Tómekola Yesu—Tóteyaka na bolingo
“Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.”—YOA. 7:46.
1. Bato balobaki nini mpo na lolenge ya koteya ya Yesu?
KANISÁ esengo oyo olingaki kozala na yango soki oyokaki Yesu azali koteya! Biblia eyebisi biso mwa moke ndenge bato oyo bazalaki koyoka ye bazalaki kokamwa. Na ndakisa, Luka, moko ya bato oyo bakomaki Baevanzile alobi ete bato ya Nazalete, esika Yesu akolaki, “babandaki . . . kokamwa na maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye.” Matai alobi ete bato oyo bayokaki Yesu ntango azalaki kosala Lisolo Likoló ya Ngomba “bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.” Yoane mpe alobaki ete basoda oyo batindaki mpo na kokanga Yesu bazongaki mabɔkɔ mpamba, mpe balobaki ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.”—Luka 4:22; Mat. 7:28; Yoa. 7:46.
2. Yesu azalaki kosalela nini mpo na koteya?
2 Basoda yango bamikosaki te. Yesu azalaki mpenza moteyi oyo aleki bateyi mosusu nyonso. Mateya na ye ezalaki polele, mindɔndɔ te, mpe moto akokaki kotyela yango ntembe te. Azalaki kosalela malamu bandakisa mpe mituna. Azalaki koyokanisa mateya na ye na makambo ya bomoi ya bato oyo azalaki koteya, ezala bato minene to bato mpamba. Atako mateya na ye ezalaki mozindo, ezalaki mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Kasi, ezali kaka makambo yango te nde esalaki ete Yesu azala Moteyi Monene.
Bolingo—Ezaleli ya ntina mingi
3. Lokola moteyi, ndenge nini Yesu akesanaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye?
3 Na ntembe te, na kati ya bakomeli mpe Bafalisai, ezalaki na bato oyo bazalaki na boyebi mpe makoki ya koteya. Kasi, nini esalaki ete ndenge ya koteya ya Yesu ekesana na oyo ya bango? Bakonzi yango ya mangomba bazalaki kolinga bato te. Kutu, bazalaki kotyola bango mpe kotalela bango lokola “bato balakelamá mabe.” (Yoa. 7:49) Nzokande, Yesu azalaki koyokela bato mawa, mpo “batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Mat. 9:36) Yesu azalaki na bolingo, motema mawa mpe boboto. Lisusu, bakonzi ya mangomba bazalaki te na bolingo ya solo mpo na Nzambe. (Yoa. 5:42) Nzokande, Yesu azalaki kolinga mpenza Tata na ye mpe kosepela kosala mokano na ye. Bakonzi ya mangomba bazalaki kobongola Liloba ya Nzambe mpo na kokokisa mposa na bango moko, kasi Yesu alingaki “liloba ya Nzambe,” azalaki koteya, kolimbola, kokɔtela, mpe kosalela yango. (Luka 11:28) Ya solo, bolingo ezalaki komonana na bomoto ya Klisto, na mateya na ye, na ndenge na ye ya kozala na bato, mpe ndenge azalaki koteya bango.
4, 5. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóteyaka na bolingo? (b) Mpo na nini boyebi mpe makoki ya koteya ezali mpe na ntina mingi ntango tozali koteya?
4 Ezali boni mpo na biso? Biso bayekoli ya Klisto, tolingaka komekola ye na mosala ya kosakola mpe na bomoi na biso. (1 Pet. 2:21) Na yango, mokano na biso ezali kaka te ya kopesa bato boyebi ya Biblia, kasi mpe ya komonisa bizaleli ya Yehova, mingimingi bolingo. Ata soki toyebi makambo mingi to te, to mpe tozali na makoki mingi ya koteya to te, bolingo oyo tozali komonisa ekosalisa biso tósimba mitema ya bato oyo tozali koteya. Mpo tózwa matomba mingi na mosala na biso ya kosakola, tosengeli komekola Yesu mpe koteya na bolingo.
5 Ya solo, mpo tózala bateyi ya malamu, tosengeli koyeba makambo oyo tolingi koteya mpe koyeba ndenge ya koteya yango. Yesu asalisaki bayekoli na ye bázala na makoki yango mibale, mpe Yehova na nzela ya ebongiseli na ye, azali kobongisa biso mpo tózala na makoki yango. (Tángá Yisaya 54:13; Luka 12:42.) Kasi, tosengeli kozala na mokano ya koteya kaka te makambo oyo euti na motó na biso, kasi koluka ete makambo yango euta na motema mpenza to mpe emonisa bolingo. Ntango tozali na boyebi, makoki ya koteya, mpe bolingo, tokozwa matomba mingi. Kasi, ndenge nini tokoki komonisa bolingo ntango tozali koteya? Ndenge nini Yesu ná bayekoli na ye basalaki yango? Tótala naino.
Tosengeli kolinga Yehova
6. Tosalaka nini mpo na moto oyo tolingaka?
6 Tosepelaka kolobela makambo oyo tolingaka; mpe ntango tozali koloba, bato oyo bazali kotala biso bamonaka ete tozali na esengo. Ezalaka bongo mingimingi ntango tozali kolobela moto oyo tolingaka. Mbala mingi, tolukaka koyebisa bato mosusu makambo oyo toyebi mpo na moto yango. Tokumisaka mpe tokɔtelaka ye. Tosalaka yango mpo tolingi ete bato mosusu mpe bálinga moto yango mpe básepela na bizaleli na ye.
7. Bolingo mpo na Nzambe etindaki Yesu asala nini?
7 Liboso tósalisa basusu bálinga Yehova, biso moko tosengeli naino koyeba mpe kolinga ye. Kutu, bolingo mpo na Nzambe nde esimbi losambo ya solo. (Mat. 22:36-38) Yesu atiká ndakisa malamu mpenza. Alingaki Yehova na motema na ye mobimba, na makanisi na ye nyonso, na molimo na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso. Lokola alekisaki bamiliare ya bambula elongo na Tata na ye na likoló, Yesu ayebaki ye malamu mpenza. Yango esalaki nini? Yesu alobaki boye: “Nalingaka Tata.” (Yoa. 14:31) Bolingo yango emonanaki na makambo nyonso oyo Yesu azalaki koloba mpe kosala. Ezalaki ntango nyonso kotinda ye asala makambo oyo esepelisaka Nzambe. (Yoa. 8:29) Etindaki ye amonisa polele mabe ya bakonzi ya mangomba oyo bazalaki koloba ete bazali bamonisi ya Nzambe. Ezalaki mpe kotinda ye aloba mpo na Yehova mpe asalisa basusu báyeba mpe bálinga Nzambe.
8. Bolingo mpo na Nzambe etindaki bayekoli ya Yesu básala nini?
8 Lokola Yesu, bayekoli ya liboso balingaki Yehova mpe bolingo yango etindaki bango básakola nsango malamu na mpiko mpe na molende. Batondisaki Yelusaleme na mateya na bango, atako bakonzi ya mangomba bazalaki kotɛmɛla bango. Bayekoli bakokaki te kotika koloba makambo oyo bamonaki mpe bayokaki. (Mis. 4:20; 5:28) Bayebaki ete Yehova azalaki na bango, mpe akopambola bango. Apambolaki bango mpenza! Mbula soki 30 nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Paulo akomaki ete nsango malamu esakolamaki “na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”—Kols. 1:23.
9. Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na Nzambe?
9 Soki tolingi mpenza kozala bateyi ya malamu, biso mpe tosengeli kokolisa bolingo na biso mpo na Nzambe. Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tozali kosolola mingi na Nzambe na nzela ya libondeli. Tokokolisa mpe bolingo na biso mpo na Nzambe soki tozali koyekola Liloba na ye, kotánga mikanda ya moombo ya sembo, mpe koyangana na makita ya boklisto. Ntango boyebi na biso mpo na Nzambe ezali kokola, mitema na biso ekotonda na bolingo mpo na ye. Ntango tozali komonisa bolingo yango na maloba, na misala, bato mosusu bakomona yango, ekotinda bango mpe bálinga Yehova.—Tángá Nzembo 104:33, 34.
Tosengeli kolinga makambo oyo toteyaka
10. Moteyi ya malamu asalaka nini?
10 Moteyi ya malamu alingaka makambo oyo ateyaka. Asengeli kondima ete makambo yango ezali solo, ezali na ntina, mpe ebongi mpenza. Soki moteyi azali kotya likebi na makambo oyo azali koteya, esengo na ye ekomonana polele mpe akosimba mitema ya bato oyo azali koteya. Epai mosusu, soki moteyi azali mpenza kolinga te makambo oyo azali koteya, akoki kolikya ete bayekoli bámona ntina ya makambo oyo azali koteya bango? Ndakisa na yo malamu ezali mpenza na ntina. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo alakisami malamumalamu akozala lokola moteyi na ye.”—Luka 6:40.
11. Mpo na nini Yesu alingaki makambo oyo azalaki koteya?
11 Yesu alingaki makambo oyo azalaki koteya. Ayebaki ete azalaki na makambo ya ntina mingi ya koyebisa bato—solo na ntina na Tata na ye ya likoló, “maloba ya Nzambe” mpe “maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 3:34; 6:68) Solo oyo Yesu ateyaki ezalaki pole oyo emonisaki polele makambo oyo ezalaki mabe mpe oyo ezalaki malamu. Ememaki elikya mpe ebɔndisaki bato oyo bakosamaki na bakonzi ya mangomba mpe banyokolamaki na Zabolo. (Mis. 10:38) Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na solo emonanaki kaka te na mateya na ye, kasi mpe na makambo nyonso oyo asalaki.
12. Paulo azalaki koyoka ndenge nini mpo na nsango malamu?
12 Lokola Yesu, bayekoli na ye balingaki solo na ntina na Yehova mpe Yesu mpe bazalaki kopesa yango motuya mingi, yango wana batɛmɛli bakokaki te kolɛmbisa bango bátika kosakola yango. Paulo akomelaki baklisto ya Loma boye: “Nazali na mposa moko makasi ya kosakola nsango malamu . . . Mpo nayokelaka nsango malamu nsɔni te; kutu, ezali nde nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo azali na kondima.” (Lom. 1:15, 16) Mpo na Paulo, koteya solo ezalaki lokumu. Akomaki boye: “Epai na ngai, . . . boboto monene wana emonisamaki, mpo nasakola na bikólo mosusu nsango malamu oyo etali bomɛngo ya Klisto.” (Ef. 3:8) Tokoki kokanisa esengo oyo Paulo azalaki na yango ntango azalaki koteya basusu makambo mpe mikano ya Yehova.
13. Bantina nini tozali na yango ya kolinga nsango malamu?
13 Nsango malamu oyo ezali na Liloba ya Nzambe esalisaka biso tóyeba Mozalisi mpe tókóma mpenza baninga na ye. Nsango malamu yango ezali koyanola na mituna ya ntina mingi oyo tomitunaka mpe ezali na nguya ya kobongola bomoi na biso; epesaka biso elikya mpe makasi na ntango ya mpasi. Lisusu, elakisaka biso nzela ya bomoi ya seko. Ezali na boyebi mosusu te ya malamu mingi to ya ntina koleka nsango malamu. Yango ezali likabo ya motuya mingi oyo Nzambe apesi biso, oyo ememelaka biso esengo mingi. Ebakiselaka biso mpe esengo ntango tozali koyebisa yango epai ya bato mosusu.—Mis. 20:35.
14. Ndenge nini tokoki kolinga lisusu mingi makambo oyo toteyaka?
14 Okoki kosala nini mpo na koyeisa lisusu makasi bolingo na yo mpo na nsango malamu? Ntango ozali kotánga Liloba ya Nzambe, zwáká ntango ya komanyola makambo oyo ozali kotánga. Na ndakisa, kanisá ete ozali kotambola elongo na Yesu na mosala na ye ya kosakola ntango azalaki awa na mabelé to mpe ozali kosala mobembo elongo na ntoma Paulo. Kanisá ete ozali na mokili ya sika, mpe kanisá ndenge bomoi ekozala na ntango wana. Kanisá mapamboli oyo osili kozwa mpo ozali kotosa nsango malamu. Soki okolisi bolingo na yo mpo na nsango malamu, bato oyo ozali koteya bakomona yango. Yango wana, tosengeli mpenza kokanisaka malamumalamu makambo oyo tosili koyekola mpe kotya likebi na makambo oyo tozali koteya.—Tángá 1 Timote 4:15, 16.
Tosengeli kolinga bato
15. Mpo na nini moteyi asengeli kolinga bayekoli na ye?
15 Moteyi ya malamu alingaka ete bato oyo azali koyekola na bango bázala motema mpiɔ mpo bámipesa na makambo oyo bazali koyekola mpe bákakatana te mpo na koloba. Lokola atyelaka mpenza bato oyo azali koyekola na bango likebi, moteyi ya bolingo asalisaka bango bázwa boyebi. Ayokanisaka mateya na ye na bamposa na bango mpe na mayele na bango. Atalelaka makoki mpe makambo ya bomoi na bango. Ntango moteyi azali na bolingo ndenge wana, bayekoli bakomona yango mpe bango nyonso, moteyi ná bayekoli bakozala na esengo.
16. Na ndenge nini Yesu amonisaki bolingo mpo na bato?
16 Yesu amonisaki bolingo ya ndenge wana. Amonisaki bolingo monene ntango andimaki kopesa bomoi na ye ya kokoka mpo na kobikisa basusu. (Yoa. 15:13) Na mosala na ye, Yesu alɛmbaki te komibanzabanza mpo na bamposa ya bato, ezala ya mosuni to ya elimo. Na esika azela ete bato báya epai na ye, azalaki kotambola bakilomɛtrɛ milai na makolo mpo na koyebisa bango nsango malamu. (Mat. 4:23-25; Luka 8:1) Azalaki motema molai mpe ayebaki komitya na esika ya bato. Ntango esɛngaki ete asembola bayekoli na ye, azalaki kosala yango na bolingo. (Mko. 9:33-37) Alendisaki bango ndenge azalaki koloba na bango ete bakolonga kosakola nsango malamu. Moteyi moko te aleki Yesu na bolingo. Bolingo oyo amoniselaki bayekoli na ye etindaki bango bálinga ye mpe bátosa mitindo na ye.—Tángá Yoane 14:15.
17. Ndenge nini bayekoli ya Yesu bamonisaki bolingo mpo na basusu?
17 Lokola Yesu, bayekoli na ye bamonisaki bolingo makasi mpe boboto epai ya bato oyo bazalaki koteya. Bayikaki mpiko na komekama mpe batyaki bomoi na bango na likama, mpo na kosakwela basusu nsango malamu. Balingaki mpenza bato oyo bazalaki koteya! Maloba oyo ya ntoma Paulo ezali mpenza kosimba motema; alobaki boye: “Tokómaki nde bato ya boboto na katikati na bino, lokola ntango mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye mpenza. Boye, kozaláká na bolingo ya motema mpo na bino, tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko, mpamba te bokómaki balingami na biso.”—1 Tes. 2:7, 8.
18, 19. (a) Mpo na nini tondimaka kosala nyonso mpo na kosakola nsango malamu? (b) Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete bato bamonaka bolingo na biso.
18 Ndenge moko mpe lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosakola na mokili mobimba mpo na koluka baoyo bazali na mposa ya koyeba mpe kosalela Nzambe. Kutu, na boumeli ya mbula 17 oyo euti koleka, tolekisaki ngonga koleka miliare moko, mbula na mbula na mosala ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli, mpe tozali kokoba na mosala yango. Tosalaka yango na bolingo mpenza, atako mosala ya kosakola esɛngaka tópesa ntango na biso, makasi, mpe mbongo. Lokola Yesu, toyebi ete Tata na biso ya likoló alingaka ete bato bákóma na boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Yoa. 17:3; 1 Tim. 2:3, 4) Bolingo etindaka biso tósalisa bato ya mitema sembo báyeba mpe bálinga Yehova lokola biso.
19 Bato mosusu bamonaka bolingo na biso. Na ndakisa, ndeko mwasi moko, mobongisi-nzela na États-Unis, akomaka mikanda mpo na kobɔndisa bato oyo bandeko na bango bakufi. Mobali moko azongisaki boye: “Nakamwaki komona ete moto moko azwi likanisi ya kokomela moto oyo ayebi te mpo na kosalisa ye ayika mpiko na mpasi oyo ekómeli ye. Nakoki koloba ete bolingaka mpenza bazalani na bino mpe Nzambe oyo atambwisaka bato na nzela ya bomoi.”
20. Koteya na bolingo ezali na ntina nini?
20 Moto moko alobaki ete soki bolingo ná makoki ya koteya esangani, ebimisaka matomba minene. Na mosala na biso ya koteya, tolukaka kosalisa bayekoli báyeba mpe bálinga Yehova. Ya solo, mpo tózala bateyi ya malamu, tosengeli kolinga Nzambe, kolinga solo, mpe kolinga bato. Soki tozali na bolingo yango mpe tozali komonisa yango na mosala na biso, tokozwa kaka te esengo ya kopesa, kasi tokozala mpe na esengo ya koyeba ete tozali komekola Yesu mpe kosepelisa Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Ntango tozali koteya basusu nsango malamu, mpo na nini ezali na ntina . . .
tólinga Nzambe?
tólinga makambo oyo tozali koteya?
tólinga bato oyo tozali koteya?
[Elilingi na lokasa 15]
Nini esalaki ete lolenge ya koteya ya Yesu ekesana na oyo ya bakomeli mpe Bafalisai?
[Elilingi na lokasa 18]
Koteya malamu esɛngaka kozala na boyebi, makoki ya koteya, mpe oyo eleki nyonso, bolingo