Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
07-13/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 12-13
“Lolendo ememaka nsɔni”
Lolendo ememaka nsɔni
17 Soki tokanisi malamu te, tokoki komona lokola ete Saulo asalaki mabe te. Libota ya Nzambe ezalaki “kati na mpasi,” “batumolami mingi,” mpe bazalaki kolɛnga mpo bazalaki koyeba likambo ya kosala te. (1 Samwele 13:6, 7) Ekozala mpenza malamu te kokanga mabɔkɔ soki likambo moko oyo ezali kosɛnga kokanga mabɔkɔ te ebimi. Kasi, tóbosana te ete Yehova akoki kotánga makambo oyo ezali na kati ya mitema mpe komona mposa oyo etindi biso na kosala likambo moko. (1 Samwele 16:7) Yango wana, ekoki mpenza kozala ete amonaki makambo mosusu epai ya Saulo oyo lisolo ya Biblia elobeli yango te. Ekoki kozala ete Yehova amonaki ete lolendo nde ekómisaki Saulo motema mɔtɔmɔtɔ. Mbala mosusu Saulo asilikaki mingi na komona ete ye, mokonzi ya Yisraele mobimba, azelaka mosakoli mobange moko boye oyo azali kosala malɛmbɛmalɛmbɛ! Ata soki ezalaki bongo to te, Saulo akanisaki ete lokola Samwele azalaki koumela, ye asengelaki te kotala na miso mpe amonaki mpamba malako ya polele oyo bapesaki ye. Esukaki ndenge nini? Samwele asepelaki te na likambo oyo Saulo asalaki. Na yango, apamelaki ye mpe alobaki ete: “Bokonzi na yo ekoumela te . . . mpo ete obateli yango elakelaki [Yehova] yo te.” (1 Samwele 13:13, 14) Tomoni awa lisusu ete lolendo ememaki nsɔni.
Botosi na yo ezali na motuya na miso ya Yehova
8 Lisolo ya Mokonzi Saulo emonisi malamumalamu ntina ya botosi. Na ebandeli, Mokonzi Saulo azalaki na komikitisa mpe na bopɔlɔ, azalaki ‘moke na miso na ye mpenza.’ Kasi na nsima, akómaki kozwa bikateli na lolendo mpe na makanisi ya mabe. (1 Samwele 10:21, 22; 15:17) Mokolo moko, Saulo asengelaki kobunda na Bafilistia. Samwele ayebisaki mokonzi azela tii ntango ye moko akoya kotumba mbeka mpo na Yehova mpe kopesa ye malako mosusu. Kasi, Samwele ayaki noki te, mpe bato bakómaki kokima. Ntango Saulo amonaki bongo, ye moko “apesaki mbeka yango ya kotumba.” Yehova asepelaki na likambo yango te. Ntango Samwele akómaki, Saulo alukaki kolongisa kozanga botosi na ye; alobaki ete Samwele aumelaki, yango wana azwaki ekateli ya kotumba mbeka mpo na kokitisa motema ya Yehova. Mpo na Saulo, kopesa mbeka yango ezalaki na ntina mingi koleka kotosa malako oyo azwaki ete azela Samwele aya kotumba mbeka yango. Samwele alobaki na ye boye: “Osali likambo na bozoba. Otosi te mobeko oyo Yehova Nzambe na yo apesaki yo.” Lokola Saulo atosaki Yehova te, abongaki lisusu kozala mokonzi te.—1 Samwele 10:8; 13:5-13.
Biloko ya motuya ya elimo
Okolanda litambwisi ya Yehova oyo etondi na bolingo?
15 Mbala mosusu Bayisraele yango bakanisaki ete bakotyela mokonzi oyo azali moto motema koleka Yehova. Soki ezali bongo, bazalaki mpenza kolanda eloko oyo ezali solo te! Mpe bazalaki na likama ya kolanda makanisi mosusu ya lokuta oyo euti na Satana. Bato oyo bazalaki koyangela bango bakokaki noki komema bango na losambo ya bikeko. Basambeli ya bikeko basalaka libunga mpo bakanisaka ete bakoki kotya motema mingi na banzambe oyo esalami na nzete to na mabanga mpo emonanaka, koleka epai ya Yehova, Nzambe oyo amonanaka te, oyo akelá biloko nyonso. Kasi ndenge Paulo alobaki yango, ekeko ezali “eloko te.” (1 Ko. 8:4) Bikeko ekoki komona te, koyoka te, koloba te, mpe kosala eloko te. Okoki komona yango mpe kosimba yango, kasi soki osambeli yango, ozali nde kolanda eloko oyo ezali solo te—eloko ya mpamba oyo ekomema kaka na likama.—Nz. 115:4-8.
14-20/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 14-15
“Kotosa eleki mbeka”
Botosi na yo ezali na motuya na miso ya Yehova
4 Lokola Yehova azali Mozalisi, biloko nyonso oyo tozali na yango ezali ya ye. Na yango, ezali nde na eloko moko oyo tokoki kopesa ye? Ɛɛ, tokoki kopesa ye eloko moko ya motuya mingi. Eloko yango nini? Tokozwa eyano na maloba oyo: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.” (Masese 27:11) Eloko oyo tokoki kopesa Nzambe ezali botosi na biso. Atako bomoi na biso nyonso ezali ndenge moko te, toutá bisika ekeseni mpe tokolá ndenge moko te, mokomoko na biso akoki kopesa eyano na likambo oyo Satana Zabolo alobaki ete moto moko te akotikala sembo epai ya Nzambe soki amekami. Ezali mpenza libaku malamu mpo na biso!
it-2-F lok. 429 par. 1
Kotosa
Eloko moko te ekoki kozwa esika ya kotosa. Soki moto aboyi kotosa Nzambe, akoki ata moke te kondimama na ye. Se ndenge Samwele ayebisaki Mokonzi Saulo: “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba mpe na bambeka koleka kotosa [lolenge ya sha·maʽʹ] mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa [elingi koloba mpenza, koyoka] eleki mbeka, kotya likebi eleki mafuta ya bampate-mibali.” (1Sa 15:22) Koboya kotosa elimboli koboya koyoka makambo oyo Yehova alobi. Soki moto aboyi kotosa Yehova, amonisi ete aboyi kondimela ye, kotyela ye motema to kondima makambo oyo alobi. Kutu moto oyo aboyaka kotosa akeseni te na moto oyo asakolaka makambo oyo ebombaná to moto asalelaka bikeko. (1Sa 15:23; talá mpe Ro 6:16.) Kondima kaka na maloba elimboli eloko moko te soki likambo moko te esalemi na nsima; koboya kosala likambo emonisi ete moto aboyi kondima to azangi limemya epai ya moto oyo apesi malako yango. (Mt 21:28-32) Baoyo basepelaka kaka koyoka mateya ya solo ya Nzambe mpe bandimaka yango kasi basalaka te makambo oyo esɛngisami bamikosaka na makanisi ya lokuta mpe bazwaka mapamboli te. (Yk 1:22-25) Mwana ya Nzambe amonisaki polele ete ata baoyo basalaka makambo ya ndenge wana oyo esɛngisami, kasi na lolenge ya mabe to na makanisi ya mabe, bakokɔta soki moke te na Bokonzi ya Nzambe, kasi bakobwakama mpo na libela.—Mt 7:15-23.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F lok. 598 par. 7
Motema mawa
Komonisa motema mawa ntango eyokani te na mokano ya Nzambe ebimisaka makama minene soki moto amonisi yango na ndenge esengeli te. Yango nde likambo ekómelaki Mokonzi Saulo. Ngonga ekokaki mpo na kopesa Baamaleke etumbu ndenge Nzambe apesaki mitindo, mpo bazalaki bato ya liboso oyo babundisaki Bayisraele kaka mpamba nsima ya kobima na Ezipito. Bapesaki Saulo motindo ete ayokela bango mawa te. Kasi lokola bato na ye batyaki ye mbamba, Saulo atosaki mpenza te mobeko ya Yehova. Yango wana, Yehova aboyaki Saulo azala mokonzi. (1Sa 15:2-24) Soki moto azali mpenza kozwa na motuya banzela ya sembo ya Yehova mpe koluka naino kozala sembo epai na ye, akopɛngwa te lokola Saulo mpe Nzambe akondima ye.
21-27/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 16-17
“Etumba ezali ya Yehova”
“Etumba ezali ya Yehova”
Davidi abɛtɛlaki Saulo lisolo ya nkosi mpe urse oyo abomaki mpo na kokitisa ye motema. Azalaki komikumisa? Te. Davidi ayebaki ndenge alongaki bitumba yango. Alobaki boye: “Yehova, oyo abikisaki ngai na nkɔsi mpe na urse, ye nde akobikisa ngai na lobɔkɔ ya Mofilistia oyo.” Lokola andimisaki ye, Saulo alobaki boye: “Kende, mpe tiká ete Yehova ye moko azala na yo.”—1 Samwele 17:37.
Okolinga kozala na kondima lokola ya Davidi? Simbá ete kondima ya Davidi ezalaki kaka makanisi moko boye te. Azalaki na kondima epai ya Nzambe mpo na boyebi mpe makambo akutanaki na yango. Ayebaki ete Yehova azali Mobateli malamu mpe akokisaka bilaka na ye. Soki tolingi kokóma na kondima ya ndenge wana, tosengeli kokoba koyekola makambo ya Nzambe na Biblia. Soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, tokomona ete kondima na biso ekokóma makasi.—Baebre 11:1.
wp16.5 nk. 11-12 par. 8-9
“Etumba ezali ya Yehova”
Tii lelo, eyano oyo Davidi apesaki emonisaka ete azalaki na kondima monene. Meká naino komona ndenge elenge mobali yango azali kobelela Goliate: “Ozali koyela ngai na mopanga, na likɔnga mpe na likɔnga moke, kasi ngai, nazali koya epai na yo na nkombo ya Yehova ya mampinga, Nzambe ya milɔngɔ ya etumba ya Yisraele, oyo yo otumoli.” Davidi ayebaki ete nguya ya moto yango mpe bibundeli na ye ezalaki na ntina te. Goliate azangaki limemya epai ya Yehova Nzambe mpe Yehova alingaki kopesa ye eyano. Ndenge Davidi amonisaki yango, “etumba ezali ya Yehova.”—1 Samwele 17:45-47.
Davidi akufaki miso te mpo azanga komona molai ya Goliate mpe bibundeli na ye. Kasi Davidi aboyaki makambo yango ebangisa ye. Aboyaki kosala libunga oyo Saulo ná basoda na ye basalaki. Davidi amikokanisaki na Goliate te. Kutu, akokanisaki nde Goliate na Yehova. Goliate azalaki molai pene na mɛtrɛ misato mpe alekaki bato mosusu na molai, kasi Goliate azalaki mpenza engambe soki tokokanisi ye na Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba? Ndenge moko na bato nyonso, na miso ya Yehova Goliate azalaki kaka lokola mwa nyama moko ya moke oyo Yehova akoki koboma mbala moko!
“Etumba ezali ya Yehova”
Lelo oyo basaleli ya Nzambe bakendaka bitumba te. Ntango wana esí eleka. (Matai 26:52) Ata bongo, tosengeli komekola kondima ya Davidi. Ndenge moko na Davidi, tosengeli komona ete Yehova azalaka mpenza; tosengeli kosalela kaka ye mpe kobanga ye. Mbala mosusu tokoki komiyoka ete mikakatano na biso eleki biso monene, kasi soki tokokanisi yango na nguya ya Yehova oyo ezangi ndelo, tokomona ete ezali moke mpenza. Soki toponi Yehova azala Nzambe na biso mpe tomonisi kondima lokola Davidi, boye likambo moko te to mokakatano moko te ekobangisa biso. Eloko moko te ekokoka kotɛlɛma liboso ya nguya ya Yehova!
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F nk. 905-906 par. 8
Saulo
Ezalaki nsima na yango mpe nsima ya kotyama ya Davidi mafuta mpo na kozala mokonzi na Yisraele na mikolo ezali koya nde elimo ya Yehova elongwaki epai ya Saulo. Banda na ntango wana “elimo moko ya mabe oyo euti na Yehova ezalaki kopesa ye nsɔmɔ.” Lokola Yehova alongolaki elimo na ye epai ya Saulo, atikaki ete elimo moko ya mabe ekɔtela Saulo, oyo ezalaki kosala ete azala te na kimya ya makanisi, mpe ezala na bopusi moko mabe na mayoki na ye, na makanisi na ye mpe na ndenge na ye ya kotalela makambo. Ndenge aboyaki kotosa Yehova, Saulo amonisaki makanisi mabe ya motema na ye, yango wana elimo ya Nzambe ebatelaki ye te to epesaki ye nguya ya kotɛmɛla yango te. Lokola Yehova atikaki ‘elimo yango ya mabe’ ezwa esika na elimo na ye mpe epesa ye nsɔmɔ, tokoki koloba ete “elimo moko ya mabe oyo euti na Yehova” nde ezalaki kotungisa ye, atako basaleli ya Saulo bazalaki kolobela yango lokola “elimo mabe ya Nzambe.” Na nzela ya toli oyo moko ya basaleli na ye apesaki, Saulo asɛngaki bázwela ye mobɛti-miziki moko na lopango na ye, mpo na kokitisa ye motema ntango ‘elimo wana ya mabe’ ezalaki kotungisa ye.—1Sa 16:14-23; 17:15.
28/03–03/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 18-19
“Kobá kozala na komikitisa ntango makambo ezali kotambola malamu”
Tyelá elimo ya Nzambe motema ntango bomoi na yo ezali kobongwana
4 Mwa moke na nsima, elenge yango oyo azalaki mobateli ya mpate ayebanaki na ekólo mobimba. Babengaki ye mpo na kosala na ndako ya mokonzi mpe kobɛtɛla ye miziki. Abomaki elombe Goliate, engambe oyo basoda ya makasi ya Yisraele bazalaki kobanga kobunda na ye. Davidi akómaki mokonzi ya basoda mpe alongaki Bafilistia. Mboka mobimba balingaki ye. Basalaki banzembo ya kokumisa ye. Liboso, mopesi-toli moko ya Mokonzi Saulo alobaki ete elenge Davidi “ayebi nzɛnzɛ, azali mpe moto ya mpiko, moto ya etumba, moto ya liloba kitoko mpe moto malamu.”—1 Samwele 16:18; 17:23, 24, 45-51; 18:5-7.
Moná bokeseni kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe oyo asalelaka ye te
6 Bato mosusu bakómaka na lolendo mpo bazali kitoko, bayebani, bayebi kobɛta miziki, bazali na makasi, to mpe bato mingi basepelaka na bango. Davidi azalaki na nyonso wana, kasi azalaki na komikitisa bomoi na ye mobimba. Na ndakisa, ntango abomaki Goliate, Mokonzi Saulo alobaki ete Davidi akoki kobala mwana na ye. Kasi Davidi alobaki: “Ngai nde nani mpe bandeko na ngai, libota ya tata na ngai, nde banani na Yisraele mpo nakóma bokilo ya mokonzi?” (1 Samwele 18:18) Nini esalisaki Davidi abatela komitikisa? Ayebaki ete soki azali na bizaleli ya malamu, na mayele, mpe azwaki mikumba, ezalaki mpo Nzambe amonisaki komikitisa mpe atyelaki ye likebi. (Nzembo 113:5-8) Davidi ayebaki ete eloko nyonso ya malamu oyo azalaki na yango eutaki epai ya Yehova.—Talá mpe 1 Bakorinti 4:7.
7 Lokola Davidi, basaleli ya Yehova lelo basalaka makasi bázala na komikitisa. Koyeba ete Yehova, ye Oyo-Aleki-Likoló, azalaka na komikitisa, esimbaka mpenza motema na biso. (Nzembo 18:35) Tolingaka kotosa maloba oyo: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.” (Bakolose 3:12) Toyebi mpe ete bolingo “emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te.” (1 Bakorinti 13:4) Komikitisa na biso ekoki kotinda basusu báluka kosepela koyeba Yehova. Ndenge kaka mobali oyo azali mondimi te akoki kokóma mosambeli ya Yehova mpo na etamboli malamu ya mwasi na ye oyo azali mokristo, bato bakoki kokóma basambeli ya Nzambe mpo bamoni komikitisa ya basaleli na ye.—1 Petro 3:1.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F nk. 671-672 par. 5
Mosakoli
Soki basakoli batyamaki na elimo ya Yehova, emonisi te ete bazalaki ntango nyonso koloba na litambwisi ya elimo na ye. Kutu, elimo ya Nzambe ‘ezalaki kokwela bango’ na bantango oyo ebongi mpo na komonisa bango nsango oyo ekosakolama. (Ezk 11:4, 5; Mik 3:8) Yango ezalaki kosala lokola kura na kati na bango, yango wana ezalaki kotinda bango báloba to básakola. (1Sa 10:10; Yir 20:9; Am 3:8) Longola kosala makambo oyo ezalaki komonana ntina te, bazalaki koloba te ndenge bamesaná koloba, bazalaki komonisa mayoki oyo ezali komonisa bonene ya makambo, mpe bazalaki komiyoka ndenge mosusu. Mbala mosusu yango ezali komonisa ndimbola ya maloba “kosala makambo lokola basakoli.” (1Sa 10:6-11; 19:20-24; Yir 29:24-32; talá mpe Mis 2:4, 12-17; 6:15; 7:55.) Bamipesaki mpenza, bazalaki na molende mpe mpiko na mosala na bango, bazalaki na bizaleli oyo basusu bazalaki komona yango ndenge mosusu, mpe komonana lokola makambo makasimakasi, yango wana na bantango mosusu bato bazalaki komona ete mosakoli azali kosala makambo lokola komanda moko ya basoda, na ndakisa ntango batyaki Yehu mafuta. Na yango, kaka ntango bato bayaki kososola ete azalaki mosakoli, bazwaki na lisɛki te nsango oyo amemelaki bango. (2Ba 9:1-13; talá mpe Mis 26:24, 25.) Ntango Saulo azalaki kolanda Davidi, abandaki “kosala makambo lokola mosakoli,” alongolaki bilamba na ye mpe alalaki na mabele “bolumbu, mokolo wana mobimba mpe butu wana mobimba,” ntango Davidi azalaki kokima ye. (1Sa 19:18–20:1) Yango elimboli te ete ntango nyonso basakoli bazalaki kokende bolumbu, mpamba te lisolo yango ya Biblia emonisi bongo te. Na masolo mibale mosusu oyo Biblia elobeli, mosakoli azalaki kokende bolumbu mpo na mokano moko boye, mpo na komonisa likambo moko boye oyo ekosalema na esakweli na ye. (Yis 20:2-4; Mik 1:8-11) Ntina oyo Saulo atambolaki bolumbu eyebani te, soki ezalaki komonisa moto moko mpamba, balongoli ye bilamba na ye ya bokonzi, azalaki lisusu na nguya te liboso ya bokonzi mpe nguya ya bokonzi ya Yehova to soki ezalaki mpo na mokano mosusu.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: “Mosala oyo esɛngaka komikitisa”
Mosala oyo esɛngaka komikitisa
1 Liloba ya Nzambe epesi biso toli tózala ‘bato ya elimo ya komikitisa, tózongisaka mabe na mabe te . . . , kutu biso tópesaka nde lipamboli.’ (1 Pet. 3:8, 9) Tosengeli mpenza kosalela toli yango na mosala ya kosakola. Ya solo, mosala ya kosakola emekaka komikitisa na biso.
2 Komikitisa ezali ezaleli moko oyo esalisaka biso tóyika mpiko na makambo mabe. Na mosala ya kosakola, tokutanaka na bato oyo toyebi bango te mpe oyo babengaki biso epai na bango te, kasi toyebi malamu ete basusu bakoki komonisela biso ezaleli ya mabe. Mpo na kolanda kosakola ntango ozali kokutana na makambo ya ndenge wana, esɛngaka kozala na komikitisa. Na teritware moko oyo ezalaki mpasi mpo na kosakola kuna, babongisi-nzela mibale ya basi basakolaki ndako na ndako mikolo nyonso na boumeli ya mbula mibale, kasi ata moto moko te ayambaki bango! Kasi balɛmbaki te, lelo oyo masangá mibale ezali na teritware yango.
3 Ntango bato bamoniseli biso makambo makasi: Soki tozali na komikitisa, yango ekosalisa biso tómekola Yesu ntango bato bamoniseli biso boboto te to soki bamoniseli biso limemya te. (1 Pet. 2:21-23) Na ndako moko, mwasi moko mpe na nsima mobali na ye bafingaki ndeko mwasi moko, mpe mobali yango abenganaki ye. Ndeko mwasi wana asɛkaki kaka mpe ayebisaki bango ete azali kolikya ete akosolola na bango mokolo mosusu. Likambo yango esimbaki motema ya babalani wana, mpe yango etindaki bango báyoka ntango motatoli mosusu ayaki kosakola mpe bandimaki kokende na makita na Ndako ya Bokonzi. Ndeko mwasi oyo bango babenganaki ye ayaki kopesa bango mbote mpe kopesa bango litatoli mwa mingi. Biso mpe tokoki kolɛmbisa mitema ya bato oyo balingaka te koyoka nsango malamu soki tozali komonisa ‘elimo ya boboto mpe ya limemya makasi.’—1 Pet. 3:15; Mas. 25:15.
4 Boyá lolendo: Boyebi na biso ya Biblia epesi biso nzela te tómonaka bato mpamba to tótyolaka bango. (Yoa. 7:49) Kutu, Liloba ya Nzambe epesi biso nde toli tóloba “mabe mpo na moto te.” (Tito 3:2) Ntango tozali na elimo ya komikitisa, ndenge oyo Yesu azalaki na yango, tokobɔndisa basusu. (Mat. 11:28, 29) Kozala na komikitisa ebendaka bato báyoka nsango na biso.
5 Ya solo, komikitisa esalisaka biso tóyika mpiko na teritware oyo mosala ya kosakola ezalaka na mikakatano mingi. Ekoki kolɛmbisa mitema ya bato oyo baboyaka koyoka, mpe kobenda basusu bándima nsango ya Bokonzi. Kasi oyo ezali na ntina koleka, esepelisaka Yehova, oyo “amonisaka boboto monene na ye epai ya bato ya komikitisa.”—1 Pet. 5:5.
04-10/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 20-22
“Oyo okoki kosala mpo ozala moninga malamu”
Salá boninga ya makasi na basusu liboso nsuka eya
18 Lelo oyo, bandeko na biso bazali kokutana na mikakatano ya ndenge na ndenge. Na ndakisa, mingi bazali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko to oyo bato babimisaka. Soki esalemi bongo, basusu kati na biso bazalaka na likoki ya koyamba bandeko na ndako na bango. Basusu mpe basalisaka bango na mbongo. Kasi, biso nyonso tokoki kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye asalisa bandeko na biso. Soki toyoki ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko alɛmbi nzoto, ntango mosusu tokoyeba te tóloba na ye nini to tósala nini. Kasi, biso nyonso tokoki kosalisa na ndenge mingi. Na ndakisa, tokoki kokende kolekisa ntango na moninga yango. Tokoki koyoka ye na boboto ntango azali koloba. Tokoki mpe kotángela ye vɛrsɛ ya kolendisa oyo tolingaka mingi. (Yis. 50:4) Ezali na ntina mingi ozala elongo na baninga na yo na ntango oyo bazali na mposa na yo.—Tángá Masese 17:17.
Tambolá na banzela ya Yehova
7 Yehova asɛngi biso tózala baninga oyo babongi kotyelama motema. (Mas. 17:17) Yonatane, mwana ya Mokonzi Saulo azalaki moninga ya Davidi. Ntango ayokaki ete Davidi abomaki Goliate, “molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi, mpe Yonatane akómaki kolinga ye lokola molimo na ye moko.” (1 Sa. 18:1, 3) Kutu, Yonatane akebisaki Davidi ntango Saulo alukaki koboma ye. Na nsima ntango Davidi akimaki, Yonatane akendaki kokutana na ye mpe basalaki boyokani. Saulo alingaki koboma Yonatane mpo alobaki malamu mpo na Davidi, kasi baninga yango mibale bakutanaki lisusu mpe bayeisaki boninga na bango makasi. (1 Sa. 20:24-41) Na mbala ya nsuka oyo bakutanaki, Yonatane alendisaki Davidi “atyela Nzambe motema.”—1 Sa. 23:16-18.
Ndenge ya kobatela boninga na mokili oyo ezangá bolingo
11 Zalá sembo. Salomo akomaki boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Ntango Salomo azalaki kokoma maloba yango, mbala mosusu azalaki kokanisa boninga oyo tata na ye Davidi asalaki ná Yonatana. (1 Sa. 18:1) Mokonzi Saulo alingaki ete mwana na ye Yonatana akóma mokonzi ya Yisraele nsima na ye. Kasi, Yonatana andimaki ndenge Yehova aponaki Davidi akóma mokonzi. Na bokeseni na Saulo, Yonatana ayokelaki Davidi zuwa te. Ayokaki nkanda te mpo na lokumu oyo bapesaki Davidi; andimaki mpe te makambo ya lokuta oyo Saulo apanzaki mpo na Davidi. (1 Sa. 20:24-34) Ozali lokola Yonatana? Ntango baninga na yo bazwi mikumba na lisangá, osepelaka mpo na yango? Ntango bakutani na mikakatano, obɔndisaka mpe osalisaka bango? Soki oyoki moto azali koloba mabe ya moninga moko, ondimaka yango mbala moko? To okɔtelaka moninga na yo na bosembo, ndenge Yonatana asalaki?
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele
21:12, 13. Yehova alingi ete tósalela mayele mpe makoki na biso ya kokanisa mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. Apesi biso Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye oyo esalisaka biso tózala na ekɛngɛ, boyebi, mpe makoki ya kokanisa. (Masese 1:4) Tozali mpe na bankulutu oyo basalisaka biso.
18-24/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 23-24
“Kobá kozela Yehova”
Tyelá elimo ya Nzambe motema ntango bomoi na yo ezali kobongwana
8 Davidi aboyaki kosala Saulo mabe. Azalaki na kondima mpe na motema molai mpe amonaki malamu kotika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Ntango mokonzi abimaki na lidusu yango, Davidi abelelaki ye mpe alobaki na ye boye: “Tiká ete Yehova akata likambo kati na ngai ná yo; mpe Yehova azongisela yo mabe mpo na ngai, kasi lobɔkɔ na ngai mpenza ekoyela yo te.” (1 Samwele 24:12) Atako Davidi ayebaki ete Saulo azali kosala mabe, azongisaki mabe na mabe te; alobaki na Saulo mabe te to mpe atɔngaki ye te. Davidi azwaki mabaku mingi mosusu ya koboma Saulo, kasi, aboyaki kosilisa likambo ye moko. Atyaki motema ete Yehova ye moko akobongisa makambo.—1 Samwele 25:32-34; 26:10, 11.
Otikaka ete mikakatano ezongisa yo nsima?
Liteya ya misato oyo tokoki kozwa ezali ete, na esika tólukaka kosilisa mikakatano na biso nokinoki na ndenge oyo Biblia endimi te, tosengeli kotalelaka Yehova. Yakobo akomaki boye: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bino bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.” (Yakobo 1:4) Mpo tótika ezaleli ya koyika mpiko esala “mosala na yango mobimba,” tosengeli kotika mikakatano yango tii na nsuka, kozanga koluka kosilisa yango nokinoki na ndenge oyo Biblia endimi te. Soki tozali kosala bongo, kondima na biso ekomekama mpe ekopɛtolama, mpe nguya na yango ekomonana polele. Yozefe ná Davidi bazalaki na ezaleli ya koyika mpiko ndenge wana. Mpo na kosilisa mikakatano na bango, balukaki te kosala makambo oyo ekosepelisa Yehova te. Basalaki nyonso oyo bakokaki ata na kati ya mikakatano. Batalelaki Yehova, mpe Yehova apambolaki bango mpenza! Yehova apesaki mokomoko na bango mokumba ya kobikisa mpe kotambwisa bato na ye.—Ebandeli 41:39-41; 45:5; 2 Samwele 5:4, 5.
Biso mpe tokoki kokutana na mikakatano mpe koluka kosilisa yango na banzela oyo Biblia endimi te. Na ndakisa, obandi kolɛmba nzoto mpo ozali koluka moto oyo okoki kobalana na ye kasi ozwi ye naino te? Soki ezali bongo, benganá makanisi nyonso oyo ekoki kotinda oyo obuka mobeko ya Yehova oyo esɛngi ete tóbala ‘kaka kati ya Nkolo.’ (1 Bakorinti 7:39) Ozali nde na mikakatano na libala na yo? Na esika opesa nzela na elimo ya mokili, oyo ezali kolendisa kokabwana mpe koboma libala, salá nde makasi osilisa mikakatano yango elongo na molongani na yo. (Malaki 2:16; Baefese 5:21-33) Ozali nde na mokakatano ya kokokisa bamposa ya libota na yo mpo ozangi mbongo? Kotalela Yehova esɛngaka mpe koboya koluka mbongo na banzela ya mabe. (Nzembo 37:25; Baebre 13:18) Biso nyonso tosengeli mpenza kosala makasi mpo tótika te ete mikakatano ezongisa biso nsima mpe tósala nyonso mpo Yehova apambola biso. Ntango tozali kosala bongo, tózwa ekateli ya kotalela kaka Yehova, na elikya ete akosilisa mikakatano na biso nyonso mpe mpo na libela.—Mika 7:7.
Biloko ya motuya ya elimo
Kotika eloko te ezangisa yo libonza
11 Soki tosali nyonso mpo na komonisa bolingo mpe boboto, ekozala mpasi tóyokela basusu zuwa. Liloba ya Nzambe elobi: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te.” (1 Bakorinti 13:4) Mpo zuwa ekóma te moko ya bizaleli na biso, tosengeli kosala nyonso tótalelaka makambo lokola Yehova. Tosengeli komona bandeko na biso lokola binama ya nzoto kaka moko, elingi koloba lisangá. Biblia elobi: “Soki enama moko ekumisami, binama mosusu nyonso mpe esepelaka elongo na yango.” (1 Bakorinti 12:16-18, 26) Na yango, soki likambo moko ya malamu ekómeli ndeko na biso, tósepela, tóyokela ye zuwa te. Kanisá ndakisa ya Yonatane, mwana ya Mokonzi Saulo. Yonatane ayokaki zuwa te ntango Davidi nde aponamaki mpo na kozala mokonzi. Kasi, alendisaki ye mpe apesaki ye mabɔkɔ. (1 Samwele 23:16-18) Yo mpe okoki komonisa boboto mpe bolingo lokola Yonatane?
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: “Zalá na motema molai epai ya bato oyo ozali koteya”
Monisá ete omityaka na esika ya basusu na mosala ya kosakola
12 Ya misato, moniselá bato oyo oteyaka motema molai. Kobosana likambo oyo te: Ekoki kozala ete bayoká naino te mateya mosusu ya Biblia oyo biso toyebi malamu. Longola yango, mingi na bango bakangamá makasi na mateya oyo bayebisá bango. Ntango mosusu, bamonaka ete mateya ya lingomba na bango esalisaka bango bákangama makasi na libota na bango, na mimeseno ya bonkɔkɔ na bango, mpe na bato ya ekólo na bango. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?
13 Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete balingi kobuka gbagba (pont) moko ya kala oyo ebebi mpo na kotonga mosusu ya sika. Bakosala nini? Mbala mingi, batongaka gbagba ya sika ntango oyo ya kala ezali naino wana. Soki gbagba ya sika esili, nde bakoki kobuka oyo ya kala. Ndenge moko mpe, liboso ya koyebisa bato bátika mateya ya “kala” oyo bakangamá na yango, tosengeli liboso kosalisa bango báyeba mpe bálinga mateya ya “sika,” elingi koloba mateya ya Biblia oyo bayebaki liboso te. Kaka na ntango wana nde bakoki kotika kokangama na mateya ya kala oyo bazalaki kondima. Ekoki kosɛnga ntango mingi mpo na kosalisa bato bábongwana ndenge wana.—Rom. 12:2.
14 Soki tozali komonisela bato motema molai na mosala ya kosakola, tokomizela te ete bákanga ntina ya mateya ya Biblia to bándima yango kaka mbala ya liboso oyo bayoki yango. Kasi, soki tozali komitya na esika ya basusu, tokotikela bato ntango mpo bákanisa na mozindo makambo oyo Biblia elobi. Na ndakisa, kanisá ndenge oyo tokoki kosalisa moto akanga ntina ya elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Bato mingi bayebi liteya yango malamu te to bayebi yango ata moke te. Ntango mosusu bakanisaka ete soki moto akufi, nyonso esili mpo na ye. To bakanisaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka likoló. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?
15 Ndeko mobali moko alobeli mayele oyo amonaka ete ebongi mpenza. Liboso, atángelaka moto Ebandeli 1:28. Na nsima, atunaka boye: ‘Epai wapi Nzambe alingaki ete bato báfanda, mpe na bomoi ya ndenge nini?’ Bato mingi bayanolaka: “Na mabele, na bomoi ya malamu.” Nsima na yango, ndeko yango atángaka Yisaya 55:11 mpe atunaka soki mokano ya Nzambe ebongwani. Mbala mingi, bato bayanolaka: “Te, ebongwani te.” Na nsuka, ndeko yango atángaka Nzembo 37:10, 11 mpe atunaka bomoi ya ndenge nini bato bakozala na yango na mikolo ezali koya. Kosalela Biblia ndenge wana esalisaki ndeko yango asalisa bato mingi báyeba ete Nzambe azali kaka na mposa ete bato ya malamu bázala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele.
25/04–01/05
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 25-26
“Osalaka makambo kozanga kokanisa?”
Asalaki na bokɛngi
10 Makambo nini basoda yango ya mpiko bazalaki kosala babateli ya mpate? Bakokaki mbala na mbala koyiba mpate mpo bálya, kasi basalaki yango te. Kutu, bakómaki nde kobatela bibwɛlɛ ya Nabale mpe bato na ye ya mosala. (Tángá 1 Samwele 25:15, 16.) Bampate ná babateli na yango bazalaki kokutana na makama mingi. Banyama mabe ezalaki mingi mpe lokola ndelo ya sudi ya Yisraele ezalaki mosika te, bapunzi mpe miyibi oyo bazalaki kouta na bikólo mosusu bazalaki mingi na esika yango.
11 Ezalaki pɛtɛɛ te koleisa mibali wana nyonso na esobe. Na yango, mokolo moko Davidi atindaki bato na ye zomi bákende kosɛnga Nabale lisalisi. Davidi aponaki ntango ya malamu. Ezalaki eleko ya kokata nsuki ya bampate, ntango oyo bato mingi bazalaki na momeseno ya kokabela bazalani na bango biloko. Davidi aponaki malamu maloba na ye, asalelaki maloba ya limemya. Kutu atindaki báloba na Nabale ete “mwana na yo Davidi,” mbala mosusu mpo na komonisa na limemya nyonso ete Nabale azali mokóló na ye. Nabale asalaki nini?—1 Sa. 25:5-8.
12 Asilikaki! Elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli ayebisaki Abigaile ete Nabale ‘apamelaki makasi’ bato oyo Davidi atindaki. Lokola Nabale azalaki mabɔkɔ makasi, alobaki ete akoki te kokaba mampa, mai mpe misuni ya banyama oyo bautaki koboma. Alobaki ete Davidi azali na ntina te mpe azali lokola mosali oyo akimá nkolo na ye. Ekoki kozala ete makanisi ya Nabale ezalaki ndenge moko na oyo ya Saulo, oyo azalaki koyina Davidi. Moko te kati na bango mibale atalelaki makambo ndenge Yehova atalelaka. Nzambe azalaki kolinga Davidi mpe azalaki komona ye te lokola moombo oyo atombokeli nkolo na ye, kasi lokola moto oyo akokóma mokonzi ya Yisraele.—1 Sa. 25:10, 11, 14.
Asalaki na bokɛngi
18 Atyaki likambo yango na motó na ye mpe asɛngaki Davidi alimbisa nde ye. Andimaki ete mobali na ye azali zoba, ndenge nkombo na ye emonisi yango, mbala mosusu mpo na komonisa ete Davidi akokitisa lokumu na ye soki apesi moto ya ndenge wana etumbu. Amonisaki ete azali kondima Davidi lokola momonisi ya Yehova, mpe ayebaki ete azalaki kobunda “bitumba ya Yehova.” Amonisaki mpe ete ayebi elaka oyo Yehova apesaki ete Davidi akozala mokonzi, mpo alobaki ete: “Yehova . . . akotya yo mpenza mokambi ya Yisraele.” Longola yango, asɛngaki Davidi asala te likambo oyo ekoki komemisa ye ngambo ya makila to oyo ekoki kosala ete akóma ‘kotengatenga,’ na ntembe te azalaki kolobela ndenge lisosoli na ye ekotungisama. (Tángá 1 Samwele 25:24-31.) Maloba yango ezalaki mpenza ya boboto mpe ya kosimba motema!
Biloko ya motuya ya elimo
Asalaki na bokɛngi
16 Yango elingi nde koloba ete Abigaile atosaki te bokonzi ya mobali na ye? Te; tóbosana te ete Nabale afingaki moto yo Yehova atyaki mafuta, likambo yango ekokaki kobomisa bato mingi ya libota ya Nabale oyo basalaki eloko te. Soki Abigaile asalaki eloko te, alingaki mpe kozala na ngambo mpo na mabe ya mobali na ye. Yango wana, esengelaki atosa Nzambe liboso ya kotosa mobali na ye.