Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/3 nk. 15-20
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tókɔtela Yehova
  • Bosembo epai na lisangá ya Yehova
  • Bosembo epai na bankulutu oyo bazali sembo
  • Bosembo kati na libala
  • Lisungi mpo na kotikala sembo
  • Tótalela baoyo bazali sembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Kozala sembo—Ezali na motuya nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Epai ya nani osengeli kozala sembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/3 nk. 15-20

Tólónga ntembe ya kozala sembo

“Bólata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.”​—BAEFESE 4:24, NW.

1. Mpo na nini tosengeli kozala sembo epai na Yehova Nzambe?

KOLÓNGA ntembe ya kozala sembo ezali na mitindo mingi. Oyo eleki ntina ezali bongo ya kolónga ntembe ya kozala sembo epai na Yehova Nzambe. Ya solo, na kotalela lolenge oyo Yehova azali mpe nini oyo asili kosala mpo na biso, mpe na ntina na komipesa na biso epai na ye, tosengeli komimonisa sembo epai na ye. Lolenge nini tomonisaka bosembo na biso epai na Yehova? Lolenge ya liboso ezali ya kotikala sembo na mitindá ya boyengebene ya Yehova.

2, 3. Boyokani nini ezali kati na bosembo mpe boyengebene?

2 Mpo na kolónga ntembe wana, tosengeli kolanda maloba oyo mazali na 1 Petelo 1:15, 16: “Bózala bulɛɛ na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulɛɛ. Zambi esili kokomama ete, Bokozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” Bosembo epai na Yehova Nzambe ekopusa biso ete tótosaka ye ntango nyonso, kobateláká makanisi, maloba mpe misala na biso na boyokani na mokano na ye ya bulɛɛ. Yango elimboli kobatela lisosoli malamu, lokola tozwi etindá yango na 1 Timoté 1:3-5 ete: “Nsuka na toli nyonso [ya koteya mateya mosusu te to ya kotya likebi epai na masapo na mpamba te] ezali bolingo uta na mitema na pɛtɔ mpe na lisosoli malamu mpe kondima ezangi bokosi.” Ezali solo ete, moto moko te kati na biso azali moto na kokoka, kasi tosengeli komeka na makasi nyonso, boye te?

3 Bosembo epai na Yehova ekopekisa biso kobuka na moimi nyonso mitindá ya boyengebene. Ya solo, bosembo ekopekisa biso kozala na motindo moko ya bomoto kati na motema mpe na motindo mosusu libándá. Bosembo ezali oyo mokomi moko ya Nzembo azalaki kokanisa na ntina na yango ntango ayembaki ete: “Ɛ [Yehova], teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.” (Nzembo 86:11) Bosembo ezali kosɛnga oyo elobelamaki lokola “kotosa oyo bato bakoki te kotosisa.”

4, 5. Bosembo ekokómisa biso na bokɛngi mingi, bobele soki tokosala nini?

4 Bosembo epai na Yehova Nzambe ekobatela mpe biso na kosala te makambo oyo makoki kobwaka nsɔ́ni likoló na nkombo mpe Bokonzi na ye. Na ndakisa, kala baklisto mibale bazalaki mpenza na mikakatano makasi na boye ete na motindo mobongi te, basukaki na kofundana na tribinale. Mosambisi atunaki ete, ‘Bino mibale bozali Batatoli ya Yehova?’ Ezali polele ete akokaki te kososola nini oyo bakendeki kosala na tribinale. Oyo nde nsɔ́ni monene! Mbɛlɛ bosembo epai na Yehova Nzambe elingaki kotinda bango na kolanda toli ya ntoma Paulo, ete: “Awa ezali bino na makambo na kofundana kati na bino, bozongi nsima. Mpo na nini bokondima te ete bato básalela bino mabe? Mpo na nini bokondima te ete bato bázimbisa bino?” (1 Bakolinti 6:7) Na ntembe te, etamboli ya bosembo liboso na Yehova Nzambe elimboli kondima kobungisa biloko na biso na esika ya kobwaka nsɔ́ni likoló na Yehova mpe lisangá na ye.

5 Bosembo epai na Yehova Nzambe elimboli mpe komitika te na motambo ya kobanga bato. “Kobanga bato ekoyeisa motambo; nde ye oyo akotalela [Yehova] akotombolama.” (Masese 29:25) Mpo na yango, tobebisaka te bosembo na biso na ntango ya monyoko, kasi tolandaka ndakisa ya Batatoli ya Yehova ya ex-Union Soviétique, ya Malawi, ya Éthiopie, mpe ya mikili mingi mosusu.

6. Bosembo ekopekisa biso ete tósangana te elongo na banani?

6 Soki tozali sembo epai na Yehova Nzambe, tokoboya kosala boninga elongo na baoyo nyonso bazali banguna na ye. Mpo na ntina wana moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bino bato na bosoto, boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini na Nzambe.” (Yakobo 4:4) Tokolinga komonisa bosembo lokola oyo Mokonzi Davidi atatoli na ntina na yango ntango alobaki ete: “Ɛ [Yehova], nakoyinaka bango te, baoyo bakoyinaka yo? Nayini bango na koyina eleki makasi, bazali na ngai bobele bayini.” (Nzembo 139:21, 22) Tokolinga te kosangana esika moko na baoyo basalaka masumu na nkó, mpamba te tozali na boyokani moko te elongo na bango. Bosembo epai na Nzambe ekopekisa biso ete tósangana te elongo na banguna wana ya Yehova, bango mpenza to baoyo balakisami na televizyó, boye te?

Tókɔtela Yehova

7. Bosembo ekosalisa biso ete tósala likambo nini mpo na Yehova, mpe lolenge nini Elihu asalaki yango?

7 Bosembo ekotinda biso ete tókɔtela Yehova Nzambe. Oyo nde ndakisa malamu mpenza Elihu atikeli biso kati na likambo yango! Yobo 32:2, 3 eyebisi biso ete: “Bongo, nkanda na Elihu epelisami . . . nkanda na ye epelisameli Yobo mpo ete alóngisaki molimo na ye moko liboso na Nzambe. Epelisameli mpe baninga na ye misato mpo ete bazwi ezongiseli te nde basili kokitisa [Nzambe, NW].” Na Yobo mokapo 32 kino mokapo 37, Elihu akɔtelaki Yehova. Na ndakisa, alobaki ete: “Tiká ngai mwa moke mpe nakomonisa yo, zambi nazali naino na maloba mpo na Nzambe. . . . Nakokumisa motongi na ngai na boyengebene. . . . Akolongolaka miso na ye na bayengebeni te.”​—Yobo 36:2-7.

8. Mpo na nini tosengeli kokɔtela Yehova?

8 Mpo na nini tosengeli kokɔtela Yehova? Lelo oyo, Yehova Nzambe na biso azali kotukama na mitindo ndenge na ndenge. Bato bazali koloba ete azali te, ete azali eteni ya Bosato, ete anyokolaka bato libela na libela kati na lifelo ya mɔ́tɔ, ete akolónga te kobongola mokili, ete amibanzabanzaka te mpo na bato, mpe bongo na bongo. Tokomonisa bosembo na biso epai na ye na kokɔteláká ye mpe na komonisáká ete Yehova azali, ete azali na bwanya, azali na boyengebene, mozwi-na-nguya-nyonso mpe Nzambe ya bolingo; ete asili kotya ntango mpo na makambo nyonso; mpe ete ntango elaka na ye ekokoka, akosukisa mabe nyonso mpe akosala ete mabelé mobimba mazala paladiso. (Mosakoli 3:1) Yango ezali kosɛnga ete tósalela mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli na ntina na nkombo mpe Bokonzi ya Yehova.

Bosembo epai na lisangá ya Yehova

9. Na makambo nini basusu bamonisaki ete bazangi bosembo?

9 Tótalela sikawa likambo ya kozala sembo epai na lisangá ya Yehova oyo ezali komonana. Ya solo, tosengeli komonisela yango bosembo, lisusu epai na “moombo na sembo mpe na mayele,” oyo na nzela na ye lisangá ya boklisto lizali kozwa bilei ya elimo. (Matai 24:45-47) Tóloba ete likambo moko ebimi na mikanda ya la Société Watch Tower, oyo tososoli yango te to tondimi yango te na ntango wana. Tokosala nini? Tokosilika mpe tokotika lisangá? Ezali yango nde basusu basalaki ntango, esili koleka bambula mingi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete kondimana ya sika ekobanda kosalelama na eleko ya Mbula Nkóto. Basusu basilikaki nokinoki mpo na oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki na ntina na kozanga komikɔtisa na makambo ya mokili. Soki baoyo babɛtaki libaku na makambo wana bazalaki sembo epai na lisangá mpe epai na bandeko na bango, mbɛlɛ bazelaki Yehova ete amonisa makambo polele, lokola asalaki yango na ntango ebongi. Na yango, bosembo ezali mpe kosɛnga kozela na motema pɛtɛɛ nyonso kino bososoli malamu ekobimisama na moombo na sembo mpe na mayele.

10. Bosembo ekopekisa biso ete tóluka te koyeba makambo nini?

10 Bosembo epai na lisangá ya Yehova oyo ezali komonana elimboli mpe kozala na boyokani moko te elongo na bapɛngwi. Baklisto oyo bazali sembo bakoluka te koyeba nini oyo bato motindo yango bazali koloba. Ezali solo ete, baoyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa mosala na ye awa na mabelé bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi Liloba ya Nzambe lizali koloba ete tosengeli kosala nini? Kotika lisangá ya Nzambe? Te. Bolingo ya motema mpo na bandeko ekobatela biso ete tózala sembo epai na yango, mpe tosengeli kolanda ‘kolingana makasi na mitema.’​—1 Petelo 1:22.

Bosembo epai na bankulutu oyo bazali sembo

11. Bosembo ekopekisa biso na kolóna makanisi nini ya mabe?

11 Soki likambo moko liyebisami to lisalemi kati na lisangá, oyo tokoki te kososola yango, bosembo ekopekisa biso ete tósambisa te ntina oyo basalaki bongo te, mpe ekosalisa biso na komilobela ete mbala mosusu ezali likambo lisɛngi bososoli. Ebongi mpenza kotalela bizaleli malamu ya bankulutu oyo baponami mpe ya bandeko na biso bandimi na esika ya kotalela bobele mabungá na bango, boye te? Ee, tosengeli komibatela na makanisi nyonso ya mabe lolenge wana, mpamba te yango ekangisami na kozanga bosembo! Bosembo ekosalisa biso tótosa malako ya Paulo oyo alobaki ete ‘tótuka te.’​—Tito 3:1, 2.

12, 13. Ntembe nini ya sikisiki bankulutu basengeli kolónga yango?

12 Bosembo ezali kobimisa ntembe moko ya sikisiki mpo na bankulutu. Moko na ntembe yango etali bongo likambo ya kobomba sɛkɛlɛ́. Mosangani moko ya lisangá akoki koyebisa likambo na ye epai na nkulutu moko. Bosembo epai na moto yango ekopekisa nkulutu yango ete abuka te lilako ya kobomba sɛkɛlɛ́. Akotosa toli oyo ezali na Masese 25:9: “Yebisá likambo na nkuku epai na moto mosusu te.” Yango elimboli ete akoyebisa ata epai na mwasi na ye te!

13 Bankulutu bazali mpe na ntembe mosusu ya kozala sembo oyo basengeli kolónga. Bakoluka kosepelisa bato, to na mpiko mpe na bopɔlɔ nyonso bakosunga baoyo basengeli kosembolama, ata soki bazali bandeko na bango ya libota to baninga ya penepene? Bosembo epai na lisangá ya Yehova ekosunga baoyo kati na biso bazali bankulutu ete báluka kosalisa moto nyonso oyo azali na mposa ya lisalisi na elimo. (Bagalatia 6:1, 2) Atako tosengeli kozala na biso na boboto bosembo ekosala ete tóyebisa makambo polele epai na baninga na biso bankulutu, motindo moko lokola Paulo alobelaki ntoma Petelo polele. (Bagalatia 2:11-14) Na ngámbo mosusu, bakɛngɛli basengeli kokeba, ete na kozangáká bwanya to na komonisáká koponapona to na kosaleláká bokonzi na bango na lolenge mabe, bákómisa te makasi likambo ya kozala sembo epai na lisangá ya Nzambe.​—Bafilipi 4:5.

14, 15. Makambo nini makoki kotya na komekama bosembo ya basangani ya lisangá?

14 Ezali mpe na makambo mosusu mpo na oyo etali kolónga ntembe ya kozala sembo epai na lisangá mpe epai na bankulutu. Soki makambo mabulungani kati na lisangá, yango ekopesa libaku ya komonisa bosembo epai na Yehova mpe baoyo bazali komonisa ye. (Talá Mosɛnzɛli ya 15 Yanúali 1988, nkasa 6-8.) Na ntango babimisi moto moko na lisangá, bosembo esɛngaka ete tósimba ekateli ya bankulutu, ete tólandela te soki ezalaki na ntina malamu ya kokamata ekateli wana.

15 Bosembo epai na lisangá ezali mpe kosɛnga na biso ete tósimba makita nyonso mitano ya pɔ́sɔ na meko oyo ezalela ya makambo mpe makoki na biso epesi biso nzela. Bosembo ezali kosɛnga ete tósuka te bobele na koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kasi lisusu tóbongisaka yango mpe tópesaka biyano ya kolendisa wana tozwi libaku na yango.​—Baebele 10:24, 25.

Bosembo kati na libala

16, 17. Ntembe nini ya kozala sembo etyami liboso na baklisto oyo babali?

16 Epai na nani lisusu tosengeli komonisa bosembo? Soki tosilá kobala, na kotalela ndai na biso ya libala, tosengeli kolónga ntembe ya kozala sembo epai na mobalani na biso. Bosembo epai na mobalani na biso ekopekisa biso kosala libúngá ya kosepelisa mingi basi to mibali mosusu koleka mwasi na biso to mobali na biso moko. Bosembo epai na mobalani na biso ezali mpe kosɛnga ete tóbimisa te bolɛmbu to mabúngá ya mobalani na biso epai na bato mosusu. Ezalaka mpasi te komilelalela epai na basusu na esika ete tósala milende mpo na kobatela bosololi malamu elongo na mobalani na biso, likambo oyo tosengeli kosala na boyokani na Lilako lileki malamu. (Matai 7:12) Ya solo, kozala na libala ezali ntembe monene mpo na kobatela bosembo na biso ya boklisto.

17 Mpo na kolónga ntembe wana ya kozala sembo, tosengeli te bobele kokima masumu minene kasi tosengeli lisusu kobatela makanisi mpe mayoki na biso. (Nzembo 19:14) Na ndakisa, soki motema na biso oyo ezali na bokosi ezali na lokoso ya bisengo mpe nsaí mingi, ezali mpasi te ete na moimi nyonso tóleka longwa na kokumisa kino na kolula. Kolendisáká bosembo kati na libala, Mokonzi Salomo apesi mibali toli, na lisese, ya ‘komela mai na [liziba] na bango mpenza.’ (Masese 5:15) Mpe Yesu alobaki ete: “Ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:28) Mibali oyo bazali komitika ete bátalaka makambo oyo mazali komonisa bolumbu ya bato bazali na likámá monene ya kosala ekobo, kokosáká bongo basi na bango mpe kozangáká bosembo epai na bango. Bobele bongo, mwasi oyo amipesi na kotala filime oyo ezali kolakisa makambo ya ekobo akoki kobendama na kozanga bosembo epai na mobali na ye. Nzokande, na kozaláká sembo epai na mobalani na biso, tokoyeisa nsinga ya libala makasi, mpe tokosalisana kati na milende na biso ya kosepelisa Yehova Nzambe.

Lisungi mpo na kotikala sembo

18. Likambo nini ekosunga biso ete tózala sembo soki tokosala yango?

18 Nini ekosalisa biso na kolónga ntembe ya kozala sembo kati na makambo wana minei: bosembo epai na Yehova, bosembo epai na Lisangá na ye mobimba, bosembo na masangá epai tozali, mpe bosembo epai na mobalani na biso? Moko na masungi yango etali bongo kososola ete kolónga ntembe ya kozala sembo ezali na boyokani na kolóngisama ya bokonzi monene ya Yehova. Ee, na kotikaláká sembo tokomonisa ete totalelaka Yehova lokola Mokonzi Monene. Na yango, tokoki mpe kozala na limemya ya biso moko mpe na elikya ya bomoi ya seko kati na mokili ya sika ya Yehova. Tokoki komisunga ete tótikala sembo na kotaleláká bandakisa malamu ya bato oyo bazali sembo, kobanda na Yehova kino na baoyo balobelami kati na Biblia mpe kati na mikanda ya la Société Watch Tower oyo tozali na yango, bakisá mpe masoló oyo mazali na ba Annuaires.

19. Mokumba nini kondima ezali kokokisa mpo na oyo etali bosembo na biso?

19 Kondima makasi epai na Yehova Nzambe mpe bobángi ya kosala makambo makoyokisa ye mawa ekosunga biso na kolónga ntembe ya kozala sembo. Tokolendisa kondima na biso mpe bobángi na biso epai ya Yehova na koyekoláká Liloba ya Nzambe mpe na komipesáká na mosala ya boklisto. Yango ekosunga engebene toli ya Paulo oyo ezwami na Baefese 4:23, 24, (NW) ete: “Bosengeli kobongwana moto ya sika kati na nguya oyo ekotambwisaka makanisi na bino, mpe bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.”

20. Liboso na nyonso, ezaleli nini ekosunga biso ete tózala sembo epai na Yehova mpe epai na baoyo nyonso tosengeli komonisela bosembo?

20 Kososola bizaleli ya Yehova ekosunga biso ete tózala sembo. Na koleka, bolingo ya solo mpo na Tata na biso ya likoló mpe botɔ́ndi mpo na nyonso oyo asili kosala mpo na biso, kolinga ye na motema na biso mobimba mpe na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso mobimba mpe na nguya na biso mobimba ekosalisa biso ete tózala sembo epai na ye. Lisusu, bolingo oyo Yesu alobaki ete ekokesenisa bayekoli na ye ekosalisa biso na kozala sembo epai na baklisto nyonso oyo bazali kati na lisangá mpe kati na libota na biso. Na maloba mosusu, ezali mpenza likambo ya kozala na moimi to na bolingo. Kozanga bosembo ekomonisa ete tozali na moimi. Bosembo ekomonisa ete tozali na bolingo.​—Malako 12:30, 31; Yoane 13:34, 35.

21. Lolenge nini tokoki koloba na mokuse likambo ya kozala sembo?

21 Na mokuse: Bosembo ezali ezaleli etombwani oyo Yehova Nzambe, Yesu Klisto mpe baoyo nyonso bazali basaleli ya solo ya Yehova bamonisaka. Mpo na kozala na boyokani malamu elongo na Yehova Nzambe, tosengeli kolónga ntembe ya kozala sembo epai na ye na kokokisáká masɛngami na ye ya boyengebene, na kozaláká na boyokani soko moke te elongo na banguna na ye, mpe na kokɔteláká Yehova wana tozali kopesa litatoli na lolenge ebongisami mpe na libaku malamu. Tosengeli lisusu kolónga ntembe ya bosembo na kozaláká sembo epai na Lisangá ya Yehova oyo ezali komonana. Tosengeli kozala sembo na masangá epai tozali mpe epai na mobalani na biso. Na kolongáká ntembe ya kozala sembo, tokosangana na kolongisama ya bokonzi monene ya Yehova, mpe tokozala na ngámbo na ye kati na likambo yango. Na lolenge yango tokosepelisa ye mpe tokozwa mbano ya bomoi ya seko. Likambo ntoma Paulo alobaki na ntina na komipesa epai na Nzambe ekoki mpe kolobama na ntina na bolóngi na biso ya ntembe ya kozala sembo. Yango ezali na ntina mpo na bomoi na ntango oyo mpe mpo na bomoi oyo ezali koya.​—Nzembo 18:25; 1 Timoté 4:8.

Okopesa eyano nini?

◻ Na makambo nini tokoki kolónga ntembe ya kozala sembo epai na Nzambe?

◻ Bosembo epai na lisangá ya Yehova ezali kosɛnga makambo nini epai na biso?

◻ Lolenge nini bankulutu bakoki kolónga ntembe ya kozala sembo?

◻ Ntembe nini ya kozala sembo baklisto oyo babali basengeli kolónga?

◻ Bizaleli nini ekosalisa biso na kolónga ntembe ya kozala sembo?

[Elilingi na lokasa 17]

Bosembo epai na basangani ya lisangá ekopekisa bankulutu ete bábimisa te makambo ya sɛkɛlɛ́

[Bililingi na lokasa 18]

Bosembo epai na mobalani na biso ekoyeisa makasi nsinga ya libala

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto