Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbv lisolo 14
  • Masese 3:5, 6​—“Kondimela mayele na yo moko te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masese 3:5, 6​—“Kondimela mayele na yo moko te”
  • Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge Masese 3:5, 6 elimbolami
  • Makambo oyo Masese 3:5, 6 elobeli
  • Tótya elikya epai na Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masese 16:3—“Na nyonso oyo okosala tyelá NKOLO motema”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Tyelá Yehova motema na yo mobimba”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
Makambo mosusu
Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
ijwbv lisolo 14

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Masese 3:5, 6​—“Kondimela mayele na yo moko te”

“Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”​—Masese 3:5, 6, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

“Talela Yawe na motema na yɔ mobimba mpe ndima bosɔsɔli na yɔ mɔkɔ tɛ. Na nzela yɔnsɔ na yɔ, ndima ye mpe ye akotambolisa yɔ.”​—Masese 3:5, 6, Biblia Haut-Fleuve.

Ndenge Masese 3:5, 6 elimbolami

Tosengeli kotyela Yehovaa Nzambe motema ntango tozali kozwa bikateli na esika ya kotyela mayele na biso moko motema.

“Tyelá Yehova motema na yo mobimba.” Tokomonisa ete totyelaka Nzambe motema soki tozali kosala makambo na ndenge oyo alingaka. Tosengeli kotyela Nzambe motema na biso mobimba. Na Biblia, liloba motema elimbolaka bomoto ya kati. Yango esangisi ndenge oyo moto ayokaka, makambo oyo etindaka moto asala likambo boye to boye, makanisi na ye, mpe bizaleli na ye. Na yango, kotyela Nzambe motema na biso mobimba esuki kaka te na ndenge oyo tomiyokaka. Ezali liponi oyo tosalaka mpo toyebi ete Mozalisi na biso ayebi oyo ezali malamu mpo na biso.​—Baroma 12:1.

“Kondimela mayele na yo moko te.” Tosengeli kotyela Nzambe motema mpo tokoki te kotyela makanisi na biso ya kozanga kokoka motema. Soki tomityeli motema to totiki ndenge oyo tozali komiyoka etinda biso tósala likambo moko, tokozwa bikateli oyo na ebandeli ekoki komonana ete ezali malamu, kasi na nsima ekoki kobota mbuma ya mabe. (Masese 14:12; Yirimia 17:9) Mayele ya Nzambe eleki mosika oyo ya biso. (Yisaya 55:8, 9) Soki tozali kotika ete makanisi ya Nzambe etambwisa biso, tokolonga mpenza na bomoi.​—Nzembo 1:1-3; Masese 2:6-9; 16:20.

“Na banzela na yo nyonso, kanisá ye.” Tosengeli koluka koyeba makanisi ya Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na biso mpe na bikateli nyonso oyo tolingi kozwa. Tosalaka bongo na ndenge tobondelaka ye mpo na kosɛnga ete atambwisa biso, mpe na ndenge totosaka makambo oyo ayebisi biso na Biblia, Liloba na ye.​—Nzembo 25:4; 2 Timote 3:16, 17.

“Akosembola banzela na yo.” Nzambe asembolaka banzela na biso na ndenge asalisaka biso tótosa mibeko na ye. (Masese 11:5) Na ndenge yango, toboyaka makambo oyo ezangi ntina mpe tozalaka na esengo na bomoi.​—Nzembo 19:7, 8; Yisaya 48:17, 18.

Makambo oyo Masese 3:5, 6 elobeli

Mokanda ya Masese ezali na toli na likambo etali kozala na bomoi ya esengo mpe ya ntina na miso ya Nzambe. Mikapo libwa ya ebandeli ekomami lokola toli oyo tata apesi mwana na ye ya mobali. Mokapo ya 3 elobeli matomba oyo bato oyo bazwaka na motuya mpe basalelaka bwanya oyo euti epai ya Mozalisi bazwaka.​—Masese 3:13-26.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.

Tángá Masese mokapo 3 ná maloba na nse ya lokasa, mpe ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto