Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nsima ya kosamba na Sanedrina, bamemi ye epai ya Pilate
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu atɛlɛmi liboso ya Ponse Pilate

      MOKAPO 127

      Nsima ya kosamba na Sanedrina, bamemi ye epai ya Pilate

      MATAI 27:1-11 MARKO 15:1 LUKA 22:66–23:3 YOANE 18:28-35

      • ASAMBI LIBOSO YA SANEDRINA NA NTƆNGƆ

      • YUDASI MOKERIOTA AMITYE NSINGA NA NKINGO NA NZETE

      • PILATE AKATELI YESU ETUMBU YA LIWA

      Ntɔngɔ ebandi kotana wana Petro awangani Yesu mbala ya misato. Basambisi ya Sanedrina basilisi kosambisa Yesu likolólikoló mpe bapalangani. Bayangani lisusu na ntɔngɔ ya mokolo ya mitano, na ntembe te mpo bábomba mabe oyo basalaki ndenge basambisaki Yesu butubutu. Babengi lisusu Yesu.

      Batuni ye lisusu: “Soki ozali Kristo, yebisá biso.” Yesu ayanoli: “Ata soki nayebisi bino, bokondima yango ata moke te. Lisusu, soki ngai natuni bino motuna, bokopesa eyano ata moke te.” Kasi, na mpiko nyonso Yesu ayebisi bango ete Danyele 7:13 elobelaki nde ye. Alobi: “Banda sikoyo, Mwana ya moto akofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe oyo etondi na nguya.”​—Luka 22:67-69; Matai 26:63.

      Batuni lisusu: “Boye yo ozali Mwana ya Nzambe?” Yesu ayanoli: “Bino moko bozali koloba ete ngai nazali ye.” Bamoni ete Yesu abongi na liwa mpo koloba bongo ezali kofinga Nzambe. Batuni: “Ntina nini tóluka lisusu litatoli?” (Luka 22:70, 71; Marko 14:64) Na yango, bakangi Yesu bansinga mpe bakei na ye epai ya Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma.

      Mbala mosusu Yudasi Mokeriota amoni ndenge bazali kokende na Yesu epai ya Pilate. Ntango amoni ete bakateli Yesu etumbu ya liwa, ayoki mwa mawa mpe asili mayele. Kasi, na esika abongola motema mpe azongela Nzambe, akei nde kozongisa shekele ya palata 30 oyo bapesaki ye. Yudasi alobi na banganga-nzambe bakonzi: “Nasalaki lisumu lokola natɛkaki makila ya boyengebene.” Bazongiseli ye na lityo ete: “Yango etali biso na nini? Etali yo moko!”​—Matai 27:4.

      Yudasi abwaki shekele ya palata 30 yango na tempelo mpe akei kosala mabe mosusu​—komiboma. Ntango amitye nsinga na nkingo, emonani ete etape ya nzete oyo akangaki nsinga yango ebukani. Bongo akwei likoló ya libanga, apasuki na katikati.​—Misala 1:17, 18.

      Ezali naino ntɔngɔ makasi ntango bakei na Yesu na ndako ya Ponse Pilate. Kasi Bayuda oyo bakei na ye baboyi kokɔta. Bamoni ete kokutana ndenge wana na bato ya bikólo mosusu ekokómisa bango mbindo. Soki bakómi mbindo, bakolya te bilei ya mokolo ya 15 Nisana, mokolo ya liboso ya Fɛti ya bagato ezangá levire, oyo mpo na bango ezali na kati ya fɛti ya Elekeli.

      Pilate abimi libándá mpe atuni bango: “Bozali kofunda moto oyo na likambo nini?” Bazongiseli ye ete: “Soki moto oyo azalaki mosali mabe te, mbɛlɛ tokabi ye epai na yo te.” Mbala mosusu Pilate amoni ete bazali kotya ye mpanzi likoló, yango wana alobi: “Bókamata ye bino moko mpe bósambisa ye na kolanda mibeko na bino.” Bayuda bamonisi ete mposa na bango ezali ete Yesu abomama, balobi: “Topesami nzela ya koboma moto te.”​—Yoane 18:29-31.

      Ya solo, soki babomi Yesu na ntango ya fɛti ya Elekeli, yikiyiki monene ekoki kobima. Kasi, soki bato ya Roma babomi Yesu mpo azali kotɛmɛla Kaisala, mpo bazali na lotomo ya kosala yango, Bayuda bakozala na ngambo te liboso ya bato.

      Bakonzi ya mangomba bayebisi Pilate te ete bakatelaki Yesu etumbu ya liwa mpo afingi Nzambe. Babimisi bifundeli ya lokuta, balobi: “Tokuti moto oyo [1] azali kokɔtisa mobulu na ekólo na biso, [2] azali kopekisa kofuta Kaisala mpako, mpe [3] koloba ete ye nde Kristo mokonzi.”​—Luka 23:2.

      Lokola Pilate azali momonisi ya Roma, koyoka ete Yesu azali komibenga mokonzi ebendi likebi na ye. Na yango, Pilate azongi na kati ya ndako, abengi Yesu mpe atuni ye: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?” Na maloba mosusu, ‘Oyebi ete obuki mibeko ndenge ozali komibenga mokonzi, mpo ezali kotɛmɛla Kaisala?’ Mbala mosusu mpo na koyeba makambo oyo Pilate ayebi mpo na ye, Yesu atuni ye: “Ezali yo moko nde olobi bongo, to bato mosusu nde bayebisi yo yango mpo na ngai?”​—Yoane 18:33, 34.

      Pilate amonisi ete ayebi Yesu te, kasi alingi koyeba ye; alobi: “Ngai nazali Moyuda te, boye te?” Abakisi: “Ekólo na yo moko mpe banganga-nzambe bakonzi bakabi yo epai na ngai. Osali nini?”​—Yoane 18:35.

      Yesu ayebi ete azali kolobela likambo ya bokonzi. Apesi biyano oyo ekamwisi mpenza Guvɛrnɛrɛ Pilate.

      ELANGA YA MAKILA

      Yudasi abwaki shekele ya palata 30 na tempelo

      Banganga-nzambe bakonzi bayebi te eloko nini básala na shekele ya palata oyo Yudasi abwaki na tempelo. Balobi: “Esengeli kotya yango na ebombelo mosantu te, mpo yango ezali motuya ya makila.” Yango wana, basombaki na mbongo yango elanga ya moyemi-mbɛki mpo bákundaka bapaya. Bakómaki kobenga yango “Elanga ya Makila.”​—Matai 27:6-8.

      • Mpo na nini basambisi ya Sanedrina bayangani lisusu na ntɔngɔ?

      • Yudasi akufi ndenge nini, mpe basali nini na shekele ya palata 30?

      • Bayuda babimisi bifundeli nini ya lokuta mpo Pilate aboma Yesu?

  • Pilate ná Erode bazwi ye na likambo te
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Erode ná basoda na ye bazali kosɛka Yesu

      MOKAPO 128

      Pilate ná Erode bazwi ye na likambo te

      MATAI 27:12-14, 18, 19 MARKO 15:2-5 LUKA 23:4-16 YOANE 18:36-38

      • PILATE NÁ ERODE BASAMBISI YESU

      Yesu ayebisi Pilate polele ete azali mokonzi. Kasi, Bokonzi na ye ezali likama te mpo na Roma. Yesu alobi: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoane 18:36) Ya solo, Yesu azali na Bokonzi, kasi ezali ya mokili oyo te.

      Pilate asuki wana te. Atuni: “Boye, ozali mokonzi?” Yesu amonisi Pilate ete alobi likambo ya solo, ayebisi ye: “Yo moko olobi ete nazali mokonzi. Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina na solo. Moto nyonso oyo azali na ngámbo ya solo ayokaka mongongo na ngai.”​—Yoane 18:37.

      Mwa moke liboso, Yesu alobaki na Toma ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.” Sikoyo, Pilate mpe ayoki ete Yesu ayaki awa na mabele mpo na kopesa litatoli oyo etali “solo,” mingimingi solo ya Bokonzi na ye. Yesu azali na ekateli ya kokangama na solo yango ata soki bakoboma ye mpo na yango. Pilate atuni: “Solo ezali nini?” kasi azeli eyano te. Amoni ete oyo ayoki ekoki mpo na kosambisa Yesu.​—Yoane 14:6; 18:38.

      Pilate azongi lisusu epai ya ebele ya bato oyo bazali libándá. Ekoki kozala ete Yesu atɛlɛmi pene na ye ntango alobi na banganga-nzambe bakonzi mpe bato oyo bazali na bango ete: “Nazwi moto oyo na mabe moko te.” Ebele ya bato yango basiliki, balobi: “Azali kotombokisa bato na ndenge azali koteya na Yudea mobimba, ɛɛ banda na Galile tii awa.”​—Luka 23:4, 5.

      Na ntembe te, mbamba ya Bayuda ekamwisi Pilate. Wana banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya bato bazali koganga, Pilate atuni Yesu: “Ozali koyoka te ebele ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango?” (Matai 27:13) Yesu apesi ye eyano te. Ndenge afandi kimya liboso ya bifundeli mabe ya bato wana ekamwisi Pilate.

      Bayuda balobi ete Yesu ‘abandaki banda na Galile.’ Maloba wana esalisi Pilate ayeba ete Yesu azali nde Mogalile. Na yango Pilate akanisi likambo oyo akoki kosala mpo akima mokumba ya kosambisa Yesu. Erode Antipasi (mwana ya Erode Monene) azali koyangela Galile, mpe azali sikoyo na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli. Na yango, Pilate atindi Yesu epai ya Erode. Erode Antipasi nde atindaki bákata Yoane Mobatisi motó. Na nsima, ntango Erode Antipasi ayoki Yesu azalaki kosala makamwisi minene, akanisaki ete Yesu ezali nde Yoane azongi na bomoi.​—Luka 9:7-9.

      Erode asepeli ndenge akomona Yesu. Ezali te mpo alingi kosalisa Yesu to alingi kosala makasi ayeba mpenza soki makambo oyo bafundi ye na yango ezali solo. Mposa ya Erode ezali kaka ya komona Yesu, mpe azali “kolikya komona ye asala mwa elembo.” (Luka 23:8) Kasi, Yesu akokisi bamposa ya Erode te. Kutu, ntango Erode azali kotuna ye mituna, Yesu apesi ye ata eyano te. Erode ná basoda na ye balɛmbi nzoto mpe ‘batyoli’ Yesu. (Luka 23:11) Balatisi ye elamba moko ya ngɛlingɛli mpe babandi kosɛka ye. Na nsima, Erode azongisi Yesu epai ya Pilate. Erode ná Pilate bazalaki koyinana, kasi sikoyo bakómi baninga.

      Ntango Yesu azongi, Pilate abengisi banganga-nzambe bakonzi, bayangeli ya Bayuda ná bato mpe alobi: “Natuni ye na miso na bino kasi namoni moto oyo na eloko moko te oyo ezali kondimisa bifundeli oyo bozali kofunda ye na yango. Kutu, Erode mpe amoni bongo, mpo azongiseli biso ye; mpe talá! asali eloko moko te oyo ebongi na liwa. Yango wana, nakobɛta ye fimbo mpe nakotika ye.”​—Luka 23:14-16.

      Pilate alingi mpenza kotika Yesu, mpo amoni ete banganga-nzambe bayei na ye epai na ye kaka mpo na likunya. Likambo mosusu elendisi Pilate aluka mpenza kotika Yesu. Ntango azali kosambisa Yesu, mwasi na ye atindeli ye maloba ete: “Kokɔta na likambo ya moyengebene wana te, mpo nanyokwami mingi lelo na ndɔtɔ [oyo ntango mosusu euti epai ya Nzambe] mpo na ye.”​—Matai 27:19.

      Pilate akosala nini mpo na kotika moto yango oyo asali likambo te?

      • Ndenge nini Yesu alobeli “solo” oyo etali bokonzi na ye?

      • Pilate alobi nini mpo na Yesu, ebele ya bato basali nini, mpe Pilate asali nini?

      • Mpo na nini Erode Antipasi asepeli komona Yesu, mpe nini esalemi?

      • Mpo na nini Pilate alingi kotika Yesu?

  • Pilate alobi: “Talá! Moto!”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Pilate abimisi Yesu libándá, balatisi ye motole ya banzubɛ mpe elamba ya motane makasi

      MOKAPO 129

      Pilate alobi: “Talá! Moto!”

      MATAI 27:15-17, 20-30 MARKO 15:6-19 LUKA 23:18-25 YOANE 18:39–19:5

      • PILATE ALUKI KOTIKA YESU

      • BAYUDA BASƐNGI BÁBIMISA NDE BARABASI

      • BASƐKI YESU MPE BANYOKOLI YE

      Pilate ayebisi ebele ya bato oyo balingi Yesu akufa ete: “Namoni moto oyo na eloko moko te oyo ezali kondimisa bifundeli oyo bozali kofunda ye na yango. Kutu, Erode mpe amoni bongo.” (Luka 23:14, 15) Sikoyo, mpo na koluka kotika Yesu, Pilate asaleli mayele mosusu, alobi na bato: “Bozalaka na momeseno ete nabimisela bino moto moko na Elekeli. Na yango, bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda?”​—Yoane 18:39.

      Pilate ayebi ete na bolɔkɔ, ezali na moto moko na nkombo Barabasi, oyo azali moyibi, atindaka bato bátomboka, mpe abomaka bato. Na yango Pilate atuni: “Bolingi nabimisela bino nani, Barabasi to Yesu oyo babengi Kristo?” Banganga-nzambe bakonzi batindi bato básɛnga bábimisela bango Barabasi, kasi Yesu te. Pilate atuni lisusu: “Kati na bango mibale bolingi nabimisela bino nani?” Bato yango bagangi: “Barabasi”!​—Matai 27:17, 21.

      Pilate azwi mobulu na makanisi; atuni: “Bongo nasala nini na Yesu oyo babengi Kristo?” Bato yango babeleli ete: “Abakama na nzete!” (Matai 27:22) Bazali ata na nsɔni te; bazali kosɛnga liwa ya moto oyo asali eloko te. Pilate atuni bango: “Mpo na nini, mabe nini moto oyo asali? Namoni ye na eloko moko te oyo ebongi na liwa; yango wana, nakobɛta ye fimbo mpe nakotika ye.”​—Luka 23:22.

      Atako Pilate asali nyonso mpo na kotika Yesu, ebele ya bato wana oyo bazali na nkanda bagangi: “Abakama na nzete!” (Matai 27:23) Bakonzi ya mangomba nde batindi bato básilika makasi mpo makila esopama. Makila yango ezali te ya mosali-mabe to ya mobomi-bato moko boye. Ezali nde makila ya moto oyo asali eloko te, oyo mikolo mitano liboso bayambaki ye na Yerusaleme lokola Mokonzi. Ata soki bayekoli ya Yesu bazali wana, bafandi kaka nyɛɛ, moko te amimonisi.

      Pilate amoni ete nyonso oyo azali kosala ezali kolonga te. Lokola yikiyiki ezali kokóma makasi, akamati mai mpe asukoli mabɔkɔ na ye na miso ya ebele ya bato. Alobi na bango: “Ngai nazali na ngambo te na makila ya moto oyo. Yango etali bino moko.” Atako asali bongo, ebele ya bato yango babongoli makanisi te. Balobi: “Makila na ye ekwela biso ná bana na biso.”​—Matai 27:24, 25.

      Guvɛrnɛrɛ yango aluki kokokisa mposa na bango na esika asala likambo oyo ezali sembo. Kaka ndenge ebele ya bato yango basɛngi, Pilate abimiseli bango Barabasi. Atindi bálongola Yesu bilamba mpe bábɛta ye fimbo.

      Nsima ya kobɛta Yesu mabe ndenge wana, basoda bakɔtisi Yesu na ndako ya guvɛrnɛrɛ. Bayanganisi etuluku mobimba ya basoda mpe babandi lisusu kofinga ye. Batongi motole ya nzubɛ mpe balatisi ye yango na motó. Basoda yango basimbisi ye mongendu na lobɔkɔ ya mobali mpe balatisi ye kazaka moko ya motane, lokola oyo mokonzi alataka. Bazali kotyola ye, balobi: “Mbote, yo Mokonzi ya Bayuda!” (Matai 27:28, 29) Lisusu, babwakeli ye nsoi mpe babɛti ye bambata na elongi. Bazwi mongendu oyo basimbisaki ye mpe babandi kobɛta ye yango na motó, bongo banzubɛ ya “motole” oyo balatisaki ye mpo na kotyola ye ekɔti lisusu makasi na motó na ye.

      Ndenge Yesu abateli lokumu na ye mpe amonisi mpiko liboso ya minyoko wana ekamwisi Pilate mpe aluki mayele mosusu mpo alongwa na ngambo, alobi: “Talá! Namemi ye epai na bino na libándá mpo bóyeba ete nazwi ye ata na mabe moko te.” Ntango mosusu Pilate akanisi ete soki abimisi Yesu libándá mpe ebele ya bato bamoni ndenge azoki mpe makila ezali kotanga bakozongisa motema nsima! Ntango Yesu atɛlɛmi liboso ya ebele ya bato yango ya mitema mabe, Pilate alobi: “Talá! Moto!”​—Yoane 19:4, 5.

      Atako babɛtaki Yesu mpe bazokisaki ye, abateli lokumu na ye mpe atikali kimya, kutu ata Pilate andimi yango, mpo emonani ete alobaki na limemya mpe na mawa.

      KOBƐTA FIMBO

      Nsinga mpo na kobɛta moto

      Na buku moko (The Journal of the American Medical Association), monganga William Edwards amonisi ndenge bato ya Roma bazalaki kobɛta fimbo:

      “Bazalaki kosalela fimbo moko ya mokuse (flagrum to flagellum) oyo ezalaki nsinga moko basalá na mposo ya nyama to bakangá yango lokola nsuki, oyo na katikati na yango batyá bibende ya mikemike to biteni ya mikuwa ya mpate oyo ekoki kozokisa. . . . Ntango basoda ya Roma bazali kobɛtabɛta moto na mokɔngɔ na makasi na bango nyonso, bibende yango ezalaki kovimbisa moto yango makasi, mpe bansinga ya mposo ya nyama mpe mikuwa ya mpate ezalaki kopanza misuni. Lokola bazali kaka kobɛta ye, bampota ezali kokóma minene mpe misuni ya kati oyo ekangami na mikuwa ezali komonana, mpe ezali kobimisa makila ebele.”

      • Pilate asali nini mpo na koluka kotika Yesu mpe komilongola na ngambo?

      • Kobɛta oyo babɛtaki Yesu ezalaki ya ndenge nini?

      • Nsima ya kobɛta Yesu, ndenge nini banyokoli ye lisusu?

  • Bakabi Yesu mpe bakei koboma ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu azali kobunda na kilo ya nzete ya mpasi; soda moko akangi Simo moto ya Sirene amemela ye yango

      MOKAPO 130

      Bakabi Yesu mpe bakei koboma ye

      MATAI 27:31, 32 MARKO 15:20, 21 LUKA 23:24-31 YOANE 19:6-17

      • PILATE ALUKI NDENGE YA KOTIKA YESU

      • BAKATELI YESU ETUMBU YA LIWA

      Atako banyokoli Yesu mpe basɛkisɛki ye, milende oyo Pilate asali mpo na kotika ye ezongisi banganga-nzambe bakonzi mpe baninga na bango nsima te. Balingi eloko moko te epekisa bango koboma Yesu. Bazali se koganga ete: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!” Pilate ayebisi bango ete: “Bókamata ye bino moko mpe bóbaka ye na nzete, mpo nazwi ye ata na mabe moko te.”​—Yoane 19:6.

      Bayuda balongi te kondimisa Pilate ete Yesu abongi na liwa mpo abuki mibeko ya Kaisala. Bongo na makambo ya losambo? Bazongeli likambo oyo balobaki liboso ya Sanedrina mpo na kofunda Yesu ete afingi Nzambe. Balobi: “Tozali na mobeko moko, mpe na kolanda mobeko yango asengeli kokufa, mpo amikómisi mwana ya Nzambe.” (Yoane 19:7) Mbala ya liboso Pilate ayoka likambo yango.

      Pilate akɔti lisusu na ndako na ye mpo na koluka kotika moto yango oyo azokizoki mpo babɛti ye mingi, mpe oyo mwasi ya Pilate alɔtaki na ndɔtɔ. (Matai 27:19) Bongo mpo na likambo oyo Bayuda babimisi lisusu, ete mokangami yango azali “Mwana ya Nzambe”? Pilate ayebi ete Yesu azali moto ya Galile. (Luka 23:5-7) Kasi atuni ye ete: “Yo ozali moto ya wapi?” (Yoane 19:9) Mbala mosusu, Pilate alingi koyeba soki Yesu azalaki na bomoi liboso, to na maloba mosusu, auti nde epai ya Nzambe!

      Pilate ayokaki ntango Yesu ye moko alobaki ete azali mokonzi, kasi Bokonzi na ye ezali ya mokili oyo te. Lokola Yesu alingi kobakisa makambo kilikili te, afandi nyɛɛ. Lokola Yesu aboyi koyanola, Pilate asiliki mpe alobi na ye na nkanda ete: “Ozali koloba na ngai te? Oyebi te ete nazali na bokonzi ya kobimisa yo mpe nazali na bokonzi ya kobaka yo na nzete?”​—Yoane 19:10.

      Yesu alobi: “Olingaki kozala na bokonzi likoló na ngai ata moke te soki yango epesamaki epai na yo te uta na likoló. Yango wana moto oyo akabi ngai epai na yo azali na lisumu oyo eleki monene.” (Yoane 19:11) Na ntembe te, Yesu azali kokanisa kaka moto moko te. Alingi nde komonisa ete Kaifa, bato na ye, mpe Yudasi Mokeriota bazali na ngambo monene koleka Pilate.

      Ezaleli ya Yesu mpe maloba na ye ezali kokamwisa Pilate, mpe akómi kobanga mingi ete mbala mosusu auti na Nzambe; bongo azali kosala nyonso mpo na kobimisa ye. Kasi, Bayuda babimisi likambo mosusu mpo na kobangisa Pilate. Balobi na ye boye: “Soki obimisi moto oyo, ozali moninga ya Kaisala te. Moto nyonso oyo amikómisi mokonzi azali kotɛmɛla Kaisala.”​—Yoane 19:12.

      Guvɛrnɛrɛ abimisi lisusu Yesu libándá, afandi na kiti na ye ya kosambisa, mpe alobi na bato: “Talá! Mokonzi na bino!” Kasi Bayuda baboyi yango. Bagangi: “Longolá ye! Longolá ye! Baká ye na nzete!” Pilate abondeli bango: “Nabaka nde mokonzi na bino na nzete?” Banda kala, Bayuda balingaka lisusu boyangeli ya Baroma te; kasi banganga-nzambe bakonzi bazali koloba makasi ete: “Tozali na mokonzi mosusu te kaka Kaisala.”​—Yoane 19:14, 15.

      Lokola Bayuda bazali kaka kotya Pilate mbamba, abangi mpe apesi bango Yesu mpo abomama. Basoda balongoli Yesu kazaka ya motane makasi mpe balatisi ye bilamba na ye ya likoló. Bamemisi Yesu nzete na ye ya mpasi wana bazali kokende na ye.

      Tozali kaka na ntɔngɔ ya mokolo ya mitano, mwa 14 Nisana. Banda Yesu alamukaki na ntɔngɔ ya mokolo ya minei, alali lisusu te, mpe akutani na makambo ndenge na ndenge ya mpasi. Wana Yesu azali kobunda mpo na komema nzete yango, makasi na ye esili. Basoda bakangi moleki-nzela moko boye, nkombo na ye Simo moto ya Sirene, na Afrika, mpo amema nzete yango esika bakoboma Yesu. Bato mingi balandi, basusu bazali kolela mpe komonisa mawa mpo na likambo oyo ezali kosalema.

      Yesu alobi na basi oyo bazali kolela ete: “Bana basi ya Yerusaleme, bótika kolela ngai. Kasi, bómilela bino moko mpe bólela bana na bino; mpo talá! mikolo ezali koya oyo bato bakoloba ete: ‘Esengo na bikomba, mpe na mabumu oyo ebotaki te mpe na mabɛlɛ oyo emɛlisaki te!’ Bongo bakobanda koloba na bangomba ete: ‘Bókwela biso!’ mpe na bangomba mike ete: ‘Bózipa biso!’ Mpo soki bazali kosala makambo wana naino nzete ezali mobesu, ekozala boni ntango ekokauka?”​—Luka 23:28-31.

      Yesu azali kolobela ekólo ya Bayuda. Ezali lokola nzete oyo ezali kokauka kasi ezali naino na mwa nkasa ya mobesu, mpo Yesu mpe mwa Bayuda oyo bandimeli ye bazali naino. Ntango bakozala lisusu te, kaka bato oyo balɛmbi na elimo nde bakotikala na ekólo yango, bakozala lokola nzete oyo ekufi. Ntango mampinga ya Roma ekokweisa ekólo yango mpo na kokokisa mokano ya Nzambe, bato bakolela mingi mpenza.

      • Bakonzi ya mangomba bafundi Yesu na likambo nini?

      • Mpo na nini Pilate akómi kobanga mingi?

      • Ndenge nini banganga-nzambe bakonzi bandimisi Pilate ete Yesu abomama?

      • Yesu alingi koloba nini ntango alobeli nzete ya ‘mobesu’ mpe ya ‘kokauka’?

  • Mokonzi moko oyo asali eloko te babaki ye na nzete
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Yesu alaki mosali-mabe oyo abakami na nzete pene na ye ete, “Okozala na ngai na Paradiso”

      MOKAPO 131

      Mokonzi moko oyo asali eloko te babaki ye na nzete

      MATAI 27:33-44 MARKO 15:22-32 LUKA 23:32-43 YOANE 19:17-24

      • BABAKI YESU NSƐTƐ NA NZETE YA MPASI

      • MAKAMBO BAKOMI NA NZETE EZALI KOSƐKISA BATO

      • YESU ALAKI MOTO BOMOI NA PARADISO AWA NA MABELE

      Bakei na Yesu mosika ya engumba, esika bakoboma ye ná miyibi mibale. Esika yango ebengami Golgota, to Esika ya Mokuwa ya Motó, mpe ezali komonana “na mosika.”​—Marko 15:40.

      Balongoli mibali misato yango bilamba. Na nsima, bapesi bango vinyo batyá mire mpe nsɔngi ya bololo mpo bálangwa. Emonani ete basi ya Yerusaleme nde bato basali yango, mpe Baroma bapesaka yango bato oyo basengeli kobomama mpo ekitisaka mpasi. Kasi ntango Yesu ameki yango, aboyi komɛla yango. Mpo na nini? Alingi kozala na molangwa te na ntango ya komekama monene wana; alingi ayeba makambo nyonso mpe atikala sembo tii na liwa.

      Babaki Yesu na nzete. (Marko 15:25) Basoda babaki ye nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo, etɔbɔli nzoto mpe bikanganeli na yango, mpe ezali kosala ye mpasi makasi. Ntango bazali kotɛlɛmisa nzete, mpasi ezali kokóma makasi mpo nzoto ya Yesu ezali kobendama mpe kopasuka. Kasi Yesu apameli basoda yango te. Abondeli: “Tata, limbisá bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.”​—Luka 23:34.

      Baroma batyaka makomi likoló ya nzete mpo na komonisa makambo oyo moto oyo babomi asali. Epai ya Yesu, Pilate akomi: “Yesu Monazarete Mokonzi ya Bayuda.” Akomi yango na Ebre, na Latin na Grɛki, mpo bato mingi bátánga yango. Pilate akomi bongo mpo na komonisa ete asepelaki te ndenge Bayuda batyaki ye mbamba aboma Yesu. Banganga-nzambe bakonzi babangi mpe balobi: “Kokoma te ete: ‘Mokonzi ya Bayuda.’” Kasi, Pilate aboyi básakana na ye lisusu, ayanoli: “Oyo nakomi, nakomi.”​—Yoane 19:19-22.

      Na nkanda, banganga-nzambe yango bazongeli lisusu likambo ya lokuta oyo balobaki liboso na Sanedrina. Yango wana, bato oyo bazali koleka wana bazali koningisa motó na kosɛka mpe kofinga ye ete: “Ɛɛ! Yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato, omibikisa na nzete ya mpasi.” Banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe bazali kolobana ete: “Kristo Mokonzi ya Yisraele akita sikoyo na nzete ya mpasi, mpo tómona mpe tóndima.” (Marko 15:29-32) Ata miyibi oyo bazali penepene na ye bapameli ye; nzokande ye asali likambo moko ya mabe te.

      Basoda minei ya Roma mpe bazali kosɛka Yesu. Ntango mosusu bazali komɛla vinyo ya ngayi; sikoyo mpo na kotyola Yesu, bapesi ye mwa ndambo, kasi akokoka kozwa yango te mpo na komɛla yango. Basoda yango ya Roma basɛki makomi oyo ezali likoló ya motó ya Yesu mpe balobi: “Soki ozali mokonzi ya Bayuda, omibikisa yo moko.” (Luka 23:36, 37) Kanisá naino! Moto oyo amonisaki ete azali nzela, solo mpe bomoi, sikoyo bazali konyokola ye mpe kosɛka ye kaka mpamba. Yesu akangi motema na nyonso wana; apameli te Bayuda oyo bazali kotala ye, basoda ya Roma oyo bazali kosɛka ye, to basali-mabe mibale oyo babakami na nzete pene na ye.

      Basoda babwaki mbɛsɛ mpo na kokabola elamba ya Yesu ya likoló

      Basoda minei yango bazwi bilamba ya Yesu ya likoló mpe bakaboli yango na ndambo minei. Babɛti mbɛsɛ mpo na koyeba oyo moto na moto akozwa. Kasi, elamba ya Yesu ya kati ezali na motuya mingi, “etongamaki na biteni te, elitamá mobimba banda na likoló tii na nse.” Basoda yango balobi: “Tópasola yango te, kasi tóbɛta mbɛsɛ mpo na koyeba soki ekozala ya nani.” Na yango, bakokisi esakweli oyo elobi: “Bamikabolelaki bilamba na ngai ya likoló, mpe babwakelaki elamba na ngai mbɛsɛ.”​—Yoane 19:23, 24; Nzembo 22:18.

      Na nsima, moko ya basali-mabe ayei koyeba ete Yesu azali mpenza mokonzi. Apameli moninga na ye, alobi: “Yo ozali kobanga Nzambe te, awa yo ná moto oyo bozwi lisambisi moko? Ɛɛ, kutu biso, esengeli bongo, mpo tozali kozwa oyo ekoki na makambo oyo tosalaki; kasi moto oyo asali likambo moko ya mabe te.” Na nsima, abondeli Yesu, alobi: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.”​—Luka 23:40-42.

      Yesu azongisi: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai,” na Bokonzi te, kasi “na Paradiso.” (Luka 23:43) Elaka yango ekeseni na oyo Yesu apesaki bantoma na ye, ete bakofanda na bakiti ya bokonzi elongo na ye na Bokonzi ya Nzambe. (Matai 19:28; Luka 22:29, 30) Kasi, ekoki kozala ete mosali-mabe yango ayebaki makambo etali Paradiso ya liboso, oyo Yehova asalaki awa na mabele mpo na Adama, Eva, mpe bana na bango. Sikoyo ata soki moyibi yango akufi, azwi elikya ya kozala na Paradiso.

      • Mpo na nini Yesu aboyi komɛla vinyo oyo bapesi ye?

      • Makomi nini batye likoló ya motó ya Yesu, mpe Bayuda basali nini?

      • Ndenge nini esakweli oyo elobelaki bilamba ya Yesu ekokisami?

      • Elikya nini Yesu apesi mosali-mabe?

  • “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Ntango Yesu akufi na nzete pene ya basali-mabe mibale, mokonzi moko ya basoda alobi: “Ya solo moto oyo azalaki mwana ya Nzambe”

      MOKAPO 132

      “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe”

      MATAI 27:45-56 MARKO 15:33-41 LUKA 23:44-49 YOANE 19:25-30

      • YESU AKUFI NA NZETE

      • MAKAMBO YA NSƆMƆ ESALEMI NA LIWA YA YESU

      Ekómi sikoyo “ngonga ya motoba,” to midi. Molili moko makasi ekɔti “na mokili wana mobimba tii na ngonga ya libwa,” elingi koloba ngonga ya misato nsima ya midi. (Marko 15:33) Molili yango ya nsɔmɔ ekɔti te mpo na ekilipisi (sanza ezipi moi). Likambo wana esalemaka nde ntango sanza ebimi sika, nzokande awa tozali na eleko ya Elekeli, sanza ekómi mobimba. Molili yango eumeli mingi koleka ekilipisi (sanza ezipaka moi kaka mwa miniti moke). Na yango, Nzambe nde atindi molili yango.

      Kanisá ndenge bato oyo bazali kosɛka Yesu bayoki. Na kati ya molili yango, basi minei bapusani pene na nzete ya mpasi. Ezali mama ya Yesu, Salome, Maria Magadalena mpe Maria mama ya Yakobo Moke.

      Ntoma Yoane atɛlɛmi “pene ya nzete ya mpasi” elongo na mama ya Yesu, oyo azali kolela. Maria azali kotala ndenge mwana oyo amemaki na libumu na ye mpe abɔkɔlaki azali konyokwama na nzete ya mpasi. Maria azali koyoka lokola batɔbɔli ye na “mopanga molai.” (Yoane 19:25; Luka 2:35) Atako Yesu azali na mpasi makasi, abosani mama na ye te. Asali makasi mpo atala Yoane mpe alobi na mama na ye ete: “Mwasi, talá! Mwana na yo!” Na nsima, atali Maria mpe alobi na Yoane: “Talá! Mama na yo!”​—Yoane 19:26, 27.

      Yesu atikeli ntoma oyo alingaka mingi mokumba ya kobatela mama na ye, oyo emonani sikoyo ete azali lisusu na mobali te. Yesu ayebi ete baleki na ye, bana mosusu ya Maria, bandimeli ye naino te. Yango wana, azwi bibongiseli mpo na bolamu ya mama na ye, ezala na mosuni mpe na elimo. Ezali ndakisa ya malamu mpenza!

      Ntango molili esili, Yesu alobi: “Nazali na mposa ya mai.” Yango ekokisi mpe esakweli ya Biblia. (Yoane 19:28; Nzembo 22:15) Yesu ayoki lokola nde Tata na ye alongoli libateli na ye nyonso, mpo bosembo ya Mwana na ye emekama mpenza tii na nsuka. Kristo abeleli (mbala mosusu na monɔkɔ ya Aramɛyɛ ya bato ya Galile) ete: “Eli, Eli, lama sabakatani?” oyo soki babongoli elakisi: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” Bato mosusu oyo bazali wana bakangi ntina te mpe balobi: “Talá! Azali kobenga Eliya.” Kasi moko na bango apoti mbangu mpe apɔlisi linyuka moko na vinyo ya ngayi, atye yango na nsuka ya mongendu, apesi Yesu amɛla. Kasi bato mosusu balobi: “Tiká ye! Tótala soki Eliya akoya kokitisa ye.”​—Marko 15:34-36.

      Na nsima Yesu agangi: “Ekokisami!” (Yoane 19:30) Ya solo, asali makambo nyonso oyo Tata na ye atindaki ye asala na mabele. Na nsuka, Yesu alobi: “Tata, natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.” (Luka 23:46) Na yango, Yesu atiki bomoi na ye na mabɔkɔ ya Yehova, na elikya ete akozongisela ye yango. Lokola Kristo atyeli Nzambe motema mobimba, akitisi motó mpe akufi.

      Na ntango yango, mabele eningani mpe epasoli mabanga. Koningana ya mabele yango ezali makasi mpe malita oyo ezali na libándá ya Yerusaleme efungwami mpe bibembe ebimi. Bato oyo bamoni bibembe yango bakɔti “na engumba mosantu” mpe bayebisi basusu makambo oyo bamoni.​—Matai 12:11; 27:51-53.

      Ntango Yesu akufi, rido molai mpe ya kilo oyo ekaboli Esika Mosantu ná Esika oyo Eleki Bosantu na tempelo ya Nzambe epasuki na mibale, banda likoló tii na nse. Likambo yango ya kokamwa emonisi nkanda ya Nzambe mpo na bato oyo babomi Mwana na ye mpe elimboli ete nzela ya kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu, na likoló, efungwami.​—Baebre 9:2, 3; 10:19, 20.

      Bato babangi makasi. Mokonzi ya basoda oyo bapesaki ye mokumba ya koboma Yesu alobi: “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.” (Marko 15:39) Ekoki kozala ete azalaki ntango Pilate asambisaki Yesu mpe atunaki ye soki azali Mwana ya Nzambe. Sikoyo, andimi ete Yesu azali moyengebene, mpe azali mpenza Mwana ya Nzambe.

      Bato mosusu babulungani na makambo yango mpe bazongi na bandako na bango, “bazali komibɛta na ntolo” mpo na mawa mpe nsɔni makasi. (Luka 23:48) Bato mosusu bazali kotala na mosika, na ndakisa ebele ya bayekoli ya basi oyo bazalaki kotambola na Yesu na ntango mosusu. Bango mpe bayoki nsɔmɔ mpo na makambo nyonso oyo esalemi.

      “NA NZETE”

      Banguna ya Yesu bagangaki: “Baká ye na nzete!” (Yoane 19:15) Liloba ya Grɛki oyo Yoane asaleli mpo na kolobela “nzete” ezali stauros. Buku moko (History of the Cross) elobi boye: “Stauros elimboli ‘likonzí moko ya semba,’ nzete moko ya makasi, lokola oyo basali-bilanga basalaka na yango lopango, elimboli eloko mosusu te.”

      • Mpo na nini molili oyo eumeli ngonga misato ekɔti te mpo sanza ezipi moi?

      • Ndakisa nini ya malamu Yesu atiki na likambo oyo etali kosalisa baboti oyo bakómi mikóló?

      • Likambo nini koningana ya mabele esali, mpe ndenge rido ya tempelo epasuki na mibale elimboli nini?

      • Bato bayoki ndenge nini mpo na liwa ya Yesu mpe mpo na makambo oyo esalemi wana?

  • Babongisi nzoto ya Yesu mpe bakundi yango
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Bazali kobongisa nzoto ya Yesu liboso bákunda yango

      MOKAPO 133

      Babongisi nzoto ya Yesu mpe bakundi yango

      MATAI 27:57–28:2 MARKO 15:42–16:4 LUKA 23:50–24:3 YOANE 19:31–20:1

      • BAKITISI NZOTO YA YESU NA NZETE

      • BABONGISI YANGO MPO BÁKUNDA YANGO

      • BASI BAKUTI LILITA ETIKALI MPAMBA

      Tozali na mokolo ya mitano, mwa 14 Nisana mpe ngonga epusani. Nsima ya kolala ya moi, Sabata ya mokolo ya 15 Nisana ekobanda. Yesu akufi, kasi miyibi mibale oyo bazali pembeni na ye bazali naino na bomoi. Na kolanda Mibeko, bibembe “ekotikala butu mobimba likoló ya nzete te”; esengeli kokundama kaka “na mokolo yango.”​—Kolimbola Mibeko 21:22, 23.

      Lisusu, mokolo ya mitano ebengami ntango ya Bolɛngɛli mpo bato babongisaka bilei mpe basilisaka kosala makambo nyonso oyo ekoki kozela te tii na nsima ya Sabata. Soki moi elali, basabata mibale, to Sabata “monene” ekobanda. (Yoane 19:31) Ezali Sabata monene mpo mokolo ya 15 Nisana ekozala mokolo ya liboso ya Fɛti ya bagato ezangá levire oyo eumelaka mikolo nsambo; mokolo yango ya liboso ezalaka kaka Sabata. (Balevi 23:5, 6) Sikoyo, mokolo yango ya liboso ekutani na Sabata ya pɔsɔ, elingi koloba mokolo ya nsambo.

      Na yango, Bayuda basɛngi Pilate aboma Yesu mpe miyibi mibale nokinoki. Ndenge nini? Bábuka bango makolo. Soki makolo na bango ebukani bakokoka kotombola nzoto te mpo na kopema. Basoda bayei mpe babuki makolo ya miyibi mibale wana. Kasi lokola bamoni ete Yesu akufi, babuki makolo na ye te. Yango ekokisi maloba ya Nzembo 34:20: “Azali kobatela mikuwa nyonso ya moto yango; moko na yango ebukani te.”

      Mpo na kondima ete Yesu akufi mpenza, soda moko atɔbɔli ye likɔnga na mopanzi, ekɔti tii na motema. ‘Na mbala moko makila ná mai ebimi.’ (Yoane 19:34) Yango ekokisi esakweli mosusu: “Bakotala mpenza epai ya Moto oyo batɔbɔlaki.”​—Zekaria 12:10.

      Yozefe, moto ya engumba Arimatea oyo azali “mozwi” mpe moko ya basambisi ya lokumu na Sanedrina, azali mpe wana ntango babomi Yesu. (Matai 27:57) Biblia ebengi ye “moto malamu mpe moyengebene,” oyo azalaki “kozela bokonzi ya Nzambe.” Kutu, lokola “azalaki moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda,” andimaki te etumbu Sanedrina ekatelaki Yesu. (Luka 23:50; Marko 15:43; Yoane 19:38) Yozefe alongoli kobanga mpe asɛngi Pilate nzoto ya Yesu. Pilate abengi mokonzi ya basoda mpe atuni ye soki Yesu akufi mpenza; mokonzi yango andimi. Na nsima, Pilate andimi Yozefe azwa ebembe yango.

      Yozefe asombi elamba moko ya lini ya pɛto mpe ya kitoko, mpe akitisi nzoto ya Yesu na nzete. Azingi ebembe na elamba yango ya lini mpo na kobongisa yango liboso ekundama. Nikodeme, “moto oyo liboso ayaki epai na [Yesu] na butu” asalisi mpe na kobongisa nzoto yango. (Yoane 19:39) Ayei na rulo ya mire mpe aloe ya litra soki nkama moko (kilo soki 33), ya ntalo makasi. Balíngi nzoto ya Yesu na bilamba oyo batye malasi yango, ndenge Bayuda bakundaka bibembe.

      Pembeni wana, Yozefe azali na lilita moko ya sika oyo atimolaki na libanga mpe alalisi nzoto ya Yesu na kati. Na nsima, bazipi monɔkɔ ya lilita yango na libanga moko ya monene. Basali yango nokinoki, liboso Sabata ebanda. Ekoki kozala ete Maria Magadalena mpe Maria mama ya Yakobo Moke basalisaki na kobongisa nzoto ya Yesu. Sikoyo bazongi ndako noki “mpo na kobongisa matiti ya nsolo mpe mafuta ya nsolo kitoko” mpo na kopakola nzoto ya Yesu nsima ya Sabata.​—Luka 23:56.

      Na mokolo oyo elandi, mokolo ya Sabata, banganga-nzambe bakonzi mpe Bafarisai bakei epai ya Pilate mpe balobi: “Tokanisi lisusu ete, ntango mokosi wana azalaki na bomoi alobaki: ‘Nakosekwa nsima ya mikolo misato.’ Yango wana, pesá mitindo ete bábatela lilita tii na mokolo ya misato, noki bayekoli na ye báya koyiba ye mpe báloba na bato ete: ‘Alamuki uta na bakufi!’ mpe bokosi ya mbala oyo ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso.” Pilate alobi na bango ete: “Bozali na bakɛngɛli. Bókende kobatela yango ndenge boyebi.”​—Matai 27:63-65.

      Mokolo ya lomingo na ntɔngɔntɔngɔ, Maria Magadalena, Maria mama ya Yakobo mpe basi mosusu bayei na matiti ya nsolo kitoko na lilita mpo na kotya na nzoto ya Yesu. Bazali kolobana: “Nani akobalolela biso libanga oyo elongwa na monɔkɔ ya lilita?” (Marko 16:3) Nzokande mabele eninganaki. Lisusu, anzelu ya Nzambe alongoli libanga yango, bakɛngɛli bazali te, mpe lilita etikali mpamba!

      • Mpo na nini mokolo ya mitano ebengami ntango ya Bolɛngɛli, mpe mpo na nini yango ezali Sabata “monene”?

      • Yozefe ná Nikodeme basengeli kosala nini mpo na kokunda Yesu, mpe boyokani nini bazalaki na yango na Yesu?

      • Banganga-nzambe balingi kosala nini, kasi nini esalemi na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo ya lomingo?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto