Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 5/14 lok. 16
  • Bwanya ezali kobelela—Okoki koyoka yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bwanya ezali kobelela—Okoki koyoka yango?
  • Lamuká!—2014
  • Masolo mosusu
  • “Esengo na moto oyo azwi bwanya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • ‘E! Bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’
    Pusaná penepene na Yehova
  • Jéhovah azali kosalela “bolema” mpo na kobikisa bandimi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 5/14 lok. 16
Batatoli ya Yehova bazali kopesa mwasi moko mokanda oyo elimbolaka Biblia

‘Bwanya ezali kobelela’​—Okoki koyoka yango?

“Bwanya ezali te kokoba kobelela, mpe bososoli ezali te kokoba kobimisa mongongo na yango? Etɛlɛmi na nsɔngɛ ya bisika oyo etombwaná, pene na nzela, na esika babalabala ekutaná. . . . Na bisika oyo bakɔtaka na baporte, yango ezali se koganga makasi.”​—MASESE 8:1-3.

BWANYA ezali na ntina mingi. Soki tozangi bwanya, tokobanda kosala mabunga mpambampamba. Kasi epai wapi tokoki kozwa bwanya ya solosolo? Mokomi ya mokanda ya Masese azalaki kolobela bwanya ya Mozalisi oyo ezangi nsuka. Longola yango, moto nyonso akoki kozwa bwanya yango na nzela ya Biblia, buku moko oyo ekeseni mpenza na babuku mosusu. Tótalela makambo oyo elandi:

  • Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete Biblia ezali buku oyo “ekabolami koleka babuku mosusu nyonso. Ebongolami mbala ebele, mpe na minɔkɔ ebele koleka babuku mosusu nyonso.” Biblia mobimba to ndambo na yango ezali sikoyo na minɔkɔ soki 2 600; na yango, bato mingi (koleka 90%) na mokili mobimba bakoki kozala na yango.

  • Bwanya ezali mpe ‘kokoba kobelela na mongongo makasi’ na ndenge ya solo mpenza. Matai 24:14 elobi boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka [ya mokili oyo] ekoya.”

“Nsango malamu” yango ezali mpenza bwanya ya solosolo mpo emonisi ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato. Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo Nzambe atye mpo eyangela mokili mobimba; elingi koloba guvɛrnema kaka moko mpo na mokili mobimba. (Danyele 2:44; 7:13, 14) Yango wana Yesu abondelaki boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”​—Matai 6:9, 10.

Batatoli ya Yehova bamonaka yango lokumu kosakola Bokonzi ya Nzambe na mikili 239! Ya solo, bwanya​—oyo ya Nzambe ezali mpenza “kobelela” ata mpe “na bisika oyo bakɔtaka na baporte.” Okoki koyoka yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto