Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
03-09/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 15-16
“Kotɛka basusu ezali ezaleli moko mabe mpenza!”
Kotɛka basusu—Ezaleli moko mabe ya mikolo ya nsuka!
4 Ya liboso, tótalela ndakisa ya Delila, mwasi ya mayele mabe oyo Mosambisi Samsone alingaki. Samsone akanaki kobundisa Bafilistia mpo na kobikisa libota ya Nzambe. Mbala mosusu lokola bankolo mitano ya Bafilistia bayebaki ete Delila azalaki na bolingo ya sembo te epai ya Samsone, balakaki ye mbongo ebele soki aluki koyeba sekele ya makasi ya Samsone, mpo bákoka koboma ye. Delila, mwasi oyo azalaki na lokoso ya mbongo, andimaki likambo yango, kasi mbala misato mobimba, alongaki te koyeba sekele ya makasi ya Samsone. Na nsima, akómaki ntango nyonso kotya Samsone mbamba “na maloba na ye mpe kotungisa ye.” Nsukansuka, “molimo ya Samsone eyokaki mpasi lokola akufa.” Na yango, ayebisaki Delila ete bakatá ye naino nsuki te, soki bakati ye nsuki, makasi na ye ekosila. Ntango Delila ayokaki bongo, abengaki moto moko akata Samsone nsuki, wana Samsone alalaki mpɔngi na mabɔlɔngɔ na ye. Na nsima, apesaki ye na mabɔkɔ ya banguna na ye mpo básala ye nyonso oyo balingi. (Bas. 16:4, 5, 15-21) Asalaki mabe mpenza! Lokola Delila azalaki na lokoso, atɛkaki moto oyo alingaki ye.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Basambisi
14:16, 17; 16:16. Kolelela moto mpe kotungisa ye mpo asalela yo likambo moko ekoki kobebisa boyokani na bino.—Masese 19:13; 21:19.
Kotɛka basusu—Ezaleli moko mabe ya mikolo ya nsuka!
15 Moto oyo abalá akoki kosala nini mpo atikala sembo epai ya molongani na ye? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Sepelá na mwasi [to mobali] ya bolenge na yo” mpe, “sepelá na bomoi elongo na mwasi [to mobali] oyo olingi.” (Mas. 5:18; Mos. 9:9) Ntango mwasi ná mobali bakómi mikóló, basengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo bábatela libala na bango; basengeli komonanaka mpe kosololaka. Yango elimboli ete moto na moto asengeli kokipe moninga, kolekisaka ntango elongo na ye. Mwasi ná mobali basengeli kosala makasi bábatela libala na bango mpe boyokani na bango na Yehova. Mpo na yango, basengeli koyekolaka Biblia elongo, kobimaka na mosala ya kosakola elongo, mpe kobondelaka Yehova elongo mpo na kosɛnga ye apambola bango.
TÓTIKALA SEMBO EPAI YA YEHOVA
16 Bandeko mosusu basalaki masumu ya minene mpe bapamelaki bango “makasi, mpo bázala makasi na kondima.” (Tito 1:13) Mpo na basusu, esɛngaki ete bábimisama na lisangá. Bamosusu ‘bateyamaki na disiplini’ oyo bazwaki mpe esalisaki bango bázongisa boyokani na bango na Yehova. (Ebr. 12:11) Tosengeli kosala nini soki ndeko ya libota na biso to moninga moko ya motema abimisami na lisangá? Tosengeli komonisa bosembo na biso epai ya Nzambe, kasi epai ya moto yango te. Yehova azali kotala biso mpo amona soki tokolanda etinda na ye ya koboya kosolola na moto nyonso oyo abimisami na lisangá.—Tángá 1 Bakorinti 5:11-13.
Biloko ya motuya ya elimo
Samasona alongi na makasi ya Yehova!
Samsone atyaki makanisi nyonso na kokokisa mokano na ye ya kobundisa Bafilistia. Soki akɔtaki na ndako ya mwasi ya ndumba na Gaza ezalaki kaka mpo na kobundisa banguna ya Nzambe. Lokola Samsone azalaki na engumba ya banguna, azalaki na mposa ya esika ya kolala na butu mpe akokaki kozwa esika yango kaka na ndako ya mwasi ya ndumba. Samsone azalaki na makanisi ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndumba te. Abimaki na ndako ya mwasi yango na midi ya butu, alongolaki porte ya engumba ná makonzí na yango mpe akendaki na yango likoló ya ngomba moko pembeni ya Hebrone, engumba oyo ekabwani na Gaza na ntaka ya kilomɛtrɛ 60. Asalaki nyonso wana na mokano ya Nzambe mpe na makasi oyo apesaki ye.—Basambisi 16:1-3.
10-16/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 17-19
“Koboya kotosa mibeko ya Nzambe ememelaka moto mitungisi”
it-2-F lok. 278 par. 5
Mika
1. Moto ya Efraime. Mika abukaki mobeko ya mwambe ya Mibeko Zomi (Kob 20:15), ntango azwaki shekele ya palata 1 100 ya mama na ye. Ntango ayambolaki polele mpe azongiselaki mama na ye shekele yango, mama na ye alobaki: “Nasengeli mpenza kosantisela Yehova palata oyo euti na lobɔkɔ na ngai, nakosala yango mpo na mwana na ngai ya mobali, mpo na kosala ekeko oyo eyemami mpe ekeko ya ebende oyo enyangwisami; mpe nakozongisela yo yango.” Na nsima mama ya Mika azwaki shekele ya palata 200 mpe apesaki mosali biloko ya palata, oyo asalaki “ekeko oyo eyemami mpe ekeko ya ebende oyo enyangwisami” oyo na nsima bakendaki kotya yango na ndako ya Mika. Mika, oyo azalaki na “ndako moko ya banzambe,” asalaki efode mpe baterafime mpe atondisaki lobɔkɔ ya mwana na ye moko ya mobali na nguya, mpo asalela ye mosala ya nganga-nzambe. Atako emonani lokola bibongiseli yango ezwamaki mpo na kokumisa Yehova, kasi yango ebongaki te, mpamba te ezalaki kobuka mobeko oyo epekisaki losambo ya bikeko (Kob 20:4-6) mpe yango esalaki ete tabernakle ya Yehova mpe bonganga-nzambe na ye esala lisusu mosala te. (Bas 17:1-6; Mib 12:1-14) Na nsima, Mika azwaki Yonatane, mwana ya Gereshome, mwana ya Moize, na ndako na ye, mpe azalaki kofuta elenge Molevi yango mpo azwaki ye lokola nganga-nzambe na ye. (Bas 18:4, 30) Mika asepelaki atako asalaki libunga monene, alobaki boye: “Sikoyo nayebi mpenza ete Yehova akosalela ngai bolamu.” (Bas 17:7-13) Kasi lokola Yonatane azalaki mokitani ya Arona te mpe akokisaki te masɛngami mpo na kosala lokola nganga-nzambe, libunga yango etyamaki na motó ya Mika.—Mit 3:10.
it-2-F nk. 278-279 par. 7
Mika
Mwa moke na nsima, Mika ná etuluku ya mibali bazalaki kolanda bato ya Dani mpe bazwaki bango. Ntango bato ya Dani batunaki bango soki likambo ezali, Mika alobaki boye: “Banzambe na ngai oyo nasalá, bozwi yango, ná nganga-nzambe, mpe bokei na bino, bongo ngai natikali na nini lisusu?” Kasi bana ya Dani bakebisaki ye ete soki akobi kolanda bango, mpe soki mongongo na ye eyokani lisusu epai na bango, bakokwela ye. Mika amonaki ete bato ya Dani balekaki ye na makasi, bongo abalukaki mpe azongaki na ndako na ye. (Bas 18:22-26) Na nsima bato ya Dani babɛtaki Laishe mpe batumbaki yango, mpe batongaki engumba ya Dani na esika yango. Yonatane ná bana na ye bakómaki banganga-nzambe ya libota ya Badani, oyo “bakamataki ekeko oyo eyemami ya Mika, oyo ye asalaki, batɛlɛmisaki yango mpo na bango moko mikolo nyonso oyo ndako ya Nzambe ya solo [tabernakle] ezalaki na Shilo.”—Bas 18:27-31.
Biloko ya motuya ya elimo
Libongoli ya Liloba ya Nzambe oyo ebongi
6 Lelo oyo, makambo mingi emonisi ete tosengeli kosalela nkombo ya Yehova. Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisamaki lisusu na 2013 esaleli nkombo ya Nzambe mbala 7 216. Elingi koloba nkombo yango ebakisami na bisika mosusu 6. Na bavɛrsɛ mitano, bazongisi yango mpo bamonaki nkombo ya Nzambe na Barulo ya Mbu Ekufá oyo euti komonana kala mingi te. Bavɛrsɛ yango mitano ezali: 1 Samwele 2:25; 6:3; 10:26; 23:14, 16. Vɛrsɛ ya motoba ezali Basambisi 19:18; nkombo ya Nzambe ezongisami na vɛrsɛ yango nsima ya koyekola na mozindo bamaniskri ya kala ya Biblia.
17-23/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BASAMBISI 20-21
“Kobá koluka lisalisi epai ya Yehova”
Zalá lokola Finehase ntango okutani na mikakatano
Mibali ya Gibea, ya libota ya Benyamina, basangisaki nzoto na makasi na makango ya Molevi moko mpe babomaki ye. Na nsima, mabota mosusu bakendaki mpo na kobundisa libota ya Benyamina. (Bas. 20:1-11) Liboso bábunda, babondelaki Yehova asalisa bango, kasi bana ya Benyamina balongaki bango mbala mibale mpe babomaki bato mingi. (Bas. 20:14-25) Balobaki nde ete Nzambe ayoki mabondeli na bango te? Yehova alingaki mpenza bázongisa mabe mpo na likambo oyo esalemaki?
Makanisi ya ntina na mokanda ya Basambisi
20:17-48—Atako bato ya libota ya Benyamina basengelaki kozwa etumbu, mpo na nini Yehova atikaki bálonga mabota mosusu mbala mibale? Yehova atikaki bálonga mabota oyo ezalaki sembo mpo atala soki mabota yango ezalaki mpenza na ekateli ya kolongola mabe na Yisraele.
Zalá lokola Finehase ntango okutani na mikakatano
Yango ekoki koteya biso nini? Makambo mosusu oyo ebimaka na lisangá esilaka noki te ata soki bankulutu basali milende mingi mpe babondeli Nzambe mpo asalisa bango. Soki esalemi bongo, ekozala malamu bankulutu bákanisa maloba ya Yesu ete: “Bókoba kosɛnga [to kobondela], mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.” (Luka 11:9) Ata soki emonani ete eyano ya libondeli ezali koya noki te, bakɛngɛli basengeli koyeba ete Yehova akoyanola na ntango oyo ye moko amoni malamu.
Biloko ya motuya ya elimo
Oyebaki yango?
Ndenge nini bazalaki kosalela bilingongo to lansi na bitumba na ntango ya kala?
Bilingongo ezalaki ebundeli oyo Davidi asalelaki mpo na koboma engambe Goliate. Emonani ete Davidi ayekolaki kosalela ebundeli yango ntango azalaki naino elenge na mosala ya kobatela bampate.—1 Samwele 17:40-50.
Bilingongo to lansi emonisami na mayemi ya bato ya Ezipito to ya Asiri ya ntango ya kala. Ebundeli yango ezalaki lokola poshɛ ya mposo ya nyama to ya elamba oyo bazalaki kokangisa yango na nsinga mibale. Moto oyo azalaki kosalela yango azalaki kotya na poshɛ yango libanga ya mosɛlu ya santimɛtrɛ mitano to nsambo na ndambo mpe ekokaki kozala na gramɛ 250. Azalaki kobalusa lansi yango likoló ya motó na ye mpe kobwaka nsinga moko, oyo ezalaki kosala ete libanga yango epumbwa mosika na nguya mpenza mpe ekende esika mpenza oyo moto alingi.
Na mabulu oyo bato ya arkeoloji batimolaki na Moyen-Orient, bamonaki ebele ya balansi oyo bato bazalaki kosalela na bitumba na ntango ya kala. Basoda oyo bayebaki mpenza kobunda bazalaki kotinda mabanga yango na vitɛsi ya bakilomɛtrɛ 160 tii 240 na ngonga moko mpamba. Bato ya mayele bayebaka te soki lansi yango ezalaki lokola litimbo, kasi na ntembe te, lansi yango ezalaki mpenza koboma.—Basambisi 20:16.
24-30/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | RUTA 1-2
“Kobá komonisa bolingo ya sembo”
Mekolá baninga ya motema ya Yehova
5 Libota ya Ruta ezalaki kofanda na Moabe. Akokaki kozonga epai na bango, mpe na ntembe te balingaki kosalisa ye. Ayebaki bato kuna, ayebaki monɔkɔ ya mboka, mpe bizaleli ya bato ya Moabe. Naomi akokaki te kolaka Ruta makambo wana nyonso na Beteleme. Mpe Naomi azalaki kobanga ete Ruta azwa te mobali ya kobala ye to ndako ya kofanda. Yango wana, Naomi asɛngaki ye azonga na Moabe. Ndenge tomoni yango, Orpa ‘azongaki epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye.’ (Ruta 1:9-15) Kasi Ruta azwaki ekateli ya koboya kozonga epai ya bato na ye mpe banzambe na bango ya lokuta.
Mekolá baninga ya motema ya Yehova
6 Emonani ete Ruta ayekolaki makambo ya Yehova epai ya mobali na ye to epai ya Naomi. Ayekolaki ete Yehova azali te lokola banzambe ya Moabe. Azalaki kolinga Yehova mpe ayebaki ete asengeli kolinga Yehova mpe kosambela ye. Na yango, Ruta azwaki ekateli ya malamu. Ayebisaki Naomi: “Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.” (Ruta 1:16) Kokanisa na bolingo oyo Ruta azalaki kolinga Naomi esimbaka mitema na biso. Kasi likambo oyo ekamwisaka koleka ezali bolingo oyo Ruta azalaki kolinga Yehova. Yango ekamwisaki mpe Boaze, oyo na nsima, akumisaki Ruta ndenge ‘ayaki koluka esika ya komibomba na nse ya mapapu ya Yehova.’ (Tángá Ruta 2:12.) Maloba wana ya Boaze ekoki kokundwela biso ndenge mwana ya ndɛkɛ alukaka komibomba na nse ya mapapu ya moboti na ye. (Nzembo 36:7; 91:1-4) Ndenge moko mpe, Yehova abatelaki Ruta mpe apesaki ye mbano mpo na kondima na ye. Ruta azalaki ata na ntina moko te ya koyoka mawa mpo na ekateli na ye.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Luta
1:13, 21—Yehova akómisaki Naomi mawamawa mpe apesaki ye bolɔzi? Te, Naomi mpe apesaki Nzambe foti te. Nzokande ntango akanisaki makambo nyonso oyo ekómelaki ye, amonaki nde lokola Nzambe aboyi ye. Amitungisaki mingi. Lisusu, na ntango wana bazalaki kotalela bana lokola lipamboli ya Nzambe kasi kozanga kobota lokola elakeli mabe. Naomi azalaki mpenza na ntina ya kokanisa ete Nzambe asambwisi ye mpo azangaki bankɔkɔ mpe bana na ye bakufaki.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur: motó ya likambo: “Libota ezali nini?”
“Mwasi moko malamu mingi”
5 Ntango Ruta asilisaki kobɛta mbuma mpe kosangisa yango nyonso, amonaki ete alɔkɔtaki soki mezire moko ya efa. Mokumba oyo amemaki ekokaki kozala kilo pene na 14! Ekoki kozala ete akangisaki yango liboke na elamba moko mpe amemaki yango na motó; na nsima azongaki na Beteleme, na mpokwa.—Ruta 2:17.
6 Naomi asepelaki komona Ruta bokilo na ye oyo azalaki kolinga mingi, mpe mbala mosusu akamwaki ntango amonaki mokumba ya kilo ya ɔrje oyo amemaki. Ruta amemaki mpe bilei oyo etikalaki na bilei oyo Boaze apesaki basali, mpe bango mibale balyaki mwa bilei yango. Naomi atunaki boye: “Epai wapi olɔkɔtaki mbuma lelo, mpe epai wapi osalaki? Moto oyo atyelaki yo likebi apambolama.” (Ruta 2:19) Naomi azalaki ekɛngɛ; amonaki ete lokola Ruta azongaki na mokumba wana ya kilo, emonisi ete moto moko atyelaki elenge mwasi yango likebi mpe amoniselaki ye boboto.
7 Bango mibale babandaki kosolola, mpe Ruta ayebisaki Naomi ndenge Boaze amoniselaki ye boboto. Lokola asepelaki, Naomi alobaki boye: “Yehova apambola ye, ye oyo alongoli te motema boboto na ye epai ya bato ya bomoi mpe bakufi.” (Ruta 2:20) Amonaki ete boboto oyo Boaze amonisaki eutaki nde epai ya Yehova, ye oyo atindaka basaleli na ye bákabela basusu mpe alaki kopambola bango mpo na boboto oyo bamonisaka.—Tángá Masese 19:17.
8 Naomi alendisaki Ruta alɔkɔtaka mbuma na bilanga ya Boaze, ndenge ye moko asɛngaki ye, mpe azalaka mosika te na bilenge basi ya ndako na ye mpo bilenge mibali oyo bazali kobuka mbuma bátungisa ye te. Ruta andimaki toli yango. Akobaki mpe “kofanda elongo na bokilo na ye.” (Ruta 2:22, 23) Maloba yango emonisi biso lisusu ezaleli malamu oyo Ruta azalaki na yango—bolingo ya sembo. Ndakisa ya Ruta ekoki kotinda biso tómituna soki tolingaka mpenza bato ya libota na biso, soki tosungaka bango na motema moko mpe tosalisaka bango ntango bazali na mposa ya lisalisi. Yehova azangaka te komona bolingo ya sembo ya ndenge wana.
9 Ruta ná Naomi basalaki mpenza libota? Bato mosusu balobaka ete na libota, esengeli kozala na tata, mama, bana, mpe bankɔkɔ, mpe bongo na bongo. Nzokande, ndakisa ya Ruta ná Naomi emonisi ete basaleli ya Yehova bakoki kosala ete esengo, boboto, mpe bolingo ezala na kati ya libota na bango, soki bazali kosolola mpenza na motema moko, ata soki bazali bato moke mpenza. Osepelaka na ndenge libota na bino ezali? Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábosana te ete lisangá ya bokristo ekoki kokóma libota mpo na baoyo bazali na libota te.—Mrk. 10:29, 30.
31/01–06/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | RUTA 3-4
“Kobá komonisa bizaleli malamu”
“Mwasi moko malamu mingi”
Boaze alobaki na ye, mpe na ntembe te, mongongo malamu oyo asalelaki ebɔndisaki Ruta. Alobaki boye: “Yehova apambola yo, mwana na ngai. Omonisi motema boboto na yo malamu mpenza na mbala oyo koleka mbala ya liboso, na ndenge olandi bilenge mibali te, babola to bazwi.” (Ruta 3:10) “Mbala ya liboso” emonisi bolingo ya sembo oyo Ruta amonisaki ndenge ayaki elongo na Naomi na Yisraele mpe azalaki kobatela ye. “Mbala oyo” ezalaki likambo oyo autaki kosala sikoyo. Boaze amonaki ete elenge mwasi lokola Ruta akokaki kozwa mobali na kati ya bilenge mibali, bázala bazwi to babola. Na esika ya kosala bongo, alingaki nde kosalela Naomi malamu, kosalela mpe mobali na ye oyo akufaki malamu, mpo nkombo na ye elimwa te na mboka na ye. Yango wana, ezali mpasi te tómona ntina oyo Boaze akamwaki mpo na ezaleli oyo Ruta amonisaki ya koboya koluka matomba na ye moko.
“Mwasi moko malamu mingi”
Ruta ayokaki mpenza esengo mpo na maloba ya Boaze—ete ayebanaki na miso ya bato nyonso lokola “mwasi moko malamu mingi”! Na ntembe te, mposa makasi oyo azalaki na yango ya koyeba Yehova mpe kosalela ye nde esalaki mpenza ete azala na lokumu wana. Amonisaki mpe boboto monene mpe atyelaki Naomi mpe bato na ye likebi, andimaki komesana na makambo mpe mimeseno oyo ezalaki mopaya mpo na ye. Soki tomekoli kondima ya Ruta, tokoluka kosalela basusu makambo na limemya mpe kotosa mimeseno na bango. Soki tosali bongo, biso mpe tokokumisama mpo na bizaleli na biso ya malamu.
“Mwasi moko malamu mingi”
Boaze abalaki Ruta. Na nsima na yango, tozali kotánga boye: “Yehova apesaki ye likoki ya kozwa zemi mpe abotaki mwana mobali.” Basi ya Beteleme bapambolaki Naomi mpe bakumisaki Ruta mpo na ndenge azalaki malamu epai ya Naomi koleka bana mibali nsambo. Na nsima, toyebi ete mwana ya Ruta akómaki nkɔkɔ ya Davidi, mokonzi moko monene. (Ruta 4:11-22) Mpe Davidi azalaki nkɔkɔ ya Yesu Kristo.—Matai 1:1.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Luta
4:6—Ndenge nini mosikoli akokaki ‘kobebisa’ libula na ye na ntango azali kosikola? Ya liboso, soki moto moko akómi mobola mpe atɛki mabele na ye, mosikoli akokaki kosomba yango na motuya oyo bakotya na kotalela bambula oyo etikali mpo Yubile ekoka. (Balevi 25:25-27) Soki asali bongo, bozwi na ye ekoki kokita. Lisusu, soki Luta aboti mwana ya mobali, mwana yango nde akozwa libula ya mabele kasi te bandeko mosusu ya mosikoli.
07-13/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 1-2
“Bondelá Yehova na motema mobimba”
Abondelaki Nzambe na motema mobimba
12 Hana atikelá basaleli nyonso ya Nzambe ndakisa malamu na likambo etali kobondela. Na boboto na ye, Yehova asɛngaka basaleli na ye bábondela ye na motema mobimba, mpe kozanga kokakatana, báyebisa ye mitungisi na bango nyonso, ndenge mwana oyo atyelaka moboti na ye motema akoki kosala yango. (Tángá Nzembo 62:8; 1 Batesaloniki 5:17.) Na likambo etali kobondela, ntoma Petro akomaki maloba oyo ya kolendisa: ‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’—1 Pe. 5:7.
Ana azwaki kimya
Makambo nyonso oyo ekoki koteya biso nini? Ntango tozali kobondela Yehova mpo na likambo moko oyo ezali kotungisa biso, tosengeli koyebisa ye ndenge oyo tozali koyoka mpe makambo oyo tolingi asala mpo na biso. Soki tosali nyonso oyo tokoki, tosengeli kotika makambo na mabɔkɔ na ye moko. Yango nde likambo eleki malamu.—Masese 3:5, 6.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele
2:10—Mpo na nini Hana abondelaki ete Yehova ‘akopesa mokonzi na ye makasi’ nzokande, na ntango wana Yisraele ezalaki naino na mokonzi te? Mibeko ya Moize esakolaki ete Bayisraele bakokóma na mokonzi. (Kolimbola Mibeko 17:14-18) Liboso Yakobo akufa, asakolaki boye: “Lingenda ya bokonzi ekolongwa na Yuda te.” (Ebandeli 49:10) Lisusu, mpo na Sara, nkɔkɔ ya Bayisraele, Yehova alobaki boye: “Bakonzi ya bato ya bikólo bakobima kati na ye.” (Ebandeli 17:16) Na bongo, Hana azalaki kobondela mpo na mokonzi oyo asengelaki koya nsima.
14-20/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 3-5
“Yehova atyelaka basusu likebi”
Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso kasi apesaka bato lokumu
3 Samwele abandaki “kosalela Yehova mosala” na tabernakle ntango azalaki mwana moke mpenza. (1 Samwele 3:1) Mokolo moko na butu ntango akendaki kolala, likambo moko ya kokamwa esalemaki. (Tángá 1 Samwele 3:2-10.) Samwele ayokaki moto moko azali kobenga ye. Lokola Samwele akanisaki ete ezalaki Nganga-nzambe monene Eli, akendaki mbangu epai ya Eli mpe alobaki: “Ngai oyo, mpo obengi ngai.” Kasi Eli alobaki na ye: “Nabengi yo te.” Ntango likambo yango esalemaki lisusu mbala mibale, Eli ayebaki ete Nzambe nde azalaki kobenga Samwele. Na yango, ayebisaki Samwele ndenge oyo asengeli koyanola, mpe Samwele atosaki. Mpo na nini Yehova ayebisaki Samwele mbala moko te ete ye nde azalaki kobenga ye? Biblia epesi eyano te; kasi ndenge makambo esukaki emonisi ete mbala mosusu Yehova alingaki kopesa elenge Samwele lokumu. Na ndenge nini?
Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso kasi apesaka bato lokumu
4 Tángá 1 Samwele 3:11-18. Mibeko ya Yehova esɛngaki bana bámemyaka mikóló, mingimingi baoyo bazali na bokonzi. (Kobima 22:28; Balevi 19:32) Na yango, kanisá ndenge ezalaki mpasi mwana moke lokola Samwele akende epai ya Eli na ntɔngɔ mpe ayebisa ye na mpiko nyonso nsango makasi ya lisambisi oyo Nzambe atindaki! Kutu, Biblia elobi ete Samwele “azalaki kobanga koyebisa Eli likambo oyo amonaki.” Kasi, Nzambe amonisaki Eli polele ete Ye nde azalaki kobenga Samwele. Na yango, Eli ayebisaki Samwele abombela ye ata likambo moko te na maloba nyonso oyo Nzambe alobaki. Samwele atosaki Eli mpe ‘ayebisaki ye maloba yango nyonso.’
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele
3:3—Samwele azalaki kolala mpenza na Esika oyo Eleki Bosantu? Te, azalaki kolala kuna te. Samwele azalaki nganga-nzambe te, azalaki Molevi ya libota ya Kohate. (1 Ntango 6:33-38) Na yango, azalaki na ndingisa te ya “komona biloko mosantu.” (Mitángo 4:17-20) Samwele azalaki na ndingisa ya kosuka kaka na lopango ya tabernakle. Esengeli kozala ete azalaki kolala kuna. Ekoki kozala ete Eli mpe azalaki kolala esika mosusu, kaka na lopango yango. Emonani ete maloba “esika sanduku ya Nzambe ezalaki,” elimboli nde tabernakle mobimba.
21-27/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 6-8
“Nani azali mokonzi na yo?”
it-2-F lok. 827 par. 1
Bokonzi ya Nzambe
Bayisraele basɛngaki bápesa bango mokonzi oyo azali moto. Mbula soki 400 nsima ya Kobima mpe mbula koleka 800 na nsima, wana Nzambe asalaki kondimana ná Abrahama, Bayisraele basɛngaki bápesa bango mokonzi oyo azali moto mpo akamba bango, lokola bikólo mosusu. Ntango basɛngaki mokonzi yango, bamonisaki ete baboyaki Yehova ayangela bango. (1Sa 8:4-8) Ezali solo ete bato yango bazalaki kozela ete Nzambe atya bokonzi moko na boyokani na elaka oyo apesaki Abrahama mpe Yakobo, elaka oyo asilá kosala liboso. Bazalaki kozela kokokisama ya elaka yango na boyokani na esakweli oyo Yakobo asakolaki mpo na Yuda liboso akufa (Eb 49:8-10), na boyokani na maloba oyo Yehova alobaki na Yisraele nsima ya kobima na bango (Kob 19:3-6), ekokokisama na nsuka ya kondimana ya Mibeko (Mib 17:14, 15), ata mpe kokokisama ya mwa ndambo ya makambo oyo Nzambe atindaki mosakoli Balaama asakola (Mit 24:2-7, 17). Hana, moto ya sembo, mama ya Samwele amonisaki elikya yango ntango abondelaki. (1Sa 2:7-10) Ata bongo, Yehova amonisaki mpenza te “sekele mosantu” oyo azalaki na yango mpo na Bokonzi mpe amonisaki na bosikisiki te ntango nini mpenza akotya Bokonzi yango mpe Bokonzi yango ekozala ndenge nini mpe bato boni bakozala bakonzi, soki ekozala na mabele to na likoló. Na yango, bato basalaki na lofundo ntango basɛngaki bápesa bango mokonzi oyo azali moto.
Ayikaki mpiko atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaka nzoto
Tóyoka ndenge Yehova ayanolaki ntango Samwele ayebisaki ye likambo yango na libondeli: “Yoká mongongo ya bato oyo na makambo nyonso oyo bazali koloba na yo; mpamba te baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi na bango.” Maloba yango ebɔndisaki mpenza Samwele, kasi likambo oyo bato ya ekólo basalaki emonisaki mpenza ete batyolaki Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso! Yehova ayebisaki mosakoli na ye akebisa Bayisraele mpo na likama monene oyo ekokaki kokómela bango soki bazali na mokonzi oyo azali moto. Ntango Samwele amilelaki, bango batingamaki kaka ete: “Te, mokonzi nde ayangela biso.” Lokola azalaki ntango nyonso kotosa Nzambe na ye, Samwele akendaki mpe atyaki mafuta na mokonzi oyo Yehova aponaki.—1 Samwele 8:7-19.
Boyangeli ya Yehova elongisami!
9 Makambo oyo esalemaki nsima emonisaki bosolo ya likambo oyo Yehova alobaki. Kotambwisama na moto, ememelaki Bayisraele bampasi mingi, mingimingi ntango mokonzi yango atikalaki lisusu sembo te. Likambo wana oyo ekómelaki Bayisraele, ezali kosalisa biso tókamwa te ndenge makambo oyo eleki na boumeli ya bambula ya boyangeli ya bato oyo bayebi Yehova te elongi te komemela bato bolamu ya solosolo. Ya solo, bato mosusu ya politiki basɛngaka Nzambe apambola milende na bango ya kotya kimya mpe libateli, kasi ndenge nini Nzambe akoki kopambola bato oyo bazali kolinga te kotosa boyangeli na ye?—Nz. 2:10-12.
Biloko ya motuya ya elimo
Mpo na nini kozwa batisimo?
13 Liboso ya kokóma Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo, tosengeli naino kobongwana. Kobongwana ezali likambo oyo moto asalaka yango na mposa na ye moko nsima ya kozwa ekateli na motema na ye ya kolanda Kristo Yesu. Moto oyo abongwani ndenge wana atikaka makambo mabe oyo azalaki kosala mpe azwaka ekateli ya kosala makambo oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. Na kati ya Makomami, baverbe ya Ebre mpe ya Grɛki oyo elimboli kobongwana ezali na likanisi ya kopesa mokɔngɔ to kobaluka. Ezali lokola nde moto oyo asali yango alongwe na nzela ya mabe mpe abaluki epai ya Nzambe. (1 Bakonzi 8:33, 34) Kobongwana esɛngaka kosala ‘misala oyo emonisi ete moto abongoli motema.’ (Misala 26:20) Esɛngaka ete tótika losambo ya lokuta, tótosa mibeko ya Nzambe, mpe tósambela kaka Yehova. (Kolimbola Mibeko 30:2, 8-10; 1 Samwele 7:3) Moto oyo abongwani akómaka na makanisi, na mikano mpe na elimo mosusu. (Ezekiele 18:31) ‘Tobongwanaka’ ntango tolongoli bizaleli ya mabe mpe na esika na yango toloni bomoto ya sika.—Misala 3:19; Baefese 4:20-24; Bakolose 3:5-14.
28/02–06/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 9-11
“Saulo azalaki na komikitisa mpe na bopolo na ebandeli”
Tambolá elongo na Nzambe na komikitisa mpe na bopɔlɔ
11 Kanisá makambo oyo ekómelaki Mokonzi Saulo. Ntango azalaki elenge azalaki na bopɔlɔ. Ayebaki esika makoki na ye esuki mpe aboyaki kutu kondima mikumba mosusu. (1 Sa. 9:21; 10:20-22) Kasi mwa moke nsima ya kokóma mokonzi, Saulo akómaki na lofundo. Na libaku moko boye, azangaki motema molai mpo na kozela mosakoli Samwele. Na esika atya motema ete Yehova akosala mpo na bolamu ya bato ya ekólo, Saulo atumbaki mbeka, atako azalaki na lotomo te ya kosala yango. Mpo na yango, Yehova asepelaki lisusu na ye te mpe nsukansuka alongolaki Saulo na bokonzi. (1 Sa. 13:8-14) Tokomonisa bwanya soki tozwi liteya na ndakisa na ye mpe toboyi kosala makambo oyo tozali na lotomo ya kosala te.
Ndenge ya kokoba komonisa ezaleli ya komipimela
8 Mokonzi Saulo azali ndakisa oyo ekoki kokebisa biso ete koluka kaka matomba na biso moko ekoki kobebisa ezaleli na biso ya komipimela. Ntango mokonzi Saulo abandaki koyangela, azalaki na ezaleli ya komikitisa mpe na makanisi malamu. (1 Sa. 9:21) Aboyaki kopesa Bayisraele oyo balobaki mabe mpo na bokonzi na ye etumbu, atako akokaki komona ete azali na lotomo ya kosala yango mpo Nzambe nde atyaki ye. (1 Sa. 10:27) Mokonzi Saulo andimaki na litambwisi ya elimo santu, yango wana atambwisaki Bayisraele na etumba oyo balongaki Baamone. Kutu, nsima ya kolonga Baamone, na komikitisa nyonso apesaki Yehova lokumu.—1 Sa. 11:6, 11-13.
Baamona: Libota oyo ezongisaki koyina mpo na boboto
Baamone bazongisaki lisusu koyina mpo na boboto ya Yehova. Yehova azangaki te kotya likebi na makaneli wana ya mabe. “[Ntango ayokaki maloba yango [ya Nahashe], elimo ya Nzambe ebandaki kosala kati na Saulo], mpe nkanda na ye engalaki makasi.” Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Saulo ayanganisaki limpinga ya mibali ya etumba 330 000 oyo epanzaki mpenza Baamone kino “batikalaki lisusu bato mibale esika moko te.”—1 Samwele 11:6, 11.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele
9:9—Maloba “na ntango ya kala, bazalaki kobenga mosakoli ya lelo momoni-makambo” elimboli mpenza nini? Maloba yango ekoki kolimbola ete lokola mokumba ya basakoli ekómaki monene na ntango ya Samwele mpe na ntango ya bakonzi ya Yisraele, bakómaki kosalela nkombo “mosakoli” na esika ya “momoni-makambo.” Samwele azali mosakoli ya liboso na molɔngɔ wana.—Misala 3:24.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur: motó ya likambo: “Makambo ya kosala mpo na kopesa basusu formasyo oyo ebongi”
Bankulutu, ndenge nini botalelaka likambo ya kopesa basusu formasyo?
16 Zalá na bolingo, kokakatana te. Ntango Samwele ayokaki ete Bayisraele balingi mokonzi ya moto, alɛmbaki nzoto mpe amiyokaki lokola babwaki ye. (1 Samwele 8:4-8) Lokola Samwele azalaki kolinga te kopesa Bayisraele mokonzi, mbala misato, Yehova ayebisaki ye ayokela bango. (1 Samwele 8:7, 9, 22) Atako Samwele amiyokaki bongo, kasi akómaki te na zuwa to na nkanda ya moto oyo asengelaki kokóma mokonzi na esika na ye. Ntango Yehova ayebisaki ye atya Saulo mafuta, Samwele akakatanaki te. Atosaki te mpo asengelaki kosala yango, kasi mpo alingaki Yehova.
17 Lelo oyo, ezali na ebele ya bankulutu oyo baumeli mingi oyo bamekoli ndakisa ya Samwele mpe na bolingo nyonso bapesi basusu formasyo. (1 Petro 5:2) Bankulutu wana ya boboto basepelaka kolakisa basusu mpe babangaka te kokabola mikumba oyo bazali na yango na lisangá ná baoyo bazali koyekola. Kutu, bamonaka nde ete bandeko yango bazali na motuya mingi mpe bazali “baninga ya mosala” oyo bakosalisa bango mpo na kokokisa bamposa ya lisangá. (2 Bakorinti 1:24; Baebre 13:16) Mpe bankulutu wana ya makanisi malamu basepelaka komona bandeko wana oyo bazali koyekola bazali kosalela makoki na bango mpo na kosalisa basaleli ya Yehova.—Misala 20:35.
18 Zalá moninga, kasi kaka moteyi te. Ntango Samwele akutanaki na Saulo, mosakoli Samwele akokaki mbala moko kozwa mafuta mpe kosopela ye yango na motó. Soki asalaka bongo, mokonzi wana ya sika alingaki kotyama mafuta, kasi alingaki kobongisama te mpo na kotambwisa libota ya Nzambe. Kasi, Samwele azwaki ntango ya kobongisa motema ya Saulo mpo na mokumba na ye wana ya sika. Liboso atya Saulo mafuta, balyaki elongo, batambolaki elongo lokola baninga, basololaki ntango molai, bapemaki kutu mwa ndambo. Samwele azelaki ntango oyo ebongi mpo na kotya mokonzi ya sika mafuta.
19 Ezali mpe bongo lelo oyo. Liboso nkulutu abanda kopesa ndeko mobali moko formasyo, asengeli kosala makasi akóma moninga ya moyekoli yango. Makambo oyo nkulutu akoki kosala mpo moyekoli alanda malamu formasyo ekoki kokesana na kotalela makambo ya mokomoko na bango mpe mimeseno na bango. Atako bongo, ezala ozali wapi, soki ozwi mwa ntango na kati ya makambo mingi oyo ozali na yango mpo ozala ná moyekoli, akoyeba ete azali na ntina mpenza mpo na yo. (Tángá Baroma 12:10.) Na ntembe te, bayekoli bakozala na botɔndi mingi mpo na lisalisi ya bolingo mpe likebi oyo ozali kopesa bango.
20 Ezali solo ete molakisi ya malamu alingaka kopesa basusu formasyo. Kasi molakisi ya malamu asengeli mpe kolinga moto oyo azali kopesa formasyo. (Talá mpe Yoane 5:20.) Kosala bongo ezali na ntina nini? Mpo soki moyekoli amiyoki ete ozali mpenza komibanzabanza mpo na ye, akosepela mpenza koyekola epai na yo. Na yango, bankulutu basalaka molende kaka te mpo na koteya kasi mpe mpo na kozala baninga malamu.—Masese 17:17; Yoane 15:15.