Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr22 Mai nk. 1-13
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • 02-08/05
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 27-29
  • “Mayele ya etumbu oyo Davidi asalelaki”
  • it-1-F lok. 71
  • Akishe
  • w21.03 lok. 4 par. 8
  • Bilenge: Bokoki kosala nini mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema?
  • it-2-F lok. 255 par. 6
  • Lokuta
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • w10 1/1 lok. 20 par. 5-6
  • Bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi?
  • 09-15/05
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 30-31
  • “Tiká Yehova Nzambe na yo apesa yo makasi”
  • w06 1/8 lok. 28 par. 12
  • Bangá Yehova mpo ozala na esengo!
  • w12 15/4 lok. 30 par. 14
  • Yehova abatelaka biso mpo na lobiko
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • w05 15/3 lok. 24 par. 9
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele
  • 16-22/05
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 1-3
  • “Mateya nini tozwi na loyembo oyo ebengami ‘litimbo’?”
  • w00 15/6 nk. 13-14 par. 9
  • Bópesa baoyo bazali na bokonzi likoló na bino lokumu
  • w12 15/4 lok. 10 par. 8
  • Kotɛka basusu​—Ezaleli moko mabe ya mikolo ya nsuka!
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-1-F nk. 928-929 par. 4
  • Ndeko
  • 23-29/05
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 4-6
  • “Kobá kobanga koyokisa Yehova mpasi”
  • w05 15/5 lok. 17 par. 8
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Samwele
  • w05 1/2 lok. 27 par. 20
  • Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene
  • w05 1/2 lok. 27 par. 21
  • Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • w96 1/4 lok. 29 par. 1
  • Kitisá mokumba na yo ntango nyonso epai na Yehova
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • w05 1/10 nk. 23-24 par. 14-15
  • “Bókɛngɛlaka”​—Ngonga ya kosambisa eyei!
  • BOMOI YA BAKRISTO
  • Omibongisi mpo na mobulu oyo bana-mboka bakoki kobimisa?
  • jr mok. 10 par. 23-24
  • Omitunaka mokolo na mokolo ete “wapi Yehova?”
  • 30/05–05/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 7-8
  • “Yehova asali kodimana ná Davidi”
  • w10 1/4 lok. 20 par. 3
  • “Bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi”
  • w10 1/4 lok. 20 par. 4
  • “Bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi”
  • w14 15/10 nk. 10-11 par. 14
  • Zalá na kondima makasi na Bokonzi
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-1-F lok. 623 par. 2
  • Mikolo ya nsuka
  • 06-12/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 9-10
  • “Davidi amonisaki bolingo ya sembo”
  • w06 15/6 lok. 14 par. 6
  • Okoki mpenza kozala na esengo
  • w05 15/5 lok. 17 par. 12
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Samwele
  • w02 15/2 lok. 14 par. 10
  • Bato ya sembo babundaki na nzube kati na nzoto
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-1-F lok. 270 par. 3
  • Mandefu
  • 13-19/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 11-12
  • “Kotika te bamposa ya mabe etambwisa yo”
  • w21.06 nk. 17-18 par. 10
  • Okoki kokima mitambo ya Satana!
  • w19.09 nk. 17-18 par. 15
  • Mpo na nini mpe ndenge nini komikitisa liboso ya Yehova?
  • w18.06 nk. 17-18 par. 7
  • Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-1-F lok. 600 par. 6
  • Davidi
  • 20-26/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 13-14
  • “Ezaleli ya moimi ya Aminone ememelaki ye mpasi”
  • it-1-F lok. 31 par. 5
  • Abisalome
  • w17.09 lok. 5 par. 11
  • Kolisá komipekisa
  • it-1-F lok. 32 par. 1
  • Abisalome
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • g04-F 22/12 nk. 8-9
  • Kitoko oyo eleki ntina
  • 27/06–03/07
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 15-17
  • “Abisalome akómaki motomboki mpo azalaki koluka lokumu”
  • it-2-F nk. 630-631
  • Mopoti-mbangu oyo azalaki kopota mbango liboso
  • w12 15/7 lok. 13 par. 5
  • Tósalela Nzambe oyo apesaka bonsomi
  • it-1-F lok. 1101 par. 4
  • Hebrone
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • w18.08 lok. 6 par. 11
  • Otalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango?
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • w09 15/5 nk. 27-28
  • Tózala sembo lokola Itai
  • ‘Mopaya mpe moto atiká mboka’
  • “Mpo na kolakisa biso”
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2022
mwbr22 Mai nk. 1-13

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

02-08/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 27-29

“Mayele ya etumbu oyo Davidi asalelaki”

it-1-F lok. 71

Akishe

Ntango Davidi azalaki kokima Saulo, mbala mibale akimaki na teritware ya mokonzi Akishe. Mbala ya liboso ezalaki ntango Davidi amonaki ete bakozwa ye lokola monguna, akosaki ete azali moto ya libgoma, mpe mokonzi Akishe atikaki ye akende mpo amonaki ye lokola zoba to moto mpamba. (1Sa 21:10-15; maloba oyo ezali na likoló ya mokapo ya Nz 34; mpe ya Nz 56) Mbala ya mibale ezalaki ntango Davidi azalaki elongo na mibali na ye ya etumbu 600 mpe bato ya mabota na bango, mpe Akishe atindaki bango bákende kofanda na Ziklage. Na boumeli ya mbula moko ná sanza minei oyo basalaki kuna, Akishe akanisaki ete limpinga ya basoda ya Davidi ezalaki kokɔta na bingumba ya Yuda mpo na kopunza yango, nzokande Davidi ná bato na ye bakɔtaki mpo na kopunza Bageshure, Bagirize, mpe Baamaleke. (1Sa 27:1-12) Mayele oyo asalelaki elongaki, yango wana Akishe azwaki Davidi azala mokɛngɛli na ye ntango Bafilistia bazalaki komibongisa mpo na kobundisa Saulo, mpe kaka na nsuka ya ntango yango, nde “bankolo ya lisangani” ya Bafilistia basɛngaki mokonzi azongisa Davidi ná bato na ye na Ziklage. (1Sa 28:2; 29:1-11) Ntango Davidi akómaki mokonzi mpe abundisaki mboka Gate, emonani lokola Akishe abomamaki te. Mpamba te azalaki na bomoi na ebandeli ya boyangeli ya Salomo.​—1Ba 2:39-41; talá GATE.

w21.03 lok. 4 par. 8

Bilenge: Bokoki kosala nini mpo bandeko ya lisangá bátyelaka bino motema?

Tótalela mokakatano mosusu oyo Davidi akutanaki na yango. Nsima ya kotyama mafuta mpo akóma mokonzi, Davidi asengelaki kozela bambula mingi liboso abanda koyangela lokola mokonzi ya Yuda. (1 Sa. 16:13; 2 Sa. 2:3, 4) Na boumeli ya ntango wana, nini esalisaki ye amonisa motema molai? Na esika atika makambo yango elɛmbisa ye nzoto, Davidi atyaki makanisi na ye nyonso na makambo oyo akokaki kosala. Na ndakisa, ntango akimaki ekólo na ye mpe akendaki kofanda na mokili ya Bafilistia, Davidi asalelaki libaku yango mpo na kobunda na banguna ya Yisraele. Kosala bongo esalisaki ye abatela bandelo ya teritware ya Yuda.​—1 Sa. 27:1-12.

it-2-F lok. 255 par. 6

Lokuta

Atako Biblia epekisi koloba lokuta, yango elingi koloba te ete moto asengeli koloba makambo nyonso oyo ezali solo epai ya bato oyo bazali na ndingisa te ya koyeba yango. Yesu Kristo apesaki toli oyo: “Bópesa bambwa eloko mosantu te, mpe bóbwakela bangulu mayaka na bino te, noki bányatanyata yango na makolo na bango, bábaluka mpe bázokisa bino.” (Mt 7:6) Yango wana, na bantango mosusu Yesu azalaki koboya koyebisa makambo nyonso to koboya kopesa biyano ya polele na mituna mosusu soki yango ekokaki kopesa moto mpasi. (Mt 15:1-6; 21:23-27; Yn 7:3-10) Na ntembe te, tomoni ntina oyo Abrahama, Yisaka, Rahaba, mpe Elisha baboyaki kopesa nsango nyonso to babombelaki bato oyo bazalaki kosambela Yehova te makambo mosusu.​—Eb 12:10-19; mok 20; 26:1-10; Yos 2:1-6; Yk 2:25; 2Ba 6:11-23.

Biloko ya motuya ya elimo

w10 1/1 lok. 20 par. 5-6

Bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi?

Kanisá naino. Biblia elobi ete soki moto akufi, “akozonga na mabele” mpe ete “makanisi na ye ekufi.” (Nzembo 146:4) Saulo ná Samwele bayebaki ete Nzambe apekisaki likambo ya kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo. Kutu, mwa moke liboso, Saulo alongolaki misala ya bilimo mabe na mokili na bango!​—Balevi 19:31.

Kanisá likambo yango. Soki Samwele moto ya sembo, akobaki kozala na bomoi lokola elimo, alingaki kobuka mobeko ya Nzambe mpe koyokana na nganga-nkisi mpo na kokutana na Saulo? Yehova aboyaki koloba na Saulo. Na yango, nganga-nkisi akokaki nde kotinda Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso asolola ná Saulo na nzela ya Samwele oyo akufaki? Te. Ezali polele ete “Samwele” wana ezalaki te mosakoli ya sembo ya Nzambe oyo ayaki na lolenge moko boye. Ezalaki nde elimo moko ya mabe​—demo moko oyo akosaki ete azali Samwele oyo akufá.

09-15/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 SAMWELE 30-31

“Tiká Yehova Nzambe na yo apesa yo makasi”

w06 1/8 lok. 28 par. 12

Bangá Yehova mpo ozala na esengo!

Kobanga Nzambe esukaki kaka te na kopekisa Davidi asala mabe. Epesaki ye mpe mpiko mpe bwanya na ntango ya mikakatano. Na boumeli ya mbula mobimba ná sanza minei, Davidi ná bato na ye bakimaki Saulo na Ziklage, engumba moko ya Bafilistia. (1 Samwele 27:5-7) Mokolo moko, ntango mibali babimaki, bapunzi oyo bautaki na Amaleke batumbaki engumba yango mpe bazwaki basi, bana mpe bibwele na bango bakendaki na bango. Ntango Davidi ná bato na ye bazongaki mpe bamonaki likambo oyo basalaki bango, balelaki. Mosika te, kolela yango ebongwanaki nkanda, mpe bato ya Davidi bakómaki koloba ete bakoboma ye na mabanga. Atako likambo yango elɛmbisaki ye, Davidi abungisaki elikya te. (Masese 24:10) Kobanga Nzambe etindaki ye abondela Yehova, mpe “azwaki makasi mpo na Yehova.” Na lisalisi ya Nzambe, Davidi ná bato na ye balandaki Baamaleke, balongaki bango mpe bazwaki lisusu basi, bana mpe biloko na bango nyonso.​—1 Samwele 30:1-20.

w12 15/4 lok. 30 par. 14

Yehova abatelaka biso mpo na lobiko

Davidi akutanaki na mikakatano mingi na bomoi na ye. (1 Sa. 30:3-6) Makambo oyo akomaki na litambwisi ya elimo santu emonisi ete Yehova ayebaki ndenge oyo azalaki koyoka. (Tángá Nzembo 34:18; 56:8.) Nzambe ayebi mpe malamu ndenge oyo toyokaka. Azalaka penepene na biso ntango tozali na “motema [oyo] ebukani” to na “elimo [oyo] etutami.” Koyeba likambo yango ekoki kobɔndisa biso, ndenge ebɔndisaki Davidi mpe etindaki ye ayemba ete: “Nakozala na esengo mpe nakosepela na motema boboto na yo, mpo omoni mpasi na ngai; oyebi bampasi ya molimo na ngai.” (Nz. 31:7) Kasi Yehova asukaka te kaka na komona mpasi na biso. Abɔndisaka mpe alendisaka biso mpo tókoka koyika mpiko. Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na nzela ya makita ya lisangá.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 15/3 lok. 24 par. 9

Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele

30:23, 24. Ekateli yango oyo elandi etinda ya Mitángo 31:27, emonisi ete Yehova atalelaka na motuya baoyo bazali kopesa mabɔkɔ na lisangá. Yango wana, ezala tozali kosala nini, ‘tósala yango na molimo na biso mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.’​—Bakolose 3:23.

16-22/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 1-3

“Mateya nini tozwi na loyembo oyo ebengami ‘litimbo’?”

w00 15/6 nk. 13-14 par. 9

Bópesa baoyo bazali na bokonzi likoló na bino lokumu

Davidi azalaki nde komitungisa ntango bazalaki konyokola ye? Davidi amilelaki epai ya Yehova ete: “Mpo ezali na . . . banyokoli oyo bazali koluka molimo na ngai.” (Nzembo 54:3) Alobaki na Yehova ete: “Ee Nzambe na ngai, bikisá ngai na mabɔkɔ ya banguna na ngai . . . Bato ya makasi bazali kobunda na ngai, ee Yehova, nazali na botomboki te, nazali mpe na lisumu te. Atako libunga ezali te, bazali kopota mbangu mpe bazali komibongisa. Lamuká ntango nazali kobenga mpe talá.” (Nzembo 59:1-4) Oyoká naino ndenge yango te, ete mokonzi moko boye, osali ye mabe moko te, kasi alingi kotika yo nyɛɛ te? Atako bongo, Davidi atikaki kopesa Saulo limemya te. Ntango Saulo akufaki, na esika ayoka esengo, Davidi asalaki nzembo moko ya mawa oyo elobaki boye: “Saulo ná Yonatane, bato oyo balingami mingi, bato oyo bazalaki kosepelisa na bomoi na bango . . . Bazalaki na mbangu koleka bampongo, bazalaki na makasi koleka bankɔsi. Bino bana basi ya Yisraele, bólela Saulo.” (2 Samwele 1:23, 24) Talá ndakisa ya limemya ya solosolo mpo na moponami ya Yehova; Davidi asalaki bongo atako Saulo asalaki ye mabe!

w12 15/4 lok. 10 par. 8

Kotɛka basusu​—Ezaleli moko mabe ya mikolo ya nsuka!

Biblia elobeli mpe bato mingi oyo bazalaki sembo. Tólobela mibale kati na bato yango mpe tómona mateya oyo tokoki kozwa. Tóbanda na Yonatane, moto oyo atikalaki sembo epai ya Davidi. Yonatane azalaki mwana ya liboso ya Mokonzi Saulo mpe ye nde asengelaki kokóma mokonzi nsima ya tata na ye. Nzokande, Yehova aponaki Davidi. Yonatane andimaki ekateli ya Nzambe. Akómaki kotalela Davidi lokola monguna na ye te. “Molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi,” mpe alakaki ye ete akotikala sembo epai na ye. Kutu, Yonatane apesaki Davidi bilamba, mopanga, litimbo, mpe mokaba na ye, likambo oyo emonisi ete apesaki ye lokumu ya bokonzi. (1 Sa. 18:1-4) Yonatane asalaki nyonso oyo akokaki mpo na “kolendisa” Davidi; atyaki kutu bomoi na ye moko na likama na ndenge akɔtelaki Davidi liboso ya Saulo. Yonatane amonisaki bosembo epai ya Davidi mpe alobaki na ye boye: “Yo, okokóma mokonzi ya Yisraele, mpe ngai, nakokóma moto ya mibale, nsima na yo.” (1 Sa. 20:30-34; 23:16, 17) Tokoki kokamwa te ete nsima ya liwa ya Yonatane, Davidi asalaki loyembo ya mawa mpo na komonisa mpasi oyo ayokaki mpe ndenge oyo alingaki Yonatane.​—2 Sa. 1:17, 26.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F nk. 928-929 par. 4

Ndeko

Liloba “ndeko” esalelamaka mpe mpo na bato oyo bazali na bomoko, mokano moko mpe oyo makambo na bango ekokani. Na ndakisa, mokonzi Hirame ya Tire abengaki mokonzi Salomo ndeko na ye, kaka te mpo azalaki mokonzi lokola Salomo kasi mpe mbala mosusu mpo na matomba oyo bazalaki na yango mpo na banzete mpe biloko mosusu ya tempelo. (1Ba 9:13; 5:1-12) Davidi akomaki boye: “Talá! Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” Yango emonisi ete kimya mpe bomoko esalemaka kaka te soki bato bazali bato ya makila moko to babotamá na tata moko. (Nz 133:1) Kutu, Davidi abengaki Yonatane ndeko na ye, ezalaki te mpo bazalaki bana ya tata moko, kasi ezalaki nde mpo bazalaki kolingana mingi mpe kosepelisana. (2Sa 1:26) Ata baninga oyo bazalaka na makanisi mpe bizaleli oyo ekokaná, ezala ya mabe, babenganaka mpe bandeko.​—Mas 18:9.

23-29/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 4-6

“Kobá kobanga koyokisa Yehova mpasi”

w05 15/5 lok. 17 par. 8

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Samwele

6:1-7. Atako Davidi azalaki na makanisi ya malamu, lokola amemisaki Sanduku na likalo, abukaki mobeko ya Nzambe, yango wana alongaki te. (Exode 25:13, 14; Mituya 4:15, 19; 7:7-9) Lisusu, etumbu oyo Uza azwaki mpo asimbaki Sanduku emonisi ete makanisi malamu ya moto ekoki kobongola masɛngami ya Nzambe te.

w05 1/2 lok. 27 par. 20

Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene

Tóbosana te ete Uza asengelaki koyeba Mibeko malamu. Sanduku ezalaki komonisa ete Yehova azali na kati ya Yisraele. Mibeko elobaki polele ete moto oyo azali na ndingisa te akoki kosimba Sanduku te; mpe ebakisaki polele ete soki moto asimbi yango, etumbu na ye ekozala liwa. (Mitángo 4:18-20; 7:89) Yango wana, komema sanduku ya bosantu ezalaki likambo ya lisɛki te. Na ntembe te Uza azalaki Molevi (atako azalaki nganga te); na bongo, tokoki kokanisa ete ayebaki Mibeko malamu. Longola yango, banda bambula mingi, babombaki Sanduku na ndako ya tata na ye. (1 Samwele 6:20–7:1) Eumelaki kuna soki mbula 70, tii ntango Davidi azwaki likanisi ya komema yango. Emonani mpenza ete banda bomwana na ye, Uza ayebaki mibeko oyo Nzambe apesaki mpo na Sanduku yango.

w05 1/2 lok. 27 par. 21

Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene

Ndenge tolobaki yango liboso, Yehova akoki kotánga na mitema ya bato. Lokola Liloba na ye elobi ete likambo oyo Uza asalaki ezali “kozanga limemya,” ekoki kozala ete Yehova amonaki ete azalaki na makanisi ya mabe oyo bakomi yango te na lisolo. Ntango mosusu Uza azalaki na lolendo, azalaki na nsɔmɔ te ya kosala makambo oyo azali na ndingisa na yango te. (Masese 11:2) Mbala mosusu lokola azalaki kotambwisa Sanduku oyo efandaki na ndako na bango, amimonaki moto monene. (Masese 8:13) Ntango mosusu Uza azangaki kondima mpe akanisaki ete lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse mpo na kopekisa sanduku oyo ezalaki komonisa Ye ekwea te. Ezala ndenge nini, tokoki kolikya ete Yehova asalaki na boyengebene. Ekoki kozala ete amonaki ezaleli moko na motema ya Uza oyo etindaki ye apesa ye etumbu mbala moko.​—Masese 21:2.

Biloko ya motuya ya elimo

w96 1/4 lok. 29 par. 1

Kitisá mokumba na yo ntango nyonso epai na Yehova

Lokola Davidi azalaki mokonzi asengelaki komema mokumba ya likambo yango. Lolenge oyo asalaki emonisi ete baoyo bazali na boyokani malamu elongo na Yehova mbala mosusu bakoki kosala makambo na lolenge ebongi te wana ezali bango kati na komekama. Ya liboso, Davidi asilikaki. Na nsima abangaki. (2 Samwele 6:8, 9) Boyokani malamu oyo azalaki na yango elongo na Yehova etyamaki na komekama makasi. Wana emonani ete ezalaki libaku oyo azangaki kokitisa mokumba na ye epai na Yehova, wana atosaki malako na ye te. Yango ekoki mbala mosusu kokómela biso? Topamelaka ntango nyonso Yehova mpo na mikakatano oyo eyaka mpo ete totosaki te malako na ye?​—Masese 19:3.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo”​—Em 14:7.

w05 1/10 nk. 23-24 par. 14-15

“Bókɛngɛlaka”​—Ngonga ya kosambisa eyei!

Ntango tozali kokɛngɛla, nini tosengeli kobosanaka te? Mokanda ya Emoniseli elobeli ndenge makambo ekolandana kino ntango mokano ya Nzambe ekokokisama. Soki tolingi komilɛngɛla, ezali mpenza na ntina tósala makambo oyo mokanda yango elobi. Esakweli yango elobeli na maloba ya polele makambo oyo esengelaki kosalema na “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki ntango Kristo azwaki Bokonzi na likoló na 1914. (Emoniseli 1:10) Emoniseli ebendi likebi na biso epai ya anzelu moko oyo bapesaki “nsango malamu ya seko mpo na kosakola.” Azali koloba na mongongo makasi ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei.” (Emoniseli 14:6, 7) “Ngonga” yango ya kosambisa ezali eleko moko mokuse, mpo na kosakola bitumbu oyo elobelami na esakweli yango mpe kopesa bitumbu yango. Tozali sikoyo na eleko yango.

Sikoyo, liboso ngonga ya kosambisa ekóma na nsuka, Biblia elendisi biso ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo.” Yango ezali kosɛnga nini? Kobanga Nzambe esengeli kotinda biso tóboya mabe. (Masese 8:13) Soki tozali kopesa Nzambe lokumu, tokoyoka ye na limemya nyonso. Tokolekisa te ntango mingi na makambo mosusu mpe kobosana kotánga Biblia, Liloba na ye, mbala na mbala. Tokotala mpamba te toli oyo apesi biso ete tózangisaka makita ya bokristo te. (Baebre 10:24, 25) Tokosepela na libaku malamu oyo tozali na yango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekoyangelama na Masiya, mpe tokobanda kosala yango na molende. Tokobanda ntango nyonso kotyela Yehova motema na biso mobimba. (Nzembo 62:8) Lokola tondimaka ete Yehova azali Mokonzi ya Molɔ́ngɔ́ mobimba, topesaka ye lokumu na ndenge totosaka ye na motema na biso mobimba lokola Mokonzi ya bomoi na biso. Obangaka mpenza Nzambe mpe opesaka ye nkembo na banzela nyonso wana?

BOMOI YA BAKRISTO

Omibongisi mpo na mobulu oyo bana-mboka bakoki kobimisa?

jr mok. 10 par. 23-24

Omitunaka mokolo na mokolo ete “wapi Yehova?”

Mpo na koyeba mokano ya Yehova, tosengeli kosuka kaka te na kobondela ye mpo atambwisa biso; tosengeli mpe kokoba koyekola biso moko. Na likambo yango, biso tozali na bisaleli mingi oyo Yirimia azalaki na yango te. Na ndakisa, tozali na Biblia na mobimba na yango. Yirimia asalaki bolukiluki mingi mpe yango esalisaki ye akoma masolo na ye na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Yo mpe okoki komekola ye; okoki kosala bolukiluki na Liloba ya Nzambe mpe koluka litambwisi na ye, yango ekomonisa ete ozali komituna, “Wapi Yehova?” Koyekola koyeba mokano ya Nzambe, ekosalisa yo otyela ye motema, mpe ‘okokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pembeni na mai, oyo ezali kotinda misisa na yango tii pembeni ya mokɛli ya mai.’​—Tángá Yirimia 17:5-8.

Ntango ozali kotánga mpe komanyola likoló ya Makomami Mosantu, luká koyeba oyo Yehova alingi osala na likambo boye to boye. Okoki mpe koluka mitinda oyo olingi kobosana te mpe oyo olingi kosalela na bomoi na yo. Ntango ozali kotánga masolo ya bato ya kala, mibeko ya Nzambe, mitinda na ye, mpe maloba ya bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe, kanisá ndenge mikapo yango ekoki kosalisa yo mpo oyeba ndenge ya kozwa bikateli mokolo na mokolo. Ntango omituni, “Wapi Yehova?” Nzambe akoki komonisa yo, na nzela ya Liloba na ye, ndenge oyo okoki kolonga mikakatano oyo okutani na yango. Ya solo, mbala mosusu Biblia ekosalisa yo oyeba malamu makambo oyo liboso ‘okokaki kokanga ntina na yango te to oyo oyebaki te!’​—Yir. 33:3.

30/05–05/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 7-8

“Yehova asali kodimana ná Davidi”

w10 1/4 lok. 20 par. 3

“Bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi”

Yehova asepelaki mpenza na mposa makasi oyo Davidi azalaki na yango. Lokola Davidi amonisaki ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe na kolanda esakweli, Nzambe asalaki kondimana ná Davidi ete akobimisa moto moko na bakonzi oyo bakokitana Davidi oyo akoyangela libela na libela. Natane ayebisaki Davidi elaka wana oyo Nzambe apesaki ete: “Ndako na yo mpe bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi mpo na ntango oyo etyami ndelo te liboso na yo; kiti na yo ya bokonzi ekokóma kiti oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Vɛrsɛ 16) Nani azali Mosangoli ya libula ya kondimana yango​—oyo akoyangela libela na libela?​—Nzembo 89:20, 29, 34-36.

w10 1/4 lok. 20 par. 4

“Bokonzi na yo ekotɛlɛma ngwi”

Yesu, moto ya Nazarete azalaki mokitani ya Davidi. Ntango anzelu ayebisaki kobotama ya Yesu, alobaki boye: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Na yango, kondimana wana oyo Nzambe asalaki na Davidi ekokisamaki epai na Yesu Kristo. Mpo na yango, azali koyangela te mpo bato baponi ye, kasi mpo na elaka oyo Nzambe apesaki ye ya koyangela libela na libela. Tóbosana te ete bilaka ya Nzambe ekokisamaka ntango nyonso.​—Yisaya 55:10, 11.

w14 15/10 nk. 10-11 par. 14

Zalá na kondima makasi na Bokonzi

Tótalela oyo Yehova alakaki Davidi, mokonzi ya Yisraele na nzela ya kondimana ya Davidi. (Tángá 2 Samwele 7:12, 16.) Yehova asalaki kondimana yango ná Davidi ntango oyo Davidi azalaki koyangela Yerusaleme, mpe alakaki ye ete Masiya akozala mokitani na ye. (Luka 1:30-33) Na yango, Yehova amonisaki lisusu polele molɔngɔ oyo ekomema tii na momboto mpe alobaki ete mokitani ya Davidi nde akozala na “lotomo oyo euti na mibeko” mpo na kiti ya Bokonzi ya Masiya. (Ezk. 21:25-27) Na nzela ya Yesu, bokonzi ya Davidi “ekozala na nsuka te.” Ya solo, “ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe kiti na ye ya bokonzi lokola moi.” (Nz. 89:34-37) Na ntembe te, boyangeli ya Masiya ekobeba soki moke te, mpe makambo oyo boyangeli yango ekosala ekoumela libela!

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 623 par. 2

Mikolo ya nsuka

Esakweli ya Balaama. Ezalaki liboso Bayisraele bákɔta na Mokili ya Ndaka nde mosakoli Balaama alobaki na Balake mokonzi ya Moabe boye: “Yaká nayebisa yo oyo bato oyo [Yisraele] bakosala bato na yo na nsima, na nsuka ya mikolo. . . . Monzoto ekobima mpenza uta na Yakobo, mpe lingenda ya bokonzi ekotɛlɛma mpenza uta na Yisraele. Mpe akobuka mpenza mpakatoi ya motó ya Moabe mpe mokuwa ya motó ya bana nyonso ya yikiyiki ya etumba.” (Mit 24:14-17) Ntango esakweli oyo ekokisamaki mbala ya liboso, “monzoto” ezalaki mokonzi Davidi, moto oyo alongaki Bamoabe. (2Sa 8:2) Na yango, emonani ete ntango esakweli oyo ekokisamaki mbala ya liboso, “nsuka ya mikolo” ebandaki ntango Davidi akómaki mokonzi. Lokola Davidi azalaki elilingi ya Yesu, Masiya mokonzi, esakweli yango ekokokisama mpe ntango Yesu akolonga banguna na ye.​—Yis 9:7; Nz 2:8, 9.

06-12/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 9-10

“Davidi amonisaki bolingo ya sembo”

w06 15/6 lok. 14 par. 6

Okoki mpenza kozala na esengo

Davidi akomaki boye: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá; na mokolo ya likama Yehova akobikisa ye. Yehova ye moko akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi. Akotángama moto ya esengo na mabele.” (Nzembo 41:1, 2) Boboto oyo Davidi amoniselaki Mefiboshete oyo azalaki ebɔsɔnɔ emonisi ndenge oyo tosengeli kotalelaka babola.​—2 Samwele 9:1-13.

w05 15/5 lok. 17 par. 12

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Samwele

9:1, 6, 7. Davidi akokisaki elaka na ye. Biso mpe tosengeli kosala makasi tókokisaka maloba na biso.

w02 15/2 lok. 14 par. 10

Bato ya sembo babundaki na nzube kati na nzoto

Nsima ya bambula, lokola Mokonzi Davidi alingaki Yonatane mingi, asalelaki Mefiboshete boboto. Davidi apesaki Mefiboshete bilanga nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe atyaki mosaleli moko ya Saulo, nkombo na ye Ziba, mokɛngɛli ya bilanga yango. Longola wana, Davidi alobaki na Mefiboshete ete: “Okolya limpa na mesa na ngai ntango nyonso.” (2 Samwele 9:6-10) Na ntembe te boboto ya Davidi ebɔndisaki Mefiboshete mpe ekitisaki mpasi oyo azalaki koyoka na motema mpo makolo na ye ebukaná. Likambo oyo ezali mpenza liteya mpo na biso! Biso mpe tosengeli kozalaka na boboto epai ya baoyo bazali kobunda na monzube na nzoto.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 270 par. 3

Mandefu

Na ntango ya kala na Moyen-Orient, bato mingi, ezala mpe Bayisraele, bazalaki kozwa mandefu na valɛrɛ mingi lokola elembo ya lokumu mpo na mibali. Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisraele epekisaki kokata ‘nsuki ya mpakatoi,’ elingi koloba, nsuki oyo ezalaka kati ya litoi ná liso, mpe epekisaki kobebisa ndelo ya mandefu. (Le 19:27; 21:5) Na ntembe te, mpo ezalaki momeseno ya losambo oyo bapakano mosusu bazalaki kosala.

13-19/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 11-12

“Kotika te bamposa ya mabe etambwisa yo”

w21.06 nk. 17-18 par. 10

Okoki kokima mitambo ya Satana!

Lokoso etindaki Mokonzi Davidi abosana biloko oyo Yehova apesaki ye, na ndakisa bomɛngo, lokumu mpe ndenge oyo alongaki banguna na ye mingi. Davidi ayebaki malamu ete makabo ya Nzambe ezalaki ‘ebele koleka oyo akokaki koyebisa!’ (Nz. 40:5) Kasi na ntango moko boye, Davidi abosanaki oyo Yehova apesaki ye. Davidi azalaki lisusu kosepela te na oyo azalaki na yango. Azalaki na mposa ya kozwa mingi koleka. Atako azalaki na basi ebele, akómaki kolula mwasi ya moto mosusu, likambo oyo Yehova alobaki ete ezali mabe. Nkombo ya mwasi yango ezalaki Bate-sheba mpe mobali na ye Uria Mohiti. Davidi asangisaki nzoto na Bate-sheba mpe akómaki na zemi. Davidi asukaki kaka te na kosala ekobo ná mwasi yango, kasi abomisaki mpe mobali na ye! (2 Sa. 11:2-15) Davidi azalaki kokanisa nini? Azalaki nde kokanisa ete Yehova akomona likambo yango te? Atako Davidi azalaki kosalela Yehova na boumeli ya bambula mingi, akómaki na lokoso mpe yango ememelaki ye mpasi mpenza. Kasi likambo ya esengo ezali ete na nsima, Davidi andimaki lisumu oyo asalaki mpe abongolaki motema. Asepelaki mpenza ndenge oyo Yehova alimbisaki ye!​—2 Sa. 12:7-13.

w19.09 nk. 17-18 par. 15

Mpo na nini mpe ndenge nini komikitisa liboso ya Yehova?

Yehova atyaki Davidi mokonzi kaka ya libota na ye te, kasi mpe ya ekólo mobimba ya Yisraele. Lokola azalaki mokonzi ya ekólo, Davidi azalaki na nguya mingi. Na bantango mosusu, asalelaki bokonzi na ye na ndenge ya mabe mpe asalaki mabunga minene. (2 Sa. 11:14, 15) Kasi, amikitisaki liboso ya Yehova na ndenge andimaki disiplini. Asopaki motema na ye liboso ya Yehova na nzela ya libondeli. Mpe asalaki makasi asalela toli ya Yehova. (Nz. 51:1-4) Longola yango, azalaki na komikitisa mingi mpe andimaki toli ya malamu oyo eutaki epai ya bana mibali, ata mpe epai ya bana basi. (1 Sa. 19:11, 12; 25:32, 33) Davidi azwaki mateya na mabunga oyo asalaki mpe atyaki mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye.

w18.06 nk. 17-18 par. 7

Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo

Tosengeli te kozela naino tókutana na makambo ya mpasi oyo eyaka na kobuka mibeko ya Nzambe bongo na nsima tózwa mateya. Tokoki kozwa mateya na mabunga ya bato mosusu oyo Biblia elobeli. Masese 1:5 elobi boye: “Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi.” Tozwaka mateya oyo eleki malamu epai ya Nzambe. Na ndakisa, tókanisa mpasi oyo Davidi ayokaki ndenge abukaki mibeko ya Yehova nsima ya kosangisa nzoto na Bate-sheba. (2 Samwele 12:7-14) Ntango totángaka masolo yango, tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini Davidi akokaki kokima mpasi ya makambo oyo asalaki? Nalingaki kosala nini soki nazalaki na esika na ye? Nalingaki kosala pite lokola Davidi to kokima lokola Yozefe?’ (Ebandeli 39:11-15) Soki tokanisi malamu na makama oyo lisumu ekoki kobimisa, tokozala na ekateli makasi ya ‘koyina oyo ezali mabe.’

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 600 par. 6

Davidi

Kasi, Yehvova azalaki kotala makambo nyonso ya mabe oyo esalemaki mpe abimisaki yango polele. Soki Yehova atikaka bato básambisa likambo oyo Davidi ná Bate-sheba basalaki na kolanda Mibeko ya Moize, mbɛlɛ bango nyonso mibale basengelaki kobomama, mpe na ntembe te mwana oyo azalaki na libumu asengelaki kokufa elongo na mama na ye. (Mib 5:18; 22:22) Kasi, Yehova ye moko akataki likambo yango mpe amoniselaki Davidi motema mawa mpo na kondimana ya Bokonzi oyo asalaki ná ye (2Sa 7:11-16), na ntembe te mpo Davidi ye moko mpe azalaki komonisela basusu motema mawa (1Sa 24:4-7; talá mpe Yk 2:13) mpe mpo Nzambe amonaki ete bango nyonso mibale babongolaki motema. (Nz 51:1-4) Kasi bazangaki kozwa etumbu te. Na nzela ya mosakoli Natane, Yehova alobaki boye: “Talá, nazali kobimisela yo mpasi oyo ekouta na ndako na yo moko.”​—2Sa 12:1-12.

20-26/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 13-14

“Ezaleli ya moimi ya Aminone ememelaki ye mpasi”

it-1-F lok. 31 par. 5

Abisalome

Kobomama ya Aminone. Aminone alulaki Tamare ndeko na ye ya mwasi mpo na kitoko na ye. Aminone akosaki ete azali kobɛla mpe asɛngaki ete Tamare alambela ye bilei mpe amemela ye yango na shambrɛ na ye, mpe na nsima asangisaki na ye nzoto na makasi. Nsima ya kosala bongo, Aminone akómaki koyina Tamare koleka ndenge azalaki kolinga ye mpe abwakaki ye na balabala. Tamare apasolaki zambala ya nzelanzela oyo alataki oyo ezalaki komonisa ete azali mwana mwasi ya mokonzi oyo azali ngɔndɔ, mpe atyaki putulu ya mɔtɔ na motó na ye. Tamare ayebisaki Abisalome ndenge Aminone asambwisaki ye. Abisalome alataki likambo yango mpe na mbala moko abandaki kokanisela Aminone mabe, mpe amonisaki ete ayebaki mposa mabe ya ndeko na ye. Kasi, Abisalome ayebisaki ndeko na ye ya mwasi afunda likambo yango te, mpe azwaki ye mpo akóma kofanda na ndako na ye.​—2Sa 13:1-20.

w17.09 lok. 5 par. 11

Kolisá komipekisa

Biblia elobeli mpe bandakisa ya bato oyo balongaki te kokima pite. Emonisi mpe mbuma mabe ya kozanga komipekisa na likambo yango. Soki okutani na likambo oyo Kim akutanaki na yango, ekozala malamu okanisa bozoba ya elenge mobali oyo Masese mokapo 7 elobeli. Kanisá mpe likambo Aminone asalaki mpe mbuma mabe ya etamboli na ye. (2 Samwele 13:1, 2, 10-15, 28-32) Mpo na kosalisa bana bálona komipekisa mpe bákóma na bwanya, ekozala malamu baboti bátalela bandakisa yango na losambo na kati ya libota.

it-1-F lok. 32 par. 1

Abisalome

Mbula mibale elekaki. Eleko ya kokata nsuki ya bampate ekómaki, ezalaki eleko ya fɛti, mpe Abisalome asalaki fɛti na Baala-hazore na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 22 na Nɔrdi-Nɔrdi-Ɛsti ya Yerusaleme, abengisaki bana ya mokonzi mpe Davidi ye moko. Ntango tata na ye aboyaki koya, Abisalome atyaki ye mbamba mpo andima kotinda Aminone, mwana na ye ya liboso, na esika na ye. (Mas 10:18) Na fɛti, ntango Aminone akómaki “esengoesengo mpo na vinyo,” Abisalome apesaki basaleli na ye mitindo ete báboma ye. Bana mosusu bazongaki na Yerusaleme, mpe Abisalome akimaki mpe akendaki epai ya nkɔkɔ na ye moto ya Siri na bokonzi ya Geshure na Ɛsti ya Mbu ya Galile. (2Sa 13:23-38) “Mopanga” oyo mosakoli Natane asakolaki ekɔtaki sikoyo na “ndako” ya Davidi mpe ekobaki kuna tii na nsuka ya bomoi na ye.​—2Sa 12:10.

Biloko ya motuya ya elimo

g04-F 22/12 nk. 8-9

Kitoko oyo eleki ntina

Tózwa ndakisa ya Abisalome, mwana moko ya Davidi, oyo akesenaki mpenza na basusu. Azalaki na bizaleli ya mabe atako azalaki kitoko mpenza na nzoto. Biblia elobi boye mpo na ye: “Nzokande na Yisraele mobimba, ezalaki na mobali moko te oyo akokanaki na Abisalome na kitoko, oyo bazalaki kokumisa mingi. Banda na lokolo na ye tii na motó azalaki ata na mbeba moko te.” (2 Samwele 14:25) Likambo ya mawa, mposa mabe ya Abisalome etindaki ye atombokela tata na ye mpe aluka kobɔtɔla ye bokonzi. Kutu alalaki na basi ya tata na ye. Yango wana, nkanda ya Nzambe engalelaki Abisalome mpe akufaki liwa moko ya mpasi.​—2 Samwele 15:10-14; 16:13-22; 17:14; 18:9, 15.

Okosepela kopusana penepene na Abisalome? Te, ata moke te. Na mokuse, azalaki moto oyo bakokaki te kopusana penepene na ye. Kitoko ya nzoto oyo azalaki na yango ekokanaki te na lofundo mpe kozanga bosembo na ye, kutu yango ebikisaki ye te. Nzokande, Biblia ezali na bandakisa mingi ya bato ya bwanya, oyo basusu bazalaki kosepela na bango, atako bazalaki te kitoko na nzoto. Emonani polele ete kitoko na bango ya kati nde ezalaki likambo oyo eleki ntina.

27/06–03/07

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 SAMWELE 15-17

“Abisalome akómaki motomboki mpo azalaki koluka lokumu”

it-2-F nk. 630-631

Mopoti-mbangu oyo azalaki kopota mbango liboso

Na Moyen-Orient, bato bazalaki na momeseno ete bapoti-mbangu bápotaka mbangu liboso ya likalo ya mokonzi mpo na kobongisa nzela mpe koyebisa bato ete mokonzi azali koya, mpe na mokuse mpo na kosalisa ye. (1Sa 8:11) Abisalome mpe Adoniya, bamekolaki lolenge wana ya kosala mpo na koluka lisusu lokumu mpe mpo na komonisa lokola nde bazali na lotomo ya kotomboka, bazwaki bapoti-mbangu 50 bápotaka mbangu liboso ya makalo na bango moko.​—2Sa 15:1; 1Ba 1:5; talá BAPOTI-MBANGU.

w12 15/7 lok. 13 par. 5

Tósalela Nzambe oyo apesaka bonsomi

Biblia elobeli bato mingi oyo bamemaki basusu na nzela ya mabe. Moko na bango ezali Abisalome, mwana ya Mokonzi Davidi. Abisalome azalaki mobali kitoko mpenza. Kasi, na nsima asalaki lokola Satana; atikaki mposa makasi ya koluka lokumu ekola na motema na ye. Alukaki kozwa bokonzi ya tata na ye, nzokande ye te nde asengelaki kozwa yango. Mpo na koluka kobɔtɔla bokonzi, Abisalome azalaki komonisa Bayisraele ete ye nde azalaki mpenza kotyela bango likebi kasi, mokonzi azalaki kotyela bango likebi te. Ndenge kaka Zabolo asalaki na elanga ya Edene, Abisalome amimonisaki moto malamu, mpe alobaki makambo ya lokuta mpenza mpo na tata na ye.​—2 Sa. 15:1-5.

it-1-F lok. 1101 par. 4

Hebrone

Mwa bambula na nsima, Abisalome, mwana ya Davidi azongaki na Hebrone mpe kuna abandisaki botomboki mpo na kobɔtɔla tata na ye bokonzi, kasi alongaki te. (2Sa 15:7-10) Soki aponaki Hebrone mpo na kobandisa botomboki na ye mpo na kobɔtɔla bokonzi, na ntembe te ezalaki mpo Hebrone ezalaki mboka-mokonzi ya Yuda mpe ezalaki mboka epai abotamaki. Na nsima, Mokonzi Rehoboame, nkɔkɔ ya Davidi, atongaki lisusu Hebrone. (2Nt 11:5-10) Nsima ya kobebisama ya Yuda na bato ya Babilone mpe nsima ya kozonga ya Bayuda oyo bazalaki bakangami, basusu kati na bango bakendaki kofanda na Hebrone (Kiriate-arba).​—Ne 11:25.

Biloko ya motuya ya elimo

w18.08 lok. 6 par. 11

Otalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango?

Ekoki kokóma ete moto aloba makambo mosusu oyo ezali solo te mpo na biso. Likambo yango ekómelaki Mefiboshete. Mokonzi Davidi amoniselaki Mefiboshete motema boboto mpe apesaki ye mabele nyonso oyo ezalaki ya nkɔkɔ na ye Saulo. (2 Samwele 9:6, 7) Kasi, na nsima Davidi ayokaki likambo moko ya malamu te mpo na Mefiboshete. Na esika aluka koyeba soki ezalaki solo, Davidi abɔtɔlaki Mefiboshete biloko nyonso. (2 Samwele 16:1-4) Na nsima, ntango Davidi asololaki na ye, Davidi amonaki libunga oyo asalaki mpe azongiselaki Mefiboshete ndambo ya biloko. (2 Samwele 19:24-29) Likambo wana ya kozanga bosembo elingaki kosalema te soki Davidi azwaka ntango ya koyeba makambo nyonso na esika azwa ekateli nokinoki na kolanda ndambo ya makambo oyo ayokaki.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: “Mekolá molende ya Itai na mosala ya kosakola.​—2Sa 15:19-22.”

w09 15/5 nk. 27-28

Tózala sembo lokola Itai

‘Mopaya mpe moto atiká mboka’

Ekoki kozala ete Itai azalaki moto ya Gate, engumba ya Bafilistia oyo eyebanaki mingi, oyo ezalaki mpe engumba ya Goliate mpe ya banguna mosusu ya Bayisraele ya nsɔmɔ. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Itai, ezali ntango Abisalome atombokelaki mokonzi Davidi. Itai, ná Bafilistia mosusu 600 oyo balandaki ye, bazalaki kofanda na zingazinga ya Yerusaleme.

Ekoki kozala ete ntango Davidi azalaki komona Itai ná bato na ye, azalaki kokanisa ntango ye ná basoda 600 ya Yisraele bakendaki kobombama epai ya Akishe, mokonzi ya engumba Gate ya Bafilistia. (1 Sam. 27:2, 3) Itai ná bato na ye basalaki nini ntango Abisalome atombokelaki Davidi, tata na ye? Bakɔtaki nde na ngámbo ya Abisalome, baboyaki kokɔta likambo yango, to balandaki Davidi ná bato na ye?

Kanisá naino, Davidi azali kokima Yerusaleme mpe akómi na esika oyo babengi Bete-merake, oyo elimboli “Ndako Mosika.” Ekoki kozala ete yango ezalaki ndako ya nsuka na Yerusaleme, soki ozali kokende na Ngomba ya Olive, liboso ya kokatisa Lobwaku ya Kidrone. (2 Sam. 15:17) Awa, Davidi azalaki kotala basoda na ye wana bazalaki kokatisa. Likambo ya kokamwa, kaka Bayisraele ya sembo te nde balandaki ye; ezalaki mpe na Bakerete mpe Bapelete nyonso. Lisusu, ezalaki mpe na bato nyonso ya Gate, elingi koloba, Itai ná basoda na ye 600.​—2 Sam. 15:18.

Davidi ayokelaki Itai mawa mpe alobaki na ye boye: “Mpo na nini yo mpe oya na biso? Zongá mpe fandá na mokonzi [na ntembe te azalaki kolobela Abisalome]; mpo ozali mopaya, mpe lisusu, otiká esika na yo mpe okimá na mboka mopaya. Kaka lobi nde oyaki, bongo lelo nakende na yo koyengayenga elongo na biso, mpo okende ntango ngai nakokende mpe esika nyonso oyo nakokende? Zongá mpe zwá bandeko na yo bázonga elongo na yo, mpe tiká Yehova amonisela yo motema boboto mpe bosembo!”​—2 Sam. 15:19, 20.

Mpo na komonisa bosembo na ye, Itai alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola nkolo na ngai mokonzi azali solo na bomoi, na esika nyonso oyo nkolo na ngai mokonzi akozala, ezala mpo na liwa to mpo na bomoi, kuna nde mosaleli na yo akozala!” (2 Sam. 15:21) Ekoki kozala ete maloba yango ekundwelaki Davidi maloba ya nkɔkɔ na ye Ruta. (Ruta 1:16, 17) Maloba ya Itai esimbaki motema ya Davidi mpe alobaki na ye boye: “Kende mpe katisá” Lobwaku ya Kidrone. Bongo “Itai moto ya Gate akatisaki, ná bato na ye nyonso mpe bana nyonso oyo bazalaki elongo na ye.”​—2 Sam. 15:22.

“Mpo na kolakisa biso”

Baroma 15:4 elobi ete: “Mpo makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso.” Na yango ekozala malamu tómituna, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Itai? Tótala likambo oyo etindaki ye azala sembo epai ya Davidi. Atako atikaki mboka na ye, Filistia, mpe akimaki na mboka mopaya, Itai andimaki ete Yehova azali Nzambe ya bomoi mpe ete Davidi azalaki moponami na ye. Itai alandaki te koyinana oyo ezalaki kati na Bafilistia mpe Bayisraele. Azalaki kotalela Davidi kaka te lokola moto oyo abomaki Goliate mpe ebele ya bato mosusu ya mboka na ye. (1 Sam. 18:6, 7) Itai azalaki kotalela Davidi lokola moto oyo azalaki kolinga Yehova mpe na ntembe te amonaki bizaleli malamu ya Davidi. Davidi mpe akómaki kosepela na Itai mingi. Kutu, Davidi atyaki ndambo ya misato ya basoda na ye “na mabɔkɔ ya Itai” mpo na kobundisa basoda ya Abisalome!​—2 Sam. 18:2.

Biso mpe tosengeli kosala makasi tómonaka bizaleli malamu ya basusu, tómonaka bango kaka te lokola bato ya mposo, to ekólo boye to boye. Bolingo oyo ekolaki kati na Davidi ná Itai emonisi ete koyeba mpe kolinga Yehova ekoki kosalisa biso tótalaka te makambo oyo ekoki kokabola biso ná bato mosusu.

Wana tozali kokanisa ndakisa ya Itai, tómituna boye: ‘Ngai mpe nazalaka sembo ndenge wana epai ya Yesu Kristo, Davidi Monene? Nasalaka na molende mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli mpo na komonisa bosembo na ngai?’ (Mat. 24:14; 28:19, 20) ‘Nakondima koyika mpiko tii wapi mpo na komonisa bosembo na ngai?’

Batata ya mabota bakoki mpe kozwa liteya na bosembo ya Itai. Bosembo na ye epai ya Davidi mpe ekateli na ye ya kolanda mokonzi oyo Nzambe aponaki etindaki mpe bato na ye básala lokola ye. Ndenge moko mpe, bikateli oyo batata ya mabota bazwaka mpo na kosimba losambo ya solo etindaka mpe mabota na bango bálanda yango, mpe ntango mosusu yango ekoki komemela bango mikakatano mpo na mwa ntango. Kasi, Biblia epesi biso elikya oyo: ‘Epai ya moto ya sembo [Yehova] akozala sembo.’​—Nz. 18:25.

Nsima ya etumba ya Davidi ná Abisalome, Biblia elobeli lisusu Itai te. Nzokande, mwa lisolo na ye oyo ezali na Liloba ya Nzambe esalisi biso tóyeba ezaleli oyo amonisaki na ntango wana ya mpasi na bomoi ya Davidi. Ndenge Biblia elobeli Itai emonisi ete Yehova amonaka moto oyo azali sembo mpe apambolaka ye mpo na ezaleli yango.​—Ebr. 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto