Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
© 2022 Christian Congregation of Jehovah’s Witnesses
02-08/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 22-23
“Mpo na nini osengeli komikitisa?”
Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova
Basali yango ya tempelo bazali kobanda mosala na ntɔngɔntɔngɔ mpe bazali kosala na molende. Na ntembe te Yosiya azali na botɔndi epai ya Yehova lokola basali bazali kobongisa bisika nyonso oyo bankɔkɔ na ye oyo bazalaki bato mabe babebisaki na ndako ya Nzambe. Wana mosala ezali kokoba, Shafane ayei koyebisa ye likambo moko. Kasi asimbi eloko nini na mabɔkɔ na ye? Azali na rulo! Alobi ete Nganga-nzambe Monene Hilikiya azwi “buku ya mobeko ya Yehova oyo epesamaki na lobɔkɔ ya Moize.” (2 Ntango 34:12-18) Bazwi eloko moko ya motuya mpenza! Na ntembe te, ezali mpenza mokanda ya Mibeko oyo Moize akomaki na mabɔkɔ na ye mpenza!
Yosiya azali na mposa ya koyoka liloba mokomoko ya mobeko mobimba. Ntango Shafane azali kotánga, mokonzi azali kokanisa ndenge nini mobeko mokomoko etaleli ye ná bato na ye. Likambo ekamwisi ye mingi ezali lolenge oyo mokanda yango ezali kolobela mingi losambo ya solo mpe ezali kosakola malɔzi oyo ekokwela bato mpe ndenge oyo bakokende na boombo soki bamipesi na losambo ya lokuta. Ntango amoni ete bato bazali kotosa mibeko nyonso ya Nzambe te, Yosiya apasoli bilamba na ye mpe alobi na Hilikiya, na Shafane mpe bamosusu ete: “Bókende, bótuna Yehova . . . na ntina etali maloba ya buku oyo bamoni. Nkanda makasi ya Yehova oyo epeleli biso ezali monene, mpo bankɔkɔ na biso bayokaki maloba ya buku oyo te.”—2 Bakonzi 22:11-13; 2 Ntango 34:19-21.
Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova
Bamemi-nsango ya Yosiya bakei epai ya mosakoli mwasi Huluda mpe ye alobi na bango makambo oyo bakoyebisa Yosiya. Huluda asakoli liloba ya Yehova, amonisi ete mabe ekokwela libota ya botomboki ndenge elobelami na mokanda oyo bauti kozwa. Kasi, lokola Yosiya amikitisi liboso ya Yehova Nzambe, ye akomona mabe yango te. Akokundama esika moko na bankɔkɔ na ye mpe ye moko akokende na kimya na lilita na ye.—2 Bakonzi 22:14-20; 2 Ntango 34:22-28.
Biloko ya motuya ya elimo
Okoki kolonga ata soki babɔkɔlaki yo ndenge nini
Atako amonaki makambo mabe na bomwana na ye, Yosiya asalaki oyo ezalaki malamu na miso ya Yehova. Lokola ayangelaki mpenza malamu, Biblia elobi ete: “Mokonzi moko te azalaki liboso na ye oyo akokanaki na ye, oyo azongelaki Yehova na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso ya bomoi, na kolanda mobeko nyonso ya Moize; mpe mokonzi moko te abimaki nsima na ye oyo akokanaki na ye.”—2 Bakonzi 23:19-25.
Yosiya atikelaki baoyo bakutanaki na mikakatano mingi na bomwana na bango ndakisa ya malamu mpenza! Ndakisa na ye ekoki koteya biso nini? Makambo nini esalisaki Yosiya apona nzela ya malamu mpe akangama na yango?
09-15/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 24-25
“Kobosana te ntango oyo tozali kobika”
Mokolo ya kosambisa ya Yehova ekómi pene!
2 Na ntembe te, esakweli ya Sefania ebakisaki lisusu mposa ya elenge Yosiya ya kosilisa losambo ya mbindo na Yuda. Atako mokonzi asukisaki losambo ya lokuta na mboka yango, misala na ye esalaki te ete bato bátika mpenza makambo ya mabe to ezipaki te masumu ya nkɔkɔ na ye, Mokonzi Manase, oyo “atondisaki Yerusaleme na makila ya bato oyo bazali na likambo te.” (2 Bakonzi 24:3, 4; 2 Ntango 34:3) Yango wana, mokolo oyo Yehova asengelaki kopesa etumbu ekokaki kozanga te.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yilimia
Na mbula ya 11 ya bokonzi ya Sidikiya, na mobu 607, basoda ya Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, basilaki kozingela Yerusaleme na boumeli ya sanza 18. Na sanza ya mitano, na mokolo ya nsambo, na mbula ya 19 ya boyangeli ya Nebukadenezare, Nebuzaradane, mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, “ayaki na” Yerusaleme. (2 Bakonzi 25:8) Ekoki kozala ete wana azalaki na kaa na ye na pembeni ya engumba, Nebuzaradane azalaki kolandela makambo oyo ezalaki koleka na kati ya engumba mpe azalaki kobongisa malamumalamu ndenge akozwa engumba yango. Mikolo misato na nsima, elingi koloba, na mokolo ya libwa ya sanza yango “akɔtaki” na Yerusaleme. Mpe atumbaki engumba yango.—Yirimia 52:12, 13.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina ya mokanda ya mibale ya Mikonzi
24:3, 4. Mpo na nyongo ya makila oyo Manase azalaki na yango, Yehova “aboyaki kolimbisa” Yuda. Nzambe azwaka na motuya makila ya moto oyo babomi ye kaka mpamba. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akoboma baoyo basopaki makila ya bato oyo basali eloko te.—Nzembo 37:9-11; 145:20.
16-22/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 1-3
“Masolo ya Biblia ezali solo”
Adama ná Eva bazalaki bato ya solo?
Tózwa ndakisa ya liste ya bankɔkɔ ya Bayuda, oyo ezali na mokanda ya 1 Ntango mokapo 1 tii 9, mpe na Evanzile ya Luka mokapo 3. Baliste yango elobeli na bolai mpenza milɔngɔ ya bankɔkɔ: moko elobeli milɔngɔ ya bankɔkɔ 48 mpe mosusu 75. Mokanda ya Luka elobeli bankɔkɔ ya Yesu Kristo, kasi mokanda ya Ntango elobeli bankɔkɔ ya bakonzi mpe ya banganga-nzambe ya Yisraele. Baliste yango mibale ezali na bankombo ya bato oyo bayebani mingi, na ndakisa Salomo, Davidi, Yakobo, Yisaka, Abrahama, Noa, mpe nsukansuka Adama. Bankombo nyonso oyo ezali na baliste yango mibale ezali ya bato ya solo, mpe Adama nde moto ya solo ya ebandeli na liste mokomoko.
Lisolo ya Noa mpe mpela ezali lisapo ya mpamba te
Masolo mibale ya Biblia oyo elobeli mabota emonisi ete Noa azalaki mpenza. (1 Ntango 1:4; Luka 3:36) Ezera ná Luka, bato oyo bakomaki masolo yango, balandelaki mpenza makambo na likebi. Luka alobeli molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Kristo tii na Noa.
Adama ná Eva bazalaki bato ya solo?
Na ndakisa, tótalela liteya oyo bandimi ya mangomba mingi bamonaka ete ezali na ntina mingi: lisiko. Liteya yango elobi ete Yesu Kristo apesaki bomoi na ye ya moto ya kokoka lokola lisiko mpo na kolongola bato na masumu. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Ndenge toyebi yango, lisiko ezali eloko oyo bapesi mpo na kosikola to kofuta eloko oyo ebungaki; motuya ya lisiko esengeli kokokana na motuya ya eloko oyo ebungaki. Yango wana Biblia elobi ete Yesu azali “lisiko oyo ekokani.” (1 Timote 2:6) Tokoki komituna boye: ekokani na nini? Biblia elobi boye: “Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.” (1 Bakorinti 15:22) Bomoi ya kokoka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato ya botosi ekokani na bomoi ya kokoka oyo Adama abungisaki mpo na lisumu ya liboso na Edene. (Baroma 5:12) Ezali polele ete soki Adama azalaki na bomoi te, mbeka ya lisiko oyo Kristo apesaki ezali na ntina moko te.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 977 par. 2-3
Molɔngɔ ya bankɔkɔ
Bankombo ya basi. Na bantango mosusu, bazalaki kotya bankombo ya basi na molɔngɔ ya bankɔkɔ ntango ezalaki na ntina ya kosala bongo na kotalela lisolo. Na Ebandeli 11:29, 30, batángi Sarai (Sara), na ntembe te mpo na komonisa ete Momboto oyo alakamaki asengelaki kouta na nzela na ye, kasi te na nzela ya mwasi mosusu ya Abrahama. Balobeli mpe Milika kaka na mokapo yango mpo azalaki nkɔkɔ ya Rebeka, mwasi ya Yisaka, mpo na komonisa molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Rebeka eutaki na nzela ya bandeko ya Abrahama, mpamba te Yisaka asengelaki kozwa mwasi na bikólo mosusu te. (Eb 22:20-23; 24:2-4) Na ebandeli 25:1, batángi na nsima nkombo ya mwasi ya Abrahama, Ketura. Yango emonisi ete Abrahama abalaki mwasi mosusu nsima ya liwa ya Sara, mpe azalaki na makoki ya kobota mbula koleka 40 na nsima, kobanda ntango Yehova azongiselaki bango makoki ya kobota. (Ro 4:19; Eb 24:67; 25:20) Longola yango, emonisi boyokani oyo Bamidiane mpe mabota mosusu ya Baarabe bazalaki na yango ná Bayisraele.
Nkombo ya Lea, ya Rashele, ya bamakango ya Yakobo, mpe ya bana mibali oyo babotaki ekomamaki. (Eb 35:21-26) Yango esalisaka biso tóyeba ndenge Nzambe asalelaki bana yango makambo na nsima. Bankombo ya basi mosusu etyami na molɔngɔ ya bankɔkɔ mpo na ntina kaka moko wana. Ntango libula ezalaki kokitana na nzela na bango, bazalaki kotya bankombo na bango. (Mit 26:33) Kasi, batángi nkombo ya Tamara, ya Rahaba, mpe ya Ruta mpo na bantina mosusu. Mpo na mokomoko na bango, ezali na likambo moko ebandaki likebi oyo esalaki ete bankombo na bango etyama na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya, Yesu Kristo. (Eb 38; Rt 1:3-5; 4:13-15; Mt 1:1-5) Basi mosusu mpe bankombo na bango etyami na molɔngɔ ya bankɔkɔ, na ndakisa, na 1 Ntango 2:35, 48, 49; 3:1-3, 5.
23-29/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 4-6
“Mabondeli na ngai emonisaka ete nazali moto ya ndenge nini?”
“Moyoki ya libondeli”
Yabeze azalaki moto ya mabondeli. Abandaki libondeli na ye na kosɛnga mapamboli ya Nzambe. Na nsima, asɛngaki makambo misato oyo emonisi ete azalaki na kondima makasi.
Ya liboso, Yabeze abondelaki Nzambe; alobaki boye: ‘Komisá teritware na ngai monene.’ (Vɛrsɛ 10) Mobali wana ya lokumu azalaki te na lokoso ya kokóma na teritware monene, azalaki kolula te teritware ya basusu. Na libondeli na ye, amonisaki ete azali komibanzabanza mpo na bato, kasi te mpo na mabele. Ekoki kozala ete azalaki kobondela mpo kimya ezala na teritware na ye mobimba mpo basambeli mingi ya Nzambe ya solo bázala na teritware na ye.
Ya mibale, Yabeze asɛngaki ete “lobɔkɔ” ya Nzambe ezala elongo na ye. Na ndenge ya elilingi, lobɔkɔ ya Nzambe ezali nguya na ye, oyo asalelaka mpo na kosunga basambeli na ye. (1 Ntango 29:12) Mpo azwa makambo oyo asɛngaki, Yabeze atalelaki Nzambe oyo lobɔkɔ na ye ezalaka mokuse te mpo na baoyo bamonisaka kondima epai na ye.—Yisaya 59:1.
Ya misato, Yabeze abondelaki boye: ‘Batelá ngai mpenza na likama, mpo epesa ngai mpasi te.’ Maloba “mpo epesa ngai mpasi te,” ekoki komonisa ete Yabeze abondelaki te mpo na kokima likama, kasi mpo abatelama na mpasi to ayika mpiko na makambo mabe oyo mpasi ebimisaka.
Libondeli ya Yabeze emonisi ete azalaki komibanzabanza mpo na losambo ya solo mpe azalaki na kondima mpe elikya epai ya Moyoki ya libondeli. Ndenge nini Yehova ayanolaki? Lisolo yango mokuse esuki na maloba oyo: “Na yango, Nzambe akokisaki oyo ye asɛngaki.”
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Ntango
5:10, 18-22. Na mikolo ya Mokonzi Saulo, mabota oyo ezalaki na Ɛsti ya Ebale Yordani elongaki Bahagri atako bikólo yango ezalaki na bato ebele mbala 2 koleka bango. Balongaki mpamba te bilombe mibali ya mabota yango batyelaki Yehova motema mpe balukaki lisalisi na ye. Biso mpe tosengeli kotyela Yehova motema na biso mobimba ntango tozali kobunda etumba ya elimo na banguna na biso oyo baleki biso na ebele.—Baefese 6:10-17.
30/01–05/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 7-9
“Okoki kokokisa mikumba ya mpasi na lisalisi ya Yehova”
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Ntango
9:26, 27. Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla bikuke bazalaki na mokumba moko monene. Bapesaki bango fungola ya kokɔta na bisika mosantu ya tempelo. Bazalaki bato oyo ebongaki mpenza bátyela bango motema mpo na kofungola bikuke mokolo na mokolo. Bapesi biso mokumba ya kokende koluka bato na teritware na biso mpe kosalisa bango báya kosambela Yehova. Biso mpe tómimonisa bato oyo bakoki kotyela motema lokola Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla bikuke!
Zalá lokola Finehase ntango okutani na mikakatano
Finehase azalaki na mikumba minene na Yisraele ya kala; kasi lokola azalaki na mpiko, na mayele ya kososola mpe atyelaki Nzambe motema, alongaki kosilisa mikakatano. Mpe Yehova asepelaki na Finehase ndenge asalaki milende mpo na kobatela lisangá ya Nzambe. Mbula soki 1000 na nsima, elimo santu etindaki Ezera akoma ete: “Finehase mwana ya Eleazare nde azalaki mokambi na bango kala. Yehova azalaki elongo na ye.” (1 Nt. 9:20) Tiká Yehova azala mpe elongo na baoyo nyonso bazali kokamba basaleli ya Nzambe lelo oyo, ɛɛ, azala elongo na bakristo nyonso oyo bazali kosalela ye na bosembo.
Biloko ya motuya ya elimo
Tóyembela Yehova!
6 Ya solo, na nzela ya basakoli na ye, Yehova atindaki basambeli na ye bákumisa ye na nzembo. Kutu, bayembi oyo bazalaki na libota ya banganga-nzambe basɛngisamaki te kosala misala mosusu oyo Balevi bazalaki kosala mpo bayembi yango bákoka kopesa ntango oyo ekoki na kosala banzembo mbala mosusu mpe, ezalaki mingimingi mpo na kosala bozongeli ya banzembo.—1 Nt. 9:33.
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: Salisá moyekoli na yo asalela makambo oyo azali koyekola
Ozali na “molende na misala ya malamu”?
3 Liboso azwa batisimo, moyekoli ya Biblia asengeli kosalela makambo oyo Biblia eteyaka. (Tángá Matai 28:19, 20.) Ntango moyekoli azali kosalela makambo oyo azali koyekola, akokóma lokola “moto ya mayele” oyo atimolaki libulu ya mwa mozindo mpo atonga ndako na ye likoló ya mabanga. (Mat. 7:24, 25; Luka 6:47, 48) Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia asalela makambo oyo azali koyekola? Tólobela makanisi misato.
4 Salisá moyekoli na yo amityela mikano. Mpo na nini osengeli kosala yango? Tózwa ndakisa oyo: Soki olingi kosala mobembo moko ya molai, na ntembe te okopona bisika ya malamu oyo osengeli kopema. Yango ekosalisa yo olɛmba nzoto te mpe omona te ete esika oyo ozali kokende ezali mosika mingi. Ndenge moko mpe, soki moyekoli ya Biblia amityeli mikano oyo asengeli kokokisa nsima ya mwa mikolo, yango ekosalisa ye amona ete mokano na ye ya kozwa batisimo ekokokisama. Salelá etanda “Oyo okoki kosala” na buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpo na kosalisa moyekoli na yo akola. Na nsuka ya liteya mokomoko, lobelá elongo na moyekoli ndenge oyo komityela mokano ya ndenge wana ekosalisa ye asalela makambo oyo auti koyekola. Soki ozali na mokano mosusu oyo okolinga ete moyekoli na yo akokisa, komá yango na esika bakomi “Makambo mosusu.” Mbala na mbala, taleláká elongo na moyekoli na yo mikano oyo asengeli kokokisa nsima ya mwa ntango, mpe oyo ekoumela ntango molai.
5 Salisá moyekoli na yo asala bambongwana na bomoi na ye. (Tángá Marko 10:17-22.) Yesu ayebaki malamu ete ekozala mpasi mpo mozwi atɛka biloko na ye nyonso. (Mrk. 10:23) Atako bongo, Yesu ayebisaki mobali yango ete asala mbongwana wana ya monene na bomoi na ye. Mpo na nini? Mpo Yesu alingaki mobali yango. Na bantango mosusu tokoki kokakatana mpo na kolendisa moyekoli ya Biblia asalela makambo oyo azali koyekola, mpo tozali kokanisa ete akoki naino te kosala mbongwana oyo esengeli. Ekoki kozwa mwa ntango mpo bato mosusu bálongola bomoto ya kala mpe bálata oyo ya sika. (Kol. 3:9, 10) Kasi soki oumeli te mpo na koyebisa ye mbongwana oyo asengeli kosala, yango ekosalisa ye aumela te mpo abanda kosala mbongwana yango. Koyebisa ye bongo ekomonisa ete otyelaka ye likebi.—Nz. 141:5; Mas. 27:17.
6 Ezali na ntina ete otunaka makanisi ya moyekoli na yo na lisolo moko oyo bozali kolobela. Yango ekosalisa yo oyeba makambo oyo moyekoli na yo ayebi mpe oyo andimaka. Soki osali bongo mbala na mbala, ekozala mpasi te mpo olobela makambo oyo ekoki kozala mpasi mpo moyekoli na yo andima. Buku Sepelá na bomoi libela na libela! ezali na mituna mingi mpo na kosalisa moyekoli abimisa makanisi na ye. Na ndakisa, liteya 04 ezali na motuna oyo: “Okanisi nini: Yehova akoyoka ndenge nini soki obengi ye na nkombo na ye?” Mpe liteya 09 ezali na motuna oyo: “Makambo nini mosusu okosepela kobondela mpo na yango?” Na ebandeli, ekoki kozala mpasi mpo moyekoli na yo ayeba ndenge ya koyanola na mituna oyo ekosɛnga ete abimisa makanisi na ye. Okoki kosalisa ye ayeba ndenge ya kokanisa na bavɛrsɛ ya Biblia mpe na bililingi oyo ezali na buku oyo azali koyekola.
7 Ntango moyekoli na yo ayebi makambo oyo asengeli kosala, bɛtelá ye masolo ya bandeko oyo basalaki mpe makambo yango; na ntembe te ekolendisa ye mpenza. Na ndakisa, soki azalaka na mokakatano ya koyangana na makita, okoki kolakisa ye video: Yehova asungaki ngai, na eteni “Makanisi mosusu” oyo ezali na liteya 14. Na mateya mingi ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! okokuta masolo ya ndenge wana na eteni “Kɔtá na mozindo” to na eteni “Makanisi mosusu.” Kebá na likambo oyo: kokokanisa te moyekoli na yo na moto mosusu mpe koloba na ye te ete, “Soki moto wana akokaki kosala bongo, yo mpe okokoka.” Tiká moyekoli ye moko nde aloba bongo. Kasi lobelá makambo ya ntina oyo esalisaki moto oyo balobeli na video yango mpo asalela mateya ya Biblia. Ntango mosusu okoki kolobela vɛrsɛ moko ya ntina to mpe likambo moko ya sikisiki oyo moto yango asalaki. Soki likoki ezali, monisá ndenge oyo Yehova asalisaki moto yango.
8 Salisá moyekoli na yo akóma kolinga Yehova. Ndenge nini okoki kosala yango? Luká mabaku mpo na kobenda likebi na ye na bizaleli ya Yehova. Salisá moyekoli na yo amona ete Yehova azali Nzambe ya esengo mpe ete asalisaka baoyo balingaka ye. (1 Tim. 1:11; Ebr. 11:6) Salisá ye amona ete akozwa matomba soki asaleli makambo oyo azali koyekola mpe monisá ye ete matomba oyo akoki kozwa emonisi bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na ye. (Yis. 48:17, 18) Wana bolingo na ye mpo na Yehova ezali kokóma makasi, yango ekotinda ye asala bambongwana minene na bomoi na ye.—1 Yoa. 5:3.
06-12/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 10-12
“Kómisá makasi mposa na yo ya kosala mokano ya Nzambe”
“Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”
12 Tosengeli mpe komekola Davidi na ndenge oyo azalaki koluka koyeba mitinda oyo esimbi mibeko mpe azalaki na mposa ya kolanda mitinda yango. Tótalela likambo oyo esalemaki ntango Davidi amonisaki mposa na ye ‘ya komɛla mai ya libulu ya kobomba mai ya Beteleme.’ Bato misato ya Davidi bakɔtaki na makasi na engumba, oyo na ntango wana Bafilistia nde bazalaki koyangela, batokaki mai mpe bamemelaki ye yango. Nzokande, “Davidi andimaki komɛla yango te, kasi asopaki yango mpo na Yehova.” Mpo na nini? Alobaki boye: “Nakoki kokanisa yango ata moke te, mpo na Nzambe na ngai, ete nasala boye! Nakomɛla nde makila ya mibali oyo batye milimo na bango na likama? Mpo batyaki milimo na bango na likama ntango bayaki na yango.”—1 Nt. 11:15-19.
13 Na nzela ya Mibeko, Davidi ayebaki ete esengeli kolya makila te, kasi kosopa yango na mabele liboso ya Yehova. Ayebaki mpe ntina oyo esengeli kosala bongo. Ayebaki ete “molimo ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila.” Nzokande, mai wana ezalaki makila te. Kasi mpo na nini Davidi aboyaki komɛla yango? Asosolaki etinda oyo esimbaki mobeko wana. Mpo na Davidi, mai wana ezalaki na valɛrɛ ndenge moko na makila ya mibali wana misato. Yango wana, akokaki kondima ata moke te komɛla mai yango. Na esika amɛla yango, amonaki ete asengeli nde kosopa yango na mabele.—Lev. 17:11; Mib. 12:23, 24.
Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo
5 Soki tolingi ete mibeko ya Nzambe esalisa biso, tosengeli kosuka kaka te na kotánga to koyeba yango. Tosengeli kolinga mpe kotosa yango. Biblia eyebisi biso ete: “Bóyina oyo ezali mabe, mpe bólinga oyo ezali malamu.” (Amose 5:15) Kasi tokosala yango ndenge nini? Tosengeli kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kolala malamu te, mpe monganga asɛngi yo obongola ndenge na yo ya kolya, asɛngi yo osalaka ngalasisi, mpe obongola makambo mosusu na bomoi na yo. Nsima ya kolanda toli yango, omoni ete okómi kolala malamu! Na ntembe te, okosepela lisusu na monganga yango ndenge asalisi yo.
6 Ndenge moko mpe, Mozalisi na biso apesá biso mibeko mpo ebatela biso na mbuma mabe ya lisumu mpe mpo tózala na bomoi ya malamu. Na ndakisa, Biblia epekisi biso kokosa, kobuba, koyiba, kosala pite, kosala mobulu to kozala na boyokani na bademo. (Tángá Masese 6:16-19; Emoniseli 21:8) Ntango tomonaka matomba tozwaka soki totosi Yehova, bolingo na biso mpo na ye ekómaka lisusu makasi.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 492 par. 2-3
Motema
Kosalela na “motema mobimba.” Motema ya solosolo esengeli kozala mobimba mpo esala malamu, kasi motema ya elilingi ekoki kokabwana. Yango wana, Davidi abondelaki boye: “Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo,” yango elingi koloba ete motema ya moto ekoki kokabwana na kotalela mayoki na ye mpe makambo oyo abangaka. (Nz 86:11) Moto ya ndenge wana akoki kozala na “mitema mibale,” elingi koloba, azali mɔtɔ te mpe mpiɔ te mpo na kosambela Nzambe. (Nz 119:113; Em 3:16) Moto akoki mpe kozala na “mitema mibale” (elimboli mpenza, na motema moko bakisa motema moko mosusu), azali koluka kosalela bankolo mibale, to na bokosi nyonso azali koloba likambo moko kaka na ntango wana azali kokanisa likambo mosusu. (1Nt 12:33; Nz 12:2) Yesu amonisaki polelepolele bokosi ya bato oyo bazalaki na mitema mibale.—Mt 15:7, 8.
Moto oyo alukaka kosepelisa Nzambe asengeli te kozala na motema ndambo to mitema mibale, kasi asengeli nde kosalela ye na motema na ye mobimba. (1Nt 28:9) Yango esɛngaka kosala milende, mpamba te motema ezali mpenza mabe mpe etindaka kaka na kosala mabe. (Yir 17:9, 10; Eb 8:21) Mpo na kobatela motema ezala mobimba, esengeli kobondela na motema moko (Nz 119:145; bil 3:41), koyekola Liloba ya Nzambe (Ezr 7:10; Mas 15:28), kosakola na molende nsango malamu (talá mpe Yir 20:9), mpe kosala boninga ná bato oyo mitema na bango ezali mobimba epai ya Yehova.—Talá mpe 2Ba 10:15, 16.
13-19/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 13-16
“Kolanda malako ebimisaka mbuma ya malamu”
Otunaka ete, “Yehova azali wapi?”
12 Ntango sanduku ya kondimana ezongaki na Yisraele, efandaki bambula ebele na Kiriate-yearime; na nsima, Mokonzi Davidi alingaki ete bámema yango na Yerusaleme. Atunaki makanisi ya bankumu ya mboka mpe alobaki ete Sanduku ekomemama ‘soki emonani malamu na miso na bango mpe soki endimami na Yehova.’ Kasi, alukaki malamumalamu te koyeba mokano ya Yehova na likambo yango. Soki alukaki yango, mbɛlɛ batyaki Sanduku likoló ya likalo te. Balevi ya libota ya Kohate nde balingaki komema yango na mapeka, ndenge malako ya Nzambe elobaki yango polele. Atako mbala mingi Davidi azalaki kotuna Yehova, na likambo wana asalaki yango na ndenge oyo esengeli te. Likambo yango esukelaki bango mabe mpenza. Na nsima, Davidi ye moko alobaki ete: “Yehova Nzambe na biso atombokelaki biso, mpo tolukaki ye te, lokola na momeseno.”—1 Ntango 13:1-3; 15:11-13; Mitángo 4:4-6, 15; 7:1-9.
Otunaka ete, “Yehova azali wapi?”
13 Na nsima, ntango Balevi bamemaki Sanduku banda na ndako ya Obede-edome tii na Yerusaleme, bazalaki koyemba nzembo moko oyo Davidi asalaki. Maloba mosusu ya nzembo yango ezongisaki na makanisi na bango likambo moko ya ntina: “Bóluka Yehova mpe makasi na ye, bóluka elongi na ye ntango nyonso. Bókanisa lisusu misala ya kokamwa oyo ye asalá, makamwisi na ye mpe bikateli ya lisambisi ya monɔkɔ na ye.”—1 Ntango 16:11, 12.
Biloko ya motuya ya elimo
Tósambela Yehova, Mokonzi ya seko
14 Davidi amemaki sanduku mosantu ya kondimana na Yerusaleme. Na mokolo wana ya esengo, Balevi bayembaki loyembo ya masanzoli oyo ezali na maloba ya ntina mingi, oyo ezwami na 1 Ntango 16:31 ete: “Báloba na kati ya bikólo ete: ‘Yehova ye moko akómi mokonzi!’” Ntango mosusu okoki komituna boye: ‘Soki Yehova azali Mokonzi ya seko, ndenge nini akómaki Mokonzi na ntango wana?’ Yehova akómaka Mokonzi ntango amonisi Boyangeli na ye to ntango atye ebongiseli moko mpo emonisa ye na boumeli ya ntango moko boye to mpo na kotalela likambo moko ya sikisiki. Lolenge wana ya koyangela ya Yehova ezali na ndimbola moko monene. Liboso Davidi akufá, Yehova alakaki ye ete bokonzi na ye ekokoba seko na seko. Alobaki ete: “Nakobimisa mpenza nsima na yo momboto na yo, oyo akouta na libumu na yo; mpe nakopika makasi mpenza bokonzi na ye.” (2 Sa. 7:12, 13) Nsukansuka, “momboto” ya Davidi amonanaki mbula soki 1000 na nsima. Ezalaki nani, mpe ntango nini asengelaki kokóma Mokonzi?
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba.”—2Ko 5:14.
‘Likabo ya Nzambe ya ofele oyo ekoki kolimbolama te’ ememisi yo mokumba
7 Ya liboso, tosengeli kosalela bomoi na biso mpo na kokumisa Yesu. Ntoma Paulo alobaki: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba.” (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15.) Ntoma Paulo ayebaki ete soki tondimi bolingo monene oyo Yesu amonisaki, ekomemisa biso mokumba to ekotinda biso tólinga Yesu mpe tókumisa ye. Ya solo, soki tokangi mpenza ntina ya likambo oyo Yehova asalá mpo na biso, bolingo na ye ekotinda biso tózala na bomoi oyo emonisi ete tokumisaka Yesu. Ndenge nini tokoki kosala yango?
8 Bolingo oyo tolingaka Yehova ekotinda biso tólanda ndakisa ya Yesu, tólanda matambe na ye malamumalamu. (1 Petro 2:21; 1 Yoane 2:6) Tokomonisa ete tolingaka Nzambe mpe Yesu soki tozali kotosa bango. Yesu alobaki: “Moto oyo azali na mitindo na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomilakisa epai na ye polelepolele.”—Yoane 14:21; 1 Yoane 5:3.
9 Na eleko oyo ya Ekaniseli, ezali malamu kokanisa na ndenge oyo tozali kosalela bomoi na biso. Na yango, omituna boye: ‘Na makambo nini namekolaka Yesu? Makambo nini nasengeli kobongisa?’ Ezali na ntina mingi komituna mituna wana, mpamba te mokili elingaka tózala na bomoi lokola bato nyonso. (Baroma 12:2) Soki tokebi te, tokoki koyoka mposa ya komekola bateyi ya mokili, bato minene oyo bakendá nsango, mpe bato ya masano oyo bayebani. (Bakolose 2:8; 1 Yoane 2:15-17) Tosengeli kosala nini mpo tómekola bato ya ndenge wana te?
10 Na eleko ya Ekaniseli, ezali malamu kozwa ntango ya kotalela bilamba na biso, bafilme, miziki, mpe makambo oyo ezali na kati ya ordinatɛrɛ na biso, na telefone to tablɛti na biso. Omituna boye: ‘Soki Yesu azalaki awa mpe amoni elamba oyo nalati, nakoyoka nsɔni?’ (Tángá 1 Timote 2:9, 10.) ‘Bilamba na ngai emonisaka ete nazali moyekoli ya Kristo? Yesu akosepela kotala bafilme oyo natalaka? Akoki koyoka miziki oyo nayokaka? Soki Yesu azwi telefone na ngai to tablɛti na ngai, nakoyoka nsɔni mpo na makambo oyo akomona na kati? Nakozala na mokakatano ya kolimbolela Yesu mpo na nini nasepelaka na masano ya video oyo nabɛtaka?’ Bolingo oyo tolingaka Yehova esengeli kotinda biso tóbwaka eloko nyonso oyo ebongi te mpo na bakristo, ata soki ezali na ntalo nini. (Misala 19:19, 20) Ntango tomipesaki epai ya Yehova, tolakaki ye ete tokosalela bomoi na biso mpo na kokumisa Kristo. Na yango, tosengeli te kobatela eloko nyonso oyo ekoki kopekisa biso tómekola Yesu.—Matai 5:29, 30; Bafilipi 4:8.
20-26/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 17-19
“Batelá esengo na yo atako ozali kokutana na makambo oyo elɛmbisaka nzoto”
Tótya makanisi na makambo malamu ya ebongiseli ya Yehova
Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala, azali moko na bato minene oyo Makomami ya Ebre elobeli. Moto yango oyo asalaki misala ndenge na ndenge, lokola mobateli ya mpate, alanga-nzembo, mosakoli, mpe mokonzi, azalaki mpenza kotyela Yehova Nzambe motema mobimba. Lokola Davidi alingaki Nzambe mingi, azalaki na mposa ya kotongela ye ndako. Ndako yango, to tempelo, esengelaki kozala esika monene ya losambo ya solo na Yisraele. Davidi ayebaki ete tempelo mpe makambo oyo ekobanda kosalema kuna ekopesa basaleli ya Nzambe esengo mpe ekomemela bango mapamboli. Yango wana Davidi ayembaki boye: “Esengo na moto oyo ozali kopona mpe ozali kobɛlɛmisa, mpo afanda na mapango na yo. Tokotonda mpenza na bolamu ya ndako na yo, esika mosantu ya tempelo na yo.”—Nzembo 65:4.
Zalá na esengo na oyo okoki kosala na mosala ya Yehova
11 Ndenge moko mpe, tokoki kobakisa esengo na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki na mokumba oyo bapesi biso na mosala ya Yehova. ‘Omipesa mingi’ na mosala ya kosakola mpe na makambo ya lisangá. (Mis. 18:5; Ebr. 10:24, 25) Bongisáká makita malamu mpo opesa biyano oyo ekolendisa. Zwáká na motuya mingi masolo nyonso oyo bapesi yo na likita ya kati ya pɔsɔ. Soki basɛngi yo okokisa mokumba moko na lisangá, kómáká na ngonga mpe zalá moto oyo bakoki kotyela motema. Kokanisa te ete mokumba oyo bapesi yo ezali na ntina te, mpe osengeli te kolekisa ntango na yo mpo na yango. Salá makasi oyeba malamu mokumba oyo bapesi yo. (Mas. 22:29) Soki omipesi mobimba na mosala ya Yehova, okokóma moninga na ye ya motema mpe okozala na esengo mingi. (Gal. 6:4) Lisusu ekozala mpasi te mpo osepela ntango bandeko mosusu bazwi mokumba oyo ozalaki kosepela na yango.—Rom. 12:15; Gal. 5:26.
Biloko ya motuya ya elimo
w20.02 lok. 12, etanda
Tolingaka Tata na biso Yehova mingi
Yehova atyelaka ngai likebi?
Esilá kokómela yo omituna boye: ‘Na kati ya bamiliare ya bato oyo bazali na mokili, ndenge nini Yehova atyela ngai likebi?’ Soki omitunaka ndenge wana, yebá ete ozali yo moko te. Mokonzi Davidi akomaki ete: “Ee Yehova, moto azali nini mpo otyela ye likebi, mwana ya moto—mowei mpamba—mpo okanisa ye?” (Nz. 144:3) Davidi azalaki na kondima ete Yehova ayebaki ye malamu. (1 Nt. 17:16-18) Mpe na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye, Yehova azali koyebisa yo ete amonaka bolingo oyo olingaka ye. Talá mwa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi, oyo ekoki kosalisa yo ondima likambo yango:
• Yehova amonaki yo liboso kutu obotama.—Nz. 139:16.
• Yehova ayebi makambo oyo ezali na motema na yo, mpe makanisi na yo.—1 Nt. 28:9.
• Yehova ye moko ayokaka mabondeli oyo osalaka.—Nz. 65:2.
• Makambo oyo osalaka ekoki kosepelisa Yehova to kopesa ye mawa.—Mas. 27:11.
• Yehova ye moko abendi yo epai na ye.—Yoa. 6:44.
• Soki okufi, lokola Yehova ayebi yo malamu, akosekwisa yo. Akopesa yo nzoto ya sika, akozongisela yo makanisi ná basuvenire na yo, mpe bomoto na yo.—Yoa. 11:21-26, 39-44; Mis. 24:15.
27/02–05/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 NTANGO 20-22
“Salisá bilenge bálonga na bomoi”
Pesá bato ya sembo makambo yango”
8 Tángá 1 Ntango 22:5. Na ntembe te, Davidi ayebaki ete Salomo akoki naino te mpo na kotambwisa mosala monene ya ndenge wana. Tempelo esengelaki kozala ‘eloko oyo eleki na kitoko’ mpe Salomo azalaki ‘elenge mpe ayebaki naino makambo mingi te.’ Kasi Davidi ayebaki ete Yehova akosalisa Salomo asala mosala wana monene. Yango wana, Davidi asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa Salomo amibongisa mpo na mosala wana monene.
Pesá bato ya sembo makambo yango”
7 Davidi azalaki mpenza na mposa ya kotongela Yehova tempelo, na yango, ekoki kozala ete nsango wana elɛmbisaki ye mpenza nzoto. Atako bongo, akobaki kaka kopesa mabɔkɔ na mosala oyo mwana na ye Salomo asengelaki kotambwisa. Davidi asalisaki ye na kobongisa bato ya kosala misala mpe koyanganisa bibende, motako, palata, wolo, mpe mabaya. Amitungisaki te ndenge lokumu ya kotonga tempelo esengelaki kokende epai na ye te, mpo na nsima, tempelo yango eyebanaki na nkombo ya tempelo ya Salomo. Alendisaki nde Salomo na maloba oyo: “Sikoyo, mwana na ngai, Yehova azala na yo, mpe yo, osengeli kolonga mpe kotonga ndako ya Yehova Nzambe na yo, ndenge alobaki mpo na yo.”—1 Ntango 22:11, 14-16.
Baboti, bozali kosalisa bana na bino bákende liboso tii bázwa batisimo?
14 Bankulutu bakoki kolendisa baboti soki bazali kolobela mikano ya elimo na ndenge ya malamu. Ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela mbula koleka 70 abosanaka te makambo oyo ndeko Charles Russell ayebisaki ye ntango azalaki na mbula 6. Alobaki boye: “Asololaki na ngai miniti 15 mpo na kotuna ngai mikano na ngai ya elimo.” Ya solo, maloba oyo ebongi mpe oyo elendisaka ekoki kobongola bomoi ya moto. (Masese 25:11) Bankulutu bakoki mpe kosɛnga baboti ná bana na bango báya kosala misala na Ndako ya Bokonzi. Bakoki kopesa bana misala na kolanda mbula mpe makoki na bango.
15 Bandeko mosusu mpe bakoki kosalisa soki bazali kotyela bilenge likebi na ndenge oyo ebongi. Na ndakisa, okoki kotya likebi na makambo oyo ezali komonisa ete elenge azali kokola malamu na elimo. Mwana moko apesaki eyano ya malamu na makita, to asalaki lisolo na makita ya kati ya pɔsɔ? Apesaki litatoli na kelasi, to asalaki likambo oyo ebongaki ntango akutanaki na komekama? Soki ɛɛ, koumela te kopesa ye longonya! Okoki komityela mokano ya kosolola na bilenge liboso mpe nsima ya makita. Soki ozali kosala bongo, bana bakomona ete bango mpe bazali na esika na “lisangá monene.”—Nzembo 35:18.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Ntango
21:13-15. Yehova ayebisaki anzelu asukisa bolɔzi mpamba te akokaka te komona bato na ye bazali konyokwama. Ya solo, “motema mawa ezali mingi.”
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Diskur—Motó ya likambo: Bilenge: Bókola malamu na elimo tii na batisimo.
Elenge: Ndenge nini okoki komibongisa mpo na batisimo?
10 Biblia elobi ete: “Kondima, soki ezali na misala te, ekufi.” (Yakobo 2:17) Soki ozali na kondima makasi, okomonisa yango na misala na yo. Okozala na oyo Biblia ebengi ‘etamboli ya bosantu mpe misala oyo ezali komonisa ete okangami na Nzambe.’—Tángá 2 Petro 3:11.
11 “Etamboli ya bosantu” ezali nini? Soki misala na yo ezali ya bosantu, elingi koloba ozali na bizaleli ya pɛto. Na ndakisa, kanisá makambo oyo osalaki na boumeli ya sanza 6 oyo euti koleka. Ntango omekamaki mpo na kosala likambo moko ya mabe, okanisaki malamumalamu likambo nini ezalaki malamu mpe likambo nini ezalaki mabe? (Baebre 5:14) Ozali komikundola na mabaku nini otikalaki sembo na komekama to okweaki te ntango baninga batyaki yo mpanzi likoló? Na kelasi, ozali ndakisa malamu mpo na basusu? Otikalaka sembo epai ya Yehova to olukaka nde kozala lokola baninga na yo ya kelasi, mpo básɛka yo te? (1 Petro 4:3, 4) Toboyi te, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Na bantango mosusu, ata baoyo basaleli Yehova bambula mingi bakoki kozala nsɔninsɔni mpe kozala na mokakatano ya kopesa litatoli. Kasi mpo na moto oyo amipesi na Nzambe, kozala Motatoli ya Yehova ezali lokumu monene, mpe amonisaka yango na etamboli na ye ya pɛto.
12 ‘Misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe’ ezali nini? Ezali misala oyo osalaka na lisangá, na ndakisa kokende na makita mpe mosala ya kosakola. Kasi ezali mpe misala oyo basusu bamonaka te, na ndakisa mabondeli oyo osalaka epai ya Yehova mpe boyekoli na yo moko. Moto oyo apesá bomoi na ye epai ya Yehova amonaka te ete misala wana ezali kilo. Amiyokaka nde lokola mokonzi Davidi, oyo alobaki: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.”—Nzembo 40:8.
13 Mpo na kosalisa yo okokisa mikano na yo, tozali na etanda ya mituna na nkasa 308 mpe 309 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, volimi 2. Na etanda yango ya mituna, okoki kokoma biyano na mituna lokola: “Mabondeli na yo ezalaka ya sikisiki, emonisaka nini mpo na bolingo oyo olingaka Yehova?” “Makambo nini oyekolaka na boyekoli na yo moko?” “Obimaka na mosala ya kosakola ata soki baboti na yo babimi te?” Etanda yango ezali mpe na esika oyo okoki kokoma mikano na yo mosusu oyo okosepela komityela mpo na mabondeli na yo, boyekoli na yo moko, mpe mosala ya kosakola.
14 Bilenge mingi oyo balingi kozwa batisimo bamonaki ete etanda ya mituna yango ezali esaleli oyo ebongi. Tilda, ndeko mwasi moko oyo azali elenge alobaki boye: “Nasalelaki etanda ya mituna mpo na komityela mikano. Nazalaki kokokisa mikano yango moko nsima ya mosusu, mpe nsima ya mbula moko nakokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo.” Patrick, ndeko mobali moko oyo azali elenge, asalaki mpe bongo. Alobi boye: “Nayebaki mikano nini namityelaki, kasi kokoma yango esalisaki ngai nasala makasi mpo nakokisa yango.”
15 Moko ya mituna oyo ezali na etanda ya mituna yango elobi: “Okokoba kosalela Yehova ata soki baboti to baninga na yo batiki?” Ntango omipesi na Yehova mpe ozwi batisimo, yo moko osengeli kozala na boyokani malamu elongo na ye. Na yango, makambo oyo ozali kosala mpo na Yehova esengeli te kotalela baboti na yo to moto mosusu nyonso. Etamboli na yo ya bosantu mpe misala na yo oyo ezali komonisa ete okangami na Nzambe ekomonisa ete ondimisami ete ozali na kati ya solo mpe olingi kolanda mitinda ya Nzambe. Mosika te, okokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.