Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 13 lok. 16
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Ndenge malamu ya kobanda lisolo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Koloba na esengo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 13 lok. 16

LITEYA 13

Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa

Vɛrsɛ

Masese 3:21

NA MOKUSE: Salisá bato bámona ndenge oyo lisolo na yo etali bango, mpe lakisá bango ndenge oyo bakoki kosalela makambo oyo bazali koyoka.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Kanisá bato oyo bakoyoka yo. Kanisá mpo na nini bato bazali na mposa ya koyoka makambo oyo okoloba, mpe luká koyeba makambo nini ya lisolo na yo ekozala na ntina mingi mpo na bango.

  • Ntango ozali kosala lisolo, lakisáká bato nini basengeli kosala. Banda na ebandeli, moto na moto asengeli kolobaka na motema ete: ‘Makambo oyo etali ngai.’ Ntango ozali kolobela likanisi mokomoko ya ntina, lakisáká ndenge ya kosalela yango. Kosuka te na kolobela makambo likolólikoló.

    Toli

    Limbolá ndenge ya kosalela batoli ya Biblia na bolingo mpe na boboto. Na esika emonana lokola nde ozali koloba na bato ete basalaka malamu te, salisá bango bákóma na bolingo mpe na kondima mingi; zalá na elikya ete mitema na bango ekotinda bango básala makambo ya malamu.

NA MOSALA YA KOSAKOLA

Mpo na komibongisa mpo na mosala ya kosakola, landáká bansango mpe tyáká litoi na makambo mosusu oyo ekoki kosepelisa bato na teritware na bino. Luká kolobela makambo oyo bazali na mposa na yango. Ntango ozali kosolola na moto, tuná ye mituna oyo ekotinda ye alobela makambo oyo etungisaka ye to oyo esepelisaka ye. Na nsima, yoká malamu eyano akopesa, mpe teyá ye makambo oyo ekosalisa ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto