Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Asaleli nzete ya figi mpo na kopesa liteya etali kondima
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu ná bayekoli na ye bamoni nzete ya figi oyo ebotaki mbuma te ekauki

      MOKAPO 105

      Asaleli nzete ya figi mpo na kopesa liteya etali kondima

      MATAI 21:19-27 MARKO 11:19-33 LUKA 20:1-8

      • NZETE YA FIGI OYO EKAUKI​—LITEYA ETALI KONDIMA

      • BABOYI KONDIMA BOKONZI YA YESU

      Mokolo ya yambo nsima ya midi, Yesu alongwe na Yerusaleme mpe azongi na Betania, oyo ezali na ɛsti ya Ngomba ya Olive. Emonani ete alali epai ya baninga na ye Lazare, Maria ná Marta.

      Sikoyo, ntɔngɔ etani, tokómi mokolo ya 11 Nisana. Yesu ná bayekoli na ye bazongi lisusu na Yerusaleme, epai akozala na tempelo mpo na mbala ya nsuka. Ezali mokolo ya nsuka asakola na esika ya bato mingi, liboso ete asala fɛti ya Elekeli mpe abandisa Ekaniseli ya liwa na ye, na nsima anyokwama mpe abomama.

      Ntango bauti na Betania, wana bazali kokatisa Ngomba ya Olive mpo na kokende na Yerusaleme, Petro amoni nzete oyo Yesu alakelaki mabe na ntɔngɔ oyo eleki. Alobi: “Rabi, talá! nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekauki.”​—Marko 11:21.

      Kasi mpo na nini Yesu akaukisi nzete yango? Ayebisi ntina oyo asali bongo na eyano oyo apesi: “Ya solo nalobi na bino ete: Soki bozali mpenza na kondima mpe bozali kobɛta ntembe te, bokosala kaka oyo ngai nasali nzete ya figi te, kasi lisusu soki bolobi na ngomba oyo ete: ‘Pikolamá awa, omibwaka na mbu,’ ekosalema bongo. Mpe makambo nyonso oyo bozali kosɛnga na libondeli, soki bozali na kondima, bokozwa yango.” (Matai 21:21, 22) Awa, Yesu azongeli likambo oyo alobaki liboso, oyo etali kozala na likoki ya kolongola ngomba.​—Matai 17:20.

      Na yango, lokola Yesu akaukisi nzete wana, apesi liteya monene oyo emonisi ntina ya kozala na kondima epai ya Nzambe. Alobi: “Biloko nyonso bozali kobondela mpo na yango mpe kosɛnga, bózala na kondima ete bozwi yango mpenza, mpe bokozala na yango.” (Marko 11:24) Yango ezali liteya ya ntina mingi mpo na bayekoli nyonso ya Yesu! Liteya yango ebongi mpenza mpo na bantoma, mpo etikali moke bákutana na komekama makasi. Kasi ezali na boyokani mosusu kati na nzete ya figi wana oyo ekauki mpe kondima.

      Lokola nzete ya figi yango, ekólo ya Yisraele ezali komonana ete ezali na kondima, nzokande ezali bongo te. Bato ya ekólo yango basalaki kondimana na Nzambe mpe ekoki kozala ete ezali komonana lokola bazali kotosa Mibeko. Kasi, ekólo yango mobimba emonisi ete ezangi kondima mpe eboti mbuma ya malamu te. Eboyi kutu Mwana ya Nzambe! Na yango, lokola Yesu akaukisi nzete ya figi oyo ezalaki kobota te, amonisi ndenge ekólo wana oyo ezali kobota mbuma te mpe ezangi kondima ekosuka.

      Eumeli te, Yesu ná bayekoli na ye bakómi na Yerusaleme. Yesu asali ndenge asalaka, akei na tempelo mpe abandi koteya. Banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato, oyo ntango mosusu babosani naino te likambo oyo Yesu asalaki bato oyo basenzaka mbongo mokolo eleki, babimisi ntembe oyo: “Bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? To nani apesi yo bokonzi oyo ya kosala makambo wana?”​—Marko 11:28.

      Yesu ayanoli bango: “Nakotuna bino motuna moko. Bóyanola ngai, ngai mpe nakoyebisa bino na lotomo nini nazali kosala makambo oyo. Batisimo ya Yoane eutaki na likoló to na bato? Bóyanola ngai.” Sikoyo, banguna na ye bakómi na mokakatano. Banganga-nzambe mpe mikóló ya bato basololi na kati na bango mpo na koyanola ye: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba ete: ‘Bongo mpo na nini bondimaki ye te?’ Kasi tokomeka nde koloba: ‘Na bato’?” Bazali kokanisa bongo mpo bazali kobanga ebele ya bato, “mpo bango nyonso bazalaki kozwa Yoane ete azalaki mpenza mosakoli.”​—Marko 11:29-32.

      Batɛmɛli yango ya Yesu bazwi eyano ya malonga te. Yango wana, bazongisi: “Toyebi te.” Mpe Yesu alobi na bango: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na lotomo nini nazali kosala makambo oyo.”​—Marko 11:33.

      • Mpo na nini mokolo ya 11 Nisana ezali na ntina mpenza?

      • Mateya nini Yesu ateyi na nzete ya figi oyo akaukisi?

      • Ndenge nini Yesu asukisi bato oyo batuni ye ete na nguya nini azali kosala makamwisi?

  • Ndakisa mibale mpo na elanga ya vinyo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Basali-bilanga babomi mwana ya nkolo bilanga

      MOKAPO 106

      Ndakisa mibale mpo na elanga ya vinyo

      MATAI 21:28-46 MARKO 12:1-12 LUKA 20:9-19

      • NDAKISA YA BANA MIBALI MIBALE

      • NDAKISA YA MOLONI YA ELANGA YA VINYO

      Na tempelo, Yesu auti kosukisa banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato, oyo balingi koyeba nani apesi ye bokonzi ya kosala makamwisi. Eyano ya Yesu ekangisi bango minɔkɔ. Na nsima, apesi ndakisa moko oyo emonisi bomoto mpenza ya bato yango.

      Alobi: “Moto moko azalaki na bana mibale. Akei epai ya oyo ya liboso, alobi: ‘Mwana, kende kosala lelo na elanga ya vinyo.’ Ye azongisaki ete: ‘Tata, nakokende te,’ kasi na nsima ayoki mawa mpe akei. Apusani epai ya oyo ya mibale, alobaki kaka bongo. Ye azongisaki ete: ‘Nakokende,’ kasi akendaki te. Na bango mibale, nani asali mokano ya tata na ye?” (Matai 21:28-31, NW, ebimeli ya 2013) Eyano yango emonisi polele ete mwana ya liboso nde asali mokano ya tata na ye.

      Na yango, Yesu ayebisi batɛmɛli na ye: “Ya solo nalobi na bino ete bakɔngɔli-mpako ná basi ya ndumba bazali kokɔta liboso na bino na bokonzi ya Nzambe.” Na ebandeli, bakɔngɔli-mpako ná basi ya ndumba bakokaki kosalela Nzambe te. Kasi, lokola mwana ya liboso, na nsima, babongolaki mitema mpe sikoyo bazali kosalela ye. Nzokande, bakonzi ya mangomba bazali lokola mwana ya mibale; bazali komikumisa ete basalelaka Nzambe kasi basalelaka ye te. Yesu alobi: “Yoane [Mobatisi] ayaki koteya bino nzela ya boyengebene, kasi bino bondimaki ye te. Nzokande, bakɔngɔli-mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye, mpe bino, atako bomonaki yango, na nsima, boyokaki mawa te mpo na kondima ye.”​—Matai 21:31, 32.

      Yesu apesi ndakisa ya mibale. Na mbala oyo, amonisi ete bakonzi ya mangomba bazwaka likambo ya kosalela Nzambe na lisɛki. Bazali mpenza bato mabe. Yesu alobi: “Moto moko alonaki elanga ya vinyo, mpe azingaki yango na lopango, mpe atimolaki libulu ya ekamwelo ya vinyo mpe atongaki linɔ́ngi, mpe atikaki yango na mabɔkɔ ya basali-bilanga, mpe asalaki mobembo na mboka mopaya. Bongo, wana ntango ekokaki atindaki moombo moko epai ya basali-bilanga, mpo azwa ndambo ya mbuma ya elanga ya vinyo epai ya basali-bilanga. Kasi bakamataki ye, babɛtaki ye mpe bazongisaki ye mabɔkɔ mpamba. Mpe atindelaki bango lisusu moombo mosusu; ye mpe babɛtaki ye na motó mpe basambwisaki ye. Mpe atindaki mosusu, mpe babomaki ye; mpe atindaki bamosusu mingi: babɛtaki bamosusu mpe babomaki bamosusu.”​—Marko 12:1-5.

      Bato oyo bazali koyoka Yesu bakangi ntina ya ndakisa yango? Bakoki komikundola maloba oyo ya Yisaya: “Elanga ya vinyo ya Yehova ya mampinga ezali ndako ya Yisraele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo azalaki kolinga mingi. Mpe azalaki kolikya ete akomona bosembo, kasi talá! kobuka mibeko.” (Yisaya 5:7) Ndakisa oyo Yesu apesi ekokani na oyo wana. Nkolo elanga ezali Yehova, mpe elanga ya vinyo ezali ekólo Yisraele, lopango oyo ezingi yango mpe ezali kobatela yango ezali nde Mibeko ya Nzambe. Yehova atindaki basakoli mpo na koteya bato ya ekólo na ye mpe kosalisa bango bábota mbuma malamu.

      Nzokande, “basali-bilanga” babɛtaki mpe babomaki “baombo” oyo nkolo ya elanga atindelaki bango. Yesu alimboli: “[Nkolo elanga ya vinyo] azalaki lisusu na Mwana moko oyo azalaki kolinga mingi. Atindelaki bango ye moto ya nsuka, alobi: ‘Bakomemya mwana na ngai.’ Kasi basali-bilanga wana balobanaki ete: ‘Talá mozwi-ya-libula. Bóya, tóboma ye, mpe libula ekozala ya biso.’ Bongo bakamataki ye, babomi ye.”​—Marko 12:6-8.

      Sikoyo, Yesu atuni: “Nkolo ya elanga ya vinyo akosala nini?” (Marko 12:9) Bakonzi ya mangomba bayanoli: “Lokola bazali bato mabe, akoboma bango koboma mpenza mpe akotika elanga ya vinyo na mabɔkɔ ya basali-bilanga mosusu, oyo bakopesa ye mbuma na eleko na yango.”​—Matai 21:41.

      Na ndenge yango, bango moko bamikweisi na likambo mpo bazali na kati ya “basali-bilanga” ya “elanga ya vinyo” ya Yehova, ekólo Yisraele. Na kati ya mbuma oyo Yehova alingi komona epai ya basali-bilanga wana, tokoki kotánga kondimela Mwana na ye, Masiya. Yesu atali bakonzi ya mangomba yango na bilongi mpe alobi: “Botángá naino te likomami oyo ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki ekómi libanga monene ya litumu ya ndako. Likambo yango euti na Yehova, mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?” (Marko 12:10, 11) Na nsima, Yesu abimisi likanisi na ye polele: “Yango wana nalobi na bino ete: Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.”​—Matai 21:43.

      Bakomeli mpe banganga-nzambe bakonzi basosoli ete Yesu “apesaki ndakisa wana nde mpo na bango.” (Luka 20:19) Bazali koluka na ndenge nyonso báboma ye, “mozwi-ya-libula.” Kasi bazali kobanga ebele ya bato, oyo bamonaka ete Yesu azali mosakoli, yango wana baluki koboma ye te na ntango wana.

      • Na ndakisa ya liboso oyo Yesu apesi, bana mibali mibale bazali komonisa banani?

      • Na ndakisa ya mibale, “nkolo elanga” ezali nani? “elanga ya vinyo” ezali nini? “basali-bilanga” ezali banani? “baombo” ezali banani? mpe “mozwi-ya-libula” ezali nani?

      • Likambo nini ekokómela “basali-bilanga”?

  • Mokonzi abengi baoyo babengisami na fɛti ya libala
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Mokonzi alobi babwaka moto oyo alati bilamba ya libala te na libándá

      MOKAPO 107

      Mokonzi abengi baoyo babengisami na fɛti ya libala

      MATAI 22:1-14

      • NDAKISA YA FƐTI YA LIBALA

      Lokola mosala ya kosakola ya Yesu ekómi pene na nsuka, azali kosalela bandakisa mpo na kobimisa mabe ya bakomeli mpe banganga-nzambe bakonzi. Yango wana, balingi koboma ye. (Luka 20:19) Kasi Yesu asilisi naino te kobimisa mabe na bango polele. Apesi ndakisa mosusu:

      “Bokonzi ya likoló ezali lokola mokonzi moko oyo asalelaki mwana na ye ya mobali fɛti ya libala. Mpe atindaki baombo na ye bábenga bato oyo babengisamaki na fɛti ya libala, kasi bato yango baboyaki koya.” (Matai 22:2, 3) Yesu abandi ndakisa na ye na maloba “Bokonzi ya likoló.” “Mokonzi” esengeli kozala kaka Yehova Nzambe. Bongo mwana ya mokonzi ezali nani? Mpe banani babengisami na fɛti ya libala? Awa lisusu, ezali mpasi te koyeba mwana ya mokonzi: ezali Mwana ya Yehova, oyo azali kopesa ndakisa yango. Baoyo babengisami ezali bakristo oyo bakoyangela elongo na Mwana yango na Bokonzi ya likoló.

      Banani bazali bato ya liboso oyo babengisamaki? Yesu ná bantoma na ye basakwelaki banani nsango ya Bokonzi? Ezali Bayuda. (Matai 10:6, 7; 15:24) Ekólo yango endimaki kondimana ya Mibeko na mobu 1513 L.T.B., na ndenge yango, bato ya ekólo yango bakómaki bato ya liboso ya kozala na kati ya “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” (Kobima 19:5-8) Kasi ntango nini mpenza babengisamaki na “fɛti ya libala”? Babengisamaki na mobu 29 T.B., ntango Yesu abandaki kosakola nsango ya Bokonzi ya likoló.

      Kasi Bayisraele mingi bandimaki libyangi yango? Ndenge Yesu alobi, “baboyaki koya.” Bakonzi mingi ya mangomba mpe bato mingi ya ekólo yango bandimaki te ete Yesu azali Masiya mpe Mokonzi oyo Nzambe aponi.

      Kasi, Yesu amonisi ete Bayuda bazwaki libaku mosusu: “Lisusu [mokonzi] atindaki baombo mosusu mpe alobaki ete: ‘Yebisá bato oyo babengisami ete: “Talá! Nabongisi bilei na ngai ya midi, bangɔmbɛ na ngai ya mibali ná banyama ya mafuta ebomami, mpe biloko nyonso elɛngɛlami. Bóya na fɛti ya libala.”’ Kasi bamonaki yango mpamba mpe bakendaki, mosusu na elanga na ye, mosusu na mombongo na ye; kasi baoyo batikali bakangaki baombo na ye, basambwisi bango mabe mpe babomi bango.” (Matai 22:4-6) Yango ekokani na likambo oyo esalemaki ntango lisangá ya bokristo ebandaki. Na ntango wana, Bayuda bazalaki naino na libaku ya kozala na Bokonzi; atako bongo, mingi baboyaki kondima libyangi wana; kutu banyokolaki ‘baombo ya mokonzi.’​—Misala 4:13-18; 7:54, 58.

      Makambo ya ekólo yango esuki ndenge nini? Yesu alobi: “Mokonzi ayokaki nkanda, mpe atindaki mampinga na ye mpe babomaki babomi-bato wana mpe batumbaki engumba na bango.” (Mata 22:7) Bayuda bamoni likambo yango na mobu 70 T.B., ntango Baroma babebisaki “engumba na bango,” Yerusaleme.

      Lokola baboyaki libyangi ya mokonzi, yango elingi koloba ete bato mosusu bakobengisama te? Na kotalela ndakisa ya Yesu, ezali bongo te. Abakisi: “Bongo [mokonzi] alobaki na baombo na ye ete: ‘Fɛti ya libala elɛngɛlami mpenza, kasi bato oyo babengisamaki babongi na yango te. Yango wana, bókende na banzela oyo ekendá tii na libándá ya engumba, mpe moto nyonso oyo bokokuta bóbengisa ye na fɛti ya libala.’ Bongo baombo yango babimaki na banzela mpe basangisaki bato nyonso oyo bakutaki, bato mabe ná bato malamu; mpe ndako ya milulu ya libala etondaki na bato oyo bafandi na mesa.”​—Matai 22:8-10.

      Yango wana, na nsima, ntoma Petro abandaki kosalisa bato ya bikólo​—elingi koloba bato oyo bazalaki Bayuda te to bakɔtaki na losambo ya Bayuda te—​mpo bákóma bakristo ya solo. Na mobu 36 T.B., Korneyi, mokonzi moko ya basoda ya Roma ná libota na ye bazwaki elimo santu ya Nzambe; na ndenge yango, bazwaki esika na Bokonzi ya likoló oyo Yesu alobelaki.​—Misala 10:1, 34-48.

      Yesu amonisi ete ezali te bato nyonso oyo bayei na fɛti nde “mokonzi” akondima bango. Alobi: “Ntango mokonzi ayaki kotala bato oyo babengisami amonaki kuna moto moko oyo alataki elamba ya libala te. Bongo alobaki na ye ete: ‘Moninga, ndenge nini okɔti awa na elamba ya libala te?’ Ye azangaki likambo ya koloba. Bongo mokonzi alobaki na basaleli na ye ete: ‘Bókanga ye mabɔkɔ ná makolo mpe bóbwaka ye na molili ya libándá. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’ Mpo bato mingi babengisami, kasi moke nde baponami.”​—Matai 22:11-14.

      Ekoki kozala ete bakonzi ya mangomba oyo bazali koyoka Yesu bazali kokanga ntina te ya makambo nyonso oyo azali koloba. Atako bongo, basepeli te mpe bazali kaka na ekateli, koleka oyo bazalaki na yango liboso, ya koboma moto oyo azali koyokisa bango nsɔni ndenge wana.

      • Na ndakisa oyo Yesu apesi, “mokonzi” ezali nani? “mwana na ye” ezali nani? mpe banani babengisami liboso na fɛti ya libala?

      • Ntango nini libyangi epesami epai ya Bayuda, mpe na nsima, banani babengisami?

      • Maloba ‘mingi babengisami kasi kaka moke nde baponami’ emonisi nini?

  • Yesu akimi ntango baluki kokanga ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu atomboli mbongo ya ebende ya mpako mpe ayanoli Bafarisai na motuna na bango ya mayele mabe

      MOKAPO 108

      Yesu akimi ntango baluki kokanga ye

      MATAI 22:15-40 MARKO 12:13-34 LUKA 20:20-40

      • BILOKO YA KAISALA NA KAISALA

      • BATO OYO BAKOSEKWA BAKOBALA LISUSU?

      • MIBEKO OYO ELEKI MONENE

      Bakonzi ya mangomba oyo bazali banguna ya Yesu bazali na nkanda. Auti kopesa bandakisa oyo emonisi mabe na bango polele. Sikoyo, Bafarisai bayokani mpo bákanga ye na motambo. Bazali koluka kotinda ye aloba likambo moko oyo ekosala ete báfunda ye epai ya guvɛrnɛrɛ Moroma, yango wana, bafuti bayekoli na bango mosusu mpo bákanga ye na maloba.​—Luka 6:7.

      Bayekoli yango balobi: “Moteyi, toyebi ete yo olobaka mpe oteyaka makambo ndenge ezali mpenza mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka nzela ya Nzambe na boyokani na solo: Esengeli tófuta Kaisala mpako to te?” (Luka 20:21, 22) Yesu akosami na maloba ya sukali wana te, mpo ayebi ete batondi na bokosi mpe na mayele mabe. Soki alobi, ‘Te, ezali malamu te kofuta mpako wana,’ bakoki kofunda ye ete azali kotinda bato bátɛmɛla boyangeli ya Roma. Kasi soki alobi, ‘Ɛɛ, bófuta mpako wana,’ bato yango oyo Baroma bazali koyangela, bakoki kokanisela ye mabe mpe kobalukela ye. Sikoyo, apesi eyano nini?

      Yesu ayanoli: “Bakosi, mpo na nini bozali komeka ngai? Bólakisa ngai mbongo ya ebende ya mpako.” Bayeli ye denari moko, na nsima atuni: “Elilingi oyo mpe likomi oyo ya nani?” Bazongisi: “Ya Kaisala.” Na nsima, Yesu apesi liteya monene oyo: “Boye, bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”​—Matai 22:18-21.

      Maloba wana ya Yesu ekamwisi bato yango. Lokola eyano wana ya bwanya esukisi bango, bakei. Kasi butu ekómi naino te, mpe bazali kosala nyonso bákanga ye na motambo. Ntango milende ya Bafarisai elongi te, bakambi ya lingomba mosusu bayei epai ya Yesu.

      Basadukai, oyo balobaka ete lisekwa ekozala te, babimisi motuna moko oyo etali lisekwa mpe libala ya bosɛmɛki. Batuni: “Moteyi, Moize alobaki ete: ‘Soki moto akufi, aboti bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kokamata mwasi na ye na libala mpe kobotela ndeko na ye bana.’ Sikoyo ezalaki na bandeko mibali nsambo na kati na biso; mpe oyo ya liboso abalaki mpe akufaki, mpe lokola abotaki bana te, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye. Esalemaki mpe bongo na oyo ya mibale mpe oyo ya misato, tii na bango nyonso nsambo. Na nsuka na bango nyonso mwasi wana akufaki. Bongo na lisekwa, akozala mwasi ya nani na kati na bango nsambo? Mpo bango nyonso bazwaki ye.”​—Matai 22:24-28.

      Yesu azwi makambo oyo ezali na mikanda ya Moize, oyo Basadukai bandimaka, mpe ayanoli: “Ezali te mpo na yango nde bozali na libunga, mpo boyebi Makomami te mpe nguya ya Nzambe te? Mpo ntango bakosekwa na bakufi, mibali bakobala te mpe basi bakobalisama te, kasi bakozala lokola baanzelu na likoló. Kasi mpo na bakufi, na likambo etali kolamuka na bango, botángá te na mokanda ya Moize, na lisolo ya mwa nzete ya nzubɛ, ndenge Nzambe alobaki na ye: ‘Nazali Nzambe ya Abrahama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo’? Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi. Bozali na kati ya libunga mpenza.” (Marko 12:24-27; Kobima 3:1-6) Ebele ya bato bakamwe na eyano wana.

      Yesu asukisi Bafarisai mpe Basadukai; sikoyo batɛmɛli yango oyo bauti na mangomba wana mibale basangani mpo na komeka ye lisusu. Mokomeli moko atuni: “Moteyi, mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?”​—Matai 22:36.

      Yesu apesi eyano ete: “Ya liboso yango oyo: ‘Yoká, Ee Yisraele, Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko, mpe osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.’ Ya mibale yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Mobeko mosusu te eleki oyo wana.”​—Marko 12:29-31.

      Ntango mokomeli yango ayoki eyano, azongisi: “Moteyi, olobi malamu na boyokani na solo: ‘Ye azali kaka Moko, mpe mosusu azali te kaka Ye’; mpe kolinga ye na motema na yo mobimba mpe na bososoli na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko ezali malamu mingi koleka makabo nyonso ya kotumba mobimba mpe bambeka.” Lokola Yesu asosolaki ete mokomeli yango ayanoli na mayele, alobi na ye: “Ozali mosika te na bokonzi ya Nzambe.”​—Marko 12:32-34.

      Yesu ateyi na tempelo na boumeli ya mikolo misato (mwa 9, 10, mpe 11 Nisana). Bato mosusu, na ndakisa mokomeli wana, bayoki ye na likebi. Kasi bakonzi ya mangomba, oyo sikoyo bazangi “mpiko ya kotuna ye motuna,” bayoki ye na likebi te.

      • Milende nini Bafarisai basali mpo na kokanga Yesu na motambo, mpe yango ebimisi nini?

      • Ntango Basadukai baluki kokanga Yesu na motambo, ndenge nini akimi yango?

      • Ntango Yesu ayanoli na motuna ya mokomeli moko, likambo nini ya ntina mingi anyati?

  • Abimisi polele botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu abimisi polele botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba

      MOKAPO 109

      Abimisi polele botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba

      MATAI 22:41–23:24 MARKO 12:35-40 LUKA 20:41-47

      • KRISTO AZALI MWANA YA NANI?

      • YESU ABIMISI POLELE BOKOSI YA BATƐMƐLI NA YE

      Bakonzi ya mangomba oyo bazali kotɛmɛla Yesu balongi te kokanga ye na motambo mpe kokangisa ye epai ya Baroma. (Luka 20:20) Sikoyo, ntango Yesu azali na tempelo mokolo ya 11 Nisana, makambo ebaluki mpe amonisi soki azali nani. Ye moko atuni bango: “Bokanisi nini mpo na Kristo? Azali mwana ya nani?” (Matai 22:42) Eyebani malamu ete Kristo, to Masiya, asengeli kouta na libota ya Davidi. Yango nde eyano bapesi.​—Matai 9:27; 12:23; Yoane 7:42.

      Yesu atuni: “Bongo ndenge nini Davidi na nzela ya elimo santu azali kobenga ye ‘Nkolo,’ mpe alobi: ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo”’? Bongo soki Davidi abengi ye ‘Nkolo,’ ndenge nini ye azali mwana na ye?”​—Matai 22:43-45.

      Bafarisai bafandi nyɛɛ, mpo bazali kozela moto moko ya libota ya Davidi oyo akosikola bango na boyangeli ya Baroma. Yesu azongeli maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 110:1, 2, mpo na komonisa ete Masiya asuki kaka te kozala mokonzi lokola bakonzi mosusu. Azali mpe Nkolo ya Davidi, mpe nsima ya kofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, akozwa bokonzi. Eyano ya Yesu ekangisi batɛmɛli na ye monɔkɔ.

      Bayekoli mpe bato mosusu bazali koyoka ye. Sikoyo, Yesu akebisi bango mpo na bakomeli mpe Bafarisai. Bato yango “bafandi na kiti ya Moize” mpo na koteya Mibeko ya Nzambe. Yesu alobi na bato oyo bazali koyoka ye ete: “Makambo nyonso oyo bazali koyebisa bino, bósala mpe bótosa, kasi bósala ndenge bango basalaka te, mpo balobaka kasi basalaka te.”​—Matai 23:2, 3.

      Na nsima, Yesu apesi bandakisa mpo na komonisa bokosi na bango; alobi: “Bakómisaka minene mwa bakɛsi mike oyo balataka na elongi mpe na lobɔkɔ ya mwasi mpo na komibatela.” Bayuda mosusu bazali kolata na elongi to na lobɔkɔ mwa bakɛsi ya mike oyo ezali na mikapo ya mikuse oyo euti na Mibeko. Bafarisai bazali kokómisa mwa bakɛsi na bango minene mpo na komonisa ete bazali kolandela Mibeko na molende. Lisusu, ‘bakómisaki malenda ya bilamba na bango milaimilai.’ Bayisraele basengelaki kosala malenda na bilamba na bango, kasi Bafarisai bazali kokómisa malenda na bango milai koleka. (Mitángo 15:38-40) Bazali kosala nyonso wana “mpo bato bámona bango.”​—Matai 23:5.

      Ata bayekoli ya Yesu bakokaki kokóma na mposa ya kozwa lokumu, yango wana apesi bango toli oyo: “Bóbengama Rabi te, mpo moto moko kaka nde azali moteyi na bino, kasi bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabele, mpo moto moko kaka nde azali Tata na bino, Oyo azali na likoló. Bóbengama mpe te ‘bakambi,’ mpo Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.” Kasi, ndenge nini bayekoli basengeli komitalela mpe basengeli kosala nini? Yesu ayebisi bango: “Kasi oyo aleki monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino. Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.”​—Matai 23:8-12.

      Na nsima, Yesu amonisi ete Bakomeli mpe Bafarisai bazali bato ya mawa mpo na bokosi na bango, alobi: “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! Mpamba te bozali kokangela bato bokonzi ya likoló; mpo bino moko bozali kokɔta te, mpe baoyo bazali kokɔta, bozali kopesa bango nzela te.”​—Matai 23:13.

      Yesu akweisi Bafarisai na likambo mpo bazali kotya likebi te na makambo oyo eleki ntina na miso ya Yehova, mpe bazali kotyela bato mibeko ya makasimakasi. Na ndakisa, Bafarisai balobi: “Soki moto azali kolapa ndai na nkombo ya tempelo, likambo ezali te; kasi soki moto azali kolapa ndai na nkombo ya wolo ya tempelo, asengeli kokokisa yango.” Na ndenge yango, bamonisi ete bakufá miso na elimo, mpo batye likebi mingi nde na wolo ya tempelo na esika bámona ete tempelo ezali esika ya kosambela Yehova mpe ya kopusana penepene na ye. Mpe “batyoli makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo ná motema mawa ná kondima.”​—Matai 23:16, 23; Luka 11:42.

      Yesu alobi ete Bafarisai yango ‘bakufá miso,’ mpo ‘ntango bakɔngɔlaka masanga na bango, bakangaka ngungi kasi bamɛlaka kamela!’ (Matai 23:24) Bakangaka ngungi na vinyo na bango mpo ngungi yango ezali mbindo na kotalela mibeko. Atako bongo, ndenge oyo batyoli makambo ya minene oyo Mibeko elobi, ezali lokola bamɛli kamela, nyama ya monene, oyo ezali mpe mbindo na kotalela mibeko.​—Balevi 11:4, 21-24.

      • Ntango Yesu atuni Bafarisai mpo na maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 110, mpo na nini bafandi nyɛɛ?

      • Mpo na nini Bafarisai bakómisi minene mwa bakɛsi oyo ezali na mikapo ya Makomami mpe bakómisi malenda ya bilamba na bango milaimilai?

      • Toli nini Yesu apesi bayekoli na ye?

  • Mokolo ya nsuka ya Yesu na tempelo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Na tempelo, Yesu amoni mwasi mobola moko oyo mobali akufá azali kotya mbongo ya bibende mibale na kɛsi ya makabo

      MOKAPO 110

      Mokolo ya nsuka ya Yesu na tempelo

      MATAI 23:25–24:2 MARKO 12:41–13:2 LUKA 21:1-6

      • YESU APAMELI LISUSU BAKONZI YA MANGOMBA

      • TEMPELO EKOBEBISAMA

      • MWASI MOBOLA OYO MOBALI AKUFÁ APESI MBONGO MIBALE YA MIKE

      Mbala ya nsuka oyo Yesu amonani na tempelo, azali kaka kobimisa bokosi ya bakomeli mpe Bafarisai; abengi bango polele bakosi. Asaleli maloba ya elilingi, ntango alobi: “Bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani, nzokande na kati etondi na kopunza mpe na kolekisa ndelo. Yo Mofarisai, moto oyo akufá miso, pɛtolá liboso na kati ya kɔpɔ mpe ya saani, mpo libándá mpe ekóma pɛto.” (Matai 23:25, 26) Bafarisai balandelaka malamumalamu milulu ya komipɛtola mpe ndenge ya komonana na miso ya bato, kasi batyaka likebi te na bomoto ya kati mpe bapɛtolaka mitema na bango ya elilingi te.

      Bokosi na bango ezali mpe komonana na ndenge batongaka malita ya basakoli mpe bapakolaka yango langi. Nzokande, ndenge Yesu amonisi yango, bazali “bana ya bato oyo babomá basakoli.” (Matai 23:31) Bamonisi yango na milende oyo bazali kosala mpo na koboma Yesu.​—Yoane 5:18; 7:1, 25.

      Na nsima, Yesu amonisi likambo oyo ezali kozela bakonzi yango ya mangomba soki babongoli mitema te: “Banyoka, bana ya bitupa, bokokima lisambisi ya Gehena ndenge nini?” (Matai 23:33) Lobwaku ya Hinome oyo ezali pembeni wana ezali esika oyo batumbaka bosɔtɔ; yango ezali mpenza elilingi oyo ebongi mpo na komonisa kobebisama ya libela, oyo ezali kozela bakomeli mpe Bafarisai wana, mpo bazali bato mabe.

      Bayekoli ya Yesu bakozala bamonisi na ye, elingi koloba “basakoli mpe bato ya bwanya mpe balakisi ya bato.” Kasi makambo nini bakosala bango? Yesu alobi na bakonzi ya mangomba: ‘Bokoboma [bayekoli na ngai] mosusu mpe bokobaka bamosusu na nzete, mpe bokobɛta bamosusu fimbo na basinagoga na bino mpe bokonyokola bango na engumba na engumba; mpo makila ya bayengebene nyonso oyo esopaná na mabele ekwela bino, banda na makila ya moyengebene Abele tii na makila ya Zekaria . . . oyo bobomaki.’ Mpe akebisi bango: “Ya solo nalobi na bino: Makambo nyonso wana ekokwela libota oyo.” (Matai 23:34-36) Likambo yango esalemaki na mobu 70 T.B., ntango basoda ya Roma babebisaki Yerusaleme mpe bankóto mingi ya Bayuda bakufaki.

      Lokola Yesu akanisi likambo wana ya nsɔmɔ, etungisi ye. Na mawa nyonso, alobi: “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga,​—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki yango te. Talá! basundoleli bino ndako na bino.” (Matai 23:37, 38) Na ntembe te, baoyo bayoki maloba wana bamituni “ndako” nini azali kolobela. Azali nde kolobela tempelo kitoko oyo ezali wana na Yerusaleme, oyo emonanaka ete Nzambe abatelaka yango?

      Na nsima, Yesu abakisi: “Nalobi na bino: Bokomona ngai lisusu te tii bokoloba: ‘Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama!’” (Matai 23:39) Yango ezali maloba ya esakweli oyo ezali na Nzembo 118:26: “Ye oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama; topamboli bino uta na ndako ya Yehova.” Emonani polele ete ntango tempelo wana ekobebisama, moto moko te akoya wana na nkombo ya Nzambe.

      Sikoyo, Yesu akei na eteni ya tempelo esika kɛsi ya makabo ezali. Bato batyaka makabo na kɛsi yango. Yesu amoni ndenge Bayuda bazali kotya makabo; bazwi “bazalaki kotya mbongo mingi ya bibende.” Na nsima, Yesu amoni mwasi mobola moko oyo mobali akufá azali kotya “mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza.” (Marko 12:41, 42) Na ntembe te, Yesu ayebi malamu ndenge oyo Nzambe asepeli na likabo na ye.

      Yesu abengi bayekoli na ye, mpe alobi: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete mwasi mobola wana oyo mobali akufá atye mingi koleka bato nyonso oyo batyaki mbongo na bakɛsi ya makabo.” Mpo na nini alobi bongo? Alimboli: “Bango nyonso batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi ye, na kokelela na ye, atyaki nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.” (Marko 12:43, 44) Akeseni mpenza na bakonzi ya mangomba, ezala na makanisi to na misala!

      Lokola mokolo ya 11 Nisana ezali kokende na nsuka, Yesu atiki tempelo mpo na mbala ya nsuka. Moyekoli na ye moko alobi: “Moteyi, talá! Oyo mabanga ya ndenge nini mpe oyo bandako ya ndenge nini!” (Marko 13:1) Ya solo, mabanga mosusu na bifelo ya tempelo ezali mpenza minene; yango nde ezali kosala ete ndako yango ezala makasi mpe eumela. Na ntembe te, ekoki kokamwisa; yango wana Yesu alobi: “Ozali kotala bandako wana ya minene? Ata libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa, nyonso ekokwea na nse.”​—Marko 13:2.

      Nsima ya koloba maloba wana, Yesu ná bantoma na ye bakatisi Lobwaku ya Kidrone mpe bamati na Ngomba ya Olive. Na ntango moko boye, atikali kaka na bantoma na ye minei: Petro, Andre, Yakobo ná Yoane. Kuna likoló ya ngomba, bakoki kotala mpe komona kitoko ya tempelo.

      • Yesu asali nini na mbala ya nsuka oyo akei na tempelo?

      • Yesu asakoli ete nini ekokómela tempelo?

      • Mpo na nini Yesu alobi ete mwasi mobola oyo mobali akufá apesi makabo koleka bazwi?

  • Bantoma batuni elembo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu apesi eyano na motuna ya bantoma minei

      MOKAPO 111

      Bantoma batuni elembo

      MATAI 24:3-51 MARKO 13:3-37 LUKA 21:7-38

      • BAYEKOLI MINEI BATUNI ELEMBO

      • KOKOKISAMA NA YANGO NA SIƐKLƐ YA LIBOSO MPE NA NSIMA

      • TOSENGELI KOZALA EKƐNGƐ

      Tokómi mokolo ya mibale nsima ya midi, mpe mokolo ya 11 Nisana ezali kokóma na nsuka. Etikali mpe moke mosala makasi ya Yesu awa na mabele esila. Na moi, azali koteya na tempelo, mpe na butu azali kolala na libándá ya engumba. Bato basepelaki mingi na mateya na ye, yango wana “bazalaki koya ntɔngɔntɔngɔ epai na ye na tempelo mpo na koyoka ye.” (Luka 21:37, 38) Mokolo wana eleki, sikoyo Yesu afandi na Ngomba ya Olive ná bantoma na ye minei: Petro, Andre, Yakobo, ná Yoane.

      Bantoma minei wana bayei epai na ye kaka bango moko. Bazali komitungisa mpo na tempelo, mpo Yesu auti kosakola ete ata libanga na yango moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu. Kasi, bazali na makanisi mosusu. Mwa moke liboso, Yesu alendisaki bango ete: “Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” (Luka 12:40) Alobelaki mpe “mokolo . . . oyo Mwana ya moto akomonana.” (Luka 17:30) Maloba wana eyokani nde mwa moke na oyo auti koloba mpo na tempelo? Bantoma yango bazali mpenza na mposa ya koyeba. Batuni ye: “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?”​—Matai 24:3.

      Ntango mosusu bazali kokanisa ndenge oyo tempelo ekobebisama mpe bakomona yango lisusu te. Batuni mpe mpo na koyeba ntango ya kozala ya Mwana ya moto. Na ntembe te, bamikundoli ete Yesu apesaki ndakisa ya “moto moko boye ya lokumu” oyo ‘asalaki mobembo mpo na kozwa nguya ya bokonzi mpe kozonga.’ (Luka 19:11, 12) Na nsuka, bazali komituna ndenge ‘bosukisi ya makambo ya ntango oyo’ ekozala.

      Na eyano oyo Yesu apesi, alobeli elembo oyo ekosalisa bango báyeba ntango oyo ebongiseli ya Bayuda ná tempelo na yango ekosuka. Kasi asuki wana te. Elembo yango ekosalisa mpe bakristo na mikolo ekoya báyeba ntango nini bakómi na eleko ya “kozala” na ye, mpe báyeba ete bakómi pene na nsuka ya makambo ya ntango oyo, awa na mabele.

      Ntango bambula ezali koleka, bayekoli bazali komona ndenge esakweli wana ya Yesu ezali kokokisama. Makambo mingi oyo Yesu asakolaki ebandi komonana ntango bazali naino na bomoi. Yango ekosalisa bakristo oyo bazali kotya likebi, oyo bazali na bomoi mbula 37 na nsima, elingi koloba na mobu 70 T.B., bámilɛngɛla, mpo etikali moke ebongiseli ya Bayuda mpe tempelo na bango ebebisama. Kasi, makambo nyonso te oyo Yesu asakolaki esalemi na eleko oyo esuki na mobu 70 T.B. Na yango, nini ekomonisa kozala na ye na kati ya Bokonzi? Yesu apesi bantoma eyano.

      Yesu asakoli ete “bitumba mpe nsango ya bitumba” ekozala, mpe “ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.” (Matai 24:6, 7) Alobi mpe ete “mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge, mpe bamaladi mabe mpe nzala ekozala bisika ndenge na ndenge.” (Luka 21:11) Yesu akebisi bayekoli na ye: “Bato bakotya bino mabɔkɔ mpe bakonyokola bino.” (Luka 21:12) Basakoli ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato mingi. Makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, mpe bolingo ya bato mingi ekokita. Alobi lisusu ete “nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

      Atako esakweli wana ya Yesu ekokisamaki na makambo mosusu liboso mpe ntango Baroma babebisaki Yerusaleme, ekoki nde kozala ete Yesu azali kolobela kokokisama na yango ya monene? Ezali nde na makambo oyo emonisi ete esakweli wana ya ntina oyo Yesu apesaki ezali kokokisama na monene na yango na ntango na biso?

      Moko ya makambo oyo Yesu alobeli na kati ya elembo ya kozala na ye ezali komonana ya “eloko ya bosɔtɔ oyo ebebisaka.” (Matai 24:15) Na mobu 66 T.B., eloko ya bosɔtɔ yango oyo emonani ezali “mampinga” ya Roma, ná badrapo na bango oyo ezalaki biloko ya losambo. Baroma bazingi Yerusaleme mpe babuki bifelo na yango mosusu. (Luka 21:20) Na ndenge yango, “eloko ya bosɔtɔ” etɛlɛmi na esika oyo esengeli kozala te, esika oyo Bayuda bazali kotalela yango ete ezali “esika mosantu.”

      Na nsima, Yesu asakoli lisusu: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.” Na mobu 70 T.B., Baroma babebisi Yerusaleme. Kobebisama ya ‘engumba mosantu’ wana ya Bayuda, ná tempelo na yango, ezalaki mpenza bolɔzi moko monene, mpo bankóto ya bato babomamaki. (Matai 4:5; 24:21) Ezali kobebisama ya Yerusaleme oyo eleki monene, oyo Bayuda bamoná naino te, mpe esukisi ebongiseli ya losambo oyo Bayuda bazalaki na yango banda kala mpenza. Na yango, na mikolo ezali koya, esakweli wana ya Yesu ekokokisama na monene na yango mpe na ndenge ya nsɔmɔ koleka.

      BAZALI KOBANGA TE NA MIKOLO YA NSUKA

      Lisolo ya Yesu ná bantoma na ye oyo etali elembo ya kozala na ye na kati ya Bokonzi na ye mpe nsuka ya makambo oyo esili naino te. Sikoyo, akebisi bango na likambo etali kolanda “Ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta.” Alobi ete bato yango bakomeka “kokosa ata bato oyo baponami, soki likoki ezali.” (Matai 24:24) Kasi bato oyo baponami bakokosama te. Ba-Kristo ya lokuta bakomonana na miso. Nzokande, kozala ya Yesu ekomonana na miso te.

      Ntango Yesu azali kolobela bolɔzi monene oyo ekoya na nsuka ya makambo ya ntango oyo, alobi: “Moi ekoyinda, mpe sanza ekopesa pole na yango te, mpe minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya ya likoló ekoningana.” (Matai 24:29) Ntango bantoma bayoki maloba wana ya kobangisa, bayebi mpenzampenza te likambo oyo ekosalema, kasi ekozala likambo ya nsɔmɔ mingi.

      Makambo wana ya nsɔmɔ ekosala bato nini? Yesu alobi: “Bato bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi; mpo banguya ya likoló ekoningana.” (Luka 21:26) Ya solo, Yesu azali kolobela makambo oyo ekosalema na eleko wana ya molili makasi oyo ekokómela bato.

      Likambo ya kolendisa, Yesu ayebisi bantoma polele ete bato nyonso te nde bakomilela ntango ‘Mwana ya moto akoya na nguya mpe na nkembo mingi.’ (Matai 24:30) Asilaki komonisa ete Nzambe akoyeisa mikolo yango mokuse “mpo na bato oyo baponami.” (Matai 24:22) Bongo, bayekoli wana ya sembo bakosala nini ntango bakomona makambo ya nsɔmɔ oyo Yesu alobelaki? Yesu alendisi bayekoli na ye: “Ntango makambo wana ekobanda kosalema, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.”​—Luka 21:28.

      Kasi ndenge nini bayekoli ya Yesu oyo bazali na bomoi na eleko oyo esakolamaki bakoyeba ete nsuka ekómi pene? Yesu apesi ndakisa ya nzete ya figi: “Ntango kaka etape na yango ya sika ekómi pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisi nkasa, boyebi ete eleko ya molunge ekómi pene. Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango nyonso, bóyeba ete azali pene, na baporte. Ya solo mpenza nalobi na bino ete libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo wana nyonso ekosalema.”​—Matai 24:32-34.

      Na yango, ntango bayekoli na ye bakomona makambo ndenge na ndenge ya elembo yango ezali kokokisama, bakoyeba ete nsuka ekómi pene. Mpo na kokebisa bayekoli oyo bakozala na bomoi na eleko wana ya ntina, Yesu alobi:

      “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi. Mpo ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:36-39) Yesu azali kokundwela bayekoli na ye ete Mpela ya ntango ya Noa etalaki mokili mobimba. Nsuka ya mokili oyo ekozala mpe bongo.

      Na ntembe te, bantoma oyo bazali koyoka Yesu na Ngomba ya Olive bayebi ete basengeli kozala ekɛngɛ. Yesu alobi: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, noki na ntango wana kaka, mokolo wana ekwela bino pwasa lokola motambo. Mpo yango ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba. Yango wana, bólala mpɔngi te, bópesa malɔmbɔ ntango nyonso mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.”​—Luka 21:34-36.

      Awa lisusu, Yesu amonisi ete makambo oyo azali kolobela ekosalema na mikolo ezali koya. Azali te kosakola makambo oyo ekosalema na nsima ya mwa bambula, mpe oyo ekotalela kaka engumba ya Yerusaleme to ekólo ya Bayuda. Azali kolobela nde makambo oyo “ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba.”

      Alobi ete bayekoli na ye basengeli kozala ekɛngɛ, kosɛnzɛla, mpe komilɛngɛla. Mpo na kobɛta nsɛtɛ na likebisi yango, Yesu apesi ndakisa mosusu: “Bóyeba likambo oyo: soki nkolo-ndako ayebaka na ntango nini moyibi akoya na butu, mbɛlɛ alali mpɔngi te mpe mbɛlɛ atiki te ete moyibi abuka ndako na ye mpe akɔta. Yango wana bino mpe bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”​—Matai 24:43, 44.

      Yesu ayebisi bayekoli na ye ntina oyo basengeli kozala na elikya ete makambo ekotambola malamu. Alaki bango ete ntango esakweli na ye wana ekokokisama, ekozala na “moombo” moko oyo azali ekɛngɛ mpe akolɛmbisa mabɔkɔ te. Yesu alobeli likambo moko oyo bantoma na ye bakoki kokanga ntina na yango: “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi? Esengo na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo! Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Akotya ye abatela biloko na ye nyonso.” Kasi soki “moombo” yango akómi na makanisi mabe mpe akómi konyokola basusu, nkolo na ye “akopesa ye etumbu ya makasi mpenza.”​—Matai 24:45-51; talá mpe Luka 12:45, 46.

      Kasi, Yesu alingi koloba te ete etuluku moko ya bayekoli na ye ekokóma na makanisi mabe. Bongo, liteya nini Yesu alingi kopesa bayekoli na ye? Alingi ete bázala ekɛngɛ mpe bálɛmbisa mabɔkɔ te, ndenge amonisi yango polele na ndakisa mosusu.

      • Nini etindi bantoma báluka koyeba makambo oyo ekosalema, kasi ekoki kozala ete bazali na makanisi nini?

      • Ntango nini esakweli ya Yesu ebandi kokokisama, mpe ndenge nini ekokisami?

      • Wapi makambo mosusu oyo ekomonisa kozala ya Kristo?

      • Ndenge nini “eloko ya bosɔtɔ” emonani, mpe nini emonani nsima na yango?

      • Bato bakosala nini ntango bakomona kokokisama ya esakweli ya Yesu?

      • Yesu apesi ndakisa nini mpo na kosalisa bayekoli na ye báyeba ete nsuka ekómi pene?

      • Nini emonisi ete kokokisama ya esakweli ya Yesu etali mokili mobimba?

      • Yesu apesi likebisi nini mpo na bayekoli na ye oyo bazali na bomoi pene na nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo?

  • Liteya oyo etali kosɛnzɛla—Bangɔndɔ
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Bangɔndɔ mitano ya mayele bapelisi miinda na bango

      MOKAPO 112

      Liteya oyo etali kosɛnzɛla​—Bangɔndɔ

      MATAI 25:1-13

      • YESU APESI NDAKISA YA BANGƆNDƆ ZOMI

      Yesu auti koyanola na motuna oyo bantoma batuni ye mpo na elembo ya kozala na ye mpe nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Lokola lisolo yango ezali naino na mitó na bango, apesi bango toli mosusu ya malamu na nzela ya ndakisa mosusu. Bato oyo bakozala na bomoi na ntango ya kozala na ye nde bakomona kokokisama na yango.

      Abandi ndakisa yango na maloba oyo: “Bokonzi ya likoló ekozala lokola bangɔndɔ zomi oyo bakamataki miinda na bango mpe babimaki kokutana na mobali ya libala. Mitano na bango bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.”​—Matai 25:1, 2.

      Yesu alingi koloba te ete ndambo ya bayekoli na ye oyo bakozwa libula ya Bokonzi ya likoló bazali bazoba mpe ndambo mosusu bazali mayele. Alingi nde komonisa ete na likambo oyo etali Bokonzi, moyekoli na ye mokomoko azali na likoki ya kopona soki akokoba kosɛnzɛla to akotika makambo mosusu elongola likebi na ye. Kasi, Yesu ayebi ete mosaleli na ye mokomoko akoki kotikala sembo mpe kozwa mapamboli ya Tata na ye.

      Na ndakisa yango, bangɔndɔ nyonso zomi bakei koyamba mobali ya libala mpe kokɔta na molɔngɔ ya bato oyo bakei na fɛti ya libala. Ntango mobali ya libala akokóma, bangɔndɔ yango bakozala na miinda mpo na komona nzela; na ndenge yango bakopesa ye lokumu ntango azali kokɔtisa mwasi na ye na ndako oyo abongiseli ye. Kasi, makambo eleki ndenge nini?

      Yesu alimboli: “Bazoba bakamataki miinda na bango kasi bakamataki mafuta ya kobakisa te, nzokande baoyo ya mayele bakamataki miinda na bango ná mafuta ya kobakisa na kati ya milangi na bango. Lokola mobali ya libala azalaki koumela, mpɔngi etungisaki bango nyonso mpe balalaki.” (Matai 25:3-5) Mobali ya libala akómi noki te ndenge bakanisaki. Emonani ete aumeli mingi koleka, yango wana bangɔndɔ yango balali. Ntango mosusu bantoma bakanisi ndakisa oyo Yesu apesaki, ya moto moko ya lokumu oyo asalaki mobembo mosika mpe “nsukansuka . . . azongaki nsima ya kozwa nguya ya bokonzi.”​—Luka 19:11-15.

      Na ndakisa ya bangɔndɔ zomi, Yesu alimboli oyo esalemi ntango mobali ya libala akómi: “Na katikati mpenza ya butu mongongo moko eyokanaki: ‘Mobali ya libala ayei! Bóbima kokutana na ye.’” (Matai 25:6) Sikoyo, tokoloba nini: Bangɔndɔ yango bamilɛngɛlaki mpe basɛnzɛlaki?

      Yesu abakisi: “Bongo bangɔndɔ nyonso wana batɛlɛmaki mpe babongisaki miinda na bango. Bazoba balobaki na baoyo ya mayele ete: ‘Bópesa biso ndambo ya mafuta na bino, mpo miinda na biso elingi kokufa.’ Baoyo ya mayele bayanolaki na maloba oyo: ‘Mbala mosusu ekokoka mpenza biso ná bino te. Bongo bókende epai ya baoyo batɛkaka yango mpe bósomba ya bino.’”​—Matai 25:7-9.

      Bangɔndɔ mitano ya zoba basɛnzɛlaki te mpe bamilɛngɛlaki te mpo na koya ya mobali ya libala. Miinda na bango ezangi mafuta mpe esengeli bákende koluka mafuta. Yesu alobi: “Ntango bakendaki kosomba, mobali ya libala akómaki, mpe bangɔndɔ oyo bamilɛngɛlaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala; mpe porte ekangamaki. Na nsima bangɔndɔ mosusu wana mpe bayaki, balobi: ‘Tata, tata, fungolá biso!’ Ye ayanolaki ete: ‘Nayebisi bino solo: Nayebi bino te.’” (Matai 25:10-12) Likambo oyo ya mawa ekómeli bango mpo bamilɛngɛlaki te mpe basɛnzɛlaki te.

      Na ntembe te, bantoma basosoli ete mobali ya libala oyo Yesu alobeli ezali ye moko. Kutu, mwa moke liboso, amibengaki mobali ya libala. (Luka 5:34, 35) Bongo bangɔndɔ ya mayele ezali banani? Ntango Yesu azali kolobela “etonga moke” oyo bakozwa Bokonzi, asalelaki maloba: “Bómilɛngɛla mpe miinda na bino epela.” (Luka 12:32, 35) Boye, na ndakisa oyo ya bangɔndɔ zomi, bantoma basosoli ete Yesu azali kolobela bato mosusu te kasi bango. Bongo, liteya nini Yesu alingi kobimisa na ndakisa yango?

      Yesu atiki bango na molili te. Asukisi ndakisa na ye na maloba oyo: “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”​—Matai 25:13.

      Emonani polele ete Yesu azali kokebisa bayekoli na ye ya sembo, ete na likambo etali kozala na ye, basengeli ‘kosɛnzɛla.’ Nsukansuka akoya, mpe basengeli komilɛngɛla mpe kozala ekɛngɛ, lokola bangɔndɔ mitano ya mayele, mpo bákoba kotya miso na elikya mpe bázwa libula na bango.

      • Na ndenge nini bangɔndɔ mitano ya mayele bakeseni na bangɔndɔ mitano ya zoba na likambo ya kosɛnzɛla mpe komilɛngɛla?

      • Mobali ya libala ezali nani, mpe bangɔndɔ ezali banani?

      • Liteya nini Yesu alingi kopesa na ndakisa ya bangɔndɔ zomi?

  • Ndakisa ya talanta emonisi ntina ya kozala na molende
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Moombo moko azali kokunda saki ya mbongo na mabele

      MOKAPO 113

      Ndakisa ya talanta emonisi ntina ya kozala na molende

      MATAI 25:14-30

      • YESU APESI NDAKISA YA TALANTA

      Ntango Yesu ná bantoma na ye minei bazali naino na Ngomba ya Olive, apesi bango ndakisa mosusu. Mwa mikolo liboso, ntango azalaki na Yeriko, apesaki ndakisa ya mina mpo na komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali naino mosika. Ndakisa oyo azali kopesa sikoyo ezali na makambo mosusu oyo eyokani na ndakisa wana. Ezali na kati ya eyano ya motuna oyo etali kozala na ye mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo. Ndakisa yango emonisi polele ete bayekoli na ye basengeli kosala na molende mosala oyo apesi bango.

      Yesu abandi: “Ezali lokola ntango moto moko alingaki kokende mobembo na mboka mopaya, abengisaki baombo na ye mpe apesaki bango biloko na ye.” (Matai 25:14) Lokola Yesu asilaki komikokanisa na moto oyo alingaki kokende mobembo “mpo na kozwa nguya ya bokonzi,” bantoma bakoki komona mbala moko ete “moto” oyo Yesu azali kolobela ezali nde ye.​—Luka 19:12.

      Na ndakisa yango, liboso moto yango akende mobembo, apesi baombo na ye biloko na ye ya motuya. Na boumeli ya mbula 3 ná ndambo ya mosala ya Yesu, amipesaki na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe apesaki bayekoli na ye formasyo mpo básala mosala yango. Sikoyo lokola azali kokende, andimi na motema moko ete bakosala mosala oyo alakisaki bango.​—Matai 10:7; Luka 10:1, 8, 9; talá mpe Yoane 4:38; 14:12.

      Na ndakisa yango, ndenge nini moto yango akaboli biloko na ye? Yesu alobi: “Apesaki moko talanta mitano, mosusu mibale, mosusu mpe moko, apesaki moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza, mpe akendaki na mboka mopaya.” (Matai 25:15) Baombo yango bakosala nini na biloko oyo bapesi bango? Bakosalela yango na molende mpo na bolamu ya nkolo na bango? Yesu ayebisi bantoma:

      “Na mbala moko oyo azwaki talanta mitano akendaki kosala na yango mombongo mpe yango ebotaki mosusu mitano. Ndenge moko mpe oyo azwaki mibale, ebotaki mosusu mibale. Kasi oyo azwaki kaka moko akendaki, mpe atimolaki mabele mpe abombaki shekele yango ya palata ya nkolo na ye.” (Matai 25:16-18) Likambo nini ekokóma ntango nkolo yango akozonga?

      Yesu abakisi: “Nsima ya ntango molai nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki na bango makambo ya mbongo na ye.” (Matai 25:19) Baombo mibale ya liboso basalaki nyonso oyo bakoki, “moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza.” Baombo mibale wana bazalaki na molende, basalaki makasi mpe mbongo oyo bapesaki bango ebakisamaki. Moombo oyo azwaki talanta mitano abakisi mitano mosusu, mpe oyo azwaki talanta mibale abakisi mibale mosusu. (Na ntango wana, moto asengelaki kosala mbula 19 mpo na kozwa talanta moko.) Nkolo yango apesi bango nyonso mibale longonya ndenge moko, alobi na mokomoko na bango ete: “Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozali sembo na mwa makambo moke. Nakotya yo obatela biloko mingi. Kɔtá na esengo ya nkolo na yo.”​—Matai 25:21.

      1. Moombo moko azali kokunda saki ya mbongo na mabele; 2. Babwaki moombo yango libándá na molili

      Kasi, moombo oyo azwaki talanta moko asali ndenge baombo mosusu basali te. Alobi: “Nkolo, nayebaki ete yo ozalaka moto ya makambo makasi, obukaka epai oloni te mpe oyanganisaka epai opupoli te. Bongo nabangaki mpe nakendaki kobomba talanta na yo na mabele. Talá eloko na yo yango oyo.” (Matai 25:24, 25) Atye talanta yango ata na banki te mpo nkolo na ye azwa benefisi. Na ndenge yango, asaleli nkolo na ye bolamu te.

      Yango wana, nkolo yango abengi ye “moombo mabe mpe gɔigɔi.” Abɔtɔli ye talanta yango mpe apesi yango na moombo oyo asalaki na molende. Nkolo yango alobi polele: “Moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu mpe akozala na mingi; kasi moto oyo azali na eloko te, ata oyo azali na yango bakobɔtɔla ye yango.”​—Matai 25:26, 29.

      Bayekoli ya Yesu bazali na mosala ya kosakola

      Bayekoli ya Yesu bazali na makambo ya kokanisa mingi, ata mpe oyo Yesu alobeli na ndakisa oyo. Bamoni ete mokumba monene ya kokómisa bato bayekoli, oyo Yesu apesi bango, ezali na ntina mingi. Mpe asɛngi bango básala mosala yango na molende. Yesu akanisi te ete bango nyonso basengeli kosala ndenge moko na mosala ya kosakola oyo apesi bango. Ndenge ndakisa yango emonisi, moto na moto asengeli kosala nyonso oyo akoki “na kotalela likoki na ye mpenza.” Yango elingi koloba te ete Yesu akosepela soki moto azali “gɔigɔi” mpe asali te oyo asengeli kosala mpo biloko ya Nkolo ebakisama.

      Kasi, bantoma basengeli kosepela na elaka oyo: “Moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu”!

      • Na ndakisa ya talanta, nkolo ezali nani, mpe baombo ezali banani?

      • Mateya nini Yesu ateyi bayekoli na ye?

  • Kristo Mokonzi asambisi bampate ná bantaba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Bato ya bikólo nyonso bazali kotala na likoló ntango bazali kozela Yesu asambisa bango

      MOKAPO 114

      Kristo Mokonzi asambisi bampate ná bantaba

      MATAI 25:31-46

      • YESU APESI NDAKISA YA BAMPATE NÁ BANTABA

      Na ngomba ya Olive, Yesu auti kopesa ndakisa ya bangɔndɔ zomi ná ya talanta. Ndenge nini ayanoli na motuna ya bantoma oyo etali kozala na ye mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo? Apesi ndakisa ya nsuka, ya bampate ná bantaba.

      Yesu abendi liboso likebi ya bato mpe alobi na bango: “Ntango Mwana ya moto akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo.” (Matai 25:31) Na ntembe te, Yesu amonisi ete ndakisa yango ezali kolobela ye. Mbala mingi amibengaka “Mwana ya moto.”​—Matai 8:20; 9:6; 20:18, 28.

      Yesu afandi na kiti na ye ya nkembo mpe azali kosambisa bato ya sembo oyo bazali lokola bampate

      Ntango nini ndakisa yango ekokokisama? Ekokokisama ntango Yesu “akoya na nkembo na ye” ná baanzelu mpe akofanda na “kiti na ye ya bokonzi ya nkembo.” Autaki kolobela “Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe nkembo mingi” ná baanzelu na ye. Ekozala ntango nini? “Nokinoki na nsima ya bolɔzi.” (Matai 24:29-31; Marko 13:26, 27; Luka 21:27) Na yango, ndakisa oyo ekokokisama na mikolo ezali koya ntango Yesu akoya na nkembo. Na nsima akosala nini?

      Yesu alimboli: “Ntango Mwana ya moto akoya . . . , bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.”​—Matai 25:31-33.

      Mpo na bampate oyo bakotyama na ngámbo ya malamu, Yesu alobi: “Bongo mokonzi akoloba na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mobali: ‘Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá, bózwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.’” (Matai 25:34) Mpo na nini Mokonzi akondima bampate?

      Mokonzi alimboli: “Mpo nayokaki nzala mpe bopesaki ngai mwa eloko ya kolya; nazalaki na mposa ya mai mpe bopesaki ngai mwa eloko ya komɛla. Nazalaki mopaya mpe boyambaki ngai malamu; nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki ngai. Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ mpe boyaki kotala ngai.” Ntango bampate yango, “bayengebene,” batuni ndenge nini basalaki makambo ya malamu yango, ayanoli ete: “Ntango nyonso oyo bosalelaki yango moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalelaki ngai.” (Matai 25:35, 36, 40, 46) Basali makambo ya malamu yango na likoló te, mpo kuna babɛlaka te mpe bayokaka nzala te. Makambo ya malamu yango basaleli yango nde bandeko ya Kristo oyo bazali awa na mabele.

      Basambisi bato oyo bazali sembo te, balobi bazali lokola bantaba

      Tokoloba nini mpo na bantaba oyo batyami na lobɔkɔ ya mwasi? Yesu alobi: “Bongo [Mokonzi] akoloba mpe na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mwasi ete: ‘Bólongwa awa, bino baoyo bolakelamá mabe, bókende na mɔtɔ ya seko oyo babongiselá Zabolo ná baanzelu na ye. Mpo nayokaki nzala, kasi bopesaki ngai eloko ya kolya te, mpe nazalaki na mposa ya mai, kasi bopesaki ngai eloko ya komɛla te. Nazalaki mopaya, kasi boyambaki ngai malamu te; bolumbu, kasi bolatisaki ngai te; na maladi mpe na bolɔkɔ, kasi bosalisaki ngai te.’” (Matai 25:41-43) Ebongi mpenza mokonzi akata likambo ndenge wana mpo bantaba bamoniselaki bandeko ya Kristo boboto te, ndenge basengelaki kosala yango.

      Bantoma bamoni ete lisambisi wana oyo ekosalema na mikolo ezali koya ekopesa bolamu to mpasi ya libela. Yesu alobi na bango: “Boye [Mokonzi akoloba] maloba oyo: ‘Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Ntango nyonso oyo bosalelaki yango te moko ya bato oyo baleki mike, bosalelaki ngai yango te.’ Mpe bango bakokufa liwa ya seko, kasi bayengebene bakozwa bomoi ya seko.”​—Matai 25:45, 46.

      Eyano oyo Yesu apesi bantoma esalisi bayekoli na ye bákanisa makambo mingi oyo ekosalisa bango bátalela makanisi na bango mpe makambo oyo basalaka.

      • Na ndakisa ya Yesu ya bampate ná bantaba, “Mokonzi” ezali nani, mpe ntango nini ndakisa yango ekokokisama?

      • Mpo na nini ebongi mpenza ete Yesu andima bampate?

      • Na kolanda makambo nini bato bakotyama na ngámbo ya bantaba? mpe mbano nini bampate bakozwa? bongo likambo nini ekokómela bantaba?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto