Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr22 Septembre nk. 1-16
  • Mikanda tosaleli mpo na mokanda ya likita bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na mokanda ya likita bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • 05-11/09
  • 12-18/09
  • 19-25/09
  • 26/09–02/10
  • 03-09/10
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • SALELÁ NGAI NAINO MWA GATO YA LIBUNGUTULU
  • OYEI EPAI NA NGAI MPO NA KOBOMA MWANA NA NGAI?
  • TALÁ, MWANA NA YO AZALI NA BOMOI
  • 10-16/10
  • 17-23/10
  • 24-30/10
  • 31/10–06/11
  • ELISHA AKÓMI MOSALELI YA ELIYA
  • ELISHA AKANGAMI NA MOKUMBA NA YE
  • “SƐNGÁ ELOKO OYO NASENGELI KOSALELA YO”
  • OYO ELISHA AMONAKI
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2022
mwbr22 Septembre nk. 1-16

Mikanda tosaleli mpo na mokanda ya likita bomoi mpe mosala

05-11/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 9-10

“Kumisá Yehova mpo azali na bwanya”

w99 1/7 lok. 30 par. 6

Azwaki matomba na mobembo na ye

Ntango akutanaki na Salomo, mokonzi-mwasi abandaki komeka ye na “mituna ya makasi.” (1 Bakonzi 10:1, NW) Liloba ya Liebele oyo basaleli awa ekoki kobongolama na “sambole.” Kasi yango elingi koloba te ete mokonzi-mwasi azalaki kosalisa Salomo masano ya mpambampamba. Likambo ya kobenda likebi, na Nzembo 49:4, liloba kaka moko wana ya Liebele esalelami mpe mpo na komonisa makambo ya ntina mingi oyo etaleli lisumu, liwa, mpe lobiko. Na bongo, emonani ete mokonzi-mwasi ya Seba azalaki kosolola na Salomo makambo ya ntina oyo emekaki bozindo ya mayele ya Salomo. Biblia elobi ete “alobanaki na ye mpo na makambo nyonso na motema na ye.” Na nsima, Salomo, “azongiselaki ye bituneli na ye nyonso; likambo moko ebombamelaki mokonzi te oyo ye ayebaki kolimbwela ye te.”​—1 Bakonzi 10:2b, 3.

w99 1/11 lok. 20 par. 6

Bato mingi basepelaka kokaba

Makambo oyo mokonzi-mwasi ayokaki mpe oyo amonaki ekamwisaki ye, mpe na komikitisa nyonso alobaki ete: “Baombo na yo bazali na esengo, baoyo bakotɛ[lɛ]maka liboso na yo mpe bakoyokaka mayele na yo.” (1 Bakonzi 10:4-8) Alobaki te ete baombo ya Salomo bazalaki na esengo mpo bafandaki esika oyo etondi na biloko kitoko mpe ya motuya, atako ezalaki mpenza bongo. Kasi, baombo ya Salomo bazalaki na esengo mpo bazalaki na likoki ya koyoka ntango nyonso mayele ya Salomo oyo Nzambe apesaki ye. Mokonzi-mwasi azali ndakisa malamu mpo na basaleli ya Yehova lelo oyo, baoyo bazali koyoka mayele ya Mozalisi mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto!

w99 1/7 nk. 30-31

Azwaki matomba na mobembo na ye

Mayele ya Salomo na kofuluka ya bokonzi na ye ekamwisaki mokonzi-mwasi ya Seba na boye ete “azalaki lisusu na mpiko te.” (1 Bakonzi 10:4, 5) Bato mosusu balobaka ete maloba yango elimboli ete mokonzi mwasi azalaki lisusu na “mpema te.” Nganga-mayele moko apesaki likanisi ete alɛmbaki! Ata soki likambo nini esalemaki, mokonzi-mwasi akamwaki na makambo oyo amonaki mpe ayokaki. Alobaki ete basaleli ya Salomo bazalaki na esengo mpamba te bazalaki na libaku ya koyoka mayele ya mokonzi yango, mpe akumisaki Yehova na ndenge aponaki Salomo azala mokonzi. Na nsima, apesaki mokonzi makabo ya motuya mingi, wolo yango moko ezalaki na motuya ya pene na dolare 40 000 000 na moi ya lelo. Salomo mpe apesaki mokonzi-mwasi yango makabo “nyonso elingaki ye, nyonso elɔmbaki ye.”​—1 Bakonzi 10:6-13.

Biloko ya motuya ya elimo

w08 1/11 lok. 22 par. 4-6

Oyebaki yango?

Wolo ya Mokonzi Salomo ezalaki mingi ndenge nini?

Biblia elobi ete Hilama, mokonzi ya Tulo, atindelaki Salomo tɔni minei ya wolo, ete mokonzi-mwasi ya Seba mpe apesaki ye wolo mingi ndenge wana mpe ete bamasuwa ya Salomo ememelaki ye tɔni koleka 15 ya wolo oyo eutaki na Ofili. Biblia elobi boye: “Bozito ya wolo eyaki epai ya Salomo na [mbula] moko ezalaki mpata nkama motoba mpe ntuku motoba na motoba,” to tɔni koleka 25. (1 Bakonzi 9:14, 28; 10:10, 14) Yango ekoki kozala solo? Wolo oyo bakonzi ya kala bazalaki kobomba ezalaki ebele ndenge nini?

Likomi moko ya kala, oyo bato ya mayele bandimaka ete elobi solo, emonisi ete Falao Thoutmosis III, mokonzi ya Ezipito (na ekeke ya 16 L.T.B.) apesaki tɔni soki 13,5 ya wolo na tempelo ya Amôn-Ra, oyo ezalaki na engumba Karnak. Na ekeke ya mwambe L.T.B., Tigilata-pilesele III, azwaki tɔni koleka 4 ya wolo lokola mpako oyo eutaki na Tulo, mpe Salegone II apesaki banzambe ya Babilone tɔni minei ya wolo lokola likabo. Balobaka ete mbula na mbula, Filipo II, mokonzi ya Masedonia (359-336 L.T.B.) azalaki kotimola tɔni koleka 28 ya wolo na Pangée, na etúká ya Thrace.

Masolo ya kala elobaka ete ntango Alesandala Monene (336-323 L.T.B.), mwana ya Filipo, alongaki Susa, engumba moko ya Perse, azwaki tɔni soki 1 180 ya wolo na engumba yango, mpe tɔni soki 7 000 na bingumba mosusu ya Perse. Na yango, soki tokokanisi makambo yango na oyo Biblia elobi mpo na wolo ya Mokonzi Salomo, tokomona ete Biblia elekisi ndelo te.

12-18/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 11-12

“Poná na bwanya moto okobalana na ye”

w18.07 lok. 18 par. 7

“Nani azali na ngámbo ya Yehova?”

7 Tokoki kozwa mateya ebele na ndakisa ya Mokonzi Salomo. Na bolenge na ye, azalaki na boyokani malamu na Yehova. Nzambe apesaki ye bwanya mingi mpe mosala ya ntina ya kotonga tempelo kitoko na Yerusaleme. Kasi, Salomo abebisaki boninga na ye na Yehova. (1 Bakonzi 3:12; 11:1, 2) Mobeko ya Nzambe elobaki polele ete mokonzi asengelaki te “kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa.” (Kolimbola Mibeko 17:17) Salomo atosaki mobeko yango te, mpe nsukansuka abalaki basi 700 mpe akómaki na bamakango 300! (1 Bakonzi 11:3) Mingi kati na basi yango bazalaki bapaya oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Na yango, Salomo abukaki mpe mobeko ya Nzambe oyo epekisaki kobala basi-bapaya.​—Kolimbola Mibeko 7:3, 4.

w19.01 nk. 15-16 par. 6

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?

6 Satana alingaka tókóma lokola ye, motomboki oyo akipaka mitinda ya Yehova te mpe alukaka kaka matomba na ye moko. Satana akoki te kotinda biso na makasi tókanisa mpe tósala makambo lokola ye. Na yango, alukaka kokokisa mokano na ye na ndenge mosusu. Na ndakisa, asali ete bato oyo ye asilá kobebisa bázala zingazinga na biso. (1 Yoa. 5:19) Atyaka elikya ete tokopona kolekisa ntango elongo na bango, ata soki toyebi ete baninga ya mabe ‘bakobebisa’ makanisi na biso mpe ndenge na biso ya kosala makambo. (1 Ko. 15:33) Mayele yango esimbaki epai ya Mokonzi Salomo. Abalaki basi ebele oyo bazalaki bapakano, mpe nsukansuka babebisaki bizaleli na ye mpe ‘mokemoke, babendaki motema na ye’ mosika na Yehova.​—1 Bak. 11:3.

w18.07 lok. 19 par. 9

“Nani azali na ngámbo ya Yehova?”

9 Kasi Yehova alekisaka masumu kaka boye te. Biblia elobi ete: “Yehova asilikelaki Salomo, mpamba te motema na ye ebendamaki, etiki Yehova . . . , oyo abimelaki ye mbala mibale. Mpe mpo na likambo yango, apesaki ye mitindo ete alanda banzambe mosusu te; kasi ye atosaki te makambo oyo Yehova apesaki ye mitindo.” Na yango, Nzambe andimaki ye lisusu te mpe asundolaki ye. Bakitani ya Salomo bayangelaki te na libota mobimba ya Yisraele, mpe mabota oyo elandaki nsima enyokwamaki mingi mpenza.​—1 Bakonzi 11:9-13.

Biloko ya motuya ya elimo

w18.06 nk. 13-14 par. 1-4

Nzambe akokaki kondima ye

Rehoboame abongisaki basoda mpo na kobundisa mabota oyo etombokaki. Nzokande, Yehova atindaki mosakoli Shemaya mpo na koloba na bango ete: “Bosengeli te komata mpo na kobunda na bandeko na bino, bana ya Yisraele. Bózonga moto na moto na ndako na ye, mpo likambo oyo esalemi euti na ngai.”​—1 Bakonzi 12:21-24.

Ezalaki pɛtɛɛ mpo Rehoboame atosa Yehova? Bato bakokanisa nini mpo na mokonzi na bango ya sika? Liboso ayebisaki bango ete akopesa bango etumbu “na bitubeli,” kasi na mbala oyo asalaki likambo moko oyo ekamwisaki bato! (Talá mpe 2 Ntango 13:7.) Ye ná basoda na ye “batosaki liloba ya Yehova mpe bazongaki na ndako ndenge Yehova alobaki.”

Likambo yango ezali koteya biso nini? Kotosa Nzambe ezali ntango nyonso likambo ya bwanya ata soki bato basɛki biso. Kotosa Nzambe esalaka ete andima biso mpe yango ememelaka biso mapamboli.​—Kolimbola Mibeko 28:2.

Makambo esukaki ndenge nini mpo na Rehoboame? Rehoboame akobaki koyangela libota ya Yuda mpe ya Benyamina, mpe azwaki ekateli ya kotonga bingumba ya sika na bisika oyo azalaki koyangela. Asalaki mpe ete bingumba mosusu ekóma makasi “na ndenge moko ya kosakana te.” (2 Ntango 11:5-12) Likambo eleki ntina, na ntango moko boye atosaki mibeko ya Yehova. Lokola bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele ebandaki kosambela bikeko, bato mingi bakendaki na Yerusaleme mpo na kopesa Rehoboame mpe losambo ya solo mabɔkɔ. (2 Ntango 11:16, 17) Na yango, lokola Rehoboame atosaki Yehova, bokonzi na ye ekómaki makasi.

19-25/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 13-14

“Ntina ya kozala na bopɔlɔ mpe kosepela na oyo tozali na yango”

w08 15/8 lok. 8 par. 4

Batelá bosembo na motema moko

4 Na nsima, Yelobama alobaki na moto ya Nzambe ete: “Yaká epai na ngai na ndako mpe opema, nakopesa yo libonza.” (1 Mik. 13:7) Mosakoli asengelaki kosala nini? Asengelaki nde kokende na ndako ya mokonzi mpe kondima libonza na ye, nsima ya koyebisa ye etumbu oyo Yehova akatelaki ye? (Nz. 119:113) To asengelaki nde koboya kokende, atako emonanaki lokola nde mokonzi abongoli motema? Na ntembe te, Yelobama azalaki na bozwi mpe akokaki kopesa moto oyo ye alingi likabo ya ntalo mingi. Soki mosakoli ya Nzambe akómaki kokolisa mposa ya biloko ya mokili na motema na ye, na ntembe te maloba ya mokonzi elingaki kozala motambo mpo na ye. Nzokande, Yehova ayebisaki mosakoli yango boye: “Okolya kwanga te, okomɛla mpe te, okozonga mpe na nzela eyaki yo te.” Yango wana, mosakoli ayanolaki polele ete: “Ata opesi ngai ndambo na ndako na yo, nakoyingela esika moko na yo te. Nakolya kwanga te, nakomɛla mpe mai na esika oyo te.” Na nsima, mosakoli azongaki na nzela mosusu. (1 Mik. 13:8-10) Ekateli oyo mosakoli yango azwaki ezali koteya biso nini na likambo ya kozala sembo na motema moko?​—Ro. 15:4.

w08 15/8 lok. 11 par. 15

Batelá bosembo na motema moko

15 Liteya nini mosusu tokoki kozwa na libunga oyo mosakoli ya Yuda asalaki? Masese 3:5 elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.” Na esika akoba kotalela Yehova ndenge asalaki liboso, mosakoli ya Yuda andimaki bososoli na ye moko. Mpo na yango, abebisaki boyokani na ye na Yehova mpe abungisaki bomoi na ye. Likambo oyo ekómelaki ye emonisi mpenza ntina ya kosalela Yehova na komikitisa mpe na bosembo!

w08 15/8 lok. 9 par. 10

Batelá bosembo na motema moko

10 Mosakoli oyo autaki na Yuda asengelaki kososola ete mosakoli oyo azalaki mobange azalaki kokosa ye. Akokaki komituna boye: ‘Mpo na nini Yehova atindi anzelu epai ya moto mosusu mpo apesa ngai malako ya sika?’ Mosakoli yango akokaki kosɛnga Yehova amonisa ye polele litambwisi na ye, kasi Biblia emonisi te ete asalaki bongo. Kutu, azongaki elongo na mosakoli ya mobange mpe “alyaki kwanga na ndako na ye mpe amɛlaki mai.” Yehova asepelaki te. Ntango mosakoli oyo akosamaki azalaki kozonga na Yuda, akutanaki na nkɔsi na nzela mpe nkɔsi yango ebomaki ye. Yango ezalaki liwa ya nsɔmɔ mpo na mosakoli yango.​—1 Ba. 13:19-25.

Biloko ya motuya ya elimo

w10 1/7 lok. 29 par. 5

Alukaka oyo ezali malamu

Likambo eleki ntina, maloba oyo ezali na 1 Bakonzi 14:13, eteyi biso likambo moko ya kitoko na ntina na Yehova mpe makambo oyo alukaka epai na biso. Kobosana te ete eloko moko ya malamu “emonanaki” epai ya Abiya. Emonani ete Yehova alukaki na motema ya Abiya mpe amonaki eloko moko ya malamu epai na ye. Na bokeseni na libota na ye, Abiya azalaki, ndenge moto moko ya mayele amonisi yango, lokola liyaka moko “na kati ya ebele ya mabanga.” Yehova asepelaki na bolamu yango mpe apesaki ye mbano mpo na yango, amonisaki motema mawa epai ya moto moko wana ya libota wana ya mabe.

26/09–02/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 15-16

“Asa asalaki makambo na mpiko, yo mpe okosala bongo?”

w12 15/8 lok. 8 par. 4

“Mosala na bino ezali na mbano”

Na boumeli ya mbula 20 kobanda ntango Yisraele ekabwanaki na makonzi mibale, bato mingi na Yuda bamipesaki mpenza na mimeseno ya bato ya bikólo mosusu. Ntango Asa akómaki mokonzi na mobu 977 L.T.B., losambo ya banzambe ya kobota oyo Bakanana bazalaki kosambela esilaki kokɔta ata na ndako ya mokonzi. Kasi lisolo ya boyangeli ya Asa elobi ete mokonzi yango “asalaki oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye.” Asa “alongolaki bitumbelo ya bapaya mpe bisika oyo etombwaná, abukaki makonzí ya losambo mpe akataki banzete ya losambo.” (2 Nta. 14:2, 3) Asa alongolaki mpe na ekólo Yuda “mibali oyo bazali bandumba ya tempelo,” oyo bazalaki kosangisa nzoto na baninga na bango mibali na kati ya losambo na bango. Asa asukaki kaka na makambo wana te. Alendisaki mpe bato ete “báluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango” mpe bátosa “mobeko mpe mitindo” ya Nzambe.​—1 Bak. 15:12, 13; 2 Nta. 14:4.

w17.03 lok. 19 par. 7

Salelá Yehova na motema mobimba!

7 Ndenge nini tokoyeba soki tomipesi mobimba epai ya Yehova? Tokoki komituna boye: “Nakotosa Yehova ata soki ekómi mpasi kotosa ye? Nazali na ekateli makasi ya kobatela lisangá na ye pɛto?” Kanisá mpiko oyo Asa asengelaki kozala na yango mpo na kolongola nkɔkɔ na ye na esika ya lokumu oyo azalaki na yango! Ntango mosusu, ekoki kosɛnga ete ozala na mpiko lokola Asa. Na ndakisa, okosala nini soki ndeko moko ya libota na yo to moninga moko ya motema asali lisumu kasi abongoli motema te, mpe asengeli kolongolama na lisangá? Okozala na ekateli ya koboya kosangana na moto yango? Motema na yo ekotinda yo osala nini?

it-1-F lok. 195 par. 5

Asa

Atako na bantango mosusu Asa asalaki makambo na kozanga bwanya mpe bososoli ya elimo, bizaleli malamu oyo azalaki na yango mpe ndenge asanganaki te na losambo ya lokuta esalaki ete andimama na Nzambe atako asalaki mpe mabunga, mpe nkombo na ye etangami na molɔngɔ ya bankonzi ya sembo ya Yuda (2Nt 15:17). Ayangelaki mbula 41 mobimba na eleko moko na bakonzi mwambe ya Yisraele: Yeroboame, Nadabe, Baasha, Ela, Zimiri, Omiri, Tibini (bakonzi oyo bayangelaki ngámbo mosusu ya Yisraele mpo na kotɛmɛla Omiri) mpe Ahaba (1Ba 15:9, 25, 33 ; 16:8, 15, 16, 21, 23, 29). Nsima ya liwa ya Asa, mwana na ye Yehoshafate akómaki mokonzi.​—1Ba 15:24.

Biloko ya motuya ya elimo

w98 15/9 nk. 21-22

Ondimaka ete Nzambe azali mpenza?

Na ndakisa, tángá esakweli oyo elobeli etumbu moto oyo akotonga lisusu Yeriko asengelaki kozwa, mpe talelá kokokisama na yango. Yosua 6:26 elobi ete: “Yosua alapisaki bato ndai na eleko wana ete: ‘Moto oyo akotɛlɛma mpe akotonga engumba oyo, Yeriko, alakelama mabe liboso ya Yehova. Ntango akotya moboko na yango, mwana na ye ya liboso akufa, mpe ntango akotɛlɛmisa baporte na yango, mwana na ye ya nsuka akufa.’” Ekokisamaki mbula 500 na nsima, mpamba te na 1 Bakonzi 16:34 tozali kotánga ete: “Na mikolo na ye, Hiele moto ya Betele atongaki Yeriko. Ntango atyaki moboko na yango, Abirame mwana na ye ya liboso akufaki mpe ntango atɛlɛmisaki baporte na yango, Segube mwana na ye ya nsuka akufaki, na kolanda liloba oyo Yehova alobaki na nzela ya Yosua mwana ya Nunu.” Bobele Nzambe ya solo nde akoki kopemisa bisakweli motindo wana mpe kosɛnzɛla ete ekokisama.

03-09/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 17-18

“Kino ntango nini bokokakatana na makanisi?”

w17.03 lok. 14 par. 6

Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!

6 Ntango Bayisraele bazalaki kofanda na Mokili ya Ndaka, basengelaki kopona soki bakosambela Yehova to bakosalela banzambe mosusu. (Tángá Yosua 24:15.) Yango ekokaki komonana lokola ekateli moko ya moke. Nzokande, ekateli na bango ekokaki kolimbola bomoi to liwa. Na ntango ya bazuzi, Bayisraele bakobaki kozwa bikateli ya mabe. Batikaki kosambela Yehova mpe babandaki kosambela banzambe ya lokuta. (Basambisi 2:3, 11-23) Na nsima, na eleko ya mosakoli Eliya, basaleli ya Nzambe basengelaki kopona soki bakosalela Yehova to bakosalela Baala nzambe ya lokuta. (1 Bakonzi 18:21) Yango ekokaki komonana lokola ekateli moko ya pɛtɛɛ, mpamba te kosalela Yehova ezalaka ntango nyonso malamu. Moto ya bwanya akoki te kondima kosalela nzambe oyo azali na bomoi te. Kasi Bayisraele bazalaki kokoka kozwa ekateli te. Biblia elobi ete Bayisraele bazalaki ‘kokakatana na makanisi.’ Na bwanya nyonso, mosakoli Eliya alendisaki bango bápona kosambela Yehova, Nzambe ya solo.

ia mok. 10 par. 15

Alongisaki losambo ya solo

15 Na yango, basakoli ya Baala babulunganaki, “babandaki kobelela na mongongo makasi mpenza mpe komikatakata na bambeli mpe na makɔnga, na ndenge bamesaná, tii makila etangaki bango.” Kasi, ezalaki kaka mpamba! “Mongongo moko ezalaki te, mpe moto moko ayanolaki te, mpe moto moko te atyaki likebi.” (1 Bak. 18:28, 29) Ya solo, Baala azalaki te. Satana nde atyaki ye na mitó ya bato mpo na komema bango mosika na Yehova. Ya solo, moto oyo aponi nkolo mosusu na esika ya Yehova, asukaka mabe, ata mpe na nsɔni.​—Tángá Nzembo 25:3; 115:4-8.

ia mok. 10 par. 18

Alongisaki losambo ya solo

18 Liboso Eliya asala libondeli, mbala mosusu ebele wana ya bato bamitunaki soki Yehova akomonana te mpamba lokola Baala. Kasi, nsima ya libondeli na ye, ntango ya komituna mituna ezalaki lisusu te. Biblia elobi boye: “Bongo mɔtɔ ya Yehova ekitaki mpe elyaki likabo ya kotumba mpe nkoni mpe mabanga mpe putulu, mpe emɛlaki mai oyo ezalaki na kati ya talase.” (1 Bak. 18:38) Yehova ayanolaki na ndenge ya kokamwa! Bongo bato basalaki nini?

Biloko ya motuya ya elimo

w08 1/4 lok. 19, etanda

Akengelaki mpe azelaki

Elanga ya ntango ya Eliya eumelaki mbula boni?

Eliya, mosakoli ya Yehova ayebisaki Mokonzi Ahaba ete etikali moke elanga wana oyo eumelaki mingi ekóma na nsuka. Alobaki na ye bongo “na [mbula] ya misato”​—na ntembe te kobanda na mokolo oyo Eliya asakolaki ete mbula ekobɛta lisusu te. (1 Bakonzi 18:1) Mwa moke na nsima, Yehova atindaki mbula, ndenge kaka Eliya alobaki yango. Moto mosusu akoki kokanisa ete elanga yango esukaki na mbula ya misato, na maloba mosusu, ekokisaki kutu mbula misato te. Nzokande, Yesu mpe Yakobo balobaki ete mbula enɔkaki te na boumeli ya “mbula misato ná sanza motoba.” (Luka 4:25; Yakobo 5:17) Biblia ezali nde bongolabongola na likambo yango?

Ata moke te! Na ntango ya kala na Yisalaele, elanga ezalaki koumela mingi, mbala mosusu ata mpe sanza motoba. Na ntembe te ntango Eliya akendaki koyebisa Ahaba ete mbula ekobɛta lisusu te, elanga esilaki koumela ntango molai koleka ndenge ezalaki koumela mpe ezalaki makasi. Kutu, elanga yango esilaki koumela sanza pene na motoba. Na yango, banda ntango Eliya asakolaki elanga yango tii ntango ayaki kosakola “na mbula ya misato” ete elanga ekosila, elanga yango esilaki koumela pene na mbula misato na ndambo. “Mbula misato na sanza motoba” esilaki koleka ntango bato bayanganaki na Ngomba Kalemele mpo na komona bokasi ya Yehova.

Kanisá sikoyo ndenge bato bayokaki ntango Eliya ayebisaki Ahaba ete mbula ekobɛta te. Bato bazalaki kokanisa ete Baala azalaki “motambwisi ya mapata,” nzambe oyo akokaki kobɛtisa mbula mpo na kosilisa elanga. Soki elanga eumelaki koleka ndenge oyo emesanaki, na ntembe te bazalaki komituna: ‘Baala azali wapi? Ntango nini akonɔkisa mbula?’ Ntango Eliya alobaki ete mbula to mamwɛ ekokita te tii ntango ye moko akoloba ekita, basambeli ya Baala bayokaki yango lokola nkake na matoi na bango.​—1 Bakonzi 17:1.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Kondima ya mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá ekoki koteya biso nini?

w14 15/2 nk. 14-15

Mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá apambwamaki mpo na kondima na ye

Mwasi yango alobaki boye: “Lokola Yehova Nzambe na yo azali solo na bomoi, nazali na gato ya libungutulu te, kaka mwa farini na elokó ya monene mpe mwa mafuta na elokó ya moke; mpe talá nazali kolɔkɔta mwa nkoni, nakokende mpe nakosala mwa eloko mpo na ngai ná mwana na ngai ya mobali; tokolya yango mpe tokokufa.” (1 Bak. 17:12) Soki tokanisi na lisolo ya mwasi oyo mpe Eliya tokomona nini?

Mwasi yango andimaki ete Eliya azali Moyisraele oyo abangaka Nzambe. Yango emonani na maloba oyo alobaki ete “lokola Yehova Nzambe na yo azali solo na bomoi.” Emonani ete atako ayebaki mwa moke Nzambe ya Yisraele, kasi azalaki te kobenga Yehova “Nzambe na ngai.” Azalaki kofanda na Zarefate, engumba ya Sidone, to emonani lokola ete ezalaki kotambwisama na Sidone, engumba ya Fenisia. Ekoki kozala ete basambeli ya Baala bazalaki kofanda na Zarefate. Kasi, Yehova amonaki likambo moko ya ntina mingi epai ya mwasi wana.

Atako epai mwasi yango azalaki kofanda basambeli ya bikeko bazalaki mingi, kasi ye amonisaki kondima. Yehova atindaki Eliya epai ya mwasi yango mpo na bolamu na ye mpe ya Eliya ye moko. Tokoki kozwa liteya ya ntina mingi na likambo yango.

Bato nyonso te ya Zarefate oyo bazalaki kosambela Baala nde bazalaki mabe mpenza. Ntango Yehova atindaki Eliya epai ya mwasi wana, amonisaki ete amonaka makanisi malamu oyo bato oyo bakómi naino te basaleli na ye bazalaka na yango. Ya solo, “na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye [Nzambe] mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—Mis. 10:35.

Na nini ebele ya bato oyo bazali na teritware na yo bakokani na mwasi wana ya Zarefate? Atako basambeli ya lingomba ya lokuta bazali zingazinga na bango, ekoki kozala ete bazalaka na mposa makasi ya eloko moko kitoko. Ekoki kozala ete bazali na mwa boyebi ya Yehova to te, mpe ntango mosusu bakoki kozala na mposa ya lisalisi soki bakoyamba losambo ya solo. Ozali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosalisa bango?

SALELÁ NGAI NAINO MWA GATO YA LIBUNGUTULU

Tótalela na likebi mpenza likambo oyo Eliya asɛngaki mwasi wana asala. Mwasi yango autaki koyebisa Eliya ete soki abongisi biloko mpo na ye mpe mwana na ye, mpe soki balei yango, na nsima bakokufa. Kasi Eliya alobaki nini? “Kobanga te. Kende, salá ndenge olobi. Kasi na oyo ezali wana, salelá ngai naino mwa gato ya libungutulu, mpe memelá ngai yango, bongo na nsima, okoki kosala mwa eloko mpo na yo ná mwana na yo. Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Farini ya elokó ya monene ekosila te, mpe mafuta ya elokó ya moke ekozanga te tii mokolo oyo Yehova akopesa mbula makasi na mabele.’”​—1 Bak. 17:11-14.

Bato mosusu bakokaki koloba, ‘Tópesa yo biloko nyonso oyo totikali na yango? Tiká masɛki wana.’ Kasi mwasi wana asalaki bongo te. Atako ayebaki Yehova mingi te, andimelaki Eliya mpe asalaki ndenge asɛngaki ye. Kondima na ye emekamaki mpenza mpe azwaki ekateli ya malamu mpenza!

Nzambe atikaki te mwasi wana atako azalaki mobola. Ndenge kaka Eliya alakaki, Yehova akómisaki mwa biloko ya mwasi yango ebele mpo esalisa Eliya, mwasi yango mpe mwana na ye tii ntango mbula ekobanda kobɛta. Ya solo, “Farini ya elokó ya monene esilaki te, mpe mafuta ya elokó ya moke ezangaki te, na kolanda liloba oyo Yehova alobaki na nzela ya Eliya.” (1 Bak. 17:16; 18:1) Soki mwasi yango aboyaka kolanda makambo oyo Eliya alobaki, mwa gato ya libungutulu oyo asalaki na farini mpe mafuta oyo atikalaki na yango elingaki kozala bilei na ye ya nsuka. Kasi, amonisaki kondima, atyelaki Yehova motema mpe apesaki Eliya bilei liboso.

Liteya oyo tokoki kozwa awa ezali ete Nzambe apambolaka baoyo bamonisaka kondima na misala. Ntango bosembo na yo emekami mpe omonisi kondima, Yehova akosalisa yo. Akozala Mosungi, Mobateli mpe Moninga mpo na kosalisa yo olonga komekama na yo.​—Kob. 3:13-15.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya 1898, na Lingelesi elobelaki liteya oyo tokoki kozwa na lisolo ya mwasi wana oyo mobali akufá ete: “Lokola mwasi wana azalaki na kondima oyo esengeli mpo na kotosa, yango wana ebongaki mpenza ete Nkolo asunga ye na nzela ya mosakoli; soki amonisaka kondima te, mwasi mosusu alingaki komonana oyo alingaki kotosa. Ndenge moko mpe biso, na mobembo na biso ya bakristo, Nkolo azali komema biso na esika oyo kondima na biso emekamaka. Soki tomonisi kondima, tokozwa mapamboli, kasi soki te, tokozanga mapamboli yango.”

Ntango tokutani na komekama, tosengeli koluka toli na Makomami mpe na mikanda na biso. Na nsima, tosengeli kosala na boyokani ya litambwisi ya Yehova atako ekoki kozala mpasi mpo na kondima likambo yango. Tokozwa mpenza mapamboli soki tosali na boyokani ya maloba oyo ya Salomo: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”​—Mas. 3:5, 6. 

OYEI EPAI NA NGAI MPO NA KOBOMA MWANA NA NGAI?

Kondima ya mwasi yango elingaki komekama lisusu. Biblia elobi ete: “Nsima ya makambo oyo, mwana ya mwasi yango, nkolo ndako, abɛlaki, mpe maladi na ye ekómaki makasi kino atikalaki lisusu na mpema te.” Lokola azalaki koluka ntina oyo mwana na ye akufi, mwasi yango atunaki Eliya boye: “Ngai na yo likambo nini, Ee moto ya Nzambe ya solo? Oyei epai na ngai nde kokundolela ngai libunga na ngai mpe koboma mwana na ngai.” (1 Bak. 17:17, 18) Maloba wana ya mpasi elimboli nini?

Mwasi yango akanisaki nde lisumu moko oyo etungisaki lisosoli na ye? Akanisaki ete Nzambe abomaki mwana na ye mpo na mabe moko oyo asalaki mpe atindaki Eliya amemela ye nsango ya liwa? Biblia elobi yango te, kasi likambo ya ntina ezali ete: Mwasi yango alobaki mabe ata mbala moko te mpo na Nzambe.

Eliya ayokaki mpasi na motema mpo na liwa ya mwana wana mpe na likanisi oyo mama ya mwana wana azalaki na yango ete koya ya Eliya nde epesaki ye mpasi wana nyonso. Eliya amemaki ebembe ya mwana yango na shambrɛ ya likoló. Na nsima, abondelaki boye: “Ee Yehova Nzambe na ngai, opesa lisusu mpasi na mwasi oyo mobali akufá, esika nazali kofanda mopaya, na kobomáká mwana na ye?” Mosakoli Eliya asengelaki kokoka te nsɔni oyo likambo wana elingaki kobwaka na nkombo ya Nzambe soki apesaki nzela ete mwasi wana ya boboto mpe moyambi ya bapaya anyokwama mingi lisusu. Na yango, Eliya abondelaki ete: “Ee Yehova Nzambe na ngai, nabondeli yo, salá ete molimo ya mwana oyo ezonga kati na ye.”​—1 Bak. 17:20, 21.

TALÁ, MWANA NA YO AZALI NA BOMOI

Yehova azalaki koyoka. Mwasi yango apesaki Eliya bilei mpe amonisaki kondima na misala. Emonani ete Nzambe apesaki nzela ete mwana yango akufa na maladi wana, mpo ayebaki ete lisekwa, lisekwa ya liboso oyo Makomami elobeli, ekosalema mpe ekopesa mabota oyo ekoya na nsima elikya. Ntango Eliya abondelaki, Yehova azongisaki mwana yango na bomoi. Kanisá naino esengo oyo mwasi yango ayokaki ntango Eliya alobaki ete: “Talá, mwana na yo azongi na bomoi”! Mwasi yango alobaki na Eliya ete: “Sikoyo, ya solo, nayebi ete ozali moto ya Nzambe mpe ete liloba ya Yehova oyo ezali na monɔkɔ na yo ezali solo.”​—1 Bak. 17:22-24.

Mokanda ya 1 Bakonzi mokapo 17 elobeli lisusu te mwasi yango. Kasi, lokola Yesu alobelaki ye na ndenge ya malamu, ekoki kozala ete alekisaki mikolo ya nsuka ya bomoi na ye lokola mosaleli ya sembo ya Yehova. (Luka 4:25, 26) Lisolo na ye eteyi biso ete Nzambe apambolaka baoyo basalaka malamu mpo na basaleli na ye. (Mat. 25:34-40) Emonisi mpe ete Nzambe asungaka bato ya sembo, ata na ntango ya mikakatano makasi. (Mat. 6:25-34) Lisolo yango emonisi mpe polele ete Yehova azali na mposa mpe likoki ya kosekwisa bato bakufá. (Mis. 24:15) Ya solo, makambo oyo kitoko emonisi mpenza bantina oyo tosengeli kokanisaka mwasi wana ya Zarefate.

10-16/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 19-20

“Luká libɔndisi epai ya Yehova”

w19.06 lok. 15 par. 5

Tyelá Yehova motema ntango otungisami

5 Tángá 1 Bakonzi 19:1-4. Atako bongo, Eliya abangaki ntango Yezabele alobaki ete akoboma ye. Na yango, akimaki na Beere-Sheba. Alɛmbaki mpenza nzoto mpe ‘asɛngaki ete akufa.’ Nini esalaki ete amiyoka bongo? Eliya azalaki moto ya kozanga kokoka, “moto lokola biso.” (Yak. 5:17) Ntango mosusu amitungisaki koleka ndelo mpe alɛmbaki mingi. Emonani ete Eliya akanisaki ete milende oyo asalaki mpo na kolendisa bato básambela Yehova ezalaki mpamba, ete makambo ebongwanaki te na Yisraele, mpe ete kaka ye moko nde azalaki kokoba kosalela Yehova. (1 Bak. 18:3, 4, 13; 19:10, 14) Ndenge oyo mosakoli yango ya sembo amiyokaki ekoki kokamwisa biso. Kasi Yehova akamwaki te, amityaki na esika na ye.

ia mok. 12 par. 13

Nzambe na ye abɔndisaki ye

13 Okanisi ete Yehova ayokaki ndenge nini ntango amonaki mosakoli na ye oyo alingaki mingi alali na nse ya nzete wana na esobe mpe azali kosɛnga ete akufa? Eyano ezali polele. Ntango Eliya alalaki, Yehova atindelaki ye anzelu. Anzelu yango asimbaki Eliya, alamwisaki ye na boboto mpe alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, lyá.” Eliya asalaki yango, mpo anzelu apesaki ye mwa limpa ya mɔtɔ mpe mai ya komɛla. Eliya apesaki anzelu yango mersi? Lisolo elobi kaka ete mosakoli alyaki, amɛlaki mpe azongaki na mpɔngi. Alɛmbaki nde mingi yango wana akokaki koloba te? Ezala bongo to te, anzelu alamwisaki ye mpo na mbala ya mibale, mbala mosusu na ntɔngɔntɔngɔ. Na mbala yango mpe, alobaki na Eliya ete: “Tɛlɛmá, lyá,” mpe abakisaki maloba oyo ete, “mpo mobembo na yo ekozala mpasi mingi.”​—1 Bak. 19:5-7.

ia mok. 12 par. 21

Nzambe na ye abɔndisaki ye

21 Biblia eyebisi biso ete Yehova azalaki na kati ya mopɛpɛ te, ya koningana ya mabele te, na kati ya mɔtɔ mpe te. Eliya ayebaki ete Yehova azali te nzambe moko oyo azalaki na kati ya biloko oyo ekelamá, lokola Baala, oyo basambeli na ye oyo bakosamaki bazalaki koloba ete azali “nkolo mapata,” elingi koloba anɔkisaka mbula. Yehova nde akelá biloko nyonso ya nguya oyo ezali na molɔ́ngɔ́, kasi azali mpe monene koleka biloko nyonso oyo akelá. Ata likoló oyo tomonaka ekoki kokoka ye te! (1 Bak. 8:27) Ndenge nini makambo nyonso wana esalisaki Eliya? Kobosana te ete azalaki kobanga. Lokola Yehova Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azalaki elongo na ye, Eliya asengelaki soki moke te kobanga Ahaba ná Yezabele!​—Tángá Nzembo 118:6.

ia mok. 12 par. 22

Nzambe na ye abɔndisaki ye

22 Ntango mɔtɔ elekaki, kimya ekɔtaki mpe Eliya ayokaki “mongongo moko ya kimya, ya nse.” Esɛngaki Eliya aloba lisusu makambo oyo azali na yango na motema; asalaki yango, abimisaki mitungisi na ye mpo na mbala ya mibale. Mbala mosusu ekitisaki ye lisusu motema. Kasi, na ntembe te, Eliya abɔndisamaki mingi koleka na makambo oyo mongongo wana elobaki na ye. Yehova amonisaki Eliya ete azali te moto oyo azangá ntina. Ndenge nini? Nzambe amonisaki makambo oyo azali kokana kosala mpo na kolongola losambo ya Baala na Yisraele. Ya solo, mosala ya Eliya ezalaki ya mpunda te, mpo Nzambe akanaki kaka kolongola losambo ya Baala. Lisusu, Yehova akokoba kaka kosalela mosakoli Eliya, mpo apesaki ye lisusu mokumba moko ná malako ya sikisiki.​—1 Bak. 19:12-17.

Biloko ya motuya ya elimo

w97 1/11 lok. 31 par. 2

Ndakisa ya komipesa mpe ya bosembo

Lelo oyo basaleli mingi ya Nzambe bazali komonisa elimo ya komipesa motindo yango. Bamoko basili kotika “bilanga” na bango, misala na bango ya mosuni, mpo na kosakola nsango malamu na bateritware ya mosika to mpo na kosala lokola basangani ya libota ya Betele. Bamosusu basili kokende na mboka ya bapaya mpo na kotonga bandako ya la Société. Mingi basili kondima oyo ekoki kobéngama ete mosala ya komikitisa. Nzokande, moto moko te oyo azali kosalela Yehova na motema mobimba azali kosala mosala mozangi ntina. Yehova azali kosepela na moto nyonso oyo azali kosalela ye na bolingo malamu, mpe akopambola elimo na bango ya komipesa.​—Marko 10:29, 30.

17-23/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 BAKONZI 21-22

“Mekolá ndenge Yehova asalelaka bokonzi na ye”

it-1-F lok. 1266 par. 1

Yehova ya mapinga

Ntango Yosua akutanaki na anzelu moko pene na Yeriko mpe atunaki ye soki azali na ngámbo ya Yisraele to na ngámbo ya banguna, anzelu yango ayanolaki boye: “Te, nazali nde mokonzi ya limpinga ya Yehova; nayei sikoyo ” (Yos 5:13-15). Mpe ntango mosakoli Mikaya alobaki na mokonzi Ahaba ná mokonzi Yehoshafate ete: “ Ya solo, nazali komona Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi mpe limpinga mobimba ya likoló etɛlɛmi pene na ye, na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe na lobɔkɔ na ye ya mwasi” ; na ntembe te azalaki kolobela nde bana ya elimo ya Yehova (1Ba 22:19-21). Liloba ya boike (pluriel) oyo esalelami na maloba “Yehova ya mampinga” ebongi, mpamba te nguya oyo baanzelu bazalaka na yango elobelamaka kaka te mpo na bakeruba, baserafɛ to mpe baanzelu (Yis 6:2, 3; Eb 3:24; Em 5:11), kasi mpe mpo na lolenge oyo bituluku ebongisami. Mpo na yango nde Yesu Kristo alobaki ete soki esengeli akosɛnga “mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu” mpo na kosalisa ye (Mt 26:53). Na libondeli oyo Hizikiya asalaki mpo na kosɛnga Yehova lisalisi, abengaki Ye: ‘Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, oyo ofandi likoló ya bakeruba’; emonani ete azalaki komonisa boyokani oyo ezali kati na sanduku ya kondimana mpe bakeruba oyo bazali likoló ya ezipeli ya sanduku yango, elilingi oyo ezali komonisa kiti ya bokonzi ya Yehova na likoló (Yis 37:16; talá mpe 1Sa 4:4; 2Sa 6:2). Atako azalaki kobanga, mosaleli ya Elisha alendisamaki na emonaneli moko ya kokamwa oyo amonaki ndenge etúká ya ngombangomba esika mosakoli Elisha azalaki kofanda, ‘etondi na bampunda ná makalo ya bitumba ya mɔtɔ’, to mwa etuluku ya baanzelu ya Yehova oyo ezingaki esika yango.​—2Ba 6:15-17.

w21.02 lok. 4 par. 9

“Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo”

9 Komikitisa. Yehova azali na bwanya koleka moto nyonso. Atako bongo, ayokaka makanisi ya basaleli na ye. (Eba. 18:23, 24, 32) Atikelaka bato oyo bazalaki na nse ya bokonzi na ye bápesa makanisi na bango. (1 Bak. 22:19-22) Atako Yehova azali Nzambe ya kokoka, asɛngaka biso te tósala makambo na ndenge ya kokoka. Kutu, asalisaka bato ya kozanga kokoka oyo basalelaka ye bálonga na makambo oyo basalaka. (Nz. 113:6, 7) Lisusu, Biblia ebengi Yehova “mosungi.” (Nz. 27:9; Ebr. 13:6) Mokonzi Davidi alobaki ete asalaki makambo ya minene kaka mpo Yehova azali na komikitisa mpe asalisaki ye.​—2 Sa. 22:36.

it-2-F lok. 255 par. 7

Lokuta

Yehova Nzambe atikaka nzela ete “misala ya kobungisa esalema” epai ya bato oyo bandimaka lokuta “mpo bándima lokuta” na esika ya kondima nsango malamu oyo etali Yesu Kristo (2Te 2:9-12). Yango emonanaki na likambo oyo esalemaki eleki sikoyo bankama ya bambula na boyangeli ya Ahaba mokonzi ya Yisraele. Basakoli oyo bazalaki koloba makambo ya lokuta bazalaki kondimisa ye ete akolonga etumba na bato ya Ramote-gileade, nzokande mosakoli ya Yehova Mikaya, asakolaki ete mpasi ekoyela ye na etumba yango. Kaka ndenge emonisamaki na emonaneli ya Mikaya, Yehova atikaki ete ekelamu moko ya elimo ekóma “elimo moko ya bokosi” na monɔkɔ ya basakoli ya Ahaba. Na maloba mosusu, ekelamu yango ya elimo esalelaki nguya na yango epai ya basakoli yango mpo báloba, makambo oyo ezali solo te, kasi makambo oyo basepelaki koloba mpe oyo Ahaba azalaki na mposa ya koyoka epai na bango. Kasi atako bakebisaki ye, Ahaba andimaki kokosama na lokuta ya basakoli yango mpe na nsima abungisaki bomoi na ye.​—1Ba 22:1-38; 2Nt 18.

Biloko ya motuya ya elimo

w21.10 lok. 3 par. 4-6

Kobongola motema ya solosolo elimboli nini?

4 Nsukansuka, ntango ekokaki mpo Yehova azwa ekateli. Atindaki mosakoli Eliya mpo asakola nsango ya etumbu mpo na Ahaba mpe Yezabele. Bakitani na bango nyonso basengelaki kobomama. Maloba ya Eliya epesaki Ahaba mpasi na motema! Likambo ya kokamwa, mobali yango ya lofundo ‘amikitisaki.’​—1 Bak. 21:19-29.

5 Atako Ahaba amikitisaki na libaku yango, makambo oyo asalaki na nsima emonisaki ete abongolaki mpenza motema te. Asalaki ata eloko moko te mpo na kosilisa losambo ya Baala na bokonzi na ye. Mpe alendisaki losambo ya Yehova te. Ahaba asalaki mpe makambo mosusu oyo emonisaki ete abongolaki motema te.

6 Na ndakisa, mokolo moko Ahaba abengisaki Mokonzi Yehoshafate ya Yuda aya kopesa ye mabɔkɔ mpo na kobundisa mokonzi ya Siri. Yehoshafate ayebisaki ye ete bátuna naino likanisi ya mosakoli ya Yehova. Na ebandeli, Ahaba aboyaki likanisi yango mpe alobaki boye: “Moto mosusu azali oyo tokoki kotuna Yehova na nzela na ye; kasi ngai, nayinaka ye mpenza, mpo asakwelaka ngai makambo ya malamu te, kaka ya mabe.” Atako bongo, batunaki likanisi ya mosakoli Mikaya. Kaka ndenge Ahaba alobaki, moto ya Nzambe ya solo asakolaki makambo ya mabe mpo na ye! Na esika abongola motema mpo Yehova alimbisa ye, Ahaba atyaki nde mosakoli ya Yehova na bolɔkɔ. (1 Bak. 22:7-9, 23, 27) Atako Ahaba akokaki kotya mosakoli Mikaya na bolɔkɔ, kasi akokaki te kopekisa esakweli yango ekokisama. Mpe na etumba oyo elandaki, Ahaba abomamaki.​—1 Bak. 22:34-38.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Ndenge nini lisolo ya Nabote esalisi biso tókanga ntina ya maloba ya elilingi mpe kokokisama na yango?

w15 15/3 nk. 6-7 par. 10-12

Omonaki malamu kosala bongo

10 Na boumeli ya mbula mingi, Yehova asalisi “moombo ya sembo mpe ya mayele” akóma lisusu na mayele mingi. Ndenge nini? Lelo oyo, moombo ya sembo mpe ya mayele azali sikoyo na mayele ya koloba ete lisolo moko ya Biblia ezali elilingi ya eloko moko monene kaka ntango Biblia emonisi polele mpenza ntina ya koloba bongo. Bandimbola mosusu ya kala ya bililingi mpe kokokisama na yango ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina, komikundola mpe kosalela yango. Likambo eleki ntina, ntango likebi ezalaki kotyama mingi kaka na koluka koyeba ndimbola mpenza ya masolo ya Biblia, ndenge ya komona bizaleli ya kolanda to mateya ya kosalela ezalaki kobima te. Kasi, lelo oyo, mikanda na biso ezali kobenda likebi mingi na lolenge ya pɛtɛɛ mpe na mateya oyo etali kondima, koyika mpiko, komipesa na Nzambe mpe bizaleli mosusu ya ntina mingi oyo tokoki koyekola na mosolo ya Biblia.

11 Sikoyo lisolo ya Nabote ekómi pɛtɛɛ mpe polele na makanisi na biso. Soki Nabote akufaki, ezali te mpo azalaki elilingi ya Yesu to bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, akufaki nde mpo azalaki na ekateli ya kotikala sembo epai ya Nzambe. Akobaki kotosa mibeko ya Yehova atako akutanaki na minyoko makasi ya mokonzi moko ya nguya. (Mitángo 36:7; 1 Bakonzi 21:3) Ezali mpenza ndakisa malamu mpo na basaleli nyonso ya Nzambe ya mikolo na biso oyo bazali koyika mpiko na mikakatano ya ndenge wana. (Tángá 2 Timote 3:12.) Bakristo nyonso bakoki kokanga ntina, kokanisa, mpe kosalela liteya yango mpo na kolendisa kondima na bango.

12 Tosengeli nde koloba ete masolo ya Biblia ezalaka kaka na mateya oyo tokoki kosalela kasi na ndimbola mosusu te? Te. Na esika ya kolimbola masolo mosusu ya Biblia lokola bililingi mpe kokokisama na yango, mikanda na biso ezali sikoyo kotya likebi mingi na ndenge oyo lisolo moko ya Biblia eyokani na mosusu. Na ndakisa, bosembo ya Nabote liboso ya minyoko mpe liwa na ye ezali kokundwela biso bosembo ya Yesu mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, yango ekundweli biso mpe bosembo ya ebele ya “bampate mosusu.” Tokoki komona mpenza polele ndenge Yehova azali koteya biso na ndenge ya pɛtɛɛ.

24-30/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 1-2

“Ndakisa malamu na oyo etali formasyo”

w15 15/4 nk. 13-14 par. 15

Ndenge oyo bankulutu basalisaka basusu mpo bákóma na makoki mingi

15 Lisolo ya mosakoli Elisha emonisi mpe ete ezali na ntina mingi lelo oyo ete bandeko bámonisa limemya epai ya bankulutu oyo basalá mingi. Nsima ya kotala etuluku ya basakoli oyo bazalaki na Yeriko, Eliya ná Elisha bayaki na Ebale ya Yordani. Na nsima, “Eliya azwaki elamba na ye ya mosala mpe alíngaki yango mpe abɛtaki mai, mpe nsukansuka mai ekabwanaki.” Mibali yango bakatisaki Ebale ya Yordani na mabele oyo ekauki, mpe bazalaki “kosolola nzelanzela.” Mosakoli Elisha azalaki koyoka na likebi mpenza makambo nyonso oyo moteyi na ye azalaki koloba mpe akobaki koyekola epai na ye. Elisha akanisaki soki moke te ete ayebi makambo nyonso. Na nsima Eliya amataki na kati ya mopɛpɛ makasi, mpe Elisha azongaki na Ebale Yordani. Kuna, abɛtaki elamba ya mosala ya Eliya na mai mpe alobaki ete: “Wapi Yehova Nzambe ya Eliya, wapi Ye?” Mai ya ebale ekabwanaki lisusu.​—2 Bakonzi 2:8-14.

w15 15/4 lok. 14 par. 16

Ndenge oyo bankulutu basalisaka basusu mpo bákóma na makoki mingi

16 Omoni ete likamwisi ya liboso ya Elisha ekokani na likamwisi ya nsuka oyo Eliya asalaki? Yango eteyi biso nini? Elisha akanisaki te ete lokola akómi sikoyo mosakoli, asengelaki kosala makambo oyo ekeseni mosika mpenza na oyo Eliya asalaki. Kutu, lokola alandaki mayele ya kosala ya Eliya, Elisha amonisaki ete azalaki na limemya epai ya moto oyo ateyaki ye, mpe yango esalaki ete basakoli mosusu bátyela Elisha motema. (2 Bakonzi 2:15) Elisha asalaki mosala ya mosakoli na boumeli ya mbula 60, mpe Yehova apesaki ye nguya ya kosala makamwisi mingi koleka oyo Eliya azalaki na yango. Liteya nini bato oyo bazali lelo oyo koyekola bakoki kozwa?

Biloko ya motuya ya elimo

w05 1/8 lok. 9 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Mikonzi

2:11​—“Lola” epai “Eliya abutaki na mopɛpɛ monene” ezalaki nini? Ezalaki te esika moko ya mosika na kati ya molɔ́ngɔ́ to mpe efandelo ya elimo epai Nzambe ná bana na ye baanzelu bafandi. (Deteronome 4:19; Nzembo 11:4; Matai 6:9; 18:10) “Lola” epai Eliya abutaki ezalaki kaka likoló oyo tomonaka na miso, esika bandɛkɛ ná baaviɔ etambolaka. (Nzembo 78:26; Matai 6:26) Emonani ete likalo ya moto oyo ezalaki kopumbwa na likoló ememaki Eliya epai mosusu kaka awa na mabelé, epai atikalaki lisusu na bomoi mpo na mwa ntango. Bambula na nsima, Eliya akomelaki Yolama mokonzi ya Yuda mokanda.​—2 Ntango 21:1, 12-15.

31/10–06/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 3-4

“Zwá mwana na yo”

w17.12 nk. 4-5 par. 7

“Nayebi ete akosekwa”

7 Lisekwa ya mibale oyo Biblia elobeli ezali oyo mosakoli Elisha asalaki. Na engumba Shuneme, ezalaki na mwasi Moyisraele moko oyo azalaki na bana te. Lokola ayambaki Elisha malamu mpenza, Yehova apambolaki mwasi yango ná mobali na ye oyo akómaki mobange mpe babotaki mwana mobali. Kasi, mwa bambula na nsima, mwana yango akufaki. Mama yango ayokaki mpasi mpenza! Na mawa na ye, asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 30 mpo na kokende koluka Elisha na Ngomba Karamele. Elisha ayebisaki mosaleli na ye Gehazi akende liboso na bango na Shuneme kosekwisa mwana yango. Kasi, Gehazi alongaki kosala yango te. Na nsima, mama yango ná Elisha bakómaki na ndako.​—2 Bakonzi 4:8-31.

w17.12 lok. 5 par. 8

“Nayebi ete akosekwa”

8 Elisha akɔtaki epai mwana alalaki, mpe abondelaki. Yehova ayokaki libondeli ya Elisha mpe azongisaki mwana yango na bomoi. Ntango mama yango amonaki mwana na ye na bomoi, atondaki na esengo! (Tángá 2 Bakonzi 4:32-37.) Mbala mosusu akanisaki maloba ya libondeli ya Hana. Hana azalaki na mwana te, tii ntango Yehova apambolaki ye mpe abotaki Samwele. Hana asanzolaki Yehova mpo “akitisaka na Nkunda, mpe abimisaka,” elingi koloba alamwisaka. (1 Samwele 2:6) Ndenge Nzambe alamwisaki mwana wana na Shuneme, amonisaki ete azali na likoki ya kosekwisa bakufi.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F nk. 672-673 par. 6

Mosakoli

“Bana ya basakoli.” Ndenge gramɛrɛ ya monɔkɔ ya Ebre elimboli yango (Grammaire de l’hébreu biblique, par P. Joüon, Rome, 1923, § 129 j), maloba bèn (mwana ya) to bené (bana ya) ekoki kopesa likanisi ya “moto oyo azali na kati ya etuluku moko boye ya bato”. (Talá Ne 3:8, epai balobeli “moko ya bato oyo basalaka malasi” oyo bakoki mpe kobenga “mwana ya bato oyo basalaka malasi”). Maloba “bana ya basakoli” ekokaki komonisa eteyelo moko mpo na bato oyo bazalaki komipesa na mosala yango to kaka mwa etuluku moko ya basakoli. Mwa bituluku yango ya basakoli, ezalaki na Betele, na Yeriko mpe na Gilgale (2Ba 2:3, 5; 4:38; talá mpe 1Sa 10:5, 10). Samwele azalaki kokamba etuluku moko na Rama (1Sa 19:19, 20), emonani mpe ete Elisha azalaki na mokumba ya ndenge wana na eleko na ye (2Ba 4:38; 6:1-3; talá mpe 1Ba 18:13). Lisolo moko emonisi ete bana ya basakoli bazalaki kotonga bisika na bango moko ya kofanda mpe ndenge bazalaki kosalela bisaleli oyo bazalaki kodefa, likambo yango ekoki komonisa ete bazalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Ata soki mbala mosusu bazalaki kofanda mpe kolya esika moko, mokomoko na bango akokaki kozala na makambo ya kokokisa na mosala ya basakoli. ​— 1Ba 20:35-42; 2Ba 4:1, 2, 39; 6:1-7; 9:1, 2.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Ndenge nini okoki komekola komikitisa ya Elisha na mosala ya Nzambe?

w13 15/8 nk. 28-29

Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ​—Yo mpe omonaka yango?

Mokonzi ya Siri azalaki koluka Elisha, mosakoli ya Nzambe, mpo aboma ye mpe atindaki bato bálanda ye tii na Dotane, engumba oyo ezalaki na bangomba zingazinga na yango. Na butu, mokonzi ya Siri atindaki bampunda, makalo ya bitumba, mpe basoda ebele na Dotane. Na ntɔngɔntɔngɔ, basoda yango bazingaki engumba yango.​—2 Bak. 6:13, 14.

Ntango mosaleli ya Elisha alamukaki mpe abimaki libándá, amonaki bato oyo bayaki kokanga mosakoli ya Nzambe. Agangaki ete: “Mawa, nkolo na ngai! Tokosala nini?” Elisha azongiselaki ye ete: “Kobanga te, mpo baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango.” Na nsima, mosakoli yango abondelaki boye: “Ee Yehova, nabondeli yo, fungolá ye miso amona.” Lisolo yango elobi ete: “Na mbala moko, Yehova afungolaki miso ya mosaleli yango, bongo amonaki; mpe talá! etúká ya ngombangomba etondi na bampunda ná makalo ya bitumba ya mɔtɔ ezingi Elisha bipai nyonso.” (2 Bak. 6:15-17) Likambo yango mpe makambo mosusu ya bomoi ya Elisha ekoki koteya biso nini?

Elisha azalaki na motema ya kokita liboso ya basoda wana ya Siri mpamba te azalaki kotyela Yehova motema mpe amonaki ndenge oyo Nzambe azalaki kobatela ye. Lelo oyo, biso tozelaka te komona makamwisi, kasi tokoki kososola ndenge Yehova azali kobatela basaleli na ye. Ezali lokola nde bampunda ná makalo oyo ezali kopela mɔtɔ ezingi mpe biso. Soki tozali komona yango na miso na biso ya kondima mpe soki tozali ntango nyonso kotyela Nzambe motema, ‘tokofanda na kimya’ mpe tokozwa mapamboli ya Yehova. (Nz. 4:8) Tótalela mateya oyo tokoki kozwa na makambo mosusu ya bomoi ya Elisha.

ELISHA AKÓMI MOSALELI YA ELIYA

Mokolo moko, ntango Elisha azalaki kobalola mabele na elanga, mosakoli Eliya apusanaki pene na ye mpe abwakelaki ye elamba na ye ya mosala. Elisha ayebaki soki yango elingi koloba nini. Yango wana, asalaki fɛti mpo na kokabwana na tata na ye mpe mama na ye, mpe alongwaki na ndako na bango mpe akómaki mosaleli ya Eliya. (1 Bak. 19:16, 19-21) Lokola Elisha andimaki komipesa mobimba na mosala ya Nzambe, Yehova asalelaki ye mpe na nsima akómaki mosakoli na esika ya Eliya.

Elisha azalaki mosaleli ya Eliya na boumeli ya mbula soki motoba. Na boumeli ya ntango wana, Elisha nde “azalaki kosopela Eliya mai na mabɔkɔ.” (2 Bak. 3:11) Na ntango wana, bato bazalaki na momeseno ya kolya na mabɔkɔ; bazalaki te kosalela bakanya, bambeli, balutu to biloko mosusu mpo na kolya. Nsima ya kolya, mosaleli azalaki kosopela nkolo na ye mai mpo na kosukola mabɔkɔ. Na yango, misala mosusu oyo Elisha azalaki kosala ezalaki ya lokumu te. Atako bongo, azalaki komona ete kozala mosaleli ya Eliya ezali lokumu monene.

Lelo oyo, bakristo mingi bazali kokokisa mikumba ndenge na ndenge ya mosala ya ntango nyonso. Kondima na bango mpe mposa ya kopesa makasi nyonso na mosala ya Yehova nde etindaka bango bákɔta na mosala ya ntango nyonso. Mikumba mosusu esɛngaka ete bálongwa esika oyo bafandi mpo na kokende kosala misala mosusu oyo bato bakoki komona ete ezali ya lokumu te, na ndakisa na Betele, na bisika oyo bazali kotonga, mpe bongo na bongo. Mokristo moko te asengeli komona ete misala ya ndenge wana ezali mpamba to ezangi lokumu, mpamba te Yehova azwaka yango na motuya mingi.​—Ebr. 6:10.

ELISHA AKANGAMI NA MOKUMBA NA YE

Liboso Nzambe ‘amema Eliya na likoló na mopɛpɛ makasi,’ ayebisaki mosakoli yango alongwa na Gilgale akende na Betele. Eliya asɛngaki Elisha atikala, kasi Elisha alobaki ete: “Nakotika yo te.” Ntango bazalaki kokende, Eliya asɛngaki Elisha mbala mibale lisusu ete azonga, kasi Elisha alingaki te. (2 Bak. 2:1-6) Kaka ndenge Ruta akangamaki na Naomi, Elisha mpe akangamaki na Eliya. (Ruta 1:8, 16, 17) Mpo na nini? Emonani ete ezalaki mpo Elisha azalaki kosepela mingi na mokumba oyo Nzambe apesaki ye ya kozala mosaleli ya Eliya.

Elisha atikelá biso ndakisa ya malamu mpenza. Soki tozwi mikumba mosusu na ebongiseli ya Nzambe, tokozwa yango na motuya mingi soki tozali kobosana te ete tozali kosalela nde Yehova. Likambo mosusu ya lokumu koleka yango ezali te.​—Nz. 65:4; 84:10.

“SƐNGÁ ELOKO OYO NASENGELI KOSALELA YO”

Wana mibali yango mibale bazalaki kosala mobembo, Eliya alobaki na Elisha ete: “Sɛngá eloko oyo nasengeli kosalela yo liboso nakamatama mpe natika yo.” Kaka ndenge likambo oyo Salomo asɛngaki bambula mingi liboso etalelaki makambo ya elimo, Elisha mpe asalaki kaka bongo. Asɛngaki ete ‘ndambo mibale ya elimo ya Eliya eyela ye.’ (1 Bak. 3:5, 9; 2 Bak. 2:9) Na Yisraele, mwana mobali ya liboso na kati ya libota azalaki kozwa ndambo mibale ya libula. (Mib. 21:15-17) Na yango, Elisha asɛngaki nde ete akóma lokola mwana ya elimo ya Eliya. Longola yango, emonani ete Elisha alingaki ete azala na mpiko lokola Eliya, oyo azalaki na “zuwa mpenza mpo na Yehova.”​—1 Bak. 19:13, 14.

Eliya asalaki nini mpo na likambo oyo mosaleli na ye asɛngaki? Alobaki boye: “Osɛngi likambo moko ya makasi. Soki omoni ngai ntango nakokamatama mpe nakotika yo, ekokómela yo bongo; kasi soki te, ekosalema te.” (2 Bak. 2:10) Emonani ete eyano ya Eliya ezalaki na ndimbola mibale. Ya liboso, kaka Nzambe nde akokaki kokata soki Elisha akozwa eloko oyo asɛngaki. Ya mibale, mpo Elisha azwa yango, esengelaki akangama na ekateli na ye ya kotikala elongo na Eliya, ata ndenge nini.

OYO ELISHA AMONAKI

Nzambe asalaki nini mpo na ndenge Elisha asɛngaki ndambo mibale ya elimo ya Eliya? Lisolo yango elobi ete: “Esalemaki boye: wana bazalaki kotambola, bazali kosolola nzelanzela, talá! likalo moko ya etumba, ya mɔtɔ, mpe bampunda ya mɔtɔ, ekaboli bango mibale; bongo Eliya amataki na likoló na mopɛpɛ makasi. Na ntango wana nyonso, Elisha azalaki komona yango.” Yango ezalaki eyano ya Yehova na likambo oyo Elisha asɛngaki. Elisha amonaki Eliya azali kokamatama, azwaki ndambo mibale ya elimo ya Eliya, mpe akómaki mozwi-libula ya mosakoli yango.​—2 Bak. 2:11-14.

Elisha azwaki elamba ya mosala oyo elongwaki epai ya Eliya mpe ekweaki, mpe alataki yango. Elamba yango ekómaki komonisa ete Elisha azali mosakoli ya Nzambe. Elembeteli mosusu oyo emonisaki ete akómi mosakoli emonanaki na nsima, ntango asalaki likamwisi ya kokabola mai ya Ebale Yordani.

Na ntembe te, likambo oyo Elisha amonaki ntango Eliya akamatamaki likoló na kati ya mopɛpɛ makasi etikalaki na makanisi na ye. Mpamba te, moto amonaka likalo ya etumba ya mɔtɔ mpe bampunda oyo ezali kopela mikolo nyonso te! Yango emonisaki ete Yehova andimi likambo oyo Elisha asɛngaki. Ntango Nzambe ayanolaka na mabondeli na biso, tozwaka te emonaneli ya likalo ya etumba to ya bampunda oyo ezali kopela mɔtɔ. Kasi tokoki kososola ndenge oyo Nzambe azali kosalela nguya na ye mpo na kokokisa mokano na ye. Mpe ntango tozali komona ndenge Yehova azali kopambola eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele, ezali lokola nde tozali “komona” ndenge likalo na ye kuna na likoló ezali kotambola.​—Ezk. 10:9-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto