bapakano, mpe yango ekosala ete bápɛngwa mpe bákwea na motambo.​—Mib 7:2-4; Kob 34:16; Yos 23:12, 13.

w07 1/11 lok. 26 par. 19-20

Liloba ya Yehova ezangaka kokokisama te

19 Na ntembe te, makambo oyo tomoni na miso esengeli kotinda biso tóloba: “Ata liloba moko te ezangaki kokokisama na maloba malamu nyonso oyo Yehova Nzambe alobaki na bino. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te na kati na yango ezangaki kokokisama.” (Yosua 23:14) Yehova abikisaka, abatelaka mpe asungaka basaleli na ye. Okoki kotánga ata elaka na ye moko oyo azangaki kokokisa na ntango na yango? Soki moke te. Tokomonisa mpenza bwanya soki tozali kotyela Liloba ya Nzambe motema.

20 Ezali boni mpo na mikolo ekoya? Yehova alaki ete mingi kati na biso bakoki kozala na bomoi awa na mabele oyo ekobongwana paradiso. Mwa ndambo bazali na elikya ya kokende koyangela elongo na Kristo na likoló. Ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele to ya kokende na likoló, tozali mpenza na ntina ya kotikala sembo lokola Yosua. Ata ndɛlɛ, elikya na biso ekokokisama. Na ntango wana, soki tokanisi lisusu bilaka nyonso oyo Yehova apesá biso, tokoloba mpe ete: “Yango nyonso ekokisamaki.”

Biloko ya motuya ya elimo

w04 1/12 lok. 12 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua

24:2​—Tera, tata ya Abrahama azalaki nde kosambela bikeko? Liboso, Tera azalaki kosambela Yehova Nzambe te. Ekoki kozala ete azalaki kosambela nzambe-sanza na nkombo Sine​—nzambe oyo bato mingi ya Ure bazalaki kosambela. Na kolanda lisolo ya bonkɔkɔ ya Bayuda, ekoki kozala ete Tera azalaki kutu kosala bikeko. Kasi ntango Abrahama alongwaki na Ure ndenge Nzambe asɛngaki ye, Tera akendaki elongo na ye na Harane.​—Ebandeli 11:31.

22-28/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 1-3

“Ndakisa moko ya mpiko mpe ya kokamwisa”

w04 15/3 lok. 31 par. 3

Ehude alongaki banyokoli na bango

Soki mikano ya Ehude elongaki, ezalaki mpo na mayele na ye moko te, ezalaki mpe te mpo banguna na ye bazangaki mayele. Makambo ya bato te nde ekoki kopekisa mokano ya Nzambe ekokisama. Ntina ya liboso oyo Ehude alongaki ezali ete Nzambe azalaki na ye, mpamba te azalaki kosala makambo na boyokani na mokano na Ye ya kobikisa bato na ye oyo moto moko te akokaki kopekisa yango. Nzambe atɛlɛmisaki Ehude, “mpe ntango Yehova azalaki kobimisela bango basambisi, Yehova azalaki elongo na mosambisi mokomoko.”​—Basambisi 2:18; 3:15.

w04 15/3 lok. 30 par. 1-3

Ehude alongaki banyokoli na bango

Libosoliboso, Ehude abongisaki naino “mopanga” ya mokuse epelisami bipai nyonso mibale, oyo akokaki kobomba na nse ya bilamba na ye. Ayebaki ete mbala mosusu bakɛngɛli bakoluka soki azali na ebundeli. Mingimingi, bazalaki kotya mopanga na lobɔkɔ ya mwasi, epai moto ya lobɔkɔ ya mobali akokaki kobimisa yango nokinoki. Lokola Ehude azalaki moto ya lobɔkɔ ya mwasi, abombaki ebundeli na ye “na ebɛlɔ na ye ya mobali na nse ya bilamba na ye,” esika oyo bakɛngɛli ya mokonzi bakokaki mbala mosusu kokanisa koluka te. Yango wana, alekaki bakɛngɛli mpe akɔtaki na ndako ya mokonzi mpe “apesaki Eglone mokonzi ya Moabe mpako.”​—Basambisi 3:16, 17.

Biblia elobi te makambo nyonso oyo elekaki ntango bakómaki na ndako ya Eglone. Biblia elobi kaka boye: “Ntango asilisaki kopesa mpako, atikaki bato oyo bamemaki mpako bákende.” (Basambisi 3:18) Ehude apesaki mokonzi mpako mpe bazongaki nzela moko na bato oyo bamemaki yango tii bakómaki mosika banda na ndako ya Eglone, bipai oyo bakokaki lisusu kozwa bango te soki balandi bango; nsima ya kokabwana na bango, azongaki lisusu epai ya Eglone. Mpo na nini? Akendaki na bato wana mpo bábatela ye, mpo mokonzi amona batindami mingi oyo bayei kotikela ye mpako, to bamemaki kaka biloko oyo bakendaki na yango epai ya mokonzi? Mpe Ehude alukaki nde bázala na likama te ntango akokokisa mokano na ye? Ata soki Ehude akanisaki nini, azalaki na mpiko mpe azongaki kaka ye moko.

“[Ehude] azongaki ntango akómaki na bisika batimolaka mabanga oyo ezalaki pene na Gilgale, mpe alobaki boye: ‘Ee mokonzi, nazali na liloba moko ya koyebisa yo, ezali sekele.’” Biblia elobi te oyo asalaki mpo na kokutana lisusu na mokonzi. Bakɛngɛli bakokaki te kozala na makanisi mabe mpo na ye? Bakanisaki nde ete Moyisraele oyo azali kaka ye moko akokaki kosala mokonzi mabe te? Ndenge oyo Ehude akendeki kaka ye moko epesaki nde bango likanisi ete alingi kotɛka bato ya ekólo na ye? Na ndenge nyonso, Ehude alukaki nde kosolola na mokonzi na esika ya bango mibale kaka mpe asalaki yango.​—Basambisi 3:19.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 15/1 lok. 25 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya Basambisi

2:10-12. Tosengeli kozala na momeseno ya koyekolaka Biblia mpo ‘tóbosana te misala nyonso ya [Yehova].’ (Nzembo 103:2) Baboti basengeli kokɔtisa solo ya Liloba ya Nzambe na mitema ya bana na bango.​—Kolimbola Mibeko 6:6-9.

29/11–05/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 4-5

“Yehova asaleli basi mibale mpo na kosikola basaleli na ye”

w15 1/8 nk. 12-13 par. 6

“Natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele”

Nkombo Sisera mpamba, ezalaki kobangisa Bayisraele makasi. Lingomba mpe bonkɔkɔ ya Bakanana ezalaki kobangisa, ezalaki na makambo lokola kopesa bana mbeka mpe kindumba na tempelo. Makambo ezalaki ndenge nini lokola mokonzi ya basoda Mokanana mpe basoda na ye nde bazalaki kokonza? Loyembo ya Debora emonisi ete bato bazalaki kosala lisusu mibembo te mpe moto moko te azalaki kofanda lisusu na bamboka ya Yisraele. (Basambisi 5:6, 7) Tokoki komona na makanisi ndenge bato bazalaki kolɛnga na kobanga na nse ya banzete mpe bangomba, kobanga mpo na kosala bilanga to kofanda na bamboka oyo ezangá bifelo mpe kobanga kotambola na banzela ya polele noki bábundisa bango, bákanga bana na bango mpe básangisa ná basi na bango nzoto na makasi.

w15 1/8 lok. 13 par. 1

“Natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele”

Monyoko yango eumelaki mbula 20 tii ntango Yehova amonaki ete bato na ye ya motó makasi bandimaki kobongwana to ndenge loyembo ya Debora ná Barake elobi, “tii ntango ngai Debora natɛlɛmaki, tii ntango ngai natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele.” Toyebi te soki Debora, mwasi ya Lapidote abotaki mpenza bana, kasi maloba yango ezalaki nde ya elilingi. Kutu, Yehova apesaki Debora mokumba ya kobatela ekólo yango ndenge mama abatelaka bana na ye. Apesaki ye mokumba ya kobenga mosambisi Barake, mobali moko ya kondima makasi mpe koyebisa ye atɛmɛla Sisera.​—Basambisi 4:3, 6, 7; 5:7.

w15 1/8 lok. 15 par. 1

“Natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele”

Yaele asengelaki kokanisa nokinoki. Apesaki Sisera esika ya kopema. Sisera ayebisaki ye ete moto nyonso oyo akoluka ye, aloba na ye ete azali te. Azipaki ye ntango alalaki mpe ntango asɛngaki ye mai, Yaele apesaki ye miliki. Eumelaki te Sisera alalaki mpɔngi makasi. Na nsima, na mayele nyonso, Yaele azwaki bisaleli mibale oyo basi oyo bafandaka na bahema bazalaki kosalela mbala mingi; pike mpe marto. Apusanaki pene ya motó ya Sisera mpe mokumba monene ya kosala lokola moto oyo Yehova azali kosalela mpo na kopesa etumbu ezalaki liboso na ye. Ata mwa kokakatana moke ekokaki kozala likama mpo na ye. Akanisaki libota ya Nzambe mpe ndenge oyo mobali yango anyokolaki bango na boumeli ya bambula ebele? To akanisaki nde libaku oyo azwaki ya komitya na ngámbo ya Yehova? Lisolo yango elobeli yango te. Toyebi kaka ete akokisaki mokumba yango nokinoki. Sisera akufaki!​—Basambisi 4:18-21; 5:24-27.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 15/1 lok. 25 par. 6

Makanisi ya ntina na mokanda ya Basambisi

5:20​—Ndenge nini minzoto ya likoló ebundelaki Barake? Biblia elobi te soki ezali baanzelu nde babundelaki ye, to mbula ya mabanga oyo, mpo na bato ya mayele ya Sisera bamonaki ete ezali lisuma to libabe mpo na bango, to mpe minzoto oyo Sisera azalaki kotalela mpo na koyeba makambo oyo ekoya nde ekosaki ye. Kasi, ntembe ezali te ete ezala na ndenge nini, Nzambe asalisaki basoda ya Yisraele mpo bálonga.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: motó ya likambo: “Na ndenge nini basi basengeli ‘kofanda nyɛɛ na masangá’”?

w06 1/3 nk. 28-29

Mituna ya batángi

Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete basi basengeli “kofanda nyɛɛ na kati ya masangá”?

Paulo akomelaki bakristo ya lisangá ya korinti ete: “Lokola na masangá nyonso ya basantu, basi báfanda nyɛɛ na masangá, mpo bapesi bango nzela ya koloba te.” (1 Bakorinti 14:33, 34) Mpo tósimba maloba wana ya Paulo malamumalamu, tótalela mokapo ya 14 mobimba.

Na 1 Bakorinti mokapo ya 14, Paulo alobelaki makambo etali makita ya lisangá ya bokristo. Amonisaki makambo oyo tosengeli kolobelaka na makita yango mpe apesaki toli ndenge makita yango esengeli kotambwisama. (1 Bakorinti 14:1-6, 26-34) Lisusu, amonisaki ntina ya makita ya bokristo, elingi koloba “mpo lisangá etongama.”​—1 Bakorinti 14:4, 5, 12, 26.

Toli ya Paulo oyo ete, “báfanda nyɛɛ” ezali komonana mbala misato na 1 Bakorinti mokapo ya 14. Na esika yango mokomoko, toli epesameli na bituluku ekeseni ya bato na kati ya lisangá, kasi na bisika yango nyonso, alobi yango mpo na ntina moko ete “makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”​—1 Bakorinti 14:40.

Ya liboso, Paulo alobaki boye: “Soki moto moko azali koloba na monɔkɔ moko boye, esuka na bato mibale to misato kaka, mpe moto na moto na ngala na ye; mpe moto moko abongola. Kasi soki mobongoli azali te, moto wana afanda nyɛɛ na lisangá mpe aloba na ye moko mpe na Nzambe.” (1 Bakorinti 14:27, 28) Yango emonisi te ete moto yango asengelaki te koloba na makita, kasi ezalaki nde na bantango mosusu oyo asengelaki kofanda nyɛɛ. Kutu, mokano ya makita oyo ezali ya kolendisana, ekokaki kokokisama te soki moto yango alobaka na monɔkɔ oyo moto ata moko te akokaki koyoka.

Ya mibale, Paulo akomaki boye: “Basakoli mibale to misato báloba, mpe bamosusu básosola ndimbola. Kasi soki emoniseli moko eyei epai ya moto mosusu ntango afandi wana, oyo ya liboso afanda nyɛɛ.” Maloba yango ezalaki komonisa te ete bapekisaki moto wana ya liboso kosakola na lisangá, kasi asengelaki nde kofanda nyɛɛ na bantango mosusu. Na nsima, moto oyo azali na emoniseli ya kokamwa akokaki koyebisa yango na lisangá mpe mokano ya makita oyo ezali ete “bato nyonso bálendisama” ekokisama.​—1 Bakorinti 14:26, 29-31.

Ya misato, Paulo ayebisaki kaka basi bakristo boye: “Basi báfanda nyɛɛ na masangá, mpo bapesi bango nzela ya koloba te, kasi bámikitisa, ndenge Mibeko elobi.” (1 Bakorinti 14:34) Mpo na nini Paulo apesaki basi bakristo toli wana? Mpo makambo esalema na molɔngɔ na lisangá. Alobi boye: “Na yango, soki balingi koyeba likambo moko boye, bátuna mibali na bango moko na ndako, mpo ezali nsɔni mwasi aloba na lisangá.”​—1 Bakorinti 14:35.

Ekoki kozala ete bandeko basi mosusu bazalaki kotya ntembe makasi na makambo oyo ezalaki kolobama na kati ya lisangá. Toli ya Paulo esalisaki bandeko basi báboya elimo wana ya mobulu mpe bándima na komikitisa nyonso etɛlɛmɛlo na bango na kati ya ebongiseli ya Yehova oyo etali bokonzi, mingimingi mpo na oyo etali mibali na bango. (1 Bakorinti 11:3) Lisusu, ntango bandeko basi bazalaki kofanda nyɛɛ bazalaki komonisa ete bazali na mposa te ya kokóma bateyi na kati ya lisangá. Ntango Paulo akomelaki Timote, amonisaki ete ezali malamu te mwasi ateya na kati ya lisangá: “Nazali kopesa mwasi nzela ya koteya te, to ya kozala na bokonzi likoló ya mobali te, kasi nde ya kofanda nyɛɛ.”​—1 Timote 2:12.

Yango emonisi nde ete mwasi mokristo asengeli ata moke te koloba na makita ya bokristo? Te. Na mikolo ya Paulo, ekoki kozala ete elimo santu ezalaki kotinda basi bakristo na mabaku mosusu bábondela to básakola na kati ya lisangá. Na mabaku wana, mpo na komonisa ete bazalaki koyeba esika na bango, bazalaki kozipa motó. (1 Bakorinti 11:5) Lisusu, ezala na mikolo na Paulo to mpe oyo ya biso, bandeko basi mpe bandeko mibali balendisami na koyambola elikya na bango. (Baebre 10:23-25) Longola koyambola elikya na bango na mosala ya kosakola, bandeko basi bayambolaka mpe elikya na bango mpe balendisaka basusu na makita ntango bapesaka biyano oyo ebongisami malamu soki baponi bango, mpe ntango bandimaka kosala bilakiseli na likita ya mosala to masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.

Na yango, basi bakristo ‘bafandaka nyɛɛ’ mpo básala te makambo oyo ezali mpo na ndeko mobali mpe báteya lisangá te. Batyanaka ntembe te na bandeko mibali oyo bazali na mokumba ya koteya na lisangá. Soki bazali kokokisa mokumba na bango na kati ya lisangá, basi bakristo bakosala ete kimya ezala mpe “makambo nyonso [na makita ya lisangá] esalema mpo na kotonga.”​—1 Bakorinti 14:26, 33.

06-12/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 6-7

“Kende na nguya oyo ozali na yango”

w02 15/2 lok. 7 par. 1

Mitinda ya Nzambe ekoki komemela yo matomba

Moto moko oyo azalaki na ezaleli oyo ebongi, oyo mpe ayebaki komitalela na ndenge oyo ebongi ezalaki Gideone; ye azalaki mosambisi moko ya Baebre na ntango ya kala. Alukaki te ete bátya ye mokambi ya Yisraele. Kasi, ntango baponaki ye mpo azala mokambi, Gideone amonisaki ete akoki na mokumba yango te. Alobaki boye: “Libota na ngai ezali libota oyo eleki moke na kati ya Manase, mpe ngai nazali moto oyo aleki moke na ndako ya tata na ngai.”​—Basambisi 6:12-16.

w05 15/7 lok. 16 par. 3

“Mopanga ya Yehova mpe ya Gideona!”

Bamidiane bakomona likambo moko ya nsɔmɔ sikoyo! Na mbala moko, makɛlɛlɛ ekɔti ntango basoda 300 babuki bambɛki na bango, bayuli maseke mpe bagangi makasi. Ntango bayoki bato yango bagangi “mopanga ya Yehova mpe ya Gideone!,” Bamidiane basutuki mpe babandi koganga; yango ebakisi lisusu makɛlɛlɛ. Lokola Bamidiane babulungani, moto na moto azali koyeba te nani monguna. Basoda 300 batɛlɛmi bisika na bango ntango Nzambe asali ete banguna bábanda kobomana na mipanga na bango moko. Basoda nyonso bapalangani, nzela ya kokima ezali te, mpe bato ya Gideone balandi banguna oyo bakimi mpe babomi bango mingi; na ndenge yango, Bayisraele bazali lisusu kobanga Bamidiane te. Mpasi oyo Bamidiane bamonisi Bayisraele ekómi na nsuka na yango.​—Basambisi 7:19-25; 8:10-12, 28.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 15/1 lok. 26 par. 6

Makanisi ya ntina na mokanda ya Basambisi

6:25-27. Gideone asalelaki mayele mpo na koboya kotumola nkanda ya banguna na ye kaka mpamba. Ntango tozali kosakola nsango malamu, tosengeli kokeba ete elobeli na biso esilikisa bato te.

13-19/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 8-9

“Komikitisa eleki mpenza lolendo”

w00 15/8 lok. 25 par. 4

Osalaka ndenge nini mpo na kosilisa matata?

Lokola azalaki na etumba makasi na Bamidiane, Gideone abengaki bato ya libota ya Efraime báya kosalisa ye. Kasi, ntango etumba esilaki, bato ya libota ya Efraime babalukelaki Gideone mpe basilikaki mpo abengaki bango na ebandeli ya etumba te. Lisolo elobi ete “balukaki koswanisa ye makasi.” Gideone apesaki eyano oyo: “Eloko nini nasali koleka bino? Mosala ya kolɔkɔta mbuma ya vinyo oyo Efraime asali eleki mosala ya kobuka mbuma ya vinyo oyo Abi-ezere asali, boye te? Na lobɔkɔ na bino nde Nzambe apesaki Orebe ná Zeebe, bakonzi ya Midiane, bongo eloko nini ngai nalongaki kosala koleka oyo ya bino?” (Basambisi 8:1-3) Lokola aponaki maloba ya malamu, oyo ekitisaka bato motema, Gideone apekisaki etumba oyo elingaki koboma bato mingi na kati ya mabota na bango mibale. Ekoki kozala ete bato ya Efraime bazalaki komipesa lokumu mingi mpe bazalaki na lolendo. Kasi, yango epekisaki Gideone te na koluka ete makambo esuka na kimya. Biso mpe tokoki kosala bongo, boye te?

w17.01 nk. 20-21 par. 15

Bopɔlɔ esilá ngala?

15 Gideone azali ndakisa malamu mpenza ya komonisa bopɔlɔ. Ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kobikisa Bayisraele na mabɔkɔ ya Bamidiane, alobaki: “Libota na ngai ezali libota oyo eleki moke na kati ya Manase, mpe ngai nazali moto oyo aleki moke na ndako ya tata na ngai.” (Basambisi 6:15) Kasi Gideone atyelaki Yehova motema mpe andimaki mokumba yango. Na nsima, Gideone asalaki makasi akanga ntina ya makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki ye mpe abondelaki mpo na kosɛnga litambwisi na ye. (Basambisi 6:36-40) Gideone azalaki mobali makasi mpe ya mpiko, kasi azalaki mpe na bwanya mpe na bokɛngi. (Basambisi 6:11, 27) Na nsima, ntango bato ya ekólo balingaki ete akóma mokonzi na bango, aboyaki. Nsima ya kosala nyonso oyo Yehova asɛngaki ye, azongaki epai na ye.​—Basambisi 8:22, 23, 29.

w08 15/2 lok. 9 par. 9

Tambolá na banzela ya Yehova

9 Mpo na kozala baninga ya Nzambe, tosengeli kozala na “elimo ya komikitisa.” (1 Pet. 3:8; Nz. 138:6) Lisolo oyo ezali na Basambisi mokapo 9 emonisi ntina ya kozala na komikitisa. Yotama, mwana ya Gideone, alobaki boye: “Ezalaki mokolo moko, banzete ekendaki kotya nzete moko mafuta mpo ezala mokonzi na bango.” Alobelaki nzete ya olive, ya figi, mpe ya vinyo. Banzete yango elimbolaki bato malamu oyo baboyaki koyangela bandeko na bango Bayisraele. Kasi, nkamba ya nzubɛ, oyo basalelaka lokola nkoni, elimbolaki boyangeli ya Abimeleke, moto ya lolendo mpe mobomi, oyo azalaki koluka koyangela basusu. Atako Abimeleke “akonzaki Yisraele na lofundo mbula misato,” akufaki mobesu. (Bas. 9:8-15, 22, 50-54) Eleki malamu kozala na “elimo ya komikitisa”!

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 784 par. 5

Efode, I

Atako Gideone asalaki efode na likanisi malamu mpo na kopesa Nzambe lokumu mpe kokanisa elonga oyo apesaki Yisraele, efode yango “ekómelaki Gideone ná bato ya ndako na ye motambo,” mpamba te Bayisraele basalaki pite na elimo ntango bazalaki kosambela yango. (Bas 8:27) Kasi, Biblia elobi te ete Gideone ye moko azalaki kosambela yango; kutu, ntoma Paulo atángi nkombo na ye na kati ya “lipata monene” ya batatoli ya sembo ya Yehova ya ntango ya kala.​—Ebr 11:32; 12:1.

20-26/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 10-12

“Yefeta​—Moto ya elimo”

w16.04 lok. 5 par. 9

Nzambe andimaka moto oyo azali sembo

9 Na ntembe te, ndakisa ya Yozefe esalisaki Yefeta. Ayekolaki ndenge oyo Yozefe alimbisaki bandeko na ye, atako bango bayinaki ye. (Ebandeli 37:4; 45:4, 5) Mbala mosusu, kokanisa ndakisa yango esalisaki Yefeta asala makambo na ndenge oyo esepelisaki Yehova. Makambo oyo bandeko ya Yefeta basalaki epesaki ye mpasi mpenza. Kasi kobunda mpo na nkombo ya Yehova mpe mpo na basaleli na ye ezalaki na ntina mingi koleka ndenge oyo Yefeta azalaki komiyoka. (Basambisi 11:9) Azalaki na ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova. Mpo na yango, Yehova apambolaki Yefeta mpe Bayisraele.​—Baebre 11:32, 33.

it-2-F lok. 1202 par. 6

Yefeta

Yefeta, mobali ya mpiko, azwaki ekateli ya kosala likambo moko nokinoki. Atindelaki mokonzi ya Baamone nsango mpe amonisaki ete ye nde azali kobundisa Yisraele mpo na kozwa mabele na yango. Mokonzi yango alobaki ete Yisraele ezwaki mokili ya Baamone. (Bas 11:12, 13) Na yango, Yefeta amonisaki ete azalaki kaka te mobundi mabe to oyo ayebi makambo te, kasi ayekolaki malamumalamu masolo ya kala, mpe mingimingi boyokani oyo Nzambe asalaki ná basaleli na ye. Aboyaki kondima makambo oyo mokonzi ya Baamone alobaki, mpe amonisaki ete (1) Yisraele etumolaki te Baamone, Bamoabe, to Baedome (Bas 11:14-18; Mib 2:9, 19, 37; 2Nt 20:10, 11); (2) Baamone bafandaki te na mabele oyo bazalaki kowelana mpo na yango ntango Bayisraele bazalaki kobunda mpo na kozwa Mokili ya Ndaka, mpamba te ezalaki mokili ya Baamore, bato ya Kanana nde bazalaki kofanda kuna mpe Nzambe apesaki mokonzi na bango, Sihone, mpe mokili na ye na lobɔkɔ ya Yisraele; (3) esilaki koleka mbula 300 banda Bayisraele bazalaki kofanda na esika yango mpe Bayisraele bawelaná ata mokolo moko te ná Baamone mpo na esika yango; na yango, mpo na nini Baamone bazalaki kosɛnga mabele yango na ntango wana?​—Bas 11:19-27.

it-2-F nk. 1202-1203 par. 7

Yefeta

Yefeta alobelaki mama ya likambo oyo esalaki ete bázala na matata, ezalaki likambo ya losambo. Alobaki ete Yehova Nzambe apesaki Yisraele mokili yango mpe mpo na yango, basengelaki ata moke te kotikela basambeli ya nzambe ya lokuta esika. Abengaki Kemoshe nzambe ya bana ya Amone. Bato mosusu bakanisaka ete asalaki libunga. Kasi, ata soki ezali solo ete Baamone bazalaki kosambela nzambe Milikome, mpe ete Kemoshe azalaki nzambe ya Bamoabe, bikólo wana nyonso bazalaki kosambela banzambe ebele. Ata Salomo asalaki libunga moko monene ntango akɔtisaki losambo ya Kemoshe na Yisraele mpo na basi na ye oyo bazalaki bapaya. (Bas 11:24; 1Ba 11:1, 7, 8, 33; 2Ba 23:13) Longola yango, mpo na bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia liloba “Kemoshe” ekoki kolimbola “molongi, mobɔtɔli-mboka.” (Talá Hebräisches und chaldäisches Handwörterbuch über das Alte Testament, par W. Gesenius, Leipzig, 1857, tome 5, vol. 1, lok. 414.) Emonani lokola Yefeta abendaki likebi likoló ya nzambe yango, mpamba te Baamone bazalaki koloba ete azalaki na nguya ya ‘kolonga’ to ya ‘kobɔtɔla bamboka’ mpe kopesa bango yango.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 1201

Yefeta

Yefeta azalaki te mwana ya makango. Mama ya Yefeta azalaki “mwasi ya ndumba,” kasi yango emonisi te ete Yefeta azalaki to abotamaki mwana ya makango. Mama na ye azalaki mwasi ya ndumba liboso abalana ná Gileade lokola mwasi ya mibale, kaka ndenge Rahaba azalaki mwasi ya ndumba liboso abalana ná Salemone. (Bas 11:1; Yos 2:1; Mt 1:5) Lokola Yefeta azalaki mwana ya makango te, yango emonisi ete bandeko na ye oyo babotamaki na mwasi ya liboso ya Gileade babenganaki ye mpo azwa libula elongo na bango te. (Bas 11:2) Lisusu na nsima, Yefeta akómaki mokambi ya bato ya Gileade oyo bakokaki lisusu kowangana ye te (epai emonani lokola bandeko ya Yefeta bazalaki bato ya lokumu). (Bas 11:11) Longola yango, apesaki Nzambe mbeka na tabernakle. (Bas 11:30, 31) Makambo wana nyonso ekokaki kosalema te na moto oyo azali mwana ya makango, mpo mibeko elobaki polele ete: “Mwana moko te ya makango akoki kokɔta na lisangá ya Yehova. Ata na libota ya zomi, moko te na kati ya bana na ye akoki kokɔta na lisangá ya Yehova.”​—Mib 23:2.

27/12–02/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 13-14

“Baboti, bózwa mateya na lisolo ya Manoa ná mwasi na ye”

w13 15/8 lok. 16 par. 1

Baboti​—Bóteya bana na bino banda bomwana

Tótalela ndakisa ya mobali moko ya libota ya Dani na nkombo Manoa, oyo azalaki kofanda na engumba Zora, na Yisraele. Anzelu ya Yehova ayebisaki mwasi ya Manoa oyo azalaki ekomba ete akobota mwana mobali. (Bas. 13:2, 3) Na ntembe te, Manoa moto ya sembo ná mwasi na ye basepelaki mingi na nsango yango. Kasi, bamitungisaki mpe mingi. Yango wana, Manoa abondelaki ete: “Limbisá ngai, Yehova. Nabondeli yo, tiká moto ya Nzambe ya solo oyo outi kotinda aya lisusu epai na biso mpe alakisa biso nini tosengeli kosalela mwana oyo akobotama.” (Bas. 13:8) Manoa ná mwasi na ye bazalaki komitungisa mpo na ndenge ya kobɔkɔla mwana na bango. Na ntembe te, bateyaki mwana na bango Samsone mibeko ya Nzambe, mpe emonani ete milende na bango ebotaki mbuma malamu. Biblia elobi boye: “Na nsima, elimo ya Yehova ebandaki kotinda [Samsone].” Mpo na yango, Samsone asalaki misala mingi ya nguya na eleko oyo azalaki mosambisi na Yisraele.​—Bas. 13:25; 14:5, 6; 15:14, 15.

w05 15/3 nk. 25-26 par. 5

Samasona alongi na makasi ya Yehova!

Ntango Samsone azalaki kokola, “Yehova azalaki ntango nyonso kopambola ye.” (Basambisi 13:24) Mokolo moko, Samsone alobaki na baboti na ye boye: “Namoni mwasi moko kati na bana basi ya Bafilistia, na Timina; sikoyo bózwela ngai ye azala mwasi na ngai.” (Basambisi 14:2) Kanisá ndenge maloba yango ekamwisaki baboti na ye. Na esika mwana na bango abikisa Yisraele na mabɔkɔ ya bato oyo bazalaki konyokola bango, akómaki nde na makanisi ya kobala mwana mwasi ya ekólo yango. Mibeko ya Nzambe epekisaki kobala mwasi na kati ya bato oyo basambelaka banzambe ya lokuta. (Kobima 34:11-16) Yango wana, baboti na ye balobaki na ye boye: “Mwasi azali te kati na bana basi ya bandeko na yo mpe kati na bato nyonso ya ekólo na ngai, mpo yo okende kozwa mwasi epai ya Bafilistia, bato oyo bakatamá ngenga te?” Kasi, Samsone azongisaki boye: “Zwelá ngai ye kaka, mpo ye kaka nde abongi na miso na ngai.”​—Basambisi 14:3.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 15/3 lok. 26 par. 1

Samasona alongi na makasi ya Yehova!

Na ndenge nini mwana mwasi wana Mofilistia ‘abongaki’ na Samsone? Buku moko (Cyclopedia) ya McClintock ná Strong, emonisi ete ezali te ete azalaki “kitoko mingi, kasi abongaki na ye mpo na mokano moko.” Mpo na mokano nini? Basambisi 14:4 elobi ete Samsone “azalaki koluka libaku ya kobunda na Bafilistia.” Samsone asepelaki na mwasi yango mpo na mokano wana. Ntango Samsone akómaki mokóló, “elimo ya Yehova ebandaki kotinda ye,” to kopusa ye na kosala makambo. (Basambisi 13:25) Na bongo, ezali elimo ya Yehova nde etindaki Samsone asɛnga tata na ye abalela ye mwasi wana mpe asala makambo nyonso oyo asalaki lokola mosambisi na Yisraele. Samsone azwaki nde libaku oyo azalaki koluka? Tótalela naino ndenge Yehova amonisaki ete azalaki elongo na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto