Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ateyi komikitisa na Elekeli ya nsuka
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu asukoli bantoma makolo mpo na koteya bango ezaleli ya komikitisa

      MOKAPO 116

      Ateyi komikitisa na Elekeli ya nsuka

      MATAI 26:20 MARKO 14:17 LUKA 22:14-18 YOANE 13:1-17

      • YESU ALEI ELEKELI YA NSUKA NA BANTOMA NA YE

      • YESU ASUKOLI BANTOMA MAKOLO MPO NA KOBIMISA LITEYA MOKO

      Petro ná Yoane bakómi na Yerusaleme, epai Yesu atindaki bango bábongisa Elekeli. Na nsima, Yesu ná bantoma zomi bakei kuna. Ekómi mpokwa, mpe moi ezali kokende kolala ntango Yesu ná bayekoli na ye bazali kokita Ngomba ya Olive. Oyo ezali mokolo ya nsuka oyo Yesu alekisi awa, akozonga awa lisusu kaka na nsima ya lisekwa na ye.

      Eumeli te Yesu ná bayekoli na ye bakómi na engumba yango mpe bakei na ndako oyo bakosala Elekeli. Bamati na shambrɛ ya monene oyo ezali likoló. Kuna bakuti biloko nyonso ebongisami mpo na kolya. Lokola Yesu azalaki mpenza kozela likambo yango, alobi: “Nazalaki na mposa makasi ya kolya elekeli oyo esika moko na bino liboso ete namona mpasi.”​—Luka 22:15.

      Bambula mingi liboso, bato bakómaki na momeseno ya kolekisa bakɔpɔ ya vinyo na mabɔkɔ ya bato oyo bazali kolya Elekeli. Sikoyo, nsima ya kozwa kɔpɔ moko ya vinyo, Yesu apesi matɔndi mpe alobi: “Bókamata yango mpe bólekisela yango mokomoko na bino; mpo nazali koyebisa bino ete: Banda sikoyo nakomɛla lisusu eloko oyo euti na nzete ya vinyo te tii ntango bokonzi ya Nzambe ekoya.” (Luka 22:17, 18) Emonani polele ete liwa na ye ekómi pene.

      Ntango bazali kosala Elekeli, likambo moko ya kokamwa esalemi. Yesu atɛlɛmi, alongoli bilamba na ye ya likoló, mpe azwi esumɛ. Na nsima, atye mai na saani moko oyo ezali pene na bango. Mbala mingi, moto oyo ayambi bapaya nde atalaka soki mosaleli na ye asukoli makolo ya bapaya na ye to te. (Luka 7:44) Na libaku oyo moto ayambi bango te, yango wana Yesu asali yango ye moko. Moko ya bantoma akokaki kosala yango, kasi ata moko te asali yango. Ezali nde mpo bazali naino na makanisi ya kowelana? Ezala bongo to te, bayoki nsɔni ndenge Yesu azali kosukola bango makolo.

      Ntango Yesu akómi epai ya Petro, Petro aboyi: “Okosukola ngai makolo ata mokolo moko te.” Yesu alobi: “Soki nasukoli yo te, okozwa likabo elongo na ngai te.” Petro ayanoli na nsai: “Nkolo, kaka makolo te, kasi ná mabɔkɔ ná motó.” Akamwe mpenza ntango Yesu alobi na ye: “Moto oyo asukoli nzoto azalaka na mposa básukola ye kaka makolo, kasi ye mobimba azali pɛto. Mpe bino bozali pɛto, kasi bino nyonso te.”​—Yoane 13:8-10.

      Yesu asukoli makolo ya bantoma nyonso 12, ata mpe oyo ya Yudasi Mokeriota. Nsima ya kolata bilamba na ye ya likoló mpe kofanda lisusu na mesa, Yesu atuni: “Boyebi likambo oyo nasali bino? Bobengaka ngai, ‘Moteyi,’ mpe, ‘Nkolo,’ mpe ezali solo, mpo nazali bongo. Na yango, soki ngai, atako Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo. Mpamba te napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo. Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Moombo aleki nkolo na ye te, mpe moto oyo atindami aleki te moto oyo atindaki ye. Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.”​—Yoane 13:12-17.

      Apesi bango liteya monene ya komikitisa! Bayekoli ya Yesu basengeli te kolukaka esika ya liboso, to kokanisa ete bazali na ntina mingi mpe bato basengeli kosalelaka bango. Kasi, basengeli nde kolanda ndakisa ya Yesu, elingi koloba basengeli te kosala molulu ya kosukola bato makolo, kasi nde kozala na mposa ya kosalela basusu na komikitisa mpe kozanga kopona bilongi.

      • Ntango bazali kosala Elekeli, Yesu alobi na bantoma na ye nini oyo emonisi ete liwa na ye ekómi pene?

      • Mpo na nini ezali likambo ya kokamwa ete Yesu asukola bantoma makolo?

      • Liteya nini Yesu abimisi ntango asukoli bantoma makolo?

  • Bilei ya mpokwa ya Nkolo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu abandisi Bilei ya Mpokwa ya Nkolo elongo na bantoma na ye ya sembo zomi na moko

      MOKAPO 117

      Bilei ya mpokwa ya Nkolo

      MATAI 26:21-29 MARKO 14:18-25 LUKA 22:19-23 YOANE 13:18-30

      • YUDASI AZALI MOTƐKI

      • YESU ABANDISI EKANISELI

      Mwa liboso, na mpokwa yango, Yesu ateyaki bantoma na ye komikitisa na ndenge asukolaki bango makolo. Bongo, nsima ya Elekeli, ntango mosusu alobeli esakweli ya Davidi oyo elobi ete: “Moto oyo azalaki na kimya elongo na ngai, oyo natyelaki motema, oyo azalaki kolya limpa na ngai, atomboleli ngai litindi na ye.” Na nsima alimboli: “Moko na bino akotɛka ngai.”​—Nzembo 41:9; Yoane 13:18, 21.

      Bantoma babandi kotalana, mpe mokomoko atuni: “Nkolo, ezali ngai te, boye te?” Ata Yudasi Mokeriota mpe atuni. Petro ayebisi Yoane, oyo azali pene na Yesu, atuna ye soki ezali nani. Yango wana Yoane apusani lisusu pene na Yesu mpe atuni: “Nkolo, ezali nani?”​—Matai 26:22; Yoane 13:25.

      Yesu ayanoli: “Ezali moto oyo nakopesa ndambo ya limpa oyo nakɔtisi na saani.” Yesu akɔtisi ndambo ya limpa na saani oyo ezali na mesa, apesi yango Yudasi, alobi: “Mwana ya moto azali kokende, ndenge ekomamá mpo na ye, kasi mawa na moto oyo azali kotɛka Mwana ya moto! Elingaki kozala malamu koleka soki moto yango abotamaka te.” (Yoane 13:26; Matai 26:24) Na nsima Satana akɔteli Yudasi. Lokola Yudasi yango asili kobeba, amipesi sikoyo mpo na kosala mokano ya Zabolo, yango wana akómi “mwana ya libebi.”​—Yoane 6:64, 70; 12:4; 17:12.

      Yesu alobi na Yudasi: “Oyo ozali kosala, salá yango nokinoki.” Bantoma mosusu bakanisi ete ayebisi Yudasi, moto asimbaka kɛsi ya mbongo, ete: “‘Sombá biloko oyo tozali na yango mposa mpo na fɛti,’ to apesa babola mwa eloko.” (Yoane 13:27-30) Nzokande, Yudasi akei nde kotɛka Yesu.

      Kaka na butu wana ya Elekeli, Yesu abandisi molulu moko ya sika mpenza. Azwi limpa, asali libondeli mpo na kopesa matɔndi, abuki yango, mpe apesi yango bantoma na ye mpo bálya. Alobi: “Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ekokabama mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Limpa yango eleki na mabɔkɔ ya bantoma mpe balei yango.

      Sikoyo Yesu akamati kɔpɔ ya vinyo, asali libondeli mpo na kopesa matɔndi, mpe apesi yango bantoma. Mokomoko amɛli vinyo oyo ezali na kɔpɔ, oyo mpo na yango Yesu alobi: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.”​—Luka 22:20.

      Ndenge wana nde Yesu azwi bibongiseli mpo bayekoli na ye básalaka Ekaniseli ya liwa na ye mbula na mbula, na mokolo ya 14 Nisana. Yango ekozongisa na makanisi likambo oyo Yesu ná Tata na ye basalá mpo bato ya kondima bábika na etumbu ya lisumu mpe ya liwa. Ekaniseli eleki Elekeli ya Bayuda, mpo yango emonisi polele ete bato ya kondima basikolami mpenzampenza.

      Yesu alobi ete makila na ye “ekosopama mpo na bato mingi mpo na kolimbisa masumu.” Bantoma na ye ya sembo ná bato mosusu ya sembo nde bakolimbisama. Bango nde bakozala na ye na Bokonzi ya Tata na ye.​—Matai 26:28, 29.

      • Yesu atángi esakweli nini ya Biblia oyo elobeli moninga, mpe ndenge nini alimboli yango?

      • Yesu ayebisi Yudasi asala nini, kasi bantoma mosusu bakanisi nini?

      • Likambo nini ya sika Yesu abandisi, mpe yango ezali na ntina nini?

  • Bawelani mpo na koyeba nani aleki baninga
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Bantoma ya Yesu bazali kowelana mpo na koyeba nani na kati na bango aleki baninga

      MOKAPO 118

      Bawelani mpo na koyeba nani aleki baninga

      MATAI 26:31-35 MARKO 14:27-31 LUKA 22:24-38 YOANE 13:31-38

      • YESU APESI TOLI NA LIKAMBO ETALI KOWELA ESIKA YA LIBOSO

      • ASAKOLI ETE PETRO AKOWANGANA YE

      • BOLINGO EZALI ELEMBO YA BAYEKOLI YA YESU

      Na mpokwa ya nsuka oyo Yesu alekisi na bantoma na ye, apesi bango liteya ya komikitisa na ndenge asukoli bango makolo. Yango ezali na ntina nini? Mpo bayekoli bamonisi bolɛmbu moko. Bamipesá na Nzambe, kasi bazali kaka kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga. (Marko 9:33, 34; 10:35-37) Bolɛmbu yango emonani lisusu na mpokwa oyo.

      Bantoma babimisi “ntembe makasi na kati na bango mpo na koyeba nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” (Luka 22:24) Yesu ayoki mawa mpenza ndenge bazali kowelana lisusu! Asali nini?

      Na esika Yesu asilikela bango mpo na makanisi mpe etamboli na bango, amonisi motema molai mpe alobi na bango: “Bakonzi ya bikólo balakisaka bango bokonzi na bango, mpe baoyo bayangelaka bango babengami Bato Malamu. Nzokande bino bosengeli kozala bongo te. . . . Mpo nani aleki, moto oyo afandi na mesa to oyo azali mosali?” Na nsima, Yesu apesi bango lisusu ndakisa oyo apesaka bango ntango nyonso, alobi: “Kasi ngai nazali mosali na katikati na bino.”​—Luka 22:25-27.

      Atako bantoma bazalaki kosala mabunga, bakangamaki na Yesu na ntango ya mikakatano. Yango wana alobi: “Nazali kosala kondimana ná bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana ná ngai, mpo na bokonzi.” (Luka 22:29) Bato yango bazali bayekoli ya sembo ya Yesu. Alaki bango ete na nzela ya kondimana oyo asali na bango, bakozala na Bokonzi mpe bakoyangela elongo na ye.

      Atako bantoma bazali na elikya wana, bazali naino na nzoto ya mosuni mpe bazali naino bato ya kozanga kokoka. Yesu alobi na bango: “Satana asɛngi azwa bino mpo apupola bino lokola blé,” oyo epanzanaka ntango bazali kopupola. (Luka 22:31) Alobi na bango mpe ete: “Na butu oyo, bino nyonso bokobɛta libaku mpo na ngai, mpo ekomamá ete: ‘Nakobɛta mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga ekopanzana.’”​—Matai 26:31; Zekaria 13:7.

      Petro atuti ntolo mpe azongisi: “Ata soki bamosusu nyonso babɛti libaku mpo na yo, ngai nakobɛta libaku ata moke te!” (Matai 26:33) Yesu alobi na Petro ete liboso nsoso elela mbala mibale na butu yango, akowangana ye. Kasi, Yesu abakisi: “Nasaleli yo lilɔmbɔ ete kondima na yo elɛmba te; mpe yo, ntango okozonga, lendisá bandeko na yo.” (Luka 22:32) Petro alobi na mpiko nyonso ete: “Ata soki esengeli nakufa na yo, nakowangana yo ata moke te.” (Matai 26:35) Bantoma mosusu mpe balobi kaka bongo.

      Yesu alobi na bayekoli na ye: “Nazali elongo na bino mwa ntango moke lisusu. Bokoluka ngai; mpe kaka ndenge nalobaki na Bayuda ete: ‘Epai nazali kokende bino bokoki kokóma te,’ nalobi na bino mpe ndenge wana sikoyo.” Na nsima abakisi: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:33-35.

      Ntango Petro ayoki Yesu alobi ete azali na bango kaka mwa ntango moke, atuni: “Nkolo, ozali kokende wapi?” Yesu azongiseli ye ete: “Epai nazali kokende, okoki kolanda ngai sikoyo te, kasi okolanda ngai nsima.” Petro amitungisi, alobi: “Nkolo, mpo na nini nakoki kolanda yo sikoyo te? Nakopesa molimo na ngai mpo na yo.”​—Yoane 13:36, 37.

      Sikoyo Yesu alobeli ntango oyo atindaki bantoma básakola na Galile, kasi bákende na pɔtɔmɔni mpe saki ya bilei te. (Matai 10:5, 9, 10) Atuni: “Bozangaki nde eloko moko?” Bayanoli: “Te!” Kasi bakosala nini na mbala ya nsima? Yesu apesi bango malako: “Moto oyo azali na pɔtɔmɔni azwa yango, ndenge moko mpe saki ya bilei; mpe moto oyo azangi mopanga atɛka elamba na ye ya likoló mpe asomba moko. Mpo nazali koyebisa bino ete oyo ekomamá esengeli kokokisama epai na ngai, elingi koloba ete: ‘Mpe atángamaki esika moko na bato oyo babukaka mibeko.’ Mpo oyo etali ngai ezali kokokisama.”​—Luka 22:35-37.

      Yesu azali kolobela ntango oyo bakobaka ye na nzete esika moko na bato mabe, to bato oyo babukaka mibeko. Na nsima, bayekoli na ye bakonyokwama makasi. Bakanisi ete bamilɛngɛli mpe balobi: “Nkolo, talá! mipanga mibale yango oyo.” Ayanoli: “Ekoki.” (Luka 22:38) Lokola bazali na mipanga mibale, yango epesi Yesu libaku ya kopesa bango liteya mosusu ya ntina.

      • Mpo na nini bantoma bazali kowelana, mpe ndenge nini Yesu akati likambo yango?

      • Makambo nini ekosalema na nzela ya kondimana oyo Yesu asali na bayekoli na ye ya sembo?

      • Eyano nini Yesu apesi Petro ntango atuti ntolo?

  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu na shambrɛ ya likoló elongo na bantoma na ye ya sembo 11

      MOKAPO 119

      Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

      YOANE 14:1-31

      • YESU AKEI KOBONGISA ESIKA

      • ALAKI ETE AKOTINDELA BAYEKOLI NA YE MOSUNGI

      • TATA ALEKI YESU

      Nsima ya Ekaniseli, wana Yesu ná bayekoli na ye bazali kaka na shambrɛ ya likoló, alendisi bango na maloba oyo: “Mitema na bino etungisama te. Bóndimela Nzambe, bóndimela mpe ngai.”​—Yoane 13:36; 14:1.

      Yesu ayebisi bantoma na ye ya sembo ntina oyo basengeli komitungisa te mpo azali kokende, alobi na bango: “Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi. . . . Soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana. Mpe epai nazali kokende bino boyebi nzela.” Kasi, bantoma bakangi ntina te ete azali kolobela nde kokende na likoló. Toma atuni: “Nkolo, toyebi epai ozali kokende te. Ndenge nini toyebi nzela?”​—Yoane 14:2-5.

      Yesu ayanoli: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.” Moto akoki kokende na ndako ya Tata, na likoló, kaka soki andimeli Yesu, andimi mateya na ye, mpe azali komekola ye. Yesu alobi: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6.

      Filipe, oyo azali koyoka ye na likebi, alobi: “Nkolo, lakisá biso Tata, mpe ekoki mpo na biso.” Mbala mosusu Filipe alingi bálakisa bango bimonaneli ya Nzambe, ndenge Moize, Eliya ná Yisaya bamonaki. Kasi bantoma yango bazali na eloko oyo eleki bimonaneli wana. Yesu amonisi yango polele, alobi: “Naumeli na bino mingi boye, mpe atako bongo, yo Filipe, oyebi ngai kaka te? Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” Yesu amonisaka malamumalamu bizaleli ya Tata; yango wana, kofanda na ye mpe komona makambo oyo asali ezali lokola komona Tata. Atako bongo, Tata aleki Mwana, mpo Yesu alobi polele ete: “Makambo oyo nazali koyebisa bino nazali koloba yango na ndenge na ngai moko te.” (Yoane 14:8-10) Bantoma bazali komona ndenge Yesu azali koloba polele ete mateya na ye nyonso euti epai ya Tata na ye.

      Bantoma bamoni makamwisi oyo Yesu asali mpe bayoki ye ndenge asakoli nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Sikoyo alobi na bango: “Moto oyo azali kondimela ngai, moto yango akosala mpe misala oyo ngai nazali kosala; mpe akosala misala ya minene koleka oyo.” (Yoane 14:12) Yesu alingi koloba te ete bakosala makamwisi ya minene koleka oyo ye asalaki. Alingi nde koloba ete bakosakola nsango malamu ntango molai, na bisika mingi koleka, mpe epai ya bato ebele koleka.

      Ntango Yesu akokende, akosundola bango te, mpo alaki bango ete: “Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.” Alobi mpe: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu mpo azala elongo na bino mpo na libela, elimo ya solo.” (Yoane 14:14, 16, 17) Alaki bango ete bakozwa mosungi mosusu: elimo santu. Bazwi mosungi yango na mokolo ya Pantekote.

      Yesu alobi: “Etikali moke mpe mokili ekomona ngai lisusu te, kasi bino bokomona ngai, mpo nazali na bomoi mpe bino bokozala na bomoi.” (Yoane 14:19) Bakomona ye ntango akobimela bango na nzoto ya mosuni nsima ya lisekwa na ye, mpe na nsima ntango akosekwisa bango mpo bázala na ye na likoló lokola bikelamu ya elimo.

      Sikoyo, Yesu alobi makambo polele: “Moto oyo azali na mitindo na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomilakisa epai na ye polelepolele.” Ntoma Yudasi, oyo babengi mpe Tade, atuni: “Nkolo, likambo nini mpenza ebimi mpo olinga komilakisa polelepolele epai na biso kasi epai ya mokili te?” Yesu alobi: “Soki moto alingi ngai, akotosa liloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye. . . . Moto oyo alingaka ngai te atosaka maloba na ngai te.” (Yoane 14:21-24) Bayekoli bandimi ete Yesu azali nzela, solo mpe bomoi, kasi mokili endimi yango te.

      Sikoyo, Yesu azali kokende; ndenge nini bayekoli na ye bakoyeba lisusu makambo nyonso oyo ateyaki bango? Yesu alobi: “Mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” Lokola bantoma bamoni makambo minene oyo elimo santu ekoki kosala, elaka wana ya Yesu ekitisi bango motema. Yesu abakisi: “Natikeli bino kimya na ngai, napesi bino kimya na ngai. . . . Mitema na bino etungisama te mpe elɛmba na kobanga te.” (Yoane 14:26, 27) Bayekoli basengeli komitungisa te mpo Tata ya Yesu akotambwisa bango mpe akobatela bango.

      Ekomonana polele ete Nzambe azali kobatela bango. Yesu alobi: “Mokonzi ya mokili oyo azali koya. Mpe azali na bokonzi likoló na ngai te.” (Yoane 14:30) Zabolo akɔtelaki Yudasi mpe atambwisaki ye. Kasi Yesu azali na bolɛmbu ata moko te oyo Satana akoki kosalela mpo na kotinda ye apesa Nzambe mokɔngɔ. Zabolo akokoka mpe te kosala ete Yesu akufa libela. Mpo na nini? Yesu alobi: “Kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo, nazali kosala kaka bongo.” Ayebi ete Tata na ye akosekwisa ye.​—Yoane 14:31.

      • Yesu azali kokende wapi, mpe ayebisi Toma nini mpo na esika yango?

      • Emonani ete Filipe alingi Yesu asala nini?

      • Na ndenge nini bayekoli ya Yesu bakosala makambo minene koleka oyo ye azali kosala?

      • Mpo na nini koyeba ete Tata aleki Yesu elendisaka biso?

  • Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya Yesu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu azali kosolola na bantoma na ye na shambrɛ ya likoló

      MOKAPO 120

      Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya Yesu

      YOANE 15:1-27

      • NZETE YA VINYO YA SOLOSOLO MPE BITAPE

      • TÓSALA NINI MPO YESU AKOBA KOLINGA BISO?

      Yesu azali kosolola na bantoma na ye ya sembo, azali kosolola na bango ndenge baninga basololaka mpo na kolendisa bango. Ngonga epusani, ntango mosusu midi ya butu eleki. Apesi bango ndakisa moko:

      Abandi boye: “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-bilanga.” (Yoane 15:1) Ndakisa yango ekokani na ndakisa oyo epesamaki kala mpo na ekólo Yisraele oyo ebengamaki mpe nzete ya vinyo ya Yehova. (Yirimia 2:21; Hosea 10:1, 2) Kasi, Yehova alingi kosundola ekólo yango. (Matai 23:37, 38) Yango wana, Yesu azali koyebisa bango makambo ya sika. Azali nzete ya vinyo oyo Tata na ye aloná kobanda na mobu 29 T.B., ntango atyaki ye mafuta na elimo. Kasi Yesu amonisi ete nzete ya vinyo elimboli kaka ye te, alobi:

      “Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te, [Tata na ngai] alongolaka yango, mpe nyonso oyo ebotaka mbuma, apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi lisusu. . . . Lokola etape ekoki kobota mbuma yango moko te kozanga kokangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko bokoki kobota mbuma te, soki botikali na bomoko elongo na ngai te. Ngai nazali nzete ya vinyo, bino bozali bitape.”​—Yoane 15:2-5.

      Yesu alaki bayekoli na ye ya sembo ete ntango akokende, akotindela bango mosungi, elimo santu. Bantoma mpe bato mosusu bakokóma bitape ya nzete ya vinyo ntango bakozwa elimo yango, mikolo ntuku mitano na moko na nsima. Mpe “bitape” nyonso esengeli kozala ntango nyonso na bomoko na Yesu. Mpo na nini?

      Alimboli: “Moto oyo atikali na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye, moto wana akobota mbuma mingi; mpo, soki botiki ngai, bokoki kosala eloko moko te.” “Bitape” yango, to bayekoli na ye ya sembo, bakobota mbuma mingi, elingi koloba bakomekola bizaleli ya Yesu, bakosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na molende, mpe bakokómisa bato bayekoli. Nini ekokómela moto oyo atikali na bomoko na Yesu te mpe aboti mbuma te? Yesu alobi: “Soki moto atikali na bomoko elongo na ngai te, akobwakama.” Abakisi ete: “Soki botikali na bomoko elongo na ngai mpe soki maloba na ngai efandi na kati na bino, bósɛnga eloko nyonso oyo bolingi mpe ekosalema mpo na bino.”​—Yoane 15:5-7.

      Sikoyo, Yesu azongeli likambo oyo asilaki kolobela mbala mibale: kotosa mitindo na ye. (Yoane 14:15, 21) Alobeli oyo bayekoli basengeli kosala mpo na komonisa yango, alobi: “Soki botosi mitindo na ngai, bokotikala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe natosi mitindo ya Tata mpe natikali na kati ya bolingo na ye.” Kasi, kolinga Yehova Nzambe mpe Mwana na ye esuki wana te. Yesu alobi: “Mobeko na ngai yango oyo: bólinganaka ndenge ngai nalingi bino. Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye. Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kopesa bino mitindo.”​—Yoane 15:10-14.

      Mosika te, Yesu akomonisa bolingo na ye, akopesa bomoi na ye mpo na moto nyonso oyo akondimela ye. Ndakisa na ye esengeli kotinda bayekoli na ye bámoniselana bolingo ya ndenge wana. Ndenge Yesu alobaki yango liboso, bolingo yango ekomonisa ete bazali bayekoli na ye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:35.

      Bantoma bayebi ete Yesu abengaka bango “baninga.” Ayebisi bango ntina oyo bazali baninga na ye: “Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.” Bazali na boyokani ya malamu mpenza: bazali baninga ya motema ya Yesu mpe bayebi makambo oyo Tata ayebisaki ye! Kasi, mpo na kobatela boyokani yango, basengeli ‘kokoba kobota mbuma.’ Soki basali bongo, Yesu alobi ete ‘nyonso oyo bakosɛnga Tata na nkombo na ye, akopesa bango yango.’​—Yoane 15:15, 16.

      Bolingo ekosalisa “bitape,” elingi koloba bayekoli na ye, báyika mpiko na makambo oyo ekoya. Akebisi bango ete mokili ekoyina bango, mpe abɔndisi bango, alobi: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino. Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, . . . yango wana mokili ezali koyina bino.”​—Yoane 15:18, 19.

      Yango wana, Yesu abakisi: “Bakosala bino makambo nyonso wana mpo na nkombo na ngai, mpo bayebi te moto oyo atindaki ngai.” Yesu alobi ete makamwisi na ye ekweisi banguna na ye nde kokweisa: “Soki nasalaki te na kati na bango misala oyo ata moto moko te asalá, mbɛlɛ bazali na lisumu te; kasi sikoyo bamoni mpe bayini ná ngai ná Tata na ngai.” Kutu, koyina na bango ekokisi nde esakweli ya Biblia.​—Yoane 15:21, 24, 25; Nzembo 35:19; 69:4.

      Yesu alaki lisusu bayekoli na ye ete akotindela bango mosungi, elimo santu. Nguya yango ezali mpo na bayekoli na ye nyonso mpe ekoki kosalisa bango bábota mbuma, elingi koloba ‘bápesa litatoli.’​—Yoane 15:27.

      • Na ndakisa oyo Yesu apesi, mosali-bilanga ezali nani? nzete ya vinyo ezali nani? mpe bitape ezali banani?

      • Nzambe alingi ete bitape ebota mbuma nini?

      • Bayekoli ya Yesu basengeli kosala nini mpo bázala baninga na ye, mpe eloko nini ekosalisa bango báyika mpiko ata soki mokili eyini bango?

  • “Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Bantoma bazali kokamwa mpo Yesu akebisi bango

      MOKAPO 121

      “Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili”

      YOANE 16:1-33

      • ETIKALI MOKE BANTOMA BAKOMONA LISUSU YESU TE

      • MAWA YA BANTOMA EKOBONGWANA ESENGO

      Yesu ná bantoma balingi kolongwa na shambrɛ ya likoló esika bauti kosala Elekeli. Nsima ya kokebisa bango, Yesu abakisi: “Nalobi na bino makambo oyo mpo bóbɛta libaku te.” Mpo na nini ebongi akebisa bango ndenge wana? Alobi na bango: “Bakobengana bino na sinagoga. Kutu, ngonga ezali koya wana moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.”​—Yoane 16:1, 2.

      Ntango mosusu maloba yango etungisi bantoma na ye. Liboso Yesu alobaki ete mokili ekoyina bango, kasi alobaki polele te ete bakobomama. Mpo na nini? Alobi: “Nayebisaki bino makambo wana liboso te, mpo nazalaki elongo na bino.” (Yoane 16:4) Akebisi bango sikoyo mpo azali kotika bango. Yango ekoki kosalisa bango mpo bábɛta libaku te.

      Yesu alobi lisusu: “Nazali kokende epai ya moto oyo atindaki ngai, mpe atako bongo moko te na kati na bino atuni ngai ete: ‘Ozali kokende wapi?’” Mwa moke liboso, kaka na mpokwa yango, batunaki ye epai oyo azali kokende. (Yoane 13:36; 14:5; 16:5) Kasi sikoyo, lokola babangi mpo ayebisi bango ete bakonyokwama, batondi na mawa. Na yango, balekisi libaku ya kotuna mpo na koyeba nkembo oyo Yesu akozwa mpe bolamu oyo yango ekomemela basambeli ya Nzambe ya solo. Yesu alobi: “Mpo nalobi na bino makambo oyo, mawa etondi na mitema na bino.”​—Yoane 16:6.

      Na nsima Yesu abakisi: “Ezali mpo na litomba na bino nde nazali kokende. Mpo soki nakei te, mosungi akoya epai na bino soki moke te; kasi soki nakei, nakotindela bino ye.” (Yoane 16:7) Kaka soki Yesu akufi mpe akei na likoló nde bayekoli na ye bakoki kozwa elimo santu, oyo akotinda ezala mosungi ya basaleli na ye nyonso na mabele.

      Elimo santu ‘ekopesa mokili elembo ya kondimisa mpenza na ntina na lisumu mpe na ntina na boyengebene mpe na ntina na lisambisi.’ (Yoane 16:8) Ya solo, ekomonana polele ete mokili endimelaka Mwana ya Nzambe te. Kozonga ya Yesu na likoló ekomonisa boyengebene na ye mpe ntina oyo ebongi mpenza ete Satana, “mokonzi ya mokili oyo,” asambisama.​—Yoane 16:11.

      Yesu alobi lisusu: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te.” Ntango akosopela bango elimo santu, ekosalisa bango bákanga ntina “ya solo nyonso,” mpe bátambola na solo yango.​—Yoane 16:12, 13.

      Yesu alobi na nsima makambo oyo epesi bantoma mobulu na makanisi, alobi: “Etikali moke bokomona ngai lisusu te, mpe etikali moke lisusu bokomona ngai.” Bazali kotunana soki alingi koloba nini. Yesu amoni ete balingi kotuna ye alimbola yango, na yango alobi: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Bokolela mpe bokoganga na kolela, kasi mokili ekosepela; bokoyoka mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.” (Yoane 16:16, 20) Ntango Yesu akobomama na mokolo oyo elandi, bakonzi ya mangomba bakosepela, kasi bayekoli bakozala na mawa. Na nsima, mawa na bango ekobongwana esengo ntango Yesu akosekwa! Mpe esengo yango ekokoba ntango akosopela bango elimo santu ya Nzambe.

      Yesu akokanisi mpasi oyo bantoma bakozala na yango na mpasi oyo mwasi ayokaka na ntango ya kobota, alobi: “Mwasi, ntango azali kobota, azalaka na mawa, mpamba te ngonga na ye ekoki; kasi ntango aboti mwana na ye, amikundolaka bolɔzi yango lisusu te mpo na esengo oyo ete moto abotami na mokili.” Yesu alendisi bantoma na ye, alobi: “Bino mpe, ya solo, bozali sikoyo koyoka mawa; kasi nakomona bino lisusu mpe mitema na bino ekosepela, mpe esengo na bino, moto akolongola bino yango te.”​—Yoane 16:21, 22.

      Tii awa, bantoma basɛngá naino Nzambe likambo na nkombo ya Yesu te. Sikoyo alobi: “Na mokolo yango, bokosɛnga na nkombo na ngai.” Mpo na nini na nkombo ya Yesu? Ezali te ete Tata ayanolaka noki te na mabondeli. Yesu alobi: “Tata ye moko alingaka bino mingi, mpo bino bolingi ngai mingi . . . lokola [nazali] momonisi ya Tata.”​—Yoane 16:26, 27.

      Mbala mosusu maloba wana ya kolendisa epesi bantoma makasi ya koloba ete: “Na yango, tondimi ete outaki epai ya Nzambe.” Kondima na bango ekomekama mosika te. Yesu ayebisi bango makambo oyo ezali koya: “Talá! Ngonga ezali koya, kutu, esili koya, wana bokopanzana moto na moto na ndako na ye mpe bokotika ngai kaka ngai moko.” Atako bongo, alendisi bango: “Nalobi na bino makambo oyo mpo na nzela na ngai bózala na kimya. Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.” (Yoane 16:30-33) Elingi koloba te ete Yesu azali kosundola bango. Ayebi nde ete bango mpe bakoki kolonga mokili lokola ye, soki batikali sembo mpe basali mokano ya Nzambe, ata soki Satana mpe mokili na ye baluki kobebisa bosembo na bango.

      • Maloba nini ya Yesu etungisi bantoma na ye?

      • Mpo na nini bantoma batuni Yesu mituna mosusu te?

      • Ndakisa nini Yesu apesi mpo na komonisa ete mawa ya bantoma ekobongwana esengo?

  • Libondeli ya nsuka na shambrɛ ya likoló
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu atomboli miso likoló mpe azali kobondela ná bantoma na ye

      MOKAPO 122

      Libondeli ya nsuka na shambrɛ ya likoló

      YOANE 17:1-26

      • LITOMBA YA KOYEKOLA KOYEBA NZAMBE MPE MWANA NA YE

      • BOMOKO YA YEHOVA, YESU, MPE BAYEKOLI

      Lokola Yesu alingaka bantoma na ye mingi mpenza, azali kobongisa makanisi na bango mpo mosika te akotika bango. Sikoyo atomboli miso na likoló mpe abondeli Tata na ye: “Pesá mwana na yo nkembo, mpo mwana na yo apesa yo nkembo, na ndenge opesi ye bokonzi likoló ya moto nyonso ya mosuni, mpo, bango nyonso oyo opesi ye, apesa bango bomoi ya seko.”​—Yoane 17:1, 2.

      Yesu ayebi malamu ete kopesa Nzambe nkembo ezali na ntina mingi. Kasi elikya ya kozwa bomoi ya seko oyo alobeli ezali mpe likambo ya kolendisa! Yesu azwi “bokonzi likoló ya moto nyonso ya mosuni”; na yango lisiko na ye ekoki komemela bato nyonso matomba. Kasi, bato nyonso bakozwa lipamboli yango te. Mpo na nini? Mpo, kaka baoyo basalaka na boyokani na maloba oyo Yesu alobi na nsima nde bakozwa mapamboli ya lisiko ya Yesu: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

      Moto asengeli koyekola koyeba Tata mpe Mwana malamumalamu mpe kokóma moninga na bango. Asengeli kotalela makambo ndenge bango batalelaka. Asengeli mpe kosala makasi amekola bizaleli na bango na boyokani na ye na basusu. Lisusu, asengeli kobosana te ete kozwa bomoi ya seko eyei nsima ya kopesa Nzambe nkembo. Sikoyo Yesu azongeli likambo yango:

      “Napesi yo nkembo na mabele, mpo nasilisi mosala oyo opesaki ngai nasala. Bongo sikoyo yo, Tata, pesá ngai nkembo pembeni na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.” (Yoane 17:4, 5) Yesu asɛngi Nzambe asekwisa ye mpe azongisa ye na nkembo oyo azalaki na yango na likoló.

      Kasi, Yesu abosani te mosala oyo asali. Abondeli: “Namonisi nkombo na yo polele na bato oyo ozwi na mokili mpe opesi ngai. Bazalaki ya yo, mpe opesi ngai bango, mpe batosi liloba na yo.” (Yoane 17:6) Na mosala ya kosakola, Yesu asukaki kaka te na kotánga nkombo ya Nzambe, Yehova. Asalisaki mpe bantoma na ye báyeba ndimbola ya nkombo yango, elingi koloba bizaleli ya Nzambe mpe boyokani na ye na bato.

      Bantoma bayekoli koyeba Yehova, mokumba ya Mwana na ye, Yesu, mpe makambo oyo ateyaki. Na komikitisa nyonso, Yesu alobi: “Maloba oyo opesi ngai, napesi bango yango, mpe bayambi yango mpe bayebi mpenza ete nabimaki lokola momonisi na yo, mpe bandimi ete otindaki ngai.”​—Yoane 17:8.

      Na nsima, Yesu amonisi ete bokeseni ezali kati na bayekoli na ye ná bato ya mokili: “Nazali kosɛngɛla bango; nazali kosɛngɛla mokili te, kasi baoyo opesi ngai; mpo bazali ya yo . . . Tata mosantu, kɛngɛlá bango mpo na nkombo na yo oyo opesi ngai, mpo bázala moko ndenge biso mpe tozali. . . . Nabatelaki bango, mpe moko te na kati na bango abebaki, longola kaka mwana ya libebi,” Yudasi Mokeriota, oyo akei kotɛka Yesu.​—Yoane 17:9-12.

      Na libondeli yango, Yesu abakisi: “Mokili eyini bango. . . . Nazali kosɛnga yo, olongola bango na mokili te, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14-16) Bantoma mpe bayekoli mosusu bazali kofanda na mokili, elongo na bato oyo batambwisami na Satana, kasi basengeli komikɔtisa te na mokili to na mabe na yango. Na ndenge nini?

      Basengeli kozala ntango nyonso basantu mpe komitya pembeni mpo na kosalela Nzambe, kosalela mateya oyo ezali na Makomami ya Ebre mpe oyo Yesu ye moko ateyaki. Yesu abondeli lisusu: “Santisá bango na solo; liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Na nsima, elimo ya Nzambe ekosalisa bantoma mosusu bákoma mikanda oyo ekokɔta mpe na kati ya “solo” oyo ekoki kosantisa moto.

      Kasi bato mosusu mpe bakondima “solo” yango. Na yango, Yesu abondeli kaka mpo na baoyo bazali wana te, kasi mpe mpo na “baoyo bazali kondimela [ye] na nzela ya liloba na bango.” Yesu asɛngi nini mpo na bango nyonso? Asɛngi boye: “Bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso.” (Yoane 17:20, 21) Yesu ná Tata na ye bazali nzoto moko te. Kasi bazali moko nde mpo bazali na boyokani na makambo nyonso. Yesu abondeli mpo bayekoli na ye mpe bázala na bomoko yango.

      Mwa moke liboso, Yesu ayebisaki Petro ná bantoma mosusu ete azali kokende mpo na kobongisela bango esika, na likoló. (Yoane 14:2, 3) Yesu azongeli likambo yango na libondeli: “Tata, mpo na oyo opesi ngai, nalingi ete, epai nazali, bango mpe bázala esika moko na ngai, mpo bámona nkembo na ngai oyo opesi ngai, mpo olingaki ngai liboso ya ebandeli ya mokili.” (Yoane 17:24) Na maloba yango, Yesu amonisi ete liboso ya ebandeli ya mokili, to liboso Adama ná Eva bábota bana, Nzambe azalaki kolinga Mwana na ye se moko oyo abotamaki, oyo akómaki Yesu Kristo.

      Mpo na kosukisa libondeli na ye, Yesu alobeli lisusu nkombo ya Tata na ye mpe bolingo oyo Nzambe alingi bantoma mpe bato mosusu oyo bakondima “solo” na nsima, alobi: “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”​—Yoane 17:26.

      • Koyekola koyeba Nzambe mpe Mwana na ye elimboli nini?

      • Yesu asukaki kaka na kotánga nkombo ya Nzambe?

      • Na ndenge nini Nzambe, Mwana na ye mpe basambeli nyonso ya solo bazali moko?

  • Azali kobondela ntango azali na mawa makasi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu azali kobondela na Elanga ya Getesemane, Petro, Yakobo ná Yoane balali mpɔngi

      MOKAPO 123

      Azali kobondela ntango azali na mawa makasi

      MATAI 26:30, 36-46 MARKO 14:26, 32-42 LUKA 22:39-46 YOANE 18:1

      • YESU AZALI NA ELANGA YA GETESEMANE

      • MOTOKI NA YE EKÓMI LOKOLA MATANGÁ YA MAKILA

      Yesu asilisi kobondela elongo na bantoma na ye ya sembo. ‘Nsima ya koyemba nzembo ya masanzoli, babimi bakei na Ngomba ya Olive.’ (Marko 14:26) Bakei na ngámbo ya ɛsti, na elanga ya Getesemane, epai Yesu amesanaki kokende.

      Ntango bakómi na esika kitoko yango oyo etondi na banzete ya olive, Yesu atiki bantoma mwambe wana. Mbala mosusu batikali pene na porte ya elanga, mpe alobi na bango: “Bófanda awa ntango ngai nakei kobondela kuna.” Yesu akamati bantoma misato​—Petro, Yakobo, ná Yoane—​bakɔti na kati ya elanga. Akómi komitungisa mingi mpe alobi na bango: “Molimo na ngai eyoki mawa makasi, ɛɛ tii na liwa. Bótikala awa mpe bósɛnzɛla elongo na ngai.”​—Matai 26:36-38.

      Yesu apusani mwa moke liboso, ‘akwei na mabele mpe abandi kobondela.’ Mpo na likambo nini Yesu azali kobondela Nzambe na mawa boye? Abondeli: “Tata, makambo nyonso ekoki kosalema epai na yo; longolelá ngai kɔpɔ oyo. Nzokande, ezala te oyo ngai nalingi, kasi oyo yo olingi.” (Marko 14:35, 36) Alingi koloba nini? Alingi nde kokima mokumba na ye ya kosikola bato? Te!

      Ntango Yesu azalaki na likoló, amonaki mpasi makasi ya bato oyo Baroma bazalaki koboma. Sikoyo lokola Yesu akómi moto oyo amityaka na esika ya basusu mpe akoki koyoka mpasi, azali kosepela te ete likambo ya ndenge wana ekómela ye. Kasi, azali komitungisa mingimingi nde mpo azali koyeba ete kokufa lokola mosali-mabe ekoki kofingisa nkombo ya Tata na ye. Nsima ya bangonga moke, bakoboma ye likoló ya nzete ndenge babomaka moto oyo afingi Nzambe.

      Nsima ya kobondela mingi, Yesu azongi esika bantoma misato bazali mpe akuti bango balali. Alobi na Petro: “Bokoki kosɛnzɛla ata ngonga moko te elongo na ngai? Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.” Yesu ayebi ete bantoma mpe bazali komitungisa, mpe ngonga epusani makasi. Abakisi: “Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”​—Matai 26:40, 41.

      Yesu akei lisusu kobondela mpe asɛngi ete Nzambe alongolela ye “kɔpɔ oyo.” Ntango azongi, akuti lisusu bantoma misato yango balali mpɔngi na ntango oyo basengelaki kobondela mpo bákwea na komekama te. Ntango Yesu azali koloba na bango, bazangi “eyano ya kopesa ye.” (Marko 14:40) Yesu akei lisusu mbala ya misato, mpe afukami mpo na kobondela.

      Yesu azali komitungisa mingi mpo, ndenge akokufa lokola mosali-mabe, ekofingisa nkombo ya Tata na ye. Yehova azali koyoka mabondeli ya Mwana na ye, mpe na ntango moko boye, atindi anzelu mpo alendisa ye. Atako bongo, Yesu atiki kosala malɔmbɔ epai ya Tata na ye te; akobi “kobondela na molende koleka.” Akómi komitungisa makasi koleka. Yesu azali na mokumba monene mpenza! Bomoi ya seko ya ye moko mpe ya ebele ya basambeli ya Nzambe ezali na likama. Kutu, ‘motoki na ye ekómi lokola matangá ya makila oyo ezali kokwea na nse.’​—Luka 22:44.

      Ntango Yesu azongi mbala ya misato epai ya bantoma na ye, akuti bango lisusu balali mpɔngi. Alobi na bango: “Mpo na nini bozali kolala mpɔngi mpe kopema na ntango ya boye? Talá! Ngonga ekómi pene mpo Mwana ya moto atɛkama na mabɔkɔ ya basumuki. Bótɛlɛma, tókende. Talá! Motɛki na ngai akómi pene.”​—Matai 26:45, 46.

      MOTOKI NA YE EKÓMI LOKOLA MATANGÁ YA MAKILA

      Luka, oyo azalaki monganga, alimboli te ndenge oyo motoki ya Yesu “ekómaki lokola matangá ya makila.” (Luka 22:44) Ntango mosusu Luka asalelaki maloba ya elilingi mpo na koloba ete motoki ya Yesu ezalaki lokola makila oyo ezali kobima na mpota. Monganga moko, William Edwards, apesaki likanisi mosusu na zulunalo moko (The Journal of the American Medical Association [JAMA]); alobaki ete: “Atako esalemaka mpenza te, moto akoki kobima motoki ya makila (hématidrose . . . ) soki atungisami makasi mpenza . . . Soki makila eleki esika motoki eutaka, loposo ekómaka pɛtɛpɛtɛ mpe elɛmbaka.”

      • Nsima ya kolongwa na shambrɛ ya likoló, Yesu ná bantoma bakei wapi?

      • Ntango Yesu azali kobondela, bantoma misato basali nini?

      • Ndenge motoki ya Yesu ekómi lokola matangá ya makila emonisi ete azali koyoka ndenge nini?

  • Batɛki Kristo mpe bakangi ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu apameli Petro mpo akati litoi ya Malakusi na mopanga; basoda balingi kokanga Yesu

      MOKAPO 124

      Batɛki Kristo mpe bakangi ye

      MATAI 26:47-56 MARKO 14:43-52 LUKA 22:47-53 YOANE 18:2-12

      • YUDASI ATƐKI YESU NA ELANGA

      • PETRO AKATI MOTO LITOI

      • BAKANGI YESU

      Midi ya butu eleki mpenza. Banganga-nzambe bandimi kopesa Yudasi shekele ya palata 30 mpo atɛkɛla bango Yesu. Na yango, Yudasi akei na ebele ya banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai oyo bazali koluka Yesu. Bazali elongo na etuluku ya basoda ya Roma ná mokonzi moko ya basoda.

      Emonani ete, ntango Yesu ayebisaki Yudasi abima ntango bazalaki kosala Elekeli, Yudasi akendeki mbala moko epai ya banganga-nzambe bakonzi. (Yoane 13:27) Bayanganisaki basoda ná bakonzi na bango. Ntango mosusu Yudasi amemaki bango liboso na shambrɛ oyo Yesu ná bantoma na ye basalaki Elekeli. Kasi sikoyo, ebele ya bato yango baleki lobwaku ya mokɛli ya Kidrone, bakei na elanga. Bazali na bibundeli, basimbi miinda ná bisungi ya mɔtɔ, bazali koluka Yesu.

      Yudasi akei na bato yango na Ngomba ya Olive, akanisi ete akokuta Yesu kuna. Na pɔsɔ oyo eleki, ntango Yesu ná bantoma bazalaki kokende na Yerusaleme mpe kozonga na Betania, mbala mingi bazalaki kopema na elanga ya Getesemane. Sikoyo tozali na butu, mpe ntango mosusu, Yesu azali na nse ya banzete ya olive na elanga yango. Ndenge nini basoda yango, oyo mbala mosusu bamoná naino Yesu te, bakoyeba ye? Mpo na kosalisa bango, Yudasi apesi bango elembo. Alobi: “Moto oyo nakopwɛpwa, ezali ye; bókanga ye mpe bókɛngɛla ye malamumalamu na nzela.”​—Marko 14:44.

      Ntango Yudasi akɔti na elanga na ebele ya bato yango, amoni Yesu ná bantoma na ye mpe akei mbala moko epai ya Yesu. Yudasi alobi: “Mbote, Rabi!” mpe apwɛpwi Yesu na boboto mpenza. Yesu atuni: “Moninga, mpo na nini ozali awa?” (Matai 26:49, 50) Yesu ye moko ayanoli na motuna yango: “Yudasi, ozali kotɛka Mwana ya moto na lipwɛpwɛ?” (Luka 22:48) Yesu alongoli likebi na ye epai ya Yudasi.

      Sikoyo apusani pene na bato oyo basimbi bisungi ya mɔtɔ ná miinda mpe atuni: “Bozali koluka nani?” Bato yango bayanoli: “Yesu Monazarete.” Na mpiko nyonso, Yesu alobi: “Ngai nazali ye.” (Yoane 18:4, 5) Lokola bayebi te nini ekosalema, bakwei na nse.

      Atako molili ezali, na esika Yesu akima, akimi te, atuni nde bato yango lisusu moto oyo bazali koluka. Ntango balobi lisusu, “Yesu Monazarete,” alobi na bango na kimya ete: “Nayebisaki bino ngai nazali ye. Na yango, soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika baoyo bákende.” Ata na ntango wana ya yikiyiki, Yesu akanisi lisusu makambo oyo alobaki liboso, ete akobungisa ata moto moko te. (Yoane 6:39; 17:12) Yesu abateli bantoma na ye ya sembo mpe abungisi ata moko te “longola kaka mwana ya libebi,” Yudasi. (Yoane 18:7-9) Na yango, sikoyo asɛngi ete bátika bayekoli na ye ya sembo bákende.

      Ntango basoda batɛlɛmi mpe bazali kopusana pene na Yesu, bantoma bamoni ete balingi kokanga Yesu. Batuni ye: “Nkolo, tóbɛta na mopanga?” (Luka 22:49) Liboso kutu Yesu apesa eyano, Petro azwi moko ya mipanga mibale oyo bantoma bazalaki na yango. Alandi Malakusi, moombo ya nganga-nzambe monene, mpe akati ye litoi ya mobali.

      Yesu asimbi litoi ya Malakusi mpe abikisi yango. Na nsima apesi liteya moko ya ntina mingi, alobi na Petro: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” Yesu andimi bákanga ye, mpo alobi: “Ndenge nini Makomami ekokokisama, ete yango esengeli kosalema bongo?” (Matai 26:52, 54) Alobi lisusu: “Kɔpɔ oyo Tata apesi ngai, nasengeli komɛla yango te?” (Yoane 18:11) Yesu andimi ete mokano ya Tata na ye mpo na ye esalema, ata soki esɛngi ete akufa.

      Yesu atuni ebele ya bato yango: “Bobimi na mipanga mpe na mangenda mpo na kokanga ngai lokola nde boyeli moyibi moko boye? Mokolo na mokolo nafandaki na tempelo mpo na koteya, kasi bokangaki ngai te. Kasi nyonso oyo esalemi mpo makomi ya basakoli ekokisama.”​—Matai 26:55, 56.

      Basoda nyonso, mokonzi na bango, ná bakonzi ya Bayuda bakangi Yesu mpe bakangi ye bansinga. Ntango bantoma bamoni bongo, bakimi. Kasi, “elenge mobali moko,” mbala mosusu moyekoli Marko, atikali na kati ya ebele ya bato mpo na kolanda Yesu. (Marko 14:51) Ntango ebele ya bato yango bamoni ye, baluki kokanga ye, bongo alongoli elamba na ye ya lini mpe akimi.

      • Mpo na nini Yudasi akei koluka Yesu na elanga ya Getesemane?

      • Petro asali likambo nini mpo na kokɔtela Yesu, kasi Yesu alobi nini?

      • Ndenge nini Yesu amonisi ete andimi mokano ya Nzambe mpo na ye esalema?

      • Ntango bantoma basundoli Yesu, nani atikali mpe likambo nini ekómeli ye?

  • Bamemi Yesu epai ya Anasi, na nsima epai ya Kaifa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Kaifa apasoli elamba na ye, bato mosusu bazali kobɛta Yesu bambata, kosɛka ye mpe kobɛta ye makofi

      MOKAPO 125

      Bamemi Yesu epai ya Anasi, na nsima epai ya Kaifa

      MATAI 26:57-68 MARKO 14:53-65 LUKA 22:54, 63-65 YOANE 18:13, 14, 19-24

      • BAKEI NA YESU EPAI YA ANASI, OYO AZALAKI KALA NGANGA-NZAMBE MONENE

      • SANEDRINA ESAMBISI YE NA KOLANDA MIBEKO TE

      Ntango bakangi Yesu lokola mosali-mabe, bakei na ye epai ya Anasi, oyo azalaki nganga-nzambe monene ntango elenge Yesu akamwisaki bateyi na tempelo. (Luka 2:42, 47) Na nsima, bana mosusu ya Anasi basalaki mosala ya nganga-nzambe monene, kasi sikoyo, Kaifa, bokilo na ye, nde azali nganga-nzambe monene.

      Wana Yesu azali epai ya Anasi, Kaifa aluki koyanganisa Sanedrina mobimba. Sanedrina ezali na mibali 71, kati na bango, nganga-nzambe monene mpe baoyo basalá mosala yango.

      Anasi atuni Yesu mituna “mpo na bayekoli na ye mpe mpo na mateya na ye.” Yesu ayanoli: “Nalobaki na mokili polele. Nazalaki ntango nyonso koteya na basinagoga mpe na tempelo, epai Bayuda nyonso bayanganaka; mpe nalobaki ata likambo moko te na kobombana. Mpo na nini ozali kotuna ngai? Tuná baoyo bayokaki makambo oyo nalobaki na bango.”​—Yoane 18:19-21.

      Mokonzi moko ya basoda oyo atɛlɛmi wana abɛti Yesu mbata na elongi mpe apameli ye ete: “Ndenge wana nde ozali koyanola nganga-nzambe mokonzi?” Kasi lokola Yesu ayebi ete alobi mabe te azongisi: “Soki nalobi mabe, monisá mabe yango; kasi soki nalobi malamu, mpo na nini obɛti ngai?” (Yoane 18:22, 23) Sikoyo, Anasi atindi bámema Yesu epai ya bokilo na ye Kaifa.

      Sanedrina mobimba, elingi koloba nganga-nzambe monene, mikóló ya bato, mpe bakomeli, bayangani. Bazali na ndako ya Kaifa. Mibeko epekisi kosambisa moto na butu ya mokolo ya Elekeli, kasi bango bayangani kaka mpo bákokisa mokano mabe na bango.

      Bato yango batondi na makanisi ya mabe. Nsima ya lisekwa ya Lazare, Sanedrina esalaki likita mpo báboma Yesu. (Yoane 11:47-53) Mpe eleki kaka mwa mikolo, bakonzi ya mangomba basalaki likita mpo bákanga Yesu mpe báboma ye. (Matai 26:3, 4) Kutu, ata liboso bábanda kosambisa Yesu, bayebaki ete bakoboma ye kaka.

      Banganga-nzambe bakonzi mpe basambisi mosusu ya Sanedrina bazali kosambisa Yesu na kolanda mibeko te; baluki mpe bato oyo bakokosela Yesu makambo mpo na kokweisa ye. Bazwi bato ebele, kasi bazali koloba makambo oyo ezangi motó ná makolo. Nsukansuka, bato mibale baleki liboso mpe balobi: “Toyokaki ye azali koloba ete: ‘Nakobuka tempelo oyo, esalemá na mabɔkɔ mpe na mikolo misato nakotonga mosusu esalemá na mabɔkɔ te.’” (Marko 14:58) Kasi ata makambo oyo balobi mpe ezali koyokana mpenza te.

      Kaifa atuni Yesu: “Ozali kozongisa ata eloko te? Likambo nini bato oyo bazali kofunda yo na yango?” (Marko 14:60) Yesu afandi kaka nyɛɛ liboso ya bato yango oyo bazali kofunda ye na makambo oyo ezali na boyokani te. Sikoyo, Nganga-nzambe monene Kaifa aluki mayele mosusu.

      Kaifa ayebi ete Bayuda balingaka te koyoka moto aloba ete azali Mwana ya Nzambe. Liboso, ntango Yesu abengaki Nzambe Tata na ye, Bayuda balingaki koboma ye mpo balobaki ete “amikokanisi na Nzambe.” (Yoane 5:17, 18; 10:31-39) Lokola Kaifa ayebi bongo, atuni Yesu na mayele mabe ete: “Na nkombo ya Nzambe ya bomoi nalapisi yo ndai ete oyebisa biso soki ozali Kristo Mwana ya Nzambe!” (Matai 26:63) Yesu andimaka ete azali Mwana ya Nzambe. (Yoane 3:18; 5:25; 11:4) Sikoyo soki Yesu andimi yango te, ekoki komonana ete awangani ete azali Mwana ya Nzambe mpe Kristo. Yango wana Yesu alobi: “Ezali ngai; mpe bokomona Mwana ya moto afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe azali koya na mapata ya likoló.”​—Marko 14:62.

      Na yango, Kaifa adasuki, apasoli bilamba na ye mpe agangi: “Afingi Nzambe! Ntina nini tóluka lisusu batatoli? Talá! Sikoyo boyoki ndenge afingi Nzambe. Bokanisi nini?” Sanedrina ezwi ekateli oyo ebongi te, elobi: “Abongi na liwa.”​—Matai 26:65, 66.

      Na nsima, babandi kotyola Yesu mpe kobɛta ye makofi. Basusu bazali kobɛta ye bambata na elongi mpe kobwakela ye nsoi. Bazipi elongi na ye mobimba mpe babɛti ye bambata, mpe bayebisi ye na lityo ete: “Sakolá. Nani abɛti yo?” (Luka 22:64) Moto oyo bazali kosala ndenge wana mpe kosambisa butubutu, atako eyokani na mibeko te, ezali nde Mwana ya Nzambe!

      • Bakei naino na Yesu epai ya nani, mpe nini ekómeli ye kuna?

      • Na nsima, bakei na Yesu wapi, mpe Kaifa asali nini mpo Sanedrina ekata ete Yesu abongi na liwa?

      • Makambo nini ya mabe esalemi ntango bazali kosambisa Yesu?

  • Petro awangani Yesu na ndako ya Kaifa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu azali na veranda ya likoló, azali kotala Petro moto auti kowangana ye; nsoso ya mobali ezali na nsima

      MOKAPO 126

      Petro awangani Yesu na ndako ya Kaifa

      MATAI 26:69-75 MARKO 14:66-72 LUKA 22:54-62 YOANE 18:15-18, 25-27

      • PETRO AWANGANI YESU

      Ntango kaka bakangi Yesu na elanga ya Getesemane, bantoma babangi, bakimi, basundoli ye. Kasi, na nsima mibale kati na bango batɛlɛmi. Ezali Petro “ná moyekoli mosusu,” na ntembe te ntoma Yoane. (Yoane 18:15; 19:35; 21:24) Mbala mosusu bamoni Yesu ntango bazali kokende na ye na ndako ya Anasi. Ntango Anasi atindi Yesu epai ya Nganga-nzambe monene Kaifa, Petro ná Yoane bazali kolanda na mosika. Na ntembe te bazali kobanga mpo na bomoi na bango, kasi bazali mpe komitungisa mpo na makambo oyo ekokómela Nkolo na bango.

      Lokola Yoane ayebani na nganga-nzambe monene, bandimi akɔta na lopango ya Kaifa. Petro atikali libándá tii ntango Yoane abimi mpe asololi na mwana mwasi oyo azali kokɛngɛla na porte. Na nsima, mwana mwasi yango akɔtisi Petro.

      Lokola malili ezali makasi, bato oyo bazali na lopango bapelisi mɔtɔ ya makala mpo na koyɔta. Petro afandi na bango wana azali kozela “komona ndenge makambo” ekosukela Yesu. (Matai 26:58) Sikoyo, kongɛnga ya mɔtɔ oyo ezali kopela esali ete mokɛngɛli ya porte oyo akɔtisaki Petro amona ye malamu. Atuni ye: “Yo mpe ozali moko ya bayekoli ya moto wana, boye te?” (Yoane 18:17) Ezali kaka mwana mwasi wana ye moko te nde ayebi Petro mpe atuni ye soki azali moyekoli ya Yesu.​—Matai 26:69, 71-73; Marko 14:70.

      Likambo yango etungisi Petro makasi. Azali kosala makasi abenda likebi ya bato te, kutu akei na porte ya lopango. Na yango, Petro awangani, amonisi ete azalaki na Yesu te, kutu alobi: “Nayebi ye te mpe nazali kokanga ntina ya makambo ozali koloba te.” (Marko 14:67, 68) Abandi mpe “komilakela mabe mpe kolapa ndai,” elingi koloba akati seleka ete maloba na ye ezali solo mpe andimi mabe ekómela ye soki ezali bongo te.​—Matai 26:74.

      Na ntango wana, bazali kosambisa Yesu, mbala mosusu na eteni moko ya ndako ya Kaifa, na likoló ya etajɛ. Ntango mosusu Petro ná bato mosusu oyo bazali kozela na nse bazali komona ndenge batatoli ndenge na ndenge bazali koya mpe kokende.

      Lokola elobeli ya Petro ezali lokola oyo ya bato ya Galile, yango ezali kofunda ye. Lisusu, moto moko kati na bato oyo bazali wana azali ndeko ya Malakusi, oyo Petro akataki litoi. Makambo eyindi lisusu mpo na Petro, alobi na ye: “Namonaki yo na elanga elongo na ye, boye te?” Ntango Petro awangani lisusu, mbala ya misato, nsoso eleli, kaka ndenge esakolamaki.​—Yoane 13:38; 18:26, 27.

      Na ntango yango, emonani ete Yesu azali na veranda ya likoló mpe azali kotala na nse. Nkolo abaluki mpe atali Petro, mpe na ntembe te epasoli Petro motema. Akanisi lisusu makambo Yesu alobaki na shambrɛ ya likoló, eleki kaka mwa bangonga. Kanisá ndenge Petro amiyoki ntango akangi ntina ya makambo asali! Petro abimi libándá mpe aleli na mawa makasi.​—Luka 22:61, 62.

      Ndenge nini asali likambo ya boye? Ndenge nini Petro, oyo alobaki ete azali makasi na elimo mpe akotikala sembo, awangani Nkolo na ye? Bazali kolobela solo mabe mpe kokweisa Yesu ete azali mosali-mabe. Na esika akɔtela Moto oyo azali na “maloba ya bomoi ya seko,” Petro apesi ye mokɔngɔ.​—Yoane 6:68.

      Likambo ya mawa oyo ekómeli Petro emonisi ete ata moto ya kondima makasi mpe oyo akangamá na Nzambe akoki kotɛngatɛnga soki amibongisi malamu te mpo na komekama oyo ekoki kobima na mbalakaka. Likambo oyo ekómelaki Petro ezali likebisi mpo na basaleli nyonso ya Nzambe!

      • Ndenge nini Petro ná Yoane bakɔti na lopango ya Kaifa?

      • Ntango Petro ná Yoane bazali na lopango, likambo nini ezali koleka na kati ya ndako?

      • Ndenge Petro alapi ndai mpe amilakeli mabe, elimboli nini?

      • Likambo oyo ekómeli Petro epesi biso liteya nini?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto