Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr23 Septembre nk. 1-13
  • Mikanda tosaleli mpo na “Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na “Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • 04-10/09
  • 11-17/09
  • 18-24/09
  • 25/09–01/10
  • 02-08/10
  • 09-15/10
  • 16-22/10
  • 23-29/10
  • 30/10–05/11
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2023
mwbr23 Septembre nk. 1-13

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

© 2023 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

04-10/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | ESTERE 1-2

“Salá makasi ozala na bopɔlɔ lokola Estere”

w17.01 lok. 25 par. 11

Okoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango omekami

11 Bopɔlɔ na biso ekoki mpe kotyama na komekama ntango bakumisi biso to balobi na biso maloba ya sukali. Bakumisaki Estere mpe balobaki na ye maloba mingi ya sukali. Azalaki moko ya basi oyo balekaki kitoko na Perse. Na boumeli ya mbula mobimba, bazalaki kopesa ye bankisi ya konyɔlisa nzoto elongo na bilenge basi mosusu oyo bazalaki bango nyonso koluka ete mokonzi amona bango kitoko koleka. Kasi mokonzi aponaki Estere mpo azala mwasi na ye. Atako miso ya bato nyonso ekómaki epai na ye, Estere abongwanaki te. Akómaki te komona ete aleki basusu. Akobaki komonisa bopɔlɔ, boboto, mpe limemya.—Estere 2:9, 12, 15, 17.

ia mok. 15 par. 15

Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe

15 Ntango mokolo oyo Estere asengelaki kobima liboso ya mokonzi ekokaki, bayebisaki ye azwa eloko nyonso oyo akanisi ete ekoki kosalisa ye, mbala mosusu mpo amikómisa lisusu kitoko. Kasi, na komikitisa nyonso, asɛngaki eloko mosusu te na biloko oyo Hegai ayebisaki ye. (Est. 2:15) Mbala mosusu, amonaki ete kitoko ya nzoto ekoki te mpo na kozwa motema ya mokonzi; komikitisa nde ezaleli kitoko oyo bato mingi na ndako ya mokonzi bazalaki na yango te. Akanisaki malamu?

w17.01 lok. 25 par. 12

Okoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango omekami

12 Soki tozali na bopɔlɔ, elateli na biso mpe bizaleli na biso esengeli komonisa ete tomemyaka basusu mpe tomipesaka nzoto kilo. Na esika ete tómikumisa to tóluka kokamwisa bato, tolukaka nde kozala na “elimo ya kimya mpe ya boboto.” (Tángá 1 Petro 3:3, 4; Yirimia 9:23, 24) Nsukansuka, ndenge oyo biso moko tomitalelaka emonanaka na maloba mpe na misala na biso. Na ndakisa, tokoki koluka kotinda basusu bákanisa ete toleki bango mpo na makambo oyo tosalaka, makambo oyo toyebi, to mpo na bato oyo toyebani na bango. To, tokoki koluka komonisa lokola ete biso moko nde tosalaki likambo moko ya ntina mingi, atako bato mosusu basalisaki biso. Kasi, tózwa ndakisa ya Yesu. Akokaki koluka kokamwisa bato mpo na bwanya oyo azalaki na yango. Nzokande, Yesu azalaki mbala mingi nde kozongela maloba oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Alingaki te ete bato bápesa ye lokumu. Azalaki ntango nyonso kolinga ete lokumu nyonso ekende epai ya Yehova.—Yoane 8:28.

Biloko ya motuya ya elimo

w22.11 lok. 31 par. 3-6

Oyebaki yango?

Bato oyo basalaka bolukiluki bamonaki makomi ya cuneiforme ya Perse oyo elobeli moto moko na nkombo Marduka (na Lingala Mordekai). Asalaki lokola kapita, ekoki kozala azalaki kosala mosala ya kobomba mbongo, na engumba Shushane. Arthur Ungnad, moto moko ya istware na Moyen-Orient, alobaki ete longola Biblia, makomi ya cuneiforme ezalaki “kaka mokanda moko oyo elobelaki Mordekai” na ntango wana.

Banda Ungnad alobaki bongo, bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia babandaki kobongola bankóto ya makomi mosusu ya cuneiforme ya Perse. Na ndakisa, bitanda ya Persépolis ezali mpe na kati na yango, oyo ezali na bitiká oyo ezali na esika ya kobomba biloko ya motuya, pene ya bifelo ya engumba yango. Bitanda yango ezali ya ntango ya boyangeli ya Zerezese I. Ezali na monɔkɔ ya Elame mpe etondi na bankombo oyo ezali na mokanda ya Estere.

Bitanda mingi ya Persépolis elobeli nkombo Marduka, oyo asalaki lokola mokomeli ya mokonzi na ndako ya mokonzi na engumba Shushane na boumeli ya boyangeli ya Zerezese I. Etanda moko emonisi ete Marduka azalaki mobongoli. Mwa makambo wana ya mikemike eyokani na makambo oyo Biblia elobi mpo na Mordekai. Azalaki moto oyo azalaki kosala na ndako ya Mokonzi Ahasueruse (Zerezese I) mpe azalaki koloba minɔkɔ mibale to koleka. Mordekai azalaki kofanda mbala na mbala na porte ya ndako ya mokonzi na Shushane. (Estere 2:19, 21; 3:3) Porte yango ya mokonzi ezalaki ndako monene epai bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi bazalaki kosala.

Bokokani ezali kati na makambo ya ntina oyo bitanda wana elobi mpo na Marduka mpe makambo oyo Biblia elobi mpo na Mordekai. Bazalaki na eleko moko mpe esika moko mpe basalaki lokola bakapita na esika kaka moko ya mosala. Bokokani wana nyonso emonisi ete biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni ekoki kozala na boyokani na makambo oyo mokanda ya Estere elobi mpo na Mordekai.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur—Motó ya likambo: “Yesu mpe baanzelu basalisaki ye”

w20.11 nk. 13-14 par. 3-7

Zalá na mpiko mpo Yehova azali mosungi na yo

3 Paulo asengelaki na lisalisi. Na mobu soki 56 ya ntango na biso, ebele ya bato babendaki ye na libanda ya tempelo na Yerusaleme mpe balukaki koboma ye. Na mokolo oyo elandaki, bamemaki ye liboso ya Sanedrina, mpe banguna na ye balingaki kokata ye bitenibiteni. (Mis. 21:30-32; 22:30; 23:6-10) Na ntango yango, ntoma Paulo akokaki komituna: ‘Mikakatano oyo ekoumela tii ntango nini?’

4 Ndenge nini Yesu asalisaki Paulo? Na butu wana nsima ya kokanga Paulo, “Nkolo” Yesu atɛlɛmaki pene na ye mpe alobaki na ye ete: “Zalá na mpiko! Mpo lokola opesi litatoli malamumalamu na Yerusaleme mpo na makambo oyo etali ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Roma.” (Mis. 23:11) Maloba yango elendisaki mpenza Paulo! Yesu apesaki ntoma Paulo longonya mpo na litatoli oyo apesaki na Yerusaleme. Mpe apesaki ntoma Paulo elaka ete akokóma na Roma malamu, mpe kuna akopesa litatoli malamumalamu. Na ntembe te, nsima ya kozwa elaka wana, ntoma Paulo amiyokaki lokola mwana moke oyo abatelami malamu mpenza na mabɔkɔ ya tata na ye.

5 Wapi mikakatano mosusu oyo Paulo akutanaki na yango? Mbula soki mibale nsima ya makambo oyo elekaki na Yerusaleme, ntoma Paulo akɔtaki na masuwa oyo ezalaki kokende na Itali. Masuwa yango ekutanaki na mopɛpɛ makasi. Lokola mopɛpɛ yango ezalaki makasi mingi, bato oyo basalaka na masuwa ná bato oyo bazalaki kosala mobembo bakanisaki ete bakokufa. Kasi, Paulo azalaki kobanga te. Mpo na nini? Ayebisaki bato oyo bazalaki na masuwa ete: “Na butu ya lelo, anzelu moko ya Nzambe oyo ngai nazali moto na ye mpe oyo ngai nazali kosalela mosala mosantu atɛlɛmaki pene na ngai, alobi: ‘Kobanga te, Paulo. Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala, mpe talá! Nzambe asili kopesa yo na boboto mpenza baoyo nyonso bazali kosala mobembo elongo na yo na masuwa.’” Yehova asalelaki anzelu moko mpo azongela elaka oyo apesaki Paulo liboso na nzela ya Yesu. Mpe nsukansuka, Paulo akómaki na Roma kaka ndenge Yehova alakaki.—Mis. 27:20-25; 28:16.

6 Ndenge nini Yesu asalisaka biso lelo oyo? Yesu akosalisa biso ndenge asalisaki Paulo. Na ndakisa, Yesu apesaki baoyo nyonso bazali kolanda ye elaka ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Elaka yango ya Yesu ezali mpenza kolendisa biso. Mpo na nini? Mpo mikolo mosusu ezalaka mpasi tóyika mpiko. Na ndakisa, ntango ndeko to moninga na biso moko akufi, toyokaka mpasi mpenza mpe mpasi yango ekoki koumela bambula mingi. Bamosusu bazali kobunda na mikakatano ya bobange. Bamosusu mpe bazali konyokwama na makanisi. Atako bongo, tozwaka makasi ya koyika mpiko mpo toyebi ete Yesu azali elongo na biso “mikolo nyonso,” elingi koloba, ata na mikolo oyo eleki mpasi na bomoi na biso.—Mat. 11:28-30.

7 Liloba ya Nzambe emonisi ete Yehova asalisaka biso na nzela ya baanzelu na ye. (Ebr. 1:7, 14) Na ndakisa, baanzelu basungaka biso mpe bakambaka biso ntango tozali kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” epai ya ‘bato ya bikólo nyonso, mabota nyonso, mpe minɔkɔ nyonso.’—Mat. 24:13, 14; tángá Emoniseli 14:6.

11-17/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | ESTERE 3-5

“Salisá basusu básala nyonso oyo bakoki kosala”

it-2-F lok. 345 par. 5

Mordekai

Aboyi kogumbamela Hamane. Na nsima, Ahasueruse atyaki Hamane Moagage ministre-mokonzi, mpe Ahasueruse apesaki mitindo ete bato nyonso oyo bazalaki kosala na porte ya mokonzi bágumbamela moto oyo apesaki lokumu mingi. Mordekai aboyaki mpenza kosala bongo mpo ayebisaki bango ete azali Moyuda. (Est 3:1-4) Ntina oyo Mordekai apesaki emonisi ete aboyaki kosala yango na kotalela boyokani na ye ná Yehova, mpamba te azalaki Moyuda oyo amipesá epai ya Yehova Nzambe na ye. Akangaki ntina ete kogumbamela Hamane esengelaki kosuka kaka te na kokwea elongi na nse liboso ya moto ya lokumu mingi, ndenge Bayisraele bazalaki kosala na ntango ya kala, kaka mpo na kopesa moto oyo azali na bokonzi lokumu. (2Sa 14:4; 18:28; 1Ba 1:16) Na likambo etali kogumbamela Hamane, ezalaki na ntina ete Mordekai agumbamela ye te. Ekoki kozala ete Hamane azalaki Moamaleke, mpe Yehova alobaki ete akobunda etumba ná Amaleke “libota na libota.” (Kob 17:16; talá HAMANE.) Mpo na Mordekai, ezalaki likambo ya kozala sembo epai ya Nzambe, kasi te likambo ya politiki.

it-2-F lok. 345 par. 7

Mordekai

Oyo asalaki mpo na kobikisa Yisraele. Ntango ayebaki ete mokanda moko ya mobeko ebimaki mpo na koboma Bayuda nyonso na ampire yango, Mordekai amonisaki kondima na ye ntango ayebisaki Estere ete akɔtaki na ndako ya mokonzi na ntango moko malamu mpo na lobiko ya Bayuda. Amonisaki ete Estere azali na mokumba monene mpe apesaki ye malako ete akɔta epai ya mokonzi mpo abondela ye mpe asɛnga ye lisalisi. Atako bomoi na ye ezalaki na likama, Estere andimaki kosala yango.—Est 4:7–5:2.

ia mok. 15 par. 22-23

Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe

22 Na ntembe te, Estere abulunganaki ntango ayokaki maloba wana. Kondima na ye emekamaki mpenza na likambo oyo. Abangaki, ndenge amonisaki yango polele na eyano oyo atindelaki Mordekai. Akundwelaki ye mobeko ya mokonzi. Soki moto akɔti epai ya mokonzi kozanga ete mokonzi abengisa ye akokaki kobomama. Moto akokaki kobika kaka soki mokonzi asemboleli ye lingenda na ye ya bokonzi. Estere akokaki nde kolikya ete mokonzi akondima to akoyekola ye mawa, mingimingi na kotalela likambo oyo ekómelaki Vasheti ndenge aboyaki koya epai ya mokonzi ntango abengaki ye? Estere ayebisaki Mordekai ete mokonzi abengisaki ye te esalaki mikolo 30! Likambo yango ezalaki kotinda ye amona ete mbala mosusu mokonzi yango ya bongolabongola azalaki kosepela na ye lisusu te.—Est. 4:9-11.

23 Mordekai ayanolaki na mpiko mpo na kolendisa Estere azala na kondima makasi. Alobaki na ye ete soki asali eloko te, lobiko ya Bayuda ekoya na nzela mosusu. Kasi, ye moko akobika ndenge nini soki makambo eyei ndongo? Na maloba yango, Mordekai amonisaki ete azalaki na kondima makasi ete Yehova akotika soki moke te ete bato na Ye nyonso bábomama mpe ete bilaka na Ye ezanga kokokisama. (Yos. 23:14) Na nsima, Mordekai atunaki Estere boye: “Nani ayebi soki ezali te mpo na ntango lokola oyo nde okómi na lokumu ya bokonzi?” (Est. 4:12-14) Omoni te ete tosengeli komekola ndakisa ya Mordekai? Atyelaki Yehova Nzambe na ye motema mobimba. Biso mpe tokoki kosala bongo?—Mas. 3:5, 6.

Biloko ya motuya ya elimo

kr mok. 15 par. 14

Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo

14 Ndenge moko na Estere mpe Mordekai, basaleli ya Nzambe lelo babundi mpo na kozwa bonsomi ya kosambela Yehova na ndenge oyo asɛngi. (Est. 4:13-16) Ndenge nini okoki kosalisa? Okoki kobondela Yehova mbala na mbala mpo na bandeko na biso oyo bazali konyokwama mpo na bikateli ya kozanga bosembo oyo batribinale ezwá. Mabondeli ya ndenge wana ekoki kosalisa mpenza bandeko na biso oyo bazali na mpasi mpe minyoko. (Tángá Yakobo 5:16.) Yehova ayokaka mabondeli yango? Bolongi na biso na batribinale emonisi ete ayokaka mpenza!—Ebr. 13:18, 19.

18-24/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | ESTERE 6-8

“Liteya nini tozwi na likambo etali kosolola malamu?”

ia mok. 16 par. 15-16

Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te

15 Lokola Estere azalaki motema molai mpe azelaki mokolo mosusu mpo ayebisa mokonzi mposa na ye, Hamane amisambwisaki ye moko. Mbala mosusu Yehova Nzambe nde asalaki ete mokonzi yango alala te. (Mas. 21:1) Na yango, tokoki kokamwa te ete Liloba ya Nzambe elendisaka biso tóyeba “kozela”! (Tángá Mika 7:7.) Soki tozeli Nzambe asala, akoki kobongisela biso makambo na ndenge oyo eleki mosika oyo tokanisaki.

Alobaki na mpiko

16 Estere alingaki lisusu te kosukisa mokonzi motema; na fɛti ya mibale, akoyebisa ye makambo nyonso. Kasi, akosala yango ndenge nini? Mokonzi apesaki ye libaku ya koloba, mpo atunaki ye lisusu soki mposa na ye ezali nini. (Est. 7:2) “Ntango ya koloba” ekokaki mpo na Estere.

ia mok. 16 par. 17

Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te

17 Mbala mosusu Estere asalaki libondeli mokuse na nse ya motema liboso aloba maloba oyo: “Soki nandimami na miso na yo, ee mokonzi, mpe soki emonani malamu na miso ya mokonzi, na lilɔmbɔ na ngai, tiká bápesa ngai molimo na ngai mpe na eloko oyo nazali kosɛnga, bápesa ngai bato na ngai.” (Est. 7:3) Na maloba yango, Estere amonisaki mokonzi ete andimaka bikateli oyo azwaka. Estere akesenaki mpenza na Vasheti, mwasi ya liboso ya mokonzi, oyo ayokisaki mobali na ye nsɔni na nko! (Est. 1:10-12) Lisusu, Estere atyolaki mokonzi te na ndenge azalaki kotyela Hamane motema. Kasi, asɛngaki nde mokonzi abikisa ye na likambo oyo ezalaki kotya bomoi na ye na likama.

ia mok. 16 par. 18-19

Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te

18 Likambo oyo asɛngaki ekamwisaki mpenza mokonzi. Nani akokaki komeka kotya bomoi ya mwasi ya mokonzi na likama? Estere abakisaki boye: “Totɛkami, ngai ná bato na ngai, mpo tósilisama nyɛɛ, tóbomama mpe tóbebisama. Sikoyo, soki tótɛkamaka kaka lokola baombo mibali mpe lokola basali ya basi, mbɛlɛ nafandi nyɛɛ. Kasi mpasi yango ebongi te awa yango ekoyeisela mpe mokonzi likama.” (Est. 7:4) Awa, Estere abimisaki likambo na ye polele, kasi abakisaki ete alingaki koloba eloko te soki balingaki kaka kokómisa bango baombo. Kasi, mokano wana ya koboma bato ebele elingaki kozala likama ata mpo na mokonzi, yango wana akokaki kofanda nyɛɛ te.

19 Ndakisa ya Estere eteyi biso mingi na oyo etali mayele ya kondimisa. Soki esɛngi oyebisa likambo moko monene epai ya moto moko oyo olingaka to moto oyo azali na bokonzi, okoki kozwa matomba mingi soki ozali na motema molai, limemya, mpe olobi likambo yango polele.—Mas. 16:21, 23.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 1/3 lok. 11 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya Esetele

7:4—Ndenge nini kobomama ya Bayuda ekokaki “komemela mokonzi mpasi”? Na mayele mpenza, Estere alobelaki likambo ya kotɛka Bayuda lokola baombo mpe amonisaki mokonzi ete yango ekomemela ye mpasi soki babomi bango. Palata 10 000 oyo Hamane alakaki ezalaki moke mpenza soki totali oyo akokaki kozwa soki Hamane asɛngaki nde ete bátɛka Bayuda na boombo. Soki mpe bábomaka Bayuda, mokonzi alingaki kozanga mwasi na ye.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur—Motó ya likambo: “Zalá moteyi malamu lokola Yakobo—Mateya na yo ezala pɛtɛɛ”

w22.01 nk. 10-11 par. 8-10

Mateya oyo okoki kozwa epai ya Yakobo, leki ya Yesu

8 Yakobo atángaki bakelasi ya minene te. Na ntembe te, bakonzi ya mangomba ya mikolo na ye bazalaki kotalela ye kaka ndenge bazalaki kotalela ntoma Petro mpe ntoma Yoane, lokola “bato batángá kelasi mingi te.” (Mis. 4:13) Kasi Yakobo ayekolaki kozala moteyi malamu; tomonaka yango ntango totángaka mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye. Lokola Yakobo, ekoki kozala ete biso mpe totángá bakelasi mingi te. Atako bongo, na lisalisi ya elimo santu ya Yehova mpe na formasyo oyo tozwaka na ebongiseli na ye, biso mpe tokoki kokóma bateyi malamu. Tótalela ndakisa oyo Yakobo atiká lokola moteyi mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa.

9 Yakobo asalelaki te maloba ya mpasi to bandakisa ya mindondo. Na yango, bayoki na ye bayebaki makambo oyo basengelaki kosala mpe ndenge ya kosala yango. Na ndakisa, na ndenge ya pɛtɛɛ, Yakobo ateyaki ete bakristo basengeli koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo, kozanga ete bábomba nkanda na motema. Akomaki boye: “Tolobaka ete bato oyo bayiki mpiko bazali bato ya esengo. Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bomoná ndenge Yehova asukisaki makambo na ye, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yak. 5:11) Simbá ete Yakobo asalelaki Makomami mpo na kopesa bandeko na ye liteya. Asalelaki Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa bayoki na ye bámona ete Yehova apesaka ntango nyonso mbano na baoyo, lokola Yobo, bazali sembo epai na Ye. Mpo na kobimisa liteya yango, Yakobo asalelaki maloba ya pɛtɛɛ mpe ndimbola ya mindondo te. Na ndenge yango, abɛndaki likebi ya bayoki na ye epai na ye moko te, kasi epai ya Yehova.

10 Liteya: Mateya na yo ezala pɛtɛɛ, mpe euta na Liloba ya Nzambe. Ntango tozali koteya tosengeli te koluka kokamwisa bato mosusu na makambo oyo toyebi, kasi tosengeli nde komonisa bango boyebi mingi oyo Yehova azali na yango mpe ndenge oyo atyelaka bango likebi. (Rom. 11:33) Tokokokisa mokano yango soki makambo oyo tozali koloba ezali kouta na Makomami. Na ndakisa, na esika tóyebisa bayekoli na biso ya Biblia makambo oyo biso tokoki kosala na esika na bango, tosengeli nde kosalisa bango bákanisa na bandakisa ya Biblia mpo báyeba ndenge oyo Yehova akanisaka mpe ndenge oyo ayokaka. Yango ekosalisa bango báluka kosepelisa Yehova, kasi biso te.

25/09–01/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | ESTERE 9-10

“Asalelaki bokonzi na ye mpo na bolamu ya basusu”

it-2-F lok. 346 par. 1

Mordekai

Sikoyo Mordekai akómaki ministre-mokonzi na esika ya Hamane mpe bapesaki ye lopɛtɛ ya mokonzi ya kotya kashɛ na mikanda ya Leta. Estere atyaki Mordekai ayangela ndako ya Hamane, oyo mokonzi apesaki Estere. Na ndingisa oyo mokonzi apesaki ye, Mordekai akomaki mobeko mosusu oyo epesaki Bayuda lotomo ya komibatela na banguna na bango. Mpo na Bayuda ezalaki nzela ya kozwa lobiko mpe esengo. Bato mingi oyo bazalaki na Ampire ya Perse bamikɔtisaki na ngámbo ya Bayuda, mpe ntango mokolo ya 13 Adare ekómaki, mokolo oyo babandaki kosalela mibeko yango, Bayuda bamilɛngɛlaki mpenza. Bakonzi bakɔtelaki bango mpo na lokumu monene oyo Mordekai azalaki na yango. Na Shushane, babakisaki mokolo moko mpo na etumba. Na Ampire ya Perse, bato koleka 75000 oyo bazalaki banguna ya Bayuda babomamaki, ezala mpe bana zomi ya Hamane. (Est 8:1–9:18) Na ndingisa ya Estere, Mordekai apesaki mitindo ete básala fɛti ya mbula na mbula na mokolo ya 14 mpe ya 15 ya Adare, “mikolo ya Purime,” mpo na kosepela, komɛla, kolya, kopesana makabo mpe kopesa babola makabo. Bayuda bandimaki fɛti yango mpe bapesaki bana na bango mpe baoyo nyonso bamikɔtisaki na ngámbo na bango mitindo ete bákoba kosala fɛti yango. Lokola Mordekai azalaki moto ya mibale na Ampire yango, Bayuda oyo bazalaki basaleli oyo bamipesá na Nzambe bazalaki komemya ye mpe akobaki kosala mpo na bolamu na bango.—Est 9:19-22, 27-32; 10:2, 3.

it-2-F lok. 628 par. 4

Purime

Mokano. Atako bato mingi oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete fɛti ya Purime oyo Bayuda basalaka lelo ezali fɛti ya mosuni kasi fɛti ya losambo te, mpo bato balekisaka ndelo na kolya mpe na komɛla, kasi ezalaki bongo te ntango babandisaki fɛti yango mpe ndenge bazalaki kosala yango. Ezala Mordekai ná Estere, bango nyonso mibale bazalaki basambeli ya Yehova Nzambe ya solo, mpe batyaki fɛti yango na mokano ya kokumisa ye. Tokoki koloba ete lobiko ya Bayuda eutaki epai ya Yehova Nzambe, mpamba te makambo etambolaki malamu mpo na bango mpo Mordekai azalaki sembo mpe akangamaki makasi na losambo ya Yehova. Ekoki kozala ete Hamane azalaki moto ya Amaleke, ekólo oyo Yehova alakelaki mabe mpe esengelaki kobomama. Mordekai atosaki mobeko ya Nzambe mpe aboyaki kogumbamela Hamane. (Est 3:2, 5; Kob 17:14-16) Longola yango, maloba oyo Mordekai ayebisaki Estere (Est 4:14) emonisi ete Mordekai azalaki kotya motema na nguya moko monene mpo na kosikola Bayuda, mpe ndenge oyo Estere akilaki bilei liboso ya kokɔta epai ya mokonzi mpo na kosɛnga likambo ya liboso, elingi koloba, kobengisa mokonzi na fɛti, emonisaki ete alukaki lisalisi ya Nzambe.—Est 4:16.

cl mok. 10 par. 12-13

“Bókóma bamekoli ya Nzambe” na ndenge oyo bosalelaka nguya na bino

12 Yehova atye bakɛngɛli mpo bákambaka lisangá ya bokristo. (Baebre 13:17) Mibali yango ya makoki basengeli kosalela bokonzi oyo Nzambe apesi bango mpo na kopesa etonga na ye lisalisi oyo esengeli na yango mpe koluka bolamu na yango. Bokonzi yango epesi nde bankulutu nzela ya komonela bandimi mosusu? Soki moke te! Bankulutu basengeli kotalelaka mokumba na bango na lisangá na bokatikati mpe na komikitisa. (1 Petro 5:2, 3) Biblia eyebisi bakɛngɛli boye: ‘Bóbatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.’ (Misala 20:28) Yango ezali ntina monene oyo esengeli kotinda bango bázalaka na boboto epai ya moto mokomoko oyo azali na kati ya etonga.

13 Tokoki kolimbola likambo yango na ndakisa oyo. Moninga na yo moko ya motema asɛngi yo obatelela ye eloko moko oyo alingaka mingi. Oyebi ete asombaki yango na ntalo makasi. Na ntembe te, okolɛngɛla eloko yango mpe okobatela yango na likebi mingi, boye te? Ndenge moko mpe, Nzambe apesi bankulutu mokumba ya kobatelela ye eloko moko ya valɛrɛ mingi: lisangá, oyo bato na yango bazali lokola bampate. (Yoane 21:16, 17) Yehova alingaka bampate na ye mingi—yango wana, asombaki bango na makila ya motuya mingi ya Mwana na ye mobotami-se-moko, Yesu Kristo. Motuya oyo Yehova afutaki mpo na bampate ezalaki makasi koleka. Bankulutu ya komikitisa babosanaka likambo yango te mpe yango etindaka bango básalelaka bampate ya Yehova na ndenge esengeli.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 1/3 lok. 11 par. 4

Makanisi ya ntina na mokanda ya Esetele

9:10, 15, 16—Atako mobeko epesaki Bayuda nzela ya kozwa biloko ya bato oyo bakoboma, mpo na nini baboyaki kosala yango? Koboya na bango emonisaki ete bazalaki kaka na mposa ya komibatela, kasi ya kokóma na bozwi te.

02-08/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 1-3

“Kobá komonisa ete olingaka Yehova mingi mpenza”

w18.02 nk. 6-7 par. 16-17

Mekolá kondima mpe botosi ya Noa, Danyele, mpe Yobo

16 Mikakatano nini Yobo akutanaki na yango? Bomoi ya Yobo ebongwanaki na ndenge ya mabe. Liboso, azalaki “moto monene koleka bato nyonso ya Ɛsti.” (Yobo 1:3) Azalaki mozwi, ayebanaki mingi mpe bato bazalaki komemya ye mingi mpenza. (Yobo 29:7-16) Atako bongo, Yobo akómaki te kokanisa ete aleki basusu to komona ete azali na mposa ya Nzambe te. Toyebi yango mpo Yehova abengaki ye “mosaleli na ngai” mpe alobaki mpo na ye ete: “Azangi mbeba mpe azali sembo, abangaka Nzambe mpe akimaka mabe.”—Yobo 1:8.

17 Kasi, makambo ebongwanaki na mbalakaka. Yobo abungisaki biloko nyonso, anyokwamaki na makanisi mpe asɛngaki liwa. Lelo, toyebi ete Satana nde abimiselaki Yobo mikakatano wana. Alobaki ete Yobo azalaki kosalela Yehova kaka mpo azalaki na bomoi ya malamu. (Tángá Yobo 1:9, 10.) Yehova alekisaki bifundeli yango kaka boye te. Mpo na komonisa ete Satana azali moto ya lokuta, Yehova apesaki Yobo libaku ya komonisa ete azalaki sembo epai ya Nzambe, mpe ete azalaki kosalela ye mpo alingaki ye na motema mobimba.

w19.02 lok. 5 par. 10

Batelá bosembo na yo!

10 Ntembe oyo Satana abimisaki mpo na Yobo etali mpe mokomoko na biso. Na ndenge nini? Satana alobaka ete olingaka Yehova Nzambe mpenza te, ete okotika kosalela ye mpo na kobikisa bomoi na yo, mpe ete okokoka te kobatela bosembo na yo! (Yobo 2:4, 5; Em. 12:10) Yango etindi yo omiyoka ndenge nini? Na ntembe te, esali yo mpasi mpenza! Kasi, kanisá naino: Yehova atyelaka yo motema mpe apesi yo libaku moko ya malamu. Atiki Satana ameka bosembo na yo. Atye motema ete okoki kobatela bosembo na yo mpe kosalisa na komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta. Mpe alaki ete akosalisa yo mpo osala yango. (Ebr. 13:6) Ezali libaku malamu mpenza ete Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba atyela yo motema! Omoni mpo na nini bosembo ezali na ntina mingi? Esalisaka biso tómonisa lokuta ya Satana, tóbatela lokumu ya nkombo ya Tata na biso mpe tómonisa ete tondimi boyangeli na ye. Ndenge nini tokoki kobatela bosembo na biso?

Biloko ya motuya ya elimo

w21.04 lok. 11 par. 9

Zwá mateya na maloba ya nsuka oyo Yesu alobaki liboso akufa

9 Yesu alobaki nini? Mwa moke liboso akufa, Yesu agangaki ete: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” (Mat. 27:46) Biblia emonisi te ntina oyo Yesu alobaki maloba yango. Kasi tótalela mateya oyo tokoki kozwa na maloba yango. Likambo ya liboso ezali ete ntango Yesu alobaki maloba yango, azalaki kokokisa esakweli oyo ezali na Nzembo 22:1. Lisusu, maloba yango emonisi ete Yehova ‘atɛlɛmisaki te lopango zinganzinga’ ya Mwana na ye mpo na kobatela ye. (Yobo 1:10) Yesu ayebaki ete Tata na ye atikaki ye mpenza na mabɔkɔ ya banguna na ye mpo bámeka kondima na ye tii na nsuka. Moto moko te amekamá na ndenge oyo Yesu amekamaki. Lisusu, maloba yango emonisi ete Yesu asalaki te likambo moko ya mabe oyo mpo na yango asengelaki kobomama.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur—Motó ya likambo: “Zalá moteyi malamu lokola Yakobo—Talelá makambo na ndenge oyo ebongi mpe zalá na komikitisa”

w22.01 nk. 11-12 par. 11-14

Mateya oyo okoki kozwa epai ya Yakobo, leki ya Yesu

11 Yakobo azalaki kotalela makambo na ndenge oyo ebongi. Mokanda oyo akomaki emonisi ete Yakobo ayebaki malamu mikakatano oyo bandeko na ye bakristo bazalaki kokutana na yango, mpe amonisaki bango polele mpo esalisa bango bálonga mikakatano yango. Na ndakisa, bakristo mosusu bazalaki kosalela toli noki te. (Yak. 1:22) Basusu bazalaki kosepela na bazwi koleka babola. (Yak. 2:1-3) Basusu mpe bazalaki na mokakatano ya kopekisa lolemo na bango. (Yak. 3:8-10) Bakristo yango bazalaki mpenza na bolɛmbu, kasi Yakobo ayebaki ete bakokaki kobongwana. Apesaki bango toli na boboto kasi na ndenge ya polele, mpe alendisaki baoyo bazalaki na mikakatano na elimo báluka lisalisi epai ya bankulutu.—Tángá Yakobo 5:13-15.

12 Liteya: Taleláká makambo na ndenge ebongi, kasi zalá na makanisi ya malamu mpo na basusu. Bato mingi oyo toyekolaka na bango Biblia bakoki kozala na mokakatano ya kosalela toli na yango. (Yak. 4:1-4) Ekoki kosɛnga bango mwa ntango mpo bátika bizaleli mabe oyo epikamá makasi mpe bákóma na bizaleli ya bokristo. Mpo na komekola Yakobo, tosengeli kozala na mpiko ya koyebisa bayekoli na biso makambo oyo basengeli kobongisa. Tosengeli mpe kobatela makanisi ya malamu, na elikya ete Yehova akobenda bato ya komikitisa epai na ye mpe ete akopesa bango makasi mpo básala bambongwana na bomoi na bango.—Yak. 4:10.

13 Yakobo azalaki komitalela na ndenge oyo ebongi. Yakobo azalaki komona te ete, ndenge azalaki leki ya Yesu mpe ndenge azalaki na mikumba minene na lisangá, azalaki na ntina mingi koleka bandeko mosusu nyonso. Abengaki bakristo mosusu ete “bandeko na ngai ya bolingo.” (Yak. 1:16, 19; 2:5) Alukaki te komimonisa lokola nde azalaki moto ya kokoka. Kasi, alobaki mpo na bango mpe mpo na ye moko ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”—Tángá Yakobo 3:2.

14 Liteya: Kobosana te ete biso nyonso tozali bato ya masumu. Tosengeli te kokanisa ete toleki bato oyo toteyaka. Mpo na nini? Soki tozali komimonisa lokola ete tosalaka mabunga te, moyekoli na biso akoki kolɛmba nzoto mpo akokanisa ete akokoka te kotosa makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi. Kasi soki tondimi ete ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te ata mpo na biso kotosa mitinda ya Biblia mpe toyebisi ye ndenge oyo Yehova asalisaki biso tósala bambongwana, tokosalisa moyekoli na biso amona ete ye mpe akoki kosalela Yehova.

09-15/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 4-5

“Kebá na bansango ya lokuta”

it-1-F lok. 725 par. 13

Elifaze

2. Moko ya baninga misato ya Yobo. (Yb 2:11) Azalaki Motemane mpe emonani lokola azalaki mokitani ya Elifaze No. 1 oyo tolobeli na likoló, yango wana azalaki mokitani ya Abrahama mpe moboti ya mosika ya Yobo. Ye ná bakitani na ye bazalaki komikumisa mpo na bwanya na bango. (Yir 49:7) Na “babɔndisi” wana misato, emonani lokola Elifaze nde azalaki moto oyo alekaki ntina mpe azalaki na bopusi mingi, ekoki kozala ete ye nde azalaki mokóló na bango nyonso. Ye nde moto ya liboso ya koloba na mbala nyonso misato oyo batyelanaki ntembe, mpe ye nde alobaki mingi mpenza.

w05 15/9 lok. 26 par. 2

Boyá makanisi ya lokuta!

Elifaze alobelaki likambo moko ya kokamwa akutanaki na yango; alobaki boye: “Bongo elimo moko elekaki likoló ya elongi na ngai; nsuki ya nzoto na ngai ebandaki kotɛlɛma. Mpe elimo yango ebandaki kotɛlɛma, kasi nayebaki lolenge ya elongi na yango te; elilingi moko boye ezalaki liboso ya miso na ngai; kimya ezalaki, kasi na nsima nayokaki mongongo moko.” (Yobo 4:15, 16) Elimo nini epesaki Elifaze makanisi oyo abimisaki? Maloba ya kokweisa oyo alobaki na nsima emonisi ete elimo wana ekoki kozala anzelu ya sembo ya Nzambe te. (Yobo 4:17, 18) Ezalaki elimo mabe. Soki boye te, mpo na nini Yehova apamelaki Elifaze ná baninga na ye mibale ete balobaki lokuta? (Yobo 42:7) Na ntembe te, demo moko nde apesaki Elifaze makanisi oyo akómaki na yango. Maloba na ye emonisaki makanisi ya Nzambe te.

w10 15/2 nk. 19-20 par. 5-6

Tótɛmɛla makanisi oyo Satana azali kopanza

Satana atindaki Elifaze, moko ya baninga misato ya Yobo oyo bayaki kotala ye, aloba ete bato bazali na mpema ata moke te ya kotɛlɛma liboso ya Satana. Abengaki bato ete bazali “baoyo bafandaka na bandako ya mabele ya lima,” mpe alobaki na Yobo ete: “Moboko [na bango] ezali na kati ya putulu! Banyataka bango mpambampamba, kutu koleka mbombo. Banda ntɔngɔ tii mpokwa, bazali kobukabuka bango; bakufi libela kozanga ete moto atya likebi.”—Yobo 4:19, 20.

Na bisika mosusu, Makomami ekokanisi biso na “bambɛki ya mabele”—bilokó ya pɛtɛɛ oyo esalemi na mabele ya lima. (2 Ko. 4:7) Tozali na bolɛmbu mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo tosangolá. (Rom. 5:12) Soki kaka na makasi na biso moko, tokoki te kotɛlɛma liboso ya Satana. Kasi biso bakristo tozangi lisalisi te. Atako tozali na bolɛmbu, tozali na motuya na miso ya Nzambe. (Yis. 43:4) Lisusu, Yehova apesaka elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye. (Luka 11:13) Elimo na ye ekoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi,” mpo tókoka kolonga mpasi nyonso oyo Satana abimiseli biso. (2 Ko. 4:7; Flp. 4:13) Soki totɛmɛli Zabolo, ‘tozali makasi na kondima,’ Nzambe akotɛlɛmisa biso ngwi, akokómisa biso makasi. (1 Pe. 5:8-10) Na yango, tozali na ntina te ya kobanga Satana Zabolo.

mrt 32 par. 13-17

Nasala nini mpo namibatela na bansango ya lokuta?

● Luká koyeba soki nsango yango euti wapi mpe makambo nini ezali na kati

Oyo Biblia elobi: “Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.”​—1 Batesaloniki 5:21.

Liboso ya kondima nsango moko to kotindela yango moto mosusu, ata nsango oyo bato mingi bayebi to oyo bazali kozongela mingi, luká koyeba soki ezali solo. Ndenge nini okosala yango?

Luká koyeba esika nsango yango euti mpo omindimisa ete nsango yango ezali solo. Bashɛni ya TV to ya radio to bibongiseli mosusu ekoki kopanza bansango ya lokuta mpo na kokolisa mombongo na bango to mpo na kopesa mabɔkɔ na makambo ya politiki. Kokanisá makambo oyo ozali komona ná bashɛni to bibongiseli mosusu oyo ezali kolobela nsango yango. Mbala mosusu, baninga bakoki kotindela yo bansango ya lokuta kozanga koyeba to kotya yango na basite na bango ya kosolola na bato. Na yango, kondima te nsango moko liboso ya koluka koyeba esika euti.

Luká koyeba makambo oyo ezali na kati soki ezali solo mpe ebongi kotyelama motema. Luká koyeba badati, bosolo na yango mpe bilembeteli oyo endimisi makambo oyo balobi. Zalá ekɛngɛ mingimingi soki nsango moko ezali mpasi kasi balimboli yango na maloba ya pɛtɛɛ to lisolo yango ekomami na mokano ya kotinda yo osala mwa makambo.

Biloko ya motuya ya elimo

w03 15/5 nk. 22-23 par. 5-6

Pikamá makasi mpe longá momekano ya mbangu mpo na bomoi

Kozala na kati ya ebongiseli ya basambeli ya solo na mokili mobimba ekoki mpenza kosalisa biso na kopikama makasi. Kosangana ná bandeko yango ya bolingo ezali mpenza lipamboli! (1 Petro 2:17) Biso mpe tokoki kosalisa bandeko na biso bápikama.

Tótalela naino ndenge oyo Yobo, moto ya sembo, azalaki kosunga bazalani na ye. Ata Elifaze, mobɔndisi mabe, alobaki ete: “Maloba na yo ezalaki kotɛlɛmisa moto nyonso oyo azalaki kobɛta libaku, mpe ozalaki kokembisa bato oyo mabɔlɔngɔ na bango ezalaki kogumbama.” (Yobo 4:4) Bongo biso, tosalisaka mpe bato mosusu? Mokomoko na biso azali na mokumba ya kosalisa bandeko na biso ya elimo mpo bázonga nsima te na mosala ya Nzambe. Tokoki kosalela bango makambo oyo ekokokisa maloba oyo: “Bólendisa mabɔkɔ oyo elɛmbi, mpe bókembisa mabɔlɔngɔ oyo ezali kolɛnga.” (Yisaya 35:3) Mpo na yango, tokoki komityela mokano ya kolendisa ndeko moko to bandeko mibale mbala nyonso oyo tokutani na bango. (Baebre 10:24, 25) Kopesa bango longonya mpe kotɔnda bango mpo na milende oyo bazali kosala ntango nyonso mpo na kosepelisa Yehova ekoki mpenza kosalisa bango na kopikama mpo na kolonga momekano ya mbangu mpo na bomoi.

16-22/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 6-7

“Ntango omoni ete bomoi na yo ekómi bololo”

w06 15/3 lok. 14 par. 10

Makanisi ya ntina na mokanda ya Yobo

7:1; 14:14—“Kotindama na mosala makasi” ezali nini? Mpasi ya Yobo elekaki na boye ete akanisaki ete bomoi ezali bwale lokola mosala ya kotindikama na makasi. (Yobo 10:17, maloba na nse ya lokasa na NW) Lokola ntango oyo moto alekisaka na Sheole—banda ntango akufi tii ntango akosekwa—ezali eleko oyo ye moko aponi te, Yobo akokanisaki yango na mosala ya kotindikama na makasi.

w20.12 lok. 16 par. 1

“Yehova abikisaka baoyo balɛmbi nzoto”

NA BANTANGO mosusu, tokoki kokanisa ndenge oyo bomoi ezalaka mokuse mpe ‘etondi na mpasi.’ (Yobo 14:1) Yango wana, na bantango mosusu tokoki kolɛmba nzoto. Basaleli mingi ya Yehova na ntango ya kala mpe balɛmbaki nzoto. Bamosusu kutu basɛngaki bákufa. (1 Bak. 19:2-4; Yobo 3:1-3, 11; 7:15, 16) Kasi Yehova azalaki ntango nyonso kobɔndisa bango mpe kopesa bango maksi. Makambo oyo bakutanaki na yango ekomamaki mpo na kobɔndisa mpe koteya biso.—Rom. 15:4.

g 4/12 nk. 20-22

Ntango omoni ete olɛmbi bomoi

Ata soki omoni lokola ete osuki, kobosana te ete ozali yo moko te; yebá mpe ete pene na moto nyonso azali na oyo ya ye bampasi. Biblia elobi ete: “Biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo.” (Baroma 8:22) Ata soki sikoyo ezali komonana lokola ete mikakatano na yo ekosila te, kobosana te ete mbala mingi makambo ebongaka nsima ya mikolo. Kasi, lisalisi nini okoki kozwa sikoyo?

Yebisá moninga moko oyo akɔmeli, oyo otyelaka motema. Biblia elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Yobo, moto ya sembo oyo Biblia elobeli, afungolelaki baninga na ye motema ntango azalaki konyokwama. Ntango mpasi ekómelaki ye makasi tii ‘ayokaki bomoi na ye mpii mpenza,’ alobaki boye: “Nakobimisa lobanzo oyo nazali na yango mpo na ngai moko. Nakoloba na bololo ya molimo na ngai!” (Yobo 10:1) Koyebisa moninga ekitisaka mpasi ya motema, mpe ekoki kosalisa yo obongola lolenge na yo ya kotalela mikakatano na yo.

Fungolelá Nzambe motema na yo na libondeli. Bato mosusu bakanisaka ete libondeli esalisaka mpenza te. Kasi Biblia elobi bongo te. Na Nzembo 65:2, Yehova Nzambe abengami “Moyoki ya libondeli,” mpe 1 Petro 5:7 elobi ete: ‘Atyelaka biso likebi.’ Biblia elobeli mbala na mbala ntina ya kotyela Nzambe motema. Na ndakisa, elobi boye:

“Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”—MASESE 3:5, 6.

“[Yehova] akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye, mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.”—NZEMBO 145:19.

“Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”—1 YOANE 5:14.

“Yehova azali mosika mpenza na bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.”—MASESE 15:29.

Soki oyebisi Nzambe mikakatano na yo, akosalisa yo. Yango wana Biblia elendisi biso ete: ‘Tótyela ye motema ntango nyonso . . . Tósopa motema na biso liboso na ye.’—Nzembo 62:8.

Biloko ya motuya ya elimo

w20.04 nk. 16-17 par. 10

Koyoka mpe koyeba bandeko ekosalisa yo omitya na esika na bango

10 Tokoki komekola Yehova soki tosali makasi mpo tómesana na bandeko. Luká koyeba bandeko malamu. Sololáká na bango liboso mpe nsima ya makita, sakoláká elongo na bango, mpe soki likoki ezali, bengisá bango na ndako mpo bólya elongo. Ntango osali bongo, mbala mosusu okoyeba ete ndeko mwasi oyo omonaka ete akipaka bato te, azalaka nde nsɔninsɔni; ndeko mobali oyo okanisaka ete alingá biloko ya mokili, ayebi nde kokaba; to bato ya libota moko oyo mbala mingi bayaka retare na makita bazali nde kokutana na botɛmɛli. (Yobo 6:29) Ya solo, tosengeli te ‘komikɔtisa na makambo ya bato.’ (1 Tim. 5:13) Kasi, ezali malamu tóyeba mwa makambo oyo etali bandeko na biso mpe bomoi na bango. Yango ekosalisa biso tóyeba ntina oyo bakómá na bomoto oyo bazali na yango.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur—Motó ya likambo: “Zalá moteyi malamu lokola Yakobo— Saleláká bandakisa ya malamu”

w22.01 nk. 12-13 par. 15-18

Mateya oyo okoki kozwa epai ya Yakobo, leki ya Yesu

15 Yakobo asalelaki bandakisa oyo ezalaki mpenza kosimba mitema. Na ntembe te, elimo santu nde esalisaki ye, kasi ekoki mpe kozala ete ayekolaki ndenge ya koteya malamu ntango atalelaki bandakisa oyo yaya na ye, Yesu, asalelaki. Bandakisa oyo Yakobo asalelaki na mokanda oyo akomaki ezali mindondo te, mpe liteya na yango ezali polele.—Tángá Yakobo 3:2-6, 10-12.

16 Liteya: Saleláká bandakisa ya malamu. Soki ozali kosalela bandakisa oyo ebongi, bato bakoyoka kaka te liteya oyo olingi ete bákanga ntina, kasi bakoki mpe komona yango mpenza na makanisi. Kosalela bandakisa oyo ebongi ezali lokola kokɔtisa bililingi na makanisi ya bato. Bililingi yango ekosalisa bato oyo bayoki yo bábosana te mateya ya ntina ya Biblia. Yesu ayebaki mpenza kosalela bandakisa ya malamu, mpe ndeko na ye Yakobo alandaki ndakisa na ye. Tótalela moko ya bandakisa oyo Yakobo asalelaki mpe tómona ntina oyo ndakisa yango ezali malamu mpenza.

17 Tángá Yakobo 1:22-25. Ndakisa ya talatala oyo Yakobo asalelaki ezali malamu mpenza mpo na bantina mingi. Alingaki koteya likambo moko ya sikisiki, elingi koloba, mpo Liloba ya Nzambe esalisa biso mpenza, tosengeli kosuka kaka te na kotánga yango; tosengeli mpe kosalela makambo oyo tozali kotánga. Yakobo aponaki ndakisa oyo bayoki na ye bakokaki koyeba mbala moko; ya moto oyo azali komitala na talatala. Likambo nini alingaki koteya? Soki moto amitali na talatala mpe amoni eloko oyo akoki kobongisa kasi asali eloko te, ekozala bozoba. Ndenge moko mpe, soki totángi Liloba ya Nzambe mpe tomoni likambo moko oyo tosengeli kobongola na bomoto na biso kasi tosali eloko te, ekozala bozoba.

18 Ntango olingi kosalela ndakisa moko, okoki komekola Yakobo soki osali makambo oyo misato: (1) Omindimisa ete ndakisa yango ebongi mpo na likambo oyo ozali kolobela. (2) Salelá ndakisa oyo bayoki na yo bakoki koyeba mbala moko. (3) Monisá polele ndenge ya kosalela liteya oyo obimisi na ndakisa yango. Soki ozali na mokakatano ya kozwa bandakisa oyo ebongi, luká yango na Index des publications des Témoins de Jéhovah. Kende na motó ya likambo “Illustrations,” mpe okomona ebele ya bandakisa oyo okoki kosalela. Kasi kobosana te ete bandakisa ezali lokola mikro: ekobimisa malamu liteya oyo ozali kopesa. Na yango, salá ete ndakisa oyo okopesa ebimisa kaka likambo ya ntina oyo olingi koteya. Nzokande, ntina mpenza oyo tolingaka kokolisa makoki na biso ya koteya ezali te mpo na kobenda likebi epai na biso moko, kasi nde mpo na kosalisa bato ebele bákɔta na libota ya Yehova oyo ezali na esengo.

23-29/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 8-10

“Bolingo ya sembo ya Nzambe ebatelaka biso na lokuta ya Satana”

w15 1/7 lok. 12 par. 3

Tokoki mpenza kosepelisa Nzambe?

Yobo akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge oyo emonani ete ezalaki sembo te. Akómaki na likanisi mabe ete Nzambe azalaki kokipe te soki abatelaki kondima na ye to te. (Yobo 9:20-22) Yobo amonisaki mpenza ete azalaki sembo mpe bato mosusu bamonaki yango lokola azali komonisa ete bosembo na ye eleki oyo ya Nzambe.—Yobo 32:1, 2; 35:1, 2.

w21.11 lok. 6 par. 14

Bolingo ya sembo ya Yehova elimboli nini mpo na yo?

14 Bolingo ya sembo ya Nzambe ebatelaka biso na elimo. Na libondeli moko oyo asalaki epai ya Yehova, Davidi alobaki boye: “Yo ozali esika na ngai ya kobombana; okobatela ngai liboso ya mpasi. Okozinga ngai na koganga ya esengo na ntango ya kobikisama. . . . Moto oyo azali kotyela Yehova motema, motema boboto [to bolingo ya sembo ya Yehova] ezingaka ye.” (Nz. 32:7, 10) Na ntango ya kala, bifelo oyo ezingaki engumba ezalaki kobatela yango mpe bato oyo bazalaki kofanda na kati. Ndenge moko mpe, bolingo ya sembo ya Yehova ezingaka biso lokola efelo mpe ebatelaka biso na makambo nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná ye. Lisusu, bolingo ya sembo ya Yehova etindaka ye apusana penepene na biso.—Yir. 31:3.

Biloko ya motuya ya elimo

w10 15/10 nk. 6-7 par. 19-20

“Nani ayebi makanisi ya Yehova?”

19 Toyekoli nini mpo na “makanisi ya Yehova”? Tosengeli kotika Liloba ya Nzambe esalisa biso tóyeba malamu makanisi ya Yehova. Tosengeli soki moke te kosambisa Yehova kolanda mibeko mpe makanisi na biso oyo ezali na ndelo. Yobo alobaki boye: “[Nzambe] azali moto lokola ngai te mpo nazongisela ye maloba, mpo ngai ná ye tóya esika moko mpo tósamba.” (Yobo 9:32) Lokola Yobo, ntango tobandi koyeba makanisi ya Yehova, tokozanga te kokamwa ete: “Talá! Wana nde ebandeli ya banzela na ye, mpe oyo nde mwa nungunungu ya likambo bayoki mpo na ye! Kasi nkake na ye ya nguya, nani akomonisa ete akangi ntina na yango?”—Yobo 26:14.

20 Ntango tozali kotánga Biblia, tosengeli kosala nini soki tokutani na mokapo moko oyo ezali mpasi kokanga ntina, mingimingi na oyo etali makanisi ya Yehova? Soki nsima ya kosala bolukiluki tozwi eyano ya polele kaka te, tótalela yango lokola likambo moko oyo ezali komeka biso mpo tómonisa soki totyelaka Yehova motema. Tóbosana te, na bantango mosusu, bavɛrsɛ mosusu epesaka biso libaku ya komonisa kondima na biso na bizaleli ya Yehova. Tóndima na komikitisa nyonso ete toyebi te makambo nyonso oyo Ye ayebi. (Mos. 11:5) Yango ekotinda biso tóndima maloba ya ntoma Paulo oyo: “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki koyebana te! Mpo ‘nani ayebi makanisi ya Yehova, to nani akómá mopesi-toli na ye?’ To, ‘Nani akabelá ye liboso, mpo azongisela ye?’ Mpo biloko nyonso euti na ye mpe na nzela na ye mpe mpo na ye. Azala na nkembo libela na libela. Amen.”—Rom. 11:33-36.

30/10–05/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 11-12

“Makambo misato ya kosala mpo na kozwa bwanya mpe kozwela yango matomba”

w09 15/4 nk. 6-7 par. 17

Yobo akumisaki nkombo ya Yehova

17 Nini esalisaki Yobo abatela bosembo na ye? Emonani polele ete liboso minyoko ekómela ye, Yobo azalaki na boyokani malamu na Yehova. Atako eloko moko te emonisi biso ete Yobo ayebaki ete Satana abɛtɛlaki Yehova ntembe, azalaki na ekateli ya kotikala sembo. Alobaki boye: “Tii nakokufa, nakotika te bosembo na ngai.” (Yobo 27:5) Ndenge nini Yobo akómaki na boyokani ya malamu ndenge wana na Nzambe? Na ntembe te, abatelaki na motema masolo oyo ayokaki na ntina na makambo oyo Nzambe asalaki mpo na Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo, bandeko na ye oyo bazalaki na bomoi liboso na ye. Ekoki mpe kozala ete kotala biloko oyo Yehova akelá esalisaki Yobo amona bizaleli mingi ya Yehova.—Tángá Yobo 12:7-9, 13, 16.

w21.06 nk. 10-11 par. 10-12

Yehova azali ntango nyonso elongo na yo

10 Salá boninga na bandeko oyo bazali sembo. Salá boninga na bandeko ya lisangá oyo okoki koyekola epai na bango. Bakoki kozala bato ya mbula to mimeseno ekeseni na oyo ya yo. Biblia eyebisi biso ete “bwanya ezalaka nde epai ya mibange.” (Yobo 12:12) Mibange mpe bakoki koyekola makambo epai ya bandeko oyo bazali bilenge. Yonatane azalaki mokóló ya Davidi ya mosika, kasi yango epekisaki bango te bákóma baninga ya motema. (1 Sa. 18:1) Davidi ná Yonatane basalisanaki mpo na kosalela Yehova atako bakutanaki na mikakatano ya makasi. (1 Sa. 23:16-18) Irina, ndeko mwasi moko oyo azali Motatoli ya Yehova kaka ye moko na libota na bango, alobi boye: “Bandeko na biso bakristo bakoki mpenza kokóma lokola baboti na biso to bandeko na biso ya libota. Yehova akoki kosalela bango mpo na kokokisa bamposa na biso.”

11 Kozwa baninga ya sika ekoki kozala pɛtɛɛ te mingimingi soki ozalaka moto ya nsɔninsɔni. Ratna, ndeko moko ya nsɔninsɔni oyo ayekolaki solo atako botɛmɛli, alobi boye: “Nasengelaki kondima ete nazalaki na mposa ya lisalisi ya bandeko ya lisangá.” Koyebisa moto mosusu ndenge oyo ozali komiyoka ekoki kozala pɛtɛɛ te. Kasi kosala bongo ekoki kosala ete bino mibale bókóma baninga ya motema. Baninga na yo bazalaka na mposa ya kolendisa mpe ya kosalisa yo, kasi balingaka oyebisa bango ndenge oyo bakoki kosala yango.

12 Lolenge eleki malamu ya kosala boninga na basusu ezali ya kosakola elongo na bango. Carol, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Kolekisa ntango elongo na bandeko basi na mosala ya kosakola mpe na makambo mosusu na mosala ya Yehova esalisi ngai nazwa baninga mingi ya malamu. Na boumeli ya bambula mingi, Yehova asalisaki ngai mingi na nzela ya baninga na ngai.” Ezalaka ntango nyonso malamu kosala boninga elongo na bandeko oyo bazali sembo. Yehova asalelaka baninga yango mpo na kosalisa yo obundisa makanisi ya kolɛmba nzoto. Na ndakisa, bakoki kosalisa yo ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko.—Mas. 17:17.

it-2-F nk. 851-852 par. 5

Bwanya

Bwanya ya Nzambe. Yehova Nzambe azali na bwanya oyo ekokani na mosusu te, mpo kaka ye moko nde azali “moto ya bwanya” koleka moto mosusu nyonso. (Ro 16:27; Em 7:12) Boyebi ezali likoki ya koyeba bosolo ya makambo, mpe lokola Yehova azali Mozalisi, oyo azali “libela na libela” (Nz 90:1, 2), ayebi makambo nyonso esengeli koyeba mpo na molɔ́ngɔ́, ndenge esalamá, biloko oyo ezali na kati, mpe lisolo na yango tii na mokolo ya lelo. Azali Mozalisi ya mibeko ya molɔ́ngɔ́, ndenge mai ya mbula esalemaka, mpe mitinda oyo bato balandelaka mpo na kosala bolukiluki mpe kosala biloko ya sika, mpe soki mibeko yango ezalaka te bato bakokaki te kosala biloko oyo basalaka. (Yb 38:34-38; Nz 104:24; Mas 3:19; Yir 10:12, 13) Mpo na koloba solo, mibeko na ye na oyo etali malamu ná mabe esilaka ngala te mpe ezali na ntina mingi mpo na bato mpo bátɛngatɛnga te, bákanisa malamu, mpe bálonga na bomoi. (Mib 32:4-6; talá YEHOVA [Nzambe atyaka mibeko na oyo etali malamu ná mabe].) Eloko moko te eleki mayele na ye. (Yis 40:13, 14) Atako na bantango mosusu makambo oyo bato basalaka oyo eyokani te na mitinda na ye ya sembo emonanaka lokola ezali kolonga mpo na mwa ntango, avenire ezali na lobɔkɔ na ye mpe nsukansuka makambo nyonso ekobonga mpenza na boyokani na mokano na ye; makambo oyo alobi “ekolonga mpenza.”—Yis 55:8-11; 46:9-11.

Biloko ya motuya ya elimo

w08 1/8 nk. 11-12 par. 5

Bósololaka malamu na bana oyo bakómi bilenge

▪ Soki mwana alobi likambo, nasosolaka oyo alingaki mpenza koloba? Yobo 12:11 elobi boye: “Litoi emekaka maloba te ndenge lolemo emekaka bilei?” Sikoyo nde ntango oyo osengeli ‘komeka’ makambo oyo mwana na yo azali koloba. Mbala mingi bilenge balekisaka ndelo na makambo oyo balobaka. Na ndakisa, mwana na yo akoki koloba, “Yo omonaka ngai ntango nyonso mwana moke!” To “Olingaka koyokela ngai ata mokolo moko te!” Na esika oluka komonisa ye ete makambo azali koloba ezali solo te, ekozala malamu oyeba ete mbala mosusu alingi mpenza koloba bongo te. Na ndakisa, soki alobi, “Yo omonaka ngai ntango nyonso mwana moke,” yango ekoki kolimbola, “Namoni lokola otyelaka ngai motema te”; mpe soki alobi, “Olingaka koyokela ngai ata mokolo moko te,” yango ekoki kolimbola, “Nalingi koyebisa yo makambo oyo ezali na motema na ngai.” Luká koyeba oyo alingi mpenza koloba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto